Biblia ebongolaka bato
NDENGE nini elenge mwasi moko oyo azalaki kokipe makambo ya Nzambe te mpe azalaki na mosala moko ya malamu, amonaki mpenza ntina ya bomoi? Makambo nini elenge mobali moko ya Lingomba ya Katolike ayekolaki na ntina etali liwa, oyo esalaki ete abongola bomoi na ye? Makambo nini etali Nzambe moto moko oyo alɛmbaki bomoi ayekolaki, oyo esalaki ete akóma mosakoli ya nsango malamu? Tángá makambo oyo bato yango balobi.
“Banda kala nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele?’”—ROSALIND JOHN
ABOTAMAKI NA: 1963
EKÓLO: GRANDE-BRETAGNE
BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI NA MOSALA MOKO YA LOKUMU
NDENGE NAZALAKI:
Nabotamaki na Croydon, na sudi ya Londres; nazali mwana ya 6 na libota ya bana 9. Baboti na ngai bazalaki bato ya esanga Caraïbes ya St. Vincent. Mama azalaki mondimi ya Lingomba ya Metodiste. Nazalaki kokipe makambo ya Nzambe te, atako nazalaki na mposa makasi ya kozwa boyebi. Mbala mingi, soki tozwi konje na kelasi, nazalaki kolekisa ntango na ngai pembeni ya laki moko oyo ezalaki na esika oyo tozalaki kofanda mpo na kotánga babuku ndenge na ndenge oyo nazalaki kozwa na bibliotɛkɛ.
Mwa bambula nsima ya kosilisa kelasi, nakómaki na mposa ya kosalisa bato oyo bazali na mpasi. Nabandaki naino kosalisa baoyo bazangi bisika ya kofanda, bibosono mpe baoyo bazali na mokakatano ya koyekola. Na nsima, nakɔtaki iniversite mpo na koyekola siansi oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto. Nsima ya kozwa diplome, nasalaki misala ndenge na ndenge ya lokumu, mpe bomoi na ngai ezalaki kaka kokóma malamu koleka. Lokola nazalaki mopesi-toli na makambo etali kokamba bakompanyi mpe moto ya siansi na makambo etali bomoi ya bato, nazalaki kaka na mposa ya ordinatɛrɛ mpe kokɔta na internet mpo na kosala mosala na ngai. Na bantango mosusu, nazalaki kosala mibembo ya mwa baposo na mboka mopaya, kofanda na otɛlɛ oyo nazalaki kolinga mingi, kosepela na bisika kitoko oyo ezalaki zingazinga na yango, mpe kokende na bisika ya kosala ngalasisi mpo nzoto ezala malamu. Nazalaki kokanisa mpenza ete yango nde bomoi ya malamu. Kasi, nazalaki ntango nyonso komitungisa mpo na bato ya mpasi.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Banda kala nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele?’ Kasi, namekaki ata mbala moko te koluka biyano na Biblia. Mokolo moko, na 1999, Margaret, leki na ngai ya mwasi, oyo akómaki Motatoli ya Yehova, ayaki kotala ngai ná moninga na ye oyo azalaki mpe Motatoli; moninga na ye wana atyelaki ngai likebi mpenza. Nandimaki ayekola na ngai Biblia, kasi nazalaki kokende liboso te na boyekoli yango mpo mosala na ngai mpe bomoi oyo nazalaki na yango ezalaki kozwa ngai ntango mingi.
Na 2002, na eleko ya molunge, nakendaki kofanda na sudi-wɛsti ya Angleterre. Nakɔtaki iniversite kuna na mokano ya kozwa diplome ya monene (doctorat) na makambo etali bomoi ya bato. Nabandaki koyangana mbala na mbala na makita ná mwana na ngai ya moke ya mobali na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki kuna. Atako natángaki bakelasi ya milaimilai, boyekoli na ngai ya Biblia esalisaki ngai nayeba malamumalamu ntina oyo bomoi etondi na bampasi mpe ndenge oyo yango ekosila. Namonaki ete Matai 6:24, oyo elobi ete moto akoki kozala moombo ya bankolo mibale te, ezali solo. Esengeli kopona Nzambe to bomɛngo. Nayebaki ete nasengelaki kozwa ekateli mpo na makambo oyo nasengeli kotya na esika ya liboso na bomoi na ngai.
Na mbula oyo elekaki, nazalaki mbala mingi koyangana na etuluku moko ya boyekoli ya Biblia epai Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?a Nandimisamaki ete kaka Yehova, Mozalisi na biso nde akosilisa bampasi ya bato. Kasi, na iniversite, bateyaki ngai ete koyeba ntina ya bomoi esɛngi te kondimela Mozalisi. Epesaki ngai nkanda. Nsima ya sanza mibale, nalongwaki na iniversite mpe nazwaki ekateli ya kopesa ntango mingi na makambo ya Nzambe.
