Tótyelanaka likebi mpe tólendisanaka
“Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.”—EBR. 10:24.
1, 2. Nini esalisaki Batatoli ya Yehova 230 bábika na mobembo ya liwa na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
NTANGO boyangeli ya Banazi ezalaki kokwea na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakonzi na yango bapesaki mitindo ete báboma bankóto ya bato oyo bazalaki naino na bakaa ya bakangami. Bato ya bolɔkɔ oyo bazalaki na kaa ya bakangami oyo ezalaki na Sachsenhausen basengelaki komemama na mabongo epai basengelaki kokɔtisa bango na bamasuwa oyo bakozindisa na mai monene. Na nsima, likambo wana oyo ezalaki na kati ya mwango mabe ya koboma bato eyebanaki na nkombo mobembo ya liwa.
2 Basɛngaki bato ya bolɔkɔ 33 000 oyo bazalaki na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen bátambola kilomɛtrɛ 250 tii na Lübeck, engumba moko ya Allemagne oyo ezalaki na libongo. Kati na bango, ezalaki na Batatoli ya Yehova 230 oyo bautaki na mikili motoba, oyo basengelaki mpe kosala mobembo yango. Bato nyonso ya bolɔkɔ balɛmbaki mpo na nzala mpe maladi. Kasi bandeko na biso nyonso babikaki na mobembo yango. Nini esalisaki bango? Moko na bango alobaki ete: “Ntango nyonso tozalaki kolendisana mpo na kokoba kotambola.” Bolingo oyo bazalaki na yango kati na bango mpe “nguya oyo eleki makasi,” oyo Nzambe apesaki bango, esalisaki bango bábika na mobembo wana ya mpasi.—2 Ko. 4:7.
3. Mpo na nini tosengeli kolendisana?
3 Lelo oyo, tozali te kosala mobembo ya liwa lokola oyo wana, kasi tozali kokutana na ebele ya mikakatano. Nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló na 1914, Satana abwakamaki zingazinga ya mabele, azali na “nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Em. 12:7-9, 12) Lokola Armagedone ezali se kokóma pene, Satana azali kosalela komekama mpe mikakatano mpo na koluka kolɛmbisa biso na elimo. Longola yango, ezali mpe na mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo. (Yobo 14:1; Mos. 2:23) Na bantango mosusu, soki mitungisi eleki ndelo, ekoki kolɛmbisa biso mingi mpe kosala ete makasi nyonso ya nzoto mpe ya elimo oyo tokoki kozala na yango ekoka kaka te mpo na kosalisa biso tólonga kolɛmba nzoto. Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko oyo na boumeli ya bambula, alendisaki bato ebele na elimo. Ntango akómaki mobange, ye ná mwasi na ye bakómaki kobɛlabɛla, mpe ndeko yango abandaki kolɛmba nzoto. Lokola ndeko yango, biso nyonso tozalaka na mposa ete Yehova apesa biso “nguya oyo eleki makasi” mpe bandeko na biso bálendisa biso.
4. Mpo tókoka kolendisa basusu, toli nini ya ntoma Paulo tosengeli kolanda?
4 Mpo tókoka kolendisa basusu, tosengeli kolanda toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo Baebre. Alobaki boye: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Ebr. 10:24, 25) Ndenge nini tokoki kosalela toli wana ya ntina mingi?
“TÓTYELANAKA LIKEBI”
5. ‘Kotyelana likebi’ elimboli nini, mpe milende nini tosengeli kosala mpo na yango?
5 ‘Kotyelana likebi’ elimboli kotalela bamposa ya basusu, kokanisa bango. Tokoyeba mpenza bamposa ya basusu soki tozali kosuka kaka na kopesa bango mbote ya mbangumbangu na Ndako ya Bokonzi to kosolola na bango kaka makambo ya bongobongo? Mpenza te. Ya solo, tosengeli kokeba ete tómikɔtisa na makambo ya bato te. (1 Tes. 4:11; 1 Tim. 5:13) Atako bongo, mpo tólendisa bandeko na biso, tosengeli koyeba bango malamu—makambo oyo bazali kokutana na yango na bomoi, bizaleli na bango, elimo na bango, makambo na bango ya malamu, mpe bolɛmbu na bango. Basengeli komona ete tozali baninga na bango mpe ete tolingaka bango. Yango esɛngi ete tólekisaka ntango elongo na bango, kaka te ntango bakutani na mikakatano mpe balɛmbi nzoto, kasi mpe na bantango mosusu.—Rom. 12:13.
