Tózala na limemya mpo na libala, likabo euti na Nzambe
“Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.”—EBA. 2:24.
1. Mpo na nini ebongi tópesa Yehova limemya?
YEHOVA NZAMBE, Mobandisi ya libala, abongi mpenza tópesa ye limemya. Lokola azali Mozalisi, Nkolo Mokonzi, mpe Tata na biso ya likoló, yango wana abengami Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yak. 1:17; Em. 4:11) Yango emonisaka bolingo na ye monene. (1 Yoa. 4:8) Makambo nyonso oyo ateyaka biso, nyonso oyo asɛngaka biso, mpe nyonso oyo apesaka biso ezalaka mpo na bolamu mpe litomba na biso.—Yis. 48:17.
2. Malako nini Yehova apesaki mobali ná mwasi ya liboso?
2 Biblia elobeli libala lokola moko na makabo yango “ya malamu” oyo euti na Nzambe. (Ruta 1:9; 2:12) Ntango abalisaki Adama ná Eva, mobali ná mwasi ya liboso, Yehova apesaki bango malako ya sikisiki mpo esalisa bango bálonga. (Tángá Matai 19:4-6.) Soki bálandaka litambwisi ya Nzambe, balingaki kozala na esengo libela na libela. Nzokande, basalaki bozoba na ndenge batyolaki mitindo oyo Nzambe apesaki mpe mpo na yango bakutanaki na mikakatano makasi.—Eba. 3:6-13, 16-19, 23.
3, 4. (a) Ndenge nini bato mingi lelo bazali kozanga limemya mpo na libala mpe mpo na Yehova Nzambe? (b) Bandakisa nini tokotalela na lisolo oyo?
3 Ndenge moko na babalani wana ya liboso, bato mingi lelo batyaka likebi moke to kutu batyolaka litambwisi ya Yehova ntango bazali kozwa bikateli na libala. Bato mosusu bazali koboya polele ebongiseli ya libala, mpe bamosusu baluki kosala ete libala ezala ndenge bango balingi, na ndakisa mibali ná mibali to mpe basi ná basi. (Rom. 1:24-32; 2 Tim. 3:1-5) Bazali kobosana ete libala ezali likabo euti na Nzambe, mpe ete ntango bazali kozanga limemya mpo na likabo yango, bazali mpe kozanga limemya epai ya Mopesi na yango, Yehova Nzambe.
4 Ntango mosusu, ata basaleli mosusu ya Nzambe babosanaka ndenge oyo Yehova atalelaka libala. Babalani mosusu bazali kozwa ekateli ya kokabwana, to ya koboma libala mpo na bantina oyo Makomami epesi nzela te ya kosala bongo. Ndenge nini kokima likambo yango? Ndenge nini malako ya Nzambe oyo ezali na Ebandeli 2:24 ekoki kosalisa bakristo oyo babalá bálendisa boyokani na libala na bango? Mpe ndenge nini bato oyo bazali kokana kobala bakoki komibongisa mpo na yango? Tólobela bandakisa ya mabala misato ya malamu oyo Biblia elobeli, oyo emonisi ete komemya Yehova ezali na ntina mingi mpo libala eumela.
Tóyekola kozala sembo
5, 6. (a) Ekoki kozala ete Zekaria ná Elizabeti bamekamaki mpo na mokakatano nini? (b) Ndenge nini Nzambe apambolaki bosembo na bango?
5 Zekaria ná Elizabeti basalaki nyonso oyo esengeli. Moto na moto aponaki molongani oyo azali mosambeli ya sembo ya Yehova. Zekaria azalaki kokokisa na bosembo mikumba na ye ya nganga-nzambe, mpe bango mibale bazalaki kosala makasi bátosa Mibeko ya Nzambe. Bazalaki mpenza na bantina mingi ya kozala na botɔndi. Nzokande, soki okendaki na ndako na bango na Yuda, olingaki koumela te mpo na komona ete eloko moko ezangaki. Bazalaki na bana te. Elizabeti azalaki ekomba; mpe bango mibale bakómaki na bambula mingi mpenza.—Luka 1:5-7.
