Yehova Nzambe oyo bato basengeli koyeba
OZALI komona lokola nde ozangi likambo moko ya ntina na bomoi na yo? Soki oyebi Nzambe malamu te, na ntembe te ozangi likambo moko ya ntina na bomoi na yo. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te, bamilio ya bato bamoni ete koyeba Nzambe ya Biblia ememaka matomba mingi na bomoi. Matomba yango ebandaka kaka soki obandi koyeba Nzambe mpe eumelaka libela.
Yehova Nzambe, Mobandisi ya Biblia, alingi ete tóyeba ye. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Mpo bato báyeba ete yo, oyo ozali na nkombo Yehova, kaka yo nde ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.” Ayebi malamu ete soki biso toyebi ye, biso moko nde tokozwela yango matomba. “Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo, Ye oyo ateyaka yo mpo ozwela yango litomba.” Kasi matomba nini tokozwa soki toyebi Yehova Nzambe, Oyo-Aleki-Likoló?—Nzembo 83:18, NW; Yisaya 48:17, NW.
Litomba ya solosolo ezali ete tokoyeba ndenge ya kosilisa mikakatano oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo, tokozala na elikya makasi mpo na mikolo ezali koya, mpe tokozala makanisi ya kimya. Lisusu, koyeba Yehova malamu ekosalisa biso tótalelaka na ndenge ya malamu makambo mosusu oyo ezali kotungisa bato mingi lelo oyo na mokili mobimba. Makambo nini?
Bomoi na yo ezali mpenza na ntina?
Atako bato ya siansi bayebi makambo mingi, bato bazali naino komituna mituna ya ntina mingi oyo bamitunaka banda kala: ‘Mpo na nini nazali na mokili? Epai wapi nazali kokende? Ntina ya bomoi ezali mpenza nini?’ Soki moto azwi biyano ya malamu te na mituna yango, bomoi na ye ekozala na ntina mpenza te. Bato mingi bazalaka na mokakatano yango? Ankɛtɛ moko esalemaki na Allemagne na nsuka ya bambula ya 1990, emonisaki ete moto moko na kati ya bato mibale azalaki, mbala na mbala, to na bantango mosusu, komona ete bomoi na ye ezali na ntina te. Ntango mosusu mpe ezali bongo esika ofandi.
Soki moto azali koyeba ntina ya bomoi na ye te, ayebaka te ndenge nini akoki komityela mikano na bomoi na ye. Mpo na komeka kokokisa mposa yango, bato mingi bamipesaka na mosala oyo bazali kofuta bango mbongo mingi to mpe na konduka bozwi. Atako bongo, bamonaka kaka ete eloko moko ezali kozanga. Kozanga koyeba ntina ya bomoi etungisaka bato mosusu makasi mpenza, esilisaka bango kutu mposa ya bomoi. Likambo yango ekómelaki elenge mwasi moko kitoko oyo zulunalo moko (International Herald Tribune) ekomaki mpo na ye ete akolaki na libota “ya bozwi mingi mpe ya bomɛngo.” Atako abɔkwamaki na kati ya bomɛngo, azalaki komiyoka ete azali na baninga te mpe azalaki komona ete bomoi na ye ezali na ntina te. Amɛlaki bankisi oyo elalisaka mpɔngi mpe bakutaki ye akufi. Mbala mosusu yo mpe oyebi bato mosusu oyo bomoi na bango esukaki mabe ndenge wana, mpo bazalaki komiyoka ete bazali bango moko.
Kasi, osilá koyoka bato bazali koloba ete siansi bakoki kopesa biso biyano na mituna nyonso oyo etali bomoi? Zulunalo moko ebimaka na Allemagne (Die Woche) elobi ete: “Atako bato ya siansi bakoki mpe koteya makambo ya solo, kasi na oyo etali makambo ya elimo, siansi esalisaka mpenza te. Makanisi oyo bato mosusu ya siansi bazali koteya ete mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na mokili bakelá yango te, ezali likolólikoló, ata mpe siansi oyo eyekolaka mbongwana oyo esalamaka na kati ya biloko (physique quantique), ekoki te kobɔndisa mpe kopesa kimya.” Bato ya siansi bayekoli makambo mingi mpe bakoki sikoyo kolimbola lolenge nyonso ya bomoi, kobongwana ya bileko mpe makambo mosusu ndenge na ndenge oyo ezali kobatela bomoi. Nzokande, siansi ekoki te koyebisa mpo na nini tozali awa mabelé mpe epai wapi tozali kokende. Soki totaleli kaka siansi yango moko, mituna mingi oyo tomitunaka mpo na bomoi ekozwa eyano te. Ndenge zulunalo moko (Süddeutsche Zeitung) elobaki yango, nsukansuka, “mposa ya kozwa lisalisi ezali kaka makasi bipai nyonso.”
