Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Genese—I
“GENESE” elimboli “ebandeli,” to “mbotama.” Nkombo yango ebongi mpenza mpo na mokanda oyo ezali kolobela ndenge oyo molɔ́ngɔ́ ebandaki, ndenge oyo mabelé ebongisamaki, mpe ndenge bato babandaki kofanda awa na mabelé. Moize akomaki mokanda yango na mokili ekauki ya Sinai, ekoki kozala ete asilisaki yango na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
Mokanda ya Genese eyebisi biso lisolo ya mokili liboso ya Mpela, makambo oyo esalemaki nsima ya Mpela, mpe ndenge Abalayama, Yisaka, Yakobo, mpe Yosefe batambolaki na Yehova Nzambe. Lisolo oyo ekolobela makanisi ya ntina ya Genese 1:1–11:9, elingi koloba tii ntango oyo Abalayama akómaki kotambola na Yehova.
MOKILI LIBOSO YA MPELA
Maloba ya liboso ya Genese, “na ebandeli,” etaleli eleko moko ya kala, eleki lelo oyo bamiliare ya bambula. Makambo oyo esalemaki na boumeli ya “mikolo,” to bileko motoba oyo Nzambe azalaki kokela lolenge mokomoko ya biloko, elobelami na ndenge oyo moto akokaki komona yango soki azalaki awa na mabelé. Na nsuka ya mokolo ya motoba, Nzambe akelaki moto. Atako Paladiso eumelaki te mpo moto abukaki mobeko ya Nzambe, Yehova apesaki elikya. Esakweli ya libosoliboso ya Biblia elobeli “mombóto” oyo akolongola mabe oyo lisumu ekɔtisaki mpe akonyata Satana na motó.
Na boumeli ya bambula 1600 oyo elandaki, Satana alongaki kopɛngwisa bato nyonso bápesa Nzambe mokɔngɔ, longola kaka mwa bato moke ya sembo lokola Abele, Enoka, ná Noa. Na ndakisa, Kaina abomaki ndeko na ye Abele, moto ya sembo. “Babandaki kobyanga nkombo ya [Yehova],” ekoki kozala ete bazalaki kosala yango na kozanga limemya. Lameke asalaki nzembo moko oyo ezali komonisa ete azalaki na elimo ya mobulu oyo bato mingi bazalaki na yango na ntango wana; na nzembo yango alobelaki ndenge oyo abomaki elenge mobali moko mpo na komibatela. Makambo ebebaki lisusu ntango baanzelu oyo bazangaki botosi babalaki basi mpe babotaki na bango bana oyo bazalaki bingambe oyo babengamaki Banefilime. Kasi, moto ya sembo Noa atongaki masuwa mpe, na mpiko nyonso, akebisaki bato ete Mpela ezali koya, mpe ye ná libota na ye babikaki.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:16—Ndenge nini Nzambe akokaki kobimisa pole na mokolo ya liboso soki bingɛngiseli esalemaki se na mokolo ya minei? Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “kosala” na Genese 1 vɛrsɛ 16 ekeseni na liloba oyo ebongolami na “kokela” na Genese mokapo 1, vɛrsɛ 1, 21, mpe 27 (NW). “Makoló,” elingi koloba biloko oyo ezali na likoló, na bingɛngiseli, ekelamaki bambula mingi liboso ete “mokolo ya liboso” ebanda. Kasi, pole na yango ezalaki kokóma na mabelé te. Na mokolo ya liboso, “pole ezalaki” mpamba te pole ekatisaki mapata mpe ekómaki komonana awa na mabelé. Na bongo, lokola mabelé ezalaki kobaluka, butu ná moi ezalaki kolandana. (Genese 1:1-3, 5) Bingɛngiseli wana ezalaki naino komonana awa na mabelé te. Makambo ebongwanaki na boumeli ya mokolo ya minei ya bozalisi. Moi, sanza, mpe minzoto ekómaki “kotanisa mokili.” (Genese 1:17) “Nzambe asalaki” yango na ndimbola oyo ete soki moto azalaki awa na mabelé, akokaki komona yango.
