Kondima ya Noa ekweisi mokili
OYOKÁ lisolo ya Noa, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, oyo atongaki masuwa mpo na kobatela bomoi ntango mpela esalemaki na mokili mobimba? Atako lisolo yango ezali mpenza ya kala, bamilio ya bato bayebi yango. Kasi eloko oyo bato mingi bayebaka te ezali ete bomoi ya Noa ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso.
Mpo na nini tosengeli kotalela lisolo oyo eumeli bankóto ya bambula? Ezali nde na bokokani kati na makambo na biso na oyo ya Noa? Soki bokokani ezali, ndenge nini tokoki kozwa litomba na ndakisa na ye?
Mokili na ntango ya Noa
Soki totaleli badati engebene Biblia tokomona ete Noa abotamaki na mobu 2970 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elingi koloba mbula 126 nsima ya liwa ya Adama. Na ntango ya Noa, mokili etondaki na mobulu, mpe bato mingi na kati ya bakitani ya Adama balandaki nzela mabe ya nkɔkɔ na bango. Bongo, “[Yehova] amonaki ete masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.”—Genese 6:5, 11, 12.
Soki Yehova asepelaki te, ezalaki te kaka mpo ete bato batombokaki. Lisolo ya Genese elobi ete: “Bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango. . . . [Banefilime, NW] bazalaki na mokili na mikolo yango mpe na nsima lokola, wana eyaki bana ya Nzambe epai na bana basi ya bato mpe babotelaki bango bana. Baoyo bazalaki bilombe mpe na lokumu na kalakala.” (Genese 6:2-4) Soki tokokanisi bavɛrsɛ yango na maloba oyo ntoma Petelo akomaki, tomoni ete “bana babali ya Nzambe” oyo balobeli na bavɛrsɛ yango ezali nde baanzelu oyo bazangaki botosi. Banefilime ezalaki bana oyo babotamaki na bosangisi nzoto oyo endimami te kati na basi mpe baanzelu batomboki oyo balataki nzoto ya bato.—1 Petelo 3:19, 20.
Nkombo “Nefilime,” elimboli “Bakweisi,” elingi koloba bato oyo bakweisaka bato mosusu. Bazalaki bato ya mobulu mingi, mpe masumu ya batata na bango oyo bamipesaki na etamboli ya mbindo ekokani na misala ya mbindo oyo bato ya Sodomo na Gomola bazalaki kosala. (Yuda 6, 7) Bana yango elongo na batata na bango bamemaki mpenza mabe ya koleka ndelo na mokili.
‘Moto ya sembo kati na bato ya ntango na ye’
Mabe elekaki mpenza ndelo, yango wana Nzambe azwaki mokano ya koboma bato. Kasi lisolo oyo epemami elobi boye: “Kasi Noa azwaki ngɔlu na miso ya [Yehova] . . . . Noa azalaki moto ya sembo mpe ya boyengebene kati na bato ya ntango na ye. Noa atambolaki na Nzambe elongo.” (Genese 6:8, 9) Ndenge nini Noa akokaki ‘kotambola elongo na Nzambe’ na kati ya mokili oyo eboyaki Nzambe, mpe ebongaki mpenza na kobomama?
Na ntembe te, Noa ayekolaki makambo mingi epai ya Tata na ye Lemeke, moto ya kondima oyo azalaki na bomoi na eleko moko na Adama. Ntango apesaki mwana na ye ya mobali nkombo Noa (oyo elimboli ntango mosusu “Bopemi,” to “Libɔndisi”), Lemeke asakolaki ete: “Ye oyo akobɔndisa biso kati na bolɔzi mpe mosala makasi ya mabɔkɔ na biso epai na mokili oyo [Yehova alakelaki yango mabe, NW].” Esakweli wana ekokisamaki ntango Nzambe alongolaki elakeli mabe oyo alakelaki mabele.—Genese 5:29; 8:21.
