LISOLO YA BOYEKOLI 39
“Talá! ebele mpenza ya bato”
“talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, . . . batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya mwana-mpate.”—EM. 7:9.
LOYEMBO 60 Tolingi bázwa bomoi
NA MOKUSEa
1. Mitungisi nini ntoma Yoane azalaki na yango na nsuka ya siɛklɛ ya liboso T.B.?
NA NSUKA ya siɛklɛ ya liboso T.B., ntoma Yoane azalaki na mitungisi mingi. Akómaki mobange, bamemaki ye na esanga babengi Patimosi, mpe emonani ete kaka ye nde ntoma oyo azalaki naino na bomoi. (Em. 1:9) Ayebaki ete bapɛngwi bazalaki koteya makambo ya lokuta na masangá mpe kokɔtisa bokabwani. Ezalaki komonana lokola ete etikalaki moke lisangá ya bokristo elimwa.—Yuda 4; Em. 2:15, 20; 3:1, 17.
2. Na kotalela Emoniseli 7:9-14, emonaneli nini oyo ezalaki esakweli Yoane amonaki? (Talá elilingi ya ezipeli.)
2 Na ntango yango, Yoane azwaki emonaneli moko ya kokamwa oyo esakolaki makambo oyo ekoya. Na emonaneli yango, bayebisaki baanzelu básimba naino mipɛpɛ makasi ya bolɔzi monene tii ntango bakosilisa kotya etuluku moko ya baombo ya Nzambe bilembo ya nsuka. (Em. 7:1-3) Etuluku yango ezali ya bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (Luka 12:32; Em. 7:4) Na nsima, Yoane alobelaki etuluku ya bato mosusu; lokola bazalaki mingi mpenza, alobaki: “Talá!” mbala mosusu mpo na komonisa ete akamwaki ndenge amonaki likambo oyo akanisaki te. Yoane amonaki nini? “Ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.” (Tángá Emoniseli 7:9-14.) Kanisá ndenge Yoane azalaki na esengo ntango ayebaki ete na mikolo ezali koya, ekozala na ebele ya bato oyo bakosalela Nzambe na ndenge oyo ebongi!
3. (a) Mpo na nini emonaneli ya Yoane esengeli kokómisa kondima na biso makasi? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
3 Na ntembe te, emonaneli yango ekómisaki kondima ya Yoane makasi. Esengeli kokómisa makasi koleka kondima na biso, mpo tozali na ntango oyo emonaneli yango ezali kokokisama! Tomoni koyanganisama ya bamilio ya bato oyo bazali na elikya ya kobika na bolɔzi monene mpe ya kofanda libela na libela awa na mabele. Na lisolo oyo, tokotalela ndenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye báyeba soki “ebele mpenza ya bato” ezali banani, esali sikoyo mbula koleka 80. Na nsima, tokolobela makambo mibale oyo etali etuluku yango: (1) monene na yango mpe (2) bisika oyo bauti. Makambo yango esengeli kokómisa makasi kondima ya baoyo nyonso bazali na kati ya bato yango oyo bapambolami.
ETULUKU YA “EBELE MPENZA YA BATO” EKOZWA BOMOI WAPI?
4. Solo nini ya Biblia mangomba ya bokristo eteyaka te, mpe ndenge nini etuluku ya Bayekoli ya Biblia ekesanaki na mangomba yango?
4 Mangomba mingi ya bokristo eteyaka te solo ya Biblia oyo elobi ete mokolo mosusu bato ya botosi bakozala na bomoi libela na libela awa na mabele. (2 Ko. 4:3, 4) Lelo oyo, mangomba mingi eteyaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló soki bakufi. Kasi, mwa etuluku ya Bayekoli ya Biblia, oyo bakómaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mbula 1879, bazalaki koteya bongo te. Bakangaki ntina ete Nzambe akozongisa Paradiso na mabele mpe ete bamilio ya bato ya botosi bakozala na bomoi awa na mabele, kasi na likoló te. Atako bongo, ezwaki ntango mpo báyeba mpenza soki bato yango ya botosi ekozala banani.—Mat. 6:10.
5. Bayekoli ya Biblia bazalaki kondima nini mpo na bato 144 000?
5 Na nzela ya Makomami, Bayekoli ya Biblia basosolaki mpe ete etuluku ya bato mosusu ‘bakosombama na mabele’ mpo na kokende koyangela na Yesu na likoló. (Em. 14:3) Etuluku yango ekozala na bato 144 000, ya bakristo ya molende, oyo bamipesaki na Nzambe mpe basalelaki ye na bosembo awa na mabele. Bongo “ebele mpenza ya bato”?