Vɛrsɛ ya Biblia oyo etindaki ngai nabongola bomoi na ngai ezali Masese 3:5, 6; elobi boye: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” Koyekola makambo ya Nzambe na biso ya bolingo, ememelaki ngai matomba mingi koleka bomɛngo mpe lokumu nyonso oyo diplome ya doctorat ekokaki kopesa ngai. Wana nazalaki koyekola mingi lisusu na ntina etali mokano ya Yehova mpo na mabele mpe mokumba oyo Yesu akokisaki ndenge akabaki bomoi na ye mpo na biso, yango etindaki ngai lisusu namipesa epai ya Mozalisi na biso. Nazwaki batisimo na Aprili 2003. Nsima na yango, nabandaki mokemoke kokómisa bomoi na ngai pɛpɛlɛ.
MATOMBA OYO NAZWI:
Boninga na ngai ná Yehova ezali na valɛrɛ mingi. Nazwá kimya mpenza mpe esengo ndenge nayebá ye. Epesaka ngai mpe esengo makasi ndenge nayanganaka elongo na bato mosusu oyo basambelaka Nzambe na solo.
Mposa na ngai ya kozwa boyebi ezali kokoba kokokisama mpenza mpo na makambo oyo nazali koyekola na Biblia mpe na makita ya bokristo. Nasepelaka koteya basusu nsango malamu. Yango nde ekómá mosala na ngai oyo nakoki mpenza kosalisa bato bakóma na bomoi ya malamu sikoyo mpe bákóma na elikya kitoko ya bomoi na mokili ya sika. Kobanda na sanza ya Yuni 2008, nakómá kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola, mpe nazali na esengo koleka ndenge nazalaki liboso. Namoni ntina mpenza ya bomoi, mpe mpo na yango nazali mpenza na botɔndi epai ya Yehova.
“Liwa ya moninga na ngai etungisaki ngai.”—ROMAN IRNESBERGER
ABOTAMAKI NA: 1973
EKÓLO: AUTRICHE
BOMOI NA YE YA KALA: MOBƐTI MASANO YA MBONGO
NDENGE NAZALAKI:
Nakolá na Braunau, engumba moko ya moke na Autriche. Ezalaki esika moko ya bozwi, mpe mobulu ezalaki mpenza te. Bato ya libota na biso bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, mpe babɔkɔlaki ngai na mateya ya lingomba yango.
Likambo moko oyo ekómelaki ngai na bomwana, etungisaki ngai mingi. Nakanisaka lisusu ndenge tobɛtáká bale ná moninga na ngai moko ya motema na 1984, ntango nazalaki na mbula soki 11. Kaka na nsima ya midi ya mokolo yango, motuka etutaki ye. Liwa ya moninga wana etungisaki ngai mingi. Bambula mingi nsima ya likama yango, nazalaki komituna nini ekómelaka biso soki tokufi.
Ntango nasilisaki kelasi, nakomaki kosala mosala ya kobongisa kura. Atako nakómaki na momeseno ya kobɛta masano ya mbongo mpe nazalaki kobɛta oyo ya mbongo ebele, nazalaki kozanga mbongo te. Nazalaki mpe kolekisa ntango mingi na masano mosusu mpe nakómaki kolinga mingi miziki babengi heavy metal ná punk rock. Nazalaki ntango nyonso kokende na bisika oyo babinaka mpe na bafɛti. Nazalaki koluka bisengo mpe nakómaki na bomoi ya mbindo, ata bongo nazalaki komiyoka lokola nazangi eloko.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Na 1995, mobali moko ya mokóló, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, ayaki na ndako na ngai mpe apesaki ngai buku moko oyo ezalaki kopesa eyano ya Biblia na motuna: Nini ekómelaka biso soki tokufi? Liwa ya moninga na ngai ezalaki kaka kotungisa ngai, yango wana nazwaki buku yango. Nasukaki kaka te na mokapo oyo ezalaki kolobela liwa, kasi, natángaki nde buku yango mobimba!
Makambo oyo natángaki, epesaki ngai eyano na mituna oyo nazalaki komituna mpo na liwa. Kasi, nayekolaki makambo mingi koleka. Lokola nakolaki na Lingomba ya Katolike, kondima na ngai ezalaki libosoliboso epai ya Yesu. Kasi, koyekola Biblia malamumalamu esalisaki ngai nakóma moninga ya Yehova Nzambe, Tata ya Yesu. Nasepelaki mpenza koyeba ete Yehova abombaka mikano na ye te mpe azalaka mosika te na bato kasi amimonisaka polele epai ya baoyo balukaka ye. (Matai 7:7-11) Nayekolaki mpe ete Yehova akoki koyoka mawa to esengo. Mpe ete akokisaka ntango nyonso maloba na ye. Yango etindaki ngai naluka koyeba bisakweli ya Biblia mpe ndenge oyo ekokisamaki. Makambo oyo nayekolaki ekómisaki kondima na ngai makasi epai ya Nzambe.
