Mokapo 9
Ndenge nini nakoki kokima komekama?
Karen akendaki na fɛti moko mpe elekaki ata miniti 10 te, amonaki bilenge mibali mibale bakɔti na basaki ya minene. Moto nyonso na fɛti ayebaki biloko oyo ezalaki na kati ya basaki yango. Mwa moke liboso, Karen ayokaki bilenge yango bazali koloba ete “boki” ekozala mingi na fɛti oyo.
Na mbala moko, Karen ayokaki mongongo ya moto moko oyo ayebi, atɛlɛmi nsima na ye mpe alobi na ye ete: “Mpo na nini otɛlɛmi kaka boye, olingaka kosepela te?” Ntango abalukaki atala moto yango, ezalaki nde moninga na ye Jessica; asimbaki milangi mibale ya masanga oyo autaki kofungola. Alakisaki ye molangi moko mpe alobaki na ye ete: “Koyebisa ngai te ke okoli naino te mpo obanda kosepela na bomoi!”
Karen alingi aboya. Kasi, ayebaki te ke baninga na ye bakotya ye mbamba ndenge wana. Kasi, lokola Jessica azali moninga na ye, Karen alingi te Jessica amona ete alingaka kosepela te. Lisusu, Jessica azalaka mwana malamu. Mpe soki ye azali komɛla masanga, elingi koloba ke eza n’ango mabe te? Karen alobaki na nse ya motema ete: ‘Kutu, eza kaka masanga. Eza’ te lokola komɛla bangi to kosangisa nzoto.’
NTANGO ozali elenge, komekama eyaka na balolenge mingi. Mbala mingi, bilenge mibali batumolaka bana basi to bana basi batumolaka bana mibali. Ramon, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Na kelasi, bilenge basi bazalaka matumoli mingi. Balukaka kosimbasimba bana mibali mpo bátala soki bakosala nini. Batikaka te, ata soki oboyi!” Deanna, oyo azali mpe na mbula 17, amonaki mpe likambo ya ndenge wana. Alobi boye: “Mokolo moko, elenge mobali moko ayaki epai na ngai mpe atyaki lobɔkɔ na ye na lipeka na ngai. Nabɛtaki ye makasi na lobɔkɔ mpe nalobaki na ye boye: ‘Oz’osimba ngai boye mpo na nini? Nayebi yo kutu te!’”
Yo mpe okoki kokutana na komekama; mpe okoki komona lokola nde komekama yango ez’osila te. Komekama ezali lokola moto moko azali kokoba kobɛta ko-ko-ko na porte na yo ata soki oboyi kondima. Okutanaka na komekama mbala mingi? Na ndakisa, omekamaka mingi na makambo oyo elandi?
□ Komɛla likaya
□ Kotala pornografi
□ Komɛla masanga
□ Kosangisa nzoto
□ Komɛla drɔgɛ
□ Makambo mosusu
Soki otye elembo ✔ na likambo moko to mibale oyo ezali na likoló, koloba mbala moko te ete obongi te kozala mokristo. Okoki koyekola kopekisa bamposa ya mabe mpe kolonga komekama. Ndenge nini? Osengeli naino koyeba makambo oyo ebimisaka komekama. Tótalela makambo misato.
1. Kozanga kokoka. Mposa ya kosala mabe ezalaka epai ya moto nyonso ya kozanga kokoka. Ata ntoma Paulo, oyo azalaki mokristo oyo akɔmɛli, alobaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Baroma 7:21) Tomoni ete ata moto oyo aleki sembo akoki na ntango mosusu kokóma na “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso.” (1 Yoane 2:16) Kasi, kotya ntango nyonso makanisi na mposa ya kosala mabe ebakisaka mikakatano, mpamba te Biblia elobi boye: “Mposa . . . , ntango ezwi zemi, eboti lisumu.”—Yakobo 1:15.
