Ozali kongɛngisa nkembo ya Yehova?
“Lokola talatala, tozali kongɛngisa nkembo ya Yehova.”—2 KO. 3:18.
OKOPESA EYANO NINI?
Atako tozali bato ya masumu, ndenge nini tokoki kopesa Yehova nkembo?
Ndenge nini kobondela mpe koyangana na makita esalisaka biso tóngɛngisa nkembo ya Nzambe?
Nini ekoki kosalisa biso tókoba kopesa Yehova nkembo?
1, 2. Mpo na nini ebongi tókanisa ete tokoki komekola bizaleli ya Yehova?
MOTO nyonso akokanaka na baboti na ye ata na likambo moko. Yango wana, tokamwaka te soki toyoki moto alobi na mwana mobali moko ete: ‘Ozwá mpenza tata na bino.’ Moto mosusu mpe akoki koloba na mwana mwasi: ‘Soki namoni yo, nakanisaka mama na bino.’ Mbala mingi, bana bamekolaka makambo oyo bamonaka epai ya baboti na bango. Bongo biso? Tokoki nde komekola Yehova, Tata na biso ya likoló? Atako tomoná ye naino te, tokoki komona bizaleli na ye kitoko ntango tozali koyekola Liloba na ye, tozali kotala biloko oyo akelá, mpe tozali komanyola makambo oyo tozali kotánga na Biblia, mingimingi maloba mpe misala ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe. (Yoa. 1:18; Rom. 1:20) Na yango, tokoki mpenza kongɛngisa nkembo ya Yehova.
2 Liboso Nzambe akela Adama ná Eva, ayebaki ete bato bakozala na likoki ya kosala mokano na ye, komekola bizaleli na ye, mpe kopesa ye nkembo. (Tángá Ebandeli 1:26, 27.) Lokola tozali bakristo, tosengeli komekola bizaleli ya Nzambe oyo akelá biso. Soki tosali bongo, tokozala na libaku monene ya kongɛngisa nkembo ya Nzambe, tózala mindɛlɛ to baindo, bato batángá mingi to te, to mpe bato ya ekólo nini. Mpo na nini? Mpamba te “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”—Mis. 10:34, 35.
3. Bakristo bayokaka ndenge nini ntango basalelaka Yehova?
3 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bangɛngisaka nkembo ya Yehova. Ntoma Paulo, oyo azali moko ya bakristo yango, akomaki boye: “Biso nyonso, na bilongi oyo ezipwami, lokola talatala, tozali kongɛngisa nkembo ya Yehova, tozali kobongwana mpo na kokóma na motindo ya elilingi wana moko, uta na nkembo tii na nkembo.” (2 Ko. 3:18) Ntango Moize autaki likoló ya Ngomba Sinai ná mabanga oyo ezalaki na Mibeko Zomi, elongi na ye ezalaki kongɛngangɛnga mpo autaki kosolola na Yehova. (Kob. 34:29, 30) Atako bakristo bakutaná naino te na likambo wana, mpe bilongi na bango engɛngaka te, bazalaka na esengo ntango bateyaka basusu makambo etali Yehova, bizaleli na ye, mpe mokano kitoko oyo azali na yango mpo na bato. Lokola talatala ya ebende oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe baninga na bango bampate mosusu bazali kongɛngisa nkembo ya Yehova na bomoi na bango mpe na mosala ya kosakola. (2 Ko. 4:1) Ongɛngisaka nkembo ya Yehova na etamboli ya sembo mpe na ndenge osakolaka sanza na sanza?
TOZALI NA MPOSA YA KONGƐNGISA NKEMBO YA YEHOVA
4, 5. (a) Tozali na etumba nini, oyo mpe Paulo azalaki na yango? (b) Ndenge nini lisumu ebebisi bomoi ya bato?
4 Lokola tozali basaleli ya Yehova, na ntembe te tozalaka na mposa ya kopesa Mozalisi na biso nkembo na makambo nyonso oyo tosalaka. Kasi, mbala mingi makambo oyo tolingaka kosala ezali yango te oyo tosalaka. Paulo mpe azalaki na mokakatano wana. (Tángá Baroma 7:21-25.) Mpo na komonisa ntina oyo tozali na etumba wana, Paulo akomaki boye: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Rom. 3:23) Ya solo, lokola Adama atikelá biso lisumu, biso nyonso tozali baombo na yango mpe lisumu ezali koyangela biso lokola mokonzi.—Rom. 5:12; 6:12.