Eumelaki te namonaki ete kaka Batatoli ya Yehova nde balingaka mpenza kosalisa bato báyeba Biblia. Natalelaki mikapo ya Biblia oyo ezalaki na mikanda ya Batatoli ya Yehova mpe nalukaki yango na Biblia na ngai ya katolike. Wana nazalaki kokoba kolukaluka na Biblia, namonaki ete nazwi solo.
Boyekoli na ngai ya Biblia esalisaki ngai nayeba ete Yehova alingi natosa mibeko na ye. Namonaki ete Makambo oyo natángaki na Baefese 4:22-24 esalisaki ngai namona ntina ya kolongola “bomoto ya kala” oyo eyokanaki na “etamboli na [ngai] ya liboso” mpe nasengelaki “kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe.” Yango wana, natikaki bizaleli na ngai ya mabe. Namonaki mpe ete nasengelaki kotika kobɛta masano ya mbongo, mpo yango ezalaki kolendisa ezaleli ya konduka biloko ya mokili mpe lokoso. (1 Bakorinti 6:9, 10) Nayebaki ete mpo nasala mbongwana wana, nasengelaki kotika baninga na ngai ya kala mpe koluka baoyo balingaka makambo ya Nzambe lokola ngai.
Kotika makambo wana ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi mpe nakómaki na baninga ya sika na lisangá yango. Nakobaki mpe koyekola Biblia na mozindo ngai moko. Yango esalisaki ngai natika koyoka miziki ya mabe, nabongola mikano ya bomoi na ngai, mpe nabongisa nzoto na ngai. Na 1995, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI:
Sikoyo nakómá kotalela mbongo mpe biloko ya mokili na ndenge oyo ebongi. Nazalaki kosilika mpambampamba, kasi sikoyo natiká ezaleli yango. Namitungisaka lisusu mingi te mpo na avenire.
Nasepelaka ndenge nazali na kati ya bato oyo basalelaka Yehova na mokili mobimba. Kati na bango, ezali mpe na bato oyo bazali na mikakatano kasi bazali kokoba kosalela Nzambe na bosembo. Nazali mpenza na esengo ndenge nalekisaka ntango mpe makasi na ngai mpo na kokokisa kaka bamposa na ngai te, kasi mpe mpo na kosambela Yehova mpe kosalela basusu bolamu.
“Sikoyo bomoi na ngai ekómi na ntina.”—IAN KING
ABOTAMAKI NA: 1963
EKÓLO: ANGLETERRE
BOMOI NA YE YA KALA: ALƐMBAKI BOMOI
NDENGE NAZALAKI:
Nabotamaki na Angleterre, kasi, ntango nakómaki na mbula soki nsambo, libota na biso ekendeki kofanda na Australie. Tofandaki na engumba Gold Coast, na Qeensland, na Australie, esika moko oyo baturiste mingi bayaka kotala. Atako tozalaki na libota ya bozwi te, tozalaki ntango nyonso kozwa biloko oyo tosengelaki na yango.
Atako babɔkɔlaki ngai malamu, nazalaki mpenza na esengo te. Nakómaki mwa moke kolɛmba bomoi. Papa azalaki momɛli monene ya masanga. Nazalaki mpenza kolinga ye te, mingimingi mpo na masanga na ye mpe mpo na ndenge oyo azalaki konyokola mama. Kaka na nsima, ntango nayebaki makambo oyo akutanaki na yango na mosala na ye ya soda na Malaya, nayaki koyeba ntina oyo azalaki kosala bongo.
Na boumeli ya bambula nyonso oyo nalekisaki na eteyelo ya ntei, nazalaki komɛla masanga mingi. Ntango nakómaki na mbula 16, natikaki kelasi mpe nakɔtaki na mosala ya masuwa. Nakómaki komɛla bangi mpe nakómaki moombo ya likaya. Mokemoke, nakómaki mpe moombo ya masanga. Nakómaki komɛla masanga mingi kaka na wikende te, kasi nde mikolo nyonso.
Ntango nakómaki pene na mbula 20, nakómaki komituna soki Nzambe azalaka. Nazalaki komituna boye: ‘Soki Nzambe azalaka mpenza, mpo na nini atiki bato bányokwamaka mpe bákufaka?’ Nakomaki kutu poɛmi moko mpo na kopesa Nzambe foti mpo na mabe nyonso oyo ezali na mokili.
