“Bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino”
“Bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino.”—1 TES. 5:12.
1, 2. (a) Lisangá ya Tesaloniki ezalaki ndenge nini ntango Paulo akomelaki bango mokanda na ye ya liboso? (b) Paulo alendisaki Batesaloniki básala nini?
TOZALI na ekeke ya liboso. Kanisá ete ozalaki na lisangá ya Tesaloniki, moko ya masangá oyo esalemaki liboso na mikili ya Mpoto. Ntoma Paulo alekisaki ntango mingi mpo na kolendisa bandeko kuna. Mbala mosusu atyaki bankulutu mpo bákamba lisangá yango, ndenge asalaki mpe na masangá mosusu. (Mis. 14:23) Kasi ntango lisangá yango esalemaki, na nsima, Bayuda basangisaki bato ya mobulu mpo na kobengana Paulo ná Silasi na engumba yango. Mbala mosusu bakristo oyo batikalaki kuna bayokaki ete basundolami, mbala mosusu mpe bazalaki kutu kobanga.
2 Na yango, nsima ya kolongwa na Tesaloniki, Paulo azalaki komitungisa mpo na lisangá yango ya sika. Alukaki kozonga kuna, kasi “Satana akangaki” ye nzela. Yango wana, atindaki Timote akende kolendisa lisangá yango. (1 Tes. 2:18; 3:2) Ntango Timote autaki kuna na bansango ya malamu, Paulo amonaki ete akomela Batesaloniki mokanda. Kati na makambo oyo akomaki, Paulo alendisaki bango ‘bázala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bango mpe kokamba bango.’—Tángá 1 Batesaloniki 5:12, 13.
3. Bakristo ya Tesaloniki bazalaki na bantina nini ya kopesa bankulutu lokumu oyo eleki mpenza?
3 Bandeko mibali oyo bazalaki kokamba bakristo ya Tesaloniki bakutanaki na makambo mingi te lokola Paulo ná baninga na ye ya mobembo; bayebaki mpe makambo mingi te ya elimo lokola bankulutu ya Yerusaleme. Kutu, lisangá yango esalaki naino mbula mobimba te! Atako bongo, bandeko ya lisangá bazalaki na ntina ya kozala na botɔndi mpo na bankulutu na bango, oyo bazalaki “kosala mosala makasi” mpe “kokamba” lisangá mpe “kokebisa” bandeko. Ya solo, bazalaki na ntina mpenza ya ‘kopesa bankulutu lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo.’ Nsima ya kopesa bango etinda wana, Paulo apesaki bango toli ete ‘bázala na kimya bango na bango.’ Soki ozalaka na Tesaloniki na ntango wana, olingaki komonisa botɔndi makasi mpo na mosala ya bankulutu? Ndenge nini otalelaka “makabo oyo ezali bato” oyo Nzambe apesá lisangá na bino na nzela ya Kristo?—Ef. 4:8.
“Kosala mosala makasi”
4, 5. Mpo na nini koteya lisangá ezalaki mosala makasi mpo na bankulutu ya ntango ya Paulo, mpe mpo na nini ezali bongo lelo?
4 Nsima ya kotinda Paulo ná Silasi na Beroya, ndenge nini bankulutu ya Tesaloniki bazalaki “kosala mosala makasi”? Na ntembe te bazalaki kosalela Makomami mpo na koteya lisangá, na ndakisa ya Paulo. Mbala mosusu okoki komituna ete: ‘Bakristo ya Tesaloniki bazalaki kosepela na Liloba ya Nzambe?’ Mpo Biblia elobi ete bato ya Beroya bazalaki “na makanisi ya malamu koleka baoyo ya Tesaloniki, . . . bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo.” (Mis. 17:11) Wana, bakokanisaki bato ya Beroya nde Bayuda nyonso ya Tesaloniki, kasi na bakristo ya kuna te. Batesaloniki oyo bakómaki bandimi ‘bandimaki liloba ya Nzambe, lokola liloba ya bato te, kasi lokola liloba ya Nzambe.’ (1 Tes. 2:13) Emonani ete bankulutu basalaki mosala makasi mpo na koleisa lisangá na elimo.
5 Lelo oyo, moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa etonga ya Nzambe ‘bilei na ntango oyo ebongi.’ (Mat. 24:45) Na litambwisi ya moombo ya sembo, bankulutu ya lisangá mokomoko basalaka mosala makasi mpo na koleisa bandeko na elimo. Bandeko ya lisangá bakoki kozala na mikanda ebele oyo elimbolaka Biblia, mpe na minɔkɔ mosusu, bazali na bisaleli lokola Index des publications Watch Tower mpe CD-ROM Watchtower Library. Mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya lisangá, bankulutu balekisaka bangonga mingi mpo na kobongisa masolo oyo bakosala na makita mpo básala yango na ndenge oyo ekosalisa bandeko. Osilá kokanisa ntango boni bankulutu balekisaka mpo na kobongisa masolo oyo bakosala na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene?
