Yehova alingaka baoyo ‘babotaka mbuma wana bazali koyika mpiko’
“Oyo ekwei na mabele ya malamu, ezali bato oyo, . . . baboti mbuma wana bazali koyika mpiko.”—LUKA 8:15.
1, 2. (a) Mpo na nini bandakisa ya bandeko oyo bakobaka kosakola na bateritware oyo bato mingi baboyaka koyoka elendisaka biso? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Yesu alobaki nini na likambo etali kosakola na ‘mboka na yo’? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
NDEKO Sergio ná mwasi na ye Olinda oyo bazali babongisi-nzela na États-Unis, bango nyonso mibale bazali na mbula koleka 80. Mpasi ya makolo ezalaki kosala ete kotambola ezala pɛtɛɛ te mpo na bango. Kasi, kaka ndenge bazalaki kosala na boumeli ya bambula, bazalaki kobima ntɔngɔ na ngonga ya 7, mpe kotambola tii esika bato bazalaka ebele na engumba. Bazalaki kofanda esika bazwaka bisi mpe bazalaki kopesa baleki-nzela mikanda. Bato mingi bazalaki kokipe bango te, kasi bango bazalaki kaka wana mpe kosɛkisa mwa moke bato oyo bazalaki kotala bango. Na midi, bazalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ tii na ndako na bango. Mpe mbula mobimba bazalaki kosala bongo ntɔngɔ nyonso mikolo motoba na pɔsɔ.
2 Ndenge moko na Sergio ná Olinda, ezali na bandeko ebele oyo basalelaka Yehova na bosembo mpe basakolaka na teritware na bango na boumeli ya bambula ebele, ata soki bato mingi bazali koyoka bango te. Soki teritware na yo mpe ezali lokola oyo touti kolobela, topesi yo longonya na ezaleli na yo ya koyika mpiko mpe ndenge ozali kokoba kosakola atako ezali mpasi.a Ndakisa na yo elendisaka bandeko mosusu ebele, ata mpe baoyo balekisi bambula mingi na mosala ya Nzambe. Talá oyo bakɛngɛli mosusu ya zongazonga balobaki; moko alobaki: “Ntango nasakolaka elongo na bandeko ya sembo, ndakisa na bango epesaka ngai makasi.” Mosusu alobaki: “Bosembo na bango elendisaka ngai nakoba mpe nazala na mpiko na mosala ya kosakola.” Mpe mokɛngɛli mosusu alobaki ete: “Bandakisa na bango esimbaka motema na ngai.”
3. Mituna misato nini tokotalela, mpe mpo na nini?
3 Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna misato oyo: Mpo na nini na bantango mosusu tolɛmbaka nzoto? Kobota mbuma elimboli nini? Nini ekosalisa biso tókoba kobota mbuma wana tozali koyika mpiko? Biyano na mituna wana ekolendisa biso tókoba kosala mosala oyo Yesu asɛngi biso tósala.
MPO NA NINI NA BANTANGO MOSUSU TOLƐMBAKA NZOTO?
4. (a) Paulo amiyokaki ndenge nini lokola Bayuda baboyaki nsango malamu? (b) Mpo na nini Paulo amiyokaki bongo?
4 Ekómela yo mpe olɛmba nzoto mpo bato na teritware na yo bazali koboya koyoka nsango ya Bokonzi? Soki ezali bongo, okoyeba mpenza ndenge oyo ntoma Paulo azalaki komiyoka. Asakolaki na boumeli ya mbula soki 30, mpe asalisaki ebele ya bato bakóma bakristo. (Misala 14:21; 2 Bakorinti 3:2, 3) Atako bongo, akokaki te kosalisa Bayuda mingi bakóma bakristo ya solo. Kutu, mingi na bango baboyaki koyoka ye, mpe basusu banyokolaki ye. (Misala 14:19; 17:1, 4, 5, 13) Likambo yango etindaki ye amiyoka ndenge nini? Alobaki: “Nazali na mawa monene mpe na mpasi oyo ezali kosila te na motema na ngai.” (Baroma 9:1-3) Mpo na nini amiyokaki bongo? Mpo azalaki kolinga mosala ya kosakola mpe bato. Ntoma Paulo azalaki mpenza kotyela Bayuda likebi mpe ayokaki mawa ndenge baboyaki motema mawa ya Nzambe.
5. (a) Nini etindaka biso tósakola? (b) Mpo na nini na bantango mosusu tolɛmbaka nzoto?
