Yehova azali “Momonisi ya basekele”
“Ya solo Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe mpe Nkolo ya bakonzi mpe Momonisi ya basekele.”—DAN. 2:47.
OKOPESA EYANO NINI?
Yehova ayebisi biso nini makambo nini mpo na mikolo ekoya?
Mokomoko ya mitó motoba ya nyama mabe oyo tolobeli ezali komonisa nini?
Mitó ya nyama mabe ekokani na biteni nini ya ekeko oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ?
1, 2. Makambo nini Yehova amonisi biso, mpe mpo na nini asali yango?
BIKÓLO nini ekozala bikólo oyo eleki na nguya na mabele mobimba ntango Bokonzi ya Nzambe ekosukisa boyangeli ya bato? Toyebi eyano na motuna yango mpamba te Yehova Nzambe, “Momonisi ya basekele,” ayebisi biso yango. Asalisi biso tóyeba bikólo yango na nzela ya makambo oyo mosakoli Danyele mpe ntoma Yoane bakomaki.
2 Yehova amonisaki bango bimonaneli ya banyama mabe ndenge na ndenge. Ayebisaki mpe Danyele ndimbola ya ekeko moko monene oyo mokonzi moko amonaki na ndɔtɔ. Yehova akomisaki makambo yango na Biblia mpo na litomba na biso. (Rom. 15:4) Asalaki yango mpo na kolendisa elikya na biso ete mosika te Bokonzi na ye ekobebisa baguvɛrnema nyonso ya bato.—Dan. 2:44.
3. Mpo tókanga malamumalamu ntina ya bisakweli oyo ezali na Biblia, tosengeli naino koyeba ndimbola ya nini, mpe mpo na nini?
3 Esakweli ya Danyele mpe ya Yoane elobeli bakonzi mwambe, elingi koloba biyangeli ya bato, mpe emonisi ndenge oyo biyangeli yango esengeli kolandana. Nzokande, mpo tókanga malamumalamu ntina ya bisakweli yango, tosengeli naino koyeba ndimbola ya esakweli ya libosoliboso ya Biblia. Mpo na nini? Mpo kokokisama ya esakweli yango nde esimbi motó ya likambo ya Biblia mobimba. Na maloba mosusu, esakweli yango ezali lokola nsinga oyo bisakweli mosusu nyonso ekangisami na yango.
MOMBOTO YA NYOKA MPE NYAMA MABE
4. Banani bazali na kati ya momboto ya mwasi, mpe momboto yango ekosala nini?
4 Mwa moke nsima ya botomboki na Edene, Yehova alakaki ete “mwasi” moko akobimisa “momboto.”a (Tángá Ebandeli 3:15.) Nsukansuka, momboto yango akopanza motó ya nyoka, elingi koloba Satana. Na nsima, Yehova amonisaki ete momboto yango akobima na nzela ya Abrahama, akozala moto ya ekólo Yisraele, akouta na libota ya Yuda, mpe akozala mokitani ya Mokonzi Davidi. (Eba. 22:15-18; 49:10; Nz. 89:3, 4; Luka 1:30-33) Kristo Yesu azalaki eteni ya liboso ya momboto yango. (Gal. 3:16) Eteni mosusu ya momboto ezali nde bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Gal. 3:26-29) Yesu ná bakristo yango oyo batyami mafuta na elimo nde basali Bokonzi ya Nzambe, ebongiseli oyo Nzambe akosalela mpo na koboma Satana.—Luka 12:32; Rom. 16:20.
5, 6. (a) Danyele ná Yoane balobelaki bikólo boni oyo elekaki na nguya? (b) Mitó ya nyama mabe ya Emoniseli ezali komonisa nini?