6, 7. (a) Ndakisa nini Paulo atikelaki bankulutu ya Tesaloniki? (b) Mpo na nini lelo, ekoki kozala mpasi mpo bankulutu bámekola Paulo?
6 Bankulutu ya Tesaloniki babosanaki te ndakisa malamu oyo Paulo atikelaki bango na oyo etali kobatela etonga. Azalaki kosala yango na bolingo nyonso, kasi te kaka mpo ezalaki mokumba na ye. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Paulo ‘akómaki moto ya boboto lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye.’ (Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 8.) Akokaki kutu ‘kopesa molimo na ye moko’ soki esengeli! Ntango bazali kobatela etonga, bankulutu basengelaki kozala lokola ye.
7 Lelo oyo, bakristo oyo bazali babateli ya mpate bakomekola Paulo soki bazali kolɛngɛla mpenza etonga. Bandeko mosusu bazalaka malilimalili mpe bakokaka mpenza te kosolola na bato. Atako bongo, bankulutu basalaka makasi bámona mosika mpe báluka makambo ya malamu oyo ezali na kati na bandeko yango. (Mas. 16:20) Ya solo, kozanga kokoka ekoki kosala ete nkulutu moko azala na mokakatano mpo na kotalela ndeko mokomoko na ndenge oyo ebongi. Kasi, lokola azali koluka kozala na boboto epai ya bato nyonso, esengeli te kopesa ye longonya mpo na milende oyo azali kosala ya kozala mobateli ya mpate ya malamu oyo azali kolanda litambwisi ya Kristo?
8, 9. Bankulutu ya lelo bazali ‘kokɛngɛla milimo na biso,’ ndakisa na makambo nini?
8 Biso nyonso tozali na ntina ya ‘komikitisa’ liboso ya bankulutu. Ndenge Paulo alobaki yango, ‘bazali kokɛngɛla milimo na biso.’ (Ebr. 13:17) Maloba yango etindi biso tókanisa mobateli ya mpate ya kala oyo aboyaka kolala mpo na kobatela etonga na ye. Ndenge moko mpe, bankulutu lelo bakoki komipimela mpɔngi mpo na koluka kosalisa baoyo bazali kobɛla, kotungisama na makanisi to mpe baoyo bazali na mikakatano na elimo. Na ndakisa, bandeko mosusu balamwisaki mpenza bankulutu oyo bazali na Komite mpo na boyokani na minganga mpo na kosalisa ndeko oyo azalaki na likambo ya makila. Nzokande, soki tokutani na likambo ya ndenge wana, tozalaka mpenza na botɔndi mpo na mosala na bango!
9 Bankulutu oyo basalaka na Bakomite mpo na kotonga mpe na Bakomite mpo na kopesa lisalisi na ntango ya makama basalaka mosala makasi mpo na kosalisa bandeko. Ebongi mpenza tópesa bango mabɔkɔ na motema moko! Tózwa ndakisa ya milende oyo esalemaki mpo na kosalisa bandeko nsima ya mopɛpɛ makasi babengi Nargis, oyo ebɛtaki na ekólo Myanmar na 2008. Mpo na kokóma na lisangá ya Bothingone, na etúká ya Irrawaddy Delta, epai mopɛpɛ ebɛtaki makasi, bandeko oyo bakendaki kopesa lisalisi kuna balekaki na bisika oyo ebebibebi mpe etondi na bibembe. Ntango bandeko ya lisangá yango bamonaki ndeko oyo azalaká mokɛngɛli na bango ya zongazonga kati na bandeko ya liboso oyo bakómaki na Bothingone mpo na kopesa lisungi, bagangaki boye: “Talá! Mokɛngɛli ya zongazonga na biso! Yehova abikisi biso!” Osepelaka na mosala makasi oyo bankulutu basalaka butu moi? Bankulutu mosusu baponamaka mpo na kosala bakomite spesiale mpo na kosambisa makambo ya mpasi. Bankulutu yango bamikumisaka te mpo na makambo oyo basali; kasi, bandeko oyo mosala na bango esalisi bazalaka na botɔndi mpenza.—Mat. 6:2-4.
