Nani aleki ntina na bomoi na yo?
“Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”—NZ. 83:18.
1, 2. Atako ezali na ntina tóyeba nkombo ya Yehova, tosengeli mpe kosala nini mpo tózwa lobiko?
EKOKI kozala ete mbala ya liboso oyo omonaki nkombo ya Yehova ezali ntango balakisaki yo yango na Nzembo 83:18. Mbala mosusu okamwaki ntango otángaki maloba oyo: “Mpo báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Banda wana, na ntembe te osalelaka vɛrsɛ yango mpo na kosalisa bato mosusu báyeba Nzambe na biso ya bolingo, Yehova.—Rom. 10:12, 13.
2 Atako ezali na ntina bato báyeba nkombo ya Yehova, koyeba nkombo mpamba ekoki te. Talá ndenge mokomi ya nzembo amonisi likambo mosusu oyo tosengeli koyeba mpo na kozwa lobiko; alobaki boye: “Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Ya solo, Yehova azali Moto oyo aleki ntina na molɔ́ngɔ́ mobimba. Lokola azali Mozalisi ya biloko nyonso, azali na lotomo ya kosɛnga bikelamu na ye nyonso etosa ye na makambo nyonso. (Em. 4:11) Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Nani aleki ntina na bomoi na ngai?’ Ezali na ntina tótalela na likebi eyano na biso na motuna yango!
Ntembe oyo ebimaki na elanga ya Edene
3, 4. Ndenge nini Satana alongaki kokosa Eva, mpe esukaki ndenge nini?
3 Tokoki komona ntina ya motuna yango soki totaleli makambo oyo esalemaki na elanga ya Edene. Kuna, anzelu oyo akómaki motomboki, oyo na nsima ayebanaki na nkombo ya Satana Zabolo, andimisaki Eva, mwasi ya liboso, atya bamposa na ye moko liboso ya etinda oyo Yehova apesaki ete bálya te mbuma ya nzete moko boye. (Eba. 2:17; 2 Ko. 11:3) Eva andimaki makambo Satana ayebisaki ye mpe na ndenge yango amonisaki ete azangi limemya mpo na boyangeli ya Yehova. Eva amonisaki te ete Yehova nde Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye. Kasi ndenge nini Satana alongaki kokosa Eva?
4 Satana asalelaki mayele ndenge na ndenge ya nsense na lisolo na ye ná Eva. (Tángá Ebandeli 3:1-5.) Ya liboso, Satana asalelaki nkombo ya Yehova te. Alobaki kaka “Nzambe.” Nzokande, mokomi ya mokanda ya Ebandeli asalelaki nkombo ya Yehova na vɛrsɛ ya liboso ya mokapo yango. Mokomi yango amonaki ete kosalela nkombo ya Nzambe ezali na ntina. Ya mibale, na esika alobela “etinda” oyo Nzambe apesaki, Satana atunaki kaka soki Nzambe “alobaki” nini. (Eba. 2:16) Na mayele ya nsense ya ndenge wana, mbala mosusu Satana alukaki nde komonisa ete etinda yango ezali na ntina mingi te. Ya misato, atako azalaki koloba kaka na Eva, Satana asalelaki liloba “bino.” Na ndenge yango, mbala mosusu alukaki kolamusa lolendo ya Eva, koyokisa ye ete azali moto ya ntina mingi—lokola nde azalaki molobeli ya ye moko mpe ya mobali na ye. Esukaki ndenge nini? Emonani ete Eva akómaki na lofundo mpe azwaki ekateli ya koloba mpo na ye moko mpe mpo na mobali na ye; ayebisaki nyoka ete: “Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga.”
5. (a) Satana atindaki Eva atya makanisi na ye na nini? (b) Lokola alyaki mbuma oyo epekisamaki, Eva amonisaki nini?
