LISOLO YA BOYEKOLI 1
Bófanda nyɛɛ mpe bótyela Yehova motema
MOKAPO YA MOBU 2021: ‘Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.’—YIS. 30:15.
LOYEMBO 3 Nguya na ngai, makasi na ngai, elikya na ngai
NA MOKUSEa
1. Ndenge moko na Mokonzi Davidi, motuna nini basaleli mosusu ya Yehova bakoki kotuna?
BISO nyonso tolingaka kozala na bomoi ya kimya. Moto moko te alingaka kozala na mitungisi. Nzokande, na bantango mosusu, tokoki kokutana na mitungisi ya makasi. Yango wana, basaleli mosusu ya Yehova bakoki kotuna motuna oyo Mokonzi Davidi atunaki, ete: “Kino ntango nini molimo na ngai ekobunda, motema na ngai ekozala na mawa mokolo mobimba?”—Nz. 13:2.
2. Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Atako mitungisi ekozanga te na bomoi na biso, ezali na makambo oyo tokoki kosala mpo tómitungisa mingi te. Na lisolo oyo, tokolobela liboso mwa makambo oyo ekoki kosala ete tómitungisa. Na nsima, tokolobela makambo motoba oyo tokoki kosala mpo tómitungisa mingi te ntango tokutani na mikakatano.
MAKAMBO OYO EKOKI KOSALA ETE TÓMITUNGISA
3. Makambo nini ekoki kotungisa biso, mpe mpo na nini tokoki kopekisa yango te?
3 Ekoki kozala mpasi tópekisa makambo mosusu oyo etungisaka biso. Na ndakisa, tokoki te kopekisa bato bámatisa ntalo ya biloko ya kolya, ya bilamba, mpe ya bandako mbula na mbula. Tokoki mpe te koyeba mbala boni baninga na biso ya mosala to ya kelasi bakomeka biso mpo tósala likambo moko ya mabe, na ndakisa pite to ekobo. Lisusu, tokoki te kopekisa bato básala makambo ya mobulu na esika oyo tofandi. Tokutanaka na mikakatano yango mpo bato oyo tofandi na bango batalelaka mitinda ya Biblia te liboso ya kozwa bikateli na bango. Lisusu, Satana, nzambe ya mokili oyo, ayebi ete bato mosusu bakotika kosalela Yehova mpo na “motungisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 13:22; 1 Yoa. 5:19) Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge mokili etondi mpenza na makambo oyo etungisaka bato!
4. Mitungisi ekoki kosala biso nini?
4 Mitungisi ekoki kopesa biso mpasi mingi mpe kosala ete tózanga ata ntango ya kokanisa makambo mosusu. Na ndakisa, tokoki komitungisa mpo tokozala na mbongo mingi te mpo na kosomba biloko oyo tosengeli na yango, to mpo tokobɛla mpe tokozala na makasi te ya kokende na mosala to mpo bakolongola biso na mosala. Tokoki mpe komitungisa soki tokanisi ete tokotikala sembo te ntango tomekami mpo na kobuka mibeko ya Nzambe. Mosika te Satana akotinda bato na ye bábundisa basaleli ya Nzambe, yango wana, tokoki komitungisa mpo na oyo tokosala ntango bakoya kobundisa biso. Tokoki komituna boye: ‘Ezali mabe namitungisa mpo na makambo wana?’
5. Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete: “Bótika komitungisa”?
5 Toyebi ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bótika komitungisa.” (Mat. 6:25) Yesu alingaki nde koloba ete tosengeli komitungisa ata mpo na likambo moko te? Ezali bongo te! Kobosana te, basaleli mosusu ya Yehova ya sembo ya ntango ya kala mpe bamitungisaki, kasi Yehova aboyaki bango te.b (1 Ba. 19:4; Nz. 6:3) Yesu azalaki nde kobɔndisa biso. Alingaki te ete tómitungisaka mingi mpo na biloko ya mokili oyo, mpe tóbosana ete kosalela Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi na biso. Kasi tosengeli kosala nini soki tobandi komitungisa?—Talá etanda “Mpo na kosala yango.”