10. Misala nini oyo eyebanaka mingi te bankulutu basalaka?
10 Lelo bankulutu mingi basalaka misala oyo esɛngaka kokoma. Na ndakisa, mokambi misala ya bankulutu abongisaka programɛ ya makita ya pɔsɔ nyonso. Sekrɛtɛrɛ ya lisangá abongisaka lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza na sanza mpe ya mbula na mbula. Mokɛngɛli ya Eteyelo alandelaka programɛ ya eteyelo na likebi. Nsima na sanza misato nyonso, batalelaka balapolo ya kɔnti ya lisangá. Bankulutu batángaka mikanda oyo euti na biro ya filiale mpe basalelaka malako oyo esalisaka lisangá ezala na “bomoko na kondima.” (Ef. 4:3, 13) Mpo na milende ya bankulutu wana oyo basalaka makasi, ‘makambo nyonso esalemaka na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.’—1 Ko. 14:40.
‘Bazali kokamba bino’
11, 12. Banani bakambaka lisangá, mpe yango esɛngaka nini?
11 Paulo alobaki mpo na bankulutu ya Tesaloniki oyo bazalaki kosala mosala makasi ete bazali “kokamba” lisangá. Na Grɛki, liloba yango epesaka likanisi ya “kotɛlɛma liboso” mpe ekoki kobongolama na “kolakisa nzela, kopesa ndakisa.” (1 Tes. 5:12) Kaka mpo na bankulutu yango, Paulo alobaki ete “bazali kosala mosala makasi.” Azalaki koloba mpo na “mokɛngɛli mokambi” te kasi mpo na bankulutu nyonso ya lisangá. Lelo, bankulutu mingi batɛlɛmaka liboso ya lisangá mpe batambwisaka makita. Ndenge tokómi koloba “mokambi misala ya bankulutu” esalisi biso tómona ete bankulutu nyonso basalaka na bomoko.
12 “Kokamba” lisangá esuki kaka na koteya te. Liloba yango ezali mpe na 1 Timote 3:4. Paulo alobaki ete mokɛngɛli asengeli kozala “moto oyo akambaka ndako na ye moko na ndenge ya malamu mpenza, oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te.” Awa liloba “kokamba” esuki kaka te na koteya bana kasi esɛngi mpe kopesa libota ndakisa mpe kozala na “bana oyo bazali na botosi.” Ya solo, bankulutu bapesaka ndakisa na lisangá, basalisaka bandeko nyonso bátosa Yehova.—1 Tim. 3:5.
13. Mpo na nini ekoki kosɛnga ntango mingi mpo na kozwa ekateli na likita ya bankulutu?
13 Mpo na kokamba etonga malamu, bankulutu basololaka bango na bango mpo na koyeba ndenge ya kokokisa bamposa ya lisangá. Bato mosusu bamonaka ete ekoki kozala malamu koleka soki nkulutu moko nde azali kozwa bikateli nyonso. Kasi, lokola balandaka ndakisa ya lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso, masangani ya bankulutu lelo basololaka makambo polelepolele, mpe balukaka litambwisi ya Biblia. Mokano na bango ezali ya kosalela mitinda ya Biblia mpo na kosilisa bamposa ya lisangá. Ezalaka malamu mingi soki nkulutu mokomoko amibongisi mpo na likita ya bankulutu, ataleli Biblia mpe malako ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Ya solo, kosala ndenge wana ezwaka ntango. Soki makanisi ekeseni, ndenge esalemaki ntango lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso etalelaki likambo etali kokatama ngenga, ekoki kosɛnga ntango mingi lisusu mpe kosala bolukiluki lisusu mpo bankulutu bákoka koyokana na kolanda Biblia.—Mis. 15:2, 6, 7, 12-14, 28.
14. Osepelaka soki bankulutu bazali kosala na bomoko? Mpo na nini oyokaka ndenge wana?
14 Nini ekoki kosalema soki nkulutu moko azali kotingama kaka na likanisi na ye to azali koluka kolendisa makanisi na ye? To soki moto—lokola Diotrefese na ekeke ya liboso—azali kolona kowelana? (3 Yoa. 9, 10) Na ntembe te, lisangá mobimba ekonyokwama. Soki Satana alukaki kokɔtisa matata na lisangá na ekeke ya liboso, tosengeli koyeba ete alingi mpe kobebisa kimya ya lisangá lelo. Akoki kolamusa mposa ya moimi epai ya moto, na ndakisa mposa ya kozwa lokumu. Na yango, bankulutu basengeli kolona komikitisa mpe kosala elongo mpe na bomoko lokola nzoto moko. Tosepelaka mpenza na komikitisa ya bankulutu oyo basalaka elongo lokola nzoto moko!
‘Bazali kokebisa bino’
15. Nini etindaka bankulutu bákebisa ndeko mobali to mwasi?
15 Na nsima, Paulo alobelaki mosala mosusu ya makasi oyo bankulutu basalaka kasi oyo ezali mpe na ntina mingi: kokebisa etonga. Na Makomami ya Grɛki, kaka Paulo nde asalelaki liloba oyo ebongolami na “kokebisa.” Ekoki mbala mosusu kozala toli ya makasi, kasi oyo epesami na ndenge ya mabe te. (Mis. 20:31; 2 Tes. 3:15) Na ndakisa, Paulo akomelaki Bakorinti ete: “Nazali kokoma makambo oyo, mpo na koyokisa bino nsɔni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo.” (1 Ko. 4:14) Apesaki toli wana mpo azalaki komibanzabanza na bolingo mpenza mpo na basusu.