5 Satana abalolaki mpe makambo. Amonisaki ete Nzambe azali sembo te na ndenge asɛngisaki Adama ná Eva ete ‘basengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga.’ Na nsima, Satana atindaki Eva akanisa bolamu na ye moko mpe ndenge oyo akokaki kobongisa bomoi na ye, elingi koloba kokóma “lokola Nzambe.” Nsukansuka, atindaki ye atya makanisi nyonso na nzete yango mpe na mbuma na yango na esika ya kotya makanisi na boyokani na ye ná Moto oyo apesaki ye biloko nyonso. (Tángá Ebandeli 3:6.) Likambo ya mawa, lokola alyaki mbuma, Eva amonisaki ete Yehova azalaki te Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye.
Ntembe oyo ebimaki na ntango ya Yobo
6. Ndenge nini Satana atyaki ntembe na bosembo ya Yobo, mpe Yobo azwaki libaku ya kosala nini?
6 Bikeke mingi na nsima, Yobo, moto ya sembo, azwaki libaku ya komonisa Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye. Ntango Yehova amonisaki Satana ete Yobo azali moto ya sembo, Satana azongisaki boye: “Yobo abangi Nzambe nde mpamba?” (Tángá Yobo 1:7-10.) Satana awanganaki te ete Yobo azalaki kotosa Nzambe. Atyaki ntembe nde mpo na makanisi oyo ezalaki kotinda ye asala yango. Afundaki Yobo ete azalaki kosalela Yehova na bolingo te kasi mpo na koluka matomba na ye moko. Kaka Yobo nde akokaki kosilisa ntembe wana, mpe bapesaki ye libaku ya kosala yango.
7, 8. Bampasi nini Yobo akutanaki na yango, mpe amonisaki nini na ndenge ayikaki mpiko na bosembo nyonso?
7 Yehova apesaki Satana nzela akweisela Yobo makama ebele, moko nsima ya mosusu. (Yobo 1:12-19) Yobo asalaki nini ntango makambo wana ekwelaki ye? Biblia eyebisi biso ete “asalaki lisumu te mpe alobaki na Nzambe likambo ata moko te ya mabe.” (Yobo 1:22) Kasi Satana alɛmbaki naino te. Afundaki ye lisusu boye: “Loposo mpo na loposo, mpe eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.”a (Yobo 2:4) Satana amonisaki ete soki mpasi esimbi Yobo ye moko, akomonisa ete Yehova azali te Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye.
8 Nzoto ya Yobo ebebaki na maladi moko mabe mpe na nsima mwasi na ye atindaki ye alakela Nzambe mabe mpe akufa. Na nsima, babɔndisi misato ya lokuta balobaki na ye ete azali na etamboli ya mabe. (Yobo 2:11-13; 8:2-6; 22:2, 3) Nzokande, na kati ya minyoko wana nyonso, Yobo aboyaki kotika bosembo na ye. (Tángá Yobo 2:9, 10.) Ndenge ayikaki mpiko na bosembo nyonso, amonisaki ete Yehova nde Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye. Yobo amonisaki mpe ete moto ya kozanga kokoka akoki kopesa eyano na bifundeli ya Zabolo, atako na ndenge ya kokoka te.—Talá mpe Masese 27:11.
Eyano ya kokoka oyo Yesu apesaki
9. (a) Ndenge nini Satana alukaki kosalela mposa moko ya Yesu mpo na komeka ye? (b) Yesu asalaki nini ntango Satana amekaki ye bongo?
9 Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, Satana alukaki kondimisa Yesu ete aluka kokokisa bamposa na ye moko na esika ya kokoba komona Yehova ete azali Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye. Zabolo amekaki Yesu na makambo misato. Ya liboso, alukaki kolamwisa mposa ya mosuni, na ndenge amekaki Yesu abongola mabanga ekóma mampa. (Mat. 4:2, 3) Na ntango yango, Yesu autaki kokila bilei mikolo 40 mpe azalaki na nzala makasi. Na yango, Zabolo alendisaki ye asalela na ndenge ya mabe nguya na ye ya kosala makamwisi mpo asilisa nzala na ye. Yesu asalaki nini? Na bokeseni na Eva, Yesu atyaki makanisi na ye na Liloba ya Yehova mpe aboyaki na mbala moko likambo oyo Satana asɛngaki ye asala.—Tángá Matai 4:4.
