Biblia—Buku oyo ezali na bisakweli ya solosolo, Eteni 1
“Nakosala ete ekólo moko monene euta na yo”
Na nimero oyo ya “Lamuká!” mpe na banimero mosusu oyo ekolanda, tokolobela masolo ya biteni mwambe oyo ekomonisa likambo moko ya ntina mingi oyo etali Biblia—bisakweli na yango. Masolo yango ekosalisa biso tózwa biyano na mituna oyo: Bisakweli ya Biblia ezali kaka makanisi ya bato ya mayele? Ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe? Tosɛngi yo otalela naino makambo oyo elandi.
NTEMBE to kozanga kondima ezali ezaleli oyo bato mingi bazali na yango na eleko na biso, mpe yango emonanaka na ndenge oyo bato mosusu batalelaka Biblia. Likambo ya mawa, bato mingi bazwá naino ntango te ya kotalela na bosembo nyonso makambo oyo ezali na Biblia. Balandaka kaka makambo oyo bato mosusu balobaka. Ntango mosusu ezali bongo te mpo na yo. Soki ezali bongo, tosɛngi yo otalela elongo na biso makambo oyo eleká kala mpo na komona makambo oyo endimisi ete Biblia ezali solo.
Tokobanda na mobali moko oyo Bakristo, Bayuda mpe Bamizilma bamemyaka ye tii lelo. Azalaki Moebre mpe azalaki na bomoi na mobu 2018 tii na mobu 1843 L.T.B.a Nkombo na ye ezalaki Abrahama.b
Bisakweli mosusu ya ebandeli mpenza ya Biblia elobelaki Abrahama, bisakweli yango etali mpe biso lelo oyo. (Talá etanda “Lipamboli mpo na ‘bikólo nyonso.’”) Nakotalela mokanda ya Ebandeli, bisakweli yango ezali na makambo oyo elandi: (1) Bakitani ya Abrahama bakokóma ekólo moko ya nguya. (2) Ntango esakweli yango ekobanda kokokisama, bakokóma baombo na mokili ya bapaya. (3) Bakosikolama mpe bakozwa libula ya mabele ya Kanana. Tótalela sikoyo bisakweli yango na mozindo.
Bisakweli misato ya ntina mingi
Esakweli 1: “Nakosala ete ekólo moko monene euta na yo [Abrahama].”—Ebandeli 12:2.
Ndenge ekokisamaki: Bakitani ya Abrahama oyo bautaki na nzela ya Yisaka mpe Yakobo (oyo abengamaka mpe Yisraele) bakómaki ekólo Yisraele, oyo ezalaki koyangelama na bakonzi na yango moko.
Makambo oyo eleká emonisi nini?
● Biblia elobeli na mozindo molɔngɔ ya bato ya libota ya Abrahama, ata mpe baoyo bautaki na nzela ya Yisaka, Yakobo mpe bana 12 ya Yakobo. Molɔngɔ ya bankɔkɔ yango ezali mpe na bakonzi mingi oyo bayangelaki na Yisraele mpe Yuda. Na bakonzi yango, 17 kati na bango balobelami mpe na mikanda mosusu ya mokili, yango eyokani na makambo oyo Biblia elobeli na ndenge oyo bakitani ya Abrahama na nzela ya Yisaka mpe Yakobo bakómaki ekólo mobimba.c
Esakweli 2: “Momboto na yo ekokóma mopaya, ekofanda na mokili oyo ezali ya bango te, mpe bakosalela bango . . . Kasi na libota ya minei, bango bakozonga awa.”—Ebandeli 15:13, 16.
Ndenge ekokisamaki: Mpo na nzala oyo ekɔtaki na Kanana, libota ya minei ya bakitani ya Abrahama bakómaki kofanda na Ezipito, liboso bazalaki kofanda lokola bapaya, kasi na nsima bakómisaki bango baombo mpo na kosala babriki na mabele mpe matiti. Soki totaleli kaka libota moko, oyo ya Levi, nkɔkɔ ya Abrahama, oyo akendaki na Ezipito elongo na tata na ye oyo akómaki mobange, mabota minei yango ezali (1) Levi, (2) mwana na ye Kohate, (3) nkɔkɔ na ye Amirame, mpe (4) Moize, nkɔkɔ ya nkɔkɔ na ye. (Kobima 6:16, 18, 20) Na mobu 1513 L.T.B., Moize abimisaki Bayisraele na Ezipito.—Talá badati oyo ezali awa na nse mpe etanda “Badati ya sikisiki.”
Makambo oyo eleká emonisi nini?
● James Hoffmeier, profesɛrɛ moko oyo atalaka makambo etali kondimana ya kala mpe arkeoloji ya Proche-Orient, alobi ete makomi ya Ezipito mpe biloko oyo bakundoli emonisi ete Ba-Semite (na ndakisa Baebre), bapesaki bango nzela ya kokɔta na Ezipito elongo na bitonga na bango ya bangɔmbɛ, na eleko ya nzala. Kasi, Bayisraele oyo bakómaki baombo kuna, bapesaki bango mosala ya kosala babriki?