16. Eloko nini bankulutu basengeli kobosana te ntango bazali kokebisa basusu?
16 Bankulutu babosanaka te ete lolenge oyo bazali kokebisa basusu ezali na ntina mingi. Basalaka makasi ya komekola Paulo mpo bazalaka na boboto, na bolingo, mpe balukaka kosalisa bandeko. (Tángá 1 Batesaloniki 2:11, 12.) Ya solo, bankulutu ‘bakangamaka makasi na liloba ya sembo na ndenge na bango ya koteya, mpo báyeba kolendisa na mateya oyo epesaka litomba mpe báyeba kopamela batɛmɛli.’—Tito 1:5-9.
17, 18. Likambo nini osengeli kobosana te soki nkulutu moko akebisi yo?
17 Ya solo, bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka mpe bakoki koloba makambo oyo ekoki kopesa bango mawa na nsima. (1 Bak. 8:46; Yak. 3:8) Lisusu, bankulutu bayebi ete mpo na bandeko na bango ya elimo, kozwa toli ezalaka ntango nyonso ‘likambo ya esengo te, kasi ezalaka nde mawa.’ (Ebr. 12:11) Na yango, ntango nkulutu ayei kokebisa moto, na ntembe te asali yango nsima ya kotalela likambo yango malamumalamu mpe kobondela mpo na yango. Soki nkulutu akebisi yo, osepelaka ndenge azali komibanzabanza mpenza mpo na yo?
18 Kanisá ete ozali na maladi moko oyo emonani lokola minganga bayebi yango te. Na nsima monganga moko amoni maladi yango mpenza, kasi ozali kokoka kondima yango te. Okobombela monganga yango nkanda? Te! Kutu, ata soki ayebisi yo básala yo lipaso, mbala mosusu okondima yango, mpo ondimi ete ezali mpo na bolamu na yo. Mbala mosusu ndenge oyo monganga ayebisi yo likambo yango esali yo mpasi na motema, kasi okotika mpasi yango etambwisa ekateli oyo okozwa? Mbala mosusu okosala bongo te. Ndenge moko mpe, kotika te ete ndenge oyo bakebisi yo epekisa yo koyoka bato oyo mbala mosusu Yehova mpe Yesu bazali kosalela mpo na kosalisa yo mpo obatela to obongisa bizaleli na yo ya elimo.
Zalá na botɔndi ndenge Yehova apesá biso bankulutu
19, 20. Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na “makabo oyo ezali bato”?
19 Okosala nini soki ozwi likabo moko oyo babongisaki kaka mpo na yo? Na ntembe te, okosalela yango mpo na komonisa botɔndi mpo na yango. “Makabo oyo ezali bato” nde likabo oyo Yehova apesi biso na nzela ya Yesu Kristo. Lolenge moko oyo okoki komonisa botɔndi mpo na makabo yango ezali kolanda na likebi masolo oyo bankulutu basalaka mpe koluka kosalela makambo oyo balobelaka na masolo yango. Okoki mpe komonisa botɔndi na yo soki ozali kopesa biyano na makita. Pesá mabɔkɔ na misala oyo bankulutu bazali kokamba, na ndakisa mosala ya kosakola. Soki toli oyo nkulutu moko apesaki yo esalisaki yo, mpo na nini te koyebisa ye likambo yango? Lisusu, mpo na nini te komonisa botɔndi na yo mpo na mabota ya bankulutu? Kobosana te, mpo nkulutu asala mosala makasi na lisangá, libota na ye ezangaka ye.
20 Ya solo, tozali na ntina ya komonisa botɔndi mpo na bankulutu, mpo basalaka mosala makasi na kati na biso, bakambaka biso, mpe bakebisaka biso. Yehova apesi biso “makabo [yango] oyo ezali bato” mpo na bolingo na ye!
Ozali koyeba lisusu?
• Bakristo ya Tesaloniki bazalaki na bantina nini ya kosepela na baoyo bazalaki kokamba bango?
• Ndenge nini bankulutu ya lisangá na bino basalaka mosala makasi mpo na bino?
• Ndenge oyo bankulutu bazali kokamba lisangá esalisaka yo na nini?
• Soki nkulutu moko akebisi yo, likambo nini osengeli kobosana te?
[Elilingi na lokasa 27]
Ozalaka na botɔndi mpo na makambo ndenge na ndenge oyo bankulutu basalaka mpo na kobatela lisangá?