3:8—Yehova ye moko mpenza azalaki kosolola na Adama? Biblia emonisi ete mbala mingi mpo na kosolola na bato, Nzambe azalaki kotinda anzelu. (Genese 16:7-11; 18:1-3, 22-26; 19:1; Basambisi 2:1-4; 6:11-16, 22; 13:15-22) Molobeli ya liboso ya Nzambe ezalaki Mwana na ye mobotami-se-moko, oyo abengami “Liloba.” (Yoane 1:1) Ekoki mpenza kozala ete mpo na kosolola na Adama ná Eva, Nzambe azalaki kotinda “Liloba.”—Genese 1:26-28; 2:16; 3:8-13.
3:17—Na ndimbola nini mabelé elakelamaki mabe, mpe mpo na ntango boni? Mabe oyo Nzambe alakelaki mabelé elimbolaki ete mosala ya kolona bilanga na mabelé yango esengelaki kokóma mpasi mingi. Bana ya Adama bamonaki ndenge oyo mabelé ekómaki kobota nzete mpe nkamba ya nzubɛ lokola balakelaki yango mabe; yango wana, Lameke, tata ya Noa alobelaki “bolɔzi mpe mosala makasi ya mabɔkɔ na biso epai ya mokili oyo elakaki [Yehova] mabe.” (Genese 5:29) Nsima ya Mpela, Yehova apambolaki Noa ná bana na ye, ayebisaki bango ete bátondisa mabelé. (Genese 9:1) Na ntembe te mabe oyo Nzambe alakelaki mabelé elongwaki.—Genese 13:10.
4:15—Ndenge nini Yehova ‘atyaki Kaina elembo’? Biblia elobi te ete Yehova atyaki Kaina elembo na nzoto. Ekoki kozala ete elembo yango ezalaki mobeko ya polele oyo bato bayebaki mpe oyo bato bazalaki kotosa oyo epekisaki koboma Kaina mpo na kofutisa ye mabe oyo asalaki.
4:17—Epai wapi Kaina azwaki mwasi oyo abalaki? Adama “abotaki bana babali mpe bana basi.” (Genese 5:4) Na bongo, Kaina abalaki ndeko na ye moko to mpe mwana ya ndeko na ye. Na nsima, Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele epekisaki bandeko bábalanaka.—Levitike 18:9.
5:24—Na ndimbola nini Nzambe ‘akamataki’ Enoka? Ekoki kozala ete bomoi ya Enoka ezalaki na likama mpo bazalaki kokana koboma ye, kasi Nzambe apesaki nzela te ete banguna na ye bányokola ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Enoka atindamaki esika mosusu mpo amona liwa te.” (Baebele 11:5) Yango elingi koloba te ete Nzambe akamataki ye na likoló mpe akómaki kofanda kuna. Yesu azali moto ya liboso oyo amataki na likoló. (Yoane 3:13; Baebele 6:19, 20) Ntango Biblia elobi ete Enoka ‘atindamaki esika mosusu mpo amona liwa te,’ ekoki mpenza kolimbola ete Nzambe asalaki ete asɛnzwa mpe na ntango yango akataki bomoi na ye. Na ndenge yango, Enoka ayokaki mpasi te, to ‘amonaki liwa’ te na mabɔkɔ ya banguna na ye.
6:6—Na ndimbola nini Yehova “ayokaki mawa” na ndenge asalaki moto? Na vɛrsɛ yango, liloba ya Liebele oyo ebongolami na ‘koyoka mawa’ emonisi kobongola makanisi. Yehova akoká na nyonso mpe na bongo, asalaki libunga te na ndenge akelaki moto. Kasi, abongolaki makanisi na ye mpo na bato mabe oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela. Nzambe atikaki kotalela bato lokola Mozalisi na bango mpe akómaki na makanisi ya koboma bango mpamba te mabe oyo bazalaki kosala ezalaki kosepelisa ye te. Lokola abikisaki mwa ndambo ya bato emonisi ete ayokaka mawa kaka mpo na bato oyo bakómaki mabe.—2 Petelo 2:5, 9.