Elingi koloba te ete soki ozali na baboti oyo babangaka Nzambe, yo mpe okozala kaka na elimo ya malamu; moto na moto asengeli kosala boyokani na ye moko elongo na Yehova. Noa ‘atambolaki elongo na Nzambe’ mpe alandaki nzela oyo Nzambe asepelaki na yango. Makambo oyo Noa ayekolaki na ntina na Nzambe etindaki ye na kosalela Ye. Kondima ya Noa etɛngatɛngaki te ntango Nzambe ayebisaki ye mokano na ye ya ‘kobebisa mosuni nyonso na mpela.’—Genese 6:13, 17.
Noa andimaki mpenza ete likambo wana ya nsɔmɔ ekosalema atako mosusu ya ndenge wana esalemá naino te; yango wana atosaki etinda ya Yehova ete: “Salá masuwa mpo na yo na nzete ya gofele. Salá biteni kati na masuwa mpe pakolá yango na kati mpe na libándá na mpaka.” (Genese 6:14) Kotosa makambo nyonso ya mikemike oyo Nzambe apesaki mpo na kotonga masuwa ezalaki likambo moke te. Kasi, “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:22) Noa asalaki yango na lisalisi ya mwasi na ye mpe ya bana na ye ya mibali Semi, Hama, mpe Yefete na basi na bango. Yehova apambolaki kondima na bango. Oyo nde ndakisa malamu mpo na mabota lelo oyo!
Kotonga masuwa esɛngaki makambo nini? Yehova atindaki Noa atonga sanduku moko monene ya mabaya, oyo esengelaki ata moke te kokɔtisa mai, esengelaki kozala na bitaze mibale, na bolai ya mɛtrɛ 133, na bonene ya mɛtrɛ 22 mpe na bosanda (hauteur) ya mɛtrɛ 13. (Genese 6:15, 16) Masuwa yango ezalaki monene lokola bamasuwa minene ya ntango na biso.
Oyo nde mosala monene! Tokoki mpenza koloba ete yango ezangaki te kosɛnga kokweisa ebele ya banzete, kotindika yango tii na esika oyo masuwa yango ezalaki kotongama, mpe kokatakata yango mpo ekóma mabaya. Esɛngaki kotonga bibuteli (échafaudage), kosala bikangiseli ya mabaya, koluka gudrɔ to mpaka mpo na kopakola masuwa mpo mai ekɔta te, koluka biloko oyo ekosalisa mpo na kobomba biloko mosusu mpe bisaleli, mpe bongo na bongo. Ekoki mpe kozala ete mosala yango esɛngaki bango bákutanaka na batɛki-biloko mpo na kosomba biloko mpe esɛngaki kofuta bato oyo bazalaki kosalela bango misala mosusu. Ezalaki mpenza kosɛnga koyeba mosala ya mabaya mpo na kokangisa mabaya malamumalamu mpe kotonga masuwa moko ya makasi. Mpe kanisá naino, ekoki mpenza kozala ete mosala ya kotonga eumelaki mbula 50 to 60!
Nsima na yango, Noa asengelaki kotalela makambo etali kobongisa bilei mwa mingi mpo na bango mpe mpo na banyama. (Genese 6:21) Asengelaki koyanganisa mpe kokamba ebele ya banyama na kati ya masuwa. Noa asalaki nyonso oyo Nzambe atindaki ye; mpe na nsima, mosala yango esilaki. (Genese 6:22) Lipamboli ya Yehova nde esalisaki Noa ete asilisa mosala wana nyonso.
“Mosakoli ya boyengebene”
Longola mosala ya kotonga masuwa, Noa azalaki kokebisa bato ya ntango na ye mpe asalelaki Nzambe na bosembo lokola “mosakoli ya boyengebene.” Kasi bato yango “batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”—2 Petelo 2:5; Matai 24:38, 39, NW.
Na kotalela ndenge elimo mpe bizaleli ya bato ebebaki na ntango wana, ezali mpasi te mpo na komona ndenge bato ya kozanga kondima oyo bazalaki zingazinga ya libota ya Noa bazalaki kosɛka, kotumola mpe kotyola libota yango. Bato bamonaki bango mpenza ete bazali na ligboma. Atako bongo, Noa alongaki kosunga mpe kolendisa libota na ye na elimo, mpamba te bango nyonso balandaki te bizaleli ya mobulu, ya nsɔni mpe ya botomboki ya bato ya ntango na bango, oyo baboyaki Nzambe. Na maloba mpe na misala na ye oyo emonisaki kondima, Noa akweisaki mokili ya ntango wana.—Baebele 11:7, NW.
