Okoki kosepelisa Nzambe
BISO bato tokoki nde kosepelisa Nzambe to koyokisa ye mawa? Nzambe akoki nde koyoka esengo? Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe ezali kaka nguya moko boye. Nguya ekoki kosepela? Te. Nzokande, talá oyo Biblia elobi na ntina na Nzambe.
Yesu Klisto alobaki ete “Nzambe azali elimo.” (Yoane 4:24) Elimo akeseni na moto oyo azali na mai ná makila. Atako tomonaka elimo te, azalaka na nzoto, babengi yango “nzoto ya elimo.” (1 Bakolinti 15:44; Yoane 1:18) Biblia elobaka na maloba ya elilingi ete Nzambe azali na miso, matoi, mabɔkɔ, mpe binama mosusu.a Lisusu, Nzambe azali na nkombo; nkombo na ye Yehova. (Nzembo 83:18) Na bongo, Nzambe oyo Biblia ezali koteya azali moto ya elimo. (Baebele 9:24) “Ye Nzambe ya bomoi, ye Mokonzi libela.”—Yilimia 10:10.
Lokola Yehova azali na bomoi, azali na likoki ya kokanisa mpe kosala. Azali na bizaleli mpe na motema, azali na makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka. Kutu, Biblia elobeli makambo mingi oyo Nzambe alingaka mpe oyo aboyaka. Bato bapesaka bikeko oyo bango moko basali mpo básambelaka lolenge ya bato mpe balobaka ete biloko oyo bango babengaka banzambe ezalaka na bizaleli ya bato; nzokande, Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, azali Mobandisi ya makanisi mpe bamposa oyo atyá na mitema ya bato.—Genese 1:27; Yisaya 44:7-11.
Ntembe ezali te ete Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Asepelaka na bikelamu na ye mpe azalaka na esengo ya kokokisa mokano na ye. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki boye: “Nakokokisa mokano mobimba na ngai. . . . Ngai nasili koloba yango mpe nakosala yango, nakani yango mpe nakokokisa yango.” (Yisaya 46:9-11) Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “[Yehova] akosepela na misala na ye.” (Nzembo 104:31) Kasi, ezali na likambo mosusu oyo esepelisaka Nzambe. Ye moko alobi boye: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema ngai.” (Masese 27:11) Kanisá naino: biso bato tokoki kosepelisa Nzambe!
Ndenge oyo tokoki kosepelisa motema ya Nzambe
Tótalela ndenge oyo Noa asepelisaki motema ya Yehova. Noa “azwaki ngɔlu na miso ya [Yehova]” mpamba te “azalaki moto ya . . . boyengebene kati na bato ya ntango na ye.” Noa akesanaki mpenza na bato mabe ya ntango wana, mpamba te kondima mpe botosi na ye esepelisaki Nzambe; yango wana, Biblia elobi ete “Noa atambolaki na Nzambe elongo.” (Genese 6:6, 8, 9, 22) “Na kondima Noa . . . amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.” (Baebele 11:7) Yehova asepelaki na Noa mpe abikisaki ye ná libota na ye na ntango wana oyo mokili ezalaki na yikiyiki.
Abalayama mpe ayebaki ndenge oyo Yehova ayokaka na motema ntango moto asali mabe to malamu. Abalayama amonisaki ete ayebi mpenza ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo ntango Yehova ayebisaki ye ete alingi koboma Sodoma ná Gomola mpo na misala mabe na yango. Abalayama ayebaki Yehova malamu; yango wana, alobaki ete Nzambe akoki te koboma moto ya sembo nzela moko na moto mabe. (Genese 18:17-33) Bambula mingi na nsima, Abalayama atosaki Nzambe; mpo na yango, “ekoki kolobama ete akabaki Yisaka mbeka” mpo “atalelaki Nzambe ete azalaki na likoki ya kolamwisa ye ata na bakufi.” (Baebele 11:17-19; Genese 22:1-18) Abalayama ayebaki mpenza makanisi ya Nzambe mpe amonisaki kondima makasi mpe botosi, yango wana “akómaki kobengama ‘moninga ya Yehova.’”—Yakobo 2:23.
Moto mosusu oyo azalaki kosala nyonso mpo na kosepelisa motema ya Nzambe ezali Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala. Yehova alobaki na ntina na ye ete: “Nazwi Davidi mwana ya Yese, moto oyo motema na ngai esepeli na ye, oyo akosala makambo nyonso oyo nazali na yango mposa.” (Misala 13:22) Liboso abunda na engambe Goliata, Davidi atyelaki Nzambe motema mobimba mpe alobaki na Mokonzi Saulo boye: “[Yehova] oyo abikisaki ngai na manzaka ya nkɔsi mpe na manzaka ya ngombolo, ye akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.” Lokola Davidi atyelaki Yehova motema, Yehova apambolaki ye mpe apesaki ye makasi ya koboma Goliata. (1 Samwele 17:37, 45-54) Davidi alingaki ete misala na ye kaka te, kasi mpe ‘maloba ya monɔkɔ na ye mpe makanisi ya motema na ye endimama liboso ya Yehova.’—Nzembo 19:14.
