Mokapo 8
Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
1, 2. Mayoki ya bato mazalaka nini liboso ya bampasi ya bato?
WANA makámá mabimi, mabebisi biloko mpe mabomi bato, mingi bazali kotuna mpo na nini makambo wana ya nsɔ́mɔ mazali kobima. Basusu babulunganisami na komona makambo ya nsɔ́mɔ, minyoko mpe mobulu oyo ezali kosalema na nkó nyonso. Yo mpe okoki komituna ete: ‘Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?’
2 Lokola bazali kozwa eyano ya kosepelisa te na motuna wana, mingi bazali kobungisa kondima epai na Nzambe. Bazali na mayoki ete ye azali komibanzabanza te mpo na bato. Basusu, oyo bazali kondima bampasi lokola likambo lisengeli kozala kati na bomoi, bazali kokóma na nkanda mpe kopamela Nzambe na ntina na makambo nyonso ya mabe oyo bato bazali komona. Soki ozalaka na mayoki motindo wana, na ntembe te okosepela na koyeba eloko nini Biblia elobi na ntina na makambo yango.
BAMPASI EUTI EPAI NA NZAMBE TE
3, 4. Mpo na nini tokoki kondimisama ete mabe mpe mpasi eutaka epai na Yehova te?
3 Biblia endimisi biso ete bampasi oyo tozali komona zingazinga na biso euti epai na Yehova Nzambe te. Na ndakisa, moyekoli moklisto Yakobo akomaki ete: “Tiká te ete moto oyo amekami aloba ete, Nazali komekama na Nzambe. Mpo ete Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te.” (Yakobo 1:13) Lokola ezali bongo, Nzambe akoki te koyeisa ebele ya makambo ya mpasi oyo ezali kokwela bato. Azali te koyeisa komekama likoló na bato mpo na kosala ete bábonga mpo na bomoi ya likoló, soko mpe kosala ete bato bányokwama na ntina na misala ya mabe oyo ekanisami ete basalaki yango na bomoi na bango ya kala.—Baloma 6:7.
4 Lisusu, atako makambo mingi ya nsɔ́mɔ masili kosalema na nkombo ya Nzambe to ya Klisto, eloko moko ezali te kati na Biblia oyo emonisi ete moko kati na bango andimaka misala motindo wana. Nzambe mpe Klisto basepelaka te na baoyo balobaka ete bazali kosalela bango, nzokande bazali baoyo bayibaka, babukaka lokuta, babomaka, bapunzaka biloko ya bato, mpe basalaka makambo mosusu ya mabe oyo mayeisaka mpasi likoló na bato mosusu. Ya solo, “nzela na moto mabe eboyami na Yehova.” Epai mosusu, Nzambe “atikali mosika na bato mabe.”—Masese 15:9, 29.
5. Wapi bamoko na bizaleli ya Yehova, mpe azalaka na mayoki nini epai na bikelamu na ye?
5 Biblia ezali komonisa Yehova ete “atondi na boboto mpe na motema mawa.” (Yakobo 5:11, NW) Ezali kosakola ete “Yehova alingi sembo.” (Nzembo 37:28; Yisaya 61:8) Abombaka nkanda na motema te. Na motema mawa nyonso, azali komibanzabanza mpo na bikelamu na ye mpe azali kopesa bango oyo ezali malamu mingi mpo na bolamu na bango. (Misala 14:16, 17) Yehova azali kosala bongo uta ebandeli ya bomoi awa na mabelé.
EBANDELI YA KOKOKA
6. Lolenge nini masapo mosusu malobelaka ebandeli ya lisoló ya bato?
6 Biso banso tosili komesana na komona mpe kooka bwale mpe mpasi. Na yango, ekoki kozala mokakatano na kokanisa ntango oyo mpasi ata moko ezalaki te; kasi ezali nde lolenge wana makambo mazalaki na ebandeli ya lisoló ya bato. Ata masapo ya mabota mosusu malobelaka eleko motindo wana ya esengo. Kati na masapo ya Greke, eleko ya liboso kati na “Bileko Mitano ya libota ya bato” ebéngamaki “Eleko ya Wolo.” Kati na eleko yango, bato bazalaki na bomoi ya esengo, oyo ezalaki na mpasi ata moko te, bobólá te mpe mitungisi ya bobangé te. Engebene masapo, bato ya Chine balobaka ete na boumeli ya boyangeli ya Mokonzi Huang-Ti, oyo abéngami ete Empereur Jaune, bato bazalaki na kimya, bazalaki na boyokani ata wana bileko bizalaki kobongwana mpe ata elongo na banyama na zámba. Bato ya Perse, ya Ezipito, ya Tibet, ya Pérou, mpe ya Mexique, bango nyonso bazali na masapo lolenge moko na ntina na eleko ya bolamu mpe ya kokoka oyo ezalaki na ebandeli ya lisoló ya bato.