2. Makambo mosusu. Komekama ezalaka bisika nyonso. Trudy alobi boye: “Na kelasi mpe na mosala, bato balobelaka ntango nyonso makambo ya kosangisa nzoto. Na televizyo mpe na bafilme, bamonisaka yango ntango nyonso lokola likambo ya malamu mpenza. Bamonisaka mpenza te mpasi oyo yango ememaka!” Trudy ayebi malamu ndenge oyo baninga mpe makambo wana oyo balakisaka na televizyo ekoki kosala epai ya moto. Alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 16, tolinganaki na elenge mobali moko mpe nazalaki kokanisa ete ezalaki mpenza bolingo ya solo. Kasi, mama afandisaki ngai mpe alobaki na ngai ete soki natiki nzela wana te, nakozwa zemi. Nayokaki mpasi mingi na motema ete mama aloba na ngai likambo ya ndenge wana! Sanza mibale na nsima, nazwaki zemi.”
3. “Bamposa ya bolenge.” (2 Timote 2:22) Yango ekoki kozala mposa nyonso oyo elenge azalaka na yango, na ndakisa mposa ya kondimama na baninga mpe komonisa ete yo mpe oyebi makambo. Bamposa yango ezali mabe te, kasi soki elenge akebi na yango te, ekoki kokóma mpasi mpo akima komekama. Na ndakisa, koluka ete baninga bámona ete yo mpe oyebi makambo ekoki kotinda yo oboya kolanda bizaleli malamu oyo baboti na yo bateyaki yo. Yango mpe ekómelaki Steve ntango azalaki na mbula 17. Alobi boye: “Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, nakómaki kotombokela baboti na ngai, mpe nakómaki kosala makambo nyonso oyo bazalaki kopekisa ngai.”
Ndenge ya kolonga komekama
Ya solo, ezali pɛtɛɛ te mpo na kolonga makambo oyo touti kolobela. Atako bongo, okoki kolonga komekama. Ndenge nini?
● Ya liboso, osengeli koyeba komekama oyo ekómelaka yo mingi. (Ekoki kozala ete osalaki yango na lokasa 65.)
● Na nsima, omituna boye: ‘Ntango nini nakutanaka mingi na komekama yango?’ Tyá elembo ✔ pembeni ya moko ya makambo oyo elandi:
□ Na kelasi
□ Ntango ozali yo moko
□ Na mosala
□ Ntango mosusu
Koyeba ntango oyo okutanaka mingi na komekama moko boye ekoki kosalisa yo okima yango. Na ndakisa, tótalela likambo oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Likambo nini ekokaki kosalisa Karen ayeba ete fɛti yango ekozala malamu te?
․․․․․
Ndenge nini akokaki kokima komekama oyo akutanaki na yango?
․․․․․
● Lokola osili koyeba komekama yango mpe ntango oyo okutanaka na yango mingi, okoki sikoyo koluka ndenge ya kolonga yango. Osengeli libosoliboso koluka ndenge ya kopekisa to kokima makambo oyo emekaka yo. Komá awa na nse makambo oyo okoki kosala.
․․․․․
(Bandakisa: Soki nsima ya kelasi okutanaka mbala na mbala na baninga ya kelasi oyo basɛngaka yo omɛla likaya elongo na bango, mbala mosusu ekozala malamu obanda koleka na nzela mosusu mpo okutana na bango te. Ntango ofungoli Internet, soki mbala mingi okutaka ete batindeli yo bililingi ya bato bazali bolumbu, okoki koluka kokɔtisa programɛ oyo ekopekisa bililingi wana ekɔtaka na adrɛsi na yo ya internet. Lisusu, osengeli kopona malamu maloba oyo okokoma ntango olingi kosala bolukiluki na Internet.)
Ya solo, okoki kokima komekama nyonso te. Lelo to lobi okoki kokutana na likambo moko oyo ekomeka yo makasi, mbala mosusu na ntango oyo okanisaki te. Okoki kosala nini mpo na yango?
