Tótya motema epai na Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
“Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama, Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 KO. 1:3.
1. Moto nyonso azalaka na mposa ya nini?
MOTO nyonso azalaka na mposa bábɔndisa ye. Mwana moke alelaka mpo na komonisa ete azali na mposa bábɔndisa ye. Mbala mosusu alingi bámema ye to azali na nzala. Ata ntango tokómi mikóló, mbala mingi tozalaka na mposa bábɔndisa biso. Ezalaka bongo mingimingi ntango tokutani na mikakatano.
2. Nini emonisi ete Yehova abɔndisaka bato oyo batyelaka ye motema?
2 Bato ya libota na biso to baninga na biso bakoki kobɔndisa biso na makambo mosusu. Kasi, na makambo mosusu moto akokoka te. Kaka Nzambe nde akoki kobɔndisa biso ata soki mpasi na biso ezali ya ndenge nini. Liloba na ye eyebisi biso boye: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye, . . . mpe akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.” (Nz. 145:18, 19) Biblia elobi mpe ete “miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.” (Nz. 34:15) Kasi, mpo Nzambe asalisa biso mpe abɔndisa biso, tosengeli kotyela ye motema. Davidi amonisaki yango polele ntango ayembaki ete: “Mpo na moto nyonso oyo atutami, Yehova akokóma esika ya kobombana oyo etombwaná, esika ya kobombana oyo etombwaná na ntango ya mpasi. Mpe baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema, mpo okotika ata moke te baoyo balukaka yo, Ee Yehova.”—Nz. 9:9, 10.
3. Yesu alobaki nini mpo na komonisa ete Yehova alingaka basaleli na ye?
3 Yehova azwaka basaleli na ye na motuya mingi. Yesu amonisaki yango polele ntango alobaki boye: “Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mitano na mbongo ya bibende mibale ya motuya moke, boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te. Kasi ata nsuki nyonso ya mitó na bino etángami. Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Luka 12:6, 7) Na nzela ya mosakoli Yirimia, Yehova ayebisaki ekólo Yisraele boye: “Nalingá yo na bolingo ya ntango oyo etyami ndelo te. Yango wana nabendi yo na motema boboto.”—Yir. 31:3.
4. Mpo na nini tokoki kotya motema na bilaka ya Yehova?
4 Kotyela Yehova motema mpe kondimela bilaka na ye ekoki kobɔndisa biso na ntango ya mpasi. Na yango, tosengeli kotyela Nzambe motema ndenge moko na Yosua, oyo alobaki boye: “Na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.” (Yos. 23:14) Lisusu, tokoki kondima ete ata soki sikoyo tozali konyokwama mpo na mikakatano, “Nzambe azali sembo” mpe akosundola ata mokolo moko te basaleli na ye ya sembo.—Tángá 1 Bakorinti 10:13.
5. Mpo na nini biso mpe tokoki kobɔndisa basusu?
5 Ntoma Paulo abengaki Yehova “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” “Kobɔndisa” elimboli kokitisa moto oyo azali na mpasi to na mawa motema. Elingi koloba kolendisa ye mpo mawa na ye ekita. Yango mpenza nde Yehova asalaka. (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Eloko moko te to moto moko te akoki kopekisa Tata na biso ya likoló asala likambo. Na yango, azali na nyonso oyo esengeli mpo na kobɔndisa bato oyo balingaka ye. Biso mpe na ngala na biso, tokoki kobɔndisa bandeko na biso oyo “bazali na ndenge nyonso ya bolɔzi.” Tokoki kosala yango mpo na kobɔndisama oyo biso moko “tobɔndisami na Nzambe.” Tomoni mpenza ete moto moko te akoki kobɔndisa biso koleka Yehova!
Makambo oyo ebimiselaka biso bampasi
6. Tángá mwa makambo oyo epesaka bato mpasi.
6 Tozalaka na mposa ya libɔndisi na makambo mingi. Likambo moko oyo epesaka biso mawa mingi ezali liwa ya moto oyo tolingaki, mingimingi molongani to mwana. Moto mosusu akoki kozala na mposa ya libɔndisi mpo bazali konyokola ye mpo azali moto ya ekólo mosusu, to mpo bazali kokanisela ye mabe. Longola yango, moto akoki kozala na mposa ya libɔndisi mpo na maladi, bobange, bobola, matata na libala, to mpo na makambo mosusu ya mabe oyo ezali kosalema na mokili.
7. (a) Na ntango ya mpasi makasi, tozalaka na mposa ya nini? (b) Yehova akoki kosala nini mpo na kobikisa “motema oyo ebukani mpe etutami”?