6. Bayekoli ya Biblia bazalaki kondima nini mpo na “ebele mpenza ya bato”?
6 Na emonaneli na ye, Yoane amonaki “ebele mpenza ya bato” “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.” (Em. 7:9) Maloba yango etindaki Bayekoli ya Biblia bándima ete ndenge moko na bato 144 000, ebele mpenza ya bato bakokende mpe na likoló. Soki bituluku yango mibale ekozwa bomoi na likoló, nini ekokesenisa yango? Bayekoli ya Biblia bazalaki kokanisa ete “ebele mpenza ya bato” ezalaki bakristo oyo bazalaki mpenza na botosi te epai ya Nzambe ntango bazalaki awa na mabele. Bazalaki mpe kokanisa ete bamosusu kati na bango bazalaki bandimi ya mangomba ya bokristo, oyo bazalaki na mwa bizaleli ya malamu. Bamonaki ete bato yango bazalaki na mwa molende, kasi yango ekokaki te mpo bázwa libaku ya koyangela elongo na Yesu. Bazalaki koloba ete lokola bolingo na bango epai ya Nzambe ezalaki makasi te, “ebele mpenza ya bato” bakokaki kokende na likoló mpo na kotɛlɛma liboso ya kiti ya bokonzi, kasi te mpo na kofanda na bakiti ya bokonzi.
7. Mpo na Bayekoli ya Biblia, banani balingaki kofanda awa na mabele na Boyangeli ya Mbula Nkóto, mpe bazalaki kondima nini mpo na mibali ya sembo ya ntango ya kala?
7 Bongo banani nde balingaki kofanda awa na mabele? Bayekoli ya Biblia bazalaki kondima ete ntango bato 144 000 mpe “ebele mpenza ya bato” bakokende na likoló, bamilio mosusu ya bato bakozala awa na mabele mpo bázwa mapamboli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo. Bayekoli ya Biblia bazalaki komona te ete bato yango basengeli kosalela Yehova liboso Boyangeli ya Kristo ebanda. Bazalaki kokanisa ete bakoyekola mateya ya Yehova na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Na nsima, baoyo bakotosa mibeko ya Yehova bakozwa bomoi ya seko awa na mabele, kasi baoyo bakotosa te bakobebisama. Mpo na “bankumu” oyo bakozala na mabele na Boyangeli ya Mbula Nkóto, Bayekoli ya Biblia bazalaki kondima ete mwa ndambo bakozwa mbano ya kokende na likoló na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Kati na bango ekozala mpe na “bankumu ya kala” to mibali ya sembo ya ntango ya kala, oyo bakosekwa.—Nz. 45:16.
8. Bayekoli ya Biblia bazalaki kolobela bituluku nini misato?
8 Na yango, Bayekoli ya Biblia bazalaki koloba ete ezali na bituluku misato: (1) bato 144 000, oyo bakoyangela na Yesu na likoló; (2) ebele mpenza ya bato, elingi koloba bakristo oyo bazali na molende mingi te, oyo bakotɛlɛma liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate na likoló; mpe (3) bamilio ya bato oyo bakoyekola makambo ya Yehova awa na mabele na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto.b Kasi, na ntango oyo esengeli, Yehova atindaki pole mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya likambo yango.—Mas. 4:18.
POLE YA SOLO ENGƐNGI MAKASI
9. (a) Na ndenge nini ebele mpenza ya bato awa na mabele bakoki kotɛlɛma “liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate”? (b) Mpo na nini ndimbola yango ya Emoniseli 7:9 ebongi mpenza?
9 Na 1935, eyebanaki soki “ebele mpenza ya bato” oyo Yoane amonaki ezali banani. Batatoli ya Yehova bayaki koyeba ete esɛngi te ete ebele mpenza ya bato bázala kuna na likoló mpo bátɛlɛma “liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate.” Kasi, bakosala yango na ndenge ya elilingi. Ata soki bakofanda na mabele, bakoki kotɛlɛma “liboso ya kiti ya bokonzi,” elingi koloba kondima ete Yehova azali moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe kotosa boyangeli yango. (Yis. 66:1) Bakokaki kotɛlɛma “liboso ya Mwana-Mpate,” elingi koloba komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. Ndenge moko mpe, Matai 25:31, 32 elobi ete “bikólo nyonso,”—ata mpe bato mabe—“bakoyangana liboso” ya Yesu oyo afandi na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Ya solo, bikólo yango ekozala na likoló te, kasi nde awa na mabele. Liteya oyo esembolamaki na 1935 ebongi mpenza. Yango emonisi ntina oyo Biblia elobi ata na esika moko te ete etuluku ya ebele mpenza ya bato ekei na likoló. Kaka etuluku moko, ya bato 144 000, nde bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na likoló mpe “bakoyangela mabele” elongo na Yesu.—Em. 5:10.
