Yehova—“Nzambe oyo apesaka kimya”
“Nzambe oyo apesaka kimya azala na bino nyonso.”—ROM. 15:33.
1, 2. Likambo nini ya mpasi Ebandeli 32 mpe 33 elobeli, mpe esukaki ndenge nini?
TOZALI pene na engumba Penuele, pene na lobwaku ya mokɛli ya Yaboke, na ɛsti ya ebale Yordani. Esau ayoki ete lipasa na ye Yakobo azali kozonga ndako. Atako mbula 20 eleki banda Esau atɛkɛlaki ndeko na ye Yakobo lotomo ya kozala mwana ya liboso, Yakobo azali kobanga ete mbala mosusu ndeko na ye azali naino na nkanda mpe akoluka koboma ye. Elongo na bato na ye 400, Esau azali koya epai ya ndeko na ye oyo bayokanaka lisusu te. Lokola Yakobo amoni ete mbala mosusu Esau akoyamba ye malamu te, atindeli ye makabo mbala na mbala, bibwɛlɛ koleka 550. Mbala nyonso oyo basaleli ya Yakobo bazali kokóma na banyama epai ya Esau, bazali koyebisa ye ete ezali likabo oyo euti epai ya ndeko na ye.
2 Nsukansuka bakutani! Wana Yakobo azali kopusana na mpiko nyonso pene na Esau, angumbami liboso na ye mbala nsambo. Kasi, Yakobo asilaki kosala likambo moko ya ntina mingi mpo na kolɛmbisa motema ya ndeko na ye. Abondelaki Yehova abikisa ye na lobɔkɔ ya Esau. Yehova ayokaki libondeli yango? Ɛɛ. Biblia elobi boye: “Esau apotaki mbangu mpo na kokutana na [Yakobo], ayambaki ye, akweaki na nkingo na ye, apwɛpwaki ye.”—Eba. 32:11-20; 33:1-4.
3. Lisolo ya Yakobo ná Esau eteyi biso nini?
3 Lisolo ya Yakobo mpe Esau emonisi ete tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobongisa makambo ntango matata ebimi. Soki te, kimya mpe moboko ya lisangá ekoki kobeba. Yakobo alukaki kozongisa kimya na Esau, kasi ezali te mpo asalelaki ndeko na ye mabe mpe na bongo asengelaki kosɛnga ye bolimbisi. Esau nde atyolaki lotomo na ye ya mwana ya liboso mpe atɛkɛlaki yango Yakobo mpo na saani ya supu ya lantiye. (Eba. 25:31-34; Ebr. 12:16) Kasi, ndenge oyo Yakobo asalaki epai ya Esau emonisi milende oyo tosengeli kosala mpo na kobatela kimya na bandeko na biso ya lisangá. Emonisi mpe ete ntango tobondeli Nzambe ya solo asalisa biso na milende na biso mpo na koluka kimya, ayokaka mabondeli yango. Biblia ezali na bandakisa mosusu ebele oyo ezali koteya biso tózala bato oyo batyaka kimya.
Ndakisa oyo eleki malamu mpo na kolendisa biso
4. Nzambe asalaki nini mpo na kobikisa bato na lisumu mpe na liwa?
4 Ndakisa oyo eleki monene ya moto oyo atyaka kimya ezali Yehova—“Nzambe oyo apesaka kimya.” (Rom. 15:33) Kanisá nyonso oyo Yehova asalá mpo tókoka kozala na kimya elongo na ye. Lokola tozali bakitani ya Adama ná Eva, tosalaka masumu, mpe tobongi kozwa “lifuti oyo lisumu ezali kofuta.” (Rom. 6:23) Kasi, lokola alingaka biso mingi, Yehova azwaki ebongiseli mpo na kobikisa biso. Atindaki Mwana na ye ya bolingo uta na likoló mpo abotama moto ya kokoka. Mpe Yesu andimaki kosala yango. Atikaki banguna ya Nzambe báboma ye. (Yoa. 10:17, 18) Yehova asekwisaki Mwana na ye mpo na bomoi na likoló. Kuna na likoló, Yesu alakisaki Tata na ye motuya ya makila oyo asopaki, oyo ekozala lisiko mpo na kobikisa na liwa ya seko, basumuki oyo babongoli motema.—Tángá Baebre 9:14, 24.
5, 6. Ndenge nini makila ya Yesu oyo esopanaki esalisi bato bákóma na boyokani ya kimya elongo na Nzambe?
5 Mpo na lisumu, bato bakómaki banguna ya Nzambe. Mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki esalisi bato ya masumu na nini? Yisaya 53:5 elobi boye: “Etumbu oyo esengelaki mpo na kimya na biso ezalaki likoló na ye, mpe mpo na bampota na ye tobiki.” Na esika bámonana banguna ya Nzambe, bato ya botosi bakoki sikoyo kozala na kimya elongo na ye. “Mpo na [Yesu] tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami mabunga na biso.”—Ef. 1:7.