Omibongisa
Ntango “Satana amekaki” Yesu, Yesu aboyaki mbala moko. (Marko 1:13) Mpo na nini? Mpo ayebaki liboso oyo asengeli kosala soki komekama ya ndenge wana ekómeli ye. Yesu asilaki kozwa ekateli ya kotosa Tata na ye ntango nyonso. (Yoane 8:28, 29) Azalaki mpenza koloba solo ntango alobaki ete: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.”—Yoane 6:38.
Na lokasa oyo elandi, komá bantina mibale oyo mpo na yango osengeli kolonga komekama oyo okutanaka na yango mbala na mbala mpe makambo mibale oyo okoki kosala mpo na kolonga yango.
Ntina oyo osengeli kolonga komekama:
1 ․․․․․
2 ․․․․․
Makambo oyo ekosalisa yo olonga:
1 ․․․․․
2 ․․․․․
Kobosana te ete ntango okwei na komekama, okómi moombo ya bamposa na yo. (Tito 3:3) Mpo na nini okotika ete bamposa na yo etambwisaka yo bongo? Osengeli kokanga bamposa na yo mpo omonisa ete okoli, na esika otika ete bamposa na yo etambwisaka yo. (Bakolose 3:5) Mpe bondeláká mpo okoba kolonga komekama.—Matai 6:13.a
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 15, NA VOLIMI 2
Mikolo oyo oz’oyoka neti okómi kolɛmba? Talá ndenge okoki kobongisa sante na yo mpe kokóma lisusu nzoto makasi!
[Maloba na nse ya lokasa]
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Bakorinti 10:13.
TOLI
Talá bitanda “Ndenge ya komibongisa mpo na koboya makanisi mabe ya baninga,” oyo ezali na nkasa 132 mpe 133 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, mpo na koyeba ndenge ya kosala ntango moto alingi kobenda yo osala mabe.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Nzambe alobaki liboso ete Yesu akotikala sembo, kasi yango elakisi te ete Yesu azalaki lokola robo, oyo esalaka kaka makambo batyelá yango esala. Nzokande, Yesu azalaki kotosa na bolingo na ye moko. Atikalaki sembo mpo ye moko nde aponaki yango, kasi te mpo etángamaki bongo. Yango nde ntina oyo abondelaki makasi ntango akutanaki na komekama.—Baebre 5:7.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo na kozwa lisusu makasi ya kolonga komekama, nako ․․․․․
Bato, bisika mpe makambo mosusu oyo nasengeli kokima ezali ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Bikelamu ya kokoka bakoki komekama?—Ebandeli 6:1-3; Yoane 8:44.
● Soki olongi komekama mpe otikali sembo, yango ekosala basusu nini?—Masese 27:11; 1 Timote 4:12.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 68]
“Koyeba ete Moto oyo aleki na nguya na mokili mobimba azali pembeni na ngai mpe ete nakoki kosɛnga ye lisalisi ntango nyonso, yango esalisaka ngai mpenza!”—Christopher
[Etanda/Elilingi na lokasa 67]
Meká kosala boye
Meká kozwa boussole mpe tɛlɛmisá yango na boye ete likɔnga na yango etala na nɔrdi. Na nsima, tyá emá pembeni ya boussole yango. Likambo nini ekosalema? Likɔnga ya boussole ekolakisa lisusu nɔrdi te. Kasi, ekolakisa nde na ngámbo ya emá.
Lisosoli na yo ezali lokola boussole. Soki eteyami malamu, ekosalisa yo ozwa bikateli ya malamu. Kasi, baninga mabe, oyo bazali lokola emá, bakoki kobenda yo osala makambo oyo ekobebisa lisosoli na yo. Liteya nini okoki kozwa? Salá makasi ya koboya bato mpe makambo oyo ekoki kobebisa lisosoli na yo!—Masese 13:20.
[Elilingi na lokasa 69]
Ntango okwei na komekama, okómi moombo ya bamposa na yo