LISOLO YA BOYEKOLI 25
Yehova apambolaka baoyo balimbisaka basusu
“Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.”—KOL. 3:13.
LOYEMBO 130 Tólimbisaka
NA MOKUSEa
1. Yehova alaki nini mpo na basumuki oyo babongoli mpenza motema?
ATAKO Yehova azali Mozalisi na biso, Moto oyo apesaka biso Mibeko, mpe Mosambisi na biso, azali mpe Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo. (Nz. 100:3; Yis. 33:22) Ntango tosaleli ye lisumu mpe tobongoli mpenza motema, azali kaka te na likoki ya kolimbisa biso kasi mpe azalaka na mposa makasi ya kolimbisa biso. (Nz. 86:5) Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alaki boye mpo na kokitisa biso motema: “Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.”—Yis. 1:18.
2. Soki tolingi kozala na kimya ná basusu, tosengeli kosala nini?
2 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tolobaka mpe tosalaka makambo oyo epesaka basusu nkanda. (Yak. 3:2) Kasi, yango elimboli te ete tokoki te kozala na boyokani ya penepene elongo na bango. Tokoki kopusana penepene na bango soki toyekoli kozala bato oyo balimbisaka basusu. (Mas. 17:9; 19:11; Mat. 18:21, 22) Soki moto moko alobi to asali likambo moko ya moke oyo epesi biso nkanda, Yehova alingaka tólimbisa moto yango. (Kol. 3:13) Tozali mpenza na ntina ya kosala bongo. Oyo eleki nyonso, Yehova alimbisaka biso na motema moko “mpenza.”—Yis. 55:7.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Na lisolo oyo, tokolobela ndenge bato ya kozanga kokoka bakoki komekola Yehova na likambo etali kolimbisa basusu. Masumu nini tosengeli koyebisa bankulutu? Mpo na nini Yehova alendisaka biso tólimbisaka basusu? Mpe makambo nini tokoki koyekola epai ya bandeko na biso mosusu oyo banyokwamá mpenza mpo na masumu ya bato mosusu?
NTANGO MOKRISTO MOKO ASALI LISUMU MOKO MONENE
4. (a) Soki mosaleli moko ya Yehova asali lisumu moko ya monene, asengeli kosala nini? (b) Mokumba nini bankulutu bazali na yango ntango bakutani na mosumuki?
4 Ntango mokristo moko asali lisumu moko monene, tosengeli koyebisa bankulutu. 1 Bakorinti 6:9, 10 elobeli mwa masumu yango ya minene. Masumu ya minene ebukaka mpenza mibeko ya Nzambe. Soki mokristo asali lisumu moko ya ndenge wana, asengeli kobondela Yehova mpe kokende epai ya bankulutu ya lisangá mpo básalisa ye. (Nz. 32:5; Yak. 5:14) Mokumba nini bankulutu bazali na yango? Kaka Yehova nde azali na bokonzi ya kolimbisa masumu na motema moko, alimbisaka biso mpo na mbeka ya lisiko oyo epesamaki.b Kasi, Yehova apesá bankulutu mokumba ya kotalela na nzela ya Makomami soki moto akoki kotikala na lisangá to te. (1 Ko. 5:12) Longola yango, bankulutu basengeli kosala makasi mpo báyanola na mituna oyo: Lisumu esalemaki na nko? Moto yango akanaki liboso mpo na kosala lisumu yango? Moto yango azali koluka kobomba masumu na ye mpo basusu báyeba te? Moto yango akobaki kosala lisumu na boumeli ya ntango molai? Oyo eleki ntina, ezali na elembeteli oyo emonisi ete moto yango abongoli mpenza motema? Ezali na elembeteli oyo emonisi ete Yehova alimbisi ye?—Mis. 3:19.