10. Mpo na nini ezali na ntina ete ebele mpenza ya bato báyekola makambo ya Yehova liboso ya Boyangeli ya Mbula Nkóto?
10 Kobanda na 1935, Batatoli ya Yehova bayebaki ete ebele mpenza ya bato oyo Yoane amonaki na emonaneli ezali bakristo ya sembo oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele. Mpo na kobika na bolɔzi monene, “ebele mpenza ya bato” basengeli koyekola makambo ya Yehova mpe kosalela ye liboso Boyangeli ya Mbula Nkóto ebanda. Basengeli mpe kozala na kondima makasi mpo ‘bákoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema’ liboso ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo.—Luka 21:34-36.
11. Mpo na nini Bayekoli mosusu ya Biblia bakanisaki ete mbala mosusu bato mosusu bakokende na likoló na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto?
11 Tokoki koloba nini mpo na likanisi oyo Bayekoli ya Biblia babimisaki, ete bato mosusu ya malamu awa na mabele bakokende na likoló na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? Balobelaki likambo yango kala, na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1913 (na Anglais), mpo bato mosusu bazalaki koloba ete: ‘Mpo na nini mibali ya sembo ya ntango ya kala bázwa kaka libula awa na mabele, kasi bakristo mosusu oyo bazalaki te na kondima makasi lokola bango bázwa mbano ya bomoi na likoló?’ Bazalaki koloba bongo mpo bazalaki na makanisi mibale ya libunga: (1) bazalaki kokanisa ete ebele mpenza ya bato bakofanda na likoló mpe (2) ebele mpenza ya bato ezali bakristo oyo bazali mpenza na molende te.
12-13. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “ebele mpenza ya bato” bayebi nini mpo na mbano oyo bakozwa?
12 Kasi, ndenge tomonaki yango, kobanda na 1935, Batatoli ya Yehova bakangaki ntina ete bato oyo bakobika na Armagedone nde ebele mpenza ya bato oyo Yoane amonaki na emonaneli. ‘Bakouta na bolɔzi monene’ kaka awa na mabele, mpe bakoganga “na mongongo makasi ete: ‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.’” (Em. 7:10, 14) Lisusu, Biblia eteyaka ete baoyo bazali kosekwa mpo na bomoi na likoló bazwi “eloko moko ya malamu koleka” mibali ya sembo ya ntango ya kala. (Ebr. 11:40) Na yango, bandeko na biso bakómaki kobenga bato na esengo nyonso básalela Yehova na elikya ya kofanda libela na libela awa na mabele.
13 Bato oyo bazali na etuluku ya ebele mpenza ya bato basepelaka na elikya na bango. Bayebi ete Yehova nde aponelaka basambeli na ye ya sembo esika oyo bakosalela ye, ezala na likoló to na mabele. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “ebele mpenza ya bato” bayebi ete mbano oyo bakozwa ezali kaka mpo Yehova amoniseli bango boboto monene na ye na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo.—Rom. 3:24.
ETULUKU MOKO MONENE
14. Nsima ya 1935, mpo na nini bato mingi bazalaki komituna soki esakweli ya ebele mpenza ya bato ekokokisama?
14 Nsima ya kozwa ndimbola ya sikisiki na 1935, basaleli mingi ya Yehova bazalaki kaka komituna ndenge nini baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bakokaki kokóma ebele mpenza. Na ndakisa, Ronald Parkin azalaki na mbula 12 ntango eyebanaki soki ebele mpenza ya bato ezali banani. Alobaki boye: “Na ntango wana, basakoli bazalaki soki 56 000 na mokili mobimba, mpe mingi, ntango mosusu pene na bango nyonso, bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na yango, ezalaki komonana ete etuluku ya ebele mpenza ya bato ezali monene te.”
15. Ndenge nini koyanganisama ya etuluku ya ebele mpenza ya bato ekobaki kosalema?
15 Kasi, na bambula oyo elandaki, bamisionɛrɛ batindamaki na mikili mingi, mpe motángo ya Batatoli ya Yehova ebakisamaki nokinoki. Na nsima, na 1968, bakómaki koyekola na bato Biblia na lisalisi ya buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ndenge buku yango elimbolaki mateya ya Biblia polele ebendaki bato ya komikitisa na lisangá na ndenge oyo esalemaki naino te. Nsima ya mbula minei, bato koleka 500 000 bazwaki batisimo. Ntango bato mingi ya Amérique latine mpe ya bikólo mosusu babandaki kotika Lingomba ya Katolike, mpe lokola bipekiseli na mosala na biso elongwaki na bikólo ya Europe de l’Est mpe ya mikili mosusu ya Afrika, bamilio ya bato mosusu bazwaki batisimo. (Yis. 60:22) Na bambula oyo euti koleka, ebongiseli ya Yehova ebimisi bisaleli mosusu ebele mpo na kosalisa bato báyeba makambo oyo Biblia eteyaka. Na yango, ntembe ezali te ete Yehova azali koyanganisa “ebele mpenza ya bato”; bazali lelo bato koleka milio mwambe.