5 Esakweli wana ya liboso oyo Nzambe apesaki na Edene elobaki mpe ete Satana akobimisa “momboto.” Momboto yango ekozala na bonguna, to ekoyina momboto ya mwasi. Banani bazali na kati ya momboto ya nyoka? Bato nyonso oyo bazali koyina Nzambe mpe bazali kotɛmɛla basaleli na ye, ndenge Satana asalaka. Banda kalakala, momboto ya Satana emonanaka na ebongiseli ya losambo, kasi mpe na bibongiseli ndenge na ndenge ya politiki to makonzi. (Luka 4:5, 6) Nzokande, kaka makonzi moke nde enyokolaki mpenza basaleli ya Nzambe, ezala na ntango ya ekólo Yisraele to na ntango ya lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Mpo na nini likambo yango ezali na ntina mingi? Mpo emonisi ntina oyo bimonaneli ya Danyele mpe ya Yoane elobeli kaka bikólo mwambe kati na bikoló nyonso ya mokili oyo elekaki na nguya.
6 Na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., Yesu alakisaki ntoma Yoane bimonaneli ndenge na ndenge ya kokamwa. (Em. 1:1) Na moko na yango, Yoane amonaki dragɔ moko etɛlɛmi na libongo ya mbu monene; dragɔ yango ezali komonisa Zabolo. (Tángá Emoniseli 13:1, 2.) Yoane amonaki mpe nyama moko ya kokamwa oyo ebimaki na mbu yango, mpe Zabolo apesaki yango bokonzi monene. Na nsima, Yoane amonaki nyama mabe moko ya langi ya motane makasi oyo ezalaki na mitó nsambo. Nyama yango ezalaki elilingi ya nyama mabe ya Emoniseli 13:1. Anzelu moko ayebisaki Yoane ete mitó nsambo ya nyama yango ezali komonisa “bakonzi [to baguvɛrnema] nsambo.” (Em. 13:14, 15; 17:3, 9, 10) Ntango Yoane akomaki mokanda ya Emoniseli, bakonzi mitano basilaki kokwea, moko azalaki koyangela, mpe moko ‘ayaki naino te.’ Makonzi, to bikólo yango oyo eleki na nguya ezali bikólo nini? Tótalela motó mokomoko ya nyama mabe oyo Emoniseli elobeli. Tokomona mpe makambo mosusu oyo Danyele akomaki mpo na makonzi yango. Kutu, akomaki makambo oyo etali makonzi mosusu bankama ya bambula liboso ebanda koyangela.
EZIPITO, MOTÓ YA LIBOSO MPE ASIRI, MOTÓ YA MIBALE
7. Motó ya liboso ezali komonisa nini, mpe mpo na nini?
7 Motó ya liboso ya nyama mabe ezali komonisa Ezipito. Mpo na nini? Mpo Ezipito nde ekólo ya liboso ya nguya oyo eyinaki mpe enyokolaki basaleli ya Nzambe. Bayisraele, elingi koloba bakitani ya Abrahama, oyo na nzela na ye momboto ya mwasi asengelaki kobima, bakómaki ebele na Ezipito. Na nsima, Ezipito ekómaki konyokola bango. Satana alukaki kolimwisa libota ya Nzambe liboso kutu momboto abotama. Na ndenge nini? Atyaki na motema ya Farao makanisi ya koboma bana nyonso ya mibali oyo Bayisraele bazalaki kobota. Yehova asukisaki mokano wana mabe, mpe alongolaki basaleli na ye na boombo na Ezipito. (Kob. 1:15-20; 14:13) Na nsima, akɔtisaki Bayisraele na Mokili ya Ndaka.
8. Motó ya mibale ezali komonisa nini, mpe elukaki kosala nini?
8 Motó ya mibale ezali komonisa Asiri. Bokonzi yango ya nguya mpe elukaki kolimwisa basaleli ya Nzambe. Ya solo, Nzambe asalelaki Asiri mpo na kopesa ekólo ya mabota zomi ya Yisraele etumbu mpo bamipesaki na losambo ya bikeko mpe batombokelaki ye. Kasi, na nsima Asiri elukaki mpe kobebisa Yerusaleme. Ekoki kozala ete Satana alingaki kobebisa molɔngɔ ya bakonzi ya Yerusaleme oyo esengelaki komema tii na Yesu. Likambo wana ezalaki mokano ya Yehova te; yango wana Yehova abomaki basoda ya Asiri mpe abikisaki basaleli na ye ya sembo na ndenge ya likamwisi.—2 Bak. 19:32-35; Yis. 10:5, 6, 12-15.