Babatelami na mpela
Mwa moke liboso ete mbula ebanda konoka, Nzambe ayebisaki Noa akɔta na masuwa oyo esilaki kotongama. Ntango libota ya Noa mpe banyama bakɔtaki na masuwa, “[Yehova] akangaki ekuke,” bongo makɛlɛlɛ ya batyoli ekokaki kokɔta kuna lisusu te. Ntango Mpela eyaki, emonanaki lokola ete baanzelu oyo batombokaki batikaki nzoto ya mosuni mpo bákufa te. Kasi ezalaki boni mpo na bamosusu? Bikelamu nyonso ya bomoi oyo etikalaki na mabele kasi na libándá ya masuwa, ata mpe Banefilime, bango nyonso bakufaki! Kaka Noa na libota na ye nde babikaki.—Genese 7:1-23.
Noa na libota na ye baumelaki soki mbula moko na mikolo zomi na kati ya masuwa. Kuna na kati bazalaki kosala mosala ya koleisa banyama mpe kopesa bango mai ya komɛla, kolongola basalite, mpe kotala ndenge mikolo ezalaki koleka. Na ntango ya Mpela, mokanda ya Genese elobeli likambo na likambo oyo ezalaki koleka mpe dati oyo likambo yango elekaki, lokola mokanda ya kapitene ya masuwa; yango emonisi ete lisolo ya Noa ezalaki mpenza solo.—Genese 7:11, 17, 24; 8:3-14.
Ntango bazalaki na kati ya masuwa, na ntembe te Noa azalaki kosolola masolo ya elimo na libota na ye mpe kotɔnda Nzambe. Ekoki mpenza kozala ete ezali mpo na Noa na libota na ye nde lelo oyo toyebi lisolo ya makambo oyo elekaki liboso ya Mpela. Masolo ya solosolo oyo bayokaki epai ya bato ya kala to mpe oyo ekomamaki na mikanda oyo bazalaki na yango esalisaki bango bázala na makambo ya ntina mpo na koyekola na ntango oyo Mpela ezalaki kosalema.
Oyo nde esengo Noa na libota na ye bazalaki na yango ntango banyataki lisusu mabele ya kokauka! Likambo ya liboso oyo asalaki ezalaki kotonga etumbelo mpe asalaki lokola nganga mpo na libota na ye, elingi koloba atumbelaki Moto oyo abikisaki bango mbeka.—Genese 8:18-20.
“Lokola ezalaki mikolo ya Noa”
Yesu Klisto alobaki ete: “Lokola ezalaki mikolo ya Noa, koya ya Mwana ya moto ekozala bongo.” (Matai 24:37) Lelo oyo, baklisto bazali mpe basakoli ya boyengebene, bazali kolendisa bato bábongola mitema. (2 Petelo 3:5-9) Lokola makambo na biso na oyo ya Noa ekokani, tokoki komituna makanisi ya Noa ezalaki nini liboso ya Mpela. Eyelaki ye ata mokolo moko akanisa ete mosala na ye ya kosakola ezalaki na ntina moko te? Azalaki kolɛmba na bambala mosusu? Biblia elobi eloko te mpo na yango. Eyebisi biso kaka ete Noa atosaki Nzambe.
Omoni na makambo nini biso mpe tokoki kolanda ndakisa ya Noa? Atosaki Yehova atako akutanaki na botɛmɛli mpe mikakatano. Yango wana Yehova atalelaki ye ete azalaki moyengebene. Libota ya Noa bayebaki mpenzampenza te ntango nini Nzambe akoyeisa Mpela, kasi bayebaki ete ekoya kaka. Kondima oyo Noa azalaki na yango na liloba ya Nzambe nde ebatelaki ye na boumeli ya bambula ya mosala makasi mpe na boumeli ya ntango nyonso oyo azalaki kosala mosala ya kosakola, oyo ekokaki komonana lokola nde ete ezali mosala ya mpunda. Biblia elobi ete: “Na kondima, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye; mpe na nzela ya kondima wana akweisaki mokili mpe akómaki mozwi-ya-libula ya boyengebene oyo ezali engebene kondima.”—Baebele 11:7, NW.