6 Na Yisraele ya kala, kobota bana ezalaki likambo ya lokumu mpenza, mpe mbala mingi mabota ezalaki minene. (1 Sa. 1:2, 6, 10; Nz. 128:3, 4) Na ntango wana, Moyisraele akokaki koboma libala na mwasi na ye soki aboteli ye mwana te. Kasi, Zekaria atikalaki sembo epai ya Elizabeti. Alukaki nzela ya mokuse te mpo na koboma libala; mwasi na ye mpe asalaki bongo te. Atako kozanga bana ezalaki kopesa bango mawa, bakobaki kosalela Yehova elongo na bosembo. Na nsima, Yehova asalelaki bango likamwisi mpe apambolaki bango; babotaki mwana moko ya mobali atako bakómaki mibange.—Luka 1:8-14.
7. Na ndenge nini mosusu Elizabeti amonisaki ete azali sembo epai ya mobali na ye?
7 Nzokande, Elizabeti amonisaki ete azali sembo na ndenge mosusu. Ntango mwana na ye Yoane abotamaki, Zekaria azalaki koloba te mpamba te bakómisaki ye baba mpo atyelaki anzelu ya Nzambe ntembe. Kasi na ntembe te Zekaria ayebisaki mwasi na ye na lolenge moko boye ete anzelu ya Yehova ayebisaki ye apesa mwana yango nkombo “Yoane.” Ntango mwana abotamaki, baninga ya kartye mpe bandeko na bango balingaki kopesa mwana yango nkombo ya tata na ye. Kasi na bosembo nyonso, Elizabeti atosaki malako oyo mobali na ye apesaki ye. Alobaki boye: “Te, bongo te! kasi bakobenga ye Yoane.”—Luka 1:59-63.
8, 9. (a) Ndenge nini bosembo elendisaka boyokani na libala? (b) Wapi mwa makambo oyo mwasi ná mobali bakoki kosala mpo na komonisa bosembo?
8 Ndenge moko na Zekaria mpe Elizabeti, babalani lelo bakutanaka na makambo oyo elɛmbisaka nzoto mpe mikakatano mosusu. Libala oyo bosembo ezali te esimbaka te. Kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te, kotala pornografi, kosala ekobo, mpe makambo mosusu oyo ekoki kobebisa libala ya malamu ekoki kotinda moto atika kotyela molongani na ye motema mpo na libela. Mpe soki babalani bazali lisusu kotyelana motema te, bolingo ekitaka mokemoke. Tokoki koloba ete bosembo ezali lokola lopango oyo ebatelaka libota mpo bapaya ya mabe mpe makama ekɔta te; epesaka bato oyo bazali na ndako kimya. Na yango, ntango mwasi ná mobali bazali sembo, bakoki kofanda elongo na kimya mpe kofungwelana motema, mpe bolingo na bango ekokola. Ya solo, bosembo ezali na ntina mingi.
9 Yehova ayebisaki Adama boye: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye.” (Eba. 2:24) Elimboli nini? Boyokani oyo moto azalaki na yango ná baninga mpe bandeko liboso abala esengeli kobongwana. Molongani mokomoko asengeli kopesa ntango mpe kotya likebi na ye libosoliboso epai ya molongani na ye. Baninga to bandeko bakoki lisusu kozwa esika ya liboso te, bongo libala etikala na nsima; babalani basengeli mpe te kotika baboti bákɔtaka na bikateli to na matata ya libala na bango. Babalani basengeli sikoyo kokangama makasi bango mibale. Yango nde litambwisi ya Nzambe.