MAKAMBO MOTOBA OYO EKOSALISA BISO TÓFANDA NYƐƐ
6. Na kotalela Bafilipi 4:6, 7, nini ekoki kosalisa biso mpo tómitungisa te?
6 (1) Bondeláká mbala na mbala. Ntango ozali komitungisa mpo na mokakatano moko boye, okoki kobondela Yehova asalisa yo. (1 Pe. 5:7) Mpo na koyanola na mabondeli na yo, Yehova akoki kopesa yo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” ya bato. (Tángá Bafilipi 4:6, 7.) Yehova akopesa yo kimya yango na nzela ya elimo santu na ye.—Gal. 5:22.
7. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kobondela Nzambe?
7 Ntango ozali kobondela Yehova, yebisá ye makambo nyonso oyo ezali kotungisa yo. Yebisá ye makambo na bosikisiki. Yebisá ye ndenge likambo ezali mpenza, mpe monisá ye ndenge ozali komiyoka mpo na yango. Soki ezali na mwa likambo moko oyo okokoka kosala mpo na kosilisa yango, sɛngá ye bwanya mpe makasi mpo oyeba ndenge ya kosala yango. Soki ezali na likambo moko te oyo okoki kosala mpo na kosilisa mokakatano yango, sɛngá Yehova apesa yo makasi obatela makanisi na yo mpo omitungisa mingi te mpe olɛmba nzoto te. Soki ozali koloba makambo ya sikisiki na mabondeli na yo, ekozala mpasi te mpo omona polele eyano ya Yehova. Soki ozwi eyano mbala moko te nsima ya kobondela, kotika kobondela te. Yehova alingi kaka te obondelaka ye na bosikisiki, kasi alingi mpe otingamaka na mabondeli.—Luka 11:8-10.
8. Makambo nini tosengeli kolobela na mabondeli na biso?
8 Ntango ozali kobwakela Yehova mitungisi na yo na libondeli, kobosana mpe te kopesaka ye matɔndi. Tóbosanaka mpe te kokanisa ebele ya makambo ya malamu oyo Nzambe apesá biso, ata ntango tozali na mikakatano ya makasi mpenza. Kasi okosala nini soki ozangi maloba mpo na komonisa Yehova ndenge ozali komiyoka? Kobosana te ete, Yehova akoyanola na mabondeli na yo ata soki olobi kaka ete ‘Nabondeli yo, salisá ngai!’—2 Nt. 18:31; Rom. 8:26.
9. Tosengeli kosala nini soki tozali kobanga?
9 (2) Tyelá bwanya ya Yehova motema, kasi oyo ya yo moko te. Na mikolo ya mosakoli Yisaya, bato ya Yuda babangaki ete bato ya Asiri bakoya kobundisa bango. Lokola bato ya Yuda balingaki te ete bato ya Asiri bálonga bango, bakendaki koluka lisalisi epai ya bato ya Ezipito. (Yis. 30:1, 2) Yehova akebisaki bango ete, lokola batyelaki bato ya Ezipito motema, libebi ekoyela bango. (Yis. 30:7, 12, 13) Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisaki bango ndenge bakoki kozwa libateli ya solosolo. Alobaki ete: ‘Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.’—Yis. 30:15b.
