Biso nyonso tolendisamaka
1. Koya ya bakɛngɛli-batamboli epesaka biso mabaku nini?
1 Ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Loma boye: “Mpo nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi; to, kutu nde, mpo kolendisana ezala na kati na bino, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, na oyo ya bino mpe na oyo ya ngai.” (Lom. 1:11, 12) Lelo oyo mpe, koya ya bakɛngɛli-batamboli epesaka biso mabaku ya kolendisana.
2. Mpo na nini bayebisaka biso koya ya mokɛngɛli ya zongazonga basanza mingi liboso?
2 Lisangá: Mbala mingi, bayebisaka lisangá koya ya mokɛngɛli ya zongazonga soki sanza misato liboso. Yango epesaka biso ntango ya kobongisa programɛ na biso mpo tózwa mpenza matomba na koya na ye. (Ef. 5:15, 16) Soki osalaka, mbala mosusu okomona malamu kosɛnga konje mpo osakola na boumeli ya pɔsɔ wana. Basusu bamibongisaka mpo básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bango. Soki ozali kokana kosala mobembo, mpo na nini te kobongola programɛ na yo mpo ozala na lisangá na pɔsɔ wana?
3. Mokomoko na biso akoki kosala nini mpo alendisama ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei?
3 Ntina ya libosoliboso oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayaka kotala biso ezali ya kolendisa mokomoko na biso mpe kosalisa biso na mosala ya kosakola. Okoki nde kosɛnga osakola elongo na ye to mwasi na ye? Mokɛngɛli ya zongazonga asepelaka kosakola na basakoli ndenge na ndenge, ezala baoyo bameseni naino te na mosala yango. Ndenge na ye ya kosakola mpe toli oyo akoki kopesa na boboto ekoki kosalisa biso nyonso. (1 Kol. 4:16, 17) Soki obengisi ye na ndako mpo bólya elongo, okozwa libaku mosusu ya kolendisama. (Ebe. 13:2) Lokola abongisaka masukulu na ye na kotalela bamposa ya lisangá, landá yango na likebi.
4. Ndenge nini tokoki kolendisa mokɛngɛli na biso ya zongazonga?
4 Mokɛngɛli ya zongazonga: Ntoma Paulo akesanaki te na bandeko oyo azalaki kokende kotala. Ye mpe azalaki kokutana na mikakatano mpe na mitungisi; yango wana, azalaki kosepela mingi soki balendisi ye. (2 Kol. 11:26-28) Ntango bandeko ya lisangá ya Loma bayokaki ete Paulo, oyo na ntango wana azalaki moto ya bolɔkɔ, azali koya bamosusu batambolaki kilomɛtrɛ 74 tii na Esika ya Zando ya Apiusi mpo na kokutana na ye! Ntango Paulo amonaki bango, “apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.” (Mis. 28:15) Yo mpe okoki kolendisa mokɛngɛli na bino ya zongazonga. Pesá mpenza mabɔkɔ na bibongiseli oyo akozwa mpo omonisa ete ozali kopesa ye “lokumu mibale.” (1 Tim. 5:17) Monisá ye na maloba mpe na misala ete ozali mpenza na botɔndi mpo na milende oyo azali kosala mpo na bolamu na yo. Ye ná mwasi na ye bakosepela komona kondima, bolingo mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko.—2 Tes. 1:3, 4.
5. Mpo na nini lelo oyo biso nyonso tozali na mposa ya kolendisama?
5 Nani kati na biso azali te na mposa ya kolendisama na “bantango [oyo] ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza”? (2 Tim. 3:1) Zwá ekateli sikoyo ya kopesa mpenza mabɔkɔ na pɔsɔ ya ntina mingi. Ezala bakɛngɛli-batamboli to basakoli, biso nyonso tokoki kosala na esengo mpenza makambo oyo ekolendisa basusu. Na ndenge yango, ‘tokokoba mpe kobɔndisana mpe kolendisana.’—1 Tes. 5:11.