Ndenge nini Noa akómaki na kondima motindo wana? Na ntembe te, azalaki kozwa ntango ya komanyola likoló ya makambo nyonso oyo ayokaki na ntina na Yehova mpe amitambwisaki na kolanda boyebi yango. Ntembe ezali te ete Noa azalaki kosolola na Nzambe na libondeli. Ayebaki Yehova mingi mpenza yango wana ‘atambolaki elongo na Nzambe.’ Lokola mokonzi ya libota, Noa apesaki libota na ye ntango mpe bolingo, asalaki yango na motema moko mpenza. Yango etalelaki mpe kokokisa bamposa ya elimo ya mwasi na ye, ya bana na ye misato ya mibali mpe ya basi ya bana na ye.
Lokola Noa, baklisto ya solo lelo oyo bayebi ete etikali moke Yehova aboma ebongiseli oyo ya bato oyo batyolaka ye. Toyebi mokolo mpe ngonga yango te, kasi tososoli ete soki tomekoli kondima mpe botosi ya “mosakoli [yango] na boyengebene,” nsuka ekozala “kobatelama ya molimo na bomoi.”—Baebele 10:36-39, NW.
[Etanda na lokasa 29]
Mpela esalemaki mpenza?
Bato ya mayele oyo bayekolaka lolenge ya bomoi ya bato basangisaki masapo 270 oyo ezali kolobela mpela yango, masapo yango euti epai ya bato ya bituluku mpe bikólo nyonso. Claus Westermann, nganga-mayele, alobi ete: “Bipai nyonso na mokili okokuta lisolo ya mpela. Ndenge moko na lisolo oyo elobelaka ndenge biloko ezalisamaki, lisolo ya mpela ezali mpe moko ya makambo ya ntina oyo bankɔkɔ batikelá biso. Ezali mpenza likambo ya kokamwa na komona ete bipai nyonso na mokili tozali kokuta masolo oyo elobelaka mpela moko monene oyo esalemá na ntango ya kalakala.” Mpo na nini boye? Enrico Galbiati, molimboli-makambo, alobi ete: “Ndenge lisolo ya mpela ezali komonana epai ya bato ya bikólo ndenge na ndenge mpe oyo bafandi na bamboka oyo ekabwani na ntaka molai mpenza, yango ezali elembo ete likambo oyo esimbi masapo wana ezali likambo oyo esalemaki mpenza.” Kasi, koleka makambo oyo bato wana ya mayele balobi, eloko oyo ezali na ntina mingi epai ya baklisto ezali oyo: bayebi ete Yesu ye moko alobelaki Mpela lokola likambo oyo esalemaki mpenza na ntango ya kala.—Luka 17:26, 27.
[Etandana lokasa 30]
Banefilime na kati ya masapo?
Masapo oyo elobelaka ndenge banzambe bazwaki bato lokola bamakango, bakisa mpe “bilombe” to “mwa banzambe” oyo babotamaki na bosangani wana, ezalaki kolobama ezala na teoloji ya Bagrɛki, ya Baezipito, ya Ba-Ougarite, ya Ba-Hourrite, to mpe ya bato ya Mezopotami. Banzambe ya masapo ya Bagrɛki bazalaki lokola bato mpe bazalaki kitoko mingi. Bazalaki kolya, komɛla, kolala, mpe kosangisa nzoto; bazalaki koswana, kobunda, kozimbisa bato, mpe kobebisa basi. Atako bazalaki kozwa bango ete bazali basantu, bazalaki na likoki ya kokosa mpe kosala mobulu. Ezalaki kolobama ete bilombe, lokola Achille, bazalaki bana ya banzambe mpe ya bato mpe bapesaki bango makoki oyo eleki ya bato; atako bongo bazalaki kokufa. Yango wana, makambo oyo mokanda ya Genese elobi na ntina etali Banefilime esalisi biso tóyeba ndenge nini masapo motindo wana ekokaki kobanda.