Sekele mpo na libota ya esengo
Pesáká molongani na yo kilo
Willa alobi boye: “Soki Rachel asiliki, atikaka kolela noki te. Soki tofandi mpo tósolola, akómaka nkandankanda to mpe alingaka lisusu koloba te. Nayebi te nasala nini. Asilisi ngai mayele.”
Rachel alobi boye: “Ntango Will azongaki na ndako, akutaki ngai nazali kolela. Namekaki koyebisa ye mpo na nini nazalaki na nkanda, kasi, akataki ngai maloba. Alobaki ete ezali likambo oyo nasengelaki komitungisa na yango te, esengelaki kaka nabosana yango. Yango ebakisaki ngai lisusu nkanda.”
MAKAMBO oyo Will to Rachel balobi ekómelaka mpe yo? Bango mibale bazalaka na mposa básololaka, kasi, mbala mingi basukaka na kosilika. Mpo na nini?
Basi basololaka ndenge moko te na mibali, mpe bato na bato bazalaka na makambo mosusu oyo ezali kaka mpo na bango. Mbala mingi, mwasi azalaka na mposa ya koloba polele ndenge azali koyoka mpe kosala yango mbala na mbala. Nzokande, mibali mingi balukaka kosilisa matata nokinoki mpe koboya mindɔndɔ mpo na kobatela kimya. Kasi, ndenge nini okoki koyokana na molongani na yo mpe koyeba kosolola na ye? Soki ozali kopesa ye kilo.
Moto oyo apesaka moninga kilo akitisaka ye te mpe alukaka komitya na esika na ye. Ekoki kozala ete banda bomwana, omesaná kaka kobanga bato oyo bazali na bokonzi to mikóló. Nzokande, ntango obali, okoki kozala na mokakatano mpo opesa molongani na yo kilo, mpo ozali kozwa ye kaka lokola moninga. Linda, oyo abalá eleki sikoyo mbula mwambe, alobi boye: “Nayebaki ete Phil ayokaka moto nyonso oyo azali koloba na ye na motema molai mpenza mpe amityaka na esika na ye, nalingaki asalaka mpe bongo epai na ngai.” Na ntembe te oyokaka baninga na yo, ata mpe bato oyo oyebi te, na motema molai mpe olobaka na bango na limemya. Kasi, osalaka yango epai ya molongani na yo?
Kozanga limemya ebebisaka boyokani na kati ya ndako mpe ebimisaka matata. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Malamu kutu ólia mwa-lipa ya kokauka epai ya bato ya kimia, esika ’tè ózala na feti monene epai ya bato bazali koswana.” (Masese 17:1, Bible na lingala ya lelo oyo) Na yango, mpo na kobatela kimya, Biblia eyebisi mobali apesa mwasi na ye lokumu, to limemya. (1 Petro 3:7) “Mwasi” mpe “asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”—Baefese 5:33.
Ndenge nini okoki kosolola na molongani na yo na limemya? Talelá mwa batoli oyo ebongi, oyo ezali na Biblia.
Ntango molongani na yo azali na likambo ya koloba
Mokakatano:
Bato mosusu balingaka koloba mingi na esika ya koyoka. Yo mpe ozalaka bongo? Biblia elobi ete moto oyo azali “koyanola na likambo liboso ya koyoka yango,” azali zoba. (Masese 18:13) Yango wana, liboso oloba, yokáká. Mpo na nini? Kara, oyo abalá eleki sikoyo bambula 26, alobi boye: “Nasepelaka mingi soki mobali na ngai aluki te kosilisa mbala moko mokakatano na ngai. Nazalaka na mposa te andima makanisi na ngai to aluka koyeba mpo na nini mokakatano yango ebimi. Nalingaka kaka ayoka ngai mpe amitya na esika na ngai.”
Nzokande, mibali mosusu mpe basi mosusu bakokaka te koloba ndenge oyo bazali koyoka mpe bayokaka mabe soki molongani azali kotya bango mbamba ete báloba kaka. Lorrie, oyo abali kala te, amoni ete esɛngaka ntango mpo mobali na ye aloba ndenge azali koyoka. Alobi boye: “Nasengeli kozala motema molai mpe kozela liboso abimisa makanisi na ye.”
