Abalayama—Ndakisa ya moto ya kondima
“[Abalayama azalaki] tata ya bango nyonso bazali [na] kondima.”—BALOMA 4:11.
1, 2. (a) Lelo oyo, baklisto ya solo bayebaka Abalayama na likambo nini? (b) Mpo na nini babengi Abalayama ‘tata ya bango nyonso bazali na kondima’?
AZALAKI nkɔkɔ ya libota moko ya makasi, azalaki mosakoli, moto ya mombongo mpe motambwisi ya bato. Kasi lelo oyo, baklisto bayebaka ye mingi na ezaleli na ye oyo etindaki Yehova Nzambe azwa ye lokola moninga: kondima na ye makasi. (Yisaya 41:8; Yakobo 2:23) Nkombo na ye ezalaki Abalayama, mpe Biblia ebengi ye “tata ya bango nyonso bazali [na] kondima.”—Baloma 4:11.
2 Kasi, bato mosusu oyo bazalaki na bomoi liboso ya Abalayama, bato lokola Abele, Enoka mpe Noa bazalaki mpe na kondima, boye te? Ezali boye, kasi ezali elongo na Abalayama nde Nzambe asalaki kondimana mpo na kopambola bikólo nyonso ya mokili. (Genese 22:18, NW ) Yango wana, na maloba ya elilingi, akómaki tata ya bato nyonso oyo basengelaki kondimela Mombóto oyo elakamaki. (Bagalatia 3:8, 9) Tokoki mpe koloba ete Abalayama azali tata na biso mpamba te kondima na ye ezali ndakisa oyo tosengeli kolanda. Amonisaki kondima na bomoi na ye mobimba, mpamba te amekamaki mbala ebele. Kutu, liboso ete kondima ya Abalayama emekama na ndenge oyo elekaki makasi, elingi koloba ntango balobaki na ye ete akaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka, Abalayama asilaki komonisa kondima na ye na makambo mingi ya mikemike. (Genese 22:1, 2) Sikoyo, tótalela ndambo ya makambo yango oyo, na ebandeli, etyaki kondima na ye na komekama mpe tótala soki ekoki koteya biso nini lelo oyo.
Nzambe alobi na ye alongwa na Ulu
3. Biblia eyebisi biso nini mpo na libota ya Abalama mpe esika oyo akolaki?
3 Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Abalama (oyo na nsima akómaki Abalayama) ezali na Genese 11:26; vɛrsɛ yango elobi boye: “Ezalaki Tela na mbula ntuku nsambo abotaki Abalama mpe Nahola mpe Alana.” Semi, moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, azalaki nkɔkɔ ya Abalama. (Genese 11:10-24) Genese 11:31 elobi ete Abalama afandaki esika moko na bandeko na ye na “Ulu ya Bakaladi,” mboka ya bozwi mingi oyo kala ezalaki na ɛsti ya Ebale Pelata.a Elingi koloba ete Abalama abɔkwamaki na bomoi ya koyengayenga mpe kolala na ndako ya kapo te, kasi afandaki na engumba oyo ezalaki na biloko mingi ya kitoko. Bazando ya Ulu etondaki na biloko oyo ezalaki kouta bamboka mopaya. Ulu ezalaki na bandako minene, na bifelo na yango ya mpɛmbɛ, mosusu ezalaki ata na shambre 14 mpe na mai na kati.
4. (a) Basambeli ya Nzambe ya solo oyo bazalaki kofanda na Ulu bazalaki na mikakatano nini? (b) Ndenge nini Abalama akómaki kondimela Yehova?
4 Soki tolongoli biloko nyonso oyo moto akokaki kozwa na Ulu, kofanda na Ulu ezalaki mokakatano monene mpo na moto oyo alingi kosalela Nzambe ya solo. Bato ya mboka yango bamipesaki mingi na losambo ya bikeko mpe na biyambayamba. Kutu, na engumba yango ezalaki na tempelo moko oyo babengaka ziggourat; ezalaki lokola piramide molai oyo elekaki bandako nyonso mpe etongamaki mpo na kokumisa nzambe-sanza Nanna. Na ntembe te bato mosusu bazalaki kosɛngisa Abalama ete akɔta na losambo yango ya mbindo, mpe ekoki kozala ete bandeko na ye mosusu bazalaki kobenda ye na losambo yango. Masolo mosusu ya bonkɔkɔ ya Bayuda elobaka ete Tela, tata ya Abalama azalaki mosali ya bikeko. (Yosua 24:2, 14, 15) Ezala bongo to te, toyebi ete Abalama azalaki kokɔta na losambo ya lokuta te. Nkɔkɔ na ye Semi, oyo akómaki mobange, azalaki naino na bomoi mpe, na ntembe te, ayebisaki ye makambo oyo ayebaki mpo na Nzambe ya solo. Yango wana, Abalama andimelaki Yehova, kasi Nanna te!—Bagalatia 3:6.