5. Matomba nini emonanaka ntango bankulutu basalisaka basumuki?
5 Ntango bankulutu bazali kosalisa mosumuki yango, mokano na bango ezali ya kokóma na ekateli kaka moko oyo esilaki kozwama na likoló. (Mat. 18:18) Ndenge nini lisangá ezwelaka ebongiseli yango matomba? Ebatelaka lisangá ntango bandeko bamindimisaka ete basumuki oyo balongoli motema te balongolami na lisangá mpe bakotinda te basaleli ya Yehova oyo batikali sembo básala mabe. (1 Ko. 5:6, 7, 11-13; Tito 3:10, 11) Ekoki mpe kosala ete mosumuki abongola motema mpe Yehova alimbisa ye. (Luka 5:32) Bankulutu babondelaka mpo na mosumuki oyo abongoli mpenza motema mpe basɛngaka Yehova asalisa ye azongela lisusu boyokani malamu elongo na Yehova.—Yak. 5:15.
6. Soki moto alongolami na lisangá, ekoki kosalema ete Yehova alimbisa ye? Limbolá.
6 Kanisá ete moto moko abongoli motema te ntango bankulutu bazali kosalisa ye. Soki esalemi bongo, akolongolama na lisangá. Soki abukaki mobeko ya Leta, bankulutu bakobomba ye te mpo azwa etumbu oyo bapesaka moto oyo abuki mobeko ya Leta. Yehova apesi bakonzi ya Leta nzela ya kosambisa mpe ya kopesa etumbu na moto nyonso oyo abuki mobeko ya Leta, ata soki moto yango abongoli motema to te. (Rom. 13:4) Kasi, soki mosumuki yango na nsima azongeli makanisi ya malamu, abongoli mpenza motema mpe abongwani, Yehova akosepela kolimbisa ye. (Luka 15:17-24) Yango ezali solo ata soki lisumu ya moto yango ezalaki monene ndenge nini.—2 Nt. 33:9, 12, 13; 1 Tim. 1:15.
7. Na ndenge nini tokoki kolimbisa moto moko oyo asaleli biso lisumu?
7 Tozali na botɔndi mingi koyeba ete tozali na mokumba te ya kozwa ekateli soki Yehova akolimbisa moto to te! Kasi, tosengeli kozwa ekateli na likambo moko. Likambo yango nini? Ntango mosusu, moto moko asaleli biso lisumu, ekoki kozala ya monene, kasi na nsima akoki kosɛnga bolimbisi mpo tólimbisa ye. Mbala mosusu, moto yango akoki mpe kosɛnga bolimbisi te. Soki ezali bongo, tokoki kolimbisa moto yango na ndenge oyo tokoki kozwa ekateli ya koboya kobomba nkanda na motema mpe kosilikela ye. Mpo na koloba solo, ekoki kosɛnga ntango mpe molende, mingimingi soki moto yango asali likambo moko oyo epesi biso mpasi mingi na motema. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/1994 elobi boye: “Osengeli koyeba mpe ete soki olimbisi mosumuki moko, yango elimboli te ete ozali kolongisa lisumu, mpo na mokristo, kolimbisa elimboli kotika makambo na bosembo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Azali Mosambisi ya sembo ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe akosambisa na ntango ekoki.” Mpo na nini Yehova alingaka tólimbisaka basusu mpe tótika makambo nyonso na mabɔkɔ na ye lokola azali Mosambisi ya sembo?
NTINA OYO YEHOVA ALINGAKA TÓLIMBISAKA BASUSU
8. Ntango tolimbisaka basusu, ndenge nini tomonisaka ete tozalaka na botɔndi mpo na motema mawa ya Yehova?
8 Ntango tolimbisaka basusu, tomonisaka ete tozalaka na botɔndi mpo na motema mawa ya Yehova. Na ndakisa moko oyo apesaki, Yesu akokanisaki Yehova na nkolo moko oyo alongolaki ebele ya banyongo oyo moombo na ye moko azalaki na likoki ya kofuta te. Kasi, moombo oyo nkolo na ye alimbisaki, aboyaki kolimbisa moninga na ye moombo oyo azalaki na nyongo ya motuya moke. (Mat. 18:23-35) Yesu alingaki koteya biso nini? Soki tozali na botɔndi mpo na motema mawa ya Yehova, yango ekotinda biso tólimbisaka basusu. (Nz. 103:9) Esili koleka mwa bambula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elobaki boye: “Ezala mbala boni tolimbisaka bandeko na biso, ekoki soki moke te kokokana na ndenge Nzambe alimbisaka biso mpe ayokelaka biso mawa na nzela ya Kristo.”
