Libala
Ndimbola: Ebongiseli oyo esangisi mwasi ná mobali oyo basepeli kofanda esika moko na boyokani na mibeko ya Biblia. Ebongiseli yango euti na Nzambe. Libala esalaka ete mwasi ná mobali bázala na boyokani malamu mpe na kimya mpo balingani mpe mpo na ndai oyo bango mibale balapaki. Ntango Yehova abandisaki libala, ezalaki kaka te mpo mobali azwa moto oyo akozala mosungi oyo abongi na ye, kasi alingaki mpe ete bato mosusu bábotama na kati ya ebongiseli ya libota. Na bisika mosusu, lisangá ya bokristo endimaka kaka libala oyo ekomisami na buku ya Leta.
Kolanda mibeko ya Leta mpo na libala ezali mpenza na ntina?
Tito 3:1: “Kobá kokundwela bango ete bámikitisa mpe bátosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli.” (Soki mwasi ná mobali balandi malako yango, bakozala na lokumu mpenza, mpe bana oyo bakobota bakoyoka nsɔni te ya kozala na baboti oyo bafandá makango. Lisusu, kokomisa libala na buku ya Leta ebatelaka lotomo ya biloko ya mwasi, ya mobali, mpe ya bana ntango mobalani moko akufi.)
Ebr. 13:4: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Mpo libala “ekumisama,” esengeli kosalema ndenge mibeko ya Leta esɛngi. Ntango tozali kolobela “pite” mpe “ekobo,” tosengeli komikundola makambo oyo elobami na Tito 3:1, oyo tolobelaki liboso.)
1 Pe. 2:12-15: “Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde bazali koloba na basali-mabe, bápesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo bamoni na miso na bango misala na bino ya malamu. Mpo na Nkolo bótosaka bibongiseli nyonso oyo esalemi na bato: ezala mokonzi mpo azali liboso to baguvɛrnɛrɛ mpo batindami na ye mpo na kopesa etumbu na basali-mabe kasi kokumisa bato oyo basalaka malamu. Mpo mokano ya Nzambe ezali boye: ntango bozali kosala malamu bozali kosukisa maloba ya bozoba ya bazoba.”
Ntango Nzambe abalisaki Adama ná Eva, ezali nde na “mibeko” oyo balandaki?
Eba. 2:22-24: “Na mokuwa yango oyo alongolaki na mopanzi ya moto [Adama], Yehova Nzambe asalaki mwasi mpe ayaki na ye epai ya moto. Bongo moto alobaki ete: ‘Aa! sikoyo, oyo nde mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai. Ye akobengama Mwasi, mpo auti na mobali.’ Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Simbá ete Yehova Nzambe, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́, nde moto abalisaki Adama ná Eva. Ezalaki te lokola mwasi ná mobali oyo bazwi ekateli ya kofanda esika moko kozanga kotalela mibeko ya mboka mpo na libala. Lisusu, Nzambe amonisaki mpenza ete libala esengeli koumela libela.)
Eba. 1:28: “Nzambe apambolaki bango [Adama ná Eva] mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.’” (Awa Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso apambolaki babalani ya liboso, apesaki bango ndingisa ya kosangisa nzoto, mpe apesaki bango mokumba oyo ekokaki kosepelisa bomoi na bango.)
Mokristo akoki kobala basi ebele soki mibeko ya mboka epesi nzela?
1 Tim. 3:2, 12: “Mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo azali na likambo te ya kofundama na yango, mobali ya mwasi kaka moko . . . Basaleli na misala bázala mibali ya mwasi kaka moko.” (Longola mikumba oyo mibali yango bazwaki, bazalaki mpe ndakisa malamu mpo na bakristo mosusu na lisangá.)
1 Ko. 7:2: “Lokola pite epalangani mingi, mobali mokomoko azala na mwasi na ye moko mpe mwasi mokomoko azala na mobali na ye moko.” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete mobali asengeli te kozala na basi ebele mpe mwasi asengeli te kozala na mibali ebele.)
Mpo na nini Nzambe atikaki Abrahama, Yakobo, ná Salomo bábala basi ebele?
Ezali Yehova te nde moto abandisaki likambo ya kobala basi ebele. Apesaki Adama mwasi kaka moko. Na nsima, Lameke, nkɔkɔ ya Kaina, abalaki basi mibale. (Eba. 4:19) Mibali mosusu mpe balandaki ndakisa na ye, mpe basusu bakómisaki baombo na bango ya basi bamakango na bango. Nzambe apesaki nzela na likambo yango, kutu na Mibeko ya Moize azwaki bibongiseli mpo ete bányokolaka basi yango te. Asalaki bongo tii ntango lisangá ya bokristo ebandaki, mpe na ntango yango asɛngaki ete basaleli na ye bálanda ndakisa oyo ye moko apesaki na Edene.