10. Wapi mwa makambo oyo mpo na yango tosengeli komonisa ete totyelaka Yehova motema?
10 Ntango nini tokoki komonisa ete tozali kotyela Yehova motema? Tózwa mwa bandakisa oyo. Kanisá ete ozwi mosala oyo bakobanda kofuta yo mbongo mingi, nzokande mosala yango ekosɛnga ete osalaka mingi nsima ya ngonga ya mosala, mpe ekopekisa yo osalela Yehova mingi ndenge ozali kosalela ye sikoyo. To kanisá ete na esika ya mosala, moto moko azali komonisela yo lolango, kasi azali mosaleli ya Yehova te. To mpe kanisá lisusu ete ndeko na yo moko ya libota oyo olingaka mingi alobi na yo ete, akosundola yo soki okobi kosalela Yehova. Ekoki kozala mpasi kozwa ekateli ya malamu soki moko ya makambo ya ndenge wana ekómeli yo, kasi yebá ete na makambo yango nyonso, Yehova akopesa yo malako oyo osengeli na yango. (Mat. 6:33; 10:37; 1 Ko. 7:39) Na yango, osengeli komituna boye: Nakotyela Yehova motema mpe nakolanda malako na ye?
11. Masolo nini ya Biblia tokoki koyekola mpo tófanda nyɛɛ ntango bazali konyokola biso?
11 (3) Zwá mateya na bandakisa ya malamu mpe na oyo ya mabe. Biblia ezali na masolo oyo emonisi ete ezali na ntina mingi kofanda nyɛɛ mpe kotyela Yehova motema. Ntango ozali koyekola masolo yango, kanisá makambo oyo esalisaki basaleli ya Nzambe báfanda nyɛɛ ntango bazalaki konyokola bango makasi mpenza. Na ndakisa, ntango tribinale monene ya Bayuda epesaki bantoma mitindo ete bátika kosakola, babangaki te. Balobaki nde na mpiko mpenza ete: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Mis. 5:29) Ata nsima ya kobɛtama fimbo, bantoma babangaki te. Mpo na nini? Mpo bayebaki ete Yehova azalaki elongo na bango mpe azalaki kosepela na bango. Yango wana, bakobaki kosakola nsango malamu. (Mis. 5:40-42) Ndenge moko mpe, ntango bakómaki pene ya koboma moyekoli Stefano, afandaki nyɛɛ, abangaki te mpe elongi na ye ekómaki “lokola elongi ya anzelu.” (Mis. 6:12-15) Mpo na nini? Mpo ayebaki ete Yehova azalaki kosepela na ye.
12. Na kotalela 1 Petro 3:14 mpe 4:14, mpo na nini tokoki kozala na esengo ata ntango bazali konyokola biso?
12 Bantoma bayebaki mpenza ete Yehova azalaki elongo na bango. Apesaki bango nguya ya kosala makamwisi. (Mis. 5:12-16; 6:8) Lelo oyo, Yehova apesi biso te nguya ya kosala makamwisi. Atako bongo, ayebisi biso na nzela ya Liloba na ye ete, ntango tozali konyokwama mpo na bosembo, tosepelisaka motema na ye mpe elimo santu na ye ezalaka elongo na biso. (Tángá 1 Petro 3:14; 4:14.) Yango wana, tosengeli komitungisa te mpo na oyo tokosala soki banyokoli biso na mikolo ezali koya. Kasi tosengeli nde kosala nyonso oyo tokoki mpe kotya motema ete Yehova akoki kosalisa mpe kobikisa biso. Kaka ndenge bayekoli yango ya siɛklɛ ya liboso basalaki, biso mpe tosengeli kotya motema na elaka oyo Yesu apesaki ete: “Nakopesa bino monɔkɔ mpe bwanya oyo batɛmɛli na bino nyonso bakokoka te kotɛmɛla to kotyela ntembe.” Yesu alaki biso ete: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.” (Luka 21:12-19) Mpe tóbosana te ete Yehova ayebi malamu mpenza ata makambo mikemike ya basaleli na ye ya sembo oyo bakufá, mpe yango ekosala ete asekwisa bango.
13. Mateya nini tokoki kozwa ntango tozali koyekola makambo oyo ekómelaki baoyo balongaki te kofanda nyɛɛ mpe batyelaki Yehova motema te?