● Atako makomi ya kala ya Ezipito elobeli Bayisraele polele te, kasi mayemi oyo batyá na malita ya Ezipito mpe barulo emonisi ete ekólo yango ezalaki kosalela bapaya mpo na kosala babriki na matiti mpe pɔtɔpɔtɔ ya mabele. Na boyokani na oyo Biblia elobi, makomi ya kala ya Ezipito emonisi mpe ete bakapita ya misala yango bazalaki kokoma motángo ya briki oyo basengelaki kosala. (Kobima 5:14, 19) Hoffmeier alobi boye: “Makomi ya Ezipito emonisi ete na boumeli ya eleko oyo bazalaki konyokola Bayisraele, bazalaki kotinda bapaya basala mosala na makasi . . . Na mokuse, koya ya Baebre na Ezipito . . . na eleko oyo nzala ekɔtaki mpe ndenge oyo bakómisaki bango baombo na nsima, ezali mpenza solo.”
Esakweli 3: “Nakopesa . . . momboto na yo . . . mokili mobimba ya Kanana.”—Ebandeli 17:8.
Ndenge ekokisamaki: Atako Moize abimisaki ekólo ya Yisraele na Ezipito, Yosua, mwana ya Nunu, akambaki bato yango na mokili ya Kanana na mobu 1473 L.T.B.
Makambo oyo eleká emonisi nini?
● Atako bato ya arkeoloji bazalaka na likanisi ndenge moko te na oyo etali badati, Kitchen, profesɛrɛ moko ya kala na makambo etali Ezipito, akomaki ete “emonani mpenza ete Bayisraele bakɔtaki mpe bafandaki na Kanana.”
● Biblia elobi ete Yosua ‘azikisaki Hazore, [engumba ya Kanana] na mɔtɔ.’ (Yosua 11:10, 11) Na bitiká ya engumba yango, bato ya arkeoloji bamonaki tempelo misato ya bato ya Kanana oyo ebebisamaki mpenza. Bamonaki mpe bilembeteli oyo emonisaki ete engumba yango ezikaki na mɔtɔ na bambula ya 1400 L.T.B. Makambo wana nyonso eyokani na oyo Biblia elobi.
● Engumba mosusu ya Kanana oyo ezali na ntina ezali Gibeone, oyo ezwami na ntaka ya kilomɛtrɛ libwa na ndambo, kolongwa Yerusaleme. Bato ya arkeoloji bayebaki engumba yango ntango bamonaki bilokó soki 30 oyo ezalaki na nkombo ya engumba yango. Na kokesana na bato ya Hazore, bato ya Gibeone basalaki kimya elongo na Yosua, mpe ye apesaki bango mosala ya “kotoka mai.” (Yosua 9:3-7, 23) Mpo na nini apesaki bango mosala yango? Maloba oyo ezali na 2 Samwele 2:13 mpe Yirimia 41:12 emonisi ete bato ya Gibeone bazalaki na mai mingi. Na boyokani na maloba wana ya Biblia, buku moko (Archaeological Study Bible, New International Version) elobi boye: “Likambo oyo ekesenisaki Gibeone na bamboka mosusu ezali mai mingi oyo ezalaki na yango mpo na liziba moko ya monene mpe maziba mosusu nsambo oyo ezalaki kuna.”
● Mikanda mosusu ya mokili elobeli bato koleka zomi oyo balobelami mpe na Biblia. Ndenge tomonaki yango liboso, na liste yango, tokokuta nkombo ya bakonzi 17 oyo bautá na molɔngɔ ya Abrahama, oyo bayangelaki na Yisraele to na Yuda. Na ndakisa Ahaba, Ahaze, Davidi, Hizikiya, Manase mpe Uziya. Ndenge mikanda yango etángi biyangeli yango emonisi mpenza ete ekólo moko oyo ebengami Yisraele, ekɔtaki kaka na Kanana te, kasi efandaki mpe kuna.
● Na mobu 1896, bamonaki na Ezipito, na engumba Thèbes, libanga ya Mérneptah. Liyemi yango elobeli bitumba oyo Farao Mérneptah abundaki na Kanana na mobu soki 1210 L.T.B. Liyemi yango etángi Yisraele, yango ezali mbala ya liboso oyo ekólo yango etángami na esika mosusu, kolongola ndenge Biblia etángi yango.
Ndenge oyo Biblia elobeli makambo na bosikisiki, esalisi biso
Ndenge tomoni yango, Biblia elobeli na bosikisiki bato, bisika mpe makambo oyo esalemaki. Yango ezali kosalisa biso tóluka kokokanisa makambo oyo Biblia elobi na oyo mikanda mosusu elobi, na ndenge yango, ekosalisa biso tóndimisama ete bisakweli ya Biblia ekokisamaka. Mpo na Abrahama mpe momboto na ye, makambo oyo esalemaki, emonisi ete bilaka ya Nzambe ekokisamaki; momboto ya Abrahama ekómaki ekólo, ezalaki na boombo na Ezipito mpe na nsima, ezwaki mokili ya Kanana. Makambo nyonso wana ezali kokundwela biso maloba ya Petro, oyo na komikitisa nyonso alobaki: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”—2 Petro 1:21.