5 Lisumu ezali nini? Ezali etamboli nyonso oyo eyokani te na bizaleli, banzela, mitinda mpe mokano ya Yehova. Lisumu ebebisaka boyokani ya moto ná Nzambe. Lisumu epekisaka biso tókokisa malamumalamu mokano ya Nzambe, kaka ndenge moto oyo abɛtaka litimbo akoki kobwaka mbanzi kasi ebɛti mpenzampenza te na esika oyo akanaki. Tokoki kosala lisumu na nko to kozanga ete tóyeba yango. (Mit. 15:27-31) Lisumu ekɔtelá mpenza bato mpe ekabolaka bango na Mozalisi na bango. (Nz. 51:5; Yis. 59:2; Kol. 1:21) Yango wana, bato mingi bazalaka na bomoi oyo eyokani ata moke te na mokano ya Yehova mpe bazangaka libaku monene ya kongɛngisa nkembo na ye. Ya solo mpenza, lisumu ezali maladi eleki mabe oyo bato bazali na yango.
6. Atako tozali bato ya masumu, ndenge nini tokoki kopesa Nzambe nkembo?
6 Atako tozali bato ya masumu, Yehova amonisi biso ete azali “Nzambe oyo apesaka elikya.” (Rom. 15:13) Na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, apesi biso likoki ya kolongwa na boombo ya lisumu. Soki tondimi mbeka yango, tokozala lisusu “baombo ya lisumu” te, kasi tokozala na likoki ya kongɛngisa nkembo ya Yehova. (Rom. 5:19; 6:6; Yoa. 3:16) Soki tobateli boyokani yango na Nzambe, akopambola biso sikoyo mpe na mikolo ezali koya, akokómisa biso bato ya kokoka mpe akopesa biso bomoi ya seko. Atako tozali naino bato ya masumu, tozali na lokumu monene ya komonana na miso ya Nzambe lokola bato oyo bakoki kongɛngisa nkembo na ye!
NINI ESALISAKA BISO TÓNGƐNGISA NKEMBO YA NZAMBE?
7. Tosengeli kondima likambo nini na ntina na biso moko mpo tókoka kongɛngisa nkembo ya Nzambe?
7 Mpo tókoka kongɛngisa nkembo ya Nzambe, tosengeli naino kondima ete tosalaka masumu. (2 Nt. 6:36) Mpo tólonga kongɛngisa malamumalamu nkembo ya Nzambe, tosengeli naino kondima ete tosalaka masumu mpe tosengeli kosala milende mpo na kolonga bolɛmbu na biso. Na ndakisa, soki tokweaki na lisumu ya kotala pornografi, tosengeli koyeba ete tozali na mposa ya lisalisi, mpe koluka lisalisi yango. (Yak. 5:14, 15) Yango ezali likambo ya liboso oyo tosengeli kosala soki tolingi mpenza kopesa Nzambe nkembo. Lokola tozali basaleli ya Yehova, tosengeli kokoba komitalela mpo tóyeba soki tozali mpenza kotosa mitinda na ye ya sembo. (Mas. 28:18; 1 Ko. 10:12) Ata soki tozali na bolɛmbu ya ndenge nini, tosengeli kokoba kobundisa yango mpo tókoka kongɛngisa nkembo ya Nzambe.
8. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kosala nini?
8 Yesu azali moto kaka moko oyo asepelisaki Nzambe mpe angɛngisaki nkembo na Ye na ndenge ya kokoka. Atako tozali te bato ya kokoka lokola Yesu, tosengeli kosala makasi tólanda ndakisa na ye. (1 Pe. 2:21) Yehova amonaka ndenge oyo tozali kokende liboso na milende oyo tosalaka mpo na kopesa ye nkembo, mpe apambolaka milende yango.
9. Ndenge nini Biblia esalisaka bakristo oyo balingi kolanda mibeko ya Nzambe na bomoi na bango?
9 Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kokende liboso na milende oyo tozali kosala mpo na kongɛngisa nkembo ya Nzambe. Ezali na ntina tóyekolaka Biblia na mozindo mpe tómanyolaka makambo oyo tozali kotánga. (Nz. 1:1-3) Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekosalisa biso tókende liboso. (Tángá Yakobo 1:22-25.) Boyebi ya Biblia elendisaka kondima na biso mpe ekateli na biso ya kokima masumu ya minene mpe ya kosepelisa Yehova.—Nz. 119:11, 47, 48.
10. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tósalela Yehova malamu koleka?