7 Na ntango ya mpasi, tokoki kozala na mposa bábɔndisa biso mpo na mpasi na motema, na makanisi, na mayoki, na nzoto to mpe mpo kondima na biso ebandi kolɛmba. Tólobela naino motema. Liloba ya Nzambe emonisi ete motema na biso ekoki ‘kobukana mpe kotutama.’ (Nz. 51:17) Na ntango yango, Yehova akoki kosalisa biso mpamba te “abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.” (Nz. 147:3) Ata na ntango ya mpasi makasi, Nzambe akoki kokitisa mpasi ya motema na biso soki tobondeli ye na kondima nyonso mpe tozali kotosa mibeko na ye.—Tángá 1 Yoane 3:19-22; 5:14, 15.
8. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso ntango makanisi na biso etungisami?
8 Lokola tomekamaka na makambo ya ndenge na ndenge, makanisi na biso ekoki kotungisama. Mpo na yango, tokoki kozala na mposa ya libɔndisi. Na makasi na biso moko, ntango mosusu tokokoka te kobundisa makambo yango oyo emeki kondima na biso. Kasi mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.” (Nz. 94:19) Paulo mpe akomaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (Flp. 4:6, 7) Kotánga Biblia mpe komanyola yango ekoki kobɔndisa biso mingi ntango makanisi na biso etungisami.—2 Tim. 3:15-17.
9. Nini ekoki kosalisa biso ntango tokómi na mayoki oyo ebongi te?
9 Na bantango mosusu, tokoki kolɛmba mpenza nzoto tii kokóma na mayoki oyo ebongi te. Mbala mosusu tozali komona ete tokokoka te kosala likambo moko oyo Biblia esɛngi biso to mokumba moko boye na lisangá. Na ntango wana mpe Yehova akoki kobɔndisa biso mpe kosalisa biso. Tózwa ndakisa: Ntango Yosua azwaki mokumba ya kokamba Bayisraele mpo na kobunda na mabota ya nguya, Moize ayebisaki bango: “Bózala na mpiko mpe na makasi. Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te liboso na bango, mpamba te Yehova Nzambe na yo nde azali kotambola elongo na yo. Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te.” (Mib. 31:6) Na lisalisi ya Yehova, Yosua akɔtisaki libota ya Nzambe na Mokili ya Ndaka mpe alongaki banguna na ye nyonso. Liboso na yango, Yehova asalisaki mpe Moize ndenge wana na Mbu Motane.—Kob. 14:13, 14, 29-31.
10. Soki mikakatano epesi biso mpasi na nzoto, nini ekoki kosalisa biso?
10 Mikakatano ekoki kopesa biso mpasi na nzoto. Ya solo, tokozala nzoto makasi soki tozali kolya malamu, kopema mingi, kosala ngalasisi mpe komibatela pɛto. Kokanisa makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya ekoki mpe kosalisa biso tózala nzoto makasi. Na yango, ntango tozali konyokwama mpo na likambo moko ya mpasi, tókanisa makambo oyo ekómelaki Paulo mpe maloba na ye ya kolendisa ete: “Tokamolami na ndenge nyonso, kasi tofinani te tii tózanga koningana; tosili mayele, kasi tozangi mwa nzela ya kobima te; tozali konyokwama, kasi tosundolami te; tozali kobambama na nse, kasi tobomami te.”—2 Ko. 4:8, 9.
11. Tokoki kosala nini soki tomoni ete kondima na biso ebandi kolɛmba?
11 Mikakatano mosusu ekoki kobebisa kondima na biso. Na ntango yango mpe Yehova akoki kosalisa biso. Liloba na ye eyebisi biso ete: “Yehova azali kosunga baoyo nyonso bazali kokwea, mpe azali kotombola baoyo nyonso bagumbami.” (Nz. 145:14) Soki tomoni ete kondima na biso ebandi kolɛmba, tosengeli kosɛnga bankulutu básalisa biso. (Yak. 5:14, 15) Mpe kokanisa ntango nyonso elaka ya bomoi ya seko oyo Biblia epesi biso ekoki kopesa biso makasi ntango kondima na biso emekami.—Yoa. 17:3.