5 Ndenge moko na Paulo, biso mpe tosakolaka mpo totyelaka bato likebi mpe tolingi kosalisa bango. (Matai 22:39; 1 Bakorinti 11:1) Toyebi malamu ete kosalela Yehova ememaka mapamboli ebele. Mpe tozali na mposa ete basusu mpe bázwa mapamboli yango. Yango wana, totikaka te kolendisa bango báyekola solo etali Yehova mpe mokano na ye mpo na bato. Ezali lokola nde tomemeli bango likabo moko ya kitoko mpe tozali kobondela bango na maloba oyo: ‘Tobondeli bino bózwa yango.’ Na yango, soki baboyi kozwa, ekoki kosala biso mpasi na motema, ndenge esalaki Paulo. Esalaka mpasi mpo tolingaka mpenza bato kasi te mpo tozangi kondima. Yango wana, ata soki tokoki mbala mosusu kolɛmba nzoto, tosengeli kokoba kosakola. Ntango mosusu tozali na makanisi moko na ndeko Elena, oyo azali mobongisi-nzela eleki sikoyo mbula soki 25, alobi: “Namonaka mosala ya kosakola mpasi. Kasi, ezali na mosala moko te oyo ekokani na yango.”
KOBOTA MBUMA ELIMBOLI NINI?
6. Tokozwa eyano na motuna nini sikoyo?
6 Mpo na nini tosengeli komindimisa ete tokoki kolonga na mosala ya kosakola ata soki tozali kosakola esika nini? Mpo na koyanola na motuna wana ya ntina, tólobela naino ndakisa mibale oyo Yesu apesaki, oyo emonisi ntina ya ‘kobota mbuma.’ (Matai 13:23) Ndakisa ya liboso elobeli nzete ya vinyo.
7. (a) Na ndakisa ya Yesu, “mosali-bilanga,” “nzete ya vinyo,” mpe “bitape” ezali komonisa banani? (b) Motuna nini esengeli tózwa eyano na yango?
7 Tángá Yoane 15:1-5, 8. Na ndakisa wana, Yesu amonisaki ete Yehova azali “mosali-bilanga,” Yesu ye moko azali “nzete ya vinyo,” mpe bayekoli na ye bazali “bitape.”b Na nsima, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.” Na yango, kobota mbuma elimboli nini? Na ndakisa yango, Yesu alobeli te na bosikisiki ndimbola ya kobota mbuma, kasi alobelaki mwa likambo oyo ekoki kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango.
8. (a) Na ndakisa oyo Yesu apesaki, mpo na nini ‘kobota mbuma’ elimboli te kokómisa bato bayekoli? (b) Yehova asɛngaka biso makambo ya ndenge nini?
8 Yesu alobaki mpo na Tata na ye ete: “Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te alongolaka yango.” Na maloba mosusu, tokozala basaleli ya Yehova kaka soki tozali kobota mbuma. (Matai 13:23; 21:43) Na yango, na ndakisa wana, kobota mbuma elimboli te kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19) Soki ezalaki bongo, tokoloba ete basaleli ya sembo ya Yehova oyo bakómisà naino moto te moyekoli ya Yesu bazali lokola bitape oyo ebotaka mbuma te. Kasi yango ekoki kozala solo te! Mpo na nini? Mpo tokoki te kotindika bato na makasi bákóma bayekoli. Yehova alingaka biso mingi. Akoki te kotinda biso tósala likambo oyo tokokoka ata moke te. Asɛngaka biso kaka makambo oyo tokokoka kosala.—Kolimbola Mibeko 30:11-14.
9. (a) Tobotaka mbuma ntango tosalaka mosala nini? (b) Ndakisa nini tokolobela?
9 Na yango, kobota mbuma elimboli nini? Na ntembe te ezali likambo oyo moto nyonso akoki kosala. Mosala nini Yehova apesá basaleli na ye nyonso? Mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.c (Matai 24:14) Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni emonisi yango polele. Tólobela ndakisa yango.
10. (a) Na ndakisa oyo Yesu apesaki, mboto mpe mabele elimboli nini? (b) Milona ya blé ebotaki mbuma boni?
