Omipesa mobimba na mosala monene ya kobuka mbuma
“Bózala . . . na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”—1 KO. 15:58.
1. Yesu asɛngaki bayekoli na ye nini?
NTANGO azalaki koleka na etúká ya Samaria na nsuka ya mobu 30 T.B., Yesu atɛlɛmaki na libulu ya mai pene na mboka Sikare mpo na kopema. Kuna, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoa. 4:35) Yesu azalaki kolobela mosala ya kobuka mbuma ya solo te; azalaki nde kolobela koyanganisama ya bato ya mitema sembo oyo bakokóma bayekoli na ye. Na maloba wana, Yesu azalaki kosɛnga bayekoli na ye bámipesa na mosala. Mosala ezalaki mingi, kasi ntango ya kosala yango ezalaki moke mpenza!
2, 3. (a) Nini emonisi ete tozali na ntango ya kobuka mbuma? (b) Lisolo oyo ekolobela nini?
2 Maloba ya Yesu na ntina etali bobuki mbuma ezali na ntina mingi lelo. Tozali na eleko oyo elanga, elingi koloba bato ya mokili mobimba, “eteli mpo na bobuki mbuma.” Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kozwa libyangi ya kondima solo oyo epesaka bomoi, mpe bankóto ya bayekoli bazali kozwa batisimo. Tozali na libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobuka mbuma oyo eleki monene, na nse ya litambwisi ya Nkolo mosala ya kobuka mbuma, Yehova Nzambe. Ozalaka na “mingi ya kosala” na mosala yango ya kobuka mbuma?—1 Ko. 15:58.
3 Na boumeli ya mbula misato ná ndambo ya mosala na ye awa na mabele, Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo na mosala ya kobuka mbuma. Na ebele ya mateya ya ntina oyo apesaki bayekoli na ye, lisolo oyo ekolobela mateya misato. Liteya mokomoko ekomonisa ezaleli oyo tosengeli na yango ntango tozali kosala oyo tokoki na mosala ya koyanganisa bayekoli. Tótalela bizaleli yango mokomoko.
Komikitisa ezali na ntina mingi
4. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na komonisa ntina ya komikitisa?
4 Kanisá likambo oyo: Bayekoli bauti koswana mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki baninga. Mbala mosusu, bilongi na bango ezali naino komonisa ete bazali kotyelana motema te mpe bazali na nkanda. Yesu abengi mwana moko ya moke mpe atɛlɛmisi ye na katikati na bango. Abendi likebi na bango epai ya mwana yango mpe alobi boye: “Moto nyonso oyo akomikitisa [to, “akomíkómisa moké,” Biblia liloba lya Nzambe] lokola mwana moke oyo, ye nde moto oyo aleki bato mosusu nyonso na bokonzi ya likoló.” (Tángá Matai 18:1-4.) Na esika bákanisa lokola bato ya mokili, oyo bamonaka valɛrɛ ya moto na kolanda nguya, bozwi mpe lokumu oyo azali na yango, bayekoli basengelaki koyeba ete mpo na bango, moto oyo aleki monene ezali oyo azali ‘komikómisa moke’ na miso ya basusu. Yehova akopambola mpe akosalela bango kaka soki bazali na komikitisa ya solosolo.
5, 6. Mpo na nini osengeli kozala na komikitisa mpo omipesa mingi na mosala ya kobuka mbuma? Pesá ndakisa.
5 Lelo mpe, bato mingi na mokili bazali komipesa na koluka bokonzi, bozwi, mpe lokumu. Na yango, bazali na ntango moke, mbala mosusu mpe bazali na ntango te, mpo na makambo ya elimo. (Mat. 13:22) Kasi basaleli ya Yehova bazali na esengo ya ‘komikómisa mike’ na miso ya basusu mpo Nkolo mosala ya kobuka mbuma andima bango mpe apambola bango.—Mat. 6:24; 2 Ko. 11:7; Flp. 3:8.
6 Tótala ndakisa ya Francisco, oyo azali nkulutu na Amerika ya Sudi. Ntango azalaki elenge, atikaki kotánga na iniversite mpe akómaki mobongisi-nzela. Alobi boye: “Na nsima, ntango nakómaki na fianse, nakokaki kozwa mosala oyo ekosalisa ngai ná mwasi na ngai tózala na susi ya mbongo te. Kasi tozwaki ekateli ya kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ mpe kokoba biso mibale na mosala ya ntango nyonso. Na nsima, tokómaki na bana, mpe mikakatano ebakisamaki. Kasi Yehova asalisaki biso tókangama na ekateli na biso.” Francisco asukisi boye: “Eleki sikoyo mbula 30, nazali na esengo ya kozala nkulutu, mpe na mikumba mosusu na lisangá. Toyokaka mawa ata moke te ndenge toponá kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ.”