9. Yehova amoniselaka banani motema mawa? (Matai 6:14, 15)
9 Soki tolimbisi basusu, Yehova mpe akolimbisa biso. Yehova amonisaka motema mawa epai ya bato oyo bamoniselaka basusu motema mawa. (Mat. 5:7; Yak. 2:13) Yesu amonisaki yango polele ntango alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela. (Tángá Matai 6:14, 15.) Tozwi liteya na makambo oyo Yehova ayebisaki mosaleli na ye Yobo. Moto wana ya sembo azokisamaki mpenza na maloba mabe oyo mibali misato balobaki, elingi koloba Elifaze, Biledade, mpe Zofare. Yehova apesaki Yobo mitindo ete abondela mpo na bango. Nsima ya kobondela mpo na bongo, nde Yehova apambolaki Yobo.—Yobo 42:8-10.
10. Mpo na nini kobomba nkanda na motema ezali likama mpenza? (Baefese 4:31, 32)
10 Tomisalelaka mabe ntango tobombaka nkanda na motema. Nkanda ezalaka lokola mokumba moko ya kilo, mpe Yehova alingaka tózala na kimya oyo eutaka ntango toboyaka kobomba nkanda na motema. (Tángá Baefese 4:31, 32.) Asɛngi biso ‘tótika nkanda, mpe tótika kotomboka.’ (Nz. 37:8) Soki tolandi toli oyo, ekosalisa biso. Soki tokangeli moto nkanda na motema, tokoki komisalela mabe na nzoto mpe kobɛla na makanisi. (Mas. 14:30) Ntango tokangeli moto nkanda na motema, yango esalaka moto yango mabe te, se ndenge moko soki tomɛli pwazɔ, ekosala moto mosusu mabe te, nzokande ekosala biso moko mabe. Kutu, ntango tolimbisaka basusu, tomisalelaka biso moko makambo oyo epesaka mbano. (Mas 11:17) Tozalaka na kimya na makanisi mpe na motema, mpe tozalaka na likoki ya kosala mingi na mosala ya Yehova.
11. Biblia elobi nini mpo na kozongisa mabe? (Baroma 12:19-21)
11 Kozongisa mabe ezali likambo ya Yehova. Yehova apesá biso nzela te ya kozongisa mabe ntango basaleli biso mabe. (Tángá Baroma 12:19-21.) Lokola tozalaka na bandelo mpe makanisi ya kokoka te, tokoki te kosambisa makambo malamu koleka Nzambe. (Ebr. 4:13) Lisusu, na bantango mosusu, mayoki oyo tozalaka na yango ekoki kobungisa biso nzela mpe kosala ete ekóma mpasi koyeba makambo malamu ya kosala. Yehova atindaki Yakobo akoma na litambwisi ya elimo na ye boye: “Nkanda ya moto esalaka makambo ya boyengebene ya Nzambe te.” (Yak. 1:20) Tosengeli komindimisa ete Yehova akokata makambo na bosembo mpe bosembo ya solosolo ekosalema.
12. Ntango tolimbisaka basusu, ndenge nini tomonisaka ete totyelaka bosembo ya Yehova motema?
12 Ntango tolimbisaka basusu, tomonisaka ete totyelaka bosembo ya Yehova motema. Ntango totikaka makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova, tomonisaka ete totyaka motema ete Yehova akolongola makambo nyonso ya mabe oyo eutá na lisumu. Na mokili na ye ya sika, bampota ya motema oyo tozoká “ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yis. 65:17) Kasi ntango tozali koyoka mpasi na motema, ekoki kosalema ete tótika kokanga nkanda mpe kobomba yango na motema? Tótala ndenge bandeko mosusu balongaki kosala bongo.