Na ndakisa, Abrahama abalaki Sarai (Sara). Ntango Sarai akokisaki mbula soki 75, akanisaki ete akokufa ekomba, yango wana asɛngaki mobali na ye asangisa nzoto na moombo na ye ya mwasi mpo akoka kozwa mwana na nzela na ye. Abrahama asalaki bongo, kasi likambo yango ebimisaki mindɔndɔ na ndako na ye. (Eba. 16:1-4) Na nsima, Yehova asalaki likamwisi mpo Sarai azwa zemi mpo na kokokisa elaka na ye ya kopesa “momboto.” (Eba. 18:9-14) Abrahama abalaki mwasi mosusu kaka nsima ya liwa ya Sara.—Eba. 23:2; 25:1.
Yakobo abalaki basi ebele mpo bokilo na ye ya mobali abubaki ye. Yakobo azalaki na likanisi ya kobala basi ebele te ntango akendaki koluka mwasi na Padane-arame. Masolo ya Biblia emonisi ete basi yango bazalaki koyokana te mpe bazalaki na esengo te.—Eba. 29:18–30:24.
Eyebani ete Salomo azalaki na basi ebele mpe bamakango ebele. Kasi bato mingi bayebaka te ete abukaki mobeko ya Yehova oyo emonisi polele ete mokonzi “asengeli mpe te kokóma na basi ebele, noki motema na ye epɛngwa.” (Mib. 17:17) Tóbosana mpe te ete mpo na basi bapaya oyo Salomo abalaki, akómaki kosambela banzambe ya lokuta mpe “abandaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova . . . Bongo Yehova asilikelaki Salomo.”—1 Ba. 11:1-9.
Soki mwasi ná mobali bazali koyokana te, bakoki kokabwana?
1 Ko. 7:10-16: “Na bato oyo babalá, nazali kopesa malako oyo, ezali mpenza ngai te kasi Nkolo: ete mwasi akabwana na mobali na ye te; kasi soki akabwani na ye, afanda bongo abala te to mpe ayokana lisusu na mobali na ye; mpe mobali atika mwasi na ye te. Kasi na bamosusu, nazali koloba boye, ɛɛ, ngai, kasi Nkolo te [kasi vɛrsɛ 40 emonisi ete Paulo atambwisamaki na elimo santu]: Soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, nzokande mwasi yango andimi kofanda na ye, ndeko yango atika ye te; mpe mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda na ye, mwasi yango atika mobali na ye te. Mpo mobali wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na mwasi na ye, mpe mwasi wana oyo azali mondimi te asantisami mpo na ndeko mobali wana; soki te, bana na bino bakozala mpenza mbindo, kasi sikoyo bazali basantu. Kasi soki oyo azali mondimi te azali koluka kokabwana, akabwana; ndeko mobali to ndeko mwasi azali na boombo te na likambo yango, kasi Nzambe abengi bino na kimya. Mpo, mwasi, ndenge nini oyebi soki okobikisa mobali na yo te? To, mobali, ndenge nini oyebi soki okobikisa mwasi na yo te?” (Mpo na nini mondimi asengeli koyikela mikakatano mpiko mpe kosala makasi mpo na kobatela libala na ye? Mpo azali kotosa ebongiseli ya libala oyo euti na Nzambe mpe azali na elikya ete mokolo mosusu molongani na ye oyo azali mondimi te akokóma mosaleli ya Nzambe ya solo.)
Biblia elobi nini mpo na koboma libala mpe kobala lisusu?
Mal. 2:15, 16: “‘Bino bosengeli kokeba mpenza mpo na elimo na bino, mpe moto moko te asalela mwasi ya bolenge na ye makambo na bokosi. Mpo ye ayini koboma libala,’ Yehova Nzambe ya Yisraele alobi bongo.”
Mat. 19:8, 9: “[Yesu] alobaki na bango ete: ‘Moize atikelaki bino nzela ya koboma libala na basi na bino mpo na motó makasi na bino, kasi yango ezalaki bongo te banda na ebandeli. Nalobi na bino ete moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te [kosangisa nzoto na moto mosusu], mpe abali mosusu azali kosala ekobo.’” (Na yango, mwasi to mobali oyo molongani na ye asali “pite” akoki koboma libala kasi asɛngisami te kosala bongo.)
Rom. 7:2, 3: “Mwasi oyo abalá akangani na mobali na ye na mobeko ntango mobali yango azali na bomoi; kasi soki mobali na ye akufi, alongwe na mobeko ya mobali na ye. Yango wana, ntango mobali na ye azali na bomoi, soki akómi mwasi ya mobali mosusu, bakobenga ye mwasi ya ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, alongwe na mobeko na ye, yango wana soki akómi mwasi ya mobali mosusu, azali mwasi ya ekobo te.”