Kondima na ye emekami
5. Ntango Abalama azalaki naino na Ulu, Nzambe alobaki na ye nini mpe alakaki ye nini?
5 Kondima ya Abalama emekamaki na nsima. Nzambe abimelaki ye mpe alobaki na ye ete: “Longwá na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako ya tata na yo, kokenda na mokili ekomonisa ngai yo. Nakozalisa yo libota monene, mpe nakopambola yo, nakozalisa nkombo na yo monene mpe okopambola bato. Nakopambola baoyo bapamboli yo mpe nakolakela mabe baoyo balakeli yo mabe; mpe mpo na yo mabota nyonso ya nse [bakomipambola, NW].”—Genese 12:1-3; Misala 7:2, 3.
6. Mpo na nini tokoki koloba ete Abalama azalaki na kondima makasi na ndenge atikaki Ulu?
6 Abalama azalaki mobange mpe azalaki na mwana te. Ndenge nini akokaki kokóma “libota monene”? Mboka oyo balobaki na ye akende ezalaki wapi? Nzambe ayebisaki ye naino yango te. Yango wana, esengelaki mpenza ete Abalama azala na kondima ya solosolo mpo atika Ulu, mboka ya bozwi mpe atika biloko kitoko na yango. Mpo na bato ya ntango ya kala, mokanda Libota mpe bolingo na kati ya Biblia (na Lingelesi) elobi boye: “Na kati ya libota, etumbu eleki makasi oyo bakokaki kopesa moto oyo asali mbeba monene ezalaki ya kobengana ye, koyebisa ye ete azali lisusu ‘moto’ ya libota yango te. . . . Yango wana tokoki koloba ete Abalayama amonisaki mpenza botosi monene mpe elikya epai ya Nzambe ntango atosaki maloba ya Nzambe, atikaki mboka na ye mpe bandeko na ye.”
7. Ndenge nini baklisto bakoki lelo oyo komekama lokola Abalama?
7 Lelo oyo, baklisto bakoki komekama ndenge yango. Lokola Abalama, bakoki kotindika biso na koluka liboso biloko ya mokili mpe kozongisa matomba ya losambo ya solo nsima. (1 Yoane 2:16) Bandeko na biso oyo bazali bandimi te, na baoyo babimisamá na lisangá, bakoki kotya biso mpanzi likoló, mpe bakoki koluka kobenda biso na boninga ya mabe. (Matai 10:34-36; 1 Bakolinti 5:11-13; 15:33) Yango wana, Abalama apesaki biso ndakisa ya malamu mpenza. Alukaki libosoliboso kozala moninga ya Yehova mpe azongisaki makambo mosusu nyonso nsima, ata boyokani na bandeko na ye. Ayebaki te soki Nzambe akokokisa bilaka na ye ndenge nini, ntango nini, to mpe epai wapi. Atako bongo, andimaki kotyela bilaka yango motema na bomoi na ye. Ndakisa na ye ezali mpenza kolendisa biso lelo oyo na kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso!—Matai 6:33.
8. Kondima ya Abalama etindaki bandeko na ye mpenza básala nini, mpe yango ekoki koteya baklisto likambo nini?
8 Bongo bandeko na ye mpenza? Na ntembe te, kondima ya Abalama elendisaki bango mingi, mpamba te, ezala mwasi na ye Salai, na Lota, mwana oyo ndeko na ye ya mobali atikaki, bandimaki kotosa Nzambe mpe kolongwa na Ulu. Na nsima, Nahola, ndeko ya Abalama na bana na ye mosusu balongwaki na Ulu mpe bakendaki kofanda na Halana, mpe kuna bazalaki kosambela Yehova. (Genese 24:1-4, 10, 31; 27:43; 29:4, 5) Kutu, ata Tela, tata ya Abalama, andimaki kokende na mwana na ye! Yango wana, Biblia elobi ete Tela nde moto amemaki bango na Kanana, mpamba te ye nde azalaki mokonzi ya libota. (Genese 11:31) Biso mpe tokoki kosalisa bandeko na biso mosusu soki tozali kopesa bango litatoli na boboto?
9. Abalama asengelaki kobongisa makambo nini mpo na mobembo na ye, mpe mpo na nini ekoki mpenza kozala ete abungisaki mbongo?