BAUTI NA BISIKA NDENGE NA NDENGE
16. Bato oyo bazali na etuluku ya ebele mpenza ya bato bauti wapi?
16 Ntango akomaki emonaneli na ye, Yoane alobaki ete ebele mpenza ya bato yango bakouta na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” Bambula mingi liboso, mosakoli Zekaria asakolaki likambo moko ya ndenge wana; akomaki boye: “Na mikolo yango, bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo bakosimba, ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda moko mpe bakoloba ete: ‘Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.’”—Zek. 8:23.
17. Mosala nini ezali kosalema mpo na kosalisa bato ya bikólo nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso?
17 Batatoli ya Yehova bayebaka ete mpo bato ya minɔkɔ nyonso báyanganisama, nsango malamu esengeli kosakolama na minɔkɔ ebele. Esali bambula koleka 130 kobanda tobongolaka mikanda oyo esalisaka na koyekola Biblia, kasi sikoyo mosala yango eleki misala mosusu nyonso ya kobongola mikanda mpo tozali kobongola na minɔkɔ koleka 900. Ezali polele ete Yehova azali kosala likamwisi lelo oyo—azali koyanganisa ebele mpenza ya bato na bikólo nyonso. Lokola bilei ya elimo ezali se kokóma ebele mpe ezali na minɔkɔ ebele, bato yango oyo bazali na bikólo ndenge na ndenge bazali kosambela Yehova na bomoko. Eyebani ete bazalaka na molende na mosala ya kosakola mpe balinganaka na motema moko. Likambo yango ezali kokómisa kondima na biso makasi!—Mat. 24:14; Yoa. 13:35.
NTINA YA EMONANELI YANGO MPO NA BISO!
18. (a) Na kotalela Yisaya 46:10, 11, mpo na nini tokamwaka te ndenge Yehova akokisi esakweli oyo etali ebele mpenza ya bato? (b) Mpo na nini baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele bamonaka te ete bazangi eloko moko?
18 Tozali mpenza na ntina ya kozala na esengo mpo na esakweli oyo elobeli ebele mpenza ya bato! Tokamwaka te ndenge Yehova akokisi esakweli yango malamu mpenza. (Tángá Yisaya 46:10, 11.) Bato oyo bazali na etuluku ya ebele mpenza ya bato bazali na botɔndi mpo na elikya oyo Yehova apesi bango. Bamonaka te ete bazangi eloko moko mpo Yehova atye bango mafuta na elimo te mpo básala elongo na Yesu na likoló. Na Biblia, totángaka masolo ya mibali mpe basi ya kondima oyo batambwisamaki na elimo santu; atako bongo bazali na kati ya bato 144 000 te. Yoane Mobatisi azali moko na bango. (Mat. 11:11) Tokoki kotánga mpe Davidi. (Mis. 2:34) Bango ná bato mosusu ebele bakosekwa mpo na kozala na bomoi na paradiso awa na mabele. Bango nyonso—elongo na “ebele mpenza ya bato,”—bakozwa libaku ya komonisa bosembo epai ya Yehova mpe boyangeli na ye.
19. Ndenge nini kokokisama ya emonaneli ya ebele mpenza ya bato emonisi ete sikoyo ezali ntango ya kozwa makambo na lisɛki te?
19 Oyo ezali mbala ya liboso Nzambe ayanganisa bamilio ya bato ya bikólo ndenge na ndenge na losambo na ye. Tózala na elikya ya kozwa bomoi na likoló to na mabele, tosengeli kosalisa bato báya kokɔta na etuluku ya ebele mpenza ya bato ya “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Mosika te, Yehova akoyeisa bolɔzi monene oyo esakolamaki mpo na kobebisa baguvɛrnema mpe mangomba oyo enyokoli bato. Bato nyonso oyo bazali na etuluku ya ebele mpenza ya bato bazali na libaku moko monene: Bakoki kosalela Yehova libela na libela na mabele!—Em. 7:14.
LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika
a Lisolo oyo elobeli emonaneli ya Yoane oyo esakolaki koyanganisama ya “ebele mpenza ya bato.” Na ntembe te, yango ekokómisa makasi kondima ya baoyo nyonso bazali na kati ya bato yango oyo bapambolami.