7. Ndenge nini omekaki kosalela toli oyo ezali na Baroma 12:16?
7 Soki oboyi “makanisi ya komitombola” ya mokili oyo mpe ondimi ‘kozala na makanisi ya komikitisa,’ yo mpe okoki kolikya kozwa mapamboli mpe mikumba mosusu na mosala ya kobuka mbuma.—Rom. 12:16; Mat. 4:19, 20; Luka 18:28-30.
Molende ememaka mapamboli
8, 9. (a) Lobá na mokuse lisese ya batalanta. (b) Lisese yango ekoki kolendisa mingimingi banani?
8 Mpo tómipesa mobimba na mosala ya kobuka mbuma, tosengeli mpe kozala na ezaleli mosusu: molende. Yesu amonisaki yango na lisese ya batalanta.a Lisese yango elobeli moto moko oyo, liboso akende mobembo mosika, atikelaki baombo na ye misato biloko na ye. Moombo ya liboso azwaki talanta mitano, oyo ya mibale talanta mibale, mpe moombo ya misato azwaki talanta moko. Ntango kaka nkolo na bango akendeki, baombo mibale ya liboso basalaki na molende; ‘basalaki mombongo’ na batalanta na bango. Kasi moombo ya misato azalaki “gɔigɔi.” Akundaki talanta na ye na mabele. Ntango nkolo na bango azongaki, apesaki baombo mibale ya liboso mbano; atyaki bango ‘bábatela biloko mingi.’ Abɔtɔlaki moombo ya misato talanta oyo apesaki ye mpe abenganaki ye na ndako na ye.—Mat. 25:14-30.
9 Na ntembe te, mposa na yo ezali ete omekola baombo ya molende oyo Yesu alobelaki na lisese na ye mpe omipesa mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Kasi okosala nini soki makambo mosusu ezali kopekisa yo osala mingi sikoyo? Mbala mosusu, mikakatano ya mbongo ezali kotinda yo osala bangonga mingi mpo na koleisa libota na yo. To makasi ya bolenge ezali lisusu te mpe nzoto ezali lisusu kolɔngɔnɔ te. Soki ezali bongo, lisese ya batalanta ezali na liteya moko oyo ekoki kolendisa yo.
10. Ndenge nini nkolo oyo balobeli na lisese ya batalanta alakisaki ete azali makambo makasimakasi te, mpe omoni ete elendisi yo na nini?
10 Simbá ete nkolo oyo balobeli na ndakisa yango ayebaki ete baombo na ye bazali na makoki ekeseni. Amonisaki yango na ndenge apesaki “moto na moto [batalanta] na kotalela likoki na ye mpenza.” (Mat. 25:15) Ndenge esengelaki kozala, moombo ya liboso abimisaki benefisi mingi koleka moombo ya mibale. Atako bongo, nkolo andimaki ete bango mibale basalaki na molende ntango abengaki bango baombo “malamu mpe ya sembo” mpe apesaki bango mbano ekokani. (Mat. 25:21, 23) Yehova Nzambe, Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma, ye mpe ayebi ete makambo oyo ozali na yango ekoki kolɛmbisa makoki na yo na mosala na ye. Akozanga te kondima milende oyo ozali kosala na motema moko mpo na kosalela ye mpe akozanga te kopesa yo mbano oyo esengeli.—Mrk. 14:3-9; tángá Luka 21:1-4.
11. Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge molende na kati ya mikakatano ekoki komema mapamboli.
11 Ndakisa ya Selmira, ndeko mwasi moko na Brésil, emonisi ete kozala na molende na mosala ya Nzambe esɛngi kaka te moto azala na bomoi oyo ezangi mikakatano. Eleki mbula ntuku mibale, miyibi babomaki mobali ya Selmira na masasi mpe atikalaki na bana misato. Azalaki kosala na bandako ya bato mpe ezalaki kosɛnga asala mosala bangonga ebele mpe mibembo oyo ezalaki kolɛmbisa ye mingi, na kati ya mituka oyo etondi na bato. Atako mikakatano ya ndenge wana, Selmira atyaki makambo na ye na molɔngɔ mpo akoka kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na nsima, bana na ye mibale bakómaki mpe babongisi-nzela. Alobi boye: “Na bambula oyo eleki, nayekolaki Biblia na bato koleka 20, mpe bakómá bato ya ‘libota’ na ngai. Nazali kosepela na bolingo mpe boninga na bango tii lelo. Ezali eloko moko ya motuya mingi oyo mbongo ekoki kosomba te.” Ya solo, Nkolo mosala ya kobuka mbuma apambolaki milende ya Selmira!
12. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na molende na mosala ya kosakola?
12 Soki makambo oyo ozali kokutana na yango na bomoi ezali kopekisa yo olekisa ntango mingi na mosala ya kosakola, okoki kosala mingi na mosala yango ya kobuka mbuma soki ozali kosala yango na ndenge oyo ekobota mbuma. Soki olandi na likebi batoli malamu oyo epesamaka pɔsɔ na pɔsɔ na Likita ya Mosala, okokolisa mayele na yo na mosala ya kosakola mpe okomeka kosalela mitindo mosusu ya kopesa litatoli. (2 Tim. 2:15) Mpe soki likoki ezali, okoki kobongisa lisusu programɛ na yo to kolongola makambo oyo ezali na ntina mingi te mpo okoka kopesa mabɔkɔ na bibongiseli nyonso oyo ezwami mpo na mosala ya kosakola.—Kol. 4:5.
13. Wapi likambo oyo eleki ntina mpo na kolona molende mpe kobatela yango?
13 Kobosana te ete mpo moto azala na molende, asengeli kolinga Nzambe mpe kozala na botɔndi. (Nz. 40:8) Moombo ya misato oyo Yesu alobelaki azalaki kobanga nkolo na ye; azalaki komona ete asɛngaka makambo mingi mpe azalaka makambo makasimakasi. Na yango, mobali yango akundaki talanta na ye na esika ete asala na yango mosala mpo ebotela nkolo na ye biloko mosusu. Mpo tózala na bopɔtu ya ndenge wana te, tosengeli kolona mpe kobatela boyokani ya malamu na Yehova, Nkolo mosala ya kobuka mbuma. Tyá ntango ya koyekola mpe komanyola bizaleli na ye kitoko—bolingo, motema molai mpe motema mawa na ye. Ndenge wana nde motema na yo ekotinda yo osala nyonso oyo okoki na mosala na ye.—Luka 6:45; Flp. 1:9-11.
“Bosengeli kozala basantu”
14. Lisɛngami nini ya ntina mingi bato oyo balingi kozala basali na mosala ya kobuka mbuma basengeli kokokisa?
14 Mpo na komonisa ndenge Nzambe alingi ete basaleli na ye awa na mabele bázala, ntoma Petro azongelaki Makomami ya Ebre mpe alobaki boye: “Na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba, mpo ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.’” (1 Pe. 1:15, 16; Lev. 19:2; Mib. 18:13) Maloba yango emonisi ete basali mosala ya kobuka mbuma basengeli kozala pɛto na bizaleli mpe na elimo. Tokoki kokokisa lisɛngami yango ya ntina mingi soki tozali kosala makambo oyo esengeli mpo tósukwama, na ndenge ya elilingi. Ekoki kosalema ndenge nini? Na lisalisi ya solo ya liloba ya Nzambe.
15. Solo ya liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kosala nini epai na biso?
15 Bakokanisi solo ya liloba ya Nzambe na mai oyo epɛtolaka. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ezali pɛto na miso ya Nzambe, lokola mwasi ya libala mpo na Kristo, oyo apɛtolaki yango “na mai na nzela ya liloba . . . , [mpo] ezala nde mosantu mpe ezanga mbeba.” (Ef. 5:25-27) Liboso na yango, Yesu mpe alobaki ete liloba ya Nzambe, oyo azalaki kosakola, ezali na nguya ya kopɛtola. Alobaki na bayekoli na ye boye: “Bino bosili kopɛtolama mpo na liloba oyo nalobaki na bino.” (Yoa. 15:3) Na yango, solo ya liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kopɛtola na bizaleli mpe na elimo. Nzambe akondima losambo na biso kaka soki tokiti solo na ye epɛtola biso ndenge wana.
