Mabota ya baklisto—Bólanda ndakisa ya Yesu!
“Klisto . . . [atikelá] bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.”—1 PET. 2:21.
1. (a) Mokumba nini Mwana ya Nzambe azalaki na yango na ntango ya bozalisi? (b) Yesu azalaki na nini mpo na bato?
NTANGO Nzambe akelaki likoló mpe mabelé, Mwana na ye ya liboso azalaki pene na ye “lokola mosali ya mayele.” Mwana ya Nzambe azalaki mpe kosala elongo na Tata na ye ntango Yehova akelaki banyama ndenge na ndenge mpe banzete awa na mabelé mpe abongisaki Paladiso mpo na bikelamu oyo bazalisamaki na elilingi ya Yehova. Mwana ya Nzambe, oyo na nsima akómaki kobengama Yesu, azalaki kolinga bato mingi. “Esengo na [ye] ezalaki kati na bana na bato.”—Mas. 8:27-31; Gen. 1:26, 27.
2. (a) Mpo na kosalisa bato ya masumu Yehova apesi bango nini? (b) Na likambo nini mosusu Biblia ezali kopesa litambwisi?
2 Nsima ya lisumu ya mwasi ná mobali ya liboso, kosikolama ya bato ya masumu ekómaki na ntina mingi na mokano ya Yehova. Yehova abongisaki mbeka ya Klisto mpo na kosikola bato. (Lom. 5:8) Lisusu, Yehova apesaki Liloba na ye, Biblia, mpo na kolakisa biso ndenge eleki malamu ya kolonga atako tozali bato ya masumu. (Nz. 119:105) Na Liloba na ye, Yehova azali kolakisa biso ndenge ya kozala na mabota ya malamu mpe ya esengo. Mpo na libala, mokanda ya Genese elobi ete mobali asengeli “kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.”—Gen. 2:24, NW.
3. (a) Yesu ateyaki nini mpo na libala? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki ete libala esengeli koumela seko. Ateyaki makambo oyo, soki tolandi yango, tokozala te na bizaleli mpe etamboli oyo ebebisaka libala mpe esengo ya libota. (Mat. 5:27-37; 7:12) Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo mateya ya Yesu mpe ndakisa oyo atikaki ntango azalaki awa na mabelé, ekoki kosalisa mibali, basi, baboti mpe bana bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.
Ndenge mobali akumisaka mwasi na ye
4. Ndenge nini mokumba ya Yesu ekokani na oyo ya mobali?
4 Nzambe atyaki mobali mokonzi ya libota, ndenge kaka Yesu azali Mokonzi ya lisangá. Ntoma Paulo alobaki boye: “Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá, ye mobikisi ya nzoto yango. Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Ef. 5:23, 25) Ya solo, ndenge oyo Yesu azalaki kofanda na bayekoli na ye ezali ndakisa mpo na ndenge oyo mibali basengeli kofandaka na basi na bango. Tótala mwa bandakisa na ndenge oyo Yesu asalelaki bokonzi oyo Nzambe apesaki ye.
5. Ndenge nini Yesu azalaki kosalela bokonzi na ye epai ya bayekoli na ye?
5 Yesu azalaki “na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Mat. 11:29) Azalaki mpe kozwa bikateli soki esengeli. Azalaki kokima mikumba na ye te. (Mko. 6:34; Yoa. 2:14-17) Azalaki kopesa bayekoli na ye toli na boboto, ata mpe kozongela toli yango mbala na mbala ntango esengeli. (Mat. 20:21-28; Mko. 9:33-37; Luka 22:24-27) Kasi, Yesu azalaki te kokitisa bango to mpe komonisa ete alingaka bango te, to mpe bakokoka te kosala makambo oyo azalaki koteya bango. Azalaki nde kokumisa mpe kolendisa bango básala oyo ezali malamu. (Luka 10:17-21) Lokola azalaki kolinga mpe komonisela bango motema mawa, tokoki kokamwa te ndenge bayekoli na ye bazalaki komemya ye!