9 Liboso abanda mobembo wana, Abalama azalaki na makambo mingi ya kosala. Asengelaki kotɛka ndako mpe biloko na ye, kosomba bandako ya kapo, bakamela, bilei mpe biloko mosusu oyo basengelaki na yango. Ekoki mpenza kozala ete Abalama abungisaki mbongo mingi lokola asalaki makambo yango nokinoki, kasi asepelaki kotosa Yehova. Tokanisi ete mokolo oyo Abalama asilisaki komibongisa, abimi libándá ya Ulu na makalo na ye mpo asimba nzela ezalaki mpenza likambo monene! Batalaki na epai ya nɔrdi-wɛsti mpe bakendaki pembenipembeni ya Ebale Pelata. Nsima ya bapɔsɔ, basalaki soki kilomɛtrɛ 1000, bakómaki na Halana, mboka moko oyo ezalaki na nɔrdi ya Mesopotamia; bato mingi ya mobembo bazalaki kopema na mboka yango na makalo na bango.
10, 11. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini Abalama afandaki mwa moke na Halana? (b) Elendiseli nini tokoki kopesa baklisto oyo bazali kosalisa baboti na bango oyo bakómi mibange?
10 Abalama afandaki na Halana, mbala mosusu mpo tata na ye Tela akómaki mobange mingi. (Levitike 19:32) Lelo oyo mpe, baklisto mingi bazali na mokumba ya kobatela baboti na bango oyo bakómi mibange to bazali na maladi; bamosusu kutu bamipimeli makambo mosusu mpo na kosala yango. Soki esɛngi básala yango, bandeko yango basengeli kozala na elikya ete komipesa na bango na bolingo “ekosepelisa Nzambe.”—1 Timote 5:4.
11 Mikolo, basanza mpe bambula elekaki. “Mikolo ya Tela izalaki mbula nkama mibale na mitano, mpe Tela akufaki na Halana.” Na ntembe te lokola tata na ye akufaki, Abalama ayokaki mpasi mingi na motema, kasi, ntango basilisaki kolela ye, alekisaki lisusu mikolo mingi wana te, asimbaki lisusu nzela. “Abalama azalaki na mbula ntuku nsambo na mitano wana elongwaki ye na Halana. Mpe Abalama akamataki Salai mwasi na ye mpe Lota mwana ya ndeko na ye mpe biloko nyonso na bango, oyo [ezwaki, NW] bango, mpe basali oyo ezwi bango na Halana. Bakamataki nzela ya kokende na Kanana.”—Genese 11:32; 12:4, 5.
12. Abalama asalaki nini ntango azalaki na Halana?
12 Toyoki ete ntango azalaki na Halana, Abalama ‘azwaki biloko.’ Atako asundolaki biloko mingi ntango alongwaki na Ulu, kasi ntango alongwaki na Halana, Abalama akómaki na bozwi. Ntembe ezali te ete Nzambe nde apambolaki ye. (Mosakoli 5:19) Lelo oyo, atako Nzambe alaki basaleli na ye te ete akopesa bango bozwi, akoki kokosa te na elaka na ye ya kokokisa bamposa ya baoyo bazali kotika ‘ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi’ mpo na Bokonzi. (Malako 10:29, 30) Balobi mpe ete Abalama ‘azwaki basali.’ Mikanda mibale ya masolo ya kala (Targum de Jérusalem mpe Paraphrase chaldéenne) elobi ete Abalama ‘abongolaki bato.’ (Genese 18:19) Kondima na yo etindaka yo na kosakwela baninga na yo ya kartye, ya mosala to ya kelasi? Abalama akangaki mabɔkɔ te mpe abosanaki etinda ya Nzambe te; kutu, asalaki makambo ya ntina na mikolo oyo alekisaki na Halana. Kasi sikoyo ntango ya kotika mboka yango ekokaki. “Bongo Abalama alongwaki lokola elobelaki [Yehova] ye.”—Genese 12:4.
Akatisi Ebale Pelata
13. Abalama akatisaki Ebale Pelata na mbula nini, mpe likambo yango ezalaki na ntina nini?
13 Abalama asengelaki lisusu kozongela mobembo. Kolongwa na Halana, batalaki na ngámbo ya wɛsti mpe basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 90. Ekoki kozala ete Abalama atɛlɛmaki pembeni ya Ebale Pelata na esika oyo etalanaki na Kalekemisi, engumba moko ya mombongo. Makalo mingi ezalaki kokatisa ebale na esika yango.b Abalayama akatisaki ebale yango na makalo na ye na mbula nini? Biblia emonisi ete esalemaki mbula 430 liboso ete Bayuda bábima na boombo na Ezipito na mokolo ya 14 Nisana 1513 L.T.B. Exode 12:41 elobi boye: “Mpe na nsuka ya mbula nkama minei na ntuku misato, na mokolo yango mpenza, bibele nyonso ya [Yehova] babimaki na mokili ya Ezipito.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Yango wana, ekoki mpenza kozala ete kondimana ya Abalayama ebandaki na mokolo ya 14 Nisana 1943 L.T.B., ntango Abalama, mpo na kotosa etinda ya Nzambe, akatisaki Ebale Pelata.