10. Nini ekosalisa babalani bázala na bosembo?
10 Ata na mabota oyo bato nyonso bazali na lingomba moko te, bosembo ebimisaka matomba. Ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azali mondimi te alobi boye: “Nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo azali koteya ngai ndenge ya kotosa mobali na ngai mpe kozala na limemya makasi epai na ye. Lokola nazalaka sembo, nasali mbula 47 na libala oyo ezali na bolingo mpe na limemya.” (1 Ko. 7:10, 11; 1 Pe. 3:1, 2) Na yango, salá makasi mpo molongani na yo ayoka ete azali na ntina ya kobanga te. Na maloba mpe na misala na yo, luká ndenge ya kokitisa molongani na yo motema mpo amona ete mpo na yo, ye nde moto oyo aleki ntina na mokili. Soki etali kaka yo, kotika moto to eloko moko te ebebisa boyokani na yo ná molongani na yo. (Tángá Masese 5:15-20.) Ron ná Jeannette, oyo bazali na libala ya esengo banda mbula koleka 35, balobi boye: “Lokola totosaka makambo nyonso oyo Nzambe asɛngi biso, libala na biso ezali ya esengo mpe ezali malamu.”
Bomoko elendisaka boyokani na libala
11, 12. Ndenge nini Akila ná Prisile basalaki na bomoko (a) na ndako, (b) na mosala na bango ya mosuni, mpe (c) na mosala ya Nzambe?
11 Ntango ntoma Paulo alobelaki baninga na ye Akila ná Prisile, azalaki kotánga moko te kozanga atánga mosusu. Mobali wana ná mwasi na ye oyo bazalaki na bomoko bazali ndakisa malamu oyo emonisi likanisi ya Nzambe ntango alobaki ete mobali ná mwasi basengeli kokóma “mosuni moko.” (Eba. 2:24) Bazalaki ntango nyonso kosala elongo, na ndako, na mosala ya mosuni, mpe na misala ya bokristo. Na ndakisa, ntango Paulo akómaki na Korinti mpo na mbala ya liboso, Akila ná Prisile babengaki ye na boboto aya kofanda na ndako na bango, mpe emonani ete mpo na mwa ntango azalaki kofanda kuna mpe kokende kosala misala na ye. Na nsima, na Efese, bandimaki makita esalemaka na ndako na bango mpe basalaki elongo mpo na kosalisa bato ya sika, lokola Apolisi, bákola na elimo. (Mis. 18:2, 18-26) Na nsima, babalani wana bakendaki na Roma, epai bandimaki lisusu makita ya lisangá esalemaka na ndako na bango. Na nsima, bazongaki na Efese mpe bazalaki kolendisa bandeko.—Rom. 16:3-5.
12 Na ntango moko boye, Akila ná Prisile basalaki mpe elongo na Paulo na mosala na bango ya kotonga bahema. Awa mpe, babalani yango bazali elongo, bazali kosala na bomoko kozanga kowelana. (Mis. 18:3) Ntembe ezali te ete ntango oyo balekisaki elongo na misala ya bokristo nde esalisaki bango bátya mosala ya Yehova na esika ya liboso mpe na ndenge yango, bazalaki na boyokani makasi na libala na bango. Ezala na Korinti, na Efese, to na Roma, bayebanaki mingi ete bazali “baninga . . . ya mosala na kati ya Kristo Yesu.” (Rom. 16:3) Basalaki elongo mpo na kotombola mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi bisika nyonso oyo bazalaki.
13, 14. (a) Makambo nini ekoki kobebisa boyokani na libala? (b) Wapi mwa makambo oyo babalani bakoki kosala mpo na kolendisa boyokani na bango lokola “mosuni moko”?
13 Ya solo, kozala na mikano moko mpe kosala makambo na bomoko ebongisaka boyokani na libala. (Mos. 4:9, 10) Likambo ya mawa, babalani mingi lelo bazali kolekisa ntango mingi te elongo. Bazali kosala bangonga mingi, moto na moto na mosala na ye. Bamosusu bazali kosala mibembo milai ya mosala to kokende kofanda na mboka mopaya bango moko mpo na kosala mosala mpe kotindela libota mbongo. Ata na kati ya ndako, babalani mosusu bamonaka lokola bazali kaka bango moko mpo, na esika básolola na molongani na bango, balekisaka ntango mingi na kotala televizyo, na mwa misala oyo basepelaka na yango, na masano ya video mpe masano mosusu, to mpe na Internet. Ezali bongo na libala na bino? Soki ezali bongo, bokoki kobongisa makambo mpo bólekisa ntango mingi elongo? Mpo na nini te kosala elongo misala mosusu ya mokolo na mokolo, na ndakisa kolamba, kosokola basaani, mpe kosala mwa misala mikemike na lopango? Bokoki kosala elongo wana bozali kobɔkɔla bana to kosalisa baboti oyo bakómi mibange?