6. (a) Liteya nini mibali bakoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki kofanda na bayekoli na ye? (b) Petelo apesi mibali toli nini?
6 Ndakisa ya Yesu eteyi mibali ete bokonzi oyo Nzambe apesá bango ezali te mpo na kokonza basi na bango. Kutu, basengeli nde komemya mpe kolinga bango. Ntoma Petelo alendisaki mibali bámekola Yesu na ndenge ya kofanda na basi na bango, “kopesáká bango lokumu.” (Tángá 1 Petelo 3:7.) Kasi, ndenge nini mobali akoki kosalela makambo yango mibale, elingi koloba kozala mokonzi mpe kopesa mwasi na ye lokumu?
7. Na ndenge nini mobali akoki kopesa mwasi na ye lokumu? Pesá ndakisa.
7 Lolenge moko oyo mobali akoki kopesa mwasi na ye lokumu ezali ya kotalela makanisi mpe mayoki ya mwasi na ye liboso ya kozwa bikateli oyo etali libota. Ntango mosusu ekateli yango ekoki kozala ya kolongwa na ndako, to kosala mosala mosusu to mpe makambo mosusu, na ndakisa esika bakokende konje, to ndenge ya kosalela mbongo na libota mpo ezala malamu. Lokola makambo yango etali libota, ekozala malamu mobali atalela mpe makanisi ya mwasi na ye, mpo yango ekosalisa ye azwa ekateli ya malamu, mpe ekozala mpasi te mpo mwasi apesa ye mabɔkɔ. (Mas. 15:22) Mibali, baklisto oyo bakumisaka basi na bango, basi na bango balingaka bango mpe bamemyaka bango; kasi eloko eleki ntina, mibali yango basepelisaka nde Yehova.—Ef. 5:28, 29.
Ndenge mwasi amonisaka limemya makasi epai ya mobali na ye
8. Mpo na nini tosengeli te kolanda ndakisa ya Eva?
8 Na likambo ya kotosa bokonzi, Yesu azali mpe ndakisa malamu mpo na basi baklisto. Bokeseni makasi ezali na ndenge oyo Yesu atalelaka bokonzi mpe ndenge oyo mwasi ya liboso azalaki kotalela yango! Eva atikelá basi ndakisa mabe. Azalaki na mokonzi oyo Nzambe apesaki ye; oyo na nzela na ye azalaki kozwa malako ya Yehova. Kasi, Eva atosaki ebongiseli yango te. Atosaki te malako oyo Adama apesaki ye. (Gen. 2:16, 17; 3:3; 1 Kol. 11:3) Ya solo, Eva akosamaki; kasi asengelaki kotuna naino mobali na ye soki esengelaki atosa mongongo oyo eyebisaki ye, ete “Nzambe ayebi.” Kutu, alukaki nde ete mobali na ye alanda ye.—Gen. 3:5, 6; 1 Tim. 2:14.
9. Ndakisa nini ya botosi Yesu atiká?
9 Nzokande, Yesu atikaki ndakisa ya malamu na likambo etali kotosa Mokonzi na ye. Elimo na ye mpe bomoi na ye emonisaki ete “azwaki makanisi te ya kobɔtɔla esika, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.” Kutu, “amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo.” (Filp. 2:5-7) Lelo oyo, atako Yesu azali Mokonzi, azali kaka na elimo yango. Na komikitisa nyonso, atosaka Tata na ye na makambo nyonso mpe asimbaka Bokonzi na ye.—Mat. 20:23; Yoa. 5:30; 1 Kol. 15:28.
10. Ndenge nini mwasi amonisaka ete atosaka bokonzi ya mobali na ye?
10 Mwasi moklisto asengeli komekola Yesu mpe kotosa bokonzi ya mobali na ye. (Tángá 1 Petelo 2:21; 3:1, 2.) Tótalela likambo moko oyo mwasi akoki kosala mpo na komonisa botosi na ye. Mwana na bango asɛngi ye nzela ya kosala likambo moko. Lokola basololaki naino likambo yango te na mobali na ye, ekozala malamu atuna mwana: “Oyebisaki tata na yo?” Soki mwana ayebisaki tata na ye te, liboso mama azwa ekateli, akosolola naino na mobali na ye. Lisusu, mwasi moklisto asengeli kokeba ete aboya makanisi ya mobali na ye te liboso ya bana. Soki asepeli te na likambo moko, asengeli kosolola na mobali na ye ntango bazali kaka bango mibale.—Ef. 6:4.