6 Biblia elobi mpo na Yesu ete: “Nzambe amonaki malamu ete nyonso oyo etondi kotonda efanda na kati na ye.” Elingi koloba ete Nzambe asalelaka Yesu mingi mpo na kokokisa mokano na ye. Mpe mokano ya Nzambe ezali nini? Ezali ya ‘kozongisa lisusu boyokani kati na ye ná biloko mosusu nyonso, ndenge atye kimya na lisalisi ya makila oyo [Yesu Kristo] asopaki.’ “Biloko mosusu nyonso” oyo Nzambe azongisi na boyokani ya kimya elongo na ye ezali “biloko oyo ezali na likoló” mpe “biloko oyo ezali na mabele.” Biloko yango nini?—Tángá Bakolose 1:19, 20.
7. “Biloko oyo ezali na likoló” mpe “biloko oyo ezali na mabele” ezali banani?
7 Mpo na mbeka ya Yesu, bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘batángami bayengebene’ lokola bana ya Nzambe, mpe ‘bazali na kimya elongo na Nzambe.’ (Tángá Baroma 5:1.) Biblia ebengi bango “biloko oyo ezali na likoló” mpo bazali na elikya ya kokende na likoló mpe “bakoyangela mabele” mpe bakozala banganga-nzambe. (Em. 5:10) Nzokande, “biloko oyo ezali na mabele” ezali bato oyo babongoli motema, oyo nsukansuka, bakozwa bomoi ya seko na mabele.—Nz. 37:29.
8. Komanyola ndakisa ya Yehova esengeli kotinda yo osala nini?
8 Maloba ya Paulo epai ya bakristo ya Efese oyo batyamaki mafuta na elimo emonisi botɔndi monene oyo azalaki na yango mpo na lisiko. Alobaki ete: “Nzambe, oyo atondi mpenza na motema mawa, . . . azongisaki biso na bomoi elongo na Kristo, na ntango mpenza tozalaki naino bakufi na kati ya mabunga—na boboto monene bobikisami.” (Ef. 2:4, 5) Tózala na elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabele, biso nyonso tozali na botɔndi mingi mpo na motema mawa mpe boboto monene ya Nzambe. Tozalaka na botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova asalá mpo biso bato tózala na kimya elongo na ye. Ntango mosusu tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kobebisa kimya na lisangá. Na ntango wana, tosengeli komanyola ndakisa ya Nzambe mpe yango ekotinda biso tóluka kobatela kimya na bandeko na biso.
Ndakisa oyo Abrahama ná Yisaka batikelá biso
9, 10. Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azali moto oya atyaka kimya?
9 Mpo na Abrahama, Biblia elobi boye: “‘Abrahama andimelaki Yehova, mpe batángaki ye moyengebene,’ mpe akómaki kobengama ‘moninga ya Yehova.’” (Yak. 2:23) Kondima ya Abrahama emonanaki polele na ndenge azalaki kobatela kimya na basusu. Na ndakisa, lokola bitonga mpe bibwɛlɛ na ye ekómaki mingi, matata ebimaki kati na bakɛngɛli ya bibwɛlɛ na ye ná baoyo ya Lota, mwana ya ndeko na ye. (Eba. 12:5; 13:7) Mpo na kosilisa matata yango, esɛngaki kaka Abrahama akabwana na Lota. Abrahama asalaki nini na likambo wana ya mpasi? Amonaki te ete lokola ye nde mokóló, mpe azali na boyokani malamu na Nzambe asengeli kozwa ekateli ya nsuka. Amonisaki nde ete alingaki kobatela kimya na mwana ya ndeko na ye.
10 Abrahama alobaki na Lota boye: “Nabondeli yo, koswana ekoba kozala te kati na ngai ná yo mpe kati na bakɛngɛli na ngai ná bakɛngɛli na yo, mpo biso tozali bandeko.” Abakisaki boye: “Mokili yango mobimba ezali liboso na yo te? Nabondeli yo, kabwaná na ngai. Soki yo okei na lobɔkɔ ya mwasi, boye ngai nakokende na lobɔkɔ ya mobali; kasi soki yo okei na lobɔkɔ ya mobali, boye ngai nakokende na lobɔkɔ ya mwasi.” Lota aponaki mokili oyo ezali na mabele oyo ebotaka mingi, kasi Abrahama akangelaki ye nkanda te. (Eba. 13:8-11) Toyebi yango mpo na nsima, ntango banguna bakangaki Lota, Abrahama akakatanaki te kokende kobikisa ye.—Eba. 14:14-16.