MAPAMBOLI OYO TOZWAKA NTANGO TOLIMBISAKA BASUSU
13-14. Ndakisa ya Tony mpe ya José eteyi biso nini na likambo etali kolimbisa?
13 Bandeko na biso mingi ya basi mpe ya mibali bazwaki ekateli ya kolimbisa basusu ata ntango makambo oyo basusu basalaki ezokisaki bango makasi na motema. Mapamboli nini bazwaki ntango balimbisaki basusu?
14 Mwa liboso ayekola solo, Tony,c oyo afandaka na ekólo Philippines, ayaki koyeba ete mobali moko na nkombo José nde abomaki yaya na ye moko ya mobali. Na ntango moko boye, Tony azalaki moto ya mobulu mpe moto oyo abɛtaka basusu, mpe alingaki kozongisa mabe mpo na yaya na ye. Bakangaki José mpe batyaki ye na bolɔkɔ mpo na mabe oyo asalaki. Na nsima, ntango José abimaki na bolɔkɔ, Tony alapaki ndai ete akoluka ye mpe akoboma ye. Asombaki mondoki mpo na mokano wana. Na ntango yango, Tony abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Ntango nazalaki koyekola Biblia, namonaki ete nasengelaki kobongola bizaleli mpe bomoto na ngai, mpe ete nasengelaki kolongola nkanda na motema.” Na nsima, Tony azwaki batisimo mpe akómaki nkulutu na lisangá. Kanisá ndenge akamwaki ntango ayokaki ete José mpe azwaki batisimo mpe akómi mosaleli ya Yehova! Ntango bango mibale bakutanaki, bayambanaki na esengo mpenza, mpe Tony ayebisaki José ete alimbisaki ye. Tony alobi ete ndenge alimbisaki José ememelaki ye esengo moko monene oyo ye moko akokaka te kolimbola yango. Na ntembe te, Yehova apambolaki Tony ndenge andimaki kolimbisa José.
15-16. Ndakisa ya Peter ná mwasi na ye Sue eteyi biso nini na likambo etali kolimbisa?
15 Na mobu 1985, ndeko Peter ná mwasi na ye Sue bazalaki na makita na Ndako ya Bokonzi ntango bɔmbi moko ebɛtaki na mbalakaka. Mobali moko atyaki bɔmbi moko pene na Ndako ya Bokonzi! Ndeko mwasi Sue azokaki bampota minene oyo ebebisaki likoki na ye ya komona mpe ya koyoka. Longola yango, azalaki lisusu te na likoki ya koyoka nsolo.d Ndeko Peter ná mwasi na ye Sue bazalaki komituna mbala na mbala boye: ‘Moto ya lolenge nini akoki kosala likambo ya mabe ya ndenge wana?’ Bambula mingi na nsima, moto oyo atyaki bɔmbi yango, oyo azalaki mosaleli ya Yehova te, bakangaki ye na bolɔkɔ mpe bakatelaki ye etumbu ya kolekisa bomoi mobimba na bolɔkɔ. Ntango batunaki ndeko Peter ná mwasi na ye Sue soki balimbisaki moto yango, balobaki boye: “Yehova ateyaka biso ete kokanga nkanda na motema ekoki kobebisa nzoto, mayoki mpe makanisi na biso. Na yango kaka na ebandeli mpenza, tosɛngaki Yehova asalisa biso tóboya kokanga nkanda na motema mpe tókoba na makambo etali bomoi na biso.”
16 Ezalaki pɛtɛɛ mpo bálimbisa moto yango? Mpenza te. Babakisi boye: “Soki kaka mpasi ya Sue ekómi makasi, nkanda ezalaki komata. Kasi tokobaka te kokanisa likambo yango, yango wana nkanda yango esilaka nokinoki. Na yango, tolobaka na motema soki moto oyo atyaki bɔmbi akómi ndeko na biso, tokoyamba ye. Likambo oyo tokutanaki na yango eteyi biso ete mitinda ya Biblia esikolaka biso mpenza; kutu mitinda yango esikolaka biso na ndenge oyo tokoki kokanisa te! Longola yango, tobɔndisamaka na koyeba ete Yehova akolongola makambo nyonso oyo epesaka biso mpasi.”