Na boumeli ya bankama ya bambula oyo elandaki, nsima ya kozwa mokili ya Kanana, lisolo ya ekólo Yisraele ebongwanaki na ndenge ya mabe. Bakomi ya Biblia basakolaki mpe makama yango, ndenge nimero oyo ekolanda ekomonisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “L.T.B.” elimboli “Liboso ya ntango na biso.”
b Liboso, nkombo ya Abrahama ezalaki Abrama.
c Talá 1 Ntango 1:27-34; 2:1-15; 3:1-24. Na boumeli ya boyangeli ya Yeroboame, mwana ya Mokonzi Salomo, ekólo Yisraele ekabolamaki na biteni mibale; bokonzi ya nɔrdi ná bokonzi ya sudi. Boye, bakonzi mibale bazalaki koyangela na ntango moko.—1 Bakonzi 12:1-24.
[Etanda na lokasa 24]
LIPAMBOLI MPO NA “BIKÓLO NYONSO”
Nzambe alakaki ete bato ya “bikólo nyonso” bakomizwela lipamboli na nzela ya momboto ya Abrahama. (Ebandeli 22:18) Ntina mpenzampenza oyo Nzambe akómisaki bakitani ya Abrahama ekólo, ezali mpo na kobimisa Masiya, oyo asengelaki kopesa bomoi na ye mpo na bato nyonso.d Na yango, elaka oyo Nzambe apesaki Abrahama etali mpe yo! Yoane 3:16 elobi boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”
[Maloba na nse ya lokasa]
d Tokolobela bisakweli oyo etali Masiya na Eteni 3 mpe 4 ya masolo oyo.
[Etanda na lokasa 24]
BADATI YA SIKISIKI
Ndakisa moko oyo ezali na 1 Bakonzi 6:1 emonisi ete badati ya Biblia ezali na bosikisiki; vɛrsɛ yango elobeli ntango oyo Mokonzi Salomo abandaki mosala ya kotonga tempelo na Yerusaleme. Tozali kotánga boye: “Esalemaki boye: na mbula ya nkama minei na ntuku mwambe [mbula 479 na mobimba na yango] nsima ya kobima ya bana ya Yisraele na mokili ya Ezipito, na mbula ya minei [ya boyangeli ya Salomo], na sanza ya Zive, elingi koloba sanza ya mibale, Salomo, nsima ya kokóma mokonzi ya Yisraele, abandaki kotonga ndako ya Yehova.”
Badati ya Biblia emonisi ete mbula ya minei ya boyangeli ya Salomo ezalaki na mobu 1034 L.T.B. Soki tozongi nsima kobanda na dati wana, mbula 479 ekomema biso na mobu 1513 L.T.B., mbula oyo Bayisraele babimaki na Ezipito.
[Etanda na lokasa 26]
ABRAHAMA—AZALAKI MPENZA NA BOMOI
● Bitanda ya mabele ya ebandeli ya milenɛrɛ ya mibale L.T.B., etángi bingumba lokola Pelege, Seruge, Nahore, Tera mpe Harane, bankombo oyo ekokani na bankombo ya bandeko ya Abrahama.—Ebandeli 11:17-32.
● Mokanda ya Ebandeli 11:31 emonisi ete Abrahama ná libota na ye bakendaki kofanda na “Ure ya Bakaladea.” Bamonaki bitiká ya engumba yango na sudi-ɛsti ya ekólo Iraq. Biblia elobi mpe ete Tera, tata ya Abrahama akufaki na Harane engumba oyo ekoki kozala lelo oyo na teritware ya ekólo Turquie, mpe Sara, mwasi ya Abrahama akufaki na Hebrone, engumba moko ya kala ya Proche-Orient oyo bato bafandaka tii lelo.—Ebandeli 11:32; 23:2.
[Etanda/Elilingi na nkasa 24, 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
BADATI YA MOMBOTO YA ABRAHAME MPE KOBIMA YA BAYISRAELE
Mabota minei ya bakitani ya Abrahama
Levi
Kohate
Amirame
Moize
(L.T.B.)
1843 Abrahama akufi
1728 Yakobo amemi libota na ye na Ezipito
1711 Yakobo akufi
1657 Yozefe akufi
1593 Moize abotami
1513 Moize abimisi Bayisraele na Ezipito
1473 Moize akufi. Yosua akɔtisi Bayisraele na mokili ya Kanana
Eleko ya Basambisi
1117 Samwele atye Saulo mafuta mpo azala mokonzi ya liboso ya Yisraele
1107 Davidi abotami
1070 Davidi akómi mokonzi ya Yisraele
1034 Salomo abandi mosala ya kotonga tempelo
[Elilingi na lokasa 25]
Libanga ya elonga ya Tel Dan, oyo ezali na likomi “Ndako ya Davidi,” ezali moko ya bisika oyo longolá Biblia, elobeli bakitani ya Abrahama oyo bayangelaki Yisraele to Yuda
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Musée ya Israël na Jérusalem/The Bridgeman Art Library International