BABILONE, MOTÓ YA MISATO
9, 10. (a) Yehova atikaki bato ya Babilone básala nini? (b) Mpo bisakweli ekokisama, makambo nini esengelaki naino kosalema?
9 Motó ya misato ya nyama mabe oyo Yoane amonaki ezali komonisa bokonzi ya Babilone. Yehova atikaki bato ya Babilone bábebisa Yerusaleme mpe bámema bato na ye na boombo. Kasi, liboso Yehova atika nzela ete Bayisraele básambwisama ndenge wana, akebisaki batomboki yango ete likambo wana ya mabe ekokómela bango. (2 Bak. 20:16-18) Asakolaki ete bakonzi na bango bakofanda lisusu te na “kiti ya bokonzi ya Yehova” na Yerusaleme. (1 Nt. 29:23) Kasi, alakaki mpe ete mokitani moko ya Mokonzi Davidi, oyo azali na “lotomo oyo euti na mibeko,” akoya mpe akozongisa bokonzi yango.—Ezk. 21:25-27.
10 Esakweli mosusu emonisaki ete ntango Masiya oyo alakamaki akoya, akokuta tempelo ya Yerusaleme, epai Bayuda bazalaki kosambela. (Dan. 9:24-27) Esakweli mosusu, oyo ekomamaki liboso Bayisraele bákende boombo na Babilone, elobaki ete Masiya akobotama na Beteleme. (Mika 5:2) Mpo bisakweli yango ekokisama, esengelaki Bayuda bálongwa na boombo, bázonga na mboka na bango, mpe bátonga lisusu tempelo. Kasi, bato ya Babilone bazalaki kotika te bato oyo bakangi na boombo. Yehova ayebisaki basakoli na ye ndenge oyo akolonga mokakatano yango.—Amo. 3:7.
11. Bokonzi ya Babilone emonisami na nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
11 Mosakoli Danyele azalaki na kati ya bato oyo bamemamaki na boombo na Babilone. (Dan. 1:1-6) Yehova amonisaki Danyele ete makonzi mosusu oyo ya nguya ekobima nsima ya Babilone. Yehova asalelaki bilembo ndenge na ndenge mpo na komonisa makambo yango oyo ezalaki basekele. Na ndakisa, alɔtisaki Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ndɔtɔ oyo emonisaki ekeko moko monene oyo esalemi na biloko ndenge na ndenge. (Tángá Danyele 2:1, 19, 31-38.) Yehova amonisaki Danyele ete motó ya wolo ya ekeko yango ezali komonisa bokonzi ya Babilone.b Ekólo ya nguya oyo ekobima nsima ya Babilone emonisami na ntolo mpe mabɔkɔ ya palata. Ezalaki ekólo nini mpe esalaki basaleli ya Nzambe nini?
MOTÓ YA MINEI: BAMEDE NÁ BAPERSE
12, 13. (a) Yehova amonisaki nini na oyo etali kokwea ya Babilone? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete motó ya minei ya nyama mabe emonisi bokonzi ya Bamede ná Baperse?
12 Mbula koleka nkama liboso ya eleko ya Danyele, na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki makambo oyo etali nguya oyo ekolonga Babilone. Yehova amonisaki ndenge oyo Babilone ekokwea mpe ayebisaki nkombo ya moto oyo akolonga yango. Moto yango ezalaki Siruse, moto ya Perse. (Yis. 44:28–45:2) Danyele amonaki bimonaneli mosusu mibale oyo etali bokonzi ya Bamede ná Baperse. Na emonaneli moko, bokonzi yango emonisamaki lokola urse oyo etɛlɛmi na mopanzi moko. Balobaki na nyama yango ete “lyá misuni mingi.” (Dan. 7:5) Na emonaneli mosusu, Danyele amonaki bokonzi yango oyo esangisaki bikólo mibale emonisami lokola mpate-mobali oyo ezali na maseke mibale.—Dan. 8:3, 20.
