Kolinga Nzambe elimboli nini?
MWANA ya liboso abotamaki esili koleka pene na mibu nkotó motoba. Nsima ya kobotama na ye, mama na ye, Eva, alobaki ete: “Nazwi [“mwana mobali,” NW] mpo na kosungama na [Yehova].” (Genese 4:1) Maloba na ye mamonisi ete, atako basilaki kokweisama na etumbu ya liwa, Eva na Adama, mobali na ye, babosanaki te ete Yehova azali Nzambe. Na nsima babotaki mwana mobali ya mibale. Bana mibali yango bapesamaki nkombo Kaina na Abele.
Na ntembe te, wana ezalaki bana mibali yango kokóla, bayekolaki makambo mingi na ntina na bolingo ya Yehova bobele na kotalatala biloko bizalisami. Bazalaki kosepela na balángi kitoko mpe mitindo ndenge na ndenge ya nyama mpe bitwɛlɛ oyo etondaki na mabelé. Nzambe apesaki bango bobele bomoi te kasi lisusu likoki ya kosepela na bomoi.
Bayaki koyeba ete baboti na bango bazalisamaki bato ya kokoka mpe mokano ya ebandeli ya Yehova mozalaki ete bato bázala na bomoi ya seko. Ekoki mpenza kozala ete Adama na Eva balobelaki bango lolenge elanga ya Edene ezalaki kitoko, mpe na lolenge moko to mosusu basengelaki koyebisa bango mpo na nini babenganaki bango na efandelo wana ya paladiso. Mbala mosusu Kaina na Abele bayebaki mpe esakweli oyo ezwami na Genese 3:15. Na nzela ya esakweli wana Yehova amonisaki mokano na ye ya kobongisa makambo na ntango na yango mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye mpe bamimonisaka sembo epai na ye.
Makambo mingi oyo Kaina na Abele bayebaki na ntina na Yehova mpe bizaleli na ye ekokaki mpenza kolóna kati na mitema na bango mposa ya koluka ngɔlu ya Nzambe. Yango wana babɛlɛmaki epai na Yehova na kopesáká ye mbeka. Biblia elobi ete: “Na nsima na ntango mosusu Kaina apesaki [Yehova] likabo na mbuma na elanga. Mpe Abele, ye lokola, ayeisaki bana na liboso kati na etɔ́nga na ye mpe mafuta na yango lokola.”—Genese 4:3, 4.
Mposa na bango ya koluka ngɔlu ya Nzambe etyaki moboko mpo na boyokani elongo na ye. Kaina asukaki na kotombokela Nzambe, nzokande Abele apusamaki ntango nyonso na bolingo ya solo mpo na Nzambe. Mbɛlɛ Abele akokaki soko moke te kokólisa boyokani lolenge yango elongo na Nzambe, soki asilaki te kozwa boyebi liboso na ntina na bomoto mpe mikano ya Yehova.
Yo mpe okoki koyeba Yehova. Na ndakisa, okoki koyekola kati na Biblia ete Nzambe azali moto ya solo, kasi azali te bobele nguya mpamba ezangi bomoi oyo ekozalisaka biloko na lolenge ya pwasa. (Kokanisá na Yoane 7:28; Baebele 9:24; Emoniseli 4:11.) Biblia ezali koteya lisusu ete Yehova azali “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.”—Exode 34:6.
“Kotosa eleki moboma na malamu”
Lokola yango emonisami na lisoló ya Kaina na Abele, kozala na boyebi ya Nzambe mpe kozala na mposa ya kosala boyokani ya penepene elongo na ye ekoki te. Ya solo, bandeko wana mibale babɛlɛmaki na Nzambe na nzela ya mbeka. Nzokande, “[Yehova] andimaki Abele mpe likabo na ye lokola. Nde andimaki Kaina te mpe likabo na ye te. Kaina asilikaki mingi, mpe elongi na ye ezalaki na nkanda.”—Genese 4:3-5.
