Bilenge—Bótɛmɛla Zabolo
“Bólata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.”—BAEFESE 6:11.
1, 2. (a) Mpo na nini bilenge bakoki kolonga etumba oyo bazali kobunda na Satana ná bademo? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
NTOMA Paulo akokanisaki bomoi ya bakristo na oyo ya Soda. Tozali kobunda etumba ya elimo! Mpe tozali mpenza na banguna. Tozali kobunda na bato te kasi na Satana ná bademo na ye. Bamesani mpenza na bitumba mpo babundi na boumeli ya bambula ebele. Na yango, ezali komonana lokola ete tokokoka kolonga te, mingimingi soki tozali bilenge. Bilenge bakoki kolonga monguna oyo azali mpenza na nguya? Ɛɛ, bakoki kolonga! Mpo na nini? Mpo Yehova apesaka bango nguya. Ndenge moko na soda oyo amibongisi malamu, basengeli ‘kolata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe’ mpo bámibongisa na etumba.—Tángá Baefese 6:10-12.
2 Ntango ntoma Paulo asalelaki ndakisa wana, mbala mosusu azalaki kokanisa molato ya etumba ya basoda ya Roma. (Misala 28:16) Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa wana oyo ebongi mpenza. Tokolobela mpe makambo oyo bilenge mosusu balobaka mpo na mikakatano oyo bakutanaka na yango mpe matomba oyo bazwaka ntango balataka eloko mokomoko ya molato ya etumba ya elimo.
KOKANGAMA NA SOLO LOKOLA MOKABA
3, 4. Na ndenge nini solo ya Biblia ezali lokola mokaba ya soda ya Roma?
3 Tángá Baefese 6:14. Mokaba oyo soda ya Roma azalaki kolata na etumba ezalaki na mabende mpo na kobatela loketo na ye mpe mpo ebateli-ntolo ezala na esika na yango. Mikaba mosusu mpe ezalaki na esika moko ya makasi mpo na kotya mopanga mpe mbeli. Ntango soda azali na mokaba oyo efandi malamu, azalaki kobanga te ntango akei etumba.
4 Ndenge moko na mokaba, solo oyo toyekolaka na Liloba ya Nzambe ebatelaka biso na mateya ya lokuta. (Yoane 8:31, 32; 1 Yoane 4:1) Ntango tozali koyekola mateya ya solo na liloba ya Nzambe, ekozala mpasi te tótosa mitinda ya Yehova na bomoi na biso, to tólata “ebateli-ntolo.” (Nzembo 111:7, 8; 1 Yoane 5:3) Lisusu, ntango tozali mpenza kokanga ntina ya mateya ya solo, ekozala mpasi te kosalela yango liboso ya banguna.—1 Petro 3:15.
5. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kolobaka solo?
5 Lokola tozwaka mateya ya solo ya liloba ya Nzambe na motuya, totosaka oyo Biblia elobaka mpe tolobaka ntango nyonso solo. Lokuta ezali moko ya bibundeli oyo Satana asalelaka. Lokuta esalaka mabe epai ya moto oyo azali koloba yango mpe moto oyo azali kondima yango. (Yoane 8:44) Na yango, ata soki tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka makasi tólobaka lokuta te. (Baefese 4:25) Kasi ekoki kozala mpasi. Abigail, oyo azali na mbula 18, alobi: “Ntango mosusu emonanaka lokola ete ebongi te koloba solo, mingimingi soki koloba lokuta ekoki kosalisa yo olongwa na mokakatano moko.” Kasi mpo na nini asalaka makasi aloba ntango nyonso solo? Alobi boye: “Koloba solo esalisaka ngai nazala na lisosoli ya pɛto liboso ya Yehova. Mpe baboti ná baninga na ngai bayebi ete bakoki kotyela ngai motema.” Victoria oyo azali na mbula 23, alobi: “Ntango ozali koloba solo mpe kokɔtela solo, baninga na yo bakoki kotumola yo. Kasi matomba ezali. Na ndakisa, bakotyela yo motema, okomiyoka ozali pene ya Yehova, mpe bato oyo balingaka yo bakomemya yo.” Ya solo, ebongi mpenza kokoba ntango nyonso kokangama na solo lokola mokaba.