13 Yehova asalelaki bokonzi ya Bamede ná Baperse mpo ekweisa Babilone mpe ezongisa Bayisraele na mboka na bango, kaka ndenge asakolaki yango. (2 Nt. 36:22, 23) Nzokande, na nsima bokonzi yango elukaki kosilisa libota mobimba ya Nzambe. Mokanda ya Estere elobeli mwango mabe oyo Hamane, ministre-mokonzi ya Perse, asalaki. Apesaki mitindo ete báboma Bayuda nyonso oyo bazalaki na bisika ndenge na ndenge ya bokonzi ya Perse mpe aponaki mokolo oyo bakosala yango. Kasi, Yehova ye moko abatelaki basaleli na ye oyo momboto ya Satana ezalaki koyina. (Est. 1:1-3; 3:8, 9; 8:3, 9-14) Yango wana, tokoki koloba ete motó ya minei ya nyama ya Emoniseli emonisi bokonzi ya Bamede ná Baperse.
MOTÓ YA MITANO: GRƐSI
14, 15. Yehova amonisaki makambo nini mpo na bokonzi ya Grɛsi?
14 Motó ya mitano ya nyama mabe ya Emoniseli ezali komonisa Grɛsi. Danyele alimbolaki ete libumu mpe bibɛlɔ ya motako ya ekeko oyo Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ emonisaki ekólo yango ya nguya. Danyele amonaki mpe bimonaneli mibale oyo eyebisi makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Grɛsi mpe mokonzi na yango oyo alekaki lokumu.
15 Na emonaneli moko, Danyele amonaki nkoi oyo ezalaki na mapapu minei, likambo oyo emonisi ete ekólo Grɛsi esengelaki kolonga bikólo mosusu nokinoki mpenza. (Dan. 7:6) Na emonaneli mosusu, Danyele amonaki ndenge ntaba-mobali moko oyo ezalaki na liseke moko monene ebomaki nokinoki mpate oyo ezalaki na maseke mibale, elingi koloba bokonzi ya Bamede ná Baperse. Yehova alobaki na Danyele ete ntaba-mobali yango ezalaki Grɛsi mpe liseke monene ezalaki komonisa moko na bakonzi na yango. Danyele akomaki lisusu ete liseke monene ekobukana mpe maseke minei ya mike ekobima na esika na yango. Atako esakweli yango ekomamaki bankama ya bambula liboso Grɛsi ekóma ekólo oyo eleki na nguya na mokili mobimba, makambo wana nyonso ekokisamaki. Alezandre Monene, mokonzi ya Grɛsi oyo alekaki lokumu, abundisaki bokonzi ya Bamede ná Baperse. Kasi, liseke yango eumelaki te kobukana: Alezandre akufaki ntango azalaki kaka na mbula 32 mpe azalaki na nguya mingi. Na nsima, ekólo yango ekabwanaki mpe mokomoko na bakonzi minei ya basoda na ye ayangelaki eteni moko.—Tángá Danyele 8:20-22.
16. Antiochus IV asalaki nini?
16 Nsima ya kolonga Baperse, Grɛsi eyangelaki ekólo Yisraele. Na ntango wana, Bayuda basilaki kozonga na Mokili ya Ndaka mpe kotonga lisusu tempelo na Yerusaleme. Bazalaki naino kaka libota oyo Nzambe aponaki, mpe tempelo oyo etongamaki lisusu ezalaki kaka esika monene ya losambo ya solo. Nzokande, na ekeke ya mibale L.T.B., Grɛsi, motó ya mitano ya nyama mabe, ebundisaki libota ya Nzambe. Antiochus IV, mokonzi oyo azwaki eteni moko ya mokili oyo Alezandre ayangelaki, atongaki etumbelo ya bapakano na lopango ya tempelo ya Yerusaleme mpe alobaki ete soki moto asambeli Nzambe ya Bayuda, akozwa etumbu ya liwa. Likambo yango emonisi mpenza koyina oyo momboto ya Satana ezalaki koyina libota ya Nzambe! Kasi, mwa moke na nsima, ekólo mosusu ya nguya ezwaki esika ya Grɛsi. Ekólo nini ezalaki motó ya motoba ya nyama mabe?