14 Likambo eleki ntina, bólekisaka ntango elongo mbala na mbala na makambo oyo etali losambo ya Yehova. Kotalela mokapo ya mokolo elongo mpe kosala losambo na libota epesaka mabaku ya malamu mpo bókoba kozala na makanisi mpe mikano ndenge moko na libota na bino. Bóbimaka mpe na mosala ya kosakola elongo. Soki likoki ezali, bósɛnga elongo mosala ya mobongisi-nzela, ata soki bomoi na bino epesi bino nzela ya kosala yango kaka sanza moko to mbula moko. (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) Ndeko moko oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela elongo na mobali na ye alobi boye: “Kobima mosala ya kosakola ezalaki moko ya makambo oyo epesaki biso nzela ya kolekisa ntango elongo mpe kosolola mpenza. Lokola biso mibale tozalaki na mokano moko ya kosalisa na elimo bato oyo tokutani na bango na mosala ya kosakola, nazalaki komona ete tozali mpenza ekipi moko. Nakómaki na boyokani makasi na ye, kaka lokola mobali na ngai te, kasi mpe lokola moninga ya malamu.” Soki ozali kosala makambo ya ntina elongo na molongani na yo, bamposa na yo, makambo oyo otyaka na esika ya liboso, mpe mimeseno na yo ekokokana mokemoke na oyo ya molongani na yo tii, lokola Akila ná Prisile, bokobanda kokanisa, koyoka, mpe kosala lokola “mosuni moko.”
Bótya Nzambe na esika ya liboso na libala
15. Nini esalisaka libala ezala malamu? Limbolá.
15 Yesu ayebaki ntina ya kotya Nzambe na esika ya liboso na libala. Amonaki ndenge Yehova abalisaki mwasi ná mobali ya liboso. Amonaki ndenge Adama ná Eva bazalaki na esengo ntango nyonso oyo balandaki malako ya Nzambe, mpe amonaki na miso mikakatano oyo ebimaki ntango baboyaki kolanda malako yango. Na yango, ntango Yesu ateyaki bato, azongelaki malako ya Tata na ye oyo ezali na Ebandeli 2:24. Abakisaki mpe likanisi oyo: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:6) Na yango, tii lelo limemya makasi epai ya Yehova nde esalisaka libala ezala ya esengo mpe ya malamu. Na likambo yango, Yozefe ná Maria, baboti ya Yesu awa na mabele, batikaki ndakisa ya malamu.
16. Ndenge nini Yozefe ná Maria bamonisaki ete balingaka makambo ya Nzambe na libota na bango?
16 Yozefe azalaki na boboto mpe na limemya epai ya Maria. Ntango Yozefe ayebaki ete Maria azali na zemi, akanaki kosalela ye makambo na motema mawa, liboso kutu anzelu ya Nzambe alimbwela ye likambo oyo ekómelaki Maria. (Mat. 1:18-20) Nsima ya kobalana, batosaki mitindo ya Kaisala mpe balandaki Mibeko ya Moize na likebi mpenza. (Luka 2:1-5, 21, 22) Mpe atako kaka mibali nde basɛngisamaki koyangana na bafɛti minene ya losambo na Yerusaleme, Yozefe ná Maria, elongo na bato ya libota na bango, bazalaki koyangana mbula na mbula. (Mib. 16:16; Luka 2:41) Na makambo wana mpe na mosusu, babalani wana oyo bakangamaki na Nzambe bazalaki kosala makasi básepelisa Yehova mpe bamonisaki limemya makasi mpo na makambo ya elimo. Tokoki kokamwa te ndenge Yehova aponaki bango bábatela Mwana na ye na ebandeli ya bomoi na ye awa na mabele.
17, 18. (a) Ndenge nini babalani bakoki kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso na libota na bango? (b) Matomba nini bakozwa?
