Tongá kondima na yo na moboko ya makasi
NTANGO oyekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova, nini endimisaki yo ete omoni “kondima kaka moko,” elingi koloba, lolenge kaka moko ya losambo oyo Nzambe andimaka? (Ef. 4:4-6) Osanganaki na basaleli ya Yehova mpo omonaki bolingo oyo bamoniselanaka? Etamboli na bango ya malamu esepelisaki yo? Mingi bayá na solo mpo ebongiseli ya Nzambe esalaki bámiyoka ete babatelami mpe balingami mpenza, mpe yango ezali likambo ya malamu. Bolingo mpe etamboli malamu nde emonisaka losambo ya solo.—Yoa. 13:35; 1 Pe. 2:12.
Kasi okosala nini soki ndeko na yo moko mokristo apesi yo mpasi to na lolenge moko boye amoniseli yo bolingo te? To okosala nini soki ndeko moko asali lisumu moko ya monene, ata ya mabe mpenza lokola oyo moto moko asalaki na lisangá ya Korinti na siɛklɛ ya liboso? (1 Ko. 5:1) Soki kondima na yo etaleli kaka ndenge oyo oyokaka mpo na makambo oyo basusu basali, yango emonisi ete kondima na yo esimbami na moboko oyo elɛmbá. Okoki kosala nini mpo ozala na moboko oyo epikamá makasi mpo na kondima na yo?
MOBOKO OYO EPIKAMI MAKASI MPO NA KONDIMA
Okoki kokómisa makasi moboko ya kondima na yo soki ozali komindimisa mpenza na mateya ya solo oyo oyekolá na Biblia. Nini ekoki kosalisa yo? Tótalela ndakisa moko.
Na libaku moko, mingi ya bayekoli ya Yesu batikaki kolanda ye. Babɛtaki libaku mpo na maloba na ye na oyo etali kolya mosuni na ye mpe komɛla makila na ye. Balobaki: “Maloba oyo ezali makasi.” Makambo oyo Yesu alobaki etungisaki bango mingi, yango wana batikaki kolanda ye.—Yoa. 6:56-60, 66.
Na nsima, Yesu atunaki bantoma na ye: “Bongo bino, bolingi kokende te?” Petro ayanolaki: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko. Biso tosili kondima mpe tosili koyeba ete ozali Mosantu ya Nzambe.”—Yoa. 6:67-69.
Nini ekesenisaki Petro mpe bantoma mosusu na baoyo babɛtaki libaku? Kondima na bango esimbamaki na moboko moko ya makasi mpenza oyo elekaki mayoki na bango. Petro alobaki: “Biso tosili kondima mpe tosili koyeba ete ozali Mosantu ya Nzambe.” Bantoma yango ya sembo bayebaki makambo oyo bazalaki kondima mpe ntina oyo bazalaki kondima yango. Bakokanisaki maloba mpe misala ya Yesu na makambo oyo bayekolaki na Makomami mpe bamindimisaki ete Yesu azali Masiya. Lokola bandimaki mpenza liteya wana ya moboko, kondima na bango eninganaki te ntango basusu babɛtaki libaku mpo na makambo oyo Yesu alobaki.
Lisolo yango eteyi biso nini? Makambo oyo toyebi ekoki kozala na nguya mingi koleka ndenge oyo tozali komiyoka. Mpo na nini? Mpo mateya ya Biblia, na ndakisa solo oyo toyebi na oyo etali nkombo ya Nzambe, mokano na ye, mpe lisiko ebongwanaka te. Na kokesana na mayoki na biso, mateya ya solo ya Biblia ebongwanaka te mpo na oyo moto alobi to asali. Na yango, soki tondimi mpenza mateya ya solo ya Biblia mpe toyokanisi yango na makambo oyo ebongiseli ya Yehova eteyaka, tokobɛta libaku te mpo na etamboli ya basusu.
Soki kondima na yo etaleli kaka ndenge oyo oyokaka mpo na makambo oyo basusu basali, yango emonisi ete kondima na yo esimbami na moboko oyo elɛmbá
Ya solo, bolingo ya bandeko na biso bakristo elendisaka biso. Mpe etamboli malamu na bango esepelisaka biso mingi. Kasi soki tozali komiyoka lisusu ndenge wana te mpo na makambo oyo basusu basali, mateya ya Biblia oyo tondimaka ekoki kobatela kondima na biso. Yango ekosalisa biso tóbosana te ete tozali mpenza na kati ya lingomba ya solo—ata soki basusu basali makambo nini.
Soki tozali na momeseno malamu ya kosalaka boyekoli na biso moko ya Biblia, tokomindimisa makasi mateya ya solo oyo toyekolá na Liloba ya Nzambe. Mpe kondima ya ndenge wana ekosalisa biso tómindimisa ete tozali na kati ya lolenge ya losambo kaka moko oyo Nzambe andimaka. Na bongo kondima na biso ekozala na moboko ya makasi mpe misala ná maloba ya basusu ekoningisa yango te.—Nz. 16:8; talá etanda “Kotika nzela ya solo soki moke te.”