ROMA: MOTÓ YA MOTOBA, BOKONZI “YA KOBANGISA MPE YA NSƆMƆ”
17. Motó ya motoba esalaki likambo nini oyo Ebandeli 3:15 elobelaki?
17 Roma nde ezalaki ekólo oyo elekaki na nguya ntango Yoane azwaki emonaneli ya nyama mabe. (Em. 17:10) Motó yango ya motoba esalaki likambo moko oyo esakweli ya Ebandeli 3:15 elobelaki. Satana asalelaki bakonzi ya Roma mpo na kozokisa momboto “na litindi.” Na ndenge nini? Basambisaki Yesu na bifundeli ya lokuta ete azali motomboki mpe babomaki ye. (Mat. 27:26) Kasi, mpota wana eumelaki te mpamba te Yehova asekwisaki Yesu.
18. (a) Ekólo nini ya sika Yehova aponaki, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini momboto ya nyoka ekobaki koyina momboto ya mwasi?
18 Bakonzi ya mangomba ya Bayuda basanganaki na bakonzi ya Roma mpo na kotɛmɛla Yesu, mpe bato mingi ya ekólo Yisraele baboyaki ye. Yango wana, Yehova aboyaki ekólo Yisraele, bazalaki lisusu basaleli na ye te. (Mat. 23:38; Mis. 2:22, 23) Kobanda ntango wana, aponaki ekólo ya sika, “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 3:26-29; 6:16) Ekólo yango ezalaki lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ezalaki na Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu. (Ef. 2:11-18) Nsima ya lisekwa ya Yesu, momboto ya nyoka ekobaki koyina momboto ya mwasi. Na mabaku mingi, bokonzi ya Roma elukaki kolimwisa lisangá ya bokristo, eteni mosusu ya momboto ya mwasi.c
19. (a) Danyele alobaki nini mpo na ekólo ya motoba oyo elekaki na nguya na mokili mobimba? (b) Lisolo mosusu ekolobela nini?
19 Na ndɔtɔ ya Nebukadenezare oyo Danyele alimbolaki, Roma emonisami na makolo ya ebende. (Dan. 2:33) Danyele amonaki mpe emonaneli oyo elobeli bokonzi ya Roma mpe ekólo oyo eleki na nguya, oyo esengelaki kouta na Roma. (Tángá Danyele 7:7, 8.) Na boumeli ya bankama ya bambula, Roma ezalaki bokonzi “ya kobangisa mpe ya nsɔmɔ” mpo na banguna na yango. Nzokande, esakweli elobaki ete “maseke zomi” ekobima na bokonzi yango mpe liseke moko ekoleka maseke mosusu. Maseke zomi yango ezali nini, mpe liseke ya moke ezali nini? Liseke ya moke ekokani na eteni nini na ekeko monene oyo Nebukadenezare amonaki? Lisolo oyo ezali na lokasa 14 ekopesa biyano na mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mwasi yango ya elilingi, oyo abengami mwasi ya Yehova, ezali nde ebongiseli ya Yehova oyo esangisi bikelamu ya elimo na likoló.—Yis. 54:1; Gal. 4:26; Em. 12:1, 2.
b Babilone emonisami na motó ya ekeko oyo mokanda ya Danyele elobeli mpe motó ya misato ya nyama mabe oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. Talá etanda na nkasa 12-13.
c Atako Roma ebebisaki engumba Yerusaleme na mobu 70 T.B., likambo wana ezalaki kokokisama ya Ebandeli 3:15 te. Na ntango wana, ekólo Yisraele ezalaki lisusu te ekólo oyo Nzambe aponaki.