7. Mpo na nini Nzambe azalisaki mabelé mpe bato?
7 Masapo ya mabota mazali bobele kokundola lisoló lizali kati na Biblia, búku oyo eleki koumela kati na lisoló ya bato. Búku yango ezali koyebisa biso ete Nzambe atyaki babalani ya liboso, Adama mpe Eva, kati na paladiso ebéngami elanga ya Edene mpe alobelaki bango ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nsé na bino.” (Genese 1:28) Baboti na biso ya liboso bazalaki na ezalela ya kokoka mpe bazalaki na elikya ya komona ndenge mabelé mobimba makokóma paladiso oyo efandami na libota ya bato ya kokoka kati na kimya mpe bolamu ya koumela. Yango ezalaki mokano ya Nzambe ntango azalisaki mabelé mpe bato.—Yisaya 45:18.
NTEMBE MABE
8. Adama mpe Eva basengelaki kotosa mobeko nini, kasi nini esalemaki?
8 Mpo na kolanda kozwa ngɔlu ya Nzambe, Adama mpe Eva basengelaki te kolya “mbuma na nzeté na koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 2:16, 17) Soki batosaka mobeko ya Nzambe mbɛlɛ mpasi ata moko te ekokaki koya kobebisa bomoi ya bato. Na kotosáká mobeko ya Nzambe, balingaki komonisa bolingo na bango mpo na Yehova mpe bosembo na bango epai na ye. (1 Yoane 5:3) Kasi lokola totángaki yango na mokapo 6, makambo matambolaki motindo wana te. Epusamaki ye na Satana, Eva alyaki mbuma ya nzeté yango. Na nsima, Adama mpe alyaki mbuma oyo epekisamaki.
9. Ntembe nini etalelaki Yehova, oyo Satana abimisaki?
9 Ozali komona bonene ya likambo oyo ebimaki? Satana atyaki ntembe na etɛlɛmɛlo na Yehova, Oyo-Aleki-Likoló. Na kolobáká ete, “bokokufa solo te,” Zábolo atɛmɛlaki maloba ya Nzambe, oyo ete “okokufa solo.” Satana abakisaki, kolobáká ete Yehova abombelaki Adama mpe Eva likoki ya kokóma lokola Nzambe, kokata bango moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Na yango, Satana atyaki ntembe mpo na likoki mpe lotómo ya Yehova lokola Mokonzi ya Mɔlɔ́ngɔ́ mobimba.—Genese 2:17; 3:1-6.
10. Makambo nini Satana alobaki na ntina na bato?
10 Satana Zábolo alobaki lisusu na mayele mabe ete bato bakotosa Yehova bobele soki botosi yango ezalaki mpo na litomba na bango. Na maloba mosusu, Satana atyaki ntembe na bosembo ya bato. Alobaki ete moto ata moko te akotikala sembo epai na Nzambe na bolingo na ye moko. Efundeli wana mabe oyo ebimisamaki na Satana emonisami polele kati na lisoló ya Biblia na ntina na Yobo, mosaleli ya sembo ya Yehova oyo akutanaki na komekama monene pene na mobu 1600 L.T.B. Soki okotánga mikapo mibale ya liboso ya mokanda ya Yobo, okososola malamu ntina ya bampasi ya bato mpe mpo na nini Nzambe atikeli yango nzela.
