Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima?
Ozali na kati ya bamilio ya bato oyo bazali kokutana na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima? Makama oyo eutaka na klima mabe mpe mikakatano oyo ebimisaka, eyaka na mitindo ndenge na ndenge. Ekumbaki to mipɛpɛ ya makasi oyo babengi typhons, cyclones, mpe tornades ebimisaka makama mingi ya minene, lokola, kotombwana ya mai minene, mbula makasi, to mipɛpɛ oyo ebebisaka biloko. Mbula makasi ekoki kobuka mabele, mpe mipɛpɛ ya makasi ekoki kopelisa mɔtɔ oyo ebebisaka biloko. Kozanga mbula, molunge makasi, mpe mipɛpɛ ya makasi na eleko ya malili makasi ekoki mpe kobimisa makama minene.
Na bisika mingi na mokili, makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima ezali se kobakisama mpe ezali kosalema ntango nyonso. Lapolo ya Fédération internationale des Sociétés de la Croix-Rouge et du Croissant-Rouge emonisi ete motángo ya “ebele ya bato oyo bazali kokutana na makama oyo ebimaka yango moko ezali se komata. Ntango mpela ezali kobakisama, mipɛpɛ ya makasi mpe eleko ya molunge, bomoi ya bato mpe ya banyama ezali kokóma na likama. Yango wana, bamilio ya bato mpe banyama mbula na mbula bazali kotika bisika na bango mpo na kokende kofanda na bisika mosusu.”
Ntango makama yango esalemaka, bato banyokwamaka kaka te na nzoto kasi mpe na makanisi. Bakoki kobungisa biloko, bandako, mpe bandeko to baninga na liwa.
Soki okutani na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima, Biblia ekoki kosalisa yo oyikela yango mpiko. Ezali kopesa libɔndisi, elikya, mpe toli oyo ebongi, oyo esalisi bato mingi oyo bakutaná na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima. (Baroma 15:4) Ezali mpe kopesa biyano na mituna ya ntina mingi oyo bato mingi bamitunaka, na ndakisa: Mpo na nini Nzambe atiki makambo ya boye esalema? Ezali etumbu ya Nzambe?
Kobeba makasi ya klima ezali te etumbu ya Nzambe
Biblia eteyaka ete bampasi ya bato euti epai ya Nzambe te mpe ezali foti na ye te. Kutu, ekitisaka biso motema na maloba oyo: “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Yango emonisi ete ezali ye te nde abimisaka makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima, oyo ezali konyokola bato lelo oyo.
Biblia ezali na masolo oyo emonisi ete na bantango moko boye, Nzambe asalelaki biloko ya nguya oyo akelá mpo na kopesa bato mabe etumbu. Kasi makambo yango ekesanaki mpenza na makama oyo klima ezali kobimisa lelo oyo, oyo eyaka na mbalakaka, kozanga kokebisa bato mpe ekómelaka bato nyonso, ezala bato malamu mpe bato mabe. Nzokande, masolo ya Biblia emonisi ete Nzambe azalaki ntango nyonso kobatela bato oyo bazalaki na ngambo te, azalaki kokebisa bato, mpe kolimbola ntina oyo azali kosala likambo yango. Na ndakisa, Nzambe ayebisaki ntina oyo azalaki koyeisa Mpela na mokili mobimba na ntango ya Noa, akebisaki bato liboso ya kosala yango, mpe abatelaki Noa ná bato ya libota na ye.—Ebandeli 6:13; 2 Petro 2:5.
Mpo na koyeba ndenge nini toyebi ete makama oyo ebimaka yango moko lelo oyo ezalaka te etumbu ya Nzambe, talá lisolo “Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?”
Nzambe akipaka bato oyo bakutanaka na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima
Biblia emonisi ete Yehovaa Nzambe akipaka bato mpe amityaka na esika na bango. Talá bavɛrsɛ oyo ya kobɔndisa mpenza.
Yisaya 63:9: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye [Nzambe] mpe azalaki koyoka mpasi.”
Ndimbola na yango: Yehova ayokaka mpasi ntango amonaka bato bazali konyokwama.
1 Petro 5:7: “Atyelaka bino likebi.”
Ndimbola na yango: Yehova amitungisaka mingi mpo na bolamu na yo.