10 Mpo tóngɛngisa nkembo ya Nzambe, tosengeli mpe ‘kotingama na mabondeli.’ (Rom. 12:12) Tosengeli kobondela Yehova asalisa biso tósalela ye na ndenge oyo akondima. Tokoki kosɛnga ye apesa biso elimo santu, akómisa kondima na biso makasi, apesa biso makasi mpo tókwea na komekama te, mpe apesa biso mayele ya “kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Tim. 2:15; Mat. 6:13; Luka 11:13; 17:5) Se ndenge mwana atyelaka tata na ye motema, biso mpe tosengeli kotya motema epai ya Yehova, Tata na biso ya likoló. Soki tosɛngi ye asalisa biso mpo tósalela ye malamu koleka, tokoki kozala na elikya ete akosala yango. Tókanisa ata mokolo moko te ete mabondeli na biso ekotungisa ye! Kutu, na nzela ya libondeli, tósanzolaka ye, tópesaka ye matɔndi, tólukaka litambwisi na ye, mingimingi ntango tomekami, mpe tósɛngaka ye asalisa biso tósalela ye na ndenge oyo ekopesa nkombo na ye nkembo.—Nz. 86:12; Yak. 1:5-7.
11. Ndenge nini makita ya lisangá esalisaka biso tóngɛngisa nkembo ya Nzambe?
11 Nzambe apesi “moombo ya sembo mpe ya mayele” mokumba ya kobatela bampate na ye oyo azwaka na motuya mingi. (Mat. 24:45-47; Nz. 100:3) Moombo ya sembo alukaka kosalisa mokristo mokomoko angɛngisa nkembo ya Yehova. Makita ya lisangá ezali moko ya bibongiseli oyo asalelaka mpo na kosala yango. Makita yango esalisaka biso tóbongisa makambo na bomoi na biso, kaka ndenge motongi-bilamba akoki kobongisa bilamba na biso mpo tómonana kitoko. (Ebr. 10:24, 25) Yango wana, tókómaka na ngonga ya malamu na makita, mpo soki tozali na momeseno ya koya retare, tokozanga makambo mosusu oyo ekokaki kosalisa biso tóbongisa bomoi na biso.
TÓMEKOLA NZAMBE
12. Ndenge nini tokoki komekola Nzambe?
12 Mpo tókoka kongɛngisa nkembo ya Nzambe, tosengeli ‘kokóma bamekoli na ye.’ (Ef. 5:1) Kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango ezali lolenge moko oyo tokoki komekola ye. Koluka kosala makambo oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe ebebisaka lokumu na ye mpe ekomemela biso mikakatano. Lokola tozali na mokili oyo Satana Zabolo azali koyangela, tosengeli kosala makasi mpo tóyina oyo Yehova ayinaka mpe tólinga oyo alingaka. (Nz. 97:10; 1 Yoa. 5:19) Tosengeli kondima na motema na biso ete kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe ezali lolenge kaka moko oyo ebongi mpo na kosalela ye.—Tángá 1 Bakorinti 10:31.
13. Mpo na nini tosengeli koyina masumu, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?
13 Yehova ayini masumu, yango wana biso mpe tosengeli koyina yango. Soki tozali koyina masumu, tokozala mosika mpenza na makambo nyonso oyo ekoki kosala ete tókwea na lisumu. Na ndakisa, tosengeli kokeba ete tókwea te na lipɛngwi, lisumu oyo ekopekisa biso tópesa Nzambe nkembo. (Mib. 13:6-9) Yango wana, tóboya boyokani nyonso ná bapɛngwi mpe ná moto nyonso oyo amibengaka ndeko, kasi afingisaka nkombo ya Nzambe. Tosengeli kosala bongo ata soki moto yango azali ndeko na biso ya libota. (1 Ko. 5:11) Koluka komonisa bapɛngwi to bato oyo balobaka mabe mpo na ebongiseli ya Yehova ete bazali na libunga ekozala na litomba moko te. Kutu, ebongi te tótángaka makanisi na bango, ezala bakomi yango na babuku to batye yango na Internet, mpamba te yango ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova.—Tángá Yisaya 5:20; Matai 7:6.
14. Mpo tómekola Yehova, tosengeli kozala na ezaleli nini, mpe mpo na nini?
14 Kozala na bolingo ezali lolenge moko malamu mingi ya komekola Tata na biso ya likoló. Lokola ye, biso mpe tosengeli kolinga basusu. (1 Yoa. 4:16-19) Kutu, bolingo oyo tozali na yango kati na biso emonisaka ete tozali bayekoli ya Yesu mpe basaleli ya Yehova. (Yoa. 13:34, 35) Lokola tozali bato ya masumu, mbala mosusu ezalaka mpasi tómonisa bolingo. Kasi, tosengeli kosala makasi tólingaka basusu ntango nyonso. Kozala na bolingo mpe bizaleli mosusu ya bakristo ekopekisa biso tósala makambo ya mabe to masumu.—2 Pe. 1:5-7.