Soki Mozalisi te, nani mosusu akoki kosalisa biso na likambo yango? Lokola na ebandeli atyaki bato awa na mabelé, na ntembe te ayebi ntina oyo bazali awa. Biblia eyebisi biso ete Yehova asalaki bato mpo bátondisa mabelé mpe bábatela yango. Na misala na bango nyonso, esengelaki ete bato bámonisaka bizaleli na ye lokola boyengebene, bwanya mpe bolingo. Soki toyebi mpo na nini Yehova akelaki biso, tokoyeba mpe ntina nini tozali awa.—Genese 1:26-28.
Okoki kosala nini?
Ezali boni soki olukaka biyano ya malamu na mituna oyo kasi ozwaka te: ‘Mpo na nini nazali awa na mabelé? Nazali kokende wapi? Ntina ya bomoi ezali mpenza nini?’ Biblia esɛngi yo oluka koyeba Yehova malamu. Mpo na yango, Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” Tolendisi yo okolisa bizaleli ya moto oyo akangamaka na Nzambe, mingimingi bolingo, mpe omityela mokano ya kozala na kati ya bato oyo Bokonzi ya Masiya, oyo etikali moke eya, ekoyangela. Na ndenge wana nde okozala na bomoi oyo ezali na ntina mpe okozwa elikya moko malamu mpe makasi mpo na mikolo ezali koya. Na ntembe te okozwa biyano na mituna minene oyo etungisaka yo tii sikoyo.—Yoane 17:3; Mosakoli 12:13.
Soki ozwi biyano na mituna wana, yango ekoki kosala mbongwana nini na bomoi na yo? Hans ayebi ndenge oyo koyeba makambo yango ebongolaka bomoi ya moto.a Eleki mwa bambula, Hans azalaki na makanisi kaka ya likolólikoló mpo na Nzambe, kasi kondima na ye ezalaki kosala eloko moko te na bomoi na ye. Hans amipesaki na bangi, na basi, azalaki kosala mbeba mikemike mpe kotambola na tukutuku. Alobi boye: “Kasi bomoi ezalaki na ntina te, nazalaki mpenza na esengo te.” Ntango Hans akokisaki mbula soki 25, azwaki ekateli ya kotánga Biblia na likebi mpenza mpo na koyeba Nzambe malamu. Ntango ayebaki Yehova malamu mpe ntina ya bomoi, Hans abongolaki lolenge ya bomoi na ye mpe abatisamaki, akómaki Motatoli ya Yehova. Lelo oyo asili kokokisa mbula 10 na mosala ya ntango nyonso. Alobi na bosembo mpenza boye: “Kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Eloko moko te ekokani na yango. Koyeba Yehova esalisi ngai nayeba ntina ya bomoi.”
Kasi, bato mingi bazali komitungisa kaka mpo na koyeba ntina ya bomoi te. Lokola makambo ezali se kobeba na mokili, ebele ya bato bazali mpe kotungisama na likambo mosusu ya ntina mingi.
Mpo na nini likambo oyo esalemi?
Ntango likambo moko ya mpasi ekómeli bato, bamitunaka motuna oyo: Mpo na nini likambo oyo esalemi? Mpo na kozwa makasi ya koyika mpiko liboso ya mikakatano, esengeli libosoliboso kozwa eyano na motuna wana. Soki eyano ya malamumalamu ezali te, mpasi ekokóma makasi mpe moto oyo azali komona mpasi yango akoki kokóma mawamawa. Na ndakisa, tólobela likambo oyo ekómelaki Bruni.
Bruni, oyo akómi lelo oyo mama mokóló, alobi boye: “Eleki mwa bambula, mwana na ngai ya moke ya mwasi akufaki. Nazalaki kondima ete Nzambe azali, yango wana nakanisaki ete sango akobɔndisa ngai. Sango ayebisaki ngai ete Nzambe azwi Susanne kuna na likoló, akómi anzelu. Mpo na liwa ya mwana na ngai, makambo nyonso ekómaki mabe na miso na ngai, mpe nakómaki koyina Nzambe mpo ye moto azwi ye.” Mpasi mpe mitungisi ya Bruni eumelaki bambula ebele. “Na nsima, Motatoli ya Yehova moko alakisaki ngai na Biblia ete nasengeli te koyina Nzambe. Yehova azwaki Susanne na likoló te, mpe Susanne azali anzelu te. Abɛlaki mpo azalaki moto ya kozanga kokoka. Susanne akufá mpe azali kozela mokolo Yehova akosekwisa ye. Nayebaki lisusu ete asalaki bato mpo bázala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé, mpe mosika te mokano yango ekokokisama. Ntango kaka nabandaki koyeba bomoto ya solosolo ya Yehova, napusanaki penepene na ye, mpe mpasi na ngai ebandaki kokita.”—Nzembo 37:29; Misala 24:15; Baloma 5:12.