10 Tángá Luka 8:5-8, 11-15. Na ndakisa ya moloni, Yesu amonisaki ete mboto ezali “liloba ya Nzambe,” to nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Mabele ezali motema ya moto. Mboto oyo ekweaki na mabele ya malamu, ezwaki misisa, ebotaki mbuma mpe ekómaki nzete. Na nsima, nzete “ebotaki mbuma mbala nkama moko.” Soki nzete yango ezalaki blé, elingaki kobimisa mbuma nini? Mbuma ya blé ya moke? Te, elingaki kobimisa mboto, oyo na nsima ya mwa ntango ekokola mpe ekokóma blé. Na ndakisa oyo, mboto moko ebotaki mbuma nkama moko. Yango eteyi biso nini mpo na mosala ya kosakola?
11. (a) Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni, eteyi biso nini mpo na mosala ya kosakola? (b) Na ndenge nini tobotaka mboto ya sika?
11 Ntango baboti na biso oyo bazali bakristo to Batatoli mosusu bayebisaki biso nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpo na mbala ya liboso, ezalaki lokola nde balonaki mboto na mabele ya malamu. Basepelaki mingi ndenge tondimaki nsango yango. Mboto yango ezwaki misisa tii ebotaki mbuma. Kaka ndenge blé oyo touti kolobela ebotaki te blé mosusu ya sika, kasi nde mboto, biso mpe tobotaka te bayekoli ya sika kasi nde mboto ya sika.d Esalemaka ndenge nini? Ntango nyonso oyo toyebisaka basusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe, ezali lokola tozali kobwaka mboto oyo elonamaki na motema na biso mpe tozali kokómisa yango ebele. (Luka 6:45; 8:1) Na yango, ntango tozali kokoba koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ‘tobotaka mbuma wana tozali koyika mpiko.’
12. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo Yesu apesaki ya nzete ya vinyo mpe ya moloni? (b) Liteya yango etindi yo omiyoka ndenge nini?
12 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo Yesu apesaki ya nzete ya vinyo mpe ya moloni? Ndakisa yango esalisi biso tóyeba ete ata soki bato bazali kondima te tokoki ‘kobota mbuma’ wana tozali kokoba kosakola. Ntoma Paulo alobaki likambo ya ndenge wana ntango akomaki ete: “Moto na moto akozwa mbano na ye na kolanda mosala na ye mpenza ya makasi.” (1 Bakorinti 3:8) Yehova akopesa biso mbano mpo na mosala na biso, kasi te mpo na matomba oyo mosala na biso ezali kobimisa. Ndeko Matilda, oyo azali mobongisi-nzela na boumeli ya mbula soki 20, alobi: “Koyeba ete Yehova akopesa biso mbano mpo na milende tozali kosala epesaka ngai esengo.”
NDENGE NINI TOKOKI KOBOTA MBUMA WANA TOZALI KOYIKA MPIKO?
13, 14. Na kotalela Baroma 10:1, 2, nini etindaki Paulo atika te kosakola?
13 Nini ekosalisa biso ‘tóbota mbuma wana tozali koyika mpiko’? Ntango totalelaki ndakisa ya Paulo, tomonaki ete alɛmbaki nzoto ndenge Bayuda baboyaki nsango ya Bokonzi. Atako bongo, atikaki kosakola te. Amonisi ndenge amiyokaki mpo na Bayuda yango ntango alobaki: “Mposa ya motema na ngai mpe lilɔmbɔ na ngai epai ya Nzambe mpo na bango ezali mpenza ete bábika. Mpo nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te.” (Baroma 10:1, 2) Kasi mpo na nini Paulo akobaki kosakola?
14 Ya liboso, Paulo alobaki ete alingaki kosakwela Bayuda mpo na ‘mposa ya motema na ye.’ Alingaki mpenza ete Bayuda bábika. (Baroma 11:13, 14) Ya mibale, asalaki ‘lilɔmbɔ epai ya Nzambe mpo na bango.’ Paulo abondelaki Yehova asalisa Moyuda mokomoko andima nsango ya Bokonzi. Ya misato, Paulo alobi boye: “Bazali na molende mpo na Nzambe.” Paulo amonaki makambo ya malamu epai na bango mpe makoki ya kosalela Yehova. Ayebaki ete Bayuda wana ya molende bakokaki kokóma bayekoli ya molende ya Kristo lokola ye.