6. Nini ekosalisa nkulutu atyelaka bandeko ya lisangá likebi?
6 Biblia elendisi bankulutu ya lisangá ‘bábatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bango,’ básala yango na kotindikama te kasi na motema ya esengo. (1 Pe. 5:1-3) Ndenge nini bakokokisa malamu mokumba na bango ya kokɛngɛla bampate soki bayebi bango malamu te? (Tángá Masese 27:23.) Soki bankulutu bazali kopesa bandeko ya lisangá ntango mpe kosepela kozala elongo na bango, ekozala mpasi te bandeko yango básɛnga bango lisalisi ntango basengeli na yango. Ekozala mpe mpasi te mpo bandeko basi mpe mibali bámonisa mayoki na bango mpe mikakatano na bango, mpe yango ekosalisa bankulutu bátyelaka bango likebi mpe bápesa bango lisalisi oyo basengeli na yango.
7. Ndenge nini tosengeli kotalela “bilobaloba mpamba” ya bato oyo balɛmbi nzoto?
7 Ntango Paulo akomelaki lisangá ya Tesaloniki, alobaki na bango ete: “Bósalisa bato ya bolɛmbu.” (Tángá 1 Batesaloniki 5:14.) “Milimo oyo enyokwami na makanisi” ezalaka na bolɛmbu, ndenge moko mpe bandeko oyo balɛmbi nzoto. Masese 24:10 elobi: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Maloba ya moto oyo alɛmbi nzoto ekoki kokóma “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:2, 3) Mpo na kotyela bato ya ndenge wana likebi, tosengeli kobosana te ete ntango mosusu makambo oyo balobaka emonisaka mpenza te oyo bazali na yango na motema. Rachelle, oyo mama na ye azalaki konyokwama makasi na makanisi, amonaki ete likambo yango ezali solo. Rachelle alobi boye: “Mbala mingi mama azalaki kobimisa maloba ya mabe mpenza. Soki esalami bongo, mbala mingi nazalaki kosala makasi nakanisa ndenge mama azalaka mpenza—moto oyo alingaka basusu, moto ya boboto, mpe oyo akabaka mingi. Nayebaki ete bato oyo bazali konyokwama na makanisi balobaka makambo mingi oyo bakanisi te. Likambo ya mabe koleka ezali kozongisela bango maloba ya mabe to kosala bango likambo ya mabe.” Masese 19:11 elobi: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.”
8. Tosengeli ‘kolakisa bolingo’ na biso mingimingi epai ya banani, mpe mpo na nini?
8 Ndenge nini tokoki kotyela moto oyo alɛmbi nzoto likebi, oyo azali kaka koyoka nsɔni mpe kobanga mpo na masumu oyo asalá kala, atako asalá oyo esengeli mpo na kobongisa makambo? Mpo na mosali-mabe moko oyo abongolaki motema na lisangá ya Korinti, Paulo akomaki ete: “Bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye, noki ezala na ndenge nini moto yango azinda na mawa na ye oyo eleki ndelo. Na yango, nazali kolendisa bino ete bólakisa lisusu bolingo oyo bolingaka ye.” (2 Ko. 2:7, 8) Tosengeli te kokanisa ete moto yango ye moko akoyeba kaka ete tolingi ye mpe tozali komibanzabanza mpo na ye. Asengeli nde komona yango na ezaleli na biso mpe na maloba na biso.
“TÓLENDISANA MPO TÓZALA NA BOLINGO MPE TÓSALA MISALA YA MALAMU”
9. ‘Kolendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu’ elimboli nini?
9 Paulo akomaki ete: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” Tosengeli kolendisa bandeko na biso bakristo mpo bázala na bolingo mpe básalaka misala ya malamu. Soki mɔtɔ elingi ekufa, ekoki kosɛnga tóningisa makala mpe tópupola yango. (2 Tim. 1:6) Ndenge moko mpe, na boboto nyonso, tokoki kolendisa bandeko na biso bámonisa ete balingaka Nzambe mpe bazalani na bango. Kopesa basusu longonya ntango esengeli ekoki kolendisa bango básala misala ya malamu.