10. Mpo na nini Satana ayebisaki Yesu amibwaka na nse uta na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo?
10 Satana alukaki mpe kotinda Yesu asala na moimi. Ayebisaki Yesu amibwaka na nse uta na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo. (Mat. 4:5, 6) Satana azalaki koluka nini? Satana alobaki ete soki Yesu amibwaki mpe azwi likama te, ekomonisa ete azalaki “mwana ya Nzambe.” Na ntembe te, mposa ya Zabolo ezalaki ete Yesu amitungisa mingi koleka mpo na lokumu na ye, kino komilakisa na lolendo. Satana ayebaki ete mpo na lolendo to mpo na koboya kosambwa na miso ya bato, moto akoki kondima kosala likambo moko ya likama. Satana asalelaki mokapo moko na ndenge ya mabe, kasi Yesu amonisaki ete ayebi Liloba ya Yehova malamumalamu. (Tángá Matai 4:7.) Lokola aboyaki kosala likambo wana, Yesu amonisaki lisusu ete Yehova nde Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye.
11. Mpo na nini Yesu aboyaki kosala likambo oyo Satana alobaki na ye asala mpo apesa ye makonzi nyonso ya mokili?
11 Na komekama ya makasi mingi koleka oyo Satana amekaki Yesu, alobaki na ye ete akopesa ye makonzi nyonso ya mokili. (Mat. 4:8, 9) Yesu aboyaki yango na mbala moko. Amonaki ete kondima yango ezali nde koboya boyangeli ya Yehova—lotomo oyo Nzambe azali na yango ya kozala Moto Oyo-Aleki-Likoló. (Tángá Matai 4:10.) Na mabaku yango nyonso, Yesu azongelaki bavɛrsɛ oyo ezali na nkombo ya Yehova mpo na kopesa Satana eyano.
12. Ekateli nini ya mpasi Yesu asengelaki kozwa ntango akómaki pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, mpe makambo oyo alobaki mpo na yango ekoki koteya biso nini?
12 Ntango Yesu akómaki pene na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, asengelaki kozwa ekateli moko ya mpasi. Na boumeli ya bambula oyo asalaki mosala na ye, amonisaki ete andimi kopesa bomoi na ye mbeka. (Mat. 20:17-19, 28; Luka 12:50; Yoa. 16:28) Kasi, Yesu ayebaki mpe ete bakokosela ye makambo, bakofunda ye ete abuki mibeko ya Bayuda mpe bakoboma ye lokola moto oyo afingi Nzambe. Kokufa liwa ya ndenge wana etungisaki ye mingi. Abondelaki boye: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ oyo eleka mosika na ngai.” Kasi abakisaki boye: “Nzokande, ezala ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi.” (Mat. 26:39) Ya solo, bosembo ya Yesu tii na liwa emonisaki kozanga ntembe Moto oyo alekaki ntina na bomoi na ye!
Eyano na biso na motuna yango
13. Makambo nini toyekoli na ndakisa ya Eva, ya Yobo, mpe ya Yesu Kristo?
13 Makambo nini toyekoli tii sikoyo? Na oyo etali Eva, toyekoli ete baoyo bakweaka na bamposa ya moimi to na mposa ya komimona ete bazali na ntina mingi bamonisaka ete Yehova azali te Moto oyo aleki ntina na bomoi na bango. Kasi, bosembo ya Yobo eteyi biso ete ata bato ya kozanga kokoka bakoki komonisa ete batyaka Yehova na esika ya liboso na koyikeláká bampasi mpiko—ata soki bayebi malamu te ntina oyo bampasi yango ekweli bango. (Yak. 5:11) Mpe ndakisa ya Yesu eteyi biso tóndimaka kopɔla na nsɔni mpe tópesaka valɛrɛ mingi te na lokumu na biso moko. (Ebr. 12:2) Kasi ndenge nini tokoki kosalela mateya yango?
