Enoka—Abangaki te liboso ya mikakatano
MPO na moto malamu, wana ezalaki eleko ya mabe mpenza. Ezaleli ya kotuka Nzambe eyikanaki mingi kati na mokili. Bizaleli ya bato ezalaki sé kobeba. Ya solo, mwa moke na nsima, elobamaki ete: “[Yehova] amonaki ete masumu na bato izalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango izalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.”—Genese 6:5.
Enoka, moto ya nsambo na molɔngɔ́ ya libota kobanda na Adama, abangaki te mpo na komikesenisa na bato mosusu. Abatelaki ngwi bosembo na ye ata soki yango ekokaki komemela ye mikakatano. Nsango ya Enoka ezalaki kotungisa bato ya masumu oyo bazalaki kotuka Nzambe, na boye ete bakanaki kútu koboma ye, mpe bobele Yehova nde akokaki kosunga ye.—Yuda 14, 15.
Enoka mpe motuna oyo motaleli mɔlɔ́ngɔ́ mobimba
Motuna motaleli lotómo ya kozala mokonzi ya mɔlɔ́ngɔ́ esilaki kobimisama mbula mingi liboso ya kobotama ya Enoka. Nzambe azali na lotómo ya koyangela? Satana ayanolaki mpenza ete: te. Alobaki ete bikelamu ya mayele bakozwa litomba soki baboyi litambwisi ya Nzambe. Satana amekaki kolóngisa makanisi na ye liboso na oyo ya Yehova na kosaleláká mayele mabe mpo na kobenda bato na ngámbo na ye. Adama, mwasi na ye Eva, mpe mwana na bango ya liboso, Kaina, bazwi lokumu mabe mpo ete bamityaki na ngámbo ya Satana na koponáká ete bámiyangela bango moko na esika ya koyangelama na Nzambe. Babalani ya liboso bamonisaki botomboki na bango na kolyáká mbuma oyo Nzambe apekisaki, mpe Kaina amonisaki botomboki na kobomáká na nkó ndeko na ye Abele, moyengebene.—Genese 3:4-6; 4:8.
Na mpiko nyonso, Abele amityaki na ngámbo ya Yehova. Wana bosembo ya Abele etombolaki losambo ya pɛto, ezali polele ete Satana asepelaki komona lolenge Kaina asalelaki nkanda na ye makasi mpo na koboma ndeko na ye. Uta na ntango yango kino lelo, Satana azali kosalela ‘kobanga kokufa’ lokola ebundeli mpo na koyokisa bato nsɔ́mɔ. Alingi koyeisa bobángi kati na motema ya moto nyonso oyo azali na mposa ya kosambela Nzambe ya solo.—Baebele 2:14, 15; Yoane 8:44; 1 Yoane 3:12.
Na eleko Enoka abotamaki, likanisi oyo ya Satana ete bato bakokaki te kosimba lotómo oyo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi emonanaki lokola ete ezalaki mpenza solo. Abele asilaki kokufa, kasi bato balandaki te ndakisa na ye ya bosembo. Nzokande, Enoka akesanaki na bato mosusu. Kondima na ye ezalaki na moboko makasi, mpamba te ayebaki malamu makambo oyo masalemaki na elanga ya Edene.a Na ntembe te, atalelaki na motuya mingi esakweli ya Yehova oyo emonisaki ete Mombóto moko molakamaki, mosengelaki koboma Satana mpe myango na ye!—Genese 3:15.
Lokola elikya wana ezalaki ntango nyonso liboso na ye, Enoka ayokaki nsɔ́mɔ te mpo na lisoló oyo ete Zábolo apusaki Kaina ete aboma Abele. Nzokande, alandaki ntango nyonso kotambola elongo na Yehova, kosaláká na boyengebene na boumeli ya bomoi na ye mobimba. Enoka amitangolaki na bato ya mokili, koboyáká bongo elimo na bango ya lipanda.—Genese 5:23, 24.
Lisusu, Enoka asakolaki na mpiko nyonso mpe amonisaki polele ete misala mabe ya Zábolo mikolónga te. Na kopusama na elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, Enoka asakolaki na ntina na bato mabe ete: “Nkolo asili koya na bibele na Babulami na ye, mpo na kosambisa bato nyonso mpe mpo na kokweisa nyonso baoyo bakotyolaka Nzambe na ntina na misala nyonso na bango na matyoli oyo bakotyolaka ye na yango, mpe na ntina na maloba nyonso makasi masili bango batyoli na masumu kotukatuka ye.”—Yuda 14, 15.
