Tósepelaka elongo na basusu!
LELO oyo, ezali mpasi mingi kozala na esengo ya solosolo. Bato mingi bamonaka ete ezali mpasi mingi koyebisa basusu makambo oyo ekoki kopesa esengo. Bomoi ya lelo, mingimingi na bingumba ya minene, ezali kosala ete bato bámiyoka ete bazali na moto te mpe bákanisa ete bazali na mposa ya moto te.
Profesɛrɛ moko na nkombo Alberto Oliverio alobi boye: “Bato mingi bayokaka ete bazali na moto te ya kokipe bango. Ntembe ezali te ete na bingumba ya minene ezalaka mpasi te moto amona ete moto moko te akipaka ye. Mbala mingi tobosanaka moninga oyo tosalaka na ye na biro moko, moto oyo afandaka pene na biso, to moto oyo atɛkaka biloko na magazini epai tokendeke kosomba biloko.” Mbala mingi komiyoka ndenge wana esalaka ete moto akóma konyokwama na makanisi.
Kasi bandeko na biso bakristo basalaka bongo te mpe bazalaka na makanisi ya ndenge wana te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bósepelaka ntango nyonso.” (1 Tes. 5:16) Tozali na bantina mingi ya kozala na esengo mpe ya kosepela elongo na basusu. Tosambelaka Yehova, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló; tokangaka ntina ya mateya ya solo oyo euti na Biblia; tozali na elikya ete tokobika mpe tokozwa bomoi ya seko; tokoki mpe kosalisa bato mosusu bázwa mapamboli yango.—Nz. 106:4, 5; Yir. 15:16; Rom. 12:12.
Bakristo ya solo bazalaka esengoesengo mpe bakabolaka esengo na bango ná bamosusu. Na yango, tokokamwa te ndenge Paulo akomelaki Bafilipi boye: “Nazali na esengo mpe nazali kosepela elongo na bino nyonso. Kasi bino mpe ndenge moko bózala na esengo mpe bósepela elongo na ngai.” (Flp. 2:17, 18) Awa, atako Paulo abimisi maloba mingi te, alobeli mbala mibale kozala na esengo mpe kosepela elongo na basusu.
Ya solo, bakristo basengeli kokeba mpo bálanda te momeseno ya koboya kokipe basusu. Moto oyo amitangoli na bandeko akoki te kosepela elongo na baninga na ye bandimi. Na yango, ndenge nini tokoki kolanda toli ya Paulo ya ‘kokoba kosepela na kati ya Nkolo’ elongo na bandeko na biso?—Flp. 3:1.
Tósepela elongo na baninga na biso bakristo
Ntango Paulo akomelaki Bafilipi mokanda, mbala mosusu azalaki na bɔlɔkɔ na Roma; bakangaki ye mpo azalaki kosakola. (Flp. 1:7; 4:22) Atako azalaki na bɔlɔkɔ, esengo na ye mpo na mosala ya kosakola ekitaki te. Kutu, asepelaki ndenge asalelaki Yehova bomoi na ye mobimba mpe azalaki “komipesa lokola likabo ya masanga.” (Flp. 2:17) Makanisi ya Paulo emonisi ete kozala na esengo etali te makambo oyo ezali kokómela yo. Atako azalaki na bɔlɔkɔ, alobaki boye: “Nakokoba kosepela lisusu.”—Flp. 1:18.
Paulo afungolaki lisangá na Filipi mpe azalaki kolinga bandeko ya lisangá yango mingi mpenza. Ayebaki ete soki akaboli na bango esengo oyo azwaki na mosala ya Yehova, ekolendisa mpe bango. Na yango, akomaki boye: “Sikoyo, bandeko, nalingi bóyeba ete makambo na ngai etamboli malamu mpo nsango malamu ekende liboso, bongo minyɔlɔlɔ na ngai eyebani polelepolele na Bakɛngɛli nyonso ya Mokonzi mpe na bato mosusu nyonso ete nakangamaki mpo na kosalela Kristo.” (Flp. 1:12, 13) Ntango Paulo ayebisaki Bafilipi makambo wana oyo akutanaki na yango, elendisaki bango. Epesaki ye esengo. Bandeko ya Filipi mpe bazangaki te kosepela elongo na Paulo. Kasi, mpo básepela elongo na Paulo, basengelaki te kolɛmba nzoto mpo Paulo azalaki na bɔlɔkɔ. Basengelaki kutu nde komekola ndakisa na ye. (Flp. 1:14; 3:17) Lisusu, Bafilipi bakokaki kokoba kobondela mpo na Paulo mpe kokokisa bamposa na ye na ndenge oyo bakoki.—Flp. 1:19; 4:14-16.