16. Ndenge nini tokoki komibatela pɛto na elimo mpe na bizaleli?
16 Na yango, mpo tókóma basali ya Nzambe na mosala ya kobuka mbuma, tolongolaka liboso na bomoi na biso misala oyo ekómisaka moto mbindo na bizaleli mpe na elimo. Ya solo, mpo na kokoba kozala bato oyo babongi na mosala ya kobuka mbuma, tosengeli mpenza kotosa mitinda ya sembo ya Yehova na oyo etali bizaleli mpe makambo ya elimo. (Tángá 1 Petro 1:14-16.) Kaka ndenge tolingaka ntango nyonso kotikala pɛto na nzoto, tosengeli mpe ntango nyonso kotika liloba ya solo ya Nzambe epɛtola biso. Mpo na yango, tosengeli kotángaka Biblia mpe koyanganaka na makita ya lisangá. Tosengeli mpe kosala milende mpenza mpo na kolanda na bomoi na biso makebisi oyo Nzambe azali kopesa biso. Kosala bongo ekosalisa biso tóbunda na bamposa na biso ya kosala masumu mpe tótɛmɛla bopusi mabe ya mokili oyo. (Nz. 119:9; Yak. 1:21-25) Ya solo, koyeba ete na lisalisi ya solo ya liloba ya Nzambe tokoki ‘kosukwama pɛɛ’ ata soki tosali lisumu ya monene, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa!—1 Ko. 6:9-11.
17. Mpo na kotikala pɛto, toli nini ya Biblia tosengeli kolanda?
17 Ondimaka solo ya liloba ya Nzambe epɛtola bomoi na yo? Na ndakisa, osalaka nini soki bakebisi yo na makama ya kominanola ya mokili oyo ezali se kobeba? (Nz. 101:3) Oboyaka kosala boninga oyo esengeli te ná bana-kelasi na bino mpe baninga ya mosala, oyo ozali na bango bindimeli ekeseni? (1 Ko. 15:33) Ozali mpenza kosala makasi mpo olonga bolɛmbu oyo ekoki kokómisa yo mbindo na miso ya Yehova? (Kol. 3:5) Oboyaka kokɔta na kowelana ya politiki ya mokili oyo mpe okimaka elimo ya kokumisa ekólo oyo emonanaka na masano mingi?—Yak. 4:4.
18. Ndenge nini kozala pɛto na bizaleli mpe na elimo ekosalisa biso tóbota mbuma na mosala ya kobuka mbuma?
18 Komonisa botosi na makambo ya ndenge wana ekomemela yo matomba. Yesu akokanisaki bayekoli na ye na bitape ya nzete ya vinyo mpe alobaki boye: “Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, [Tata na ngai] alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi lisusu.” (Yoa. 15:2) Soki otiki solo ya Biblia epɛtola yo, okobota mbuma mingi koleka.
Mapamboli sikoyo mpe na mikolo ezali koya
19. Ndenge nini bayekoli ya Yesu bapambolamaki na ndenge bazalaki na molende na mosala ya kobuka mbuma?
19 Bayekoli ya sembo oyo bandimaki formasyo ya Yesu bazwaki nguya ntango elimo santu ekitelaki bango na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpo bázala batatoli “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi, bamisionɛrɛ mpe bakɛngɛli-batamboli, mpe batambwisaki mosala ya kosakola nsango malamu “na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:23) Bazwaki mapamboli mingi, mpe bamemelaki bato mosusu esengo monene mpenza!
20. (a) Mapamboli nini ozwi na ndenge omipesi mobimba na mosala ya bobuki mbuma ya elimo? (b) Ozali na ekateli ya kosala nini?
20 Ya solo, soki tozali na komikitisa, na molende mpe tokangami na mitinda ya Liloba ya Nzambe, tokokoba komipesa mobimba mpe na esengo na mosala monene ya kobuka mbuma ya elimo oyo ezali kosalema lelo. Bato mingi lelo bazali na mpasi mpe bazali kolɛmba nzoto mpo balandaki bomoi ya konduka bozwi mpe ya bisengo ya mokili oyo, kasi biso tozali na esengo ya solosolo mpe kosepela na biloko oyo tozali na yango. (Nz. 126:6) Likambo ya ntina koleka ezali ete ‘mosala na biso ya makasi ezali mpamba te na kati ya Nkolo.’ (1 Ko. 15:58) Yehova Nzambe, Nkolo mosala ya kobuka mbuma akopesa biso mbano ya libela mpo na ‘mosala na biso mpe bolingo oyo tomoniselaki nkombo na ye.’—Ebr. 6:10-12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisese ya batalanta etali libosoliboso boyokani ya Yesu ná bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo, kasi ezali mpe na mitinda oyo etali bakristo nyonso.
Ozali koyeba lisusu?
Wana ozali kosala makasi omipesa na mosala ya kobuka mbuma . . .
• mpo na nini osengeli kozala na komikitisa?
• ndenge nini okoki kokóma na molende mpe kobatela yango?
• mpo na nini ezali na ntina ozala pɛto na bizaleli mpe na elimo?
[Elilingi na lokasa 17]
Komikitisa ekoki kosalisa biso tótya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso