Salá na boyokani na libondeli ya Yesu
“Tata, . . . pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo.”—YOA. 17:1.
1, 2. Nsima ya kosala fɛti ya Elekeli ya mobu 33 T.B. elongo na bantoma na ye ya sembo, Yesu asalaki nini?
TOZALI na mpokwa ya mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana ya mobu 33 T.B. Yesu ná baninga na ye ya motema bauti kosala fɛti ya Elekeli, oyo ezalaki kokundwela bango ndenge Nzambe asikolaki bankɔkɔ na bango na boombo na Ezipito. Kasi, bayekoli ya sembo ya Yesu bakosikolama na ndenge ya monene koleka; bakozwa “kosikolama ya seko.” Na mokolo oyo ekolanda, banguna bakoboma Mokambi na bango. Kasi likambo wana ya mpasi ekomemela bato mapamboli. Makila ya Yesu oyo ekosopana ekofungwela bato nzela ya kosikolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa.—Ebr. 9:12-14.
2 Mpo tóbosana ata mokolo moko te likabo wana ya bolingo oyo eutaki epai ya Nzambe, Yesu abandisaki molulu moko ya sika oyo ezwaki esika ya fɛti ya Elekeli. Mpo na kosala yango, azwaki limpa oyo ezangi levire, abukaki yango, mpe apesaki yango bantoma na ye ya sembo 11, mpe alobaki ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ekokabama mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” Asalaki mpe bongo mpo na kɔpɔ ya vinyo ya motane; alobaki na bango ete: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.”—Luka 22:19, 20.
3. (a) Mbongwana nini ya monene esalemaki nsima ya liwa ya Yesu? (b) Mituna nini tosengeli komituna mpo na libondeli ya Yesu oyo ezali na Yoane 17?
3 Kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki na ekólo Yisraele ekómaki pene na nsuka na yango. Kondimana ya sika oyo Yehova asalaki na bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo nde esengelaki kozwa esika na yango. Yesu azalaki komibanzabanza mingi mpo na bolamu ya ekólo wana ya elimo oyo esalemaki sika. Ekólo Yisraele ekabwanaki na makambo ya losambo, mpe yango ebwakaki nsɔni monene na nkombo mosantu ya Nzambe. (Yoa. 7:45-49; Mis. 23:6-9) Kasi, Yesu alingaki ete bayekoli na ye bázala ntango nyonso na bomoko mpo bákoka kosala elongo na boyokani mpo na kopesa nkembo na nkombo ya Nzambe. Na yango, asalaki nini? Asalaki libondeli moko ya malamu oyo moto nyonso akoki kozwa libaku ya kotánga yango. (Yoa. 17:1-26; talá elilingi na ebandeli ya lisolo.) Wana tozali kotalela makambo oyo Yesu alobaki na libondeli yango, tóluka koyanola na mituna oyo: “Nzambe ayanolaki na libondeli ya Yesu? Nazali kosala na boyokani na libondeli yango?”
MAKAMBO OYO YESU AZALAKI KOTYA NA ESIKA YA LIBOSO
4, 5. (a) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo Yesu alobelaki na ebandeli ya libondeli na ye? (b) Ndenge nini Yehova ayanolaki Yesu na likambo oyo asɛngaki mpo na ye moko?
4 Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kosolola tii na butu makasi; azalaki koyebisa bango makambo ya ntina mingi oyo etali Nzambe. Na nsima, atombolaki miso na likoló mpe abondelaki ete: “Tata, ngonga ekoki; pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo, na ndenge opesi ye bokonzi likoló ya moto nyonso ya mosuni, mpo, bango nyonso oyo opesi ye, apesa bango bomoi ya seko. . . . Napesi yo nkembo na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala. Bongo sikoyo yo, Tata, pesá ngai nkembo pembeni na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.”—Yoa. 17:1-5.
5 Na ebandeli ya libondeli na ye, Yesu alobelaki makambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Ya liboso, abondelaki ete Tata na ye azwa nkembo. Yango eyokani na likambo ya liboso oyo alobelaki na libondeli ya ndakisa: “Tata, nkombo na yo esantisama.” (Luka 11:2) Ya mibale, Yesu alobelaki bamposa ya bayekoli na ye; asɛngaki ete Nzambe “apesa bango bomoi ya seko.” Na nsima na yango, Yesu alobelaki makambo na ye moko; alobaki ete: “Tata, pesá ngai nkembo pembeni na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.” Yehova ayokaki libondeli ya Mwana na ye ya sembo mpe abakiselaki ye kutu makambo mosusu oyo asɛngaki te na ndenge apesaki ye “nkombo moko malamu koleka” oyo ya baanzelu.—Ebr. 1:4.
‘KOYEBA NZAMBE KAKA MOKO YA SOLOSOLO’
6. Mpo bantoma bázwa bomoi ya seko, basengelaki kosala nini, mpe ndenge nini toyebi ete balongaki?
6 Na libondeli na ye, Yesu alobelaki mpe likambo oyo biso bato ya masumu tosengeli kosala mpo tózwa bomoi ya seko. (Tángá Yoane 17:3.) Alobaki ete tosengeli kokoba ‘koyekola koyeba’ Nzambe mpe Kristo. Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya kosalela miso mpe matoi na biso mpo na koyekola makambo mosusu mingi oyo etali Yehova mpe Mwana na ye. Lolenge mosusu ya ntina mingi ya koyekola koyeba Nzambe ezali ya koyoka esengo oyo eutaka na kosalela makambo oyo tozali koyekola. Bantoma basalaki makambo yango mibale, ndenge Yesu amonisaki yango na libondeli na ye ete: “Maloba oyo opesi ngai, napesi bango yango, mpe bayambi yango.” (Yoa. 17:8) Kasi, mpo na kozwa bomoi ya seko, basengelaki kokoba komanyola maloba ya Nzambe mpe kosalela yango na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Bantoma ya sembo balongaki nde kosala bongo tii na nsuka ya bomoi na bango awa na mabele? Ɛɛ, balongaki. Toyebi yango mpamba te nkombo ya mokomoko na bango ekomamá libela na mabanga 12 oyo esali moboko ya Yerusaleme ya Sika na likoló.—Em. 21:14.
7. ‘Koyekola koyeba’ Nzambe elimboli nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi?
7 Bato ya mayele na makambo etali monɔkɔ ya Grɛki balobi ete maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “báyekola koyeba” ekoki mpe kobongolama na “basengeli kokoba koyekola.” Ndimbola yango nyonso mibale ezali na boyokani, mpe nyonso mibale ezali na ntina. Na yango, ‘koyekola koyeba’ Nzambe elimboli kokoba koyekola makambo mingi oyo etali Nzambe. Kasi, yango esuki kaka te na koyeba bizaleli na ye mpe makambo oyo akani kosala. Koyeba Yehova elimboli mpe kolinga ye na motema mobimba mpe kolinga bandeko na biso bandimi. Biblia elobi: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te.” (1 Yoa. 4:8) Na yango, koyeba Nzambe elimboli mpe kotosa ye. (Tángá 1 Yoane 2:3-5.) Kotángama na kati ya bato oyo bayebi Yehova ezali mpenza lokumu monene! Kasi, ndenge esalemaki mpo na Yudasi Mokeriota, moto akoki kobebisa boyokani na ye na Nzambe. Tósala makasi mpo na kobatela boyokani na biso na Nzambe. Soki tosali bongo, nsukansuka tokozwa bomoi ya seko, likabo oyo Nzambe akopesa biso mpo na boboto na ye monene.—Mat. 24:13.
“MPO NA NKOMBO NA YO”
8, 9. Likambo nini Yesu azalaki kosala libosoliboso ntango azalaki awa na mabele, mpe likanisi nini bakonzi ya mangomba babimisaki kasi Yesu aboyaki yango?
8 Soki totángi libondeli ya Yesu oyo ezali na Yoane mokapo 17, tokomona polele ete Yesu azalaki mpenza kolinga bantoma na ye oyo bazalaki wana, mpe bato mosusu oyo basengelaki kokóma bayekoli na ye na nsima. (Yoa. 17:20) Tosengeli mpe koyeba ete lobiko na biso ezali te likambo ya libosoliboso oyo Yesu azalaki kokanisa. Banda ebandeli tii nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele, likambo oyo elekaki ntina mpo na ye ezalaki nde kosantisa nkombo ya Tata na ye mpe kopesa yango nkembo. Na ndakisa, na sinagoga ya Nazarete, ntango alobelaki ntina oyo ayaki awa na mabele, Yesu atángaki rulo ya Yisaya oyo elobi ete: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu.” Na ntembe te, ntango Yesu atángaki maloba wana, atángaki polele nkombo ya Nzambe.—Luka 4:16-21.