Lokola Enoka asakolaki kozanga kobanga, wana ntoma Paulo atindaki mokanda epai na baklisto Baebele, atángaki ye kati na ‘lipata ya batatoli’ oyo batikaki ndakisa monene ya kondima oyo emonisamaki na misala.b (Baebele 11:5; 12:1) Lokola Enoka azalaki na kondima, abatelaki bosembo na ye na boumeli ya mbula koleka 300. (Genese 5:22) Na ntembe te, kondima ya Enoka epesaki mpasi epai na banguna ya Nzambe na likoló mpe na mabelé! Esakweli ya polele oyo Enoka asakolaki etumolaki Satana ete ayina ye, kasi esalaki ete Yehova abatela ye.
Lolenge nini Nzambe akamataki Enoka?
Yehova atikaki nzela na Satana te, soko mpe na basaleli na ye awa na mabelé te, ete báboma Enoka. Nzokande, lisoló lipemami liyebisi ete: “Nzambe akamataki ye.” (Genese 5:24) Ntoma Paulo alobeli yango na lolenge oyo: “Mpo na kondima, Enoka atombwaki ete amona kufa te, azwamaki te [“amonanaki epai moko te,” NW ] mpo ete Nzambe atombolaki ye. Mpo ete liboso naino atombwaki te, azwaki litatoli ete asepelisi Nzambe.”—Baebele 11:5.
Lolenge nini Enoka “atombwaki ete amona kufa te”? To, lokola ebongolami na libongoli ya R. A. Knox, lolenge nini “akamatamaki kozanga ete ayeba liwa”? Na kimya nyonso, Nzambe asukisaki bomoi ya Enoka, kobateláká ye ete anyokwama te na mpasi ya liwa ezala mpo na maladi to mpo na monyoko ya banguna na ye. Ɛɛ, Yehova akataki bomoi ya Enoka wana akómaki na mbula 365—soki tokokanisi ye na bato ya eleko na ye, tokoloba ete akufaki mpenza na bambula moke.
Lolenge nini Enoka apesamelaki “litatoli ete asepelisi Nzambe”? Elembeteli nini amonisaki? Na ntembe te, Nzambe atyaki Enoka kati na ezalela ekokani na moto asenzwi, lolenge moko lokola Paulo “alongolamaki,” to atombwaki, wana azalaki kozwa emonaneli etalelaki paladiso ya elimo ya mikolo mizalaki koya mpo na lisangá ya boklisto. (2 Bakolinti 12:3, 4) Mbala mosusu, litatoli, to elembeteli ete Enoka asepelisaki Nzambe ezalaki nde emonaneli moko oyo amonaki ya Paladiso na mabelé mpo na mikolo mizali koya, oyo kati na yango baoyo nyonso bakozala na bomoi bakosimba lotómo ya Yehova ya kozala mokonzi. Ekoki kozala ete ezalaki na ntango yango nde azwaki emonaneli oyo esimbaki mayoki na ye nyonso, wana Yehova akamataki ye kati na kufa kozanga ete ayokisa ye mpasi, ete alala mpongi kino na mokolo ya kosekwisama na ye. Emonani ete, lokola ezalaki mpo na Mose, Yehova alimwisaki nzoto ya Enoka, mpamba te “amonanaki epai moko te.”—Baebele 11:5, NW; Deteronome 34:5, 6; Yuda 9.
Esakweli ekokisami
Lelo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango oyo ekokani na nsango oyo ezwami kati na esakweli ya Enoka. Na lisalisi ya makomami, bazali komonisa lolenge nini esakweli yango ekokokisama wana Nzambe akoboma bato oyo batukaka ye na mikolo mikoya mosika te. (2 Batesaloniki 1:6-10) Nsango na bango ezali kosala ete bato mingi básepela na bango te, mpamba te ekeseni mpenza na makanisi mpe mikano ya mokili oyo. Botɛmɛli oyo bazali kokutana na yango ezali kokamwisa bango te, mpamba te Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.”—Matai 10:22; Yoane 17:14.
Nzokande, na ndakisa ya Enoka, baklisto ya mikolo na biso bandimisami ete, nsukansuka, bakobikisama na mabɔkɔ ya banguna na bango. Ntoma Petelo akomaki ete: “Nkolo ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakeseni kino mokolo na kosamba mpo na kozwa etumbu.” (2 Petelo 2:9) Nzambe akoki komona malamu ete alongola mokakatano to ezalela moko ya mpasi. Monyoko ekoki kosuka. Ata soki esili te, ayebi lolenge nini ‘kobongisa ekimelo’ mpo ete bato na ye bákoka koyika mpiko na mimekano na bango mpe bálónga yango. Yehova apesaka “nguya oyo eleki nguya ya bomoto” soki yango esengeli.—1 Bakolinti 10:13, NW; 2 Bakolinti 4:7.
Lokola Yehova ‘akozongisaka libonza epai na bango bakolukaka ye,’ akopambola mpe basaleli na ye ya sembo na kopesáká bango bomoi ya seko. (Baebele 11:6) Mingi na bango bakozwa bomoi yango na paladiso awa na mabelé. Na ndakisa ya Enoka, tiká ete biso mpe tósakola nsango ya Nzambe kozanga kobanga. Na kondima nyonso, tiká ete tósala yango kozanga kobanga mikakatano.
