Biblia ebongolaka bato
NDENGE nini elenge mwasi moko oyo anyokwamaki mingi na bomwana akómaki na bomoi oyo ezali na ntina? Nini etindaki moto moko ya politiki oyo azalaki motomboki akóma mosaleli ya Nzambe? Tángá masolo oyo mpo ozwa biyano.
“Nazalaki koluka esika oyo bakoki komonisela ngai bolingo mpe boboto.”—INNA LEZHNINA
ABOTAMAKI NA: 1981
EKÓLO: RUSSIE
BOMOI NA YE YA KALA: ANYOKWAMAKI MINGI NA BOMWANA
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá baba, baboti na ngai mpe bazali bababa. Mbula motoba ya liboso ya bomoi na ngai ezalaki malamu mpenza. Na nsima, baboti na ngai babomaki libala. Atako nazalaki naino mwana moke, nayebaki soki koboma libala elakisi nini, mpe yango epesaki ngai mpasi mingi na motema. Nsima ya koboma libala, tata ná yaya na ngai ya mobali batikalaki na engumba Troitsk; mama azwaki ngai mpe tokendeki kofanda na Chelyabinsk. Na nsima, mama abalaki lisusu. Mobali ya mama azalaki molangwi masanga, mpe mbala mingi azalaki kobɛta ngai ná mama.
Na 1993, yaya na ngai akufaki na mai. Likama yango esalaki libota na biso mpasi makasi. Mama mpe akómaki komɛla masanga mingi mpo na kolongola basusi, akómaki mpe konyokola ngai ndenge mobali na ye azalaki kosala ngai. Nakómaki koluka ndenge ya kolongwa na boombo wana. Nazalaki koluka esika oyo bakoki komonisela ngai bolingo mpe boboto. Nakómaki kokende na mangomba ndenge na ndenge mpo na koluka libɔndisi, kasi ata lingomba moko te ebɔndisaki ngai.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nakómaki na mbula 13, moninga na ngai moko ya kelasi oyo azalaki Motatoli ya Yehova, abɛtelaki ngai mwa masolo ya Biblia. Nasepelaki koyekola masolo ya bato lokola Noa mpe Yobo, oyo basalelaki Nzambe atako bakutanaki na mikakatano. Eumelaki te, Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na ngai Biblia mpe nakómaki koyangana na makita na bango.
Koyekola Biblia esalisaki ngai nayeba makambo mingi ya kitoko. Koyeba ete Nzambe azali na nkombo esimbaki mpenza motema na ngai. (Nzembo 83:18) Nakamwaki ndenge Biblia elobeli polele makambo oyo ekozala na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Nasepelaki makasi ntango nayekolaki ete bato oyo bakufá bakosekwa. Kanisá naino—nakomona lisusu yaya na ngai!—Yoane 5:28, 29.
Kasi, kaka ngai moko nde nayebaki makambo kitoko wana. Mama ná mobali na ye bazalaki kolinga Batatoli ya Yehova te. Bazalaki kotya ngai mpanzi likoló mpo natika koyekola Biblia. Nazalaki kolinga makambo oyo nazalaki koyekola, yango wana naboyaki kotika.
Ezalaki pɛtɛɛ te kolonga botɛmɛli ya bato ya libota na ngai. Nayokaki lisusu mpasi makasi ntango leki na ngai ya mobali oyo tozalaki kokende na ye na makita ya Batatoli ya Yehova akufaki mpe na mai. Kasi, Batatoli ya Yehova basundolaki ngai te. Nakutaki epai na bango bolingo mpe boboto oyo nazalaki koluka banda kala na bomoi na ngai. Namonaki ete bango nde bazali na lingomba ya solo. Na 1996, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Esali sikoyo mbula motoba banda nabalaná na Dmitry, mobali moko malamu mpenza. Ngai ná ye tozali kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na engumba Saint-Pétersbourg. Na nsima, baboti na ngai bazalaki lisusu te kotɛmɛla mateya ya losambo na ngai.
Nazalaka mpenza na bɔtɔndi ndenge nayebá Yehova! Kosalela ye esali ete bomoi na ngai ekóma na ntina.
“Nazalaki na mituna mingi oyo ezalaki kotungisa ngai.”—RAUDEL RODRÍGUEZ RODRÍGUEZ
ABOTAMAKI NA: 1959
EKÓLO: CUBA
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA POLITIKI OYO AZALAKI MOTOMBOKI
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na Havane, mboka-mokonzi ya ekólo Cuba, mpe nakolá na kartye moko ya babola, epai bato bazalaki kobunda mingi na balabala. Ntango nazalaki kokola, nakómaki kosepela na lisano ya judo mpe masano mosusu ya bitumba.