“EBATELI-NTOLO YA BOYENGEBENE”
6, 7. Mpo na nini bakokanisi bosembo na ebateli-ntolo?
6 Mbala mingi ebateli-ntolo ya soda ya Roma ezalaki kosalema na mwa ebende ya mikemike mpe ya makasi oyo elandaná mpo esimba malamu na ntolo. Mwa bibende yango ekangamaki na mposo ya nyama ná mwa bansɛtɛ mpe ba boucle. Mapeka ya soda ya Roma ezipamaki na mwa bibende ebele oyo bakangisá yango na mposo ya nyama. Ebateli-ntolo yango ezalaki kopekisa ye koningana ndenge alingi, mpe ezalaki kosɛnga ete atalatalaka ntolo na ye soki ebatelami malamu. Kasi ezalaki kobatela motema na ye mpe binama mosusu na mopanga to na likula!
7 Mibeko ya sembo ya Yehova, oyo ebatelaka “motema” na biso, to bomoto na biso ya kati, ekoki kokokanisama na ebateli-ntolo. (Masese 4:23) Soda akokaki te kopesa ebateli-ntolo na ye oyo esalemi na bibende mpo azwa oyo esalemi na mwa manzanza. Ndenge moko mpe, tokoki te kotika ete makanisi na biso ezwa esika ya mibeko ya sembo ya Yehova. Bwanya na biso ekoki te kobatela motema na biso. (Masese 3:5, 6) Yango wana, tosengeli mbala na mbala kotala soki “ebateli-ntolo” na biso ezali kokoba kobatela motema na biso.
8. Mpo na nini tosengeli kokangama na mibeko ya Yehova?
8 Ntango mosusu oyokaka ete mibeko ya Yehova elongolaka bonsomi na yo to epekisaka yo kosala makambo oyo olingaka? Daniel, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Balakisi mpe baninga ya kelasi basɛkaka ngai mpo natosaka mibeko ya Biblia. Na ntango moko boye, nazalaki lisusu komityela motema te mpe nakómaki kotungisama na makanisi.” Kasi sikoyo amiyokaka ndenge nini? Alobi: “Nsukansuka, namonaki bolamu ya kotosa mibeko ya Yehova. ‘Baninga’ mosusu babandaki komɛla makaya; basusu batikaki kelasi. Ezalaki mawa komona ndenge bomoi na bango ekómaki. Yehova abatelaka biso mpenza.” Madison, oyo azali na mbula 15, alobi: “Ezali etumba mpo nakangama na mibeko ya Yehova mpe nasala te makambo oyo baninga bamonaka ete ebongi.” Sikoyo asalaka ndenge nini? Abakisi: “Namikundolaka ete namemi nkombo ya Yehova mpe ete komekama wana ezali kaka mpo Satana alingi anyokola ngai. Ntango nyonso oyo nalongi komekama yango, namiyokaka malamu mpenza.”
‘MAKOLO OYO ELATI BISALELI YA NSANGO MALAMU YA KIMYA’
9-11. (a) Sapato nini ya elilingi bakristo balataka? (b) Nini ekosalisa biso tósakola malamu?
9 Tángá Baefese 6:15. Soda ya Roma akokaki te kokende etumba kozanga sapato na ye. Sapato na ye esalemaki na mposo misato ya nyama, yango wana ezalaki makasi mpenza. Kasi sapato yango ebongaki mpenza, na yango, soda akokaki kotambola kozanga mpasi mpe kozanga kotengatenga.
10 Ndenge kaka sapato ya soda ya Roma ezalaki kosalisa ye alonga etumba, sapato na biso mpe ya elilingi esalisaka biso tósakola ‘nsango malamu ya kimya.’ (Yisaya 52:7; Baroma 10:15) Kasi, ntango mosusu esɛngaka mpenza mpiko mpo na kosakola. Bo, oyo azali na mbula 20, alobi: “Kopesa litatoli na baninga ya kelasi ezalaki kobangisa ngai mpe ezalaki kopesa ngai nsɔni. Ntango nazongisaka makanisi nsima, nayebaka mpenza te ntina oyo nazalaki komiyoka bongo. Lelo oyo, nazali na esengo ya kopesa baninga na ngai litatoli.”