11. Ndenge nini Abrahama alukaki kobatela kimya na Bafilistia oyo bazalaki kofanda pene na ye?
11 Kanisá mpe ndenge Abrahama alukaki kobatela kimya na bato ya Filistia oyo bazalaki kofanda pene na ye na mokili ya Kanana. Bafilistia “babɔtɔlaki na nko” libulu moko ya mai oyo basaleli ya Abrahama batimolaki na Beere-sheba. Ye moto abikisaki mwana ya ndeko na ye na mabɔkɔ na bakonzi minei oyo bakangaki ye, akosala nini na likambo ya boye? Na esika abundisa bango mpe abɔtɔla libulu yango ya mai, Abrahama afandaki nyɛɛ. Nsima ya mikolo, mokonzi ya Bafilistia ayaki epai ya Abrahama mpo básala kondimana ya kimya. Abrahama andimaki ete akozala na boboto mpo na bakitani na ye. Nsima na yango nde Abrahama ayaki kolobela likambo ya libulu ya mai oyo babɔtɔlaki ye. Mokonzi ayokaki mpasi na likambo wana, mpe azongiselaki Abrahama libulu na ye ya mai. Mpe Abrahama akobaki kofanda mopaya na kimya na mokili yango.—Eba. 21:22-31, 34.
12, 13. (a) Ndenge nini Yisaka alandaki ndakisa ya tata na ye? (b) Ndenge nini Yehova apambolaki ezaleli ya Yisaka ya kolinga kimya?
12 Yisaka mpe azalaki kolinga kimya lokola tata na ye Abrahama. Yango emonani polele na ndenge oyo asalaki na Bafilistia. Mpo na nzala oyo ekɔtaki na mboka, Yisaka alongolaki libota na ye na Beere-lahai-royi, oyo ezalaki na mokili ekauká ya Negebe, mpe amemaki yango na Gerare, mokili ya Bafilistia oyo ezalaki kobota mingi. Kuna, Yehova apambolaki Yisaka mpe bilanga ná bibwɛlɛ na ye ebotaki mingi. Bafilistia babandaki koyokela ye likunya. Lokola balingaki te ete akóma na bozwi mingi lokola tata na ye, Bafilistia bazipaki mabulu ya mai oyo basaleli ya Abrahama batimolaki na mokili yango. Nsukansuka, mokonzi ya Bafilistia ayebisaki Yisaka ete: “Longwá epai na biso.” Mpo na kobatela kimya, Yisaka andimaki.—Eba. 24:62; 26:1, 12-17.
13 Ntango Yisaka akendaki kotya kaa na ye mwa mosika, babateli ya mpate na ye batimolaki libulu mosusu ya mai. Babateli ya mpate ya Bafilistia balobaki ete mai ezalaki ya bango. Ndenge moko na tata na ye Abrahama, Yisaka abundaki te mpo na libulu ya mai. Atindaki nde bato na ye bátimola libulu mosusu. Bafilistia balobaki lisusu ete wana mpe ezali ya bango. Mpo na koluka kimya, na mbala oyo mpe Yisaka alongolaki libota na ye wana ná biloko nyonso oyo azalaki na yango. Kuna mpe basaleli na ye batimolaki libulu ya mai mpe Yisaka abengaki yango Rehobote. Na nsima, akendaki na mokili ya Beere-sheba, epai mabele ezalaki kobota mingi; kuna, Yehova apambolaki ye mpe alobaki na ye boye: “Kobanga te, mpamba te nazali elongo na yo, mpe nakopambola yo mpe nakosala ete momboto na yo ezala mingi mpo na Abrahama mosaleli na ngai.”—Eba. 26:17-25.
14. Ndenge nini Yisaka amonisaki ete azali moto oyo atyaka kimya ntango mokonzi ya Bafilistia alukaki kosala kondimana ya kimya elongo na ye?
14 Na ntembe te, Yisaka azalaki na makasi ya kobunda mpo na lotomo na ye ya kosalela mabulu nyonso ya mai oyo basaleli na ye batimolaki. Mokonzi ya Bafilistia ná bankumu na ye bayaki kotala Yisaka na Beere-sheba mpe balukaki kosala kondimana ya kimya elongo na ye; balobaki boye: “Tomoni ya solo ete Yehova azali elongo na yo.” Kasi, mpo na koluka kimya, Yisaka amonaki malamu akende na ye esika mosusu, na esika abunda. Na mbala oyo mpe, Yisaka amonisaki ete azali moto oyo atyaka kimya. Lisolo eyebisi biso boye: “Asalelaki [bapaya na ye] fɛti mpe balyaki mpe bamɛlaki. Na ntɔngɔ oyo elandaki, balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe balapelanaki ndai. Nsima na yango, Yisaka atikaki bango bákende . . . na kimya.”—Eba. 26:26-31.