17. Ndakisa ya Myra eteyi biso nini na likambo etali kolimbisa?
17 Myra ayekolaki solo ntango asilaki kobalana mpe azalaki na bana mibali mibale ya mike. Mobali na ye aboyaki solo. Na nsima, mobali na ye asalaki ekobo mpe asundolaki ye ná bana. Myra alobi boye: “Ntango mobali na ngai asundolaki ngai ná bana mibale, namiyokaki ndenge bato nyonso bamiyokaka ntango bato oyo balingaka mingi basaleli bango makambo na bokosi, elingi koloba, nayokaki mpasi na motema, mawa, namonaki ete nabongi te bátyela ngai motema, nazalaki komipesa foti, mpe nasilikaki makasi mpenza.” Atako libala ekufaki, mpasi oyo mobali na ye apesaki ye esilaki te. Myra abakisi boye: “Nakobaki konyokwama mpe koyoka nkanda basanza mingi, mpe nayaki komona ete boyokani na ngai ná Yehova mpe bato mosusu ekómaki kobeba.” Sikoyo Myra alobi ete alongolá nkanda nyonso na motema mpe akanisaka te ete mabe ekómela mobali na ye ya kala. Azali na elikya ete mokolo mosusu mobali na ye ya kala akopusana penepene na Yehova. Myra azali kotya makanisi na ye na makambo ya kitoko oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Lokola abɔkɔlaki bana ye moko, asalisaki bango bákóma basaleli ya Yehova. Lelo oyo, Myra azali na esengo ya kosalela Yehova elongo na bana na ye mibale mpe bandeko na ye ya libota.
YEHOVA AKATAKA MAKAMBO NA BOSEMBO MPENZA
18. Lokola Yehova azali Mosambisi Monene, tosengeli komindimisa na nini?
18 Tolendisami mpenza lokola toyebi ete tozali na mokumba te ya kokata ndenge bato basengeli kosambisama! Lokola azali Mosambisi Monene, Yehova akolandela mosala wana ya ntina mingi. (Rom. 14:10-12) Tosengeli komindimisa mpenza ete akosambisa ntango nyonso na boyokani na mibeko na ye ya kokoka na likambo etali malamu ná mabe. (Eba. 18:25; 1 Bak. 8:32) Akosala ata moke te likambo moko ya kozanga boyengebene!
19. Makambo nini bosembo ya kokoka ya Yehova ekosala?
19 Tozali kozela na mposa makasi mokolo oyo Yehova akolongola makambo nyonso ya mabe oyo ekómelaka bato mpo na ezaleli ya kozanga kokoka mpe lisumu. Na ntango yango, nzoto na biso mpe bampota nyonso oyo tozoká na motema ekosila mpo na libela. (Nz. 72:12-14; Em. 21:3, 4) Ekokanisama lisusu te. Wana tozali kozela mpo ntango wana ya malamu eya, tozali na botɔndi mingi na ndenge Yehova apesi biso likoki ya komekola ye na likambo etali kolimbisa basusu.
LOYEMBO 18 Tózala na botɔndi mpo na lisiko
a Yehova azalaka na mposa makasi ya kolimbisa basumuki oyo babongoli mpenza motema. Lokola tozali bakristo, tosengeli komekola ndakisa na ye ntango moto moko apesi biso nkanda. Na lisolo oyo, tokolobela masumu oyo biso moko tokoki kolimbisa mpe masumu oyo tosengeli koyebisa bankulutu. Tokolobela mpe ntina oyo Yehova alingaka ete tólimbisanaka mpe mapamboli oyo tokozwa soki tosali bongo.
b Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/1996.
c Topesi bango bankombo mosusu.
d Talá Lamuká! ya 08/01/1992, nk. 9-13 na Français. Talá mpe video na TV JW oyo elobi Peter et Sue Schulz: Un traumatisme peut être surmonté.