15. Ndenge nini tokoki komekola Paulo? Pesá bandakisa.
15 Ndenge nini tokoki komekola Paulo? Ya liboso, tosengeli kosala nyonso mpo na koluka ‘baoyo nyonso bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ Ya mibale, kobondela Yehova asalisa bato ya mitema sembo mpo bándima koyoka ntango tozali kosakwela bango. (Misala 13:48; 16:14) Yango nde ndeko Silvana asalaki, oyo alekisi mbula pene na 30 na mosala ya mobongisi-nzela. Alobi boye: “Liboso ya kokende kosakola na ndako moko na teritware na ngai, nabondelaka Yehova, nasɛngaka ye asalisa ngai nazala na makanisi malamu.” Tosengeli mpe kobondela mpo baanzelu básalisa biso tómona bato oyo bakondima koyoka. (Matai 10:11-13; Emoniseli 14:6) Ndeko Robert, oyo azali mobongisi-nzela koleka mbula 30, alobi boye: “Kosala elongo na baanzelu oyo bayebi malamu bomoi ya bato oyo tokei kotala, epesaka ngai esengo.” Ya misato, tosalaka makasi tómona makambo ya malamu epai ya bato mpe makoki na bango ya kosalela Yehova. Nkulutu moko na nkombo Carl, oyo asali mbula koleka 50 banda azwa batisimo, alobi: “Nalukaka komona ata elembo moke oyo ekoki komonisa bosembo ya moto, na ndakisa, kosɛka na ye, ndenge azali kotala bato na boboto, to motuna oyo euti mpenza na motema na ye.” Ndenge moko na Paulo, makambo wana ekoki kosalisa biso ‘tóbota mbuma wana tozali koyika mpiko.’
“KOPEMISA LOBƆKƆ NA YO TE”
16, 17. (a) Liteya nini tokoki kozwa na Mosakoli 11:6? (b) Mosala ya kosakola esalaka nini epai ya bato oyo batalaka biso?
16 Tosengeli kobosana ata moke te bolamu oyo mosala ya kosakola ememelaka bato, ata soki emonani lokola ete nsango yango ezali kosimba mitema ya bato te. (Tángá Mosakoli 11:6.) Bato mingi baboyaka koyoka nsango na biso, kasi atako bongo batalaka biso. Bamonaka ndenge tolataka malamu, tozali na bokonde mpe ndenge tosepelaka na bato. Yango ekoki kokamwisa bango, mpe na bantango mosusu ata mpe baoyo bazalaki kokanisela biso mabe bakoki kobongola makanisi na bango. Ndeko Sergio ná mwasi na ye Olinda bamonaki yango.
17 Ndeko Sergio alobi boye: “Na boumeli ya mwa ntango maladi esalaki ete tókende te kosakola esika tozalaki kokende. Ntango tozongaki, moleki-nzela moko atunaki biso, ‘Likambo nini ekómelaki bino? Tolukaki bino.’” Ndeko Olinda abakisi boye na mwa kosɛka moke: “Basɔfele bazalaki kopepa biso mpe koloba na biso ete, ‘mosala malamu!’ Kutu bazalaki kosɛnga biso bazulunalo.” Sergio ná Olinda bakamwaki mingi ntango mobali moko ayaki esika batyaka shario, mpe apesaki bango liboke ya fololo, mpe apesaki bango matɔndi mpo na mosala na bango.
18. Mpo na nini ozwi ekateli ya ‘kobota mbuma wana ozali koyika mpiko’?
18 Soki tozali ‘kopemisa lobɔkɔ na biso te’ na ndenge tozali koyebisa basusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe, tozali kopesa mabɔkɔ na mosala moko ya ntina mingi ya kopesa “litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Likambo eleki ntina ezali ete tokoki kozala na esengo makasi mpo toyebi ete tozali kosepelisa Yehova. Alingaka baoyo nyonso ‘babotaka mbuma wana bazali koyika mpiko’!
a Ata Yesu alobaki ete ezalaka pɛtɛɛ te kosakola na ‘mboka na yo.’ Yango ekomami na mikanda minei oyo elobeli mosala na ye ya kosakola.—Matai 13:57; Marko 6:4; Luka 4:24; Yoane 4:44.
b Atako bitape ezali komonisa bakristo oyo bakokende likoló, kasi ndakisa yango ezali na mateya mingi mpo na basaleli nyonso ya Yehova.
c Maloba ‘kobota mbuma’ ekoki mpe kolimbola kobota “mbuma ya elimo.” Lisolo oyo mpe oyo elandi ekolobela kobota “mbuma ya mbɛbu,” to kosakola nsango ya Bokonzi ya Nzambe.—Bagalatia 5:22, 23; Baebre 13:15.
d Na bantango mosusu, Yesu asalelaki ndakisa ya kolona mpe kobuka mbuma mpo na komonisa mosala ya kokómisa bato bayekoli.—Matai 9:37; Yoane 4:35-38.