11 Bilenge mingi bamonaka ete basakolaka malamu soki bamibongisi liboso. Okoki kosala nini mpo omibongisa? Julia, oyo azali na mbula 16, alobi: “Natyaka mikanda na sakosi, mpe ntango baninga ya kelasi bapesaka makanisi mpe balobelaka bindimeli na bango nayokaka na likebi. Yango esalisaka ngai nakanisa na ndenge nakoki kosalisa bango. Soki namibongisi, nakoki kosolola na bango makambo oyo ekosalisa bango.” Makenzie, oyo azali na mbula 23, alobi: “Soki ozali boboto mpe moyoki malamu, okoyeba makambo oyo baninga na yo bakutanaka na yango. Nasalaka makasi natánga makambo nyonso oyo ebimisamaka mpo na bilenge. Na ndenge yango, nakoki kotinda baninga batánga likambo moko na Biblia to na jw.org, oyo ekosalisa bango.” Komibongisa malamu liboso ya kosakola ezali lokola ozali kolata “sapato” oyo ekoki yo malamu.
“NGUBA MONENE YA KONDIMA”
12, 13. Wapi mwa ‘mbanzi oyo ezali kopela’ oyo Satana asalelaka?
12 Tángá Baefese 6:16. Soda ya Roma azalaki kosimba nguba ya monene. Ezalaki kozipa ye kobanda na mapeka tii na mabɔlɔngɔ mpe ezalaki kobatela ye na mipanga, makɔnga, mpe na makula.
13 ‘Mbanzi oyo ezali kopela’ oyo Satana akoki kobwakela biso ezali nini? Akoki kosalela lokuta na ntina na Yehova. Satana alingi ete omona ete Yehova alingaka yo te mpe ete moto moko te akipaka yo. Ida, oyo azali na mbula 19, alobi: “Mbala mingi namiyokaka ete Yehova azali mosika na ngai mpe alingaka kozala moninga na ngai te.” Asalaka nini ntango amiyokaka ndenge wana? Abakisi: “Makita esalaka ete nabakisa kondima. Liboso nazalaki kopesa biyano te, mpe kokanisa ete moto moko te akolinga koyoka makambo nazali koloba. Sikoyo, nabongisaka makita malamu mpe nasalaka makasi napesa biyano mbala mibale to misato. Ezalaka pɛtɛɛ te, kasi nayokaka malamu mpenza ntango nasalaka bongo. Mpe bandeko balendisaka ngai mpenza. Ntango nyonso oyo nautaka makita namiyokaka ete Yehova alingaka ngai.”
14. Ndakisa ya Ida eteyi biso nini?
14 Nguba ya basoda nyonso ezalaka monene ndenge moko. Kasi ndenge ndakisa ya Ida emonisi yango, kondima ezalaka bongo te. Kondima na biso ekoki kobakisama to kokita, kokóma makasi to kolɛmba. Biso nde tosengeli kopona. (Matai 14:31; 2 Batesaloniki 1:3) Mpo ‘nguba ya kondima’ ebatela biso, tosengeli kokoba kokómisa yango monene mpe makasi!
“EKƆTI YA LOBIKO”
15, 16. Na ndenge nini elikya na biso ezali lokola ekɔti?
15 Tángá Baefese 6:17. Soda ya Roma azalaki kolata ekɔti mpo na kobatela motó, nkingo mpe elongi. Ntango mosusu ekɔti yango ezalaki na esimbeli mpo soda akoka komema yango na mabɔkɔ.
16 Ndenge kaka ekɔti ebatelaka bɔɔngɔ ya soda, “elikya ya lobiko” ebatelaka makanisi na biso. (1 Batesaloniki 5:8; Masese 3:21) Elikya esalisaka biso tótya makanisi na bilaka ya Nzambe mpe tólɛmba nzoto te mpo na mikakatano na biso. (Nzembo 27:1, 14; Misala 24:15) Kasi soki tolingi ete elikya ebatela biso, esengeli tómona yango likambo ya solo. Tosengeli kolata “ekɔti” na motó na biso, kasi te kosimba yango na mabɔkɔ.