14, 15. (a) Ndenge oyo Yesu asalaki ntango amekamaki ekeseni na nini na ndenge oyo Eva asalaki? (b) Ndenge nini tokoki komekola Yesu? (Lobelá elilingi oyo ezali na lokasa 18.)
14 Kotika soki moke te komekama etinda yo obosana Yehova. Eva atikaki likebi na ye ekende na komekama oyo ezalaki liboso na ye. Amonaki ete mbuma yango “ezalaki malamu na kolya mpe ete ezalaki eloko oyo miso ekokaki kolula, ɛɛ, nzete yango ezalaki kitoko na kotala.” (Eba. 3:6) Yesu asalaki bongo te ntango amekamaki mbala misato! Mbala nyonso, amonaki mosika koleka komekama oyo ezalaki liboso na ye mpe abosanaki te makambo oyo misala na ye ekobimisa. Atyaki motema na Liloba ya Nzambe mpe asalelaki nkombo ya Yehova.
15 Ntango tokutani na komekama mpo na kosala makambo oyo esepelisaka Yehova te, totyaka likebi na biso na nini? Soki totye likebi mingi na komekama yango, mposa yango ya mabe ekokóma makasi. (Yak. 1:14, 15) Tosengeli kosala noki mpo na kolongola mposa yango, ata soki kosala yango ekoki komonana mpasi mingi lokola kolongola enama moko ya nzoto. (Mat. 5:29, 30) Lokola Yesu, tosengeli kotya makanisi na makambo oyo misala na biso ekobimisa—ndenge ekosala na boyokani na biso ná Yehova. Tosengeli kobosana te makambo oyo Liloba na ye, Biblia, elobi. Kaka na ndenge wana nde tokoki komonisa ete Yehova azali Moto oyo aleki ntina na bomoi na biso.
16-18. (a) Nini ekoki kolɛmbisa biso nzoto? (b) Nini ekosalisa biso tóyika mpiko ntango tokutani na makambo ya mpasi?
16 Kotika soki moke te bampasi oyo ekweli yo etinda yo osilikela Yehova. (Mas. 19:3) Lokola tozali se kokóma pene na nsuka ya mokili oyo mabe, basaleli mingi ya Yehova bazali kokutana na makama mpe na bampasi. Tolikyaka te ete Yehova abatela biso na ndenge ya likamwisi. Atako bongo, lokola Yobo, tokoki kolɛmba nzoto ntango tobungisi moto oyo tolingaka to ntango biso moko tokutani na mikakatano.
17 Yobo ayebaki te ntina oyo Yehova atikaki makambo mosusu esalema, mpe na bantango mosusu tokoki koyeba te ntina oyo makambo mabe ezali kosalema. Mbala mosusu toyokaki ete bandeko na biso ya sembo bakufaki na koningana ya mabele, na ndakisa bandeko ya Haïti, to na makama mosusu ya ndenge wana. To mpe toyebi ndeko moko ya sembo oyo bato ya mobulu basalaki ye mabe to mpe oyo akufaki na aksida moko ya nsɔmɔ. Ata biso moko tokoki kokutana na makambo ya mpasi to konyokwama mpo na makambo oyo tomoni ete basaleli biso na bosembo te. Mpasi oyo ezali na motema na biso ekoki kotinda biso tómituna ete: ‘Mpo na nini Yehova? Mpo na nini kaka ngai? Mabe nini nasali?’ (Hab. 1:2, 3) Nini ekosalisa biso tóyika mpiko na bantango ya ndenge wana?