13 Tokoki mpe kozwa mateya na makambo oyo ekómelaki baoyo balongaki te kofanda nyɛɛ mpe kotyela Yehova motema. Koyekola bandakisa na bango ya mabe ekosalisa biso tósala te mabunga oyo basalaki. Na ndakisa, ntango Asa akómaki mokonzi ya Yuda, atyelaki Yehova motema ntango limpinga moko monene ya basoda bayaki kobundisa ye. Yehova apambolaki ye mpe alongaki etumba. (2 Nt. 14:9-12) Nzokande, ntango Baasha, mokonzi ya Yisraele ayaki mpo na kobundisa ye na limpinga ya basoda oyo elekaki moke mpenza, Asa atyelaki Yehova motema te ete akobikisa ye ndenge asalaki yango liboso. Akendaki nde kofuta basoda ya Asiri mpo básalisa ye. (2 Nt. 16:1-3) Mpe mwa moke liboso Asa akufa, ntango abɛlaki makasi mpenza, atyelaki Yehova motema te mpo asalisa ye.—2 Nt. 16:12.
14. Mabunga oyo Asa asalá ekoki koteya biso nini?
14 Na ebandeli, Asa alukaki Yehova ntango akutanaki na mikakatano. Kasi na nsima, atyelaki Nzambe na ye motema te mpo asalisa ye. Alukaki nde kosilisa makambo yango na ndenge na ye moko. Na ebandeli, tokoki komona lokola nde mayele oyo Asa asalelaki ya kosɛnga ete bato ya Siri báya kosalisa ye mpo na kobunda na Yisraele, ezalaki malamu. Kasi kimya yango eumelaki te. Yehova ayebisaki ye boye na nzela ya mosakoli moko: “Lokola otyeli mokonzi ya Siri motema mpe otyeli Yehova Nzambe na yo motema te, yango wana limpinga ya basoda ya mokonzi ya Siri ekimi, elongwe na lobɔkɔ na yo.” (2 Nt. 16:7) Tosengeli kokeba mpe kokanisa ata moke te ete tokoki kosilisa mikakatano na ndenge na biso moko, ata soki toluki litambwisi ya Yehova te na nzela ya Liloba na ye. Ata ntango tolingi kozwa ekateli moko nokinoki, tosengeli kofanda nyɛɛ, mpe kotyela Yehova motema na biso mobimba. Soki tosali bongo, akosalisa biso tózwa ekateli ya malamu.
15. Tosengeli kosala nini ntango tozali kotánga Biblia?
15 (4) Kangáká bavɛrsɛ ya Biblia na motó. Ntango omoni vɛrsɛ moko oyo emonisi ntina ya kofanda nyɛɛ mpe ya kotyela Yehova motema, kangá yango na motó. Mpo na kosala bongo, osengeli kotángaka yango na mongongo makasi, kokoma yango mpe kotángaka yango mbala na mbala. Yehova ayebisaki Yosua atángaka buku ya Mobeko mbala na mbala na mongongo ya nse mpo asala makambo na bwanya. Yango esalisaki ye abanga te, kasi azala nde na mpiko ntango azalaki kokamba basaleli ya Nzambe. (Yos. 1:8, 9) Bavɛrsɛ mingi ya Biblia ekoki kosalisa yo ozala na kimya ya makanisi mpe ya motema ntango okutani na makambo oyo ekokaki konyokola yo to kobangisa yo.—Nz. 27:1-3; Mas. 3:25, 26.