Bamilio ya bato bazali kokutana na bampasi ya ndenge na ndenge: makama, bitumba, nzala to mpe makambo mosusu lokola mipɛpɛ makasi, koningana ya mabelé, mpela to mpe ngomba ebimisi mɔtɔ. Bruni abɔndisamaki ntango amonaki na Biblia ete Yehova te nde apesaka biso bampasi, mokano ya Nzambe ezalaki ata moke te ete bato bámonaka bampasi, mpe ete mosika te akosukisa mabe. Lokola mabe ezali se kokóma mingi, yango emonisi ete tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo oyo. Mbongwana monene oyo biso nyonso tozali kozela ekómi pene.—2 Timote 3:1-5; Matai 24:7, 8.
Koyeba Nzambe
Kala, Hans na Bruni bazalaki na makanisi kaka ya likolólikoló mpo na Nzambe. Bazalaki kondima ete azali, kasi bayebaki ye malamu te. Wana bazwaki ntango ya koyeba Yehova malamu, bazwaki mbano na milende oyo basalaki. Bazwaki biyano ya polele na mituna ya ntina mingi oyo bato bazali komituna na mikolo na biso. Epesaki bango kimya ya makanisi mpe elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Ezalaki se bongo mpo na bamilio ya basaleli ya Yehova.
Koyeba Yehova ebandaka na koyekola Biblia malamu, yango eyebisaka biso soki azali nani mpe soki azali kosɛnga nini epai na biso. Yango nde bato mosusu basalaki na ekeke ya liboso. Luka, ye azalaki monganga mpe moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete Bayuda ya Beloya, na ekólo Grèce, “bayambaki liloba [oyo Paulo na Sila bateyaki bango] na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.”—Misala 17:10, 11.
Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki mpe koyangana na masangá. (Misala 2:41, 42, 46; 1 Bakolinti 1:1, 2; Bagalatia 1:1, 2; 2 Batesaloniki 1:1) Ezali mpe ndenge moko lelo oyo. Batatoli ya Yehova bayanganaka na masangá mpo na makita oyo ezali mingimingi kosalisa bato bápusana penepene na Yehova mpe básalela ye na esengo. Koyanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova ezali mpe na litomba mosusu. Lokola bato bakómaka mokemoke lokola Nzambe oyo basambelaka, Batatoli ya Yehova mpe bamonisaka bizaleli ya Yehova, atako bakoki te kosala yango na ndenge ya kokoka. Na bongo, koyanganaka na Batatoli ekosalisa biso tóyeba Yehova lisusu malamu.—Baebele 10:24, 25.
Ozali nde komona ete makambo oyo bazali kosɛnga yo mpo na koyeba kaka Moto moko eleki ndelo? Esengeli mpenza kosala milende. Ezalaka mpe bongo na makambo mingi oyo olingaka kosala na bomoi na yo! Kanisá naino milende oyo moto ya masano asalaka mpo na kokembisa nzoto na ye malamumalamu. Na ndakisa, Jean-Claude Killy, moto ya France oyo azwaki medayi ya wolo na masano ya olympique na lisano ya ski alobaki boye, mpo na moto oyo alingi kolonga na mimekano oyo esangisaka bato ya bikólo ndenge na ndenge: “Osengeli kobanda komilengela mbula 10 liboso mpe komibongisa mbula na mbula mpe kokanisa yango mokolo na mokolo . . . Osengeli komibongisa na makanisi mpe na nzoto, mpe kopema ata mokolo moko te na mbula mobimba.” Ntango mpe molende nyonso wana kaka mpo na kosala lisano oyo ekoumela miniti zomi mpamba! Omoni te ete mpo na koyeba Nzambe esengeli kosala milende mpe kozwa ntango mingi koleka?
Boninga oyo ezali se kokola
Nani akoki kosepela kozanga eloko moko ya ntina mingi na bomoi na ye? Moto moko te. Yango wana, soki ozali komona ete bomoi na yo ezali na ntina te to soki ozali na mposa ya koyeba mpo na nini bato bazali kokutana na mikakatano, boye zwá ekateli ya solosolo ya koyeba Yehova, Nzambe ya Biblia. Koyeba ye ekoki mpenza kobongola bomoi na yo, mpe mpo na libela.
Tokotika koyekola koyeba Yehova mokolo mosusu? Bato oyo basili kosalela ye bambula ebele bazali naino kaka kokamwa na makambo oyo basilá koyeba na ntina na ye mpe na makambo ya sika oyo bazali kaka koyeba na ntina na ye. Koyeba makambo ya ndenge wana ekomemela biso esengo mpe ekosalisa biso tópusana lisusu mingi penepene na ye. Ebongi mpenza tóloba lokola ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te! Mpo ‘nani ayebi makanisi ya Yehova, to nani asilá kokóma mopesi-toli na ye?’”—Baloma 11:33, 34.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Tii lelo oyo bato bazali naino komituna mituna lokola: ‘Mpo na nini nazali awa mabelé? Epai wapi nazali kokende? Ntina ya bomoi ezali mpenza nini?’
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
“Ntango kaka nabandaki koyeba bomoto ya solosolo ya Yehova, napusanaki penepene na ye”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
“Kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Eloko moko te ekokani na yango. Koyeba Yehova esalisi ngai nayeba ntina ya bomoi”