17, 18. (a) Ndenge nini Satana alukaka kokosa biso mpo tólongola ekɔti na biso? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete Satana alongi kokosa biso te?
17 Ndenge nini Satana alukaka kokosa biso mpo tólongola ekɔti na biso? Kanisá ndenge amekaki kosala yango epai ya Yesu. Satana ayebaki ete Yesu akokóma mokonzi mpo na koyangela bato. Kasi, liboso asengelaki konyokwama mpe kokufa. Na nsima, asengelaki kozela tii ntango oyo Yehova akokómisa ye mokonzi. Na yango, Satana apesaki ye libaku ya kobanda koyangela na esika azela. Alakaki ye ete soki asali ata likambo moko ya losambo, akokóma mbala moko mokonzi ya mokili. (Luka 4:5-7) Satana ayebi ete Yehova alaki biso makambo malamu mpenza na mokili ya sika. Kasi tosengeli kozela tii ekokisama, mpe liboso ete makambo yango esalema tokoki kokutana na mikakatano ebele. Na yango, lelo oyo Satana alukaka kopesa biso bomoi oyo etondi na biloko ya mokili. Alingi tótya mposa na biso ya kozala na bomoi ya bongo na esika ya liboso mpe tótya Bokonzi ya Nzambe na nsima.—Matai 6:31-33.
18 Satana alongi te kokosa bilenge bakristo ebele. Na ndakisa, Kiana, oyo azali na mbula 20, alobi: “Nayebi ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano na biso nyonso.” Ndenge nini elikya na ye ebongisaka makanisi mpe bomoi na ye? Esalisaka ye ayeba ete makambo ya mokili oyo ezali kaka mpo na mwa ntango. Na esika ya kosala milende mingi mpo na koluka mosala ya lokumu na mokili oyo, asalelaka ntango na ye mpe makasi na ye na kosalela Yehova.
LILOBA YA NZAMBE EZALI “MOPANGA YA ELIMO”
19, 20. Ndenge nini tokoki komesana kosalela Liloba ya Nzambe malamu?
19 Basoda ya Roma bazalaki kosalela mopanga oyo ezalaki soki na molai ya 50 santimɛtrɛ. Basoda yango bayebaki malamu kosalela mopanga na bango mpo bazalaki kosalela yango mokolo na mokolo.
20 Ntoma Paulo alobaki ete Liloba ya Nzambe ezali lokola mopanga. Yehova apesá biso yango. Kasi tosengeli koyekola kosalela yango malamu mpo na kolobela bindimeli na biso to kobongisa makanisi na biso. (2 Bakorinti 10:4, 5; 2 Timote 2:15) Ndenge nini tokoki kokolisa makoki na biso? Sebastian, oyo azali na mbula 21, alobi: “Ntango nasalaka botángi na ngai ya Biblia, nakomaka vɛrsɛ moko na mokapo mokomoko oyo natángi. Nasalá liste ya bavɛrsɛ oyo nalingaka mingi.” Yango esalisaka ye ayeba malamu makanisi ya Yehova. Daniel abakisi: “Ntango nasalaka botángi na ngai ya Biblia, nazwaka bavɛrsɛ oyo namoni ete ekosalisa bato na mosala ya kosakola. Namoni ete bato basepelaka soki mosakoli ayebi Biblia malamu mpe azali kosala oyo akoki mpo na kosalisa bango.”
21. Mpo na nini tosengeli te kobanga Satana ná bademo?
21 Na lisolo oyo, ndenge bandakisa ya bilenge emonisi yango, tosengeli te kobanga Satana ná bademo. Ezali solo ete bazali na nguya, kasi Yehova aleki bango na nguya mosika mpenza. Mpe bakozala mpo na libela te. Bakokangama, bakozala lisusu na likoki ya kosala moto moko mabe te na boumeli ya Mbula nkóto ya boyengeli ya Kristo, mpe na nsima bakobomama. (Emoniseli 20:1-3, 7-10) Toyebi monguna na biso, mayele na ye, mpe mikano na ye. Tokoki kotɛmɛla ye na lisalisi ya Yehova!