16. Ndenge nini Yehova asalelaka bandeko ya lisangá mpo na kosalisa biso tófanda nyɛɛ mpe tótyela ye motema?
16 (5) Yanganáká elongo na basaleli ya Nzambe. Yehova asalelaka bandeko na biso ya lisangá mpo básalisa biso tókoba kofanda nyɛɛ mpe kotyela ye motema. Na makita na biso, tozwaka matomba na masolo oyo bandeko basalaka, na biyano oyo bapesaka, mpe na masolo ya kolendisa oyo tosololaka na bango. (Ebr. 10:24, 25) Na lisangá, tokoki mpe kolendisama mpenza soki toyebisi bandeko oyo totyelaka motema makambo oyo ezali kotungisa biso. “Liloba ya malamu” oyo euti epai ya moninga moko ya motema ekoki kosalisa biso mpo tómitungisa koleka ndelo te.—Mas. 12:25.
17. Na kotalela Baebre 6:19, ndenge nini elikya na biso ya Bokonzi esalisaka biso tóningana te atako tozali kokutana na mikakatano?
17 (6) Kobá kobatela elikya na yo makasi. Elikya ya Bokonzi oyo tozalaka na yango ezali “lokola longo mpo na molimo” na biso, mpo yango esalisaka biso tóningana te atako tozali kokutana na mikakatano mpe na mitungisi ya ndenge na ndenge. (Tángá Baebre 6:19.) Kanisá bomoi ya malamu oyo Yehova alaki biso na mikolo ezali koya, oyo ekozala na mitungisi te. (Yis. 65:17) Meká komimona na mokili ya sika ya kimya, epai makambo oyo etungisaka biso ekozala lisusu te. (Mika 4:4) Elikya na yo ekokóma lisusu makasi soki ozali koyebisa bato mosusu makambo etali mokili ya sika. Salá nyonso oyo okoki na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Soki osali bongo, okoki kozala na “elikya makasi tii na nsuka.”—Ebr. 6:11.
18. Mikakatano nini tokokutana na yango na mikolo ezali koya, mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?
18 Lokola mokili oyo ezali kokóma na nsuka na yango, tokokutana na makambo mingi oyo ekotungisa biso. Mokapo na biso ya mobu 2021 ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano yango mpe tófanda nyɛɛ, na makasi na biso moko te, kasi nde mpo totyeli Yehova motema. Na boumeli ya mbula oyo, tiká ete tómonisa na nzela ya misala na biso ete tozali kondima elaka ya Yehova oyo elobi ete: ‘Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botyeli ngai motema.’—Yis. 30:15.
LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso
a Mokapo na biso ya mobu 2021 emonisi polele ntina oyo tosengeli kotyela Yehova motema ntango tokutani na makambo oyo etungisi biso, ezala lelo oyo to mpe na mikolo ezali koya. Lisolo oyo ekolobela makambo ya sikisiki oyo tokoki kosala mpo tósalela toli oyo ezali na mokapo na biso ya mobu.
b Bandeko mosusu ya sembo bamitungisaka mingi mpenza to mpe bakómaka na nsɔmɔ makasi. Mitungisi ya ndenge wana ezalaka nde maladi, kasi ezali te mitungisi oyo Yesu alobelaki.
c NDIMBOLA YA BILILINGI: (1) Ndeko mwasi moko azali kobondela mokolo mobimba na etingya mpenza mpo na mitungisi na ye.
d NDIMBOLA YA BILILINGI: (2) Na ntango ya bopemi na mosala, azali kotánga Liloba ya Nzambe mpo na kozwa bwanya.
e NDIMBOLA YA BILILINGI: (3) Azali komanyola na bandakisa oyo ezali na Biblia ya bato oyo batyelaki Yehova motema mpe ya baoyo batyelaki ye motema te.
f NDIMBOLA YA BILILINGI: (4) Atye likoló ya frigo na ye vɛrsɛ moko ya kolendisa oyo alingi kokanga yango na motó.
g NDIMBOLA YA BILILINGI: (5) Azali kosakola elongo na moninga na ye ya motema.
h NDIMBOLA YA BILILINGI: (6) Azali kokanisa bomoi oyo akozala na yango na mikolo ezali koya mpo na kokómisa elikya na ye makasi.