7:2—Ndenge nini bazalaki kokesenisa banyama mpo bábenga mosusu nyama ya mbindo mpe mosusu nyama ya pɛto? Emonani ete banyama ya pɛto ezali oyo bakokaki kopesa lokola mbeka mpe banyama ya mbindo ezali oyo bakokaki kopesa yango lokola mbeka te, kasi ezali te oyo bakokaki kolya mpe oyo bakokaki kolya te. Liboso ya Mpela bato bazalaki kolya nyama te. Maloba bilei “ya pɛto” mpe “ya mbindo” ebandaki nde na Mibeko ya Moize, mpe esukaki ntango Mibeko elongolamaki. (Misala 10:9-16; Baefese 2:15) Emonani ete Noa ayebaki nyama nini ebongi kopesa yango lokola mbeka epai ya Yehova. Ntango kaka abimaki na masuwa, “atongaki etumbelo mpo na [Yehova], mpe akamataki nyama moko na mitindo nyonso pɛto, mpe ndɛkɛ nyonso pɛto mpe akabaki mbeka na etumbelo.”—Genese 8:20.
7:11—Mai ya Mpela oyo ezindisaki mokili mobimba eutaki wapi? Na “mokolo” ya mibale ya bozalisi, ntango “etando monene” esalemaki, mai ezalaki “na nse ya etando” mpe mai ezalaki “likoló ya etando.” (Genese 1:6, 7) Mai oyo ezalaki “na nse” ezalaki awa na mabelé. Mai oyo ezalaki “likoló” ezalaki ebele ya mai ya mbula oyo ezalaki na likoló, oyo esalaki “bitoko nyonso ya bozindo monene.” Mai yango ekitaki na mabelé na ntango ya Noa.
Mateya mpo na biso:
1:26. Lokola Nzambe akelá bato na elilingi na ye, bazali na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe. Tosengeli mpenza kosala makasi ya kolona bizaleli lokola bolingo, motema mawa, boboto, malamu, mpe motema molai, mpo na komonisa bizaleli ya Moto oyo akelaki biso.
2:22-24. Libala ezali ebongiseli ya Nzambe. Libala ezali ebongiseli ya bosantu oyo esengeli koumela libela, mpe mobali azali mokonzi ya libota.
3:1-5, 16-23. Mpo na kozala na bomoi ya malamu tosengeli kondima Yehova azala mokonzi na biso.
3:18, 19; 5:5; 6:7; 7:23. Liloba ya Nzambe ezangaka kokokisama te.
4:3-7. Yehova asepelaki na mbeka ya Abele mpo azalaki moto ya sembo mpe azalaki na kondima. (Baebele 11:4) Nzokande, misala ya Kaina emonisaki ete azalaki na kondima te. Misala na ye ezalaki mabe, azalaki na zuwa, na koyina, mpe abomaki. (1 Yoane 3:12) Lisusu, atalelaki mbeka na ye bongobongo mpe apesaki yango tiká kaka apesa. Tosengeli kopesa Yehova mbeka ya lisanzoli na motema mobimba mpe kozala na makanisi malamu mpe na etamboli malamu.
6:22. Atako mosala ya kotonga masuwa eumelaki bambula ebele, Noa asalaki oyo Nzambe asɛngaki. Yango wana, Nzambe abatelaki Noa ná libota na ye na Mpela. Yehova azali koloba na biso na nzela ya Liloba na ye oyo ekomami mpe azali kotambwisa biso na nzela ya ebongiseli na ye. Tokozwa litomba soki tozali koyoka mpe kotosa.
7:21-24. Yehova abomaka moto malamu nzela moko na moto mabe te.
BATO BAKƆTI NA ELEKO YA SIKA
Nsima ya Mpela, bato bakɔtaki na eleko ya sika. Bato bazwaki ndingisa ya kolya misuni kasi bapekisaki bango kolya makila. Yehova apesaki nzela ya kopesa moto oyo abomi mozalani na ye etumbu ya liwa mpe asalaki kondimana ya monama, mpe alakaki ete akotinda lisusu Mpela te. Bato nyonso bautaki na bana misato ya Noa, kasi nkɔkɔ na ye Nimilode akómaki “moluki makasi ya nyama liboso ya [Yehova].” Na esika bato bápalangana mpe bátondisa mabelé, bazwaki mokano ya kotonga engumba ya Babele mpe ndako moko molai mpo na koluka lokumu. Nzambe abebisaki mokano na bango ntango abulunganisaki minɔkɔ ya bato mpe apalanganisaki bango na mabelé mobimba.