Natikaki mosala ya masuwa ntango nakómaki na mbula 23. Na nsima, nasalaki misala ndenge na ndenge mpe nasalaki kutu mibembo na mikili ya bapaya na boumeli ya mbula mobimba, kasi eloko moko te epesaki ngai esengo na bomoi. Nazalaki ata na mposa te ya komityela mikano to kokokisa likambo moko boye. Eloko moko te ezalaki kosepelisa ngai. Likanisi ya kozala na ndako, na mosala ya malamu, mpe kozwa mpɛtɛ na mosala, nyonso wana ezalaki mpenza na ntina te mpo na ngai. Eloko kaka moko oyo ezalaki “kobɔndisa” ngai ezalaki komɛla masanga mpe koyoka miziki.
Nayebaka lisusu ntango mpenza oyo nayokaki mposa makasi ya koyeba ntina ya bomoi. Nazalaki na Pologne, nakendaki kotala kaa monene ya bakangami na Auschwitz. Natángá makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki kuna. Kasi, ntango natɛlɛmaki na esika yango, nayokaki mpasi makasi na motema. Nazalaki komituna ntina nini bato bakokaki konyokola baninga na bango bato ndenge wana. Nakanisaka lisusu ndenge nazalaki kotambolatambola na kaa yango na mai na miso, mpe nazalaki komituna ‘mpo na nini boye?’
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Na 1993, nsima ya kouta na mobembo, nakómaki kotánga Biblia mpo na koluka biyano. Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova mibale bayaki na ndako na ngai mpe babengisaki ngai na liyangani moko oyo ezalaki kosalema na stade moko ya pembeni. Nandimaki kokende.
Mwa basanza liboso, nakendaki na stade yango mpo na kotala lisano ya ndembo, kasi ntango nakendaki na liyangani yango, namonaki bokeseni makasi. Batatoli ya Yehova bazalaki na bokonde mpe balataki malamu, mpe bana na bango bazalaki kosala mobulu te. Natikalaki monɔkɔ polele na makambo oyo namonaki na ntango ya kolya. Ebele ya Batatoli ya Yehova bazalaki kolya na esika oyo babɛtaka ndembo, kasi, ntango bazongaki na bisika na bango ya kofanda, namonaki ata salite moko te na esika oyo balyaki! Na nyonso, ezalaki komonana ete bato yango bazalaki kosepela na biloko oyo bazalaki na yango mpe bazalaki na kimya; eloko oyo nazalaki mpenza koluka. Nayebaka lisusu ata diskur moko te oyo esalemaki mokolo yango, kasi bizaleli ya Batatoli ya Yehova etikalá mpenza na makanisi na ngai.
Mokolo wana na mpokwa, nakanisaki ndeko na ngai moko oyo atángaka Biblia mpe ayekolaka makambo ya mangomba ndenge na ndenge. Mwa bambula liboso, ayebisaki ngai ete Yesu alobaki ete tokoyeba lingomba ya solo na mbuma na yango. (Matai 7:15-20) Namonaki ete nasengeli koluka koyeba nini ekesenisaka Batatoli ya Yehova ná bato mosusu. Ezalaki mbala ya liboso nakóma mpenza na elikya na bomoi na ngai.
Pɔsɔ oyo elandaki, Batatoli mibale ya Yehova oyo babengisaki ngai na liyangani bayaki kotala ngai. Basɛngaki ete báyekola na ngai Biblia, mpe nandimaki. Nakómaki mpe koyangana na makita elongo na bango.
Wana nazalaki koyekola Biblia, nakómaki kotalela Nzambe na ndenge oyo nazalaki kotalela ye liboso te. Nayekolaki ete ezali ye te nde asalaka bato mabe to abimiselaka bango bampasi mpe ete ye moko ayokaka mpasi ntango bato basalaka makambo ya mabe. (Ebandeli 6:6; Nzembo 78:40, 41) Nakómaki mpenza na ekateli ya koboya koyokisa Yehova mpasi ata ya ndenge nini. Nazalaki na mposa ya kosepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Natikaki komɛla masanga koleka ndelo mpe natikaki makaya, natikaki mpe bomoi ya mbindo. Na Marsi 1994, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI:
Nazali na esengo ya solosolo mpenza. Namɛlaka lisusu masanga te mpo na koluka kosilisa mikakatano na ngai. Kutu, nayekoli nde kobwakela Yehova mikumba na ngai ya kilo.—Nzembo 55:22.
Eleki sikoyo mbula zomi banda nabalá Karen, Motatoli moko ya Yehova ya kitoko mpenza oyo azali na mwana moko ya kitoko ya mwasi na nkombo Nella. Biso nyonso misato tosepelaka kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola mpo na kosalisa basusu báyeba solo na ntina na Nzambe. Sikoyo bomoi na ngai ekómi na ntina.
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.