Biso mpe tomonisaka esengo lokola Paulo? Tosalaka makasi tómona makambo ya malamu oyo ezali na bomoi na biso mpe na mosala na biso ya bokristo? Ntango tozali esika moko na bandeko na biso bakristo, ezali malamu tólobelaka makambo kitoko oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola. Tosengeli kozela kaka te makambo ya mineneminene mpo tósepela. Mbala mosusu moto ayokaki nsango ya Bokonzi mpo tosalelaki maloba ya malamu mpo na kobanda lisolo. Mbala mosusu mpe tosalelaki vɛrsɛ moko mpe tosololaki malamu na moto moko boye. To mpe bato bayebaki biso ete tozali Batatoli ya Yehova kaka na komona biso, mpe yango ezalaki litatoli mpo bango. Koyebisa bandeko makambo ya ndenge wana ezali lolenge moko ya kosepela elongo na bango.
Batatoli ya Yehova mingi bamipimelaki makambo mosusu mpo na mosala ya kosakola mpe mingi bazali mpe kosala bongo lelo. Babongisi-nzela, bakɛngɛli-batamboli, bandeko ya Betele, bamisionɛrɛ, mpe bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga na mikili mosusu bamipesaka na mosala ya ntango nyonso mpe basepelaka ndenge bazali kosala bongo. Biso mpe tozalaka na esengo mpe tosepelaka elongo na bango? Soki bongo, tómonisaka botɔndi mpo bazali “baninga na [biso] ya mosala mpo na bokonzi ya Nzambe.” (Kol. 4:11) Ntango tozali elongo na bandeko na makita ya lisangá to na mayangani ya minene, tokoki kolendisa bango mingi. Tokoki mpe komekola molende na bango. Mpe tokoki koluka koyamba bango, mbala mosusu kolya elongo na bango mpo tózwa “libaku” ya koyoka makambo oyo bakutanaki na yango mpe masolo ya kolendisa.—Flp. 4:10.
Tósepela elongo na baoyo bazali na komekama
Lokola Paulo ayikaki mpiko na minyoko mpe alongaki komekama, esalisaki ye atikala sembo epai ya Yehova. (Kol. 1:24; Yak. 1:2, 3) Ayebaki ete mbala mosusu bandeko ya Filipi mpe bakokutana na komekama ya ndenge wana. Azalaki na esengo ya koyeba ete soki ye moko ayiki mpiko na komekama, yango ekoki kolendisa bandeko yango, mpe asepelaki elongo na bango. Na yango, akomaki boye: “Bozwi libaku malamu, kaka ya kondimela Kristo te, kasi mpe ya konyokwama mpo na ye. Mpo bino mpe bozali kobunda etumba lokola oyo bomonaki ngai nazali kobunda mpe lokola oyo bozali sikoyo koyoka mpo na ngai.”—Flp. 1:29, 30.
Ndenge moko mpe lelo oyo, bato mosusu bazali konyokola bakristo mpo na mosala na bango ya kosakola. Ntango mosusu botɛmɛli ezalaka makasi, kasi mbala mingi ezalaka ya nsense. Ekoki kozala bapɛngwi bazali kokosela biso makambo, bandeko ya libota bazali kotɛmɛla biso to baninga ya mosala to ya kelasi bazali kosɛka biso. Yesu alobaki ete tosengeli kokamwa te to kolɛmba nzoto te mpo na komekama ya ndenge wana. Tosengeli kutu nde kosepela mpo na yango. Alobaki boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.”—Mat. 5:11, 12.
Tosengeli kobanga to koyoka nsɔmɔ te ntango toyoki ete bandeko na biso bazali konyokwama makasi na mikili mosusu. Kasi tosengeli nde kosepela na ndenge bazali koyika mpiko. Tokoki kobondela mpo na bango, kosɛnga Yehova asalisa bango bábatela kondima na bango mpe báyika mpiko. (Flp. 1:3, 4) Atako tokoki kosala makambo mosusu te mpo na bandeko yango ya bolingo, tokoki kosalisa bandeko ya lisangá na biso oyo bazali na mikakatano. Tokoki kotyela bango likebi mpe kosalisa bango. Ntango mosusu, tokoki kobengisa bango báya koyangana elongo na biso na losambo na biso ya libota, to kobima na bango na mosala ya kosakola to mpe kolekisa mwa ntango elongo na bango mpo na kominanola.
Tozali na makambo mingi oyo tokoki kosepela elongo na bandeko! Tóboya elimo ya mokili ya komitangola na basusu mpe tókoba kokabola esengo na biso na bandeko. Soki tosali bongo, tokosala ete lisangá ezala na bolingo mpe na bomoko; mpe tokosepela mpenza ndenge tozali na kati ya lisangá ya bandeko. (Flp. 2:1, 2) Ya solo, ‘ntango nyonso tósepelaka na kati ya Nkolo,’ mpamba te Paulo alendisi biso boye: “Nakoloba lisusu ete: Bósepelaka!”—Flp. 4:4.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 6]
Mabele: Na ndingisa ya Replogle Globes