11. Yobo azalaki moto ya lolenge nini, kasi efundeli nini Satana abimisaki mpo na ye?
11 Yobo, “moto malamu bɛ mpe na sembo,” abundisamaki na Satana. Ya liboso, alatisaki Yobo mikano mabe, wana ebimisaki ye motuna oyo ete: ‘Yobo akobangaka Nzambe bobele mpamba?’ Na nsima, na mayele mabe nyonso, Zábolo afundaki Nzambe mpe Yobo na kolobáká ete Yehova asombaki bosembo ya Yobo kosomba, mpamba te azalaki kobatela ye mpe kopambola ye. Satana abetelaki Yehova ntembe na kolobáká ete: “Nde tiká ete osembola lobɔkɔ na yo sasaipi mpe omama nyonso izali na ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.”—Yobo 1:8-11.
12. (a) Mituna nini mikokaki koyanolama bobele soki Nzambe atikaki nzela na Satana ete ameka Yobo? (b) Komekama ya Yobo ebimisaki litomba nini?
12 Yobo azalaki kosalela Yehova bobele mpo na biloko malamu oyo azalaki kozwa epai na Nzambe? Bosembo ya Yobo elingaki kotikala ngwi kati na komekama? Epai mosusu, Yehova atyaki mpenza motema epai na mosaleli na ye mpo ete atika nzela ete amekama? Mituna wana milingaki kozwa biyano bobele soki Yehova atiki nzela na Satana ete abimisela Yobo komekama makasi. Bosembo ya Yobo na nsé na komekama oyo Nzambe atikelaki yango nzela, lokola eyebisami na mokanda ya Yobo, elóngisaki boyengebene ya Yehova mpe bosembo ya bato.—Yobo 42:1, 2, 12.
13. Lolenge nini totalelami na makambo oyo mabimaki na Edene mpe epai na Yobo?
13 Nzokande, likambo oyo libimaki kati na elanga ya Edene mpe komekama oyo ebimelaki Yobo, moto na sembo, ezali na ndimbola moko monene. Ntembe oyo Satana abimisaki etaleli bato banso, sangisá mpe biso lelo oyo. Nkombo ya Nzambe etukamaki, mpe boyangeli na ye etyamelaki ntembe. Bosembo ya moto, ekelamu ya Nzambe etyamelaki ntembe. Ntembe wana esengelaki kosilisama.
LOLENGE YA KOSILISA NTEMBE YANGO
14. Ntango moto moko afundami na makambo ya lokuta, ebongi malamu ete asala nini?
14 Lokola ndakisa, tóloba ete ozali tata to mama ya bolingo oyo azali na bana mingi kati na libota moko ya esengo. Kanisá ete moko na bato bafandi na yo pembeni apalanganisi lokuta na ntina na yo, kofundáká yo ete ozali tata to mama moko mabe. Ezali boni soki moto wana alobi ete bana na yo balingaka yo te, ete bazali kofanda elongo na yo bobele mpo ete bayebi te esika mosusu ya malamu oyo bakoki kokende, mpe ete bakotika yo soki moto mosusu apesi bango likoki. Okoki koloba ete: ‘Azali zoba!’ Ee, kasi ndenge nini okoki komonisa ete azali moto na lokuta? Baboti mosusu bakoki kosilika makasi. Kobimisa etumba ekobakisa mikakatano misusu mpe ekomonisa na bato ete makambo oyo moto wana alobaki ezali solo. Lolenge malamu ya kosala na likambo motindo wana ezali ya kotikela mofundi na yo nzela ete apesa bilembeteli ya efundeli na ye mpe kotikela bana na yo nzela bámonisa ete balingi yo solo.
15. Lolenge nini Yehova asalaki mpo na koyanola na ntembe ya Satana?
15 Yehova azali lokola tata wana ya bolingo. Adama mpe Eva bakoki kokokisama na bana wana, mpe Satana akokani na moto wana ya lokuta. Na mayele nyonso, Nzambe abomaki na mbala moko te Satana, Adama mpe Eva, kasi atikelaki basáli-na-mabe wana misato nzela ete bálanda kozala na bomoi mpo na mwa ntango. Yango epesaki nzela na baboti na biso ya liboso ete bábimisa libota ya bato, mpe yango epesaki libaku na Satana ete alakisa bilembeteli ya bifundeli na ye na boye ete ntembe ekoka kosilisama. Nzokande, uta na ebandeli, Nzambe ayebaki ete bato mosusu bakotikala sembo epai na ye mpe bakokoka bongo komonisa ete Satana azali mobuki na lokuta. Oyo nde botɔ́ndi tozali na yango lokola Yehova azali kolanda kopambola mpe kosalisa baoyo balingi ye!—2 Ntango 16:9; Masese 15:3.