[Maloba na nse]
a Adama azalaki na mbula 622 na ntango Enoka abotamaki. Enoka atikalaki na bomoi mbula 57 na nsima ya liwa ya Adama. Na yango, bango mibale bazalaki na bomoi na eleko moko na boumeli ya mwa ntango molai.
b Liloba “batatoli” oyo ezwami na Baebele 12:1 ebongolami uta na liloba ya Greke marʹtys. Engebene búku Wuest’s Word Studies From the Greek New Testament, liloba yango elimboli “moto oyo apesaka bilembeteli, to akoki kopesa bilembeteli, na ntina na makambo oyo amonaki to ayokaki to oyo ayebi na lolenge moko to mosusu.” Búku Christian Words, ya Nigel Turner, elobi ete liloba yango elimboli moto oyo ayebisaka “makambo oyo ye moko akutanaki na yango . . . , makambo ya solo mpe makanisi oyo andimisami na yango.”
[Etanda na lokasa 30]
Nkombo ya Nzambe etyolami
Soko bikeke minei liboso ya mbotama ya Enoka, mwana ya mwana ya Adama, Enosa, asilaki kobotama. Genese 4:26 elobi ete: “Na ntango yango bato babandaki kobyanga nkombo ya [Yehova].” Banganga-mayele mosusu oyo bayekolaka lokótá ya Liebele bakanisi ete mokapo oyo esengelaki kotángama ete “babandaki kotyola nyonso” kobyanga nkombo ya Nzambe to, “na ntango yango botyoli ebandaki.” Na ntina na eleko yango, Targumu ya Yelusaleme elobi ete: “Ezalaki na eleko ya libota wana nde bato babandaki kobunga nzela, mpe komisalela bikeko mpo na losambo, mpe babéngaki bikeko na bango na nkombo ya Liloba ya Nkolo.”
Na eleko ya Enosa, momeseno ya kosalela nkombo ya Yehova na lolenge mabe epalanganaki. Ekoki kozala ete bato bazalaki kosalela nkombo ya Yehova Nzambe mpo na komibénga bango moko to mpo na kobénga bato oyo bakanisaki ete na nzela na bango bazalaki kobɛlɛma epai na Nzambe mpo na losambo. To mbala mosusu bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe mpo na bikeko. Ata soki ezalaki lolenge nini, Satana Zábolo akangisaki bato kati na motambo makasi ya losambo ya bikeko. Na eleko oyo Enoka abotamaki, bobele bato moke mpenza nde bazalaki kosalela losambo ya solo. Moto nyonso azalaki na ezaleli motindo moko na Enoka, oyo atosaki solo kati na bomoi na ye mpe asakolaki yango, azalaki kolingama na bato te mpe na bongo azalaki konyokolama.—Kokanisá na Matai 5:11, 12.
[Etanda na lokasa 31]
Enoka akendaki likoló?
“Mpo na kondima, Enoka atombwaki ete amona kufa te.” Na kobongoláká eteni oyo ya Baebele 11:5, mabongoli mosusu ya Biblia mamonisaka ete Enoka akufaki solo te. Na ndakisa, Boyokani ya Sika, elobi ete: “Enoki, mpo na bondimi na ye, akufaki te; Nzambe amemaki ye na likoló.”
Nzokande, bambula soko 3 000 na nsima ya Enoka, Yesu Klisto alobaki ete: “Moto mpe te asili kobuta kino Likoló bobele ye oyo akitaki longwa na Likoló, ye Mwana na moto oyo auti na Likoló.” (Yoane 3:13) Biblia Liloba lya Nzambe elobi: “Moto moko akómi o likoló te, sé ngai, Mwana wa moto, oyo auti o likoló.” Na ntango Yesu alobaki maloba wana, ata ye moko mpe amataki naino na likoló te.—Kokanisá na Luka 7:28.
Ntoma Paulo alobi ete Enoka mpe basusu oyo batángami kati na lipata monene ya batatoli oyo bazalaki na bomoi liboso na eleko ya Klisto ‘bakufaki bango nyonso’ mpe “bazangaki kozwa biloko bilakami.” (Baebele 11:13, 39) Mpo na nini? Mpamba te bato nyonso, ata mpe Enoka, basilaki kosangola lisumu uta na Adama. (Nzembo 51:5; Baloma 5:12) Nzela bobele moko ya kozwa lobiko ezali bongo mbeka ya lisiko oyo Yesu Klisto apesaki. (Misala 4:12; 1 Yoane 2:1, 2) Na eleko ya Enoka, lisiko yango epesamaki naino te. Na yango, Enoka akendaki na likoló te, kasi alali mpongi kati na kufa, kozeláká lisekwa awa na mabelé.—Yoane 5:28, 29.