Mpo na nini Yehova aboyaki mbeka ya Kaina? Biloko oyo amemaki lokola mbeka nde ezalaki mabe? Yehova asilikaki mpo ete Kaina apesaki “mbuma na bilanga” na esika ya nyama? Ezali mpenza bongo te. Bambula mingi na nsima, Nzambe azalaki kondima na esengo nyonso mbeka ya mbuma mpe biloko mosusu ya bilanga oyo eutaki na ebele na basaleli na ye. (Levitike 2:1-16) Na ntembe te, motema ya Kaina nde mozalaki malamu te. Yehova azalaki kotala motema ya Kaina mpe akebisaki ye ete: “Mpo nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda? Soko osali malamu okondimama te? Mpe soko osali malamu te mbɛ lisumu ezali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo.”—Genese 4:6, 7.
Bolingo ya solo epai na Nzambe elimboli bobele kopesa mbeka te. Yango wana Yehova alendisaki Kaina ete ‘asala malamu.’ Nzambe alingaki botosi. Mbɛlɛ botosi wana epai na Nzambe esungaki Kaina ete atya moboko moko malamu mpo na boyokani ya bolingo elongo na Mozalisi. Biblia elobeli mingi motuya ya botosi na maloba oyo: “[Yehova] akosepela [na] mbeka na miboma lokola ye akosepela [na] botosi kotosa mongongo na ye? Talá kotosa eleki moboma na malamu mpe koyoka eleki mafuta na bampate.”—1 Samwele 15:22.
Na nsima, likanisi wana esimbamaki makasi na maloba oyo mazwami kati na 1 Yoane 5:3: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.” Ezali na lolenge mosusu te ya komonisa bolingo na biso epai na Yehova oyo ekoki koleka botosi na biso liboso na bokonzi na ye. Yango elimboli kotosa malako ya Biblia na ntina na bizaleli malamu. (1 Bakolinti 6:9, 10) Yango elimboli ete tólinga oyo ezali malamu mpe tóyina oyo ezali mabe.—Nzembo 97:10; 101:3; Masese 8:13.
Moko ya bilembeteli ya bolingo na biso epai na Nzambe ezali bongo kolinga bazalani na biso. Biblia eyebisi biso ete: “Soko moto nani alobi ete, Nalingi Nzambe, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolónga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te.”—1 Yoane 4:20.
Boninga ya penepene elongo na Yehova ekoki kosalema
Basusu bakoki koloba ete, ‘Nasambelaka Yehova. Natosaka mibeko na ye. Nasalaka na bosembo epai na baninga na ngai. Nasalaka nyonso wana. Nzokande, namiyokaka mpenza penepene na Nzambe te. Nayokaka bolingo makasi mpo na ye te, mpe yango epesaka ngai liyoki ya ngambo.’ Basusu bakoki kokanisa ete babongi te kozala na boyokani wana ya penepene elongo na Yehova.
Nsima ya mibu pene na 37 ya kosalela Yehova mpe ya komipesa mobimba na mosala na ye, ndeko moko moklisto akomaki ete: “Mbala mingi kati na bomoi na ngai nayokaki ete mosala na ngai mpo na Yehova mozalaki bobele likolólikoló, ete mbala mosusu motema na ngai mozalaki mpenza kati na yango te. Kasi nayebaki ete kosalela Yehova ezali likambo oyo libongi mpenza, mpe nakokaki te kondima kotika yango. Nzokande, ntango nyonso oyo nazalaki kotánga na ntina na moto moko ete ‘ayokaki bolingo mingi kati na motema na ye mpo na Yehova,’ nazalaki komituna, ‘Lokola nayoká naino bongo te, mabe nini nasalá?’” Lolenge nini tokoki kokóma na boninga ya penepene elongo na Nzambe?