Biyano na mituna ya Biblia:
8:11—Soki Mpela ebebisaki banzete, epai wapi ebenga ezwaki lokasa ya olive? Tokoki kozwa makanisi mibale. Lokola nzete ya olive ekufaka noki te, ekoki kozala ete ebebaki te na nse ya mai na boumeli ya mwa basanza oyo Mpela eumelaki. Ntango mai ya mpela ekitaki, nzete ya olive oyo ezalaki na nse ya mai ebimaki na mabelé ekauká mpe ebimisaki nkasa. Ekoki mpe kozala ete lokasa ya olive oyo ebenga ememelaki Noa eutaki na mwa nzete moke oyo ebandaki kobota nkasa ntango mai ekitaki.
9:20-25—Mpo na nini Noa alakelaki Kanana mabe? Ekoki mpenza kozala ete Kanana asalaki nkɔkɔ na ye Noa likambo moko mabe to ya nsɔni. Atako Hama, tata ya Kanana, amonaki yango, apekisaki ye te mpe ayebisaki yango bato mosusu. Kasi, Semi ná Yefete, bana mosusu mibale ya Noa, bazipaki tata na bango. Yango wana Noa apambolaki bango, kasi alakelaki Kanana mabe, mpe Hama atungisamaki mpo na nsɔni ya mwana na ye.
10:25—Na ndenge nini mabelé “ekabwanaki” na mikolo ya Pelege? Pelege azalaki na bomoi banda na mobu 2269 tii na mobu 2030 L.T.B. Ezali “na ntango na ye” nde Yehova abulunganisaki minɔkɔ ya bato oyo bazalaki kotonga ndako molai ya Babele mpe apalanganisaki bango na mabelé mpe bakabwanaki bango nyonso. (Genese 11:9) Na bongo, “mokili [to, bato ya mokili] ekabwanaki” na mikolo ya Pelege.
Mateya mpo na biso:
9:1; 11:9. Moto akoki kosala likambo moko te oyo ekoki kobebisa mokano ya Yehova.
10:1-32. Molɔngɔ ya mabota oyo ezalaki liboso ya Mpela mpe oyo ezalaki nsima na yango—mokapo 5 ná 10—emonisi ete bato nyonso bauti na Adama, moto ya liboso, na nzela ya bana misato ya Noa. Baasulia, Bakaladi, Baebele, Basulia, mpe bikólo mosusu ya Baarabe, bazali bankɔkɔ ya Semi. Baetiopia, Baezipito, Bakanana, mpe bikólo mosusu ya Afrika mpe bikólo mosusu ya Baarabe bazali bankɔkɔ ya Hama. Bato ya Mpoto bazali bankɔkɔ ya Yefete. Bato nyonso bautá na moto moko, mpe bango nyonso bazali ndenge moko na miso ya Nzambe. (Misala 17:26) Likambo yango esengeli kobongola ndenge na biso ya kotalela bato mosusu.
Liloba ya Nzambe ezali na nguya
Eteni ya liboso ya mokanda ya Genese ezali lisolo kaka moko ya solosolo oyo elobeli ebandeli ya bomoi ya bato. Na lisolo oyo tomoni mokano oyo Nzambe azalaki na yango ntango atyaki bato awa na mabelé. Tolendisami mpenza na komona ete milende ya bato, lokola oyo Nimilode asalaki, ekoki kopekisa mokano ya Nzambe te.
Ntango okobanda kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobongisa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, soki ozali kozwa ntango ya kotalela mitó ya makambo mike “Biyano na mituna ya Biblia,” ekosalisa yo okanga ntina ya bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo ezalaka mpasi. Ndimbola oyo bapesi na mitó ya makambo mike “Mateya mpo na biso” ekomonisa litomba oyo tokoki kozwa na botángi ya Biblia mpo na pɔsɔ wana. Soki ebongi, ekoki mpe kosalelama na bamposa ya lisangá na Likita ya Mosala. Ya solo, Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.—Baebele 4:12.