15. Soki tolingaka basusu, tokosalela bango makambo ndenge nini?
15 Bolingo etindaka biso tósalela basusu makambo ya malamu. (Rom. 13:8-10) Na ndakisa, soki tolingaka molongani na biso, tokokangama kaka na ye. Soki tolingaka bankulutu mpe tomemyaka mosala na bango, tokotosa malako na bango. Bana oyo balingaka baboti na bango batosaka mpe bamemyaka bango; balobaka mabe te mpo na bango. Soki tolingaka bazalani na biso, tokomona te ete bazali bato mpamba mpe tokoloba na bango mabe te. (Yak. 3:9) Mpe bankulutu oyo balingaka bampate ya Nzambe bakosalela bango makambo na boboto.—Mis. 20:28, 29.
16. Ndenge nini komonisa bolingo esalisaka biso na mosala ya kosakola?
16 Bolingo na biso esengeli mpe komonana na mosala ya kosakola. Lokola tolingaka Yehova mingi, tokolɛmba nzoto te ata soki bato mosusu bazali koyoka biso te to bazali kosepela na nsango na biso te. Kutu, tokokoba kosakola nsango malamu. Bolingo ekotinda biso tómibongisaka malamu mpe tósala makasi tósakolaka malamu koleka. Soki tolingaka mpenza Nzambe mpe bazalani na biso, tokomona te ete mosala ya kosakola ezali kilo. Tokotalela yango nde lokola libaku monene mpe tokosala yango na esengo.—Mat. 10:7.
TÓKOBA KOPESA YEHOVA NKEMBO
17. Koyeba ete lisumu epekisaka biso tóngɛngisa nkembo ya Yehova esengeli kotinda biso tósala nini?
17 Bato mingi bayebaka te ete lisumu ezali mpenza na nguya; nzokande, biso toyebi yango. Yango esalisaka biso tóbundisa mposa ya kosala masumu. Koyeba ete tozali bato ya masumu etindaka biso tóteya lisosoli na biso mpo ebenda biso na kosala oyo ezali malamu ntango mposa ya kosala mabe ebandi kokola na makanisi mpe motema na biso. (Rom. 7:22, 23) Ya solo, tozali na bolɛmbu, kasi Nzambe akoki kopesa biso makasi ya kosala oyo ezali malamu ata na likambo nini.—2 Ko. 12:10.
18, 19. (a) Nini ekosalisa biso tólonga etumba ná mampinga ya bilimo mabe? (b) Ekateli na biso esengeli kozala nini?
18 Soki tolingi kopesa Yehova nkembo, tosengeli kobunda etumba ná mampinga ya bilimo mabe. Molato ya etumba oyo Nzambe apesá biso esalisaka biso tólonga etumba yango. (Ef. 6:11-13) Satana azali ntango nyonso koluka kozwa nkembo oyo esengeli kopesama kaka na Yehova. Azali mpe kosala nyonso mpo na kobebisa boyokani na biso ná Yehova. Kasi, Satana azali kotikala na nsɔni ntango biso mpe bamilio ya bato mosusu ya kozanga kokoka tozali kotikala sembo mpe kopesa Nzambe nkembo! Yango wana, tiká tókoba kosanzola Yehova, lokola bikelamu ya likoló oyo balobaki ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”—Em. 4:11.
19 Tiká ete tózala na ekateli ya kokoba kokumisa Yehova. Na ntembe te azali kosepela ndenge ebele ya bato ya sembo bazali kosala nyonso mpo na komekola ye mpe kongɛngisa nkembo na ye. (Mas. 27:11) Tiká ete tósala lokola Davidi oyo ayembaki ete: “Ee Yehova Nzambe na ngai, nazali kokumisa yo na motema na ngai mobimba, mpe nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (Nz. 86:12) Tozali kozela mpenza mokolo oyo tokongɛngisa nkembo ya Yehova na ndenge ya kokoka mpe tokokumisa ye mpo na libela! Bato ya botosi nde bakosala likambo yango. Ozali kongɛngisa nkembo ya Yehova Nzambe sikoyo, mpe ozali na elikya ya kosala yango libela na libela?
[Bililingi na lokasa 27]
Ozali kongɛngisa nkembo ya Yehova na makambo oyo?