Yehova asalisaka biso mpo akipaka biso mpe amityaka na esika na biso. Abɔndisaka biso na nzela ya toli ya Biblia mpe alaki ete na mikolo ezali koya, makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima ekozala lisusu te.—2 Bakorinti 1:3, 4.
Ntango makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima ekozala lisusu te
Biblia emonisi ete Yehova alaki ‘kopesa biso bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’ (Yirimia 29:11) Azali na mokano ete bato básepela na bomoi na mabele oyo ekokóma paradiso, epai bakobanga lisusu te makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima.—Ebandeli 1:28; 2:15; Yisaya 32:18.
Nzambe akosala yango na nzela ya Bokonzi na ye, oyo ezali guvɛrnema ya likoló oyo ekotambwisama na Yesu. (Matai 6:10) Yesu azali na bwanya mpe na nguya oyo esengeli mpo na kopekisa makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete azali na nguya ya kopekisa mopɛpɛ to makama oyo klima ebimisaka. (Marko 4:37-41) Akokamba na mayele mpe na bwanya, akoteya bato ndenge ya kobatela mai, zamba to mopɛpɛ mpo bábebisa yango te. (Yisaya 11:2) Na nse ya litambwisi ya Yesu, klima ekobimisela bato lisusu makama te.
Okoki komituna boye: ‘Ntango nini Yesu akosalela nguya na ye mpo na kobatela klima?’ Mpo na kozwa eyano na motuna yango, talá lisolo “Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele?”
Kobunda na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima sikoyo
Toli ya Biblia ekoki kosalisa yo liboso makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima esalema, wana ezali kosalema, mpe na nsima na yango.
Liboso ya makama: Omibongisa mpo na kozwa ekateli nokinoki.
Oyo Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”—Masese 22:3.
Ndimbola na yango: Monáká makama liboso mpo okoka nokinoki kokima yango mpe kobatela libota na yo.
Likambo oyo esalemá: “Mokolo moko tobikaki na mɔtɔ ya zamba, mpo tomibongisaki mpo na yango. Tozalaki na basaki na biso ya biloko oyo tobongisaki mpo na makama. Tozalaki na bankisi, mpe bilamba. Zingazinga na biso, bato bazalaki koyeba te básala nini, mpe bakokaki lisusu te kokanisa malamu. Kasi tozalaki na biloko nyonso oyo tosengelaki na yango, mpe napesaka matɔndi mingi mpo na yango!”—Tamara, Californie, États-Unis.
Na ntango ya makama: Tyá makanisi na makambo oyo eleki ntina.
Oyo Biblia elobi: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”—Luka 12:15.
Ndimbola na yango: Bomoi ezali na ntina mingi koleka biloko ya mosuni.
Likambo oyo esalemá: “Ntango mopɛpɛ makasi babengi Typhon Lawinb ebebisaki ndako na biso, nakokaki te kokanisa malamu makambo oyo nasengelaki kosala. Kasi likambo moko oyo nasalaki ezalaki kobondela Yehova Nzambe na motema moko. Nayaki komona ete tobungisaki kaka biloko ya mosuni, kasi te bomoi na biso.”—Leslie, Philippines.
Nsima ya makama: Kanisá makambo ya lelo, kasi ya lobi te.
Oyo Biblia elobi: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.”—Matai 6:34.
Ndimbola na yango: Komitungisa koleka ndelo te mpo na makambo oyo ekoya lobi.
Likambo oyo esalemá: “Nsima ya koleka ya mopɛpɛ makasi babengi Irma, totikaki ndako na biso oyo etondaki na mai, nasengelaki kozwa bikateli mingi, koleka liboso. Namitungisaki mingi. Namekaki kolanda toli ya Biblia ya koboya komitungisa mpo na mokolo ya lobi. Na lisalisi ya Yehova, nayikaki mpiko na makambo mingi oyo nakokaki te kokanisa.”—Sally, Floride, États-Unis.
Mpo na koyeba makambo ya kosala, talá lisolo “Ntango likama ebimi—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi.”
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.—Nzembo 83:18.
b Eyebani mpe na nkombo Typhon Haima.