17 Bino mpe botyaka Nzambe na esika ya liboso na libota na bino? Na ndakisa, ntango bozali kozwa bikateli ya minene, bolukaka liboso mitinda ya Biblia, bobondelaka mpo na likambo yango, mpe na nsima bolukaka toli ya mokristo oyo akɔmɛli? To bolingaka nde kosilisa makambo na kolanda makanisi na bino moko to ya bato ya libota to ya baninga? Bosalaka milende mpo bósalela makanisi oyo moombo ya sembo abimisaka na oyo etali libala mpe bomoi ya libota? To bomonaka ete malamu bólanda kaka mimeseno ya mboka na bino to makanisi ya bato ya mokili? Bobondelaka mpe boyekolaka mbala na mbala elongo, bomityelaka mikano ya elimo, mpe bolobelaka makambo oyo bokotya na esika ya liboso na libota na bino?
18 Mpo na mbula 50 oyo balekisi na libala ya esengo, Ray alobi boye: “Totikaka likambo moko te kozanga tósilisa yango, mpo Yehova azali ntango nyonso moko ya ‘bansinga misato’ ya libala na biso.” (Tángá Mosakoli 4:12.) Danny ná Trina mpe bandimi likambo yango. Balobi boye: “Lokola tosalelaka Nzambe elongo, libala na biso ekómi makasi koleka.” Bazali na libala ya esengo banda mbula koleka 34. Soki bozali ntango nyonso kotya Nzambe na esika ya liboso na libala na bino, akosalisa bino bólonga mpe akopambola bino mingi.—Nz. 127:1.
Tókoba kopesa likabo ya Nzambe limemya
19. Mpo na nini Nzambe apesaki likabo ya libala?
19 Mpo na bato mingi lelo, likambo kaka moko oyo eleki ntina ezali nde koluka komisepelisa. Kasi mosaleli ya Yehova amonaka makambo ndenge mosusu. Ayebi ete Nzambe apesaki likabo ya libala mpo mokano na Ye ekokisama. (Eba. 1:26-28) Soki Adama ná Eva bámemyaka likabo yango, mabele mobimba elingaki kokóma paradiso oyo etondi na basaleli ya Nzambe, ya esengo mpe ya boyengebene.
20, 21. (a) Mpo na nini tosengeli komona libala ete ezali eloko moko mosantu? (b) Likabo nini tokolobela pɔsɔ elandi?
20 Likambo ya ntina koleka, biso basaleli ya Nzambe tomonaka ete libala ezali libaku ya kopesa Yehova nkembo. (Tángá 1 Bakorinti 10:31.) Ndenge touti komona yango, bosembo, bomoko, mpe kotya Nzambe na esika ya liboso ezali makambo oyo elendisaka boyokani na libala. Na yango, ezala tozali kokana kobala, ezala tozali koluka kolendisa boyokani na libala na biso, to tozali koluka kobongisa libala na biso, tosengeli libosoliboso komona libala ndenge ezali mpenza: ebongiseli mosantu oyo euti na Nzambe. Kobatela likambo yango na makanisi ekotinda biso tósala nyonso mpo bikateli oyo tozali kozwa na ntina etali libala eyokana na Liloba ya Nzambe. Na ndenge yango, tokomonisa limemya, kaka mpo na likabo ya libala te, kasi mpe epai ya Mopesi ya likabo yango, Yehova Nzambe.
21 Ya solo, kaka libala te nde ezali likabo oyo Yehova apesá biso; mpe kaka yango te nde epesaka esengo na bomoi. Na lisolo oyo elandi, tokolobela likabo mosusu ya malamu oyo euti na Nzambe—likabo ya kozala monzemba.
Okopesa eyano nini?
• Bosembo esengeli kotinda babalani bakristo bámitambwisa ndenge nini?
• Mpo na nini kosala elongo na bomoko ekoki kolendisa libala?
• Wapi mwa makambo oyo bato oyo babalá bakoki kosala mpo bátya Nzambe na esika ya liboso?
• Ndenge nini tokoki komonisa limemya epai na Yehova, Mobandisi ya libala?
[Elilingi na lokasa 15]
Kosala elongo esalisaka babalani bázala na bomoko