NINI ESILI KOMONISAMA?
16. Lolenge nini mokili ekómaki na nsé ya nguya ya Satana?
16 Pene na boumeli ya lisoló mobimba ya bato, Satana azalaki na bonsomi ya kosalela mayele na ye mabe mpo na koyangela bato. Kati na makambo mingi, asili komonisa bopusi likoló na banguya ya politiki mpe kokólisa mangomba oyo, na mayele mabe nyonso, bazali kosambela ye na esika ete básambela Yehova. Na yango, Zábolo asili kokóma “nzambe na ebongiseli ya biloko oyo,” mpe abéngami “mokonzi na mokili oyo.” (2 Bakolinti 4:4; Yoane 12:31, NW) Ya solo, “mokili mobimba ezali kolala kati na nguya na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19, NW) Yango elimboli ete Satana asili kolónga na efundeli na ye oyo ete akoki kopɛngwisa bato banso longwa na Yehova Nzambe? Soko moke te! Atako atikaki nzela ete Satana azala naino, Yehova asili kokamata bibongiseli mpo na kokokisa mokano na ye mpenza. Na bongo, Biblia emonisi biso nini likoló na bantina oyo Nzambe atikaki nzela na mabe?
17. Nini tosengeli kobosana te na ntina na eutelo ya mabe mpe ya mpasi?
17 Mabe mpe mpasi eutaka epai na Nzambe te. Lokola Satana azali mokonzi ya mokili oyo mpe nzambe ya ebongiseli ya biloko oyo, ye mpe baoyo bazali kopesa ye mabɔkɔ nde bazali na ngambo ya makambo oyo mazali kokwela libota ya bato mpe makambo nyonso ya mpasi oyo mazali konyokola bato. Moto moko te akoki na bosembo nyonso koloba ete Nzambe nde azali koyeisa makambo wana ya mpasi.—Baloma 9:14.
18. Likambo oyo ete Nzambe atikaki nzela na mabe mpe na mpasi emonisi nini na ntina na lipandá liboso na ye?
18 Yehova atikaki nzela na mabe mpe na mpasi mpo na komonisa ete lipandá liboso na Nzambe ekoki komema mokili ya malamu te. Ntembe ezali te ete Lisoló ya bato ezalaki bobele kolandana ya bampasi. Ntina na yango ezali ete bato baponaki kolanda nzela na bango moko ya lipandá mpe baboyi kotalela Liloba mpe mokano ya Nzambe. Ntango libota ya kala ya Yehova mpe batambwisi na yango balandaki na kozanga bosembo “nzela ya bato banso” mpe babwakaki Liloba na ye, matomba na yango mazalaki mabe. Na nzela ya mosakoli na ye Yilimia, Nzambe ayebisaki bango ete: “Bato na mayele bakoyoka nsɔni, bakozwa mawa mpe bakokangama; tala baboyi liloba na Yehova. Mayele nini ezali epai na bango?” (Yilimia 8:5, 6, 9) Lokola baboyi kolanda malako ya Yehova, bato bakómi lokola masuwa oyo mazangi yenda, oyo mazali kotɛngatɛnga na ntina na mbongé ya mai monene.
19. Elembeteli nini tozali na yango oyo emonisi ete Satana akoki te kopɛngwisa bato banso longwa na Nzambe?
19 Lisusu, Nzambe atiki nzela na mabe mpe na mpasi mpo na komonisa ete Satana azali na likoki te ya kopɛngwisa bato banso longwa na Yehova. Lisoló ya bato emonisi ete uta kala ezalaki ntango nyonso na bato oyo batikalaki sembo epai na Nzambe atako komekama mpe botɛmɛli nini oyo bakutanaki na yango. Na boumeli ya bikeke, nguya ya Yehova emonisamaki mpo na bolamu ya basaleli na ye, mpe nkombo na ye esili kosakolama na mabelé mobimba. (Exode 9:16; 1 Samwele 12:22) Baebele mokapo 11 elobeli biso molɔngɔ́ ya bato na sembo, kati na bango Abele, Enoka, Noa, Abalayama, mpe Mose. Baebele 12:1 ebéngi bango ‘lipata monene ya batatoli.’ Bazalaki bandakisa ya kondima makasi epai na Yehova. Na mikolo na biso mpe, mingi basili kobungisa bomoi na bango na kotikaláká sembo epai na Nzambe. Na kondima mpe na bolingo na bango, bato motindo wana bamonisi polele ete Satana akoki te kopɛngwisa bato banso longwa na Nzambe.