10, 11. (a) Banani na kati ya lisangá bazalaka na mposa bápesaka bango longonya? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ete kopesa longonya ekoki kosalisa ndeko oyo “abɛti libaku.”
10 Biso nyonso tozalaka na mposa bápesa biso longonya, ezala soki tolɛmbi nzoto to te. Nkulutu moko akomaki boye: “Ata mokolo moko te tata na ngai alobá na ngai ete nasali likambo ya malamu. Yango wana, nakolá na likanisi ete nazali na valɛrɛ mingi te. . . . Atako sikoyo nakómi na mbula 50, nasepelaka mingi soki baninga na ngai bayebisi ngai ete nazali kokokisa malamu mokumba na ngai ya nkulutu. . . . Bomoi na ngai eteyá ngai ete ezali na ntina mingi kolendisa basusu, mpe nalukaka ntango nyonso mabaku ya kopesa basusu longonya.” Kopesa longonya ekoki kolendisa moto nyonso—ezala babongisi-nzela, mibange, mpe baoyo mbala mosusu balɛmbi nzoto.—Rom. 12:10.
11 Ntango ‘baoyo bazali na makoki ya elimo bazali komeka kosembola moto oyo abɛti libaku,’ kopesa moto yango toli na boboto mpe kopesa ye longonya oyo ebongi ekoki kotinda ye azongela kosala misala ya malamu. (Gal. 6:1) Esalemaki bongo mpo na ndeko mwasi moko na nkombo Miriam. Akomi boye: “Nalekisaki eleko moko ya mpasi mingi ntango baninga na ngai mosusu ya motema batikaki lisangá, mpe kaka na ntango yango, tata na ngai abɛlaki maladi moko na bɔɔngɔ (hémorragie cérébrale). Nanyokwamaki mingi na makanisi. Mpo na koluka kosilisa mokakatano yango, nakómaki kobima na mwana mobali moko ya mokili.” Na yango, Miriam amonaki ete Yehova akoki lisusu kolinga ye te, mpe akómaki na makanisi ya kotika lisangá. Ntango nkulutu moko akundwelaki ye mosala ya sembo oyo asalelaki Yehova, yango esimbaki motema na ye. Andimaki bankulutu básalisa ye amona ete Yehova alingaka ye kaka. Ye mpe azongelaki kolinga Yehova. Akabwanaki na elenge mobali wana ya mokili mpe akobaki kosalela Yehova.
12. Nini ekoki komonana soki toyokisi ndeko nsɔni, tolobi na ye mabe, to totindi ye ayoka lokola amemi ngambo?
12 Tosengeli kokeba ntango tozali koluka ‘kolendisa’ bandeko mpo bákoba kosalela Nzambe na molende. Tosengeli te koyokisa ndeko nsɔni na kokokanisáká ye ná basusu, koloba na ye mabe mpo alandi te mibeko oyo totyeli ye, to koloba na ye ete azali kosala mingi te na mosala ya Nzambe mpo ayoka lokola amemi ngambo. Nyonso wana ekoki kolendisa ndeko abakisa molende, kasi ekoumela te. Nzokande, lolenge malamu ya kolendisa ndeko mpo na ntango molai ezali ya kopesa ye longonya mpe kosalisa ye amona ndenge oyo alingaka Nzambe.—Tángá Bafilipi 2:1-4.
“TÓLENDISANAKA”
13. Kolendisa basusu esɛngi nini? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.)
13 Na nsima, Paulo alobaki ete tosengeli ‘kolendisanaka.’ Kolendisa basusu elimboli kopesa bango makasi mpo bákoba na mosala ya Nzambe. Kolendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu ezali lokola kofula to kopupola mɔtɔ oyo elingi kokufa; kolendisa basusu ezali lokola kobakisa petrole na mɔtɔ mpo ekoba kopela to mpo ekóma makasi koleka. Kolendisa basusu esɛngi mpe kobɔndisa bato oyo balɛmbi nzoto. Soki tozwi libaku ya kolendisa moto ya ndenge wana, tosengeli koloba na ye na boboto mpe na limemya. (Mas. 12:18) Lisusu, tosengeli “koyokaka noki” mpe “kowelaka koloba te.” (Yak. 1:19) Soki toyoki ndeko na likebi, tokoki koyeba makambo oyo elɛmbisi ye mpe kozwa likambo ya koloba oyo ekosalisa ye.