Nazalaki mayele na kelasi, yango wana baboti na ngai balendisaki ngai nakɔta iniversite. Ntango nazalaki na iniversite, nakómaki komona ete makambo ya politiki ya mboka na biso, esengeli kobongwana. Nazwaki ekateli ya kotomboka. Ngai ná moninga na ngai moko ya kelasi tobundisaki komanda moko ya bapolisi, mpo na kobɔtɔla ye mondoki. Na etumba yango, komanda wana azokaki bampota minene na motó. Batyaki ngai ná moninga wana na bolɔkɔ mpo na likambo yango mpe bakatelaki biso etumbu ya liwa. Nazalaki kaka na mbula 20, atako bongo, bomoi na ngai elingaki kokatana!
Na kati ya bolɔkɔ, nazalaki komekameka ndenge oyo nakosala liboso ya basoda oyo bakoboma ngai. Nalingaki ata moke te bámona ete nazali kobanga. Kasi, kaka na ntango yango, nazalaki na mituna mingi oyo ezalaki kotungisa ngai. Nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini kozanga bosembo etondi na mokili? Makambo nyonso ekosuka kaka na bomoi oyo?’
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nsukansuka, etumbu ya liwa oyo bakatelaki biso elongwaki, mpe balobaki ete tokosala mbula 30 na bolɔkɔ. Ezali na ntango wana nde nakutanaki na Batatoli ya Yehova mosusu, oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo na losambo na bango. Mpiko mpe kimya oyo Batatoli bazalaki na yango ekamwisaki ngai mingi. Atako bakangaki bango kaka mpamba, bazalaki na nkanda te mpe bazalaki kosilika te.
Batatoli bateyaki ngai ete Nzambe azali na mokano mpo na bato. Balakisaki ngai na Biblia ete Nzambe akobongola mabele paradiso, mpe mobulu ná kozanga bosembo ekozala te. Bateyaki ngai ete mabele ekotonda na bato ya malamu, oyo bakozala na libaku ya kozala na bomoi ya malamu mpe ya seko.—Nzembo 37:29.
Nazalaki kosepela na makambo oyo Batatoli bazalaki koteya ngai, kasi bizaleli na ngai ekesanaki mosika na oyo ya bango. Nakanisaki ete nakokoka te koboya kokɔta na makambo ya politiki to kotika moto mosusu amonela ngai. Yango wana, nazwaki ekateli ya kotánga Biblia ngai moko. Ntango nasilisaki kotánga yango, namonaki ete kaka Batatoli ya Yehova nde balandaka ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso.
Nsima ya koyekola Biblia, nayaki koyeba ete esengeli natika mpenza makambo mosusu oyo nazalaki kosala. Na ndakisa, esengelaki nabongola lolenge na ngai ya koloba, mpo namesanaki koloba maloba mabe. Esengelaki mpe natika komɛla makaya. Esengelaki mpe natika kokɔta na makambo ya politiki. Kotika makambo wana ezalaki pɛtɛɛ te, kasi na lisalisi ya Yehova, mokemoke, nalongaki kotika yango.
Moko ya makambo oyo ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kotika ezali koyeba kopekisa nkanda na ngai. Tii lelo, nabondelaka Nzambe asalisa ngai nayeba komipekisa. Bavɛrsɛ ya Biblia lokola Masese 16:32, esalisaki ngai mingi. Vɛrsɛ yango elobaka boye: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya, mpe ye oyo apekisaka elimo na ye azali malamu koleka ye oyo azwi engumba.”
Na 1991, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Nazwaki batisimo na tono moko ya mai na bolɔkɔ. Na mbula oyo elandaki, babimisaki ngai ná baninga mosusu ya bolɔkɔ mpe batindaki biso na ekólo Espagne mpo tozalaki na bandeko kuna. Ntango nakómaki na Espagne, nabandaki mbala moko kokende na makita ya Batatoli ya Yehova. Kuna, Batatoli bayambaki ngai lokola nde nazaláká ná bango banda kala, mpe basalisaki ngai mpo nabandela bomoi na ngai kuna.
MATOMBA OYO NAZWI: Nazali na esengo, nazali kosalela Nzambe elongo na mwasi na ngai mpe bana na biso mibale ya basi. Namonaka ete kolekisa ntango na ngai mingi mpo na kosalisa basusu báyekola Biblia ezali lokumu monene. Ekómaka ete nakanisa ndenge nalingaki kokufa ntango nazalaki naino elenge; kasi nasepelaka mingi na matomba oyo nazwi kobanda ntango wana tii lelo. Nazali na bomoi, mpe nazwi elikya. Nazali kozela na motema likoló Paradiso oyo Nzambe alaká, ntango oyo bosembo ekozala mpenza mpe “liwa ekozala lisusu te.”—Emoniseli 21:3, 4.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
“Koyeba ete Nzambe azali na nkombo esimbaki mpenza motema na ngai”
[Elilingi na lokasa 20]
Ngai ná mobali na ngai tosepelaka kolakisa bababa bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