9 Ntango molai liboso ete Yesu aya awa na mabele, bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kopekisa bato kosalela nkombo ya Nzambe. Kozanga ntembe, Yesu atɛmɛlaki makasi likanisi wana. Alobaki na banguna na ye ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai, kasi bozali koyamba ngai te; soki moto mosusu ayaki na nkombo na ye moko, mbɛlɛ boyambaki ye.” (Yoa. 5:43) Na nsima, na libondeli oyo asalaki mwa mikolo moke liboso akufa, Yesu amonisaki mposa na ye ya libosoliboso ntango alobaki ete: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” (Yoa. 12:28) Na yango, tokoki kokamwa te ndenge Yesu amonisaki, na libondeli oyo tozali kotalela, ete kopesa nkombo ya Tata na ye nkembo ezali likambo oyo elekaki ntina na bomoi na ye.
10, 11. (a) Ndenge nini Yesu asalisaki bato báyeba nkombo ya Tata na ye? (b) Bayekoli ya Yesu basengeli kozala na mokano ya kosala nini?
10 Yesu abondelaki boye: “Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai. Bazalaki ya yo, mpe opesi ngai bango, mpe batosi liloba na yo. Mpe ngai nazali lisusu na mokili te, kasi bango bazali na mokili mpe ngai nazali koya epai na yo. Tata mosantu, kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo oyo opesi ngai, mpo bázala moko ndenge biso mpe tozali.”—Yoa. 17:6, 11.
11 Kolakisa bayekoli na ye nkombo ya Tata na ye esukaki kaka te na kotángela bango nkombo yango. Yesu asalisaki bango mpe báyeba oyo nkombo yango emonisi: bizaleli kitoko ya Nzambe mpe makambo malamu oyo asalelaka biso. (Kob. 34:5-7) Lelo oyo, Yesu azali Mokonzi na likoló; mpe azali kokoba kosalisa bayekoli na ye báyebisa bato nkombo ya Yehova na mabele mobimba. Mpo na nini? Mpo na kosalisa bato mosusu ebele báyeba Yehova liboso ete mokili oyo mabe ekóma na nsuka na yango. Na ntango wana, Yehova akomisalela nkombo moko ya nkembo koleka ntango akobikisa basaleli na ye ya sembo!—Ezk. 36:23.
“MPO MOKILI ENDIMA”
12. Makambo nini misato tosengeli kosala mpo tósilisa mosala ya kobikisa bato oyo Yesu abandaki?
12 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalaki mosala makasi mpo na kosalisa bayekoli na ye bálonga bolɛmbu na bango. Yango ezalaki na ntina mingi mpo esalisa bango bákoka kosilisa mosala oyo Yesu abandaki. Yesu abondelaki boye: “Kaka ndenge otindaki ngai na kati ya mokili, ngai mpe natindi bango na kati ya mokili.” Mpo bálonga kosala mosala wana oyo ekoki kobikisa bato, Yesu alobelaki makambo misato ya ntina oyo bayekoli na ye basengelaki kosala. Ya liboso, abondelaki ete bayekoli na ye bázala te bato ya mokili ya Satana oyo etondi na mbindo. Ya mibale, abondelaki ete básalela mateya oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpo bázala basantu to pɛto. Ya misato, Yesu asɛngaki mbala na mbala ete bayekoli na ye bázala na bomoko mpe na bolingo ndenge ezalaki kati na ye ná Tata na ye. Yango esengeli kotinda biso tómitalela. Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nazali kosala na boyokani na makambo wana misato oyo Yesu asɛngaki?’ Yesu ayebaki ete soki bayekoli na ye basali makambo wana, bato mingi bakondima nsango na bango; alobaki ete “mpo mokili endima ete otindaki ngai.”—Tángá Yoane 17:15-21.
13. Ndenge nini Yehova ayanolaki libondeli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso?
13 Soki toyekoli mokanda ya Misala ya bantoma, oyo eyei nsima ya baevanzile, tokoki koyeba soki Yehova ayanolaki libondeli ya Yesu. Kanisá ndenge bokabwani elingaki kozala na lisangá ya bokristo ya liboso, oyo esangisaki Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu, bazwi ná babola, baombo ná bankolo ya baombo. Nzokande, bango nyonso bazalaki na bomoko makasi, yango wana ntoma Paulo akokanisaki bango na nzoto moko oyo ezali na motó moko, Yesu. (Ef. 4:15, 16) Yango ezalaki mpenza likamwisi na mokili ya Satana oyo ezali na bokabwani! Nkembo nyonso esengeli kokende epai ya Yehova, oyo asali ete bomoko wana ezala na nzela ya elimo santu na ye.—1 Ko. 3:5-7.
14. Ndenge nini Yehova ayanoli na libondeli ya Yesu na mikolo na biso?
14 Likambo ya mawa, bomoko wana ezalaki lisusu te nsima ya liwa ya bantoma. Kasi, ndenge esakolamaki, lipɛngwi monene ekɔtaki na lisangá, mpe ebimisaki mangomba ya bokristo ya mikemike. (Mis. 20:29, 30) Kasi na 1919, Yesu alongolaki bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo na boombo ya mangomba ya lokuta mpe ayanganisaki bango esika moko na “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kol. 3:14) Mosala ya kosakola oyo basalaki na bomoko ebimisi matomba nini? “Bampate mosusu” koleka milio 7 oyo bauti “na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bakɔti na etonga kaka moko elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Yoa. 10:16; Em. 7:9) Yango ezali mpenza eyano monene na libondeli oyo Yesu asalaki ete “mokili eyeba ete [yo Yehova] otindaki ngai mpe olingaki bango ndenge olingaki ngai”!—Yoa. 17:23.
ASUKISAKI NA MALOBA KITOKO
15. Likambo nini Yesu asɛngaki mpo na bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo?
15 Na mpokwa ya mokolo ya 14 ya sanza ya Nisana, Yesu apesaki bantoma na ye nkembo to lokumu na ndenge asalaki na bango kondimana mpo báyangela elongo na ye na Bokonzi na ye. (Luka 22:28-30; Yoa. 17:22) Na yango, mpo na bato nyonso oyo basengelaki kokóma bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo, Yesu abondelaki ete: “Tata, mpo na oyo opesi ngai, nalingi ete, epai nazali, bango mpe bázala esika moko na ngai, mpo bámona nkembo na ngai oyo opesi ngai, mpo olingaki ngai liboso ya ebandeli ya mokili.” (Yoa. 17:24) Na esika bampate mosusu ya Yesu báyokela bango zuwa, bayokaka nde esengo, mpe yango emonisi ete bakristo nyonso ya solo awa na mabele bazali mpenza na bomoko.
16, 17. (a) Na nsuka ya libondeli na ye, Yesu amonisaki ete tosengeli kokoba kosala nini? (b) Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
16 Bato mingi na mokili bándimaka te ete Yehova azali na basaleli na ye oyo bazali na bomoko mpe bayebi ye malamu. Mbala mingi, bakonzi ya mangomba nde bateyaka bango lokuta wana. Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Yesu. Yango wana, Yesu asukisaki libondeli na ye na maloba kitoko oyo: “Tata moyengebene, ya solo mokili eyebi yo te; kasi ngai nayebi yo, mpe bango bayebi ete otindaki ngai. Mpe nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”—Yoa. 17:25, 26.
17 Nani akoki koloba ete Yesu azali te kosala na boyokani na libondeli na ye? Lokola azali Mokonzi ya lisangá, azali kokoba kosalisa biso tóyeba nkombo ya Tata na ye mpe mokano na ye. Tiká tótosa ntango nyonso bokonzi na ye na kotosáká na motema mobimba etinda oyo apesaki ete tósakola mpe tókómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20; Mis. 10:42) Tósala mpe makasi mpo na kobatela bomoko na biso. Soki tosali nyonso wana, tokosala na boyokani na libondeli ya Yesu, mpe yango ekopesa nkembo na nkombo ya Yehova mpe tokozwa esengo ya libela na libela.