Soki olingi mpenza moto moko, mbala mingi okokanisa na ntina na moto yango. Okozala na mposa makasi ya kozala pene na ye mpamba te ozali komibanzabanza mpo na ye. Wana ozali komona ye mbala mingi, kosolola elongo na ye, mpe kokanisa na ntina na ye, bolingo na yo mpo na ye ezali kokóla. Lilako wana mpe lizali kosalelama mpo na oyo etali kokólisa bolingo na yo epai na Nzambe.
Kati na Nzembo 77:12, mokomi ya Nzembo oyo apemamaki alobaki ete: “Nakobanzaka mpe mosala na yo nyonso, nakosolola yango nyonso esali yo.” Komanyola ezali na ntina mingi mpo na kokólisa bolingo mpo na Nzambe. Yango ezali mpenza na ntina mpamba te ye amonanaka te. Kasi soki okokanisa ye mingi, akokóma lokola moto oyo azali komonana solo na miso na yo. Ezali bobele na ntango yango nde okoki kokólisa boyokani ya makasi mpe ya bolingo elongo na ye—mpamba te mpo na yo azali moto ya solo.
Momeseno na yo ya komanyola ntango nyonso likoló na Yehova mpe likoló na misala na ye ekolendisa momeseno na yo ya kotosa ye. Oyokaka ye na nzela ya botángi mpe boyekoli ya mokolo na mokolo ya Liloba na ye, Biblia. Mokomi ya Nzembo alobaki ete moto ya esengo ezali moto oyo “mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi.”—Nzembo 1:1, 2.
Likambo mosusu ya ntina mingi ezali bongo libondeli. Yango wana Biblia ezali kolendisa biso mbala na mbala ete tóbondelaka—“ntango nyonso,” ‘tómipesa na kobondela,’ ‘tólendendelaka kati na mabondeli,’ mpe ‘tóbondelaka na kotika te.’ (Baefese 6:18; 1 Bakolinti 7:5; Baloma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17) Mabondeli oyo tozali kotinda ntango nyonso epai na Yehova ekokómisa biso na motuya mingi na miso na ye, mpe awa tondimisami ete azali koyoka biso, yango ekokómisa biso pene na ye. Mokomi na Nzembo andimisaki likambo yango, ntango alobaki ete: “Ngai nalingi [Yehova] mpo ete ayoki mongongo na ngai mpe mabondeli na ngai, mpo ete apesi litoi epai na ngai; bongo nakosambela epai na ye mikolo na ngai nyonso.”—Nzembo 116:1, 2.
Tómekola Nzambe ya bolingo
Yehova azali malamu epai na biso. Lokola azali Mozalisi ya molɔ́ngɔ́, na ntembe te azali na makambo mingi ya kotalela mpe ya komibanzabanza na yango. Nzokande, Biblia eyebisi biso ete, atako azali mpenza na nkembo monene, abosani te kobatela bato oyo azalisaki. Alingi biso mingi. (1 Petelo 5:6, 7) Mokomi na Nzembo andimisi yango na maloba oyo akomaki: “Ɛ [Yehova], Nkolo na biso, nkombo na yo ezali na nkembo mingi kati na mokili mobimba; otii nkembo na yo mpe Likoló na lola. Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala na misapi na yo, sanza mpe miɔtɔ na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana na moto nini ete otalela ye?”—Nzembo 8:1, 3, 4.
Lolenge nini Yehova asili kotalela mwana na moto? Biblia eyanoli ete: “Bolingo na Nzambe emonaneli biso ete Nzambe atindaki [“Mwana-mobotami bobele moko,” NW] na ye kati na mokili ete tóbika na bomoi mpo na ye. Bolingo ezali boye te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbɔndi mpo na masumu na biso.”—1 Yoane 4:9, 10.