Ezali boni mpo na biso? Ndenge nini tokoki kosepelisa Yehova? Ntango tozali koyeba malamumalamu ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo, tokoyeba mpe oyo tokoki kosala mpo na kosepelisa motema na ye. Na bongo, ntango tozali kotánga Biblia, ezali na ntina tósalaka makasi ya koyeba makanisi ya Nzambe mpo ‘tótonda na boyebi ya solosolo ya mokano na ye na kati ya bwanya nyonso mpe bososoli ya elimo, mpo na kotambola na ndenge ebongi na Yehova mpo tósepelisa ye mpenza.’ (Bakolose 1:9, 10) Na nsima, boyebi yango ekolendisa kondima na biso. Yango ezali na ntina mingi mpamba te, “na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te.” (Baebele 11:6) Soki tozali kosala nyonso mpo tókóma na kondima makasi mpe soki tozali kosala mokano ya Yehova na bomoi na biso, tokosepelisa motema na ye. Kasi, tosengeli mpe kokeba ete tóyokisa Yehova mpasi na motema te.
Kolinga te koyokisa Yehova mpasi na motema
Lisolo ya ntango ya Noa epesi ndakisa moko oyo ezali komonisa ndenge oyo bato bakoki koyokisa Yehova mpasi na motema. Na ntango wana, “mokili etondaki na yauli. Nzambe atalaki mokili mpe yango ezalaki mabe mpenza, mpo ete bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.” Nzambe ayokaki ndenge nini na motema ntango atalaki misala ya mabe mpe mobulu oyo etondaki na mokili? Biblia elobi ete: “[Yehova] ayokaki mawa ete asalaki bato kozala na nse, mpe likambo yango epesaki ye bolɔzi na motema.” (Genese 6:5, 6, 11, 12) Nzambe ayokaki mawa na komona ndenge etamboli ya bato ekómaki mabe; yango wana, makanisi na ye ebongwanaki mpo na bato oyo bazalaki liboso ya Mpela. Lokola Nzambe asepelaki ata moke te na misala mabe na bango, atikaki komitalela lokola Mozalisi na bango; akómaki na makanisi ya koboma bango.
Lisusu, Yehova ayokaki mabe ntango bato ya libota na ye moko, elingi koloba ekólo Yisalaele, bazalaki kokipe te ndenge oyo azalaki koyoka mpo na misala na bango mpe baboyaki kolanda toli malamu oyo azalaki kopesa bango. Na mawa mpenza, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Mbala boni batombokelaki ye kati na lisobe mpe batungisaki ye na esika ya zɛlɔ! Ɛ babongwanaki mpe bamekaki Nzambe lisusu; bayokisaki Oyo ya bulɛɛ ya Yisalaele nkanda.” Kasi, “ye atondaki na mawa, alimbisaki bango bokesene na bango mpe abomaki bango te. Mbala mingi abombaki nkɛlɛ na ye mpe alingaki ete nkanda na ye ebima nyonso te.” (Nzembo 78:38-41) Biblia elobi ete atako Bayisalaele bazalaki kobuka mbuma mabe ya masumu na bango, “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, [Nzambe] azalaki koyoka motema mpasi.”—Yisaya 63:8-9, NW.
Atako emonanaki polele ete Nzambe alingaki bango mingi, Bayisalaele “bazalaki kosɛka bantoma ya Nzambe mpe kotyola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda ya [Yehova] epelisami liboso ya bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.” (2 Ntango 36:16) Nsukansuka, lokola balekaki motó makasi mpe bazalaki batomboki, “bayokisaki [elimo, NW] na ye ya bulɛɛ mawa” mpe Yehova atikaki kosepela na bango. (Yisaya 63:10) Esukelaki bango ndenge nini? Nzambe atikaki kobatela bango, mpe bamonaki bwale ntango bato ya Babilone bakɔtaki na Yuda mpe babomaki engumba Yelusaleme. (2 Ntango 36:17-21) Ezali mpenza mawa mpo na bato soki baponi kosala makambo oyo epesaka Mozalisi na bango mpasi mpe mawa!
Biblia emonisi polele ete kozanga bosembo epesaka Nzambe mpasi na motema. (Nzembo 78:41) Na kati ya makambo oyo epesaka Nzambe mpasi na motema, to oyo ayinaka, tokoki kotánga lolendo, lokuta, koboma, maji, koyebisa bato makambo oyo ekokómela bango, kosambela bato oyo bakufá, misala ya mbindo, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, ekobo, kosangisa nzoto na ndeko, mpe konyokola babola.—Levitike 18:9-29; 19:29; Deteronome 18:9-12; Masese 6:16-19; Yilimia 7:5-7; Malaki 2:14-16.