Ndenge ya kosala:
Soki olingi kosolola ná molongani na yo likambo moko oyo ekoki kobimisa matata, bópona ntango oyo bino mibale bozali kimya mpe na motema ya kokita. Ezali boni soki molongani na yo azali na mposa ya koloba te? Kobosana te ete “makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.” (Masese 20:5) Soki obendi katini na libulu ya mai mbangumbangu, mai ebele ekosopana. Ndenge moko mpe, soki ozali kotinda molongani na yo na makasi aloba, akoki koluka komilongisa mpe okoki kobungisa libaku ya koyoka makanisi na ye. Na esika osala bongo, tuná molongani na yo mituna na boboto mpe na limemya, mpe zalá motema molai soki azali te kobimisa nokinoki oyo ezali na motema na ye, ndenge oyo olingaki asala yango.
Ntango molongani na yo azali koloba, ‘osengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19) Moto oyo ayebi koyoka, asalelaka kaka matoi te, kasi asalelaka mpe motema. Ntango molongani na yo azali koloba, luká koyeba ndenge oyo azali koyoka na motema. Ndenge oyo ozali koyoka molongani na yo ekomonisa ye soki ozali mpenza komemya ye to te.
Yesu ateyaki biso ndenge ya koyoka. Na ndakisa, ntango mobali moko oyo azalaki na maladi ayaki epai na ye mpo abikisa ye, Yesu abikisaki ye mbala moko te. Ayokaki naino mobali yango. Na nsima, makambo oyo mobali yango alobaki esimbaki mpenza motema na ye. Mpe na nsuka, abikisaki ye. (Marko 1:40-42) Yo mpe landáká ndakisa wana ntango molongani na yo azali koloba na yo. Kobosana likambo oyo te: ntango mosusu azali koluka kaka omitya na esika na ye, kasi te osilisa mokakatano na ye nokinoki. Yango wana, yokáká ye mpenza. Motema na yo eyoka mpenza oyo ye azali koyoka. Na nsima na yango nde okoki kokokisa mposa ya molongani na yo. Soki osali bongo, okomonisa ete opesaka molongani na yo kilo.
MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya nsima, soki molongani na yo abandi koloba na yo, salá makasi ete okata ye te tii akóma na nsuka. Zelá asilisa koloba mpe okanga ntina ya maloba na ye. Na nsima, tuná molongani na yo boye: “Omoni mpenza ete nazalaki koyoka yo?”
Ntango ozali na likambo ya koloba
Mokakatano:
Linda, mwasi oyo tolobelaki liboso alobi ete “ndenge oyo bato balobaka na bateyatre emonisaka lokola nde kolobela molongani na yo mabe, kofinga to kotyola ye ezali mabe te.” Bato mosusu babɔkwamaka na ndako oyo bamesani koloba na limemya te. Na nsima, ntango babali, bazalaka na mokakatano mpo bátika momeseno yango. Ivy, mwasi moko oyo afandaka na Canada, alobi boye: “Nakolá na libota oyo bato bamesaná kotyola, koganga, mpe kobamba basusu bankombo.”
Ndenge ya kosala:
Ntango ozali kolobela molongani na yo epai ya basusu, lobá “liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.” (Baefese 4:29) Lobá makambo ya molongani na yo oyo ekotinda basusu bápesa ye kilo.
Ata ntango bozali kaka yo ná molongani na yo, boyá kosalela maloba ya kotyola mpe kobamba bankombo. Na Yisraele, Mikale asilikelaki mobali na ye Mokonzi Davidi. Alobelaki ye maloba ya kotyola mpe alobaki ete Davidi asalaki “kaka lokola bolole.” Maloba na ye esilikisaki Davidi, kasi esepelisaki mpe Nzambe te. (2 Samwele 6:20-23) Yango eteyi biso nini? Ntango ozali koloba na molongani na yo, poná malamumalamu maloba na yo. (Bakolose 4:6) Phil, oyo abalá eleki sikoyo mbula mwambe alobi ete azalaka kaka na matata ná mwasi na ye. Amoni ete na bantango mosusu, maloba na ye ebebisaka lisusu makambo. Alobi boye: “Nayei komona ete koluka ete ‘kolonga’ ntembe ezali na ntina moko te. Namoni ete kobongisa boyokani na biso nde eleki malamu mpe ezali na litomba.”