Lolenge nini mbeka wana ya mbɔndi ezali elembeteli eleki monene ya bolingo ya Nzambe? Tótalela makambo oyo malekaki na elanga ya Edene. Adama na Eva basengelaki kopona soki bakotosa mibeko ya Yehova na elikya ya koumela seko kati na bomoi ya kokoka to bakotombokela Yehova mpe bakosuka na kufa ya libela. Baponaki kotomboka. (Genese 3:1-6) Na kosaláká bongo, babendelaki mpe bato mosusu nyonso etumbu ya liwa. (Baloma 5:12) Na ntina na nzombo na bango elikya nyonso ya bomoi na mikolo mizali koya elongolamaki epai na biso. Moto moko te kati na biso akokaki kopɛngola ezalela ya makambo wana.
Nzokande, na bolingo nyonso Yehova abosanaki mwana na moto te, wana ayebi malamu bampasi na ye. Na nzela ya kufa ya Mwana na ye, Yesu Klisto, na liwa ya mbeka, Yehova asili kotya moboko mobongi mpo ete biso banso tópona moto na moto bomoi to kufa, botosi to botomboki. (Yoane 3:16) Ezali lokola nde Yehova apesaki epai na biso nyonso, moto na moto, likoki ya kosambisama engebene liponi na ye—libaku ya kozonga, na elilingi, na Edene, mpe kozwa moto na moto ekateli na ye. Wana ezali elembeteli eleki monene ya bolingo oyo esilá komonisama.
Kanisá mpasi oyo Yehova ayokaki ntango amonaki mobotami na ye ya liboso kofingama, konyokolama, mpe kokakisama na nzeté lokola mosáli na mabe. Mpe Nzambe ayikelaki yango mpiko mpo na bolamu na biso. Koyebaka ete Yehova nde abandaki komonisela biso bolingo, yango esengeli bongo kolendisa biso ete tólinga ye mpe esengeli kopusa biso ete tóluka ye. (Yakobo 1:17; 1 Yoane 4:19) Biblia ezali kobyanga biso ete: “Bóluka [Yehova] mpe nguya na ye; bólukaka elongi na ye ntango nyonso. Bóbanza misala na nkembo misalaki ye; makambo na ye na kokamwa mpe toli na monɔkɔ na ye.”—Nzembo 105:4, 5.
Bokangami makasi mpe boyokani ya bolingo elongo na Nzambe, kozala moninga na ye, ezali ndɔ́tɔ mpamba te. Ezali likambo oyo ekoki kosalema. Ya solo, tokoki te kokokanisa mpenzampenza bolingo na biso epai na Nzambe na boyokani elongo na bato mosusu. Bolingo oyo tozalaka na yango mpo na mobalani na biso, baboti, bandeko, bana to baninga na biso ekeseni mpenza na bolingo oyo tozali na yango mpo na Nzambe. (Matai 10:37; 19:29) Kolinga Yehova esangisi bokangami, losambo mpe komipesa mobimba epai na ye. (Deteronome 4:24) Boyokani mosusu te ezali kosɛnga makambo motindo yango. Atako bongo, tokoki kokólisa mayoki ya makasi mpe ya mozindo mpo na Nzambe na lolenge ya limemya, na nsɔ́mɔ nyonso.—Nzembo 89:7.
Atako ozali moto ya kozanga kokoka, na motindo ya Kaina na Abele, ozali na makoki ya komonisa bolingo epai na Mozalisi na yo. Kaina asalaki liponi na ye, akendaki na ngambo ya Satana, mpe akómaki mobomi-bato ya liboso. (1 Yoane 3:12) Nzokande, Yehova atángaki Abele ete azali moto ya kondima mpe moyengebene mpe akopesa ye mbano ya bomoi kati na Paladiso oyo mosika te ekosalema.—Baebele 11:4.
Yo mpe osengeli kosala liponi. Na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpe ya Liloba na ye, okoki solo kolinga Nzambe “na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Deteronome 6:5) Yehova, ye mpe akolanda kolinga yo, mpamba te “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—Baebele 11:6.
[Elilingi na lokasa 7]
Mbeka ya Abele endimamaki na Nzambe