Ndenge nini Yehova atalelaka losambo ya bikeko? Exode 20:4, 5 elobi boye: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi ya eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse ya mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te.” Mpo na nini? Mpamba te ekeko ‘ezali mbindo na miso ya Yehova.’ (Deteronome 7:25, 26) Ntoma Yoane apesaki toli oyo: “Bana mike, bókeba na bikeko.” (1 Yoane 5:21) Mpe ntoma Paulo akomaki ete: “Balingami na ngai, bókima losambo ya bikeko.”—1 Bakolinti 10:14.
Luká ete Nzambe asepela na yo
Nzambe azalaka “moninga ya motema ya bato ya sembo.” Baoyo bazali “sembo na etamboli na bango basepelisaka ye.” (Masese 3:32, NW; 11:20, NW) Nzokande, etikali moke Nzambe aboya bato oyo bazali kopesa ye mpasi na motema mpo bazali motó makasi to bazali komona mpamba makanisi na ye ya sembo. (2 Batesaloniki 1:6-10) Etikali moke asukisa mabe oyo etondi lelo na mokili.—Nzembo 37:9-11; Sefania 2:2, 3.
Kasi, Biblia ezali komonisa polele ete Yehova “alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Asepelaka mingi komonisa bolingo na ye epai ya bato ya sembo oyo balingaka ye, kasi te na komonisa nkanda na ye epai ya bato ya motó makasi. Yehova asepelaka “na liwa ya moto mabe te, bobele ete moto mabe abongwana na nzela na ye mpe abika.”—Ezekiele 33:11.
Maloba wana ezali komonisa ete moto nyonso azali na likoki ya kokima nkanda ya Yehova. “Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Soki otye elikya na yo mobimba na ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo, okoki ‘kobwaka mitungisi na yo nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka yo likebi.’ (1 Petelo 5:7) Yebá ete Nzambe akondima bato oyo bazali kosepelisa motema na ye mpe bakokóma baninga na ye. Yango wana, sikoyo nde ntango ya ‘kokoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo.’—Baefese 5:10.
Ezali mpenza esengo ete Nzambe, na boboto monene na ye, amonisi biso bizaleli malamu mpe ndenge oyo atalelaka makambo! Kutu, yo mpe okoki kosepelisa motema na ye. Soki olingi kosepelisa motema ya Nzambe, tolendisi yo okutana na Batatoli ya Yehova na esika ofandi. Bakozala na esengo mingi ya komonisa yo makambo oyo ebongi mpe oyo moto akoki mpenza kosala mpo na kosepelisa Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etanda “Mpo na nini Biblia ezali kolobela Nzambe lokola moto?”
[Etanda na lokasa 7]
Mpo na nini Biblia ezali kolobela Nzambe lokola moto?
Lokola “Nzambe azali elimo,” tokoki te komona ye na miso. (Yoane 4:24) Yango wana, Biblia esaleli maloba ya elilingi, lokola masese, bokokanisi, mpe makambo oyo ekoki kolobama mpo na moto, mpo na kosalisa biso tómona nguya, bonene, mpe misala ya Nzambe. Mpo na yango, atako toyebi te lolenge oyo nzoto ya Nzambe ezali, Biblia elobaka ete Nzambe azali na miso, matoi, mabɔkɔ, misapi, makolo, mpe motema.—Genese 8:21; Exode 3:20; 31:18; Yobo 40:9; Nzembo 18:9; 34:15.
Ndenge wana ya koloba elimboli te ete nzoto ya elimo ya Nzambe ezali na binama lokola ya nzoto ya bato. Elobeli wana esalisaka kaka bato báyeba Nzambe malamu. Soki basaleli maloba wana ya elilingi te, ekozala mpasi kolobela Nzambe na ndenge oyo bato bakokanga ntina. Kasi, yango elingi koloba te ete bato nde basalá Nzambe na makanisi na bango. Biblia elobi polele ete Nzambe akelaki moto na elilingi na ye, kasi te ete Nzambe asalemaki na elilingi ya moto. (Genese 1:27) Lokola bato oyo bakomaki Biblia ‘bapemamaki na Nzambe,’ ndenge oyo balobelaki bomoto ya Nzambe ezali nde ndenge oyo Nzambe amonisi bizaleli na ye, bizaleli oyo atyaki epai ya moto mokomoko oyo akelá. (2 Timote 3:16, 17) Ezali te bizaleli ya moto oyo apesi na Nzambe, kasi ezali nde bizaleli ya Nzambe oyo atyá na kati ya moto.
[Elilingi na lokasa 4]
Noa azwaki ngolu na miso ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 5]
Abalayama ayebaki ndenge oyo Nzambe ayokaka na motema
[Elilingi na lokasa 6]
Davidi atyelaki Yehova motema mobimba
[Elilingi na lokasa 7]
Soki ozali kotánga Biblia, okoyeba ndenge ya kosepelisa Nzambe
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Na ndingisa ya Anglo-Australian Observatory, fɔtɔ ya David Malin