Ndakisa oyo Yozefe atikelá biso
15. Mpo na nini bayaya ya Yozefe bazalaki kokoka te koloba na ye na kimya?
15 Ntango Yakobo, mwana ya Yisaka, akolaki, azalaki moto oyo “azangi mbeba.” (Eba. 25:27) Ndenge tomonaki yango na ebandeli, Yakobo alukaki kotya kimya elongo na ndeko na ye Esau. Na ntembe te, Yakobo amekolaki ndakisa yango epai ya tata na ye Yisaka. Bongo bana ya Yakobo? Na bana na ye ya mibali 12, Yozefe azalaki mwana oyo Yakobo alingaki mingi koleka. Yozefe azalaki mwana ya botosi mpe ya limemya oyo azalaki koluka mpenza bolamu ya tata na ye. (Eba. 37:2, 14) Kasi, bayaya ya Yozefe bakómaki koyokela ye zuwa makasi na boye ete bazalaki kokoka te koloba na ye na kimya. Na motema mabe, batɛkaki Yozefe na boombo mpe bakosaki tata na bango ete nyama ya zamba elei ye mpe andimaki.—Eba. 37:4, 28, 31-33.
16, 17. Ndenge nini makambo oyo Yozefe asalelaki bandeko na ye emonisaki ete alingaka kimya?
16 Kasi, Yehova apambolaki Yozefe. Na nsima, Yozefe akómaki mokonzi na Ezipito—moto ya mibale nsima ya Farao. Ntango nzala moko makasi ememaki bandeko ya Yozefe na Ezipito, bayebaki Yozefe lisusu te, mbala mosusu mpo na bilamba na ye ya bakonzi ya Ezipito. (Eba. 42:5-7) Ezalaki mpasi te mpo Yozefe azongisela bandeko na ye mabe oyo basalaki ye mpe tata na bango! Kasi, na esika aluka kozongisa mabe na mabe, Yozefe alukaki kotya kimya. Ntango emonanaki polele ete bandeko na ye babongoli motema, Yozefe amilakisaki epai ya bango, mpe alobaki boye: “Bóyoka mpasi na motema te mpe bóyoka nkanda te na ndenge botɛkaki ngai awa; mpamba te ezali mpo na kobatela bomoi nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.” Na nsima, apwɛpwaki bandeko na ye nyonso mpe alelaki na nkingo na bango.—Eba. 45:1, 5, 15.
17 Nsima ya liwa ya tata na bango Yakobo, bandeko ya Yozefe bakanisaki ete mbala mosusu akozongisela bango mabe. Ntango bayebisaki ye ndenge bazalaki kobanga, Yozefe “abandaki kolela” mpe ayebisaki bango ete: “Bóbanga te. Ngai moko nakokoba kopesa bino mpe bana na bino ya mike bilei.” Yozefe, moto oyo azalaki kolinga kimya, “abɔndisaki bango mpe alobaki na bango na ndenge ya kokitisa motema.”—Eba. 50:15-21.
“Ekomamaki mpo eteya biso”
18, 19. (a) Mateya nini ozwi na bandakisa ya bato oyo tolobeli na lisolo oyo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Paulo akomaki boye: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Rom. 15:4) Mateya nini tozwi nsima ya kotalela ndakisa oyo eleki malamu mpo na biso, Yehova, mpe bandakisa mosusu ya Abrahama, Yisaka, Yakobo, mpe Yozefe?
19 Soki tokanisi na botɔndi makambo oyo Yehova asalá mpo na kobongisa boyokani oyo ebebaki kati na ye ná bato ya masumu, tokolinga kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela kimya elongo na basusu. Ndakisa ya Abrahama, Yisaka, Yakobo, mpe Yozefe emonisi ete baboti bakoki mpenza kosalisa bana na bango. Masolo yango emonisi mpe ete Yehova apambolaka milende ya baoyo balukaka kotya kimya. Yango esalisi biso tómona ntina oyo Paulo akomaki ete Yehova azali “Nzambe oyo apesaka kimya.” (Tángá Baroma 15:33; 16:20.) Lisolo oyo elandi ekomonisa ntina oyo Paulo alobaki ete tosengeli kolanda kimya mpe ndenge oyo tokoki kozala bato oyo batyaka kimya.
Oyekoli makambo nini?
• Yakobo asalaki nini mpo na koluka kimya ntango alingaki kokutana na Esau?
• Likambo oyo Yehova asalá mpo bato bázala na kimya elongo na ye etindi yo osala nini?
• Oyekoli nini na ndakisa ya Abrahama, Yisaka, Yakobo, mpe Yozefe?
[Bililingi na lokasa 23]
Likambo nini ya ntina mingi Yakobo asalaki mpo na kozongisa kimya ná Esau?