Bandakisa ya bato oyo Nzambe abɔndisaki
12. Ndenge nini Yehova abɔndisaki Abrahama?
12 Mokomi ya Nzembo 119 alobaki na Yehova boye: “Kanisá lisusu liloba olobaki na mosaleli na yo, oyo ozelisi ngai mpo na yango. Yango nde libɔndisi na ngai na mpasi na ngai, mpo liloba na yo ebateli ngai na bomoi.” (Nz. 119:49, 50) Lelo oyo tozali na Biblia, oyo etondi na bandakisa ya bato oyo Yehova abɔndisaki. Na ndakisa, ekoki kozala ete Abrahama amitungisaki ntango ayebaki ete Yehova alingi koboma Sodoma ná Gomora. Atunaki Nzambe boye: “Okoboma mpenza moyengebene elongo na moto mabe?” Yehova abɔndisaki Abrahama na ndenge ayebisaki ye ete soki bayengebene bazali ata 50, akobebisa engumba Sodoma te. Kasi Abrahama atunaki ye mbala mitano mobimba ete: Bongo soki bayengebene bazali kaka 45? to 40, to 30, to 20, to mpe 10? Na mbala nyonso wana, Yehova amonisaki motema molai mpe boboto; ayebisaki Abrahama ete soki ezali bongo, akoboma Sodoma te. Atako engumba yango ezalaki na bayengebene ata 10 te, Yehova abatelaki Lota ná bana na ye ya basi.—Eba. 18:22-32; 19:15, 16, 26.
13. Ndenge nini Hana amonisaki ete atyelaki Yehova motema?
13 Hana, mwasi ya Elekana azalaki mpenza na mposa ya mwana. Kasi, azalaki ekomba mpe yango ezalaki kopesa ye mpasi mingi. Abondelaki Yehova mpo na likambo yango, mpe Nganga-nzambe monene Eli ayebisaki ye boye: “Tiká Nzambe ya Yisraele akokisela yo lilɔmbɔ na yo.” Yango ebɔndisaki Hana, “mpe elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.” (1 Sa. 1:8, 17, 18) Hana atyelaki Yehova motema; atikaki makambo nyonso na mabɔkɔ na ye. Atako ayebaki te soki makambo ekosuka ndenge nini, Hana akómaki na kimya na motema. Nsima ya mikolo, Yehova ayanolaki libondeli na ye. Hana azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali; apesaki ye nkombo Samwele.—1 Sa. 1:20.
14. Mpo na nini Davidi azalaki na mposa ya libɔndisi, mpe alukaki yango epai ya nani?
14 Moto mosusu oyo Nzambe abɔndisaki ezali Mokonzi Davidi. Lokola Yehova “amonaka ndenge motema ezali,” ntango aponaki Davidi mpo akóma mokonzi ya Yisraele, Yehova ayebaki ete Davidi azalaki kolinga kosala oyo ezali sembo mpe ete alingaki losambo ya solo. (1 Sa. 16:7; 2 Sa. 5:10) Kasi na nsima, Davidi asalaki ekobo na Bate-sheba mpe abomisaki mobali na ye mpo na koluka kobomba lisumu yango. Ntango Davidi ayaki komona ete asali lisumu moko monene, abondelaki Yehova boye: “Longolá misala na ngai ya kobuka mibeko na kolanda motema mawa oyo otondi na yango. Sukolá ngai mobimba na libunga na ngai, mpe pɛtolá ngai na lisumu na ngai. Mpo ngai moko nayebi misala na ngai ya kobuka mibeko, mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.” (Nz. 51:1-3) Davidi abongolaki mpenza motema, mpe Yehova alimbisaki ye. Nzokande, Davidi asengelaki komona mpasi mpo na masumu oyo asalaki. (2 Sa. 12:9-12) Atako bongo, motema mawa ya Yehova ezalaki kobɔndisa Davidi, oyo azalaki moto ya komikitisa.
15. Mwa moke liboso Yesu akufa, ndenge nini Yehova asalisaki ye?
15 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, akutanaki na makambo mingi ya mpasi. Nzambe atikaki ete kondima na ye emekama na makambo yango, kasi Yesu abatelaki bosembo na ye. Azalaki moto ya kokoka, atyelaki Yehova motema ntango nyonso mpe atosaki bokonzi na Ye. Mwa moke liboso bátɛka ye mpe báboma ye, Yesu abondelaki Yehova boye: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” Na nsima, anzelu moko abimelaki ye mpe alendisaki ye. (Luka 22:42, 43) Na ntango wana, Nzambe abɔndisaki Yesu, alendisaki ye mpe asalisaki ye na ndenge esengeli.