14. Ndenge nini nkulutu moko asalisaki ndeko moko oyo alɛmbaki nzoto?
14 Tótala ndenge nkulutu moko ya boboto alongaki kosalisa ndeko mobali moko oyo azalaki kosakola lisusu te bambula ebele. Ntango nkulutu yango azalaki koyoka ye, amonaki ete ndeko yango azalaki kaka kolinga Yehova mingi. Azalaki koyekola na likebi banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe azalaki kosala nyonso mpo azangisa makita te. Kasi, makambo oyo bandeko mosusu ya lisangá basalaki elɛmbisaki ye mpe epesaki ye nkanda. Nkulutu yango ayokaki ye na likebi kozanga ete akanisela ye mabe mpe amonisaki ete bandeko ya lisangá bazalaki kaka kolinga ye ná libota na ye. Mokemoke, ndeko yango amonaki ete atikaki makambo mabe ya kala epekisa ye kosalela Nzambe na ye oyo azalaki kolinga. Nkulutu asɛngaki ndeko yango bábima na mosala ya kosakola. Na lisalisi ya nkulutu wana, ndeko yango azongelaki kosakola mpe nsukansuka akokisaki lisusu masɛngami mpe akómaki nkulutu.
15. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova alendisaka bato oyo balɛmbi nzoto?
15 Ntango mosusu moto oyo alɛmbi nzoto akoyoka malamu mbala moko te to akondima mbala moko te lisalisi oyo tozali kopesa ye. Ekoki kosɛnga tókoba kosalisa ye. Paulo alobaki: “Bókoba kosimba bato ya bolɛmbu, bózala motema molai epai ya moto nyonso.” (1 Tes. 5:14, An American Translation) Na esika tótika mbala moko moto oyo azali na bolɛmbu, tosengeli ‘kokoba kosimba’ ye, elingi koloba kokoba kosalisa ye. Na ntango ya kala, Yehova amonisaki motema molai epai ya basaleli na ye oyo balɛmbaki nzoto. Na ndakisa, Nzambe amoniselaki Eliya boboto mpenza, atalelaki mayoki na ye nyonso. Yehova apesaki mosakoli yango nyonso oyo asengelaki na yango mpo akoba mosala na ye. (1 Bak. 19:1-18) Lokola Davidi abongolaki mpenza motema, Yehova alimbisaki ye na motema moko. (Nz. 51:7, 17) Nzambe asalisaki mpe mokomi ya Nzembo 73, oyo azalaki pene ya kotika kosalela Ye. (Nz. 73:13, 16, 17) Yehova amoniselaka biso boboto mpe ngɔlu, mingimingi ntango tolɛmbi nzoto. (Kob. 34:6) Misala na ye ya motema mawa ezalaka “ya sika ntɔngɔ nyonso,” mpe “ekosuka te.” (Bil. 3:22, 23) Yehova alingi ete tólanda ndakisa na ye mpe tósalela bato oyo bazali konyokwama na makanisi makambo na boboto.
TÓLENDISANA MPO TÓTIKALA NA NZELA YA BOMOI
16, 17. Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?
16 Na bato 33 000 oyo babimaki na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen, bankóto na bango bakufaki. Kasi, Batatoli ya Yehova nyonso 230 oyo babimaki na kaa yango bakufaki te. Ndenge bazalaki kolendisana mpe kosungana esalisaki bango mingi mpo mobembo ya liwa oyo basalaki ekóma mobembo ya bomoi.
17 Lelo oyo, tozali na ‘nzela oyo ememaka na bomoi.’ (Mat. 7:14) Etikali moke, bato nyonso oyo basambelaka Yehova bákɔta na mokili ya sika ya boyengebene. (2 Pe. 3:13) Tiká ete tózala na ekateli ya kosalisana, wana tozali kotambola elongo na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.