Na ntango ya kala, mwasi moko mobange, oyo mobali akufá, alendisaki babokilo na ye ete ‘bázwa esika ya kopema moto na moto na ndako ya mobali na ye.’ (Ruta 1:9) Ntango mwasi ná mobali bazali kopesana lokumu, basalaka ete ndako na bango ezala “esika ya kopema.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Yo ná molongani na yo bóluka ntango ya kotalela batoli oyo ezali awa. Tuná molongani na yo boye: “Ntango nalobaka mpo na yo na miso ya bato, omonaka ete napesaka yo kilo to nakitisaka yo? Makambo nini nakoki kobongisa?” Yokáká mpenza ntango molongani na yo azali kobimisa oyo ezali na mitema na ye. Meká kosalela makanisi oyo moninga amonisi.
Ndimá ete yo ná molongani na yo bokeseni
Mokakatano:
Bato mosusu, ntango babalani sika, bakanisaka ete ntango Biblia elobi ete mwasi ná mobali bakómi “mosuni moko” elakisi basengeli kozala na makanisi moko to bomoto ndenge moko. (Matai 19:5) Nzokande, baumelaka te komona ete ezali ndenge wana te. Ntango babalani, mbala mingi matata ebimaka mpo bazali ndenge moko te. Linda alobi boye: “Moko ya makambo minene oyo ekesenisi ngai ná Phil ezali ete ye amitungisaka mingi te ndenge ngai nasalaka. Na bantango mosusu akoki kozala kimya wana ngai nazali komitungisa, yango wana etindaka ngai nasilika mpo namonaka lokola amitungisaka mpenza te na likambo moko ndenge ngai nasalaka.”
Ndenge ya kosala:
Mokomoko andima moninga ndenge azali mpe apesa ye limemya atako akeseni na ye na makambo mosusu. Tózwa ndakisa: Miso na yo esalaka ndenge moko te na matoi na yo; atako bongo, esalaka na boyokani mpo ozwa likama te ntango ozali kokatisa balabala. Adrienne, oyo abalá eleki sikoyo mbula soki 30, alobi boye: “Ntango ngai ná mobali na ngai tozali na makanisi moko te na likambo mpe yango ebuki mibeko ya Nzambe te, moto na moto atikaka moninga kimya. Kutu, tozali kaka bato mibale atako tobalaná.”
Ntango molongani na yo azali na likanisi ekeseni na oyo ya yo to azali komona makambo ndenge moko te na yo, koluka kaka matomba na yo te. Talelá mpe ndenge oyo molongani na yo azali koyoka. (Bafilipi 2:4) Kyle, mobali ya Adrienne, alobi boye: “Ntango mosusu nayebaka te soki mwasi na ngai alingi mpenza koloba nini to mpe nandimaka makanisi na ye te. Kasi, nabosanaka te ete nalingaka ye mingi koleka makanisi na ngai. Ntango azali na esengo, ngai mpe nazalaka mpenza na esengo.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Komá makanisi ya molongani na yo oyo omonaka ete eleki oyo ya yo to ndenge na ye ya kosilisa mikakatano oyo omonaka ete eleki oyo ya yo.—Bafilipi 2:3.
Kopesa moninga kilo ezali moko ya makambo oyo esalaka ete libala ezala na esengo mpe eumela. Linda alobi boye: “Kopesa moninga kilo epesaka ye esengo mpe etyaka kimya na libala. Ebongi mpenza kolona ezaleli yango.”
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
OMITUNA BOYE . . .
Matomba nini bizaleli ya molongani na ngai oyo ekeseni na oyo ya ngai ememi na libota na biso?
Mpo na nini ezali malamu natika molongani na ngai asala makambo mosusu ndenge alingaka ntango ebuki mobeko ya Nzambe te?