16. Ndenge nini Nzambe akoki kosalisa biso ntango balingi koboma biso mpo na kondima na biso?
16 Ata soki balingi koboma biso mpo na kondima na biso, Yehova akoki kosalisa biso; kutu akosalisa biso tótikala sembo epai na ye. Lisusu, tobɔndisamaka mpe na elikya ya lisekwa. Mpe tozelaka mpenza mokolo oyo liwa, monguna ya nsuka, “akosilisama makasi”! (1 Ko. 15:26) Yehova akosekwisa basaleli na ye ya sembo oyo bakufá, mpe bato mosusu oyo bazali na makanisi na ye. (Yoa. 5:28, 29; Mis. 24:15) Kondima ete lisekwa ekozala ebɔndisaka biso mpe epesaka biso makasi na ntango ya minyoko.
17. Ndenge nini Yehova akoki kobɔndisa biso ntango moto oyo tolingaka akufi?
17 Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete bandeko na biso oyo bakufá bakosekwa mpo na kozala na bomoi na mokili ya sika. Ata likambo moko te oyo ekoki kopesa mpasi ekozala kuna! Mpe basaleli ya Yehova oyo bazali “ebele mpenza ya bato” bakozala mpenza na esengo monene. Bakobika ntango mokili oyo ekobomama mpe bakozwa libaku ya koyamba mpe koteya bato oyo bakosekwa awa na mabele!—Em. 7:9, 10.
Mabɔkɔ ya Nzambe ezali na nse na biso
18, 19. Ndenge nini Nzambe abɔndisaki basaleli na ye oyo bazalaki na minyoko?
18 Moize akomelaki Bayisraele nzembo moko ya kolendisa mpe ya kobɔndisa. Na nzembo yango, alobaki boye: “Nzambe ya ntango ya kala azali esika ya komibomba, mpe mabɔkɔ oyo ezali koumela seko ezali na nse na yo.” (Mib. 33:27) Na nsima, mosakoli Samwele ayebisaki Bayisraele ete: “Bópɛngwa te, bótika kolanda Yehova te, mpe bosengeli kosalela Yehova na motema na bino mobimba. . . . Yehova akotika bato na ye te, mpo na nkombo na ye monene.” (1 Sa. 12:20-22) Soki tozali kosalela Yehova na bosembo, akosundola biso ata mokolo moko te. Akosalisa biso ntango nyonso oyo tozali na mposa ya lisalisi.
19 Na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi, Nzambe azali kosalisa bato na ye mpe kobɔndisa bango na ndenge esengeli. Lelo oyo, bandeko na biso ebele na mokili mobimba banyokwamaki mpe batyamaki na babolɔkɔ kaka mpo bazalaki kosalela Yehova. Bandakisa na bango emonisi ete na ntango ya mikakatano, Yehova abɔndisaka mpenza basaleli na ye. Na ndakisa, na mboka moko oyo kala ezalaki na Union soviétique, bakatelaki ndeko mobali moko etumbu ya mbula 23 ya bolɔkɔ mpo na kondima na ye. Kasi ata kuna na bolɔkɔ, bandeko basalaki nyonso mpo azwaka mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo ekoka kopesa ye makasi mpe kobɔndisa ye. Ndeko yango alobaki boye: “Na boumeli ya bambula yango, nayekolaki kotyela Yehova motema mpe apesaki ngai makasi.”—Tángá 1 Petro 5:6, 7.
20. Mpo na nini tokoki kondima mpenza ete Yehova akosundola biso te?
20 Ata soki tokoki kokutana na mikakatano nini na mikolo ezali koya, ekozala malamu tókanisa maloba oyo ya kobɔndisa: “Yehova akosundola bato na ye te.” (Nz. 94:14) Atako biso moko tozalaka na mposa bábɔndisa biso, biso mpe tozali na libaku monene ya kobɔndisa basusu. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, tokoki kobɔndisa baoyo bazali kolela na mokili oyo ya yikiyiki.
Okopesa eyano nini?
• Makambo nini ekoki kopesa biso mpasi?
• Ndenge nini Yehova abɔndisaka basaleli na ye?
• Soki balingi koboma biso, nini ekoki kobɔndisa biso?
[Etanda/Bililingi na lokasa 25]
MPO NA KOYIKA MPIKO NA MAKAMBO OYO ETUNGISI . . .
▪ motema Nz. 147:3; 1 Yoa. 3:19-22; 5:14, 15
▪ makanisi Nz. 94:19; Flp. 4:6, 7
▪ mayoki Kob. 14:13, 14; Mib. 31:6
▪ nzoto 2 Ko. 4:8, 9
▪ kondima Nz. 145:14; Yak. 5:14, 15