18 Tosengeli kokeba mpo tókanisa te ete makambo ya ndenge wana elakisi ete Yehova aboyi biso. Yesu amonisaki likambo yango ntango alobelaki makama mibale oyo esalemaki na mikolo na ye. (Tángá Luka 13:1-5.) Makama mingi ekwelaka biso mpo na “ntango ná makambo oyo ekanami te.” (Mos. 9:11) Kasi, ata soki mpasi na biso euti na likambo nini, tokoki koyika mpiko soki tozali kotalela kaka “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” Akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóbatela bosembo na biso.—2 Ko. 1:3-6.
19, 20. Nini esalisaki Yesu ayika mpiko na makambo ya kosambwa, mpe nini ekoki kosalisa biso tósala ndenge wana?
19 Kotika soki moke te lolendo to nsɔmɔ ya kopɔla na nsɔni ebenda likebi na yo nyonso. Komikitisa ya Yesu esalisaki ye ‘amikómisa mpamba mpe akóma lokola moombo.’ (Flp. 2:5-8) Alongaki koyika mpiko na makambo mingi ya kosambwa mpo atyelaki Yehova motema. (1 Pe. 2:23, 24) Lokola asalaki bongo, Yesu atyaki mokano ya Yehova na esika ya liboso; mpo na yango, Nzambe atombolaki ye likoló koleka. (Flp. 2:9) Yesu asɛngaki ete bayekoli na ye bázala na bomoi ya ndenge wana.—Mat. 23:11, 12; Luka 9:26.
20 Na bantango mosusu, makambo mosusu oyo emekaka kondima na biso ekoki kopesa biso nsɔni. Atako bongo, tosengeli kokitisa motema lokola ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Yango wana nazali mpe konyokwama na makambo yango, kasi nazali koyoka nsɔni te. Mpo nayebi moto oyo ngai nandimelá, mpe nandimi mpenza ete akoki kobatela eloko oyo nabombi epai na ye tii na mokolo yango.”—2 Tim. 1:12.
21. Atako bato mingi na mokili bazali na makanisi ya moimi, ekateli na yo ezali nini?
21 Biblia esakolaki ete na ntango na biso, bato bakozala “bato oyo bamilingaka.” (2 Tim. 3:2) Na yango, tosengeli kokamwa te ndenge bato mingi zingazinga na biso bazali koluka kaka lokumu na bango moko. Makanisi ya moimi ndenge wana ebebisa biso soki moke te! Kasi, ezala tokutani na komekama, makama ekweli biso, to mpe bato bazali kosala nyonso mpo na kosambwisa biso, mokomoko na biso azala na ekateli ya komonisa ete Yehova nde Moto oyo aleki ntina na bomoi na ye!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia bamonaka ete maloba “loposo mpo na loposo” ekoki kolimbola ete Yobo akokaki, na moimi nyonso, kondima ete bana na ye mpe bibwele na ye bábungisa loposo na bango, to bomoi na bango, soki akokaki kobatela loposo na ye moko to bomoi na ye. Bamosusu bamonaka ete maloba yango emonisi ete moto akolinga kobungisa ndambo ya loposo na ye soki yango ekobatela bomoi na ye. Na ndakisa, moto akoki kotombola lobɔkɔ na ye mpo na kopekisa eloko moko ebɛta ye na motó, mpe na ndenge yango kobungisa ndambo ya loposo na ye mpo na kobatela loposo na ye. Ezala elobeli yango elimbolaki nini, elakisi nde ete Yobo akokaki kondima na esengo nyonso kobungisa eloko nyonso kaka mpo na kobatela bomoi na ye.
Liteya nini tokoki kozwa na . . .
• ndenge Satana akosaki Eva?
• ndenge Yobo asalaki ntango akutanaki na makama?
• makambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu?
[Elilingi na lokasa 17]
Eva alongaki te kotya makanisi na boyokani na ye ná Yehova
[Elilingi na lokasa 18]
Yesu akweisaki komekama mpe atyaki makanisi na mokano ya Yehova
[Bililingi na lokasa 20]
Bazali kosakola na hema mokomoko nsima ya koningana ya mabele na Haïti
Na ntango ya mpasi tokoki kotya makanisi na “Nzambe ya kobɔndisama nyonso”