Yesu azali ndakisa mpo na baboti
11. Ndakisa nini Yesu atikelá baboti?
11 Atako abalaki te to abotaki te, Yesu azali ndakisa malamu mpo na baboti. Ndenge nini? Na bolingo nyonso mpe na motema molai, ateyaki bayekoli na ye na maloba mpe na misala. Amonisaki bango ndenge basengelaki kokokisa mokumba oyo apesaki bango. (Luka 8:1) Ndenge oyo Yesu afandaki na bayekoli na ye mpe makambo oyo azalaki kosalela bango eteyaki bango ndenge oyo bango moko basengelaki kozala.—Tángá Yoane 13:14-17.
12, 13. Soki baboti balingi kozala na bana oyo babangaka Nzambe basengeli kosala nini?
12 Bana balukaka komekola baboti na bango, ezala na makambo ya malamu to ya mabe. Yango wana, baboti bómituna boye: ‘Ndakisa nini topesaka bana na biso na oyo etali ngonga oyo tolekisaka na kotala televizyo, kominanola mpe ngonga oyo tolekisaka na koyekola Biblia mpe kobima na mosala ya kosakola? Makambo nini totyaka na esika ya liboso na libota na biso? Topesaka ndakisa malamu na oyo etali kotya losambo ya solo na esika ya liboso?’ Mobeko ya Nzambe esengeli naino kozala na mitema ya baboti soki balingi kozala na bana oyo babangaka Nzambe.—Det. 6:6.
13 Soki baboti bazali kosala milende mpo na kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango, bana na bango mpe bakomona yango. Maloba ya baboti mpe mateya na bango ekosimba mitema ya bana. Nzokande, soki bana bamoni ete baboti na bango basalelaka te makambo oyo bateyaka bango, bakomona ete mitinda ya Biblia ezali mpenza na ntina te. Mpo na yango, bana bakolonga te soki bakutani na komekama.
14, 15. Mikano nini ya malamu baboti basengeli kolona epai ya bana na bango, mpe wapi lolenge moko oyo bakoki kosala yango?
14 Baboti baklisto bayebi ete kobɔkɔla bana esukaka kaka te na koleisa mpe kolatisa bango. Yango wana, ekozala bwanya te koteya mwana alanda mikano oyo ekomemela ye kaka bozwi ya mokili. (Mos. 7:12) Yesu ateyaki bayekoli na ye báluka liboso bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe. (Mat. 6:33) Na yango, na ndakisa ya Yesu, baboti basengeli mpe kolona epai ya bana na bango mposa ya komityela mikano ya elimo.
15 Lolenge moko oyo baboti bakoki kosala yango ezali ya kosala nyonso mpo bana na bango bázala baninga ya bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Kanisá naino ndenge bana na yo bakolendisama soki bameseni na babongisi-nzela to mokɛngɛli ya zongazonga mpe mwasi na ye. Kokende kotala bamisionɛrɛ, bandeko ya Betele, mpe baoyo bazali na mosala ya kotonga ekoki kosalisa bango bákóma kosepela na mosala ya Yehova. Ntembe ezali te, bandeko yango bakobɛtela bino masolo mingi ya kolendisa. Ndakisa na bango ya komipimela ekoki kosalisa bana na bino bázwa bikateli ya malamu, bámityela mikano oyo ebongi, mpe bátánga kelasi oyo ekosalisa bango bákokisaka bamposa na bango wana bazali kosala mosala ya ntango nyonso.
Bana, nini ekosalisa bino bólanda ndakisa ya Yesu?