20. Likambo oyo ete Yehova atikaki nzela na mabe mpe na bampasi emonisi nini na ntina na bato mpe na ntina na ye moko?
20 Na nsuka, Yehova atiki nzela na mabe mpe na mpasi mpo na kolanda komonisa ete bobele Yehova, Mozalisi, nde azali na likoki mpe na lotómo ya koyangela bato mpo na mapamboli mpe bolamu na bango ya seko. Na boumeli ya bikeke, bato bamekaki lolenge nyonso ya biyangeli. Kasi matomba nini mazwami? Mikakatano minene mpe mpasi oyo mabota mazali kokutana na yango lelo ezali bilembeteli bimonisi solo, lokola Biblia eyebisi yango ete, “moto azali koyangela moto bobele mpo na koyokisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9, NW) Bobele Yehova nde akoki kobikisa biso mpe kokokisa mokano na ye ya ebandeli. Lolenge nini akosala yango, mpe ntango nini?
21. Nini ekokómela Satana, mpe nani akokokisa likambo yango?
21 Nokinoki nsima wana Adama mpe Eva bakweaki na mayele mabe ya Satana, Nzambe ayebisaki mokano na Ye na ntina na nzela oyo abongisaki mpo na kopesa lobiko. Talá oyo Yehova asakolaki na ntina na Satana: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Akonyata yo na motó mpe okoswa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Maloba wana mazalaki ndanga oyo emonisaki ete Zábolo akotikamela nzela ya kosala misala na ye ya mabe seko te. Lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Masiya, Mombóto oyo alakamaki, Yesu Klisto, ‘akonyata Satana na motó.’ Ee, “mosika te,” Yesu akonyata Satana motomboki!—Baloma 16:20.
OKOSALA NINI?
22. (a) Mituna nini osengeli koyanola yango? (b) Atako Satana angalisi nkanda na ye epai na bato oyo bazali sembo epai na Nzambe, bango bandimisami na nini?
22 Awa esili yo koyeba makambo matyamelaki ntembe, okomitya na ngámbo ya nani? Okomonisa na misala na yo ete ozali moto na sembo oyo amitye na ngámbo ya Yehova? Lokola Satana ayebi ete ntango na ye etikali mokuse, akosala nyonso oyo akoki mpo na kosopa nkanda na ye likoló na baoyo balingi kobatela bosembo epai na Nzambe. (Emoniseli 12:12) Kasi okoki koluka lisalisi epai na Nzambe mpamba te ‘Yehova ayebi kobikisa bango bakotosaka ye wana ezali bango kati na komekama.’ (2 Petelo 2:9) Akotika yo te ete omekama na koleka makasi na yo mpe akobongisa nzela na boye ete okoka koyikela masɛnginya mpiko.—1 Bakolinti 10:13.
23. Likambo nini tokoki kotalela na elikya nyonso?
23 Na elikya nyonso, tiká ete tózela ntango oyo Mokonzi Yesu Klisto akotɛmɛla Satana mpe baoyo banso bazali kolanda ye. (Emoniseli 20:1-3) Yesu akolongola baoyo nyonso bazali na ngambo na ntina na makambo ya mawa mpe ya mobulu makasi oyo ezali konyokola bato. Na kozeláká ntango yango, moko na makambo oyo epesaka mpasi ezali bongo kokufela moto oyo olingaki ye mingi. Tángá mokapo molandi mpo na koyeba eloko nini ekómelaka bakufi.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Lolenge nini toyebi ete ezali Yehova te oyo akoyeisaka bampasi likoló na bato?
Ntembe nini Satana abimisaki na Edene, mpe emonisamaki polele na mikolo ya Yobo?
Na kotikáká nzela na bampasi Nzambe azali komonisa nini?