1 Ko. 6:9-11: “Bómikosa te. Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te. Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosukwami pɛɛ, kasi bosantisami, kasi botángami bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpe na elimo ya Nzambe na biso.” (Maloba oyo emonisi ete esengeli kozwa likambo yango na lisɛki te. Bato ya ekobo oyo babongoli motema te bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. Kasi, bato oyo kala basalaki ekobo to mbala mosusu babalá lisusu na ndenge oyo eyokani na Biblia te, Nzambe akoki kolimbisa bango mpe bakoki kokóma pɛto liboso na ye, soki babongoli mpenza motema mpe bandimeli mbeka ya Yesu oyo ezipaka masumu.)
Na ntango ya kala mpo na nini Nzambe atikaki bato ya libota moko bábalanaka?
Masolo ya Biblia emonisi ete Kaina abalaki moko ya bandeko na ye ya basi (Eba. 4:17; 5:4) to mwana ya ndeko na ye, mpe Abrama abalaki mwana oyo tata na ye abotaki na mwasi mosusu. (Eba. 20:12) Kasi na nsima, Mibeko ya Moize epekisaki mabala ya ndenge wana. (Lev. 18:9, 11) Lelo oyo mpe mabala ya ndenge wana epekisami mpo na bakristo. Kobalana na moto oyo bozali libota moko ekoki kosala ete bana bábotama na mbeba.
Mpo na nini na ebandeli ezalaki mabe te kobalana na moto oyo bozali na ye libota moko? Nzambe akelaki Adama ná Eva bato ya kokoka mpe akanaki ete bato nyonso báuta na bango. (Eba. 1:28; 3:20) Na yango, emonani ete na ebandeli, bato ya libota moko bakokaki kobalana. Atako na ntango wana lisumu esilaki kobima, likama ya kobota bana na mbeba ezalaki mingi te, mpo bato bazalaki mosika te na bomoi ya kokoka oyo Adama ná Eva bazalaki na yango. Likambo yango endimisami na ndenge bato bazalaki koumela mingi na bomoi na ntango wana. (Talá Ebandeli 5:3-8; 25:7.) Kasi mbula soki 2 500 nsima ya lisumu ya Adama, Nzambe apekisaki bato ya libota moko bábalana. Yango ezalaki kobatela bana oyo bakobotama mpe esalaki ete etamboli ya basaleli ya Yehova mpo na makambo etali kosangisa nzoto ekesana mpenza na oyo ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango, oyo bato na yango bazalaki komipesa na makambo ya mbindo ndenge na ndenge.—Talá Balevi 18:2-18.
Makambo nini babalani basengeli kosala mpo bázala na libala ya esengo?
(1) Koyekola Liloba ya Nzambe elongo ntango nyonso mpe kobondela Nzambe mpo na koyeba ndenge ya kosilisa mikakatano.—2 Tim. 3:16, 17; Mas. 3:5, 6; Flp. 4:6, 7.
(2) Kotosa ebongiseli ya bokonzi. Yango epesi mobali mokumba monene. (1 Ko. 11:3; Ef. 5:25-33; Kol. 3:19) Kasi mwasi mpe asengeli mpenza kosala milende mpo na kotosa ebongiseli yango.—Ef. 5:22-24, 33; Kol. 3:18; 1 Pe. 3:1-6.
(3) Kosangisa nzoto kaka na mobalani na yo. (Mas. 5:15-21; Ebr. 13:4) Komibanzabanza na bolingo mpenza mpo na bamposa ya mobalani na yo ekoki kobatela ye asala mabe te.—1 Ko. 7:2-5.
(4) Kozala na maloba ya boboto, kopesana lokumu; kozala na nkanda makasimakasi te, kozokisa na maloba te to kokatela molongani na yo mangala te.—Ef. 4:31, 32; Mas. 15:1; 20:3; 21:9; 31:26, 28.
(5) Kozala gɔigɔi te mpe kosala mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota: kolukela bango ndako, bilamba, mpe kolamba bilei ya kitoko.—Tito 2:4, 5; Mas. 31:10-31.
(6) Kosalela toli ya Biblia na komikitisa, ezala molongani na yo akokisaka mikumba na ye to te.—Rom. 14:12; 1 Pe. 3:1, 2.
(7) Mokomoko asengeli kosala makasi mpo amonisa ete azali na bizaleli ya elimo.—1 Pe. 3:3-6; Kol. 3:12-14; Gal. 5:22, 23.
(8) Soki bozali na bana, bosengeli kolinga bango, kobɔkɔla bango malamu mpe kopesa bango disiplini.—Tito 2:4; Ef. 6:4; Mas. 13:24; 29:15.