16. Ndenge nini Yesu akumisaki baboti na ye awa na mabelé mpe Tata na ye ya likoló?
16 Bana, Yesu atikelá bino ndakisa ya malamu. Yesu abɔkwamaki na mabɔkɔ ya Yozefe ná Malia, mpe azalaki kotosa bango. (Tángá Luka 2:51.) Ayebaki ete atako bazalaki bato ya kozanga kokoka, Nzambe apesaki bango mokumba ya kobatela ye. Mpo na yango, asengelaki kokumisa bango. (Det. 5:16; Mat. 15:4) Ntango akolaki, Yesu azalaki ntango nyonso kosala makambo oyo ezalaki kosepelisa Tata na ye ya likoló. Elingi koloba kotɛmɛla komekama. (Mat. 4:1-10) Ekoki kokóma ete motema na bino etinda bino bóboya kotosa baboti na bino. Na yango, nini ekosalisa bino bólanda ndakisa ya Yesu?
17, 18. (a) Komekama nini bilenge bakutanaka na yango na eteyelo? (b) Likambo nini bilenge basengeli kokanisaka oyo ekosalisa bango bálonga?
17 Ekoki kozala ete baninga na yo mingi ya kelasi batosaka te mitinda ya Biblia. Bakoki kotinda yo osala makambo ya mabe mpe kotyola yo soki oboyi kosala lokola bango. Baninga na yo ya kelasi bapesá yo nkombo mpo oboyaka kosala makambo ya mabe lokola bango? Soki ezali bongo, osalaka nini? Oyebi ete soki obangi mpe olandi bango okoyokisa baboti na yo mpe Yehova mawa. Okosuka wapi soki olandi baninga na yo ya kelasi? Ekoki kozala ete omityelá mikano, na ndakisa kokóma mobongisi-nzela to mosaleli na misala, kokende kosala epai basakoli bazali mingi te to mpe kokɔta na Betele. Baninga na yo ya kelasi bakosalisa yo okokisa mikano na yo?
18 Bilenge, naino ekómela bino te bókutana na makambo oyo etyaka kondima na komekama? Soki bokutani na yango bosalaka nini? Bókanisa Yesu, ndakisa na bino. Atɛmɛlaki komekama mpe ayikaki mpiko mpo ayebaki ete azalaki na nzela ya malamu. Kokanisa bongo ekopesa bino makasi ya koyebisa baninga na bino ya kelasi ete bolingi te kosangana na bango mpo na kosala likambo oyo boyebi ete ezali mabe. Lokola Yesu, bótya miso na mapamboli oyo bokozwa na mosala ya Yehova mpe na kotosa ye.—Ebe. 12:2.
Sɛkɛlɛ ya libota ya esengo
19. Bomoi ya ndenge nini epesaka esengo ya solosolo?
19 Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto balingaka bolamu ya bato. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kozala na esengo. (Yis. 48:17, 18; Mat. 5:3) Yesu ateyaki bayekoli na ye solo oyo esimbi bolamu ya bato, kasi asukaki kaka wana te. Ateyaki mpe lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Longola yango, atiká ndakisa ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe na makanisi malamu. Biso nyonso, ata mokumba nini tozali na yango na libota, tokoki kozwa matomba soki tolandi ndakisa ya Yesu. Na yango, mibali, basi, baboti, mpe bana, bólanda ndakisa ya Yesu! Kolanda mateya ya Yesu mpe komekola ye ezali mpenza sɛkɛlɛ ya libota ya esengo!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini mibali basengeli kosalela bokonzi na bango?
• Ndenge nini mwasi akoki kolanda ndakisa ya Yesu?
• Liteya nini baboti bakoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki ná bayekoli na ye?
• Liteya nini bilenge bakoki kozwa na ndakisa ya Yesu?
[Elilingi na lokasa 8]
Liboso azwa ekateli oyo etali libota, mobali ya bolingo asengeli kosala nini?
[Elilingi na lokasa 9]
Likambo nini ekoki kopesa mwasi libaku ya komonisa ete atosaka bokonzi ya mobali na ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Bana balandaka bizaleli malamu ya baboti na bango