Engebene Biblia
Kopona nkisi ya monganga ezali mpenza na ntina?
BATO nyonso babɛlaka mpe bazokaka mpota. Ntango bakutanaka na banguna wana oyo babebisaka bolamu na bango, bato mingi balukaka kobɔndisama na komisalisa na nkisi ya monganga. Yesu Klisto ayebaki ete lolenge wana ya kosala ekoki kopesa mwa litomba ntango alobaki ete, “Bato makasi bazali na bosɛnga na monganga te, kasi bobele babɛli.”—Luka 5:31.
Luka, mokomi ya Biblia oyo akomi makambo oyo, ye moko mpe azalaki monganga. (Bakolose 4:14) Mbala mosusu, na boumeli ya mibembo na bango oyo basalaki elongo, ntoma Paulo azwaki matomba na mayele ya monganga oyo Luka azalaki na yango. Kasi Makomami epesi mpenza toli mpo na bankisi nini ya monganga oyo baklisto basengeli kondima? Kopona nkisi ya monganga ezali mpenza na ntina mpo na yo?
Toli oyo euti na Makomami
Biblia ekoki kosalisa moto azwa bikateli ya malamu na likambo etali komisalisa epai na monganga. Na ndakisa, Deteronome 18:10-12 emonisi polele ete misala lokola koyebisa makambo oyo ebombami mpe misala ya maji “eboyami” na Yehova. Misala yango ya mabe, ekɔtaki mpenza na molɔngɔ ya “bikelakela” oyo Paulo akebisi biso mpo na yango. (Bagalatia 5:19-21, NW) Na yango, baklisto baboyaka lolenge nyonso ya koluka koyeba maladi mpe ya komisalisa oyo ezali na boyokani na bikelakela.
Biblia emonisi mpe ete Mozalisi amonaka ete bomoi na makila ezali mpenza mosantu. (Genese 9:3, 4) Lokola bazwi ekateli ya kotosa mobeko ya ‘koboya makila ntango nyonso,’ Batatoli ya Yehova baboyaka lolenge nyonso ya bankisi oyo ebukaka mobeko wana oyo epekisi makila. (Misala 15:28, 29, NW) Yango elimboli te ete baboyaka nkisi nyonso ya monganga. Kutu, soki makoki ezali, balukaka bankisi ya malamu ezala mpo na bango moko to mpo na bana na bango. Kasi basɛngaka minganga básalisa bango na kotosáká bindimeli ya losambo na bango.
Kebá na nzela oyo ozali kokende
Mokonzi Salomo akebisaki ete, “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” (Masese 14:15) Ata soki ekateli oyo okozwa na likambo etali nkisi ya monganga ekweisi mpenza mitinda ya Biblia te, esengeli ‘kotala malamu na nzela ekokenda yo.’ Bankisi nyonso te ya monganga nde esalisaka. Ntango Yesu alobaki ete ‘bato oyo bazali kobɛla nde bazali na bosɛnga na monganga,’ yango elingi koloba te ete andimaki bankisi nyonso ya monganga oyo ezalaki na mikolo na ye. Ayebaki ete mitindo mosusu ya komisalisa epai ya minganga ezalaki ya malamu mpe mosusu ezalaki ya mabe.a
Lolenge moko lelo, bankisi mosusu ekoki kosala eloko te, mpe ekoki kozala mbala mosusu ya lokuta. Soki moto ataleli likambo yango malamumalamu te, akoki komibendela mindɔndɔ mosusu ya mpamba. Lisusu, esengeli koyeba ete nkisi oyo esalisi moto moko, ekoki kosala eloko te epai ya moto mosusu to mpe mbala mosusu koboma ye. Ntango asengeli kozwa ekateli mpo na likambo etali nkisi ya monganga, moto oyo azali na bokɛngi, akotalela na likebi mpenza eloko oyo azali kopona na esika kaka ete ‘andima makambo nyonso,’ ata soki azwi toli epai ya baninga na ye ya motema. Akomonisa ete azali mpenza na “makanisi malamu” soki akoluka koyeba likambo yango malamu mpenza, yango ekosalisa ye ayeba malamu nkisi oyo akondima.—Tito 2:12.
Talá makambo ndenge ezali mpe kolekisa ndelo te
Ebongi mpenza ete moto amibanzabanza mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye. Soki tozali na bokatikati na ndenge ya kotyela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso likebi, tokomonisa ete tozali kosepela na likabo ya bomoi mpe ete tozali komonisa botɔndi epai na Nzambe oyo azali Liziba na yango. (Nzembo 36:9) Ntango bazali koluka komisalisa epai na monganga na ndenge ebongi, baklisto basengeli komonisa bokatikati mpo na likambo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Na ndakisa, soki moto oyo azali na nzoto kolɔngɔnɔ akómi komibanzabanza koleka mpo na nzoto na ye, akoki kobosana “makambo maleki ntina mpenza.”—Bafilipi 1:10, NW; Bafilipi 2:3, 4.
Mwasi moko oyo azalaki na maladi moko ya nsɔmɔ na eleko ya Yesu ‘abebisaki misolo na ye nyonso’ mpo na koluka minganga ete básalisa ye na maladi na ye oyo eumelaki mingi. Azwaki litomba nini? Na esika ete akóma malamu, mpasi ezalaki se kobakisama. (Malako 5:25, 26) Asalaki nyonso oyo ekoki na ye mpo abika, kasi abikaki te. Ndakisa na ye emonisi ete mayele ya minganga na eleko na ye ezalaki na ndelo. Lelo mpe lokola, atako bato bazwi mayele mingi na misala ya monganga mpe ya teknoloji, bato mingi mpe bakutani na makambo lokola ya mwasi wana. Na yango, ezali malamu kotalela makambo ndenge yango ezali mpenza na oyo minganga bakoki kosala. Na mikolo oyo tokoki kokóma te na nzoto ya kokoka. Baklisto bayebi ete ntango oyo Nzambe “akobikisa mabota” ezali naino mpo na mikolo oyo ezali koya. (Emoniseli 22:1, 2) Yango wana, esengeli kozala na bokatikati na likambo etali komisalisa nzoto.—Bafilipi 4:5.
Ya solo mpenza, makambo oyo tozali kopona ezali na ntina. Yango wana, ntango tokutani na likambo oyo esɛngi tózwa ekateli na likambo etali komisalisa epai ya monganga, esengeli kotalela oyo tokopona, ezala mposa na biso ya kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe mposa na biso ya kobatela boyokani malamu mpenza na Nzambe. Soki tosali bongo, tokotya ntango nyonso motema na kokokisama ya elaka ya Yehova oyo elobi ete na kati ya mokili ya sika ya kitoko oyo ezali koya, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”—Yisaya 33:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ndakisa, encyclopédie médicale ya Dioscoride emonisaki ete, na ekeke ya liboso, mpo na kosilisa jaunisse, esengelaki komɛla mwa vinyo mpe nyei ya ntaba! Na ntembe te, lelo oyo toyebi ete soki monganga akomeli moto bankisi ya ndenge wana, ekoki kobɛlisa ye lisusu makasi.
[Elilingi na lokasa 24]
“Monganga,” 1891, ya Sir Luke Fildes
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Tate Gallery, London/Art Resource, NY