14. (a) Abalama akómaki komona likambo nini na miso ya kondima? (b) Na ndimbola nini basaleli ya Nzambe lelo oyo baleki Abalama?
14 Abalama atikaki mboka moko ya bozwi. Kasi, akómaki sikoyo komona na miso ya makanisi na ye “mboka oyo ezali na miboko [ya solosolo, NW],” elingi koloba guvɛrnɛma ya sembo oyo ekoyangela bato nyonso. (Baebele 11:10) Na ntango wana, Nzambe ayebisaki Abalama makambo mingi te, kasi akómaki kososola mokemoke mokano ya Nzambe oyo etali kobikisa bato na liwa. Lelo oyo, toyebi mikano ya Nzambe koleka ndenge oyo Abalama ayebaki yango. (Masese 4:18) “Mboka,” to Bokonzi oyo Abalama azalaki kotyela elikya etyamá na likoló banda 1914. Yango wana, tosengeli mpenza kozala na mposa ya kosala misala oyo ezali komonisa kondima mpe elikya epai ya Yehova!
Na Mokili ya Ndaka
15, 16. (a) Mpo na nini Abalama asengelaki kozala na mpiko mpo na kotonga etumbelo mpo na Yehova? (b) Lelo oyo, ndenge nini baklisto bakoki kozala na mpiko lokola Abalama?
15 Genese 12:5, 6 elobi ete: “Mpe bakómaki na mokili ya Kanana. Abalama atambolaki kotala mokili yango nyonso kino esika ya Sekeme, epai na nzete makasi ya Mole.” Sekeme ezalaki na kilomɛtrɛ 50 na nɔrdi ya Yelusaleme mpe ezalaki na mokili ya malamu mpo na bilanga oyo babengaki “paladiso ya mokili mosantu.” Atako bongo, “Bakanana bazalaki na mokili yango na ntango yango.” Lokola Bakanana bazalaki bato ya misala ya mbindo, Abalama asengelaki kobatela libota na ye bálanda makambo mabe ya bato yango te.—Exode 34:11-16.
16 Mpo na mbala ya mibale, “[Yehova] amonanaki na Abalama mpe alobaki ete, Nakopesa mokili oyo na bana na yo.” Kanisá ndenge amiyokaki! Esengelaki mpenza ete Abalama azala na kondima mpo asepela na likambo oyo ye te kasi bana na ye nde bakozwa nsima na ye. Atako bongo, Abalama “atongaki etumbelo wana mpo na [Yehova] oyo amonanaki na ye.” (Genese 12:7) Molimboli moko ya Biblia alobaki ete: “Kotonga etumbelo na mokili yango ezalaki lolenge moko ya kozwa mokili yango na kotalela lotomo oyo kondima na ye epesaki ye.” Kotonga etumbelo wana elakisaki mpe ete azalaki na mpiko. Na ntembe te, etumbelo yango ezalaki lokola oyo Nzambe alimbolaki na kondimana ya Mibeko, etumbelo yango esalemi na mabanga ya mibimba. (Exode 20:24, 25) Ekesanaki mpenza na bitumbelo oyo Bakanana bazalaki kosalela. Abalama amonisaki mpenza na miso ya bato nyonso ete azali mosambeli ya Yehova, Nzambe ya solo; likambo oyo ekokaki kobotela ye likunya to kozala likama mpo na ye. Tokoloba boni mpo na biso lelo oyo? Bamosusu kati na biso, mingimingi bilenge, tobangaka komonisa baninga ya kartye to baninga ya kelasi ete tosambelaka Yehova? Tiká ete mpiko ya Abalama ezala ndakisa oyo ekolendisa biso nyonso tóyoka nsɔni te mpo tozali basaleli ya Yehova!
17. Ndenge nini Abalama amonisaki ete azali mosakoli ya nkombo ya Nzambe, mpe yango ezali kolamwisa makanisi ya baklisto na likambo nini lelo oyo?
17 Bipai nyonso oyo Abalama akendaki, azalaki kaka kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso. “Alongwaki na esika yango, akendaki na ngomba oyo ezali penepene ya Betele na epai ya ebimelo ya ntango, mpe atɛmisaki hema na ye ete Betele ezala epai na kolimwa na ntango mpe Ai epai na ebimelo ya ntango. Atongaki etumbelo lisusu kuna mpo na [Yehova], mpe abyangaki nkombo ya [Yehova].” (Genese 12:8) Maloba ya Liebele ete “kobyanga nkombo” elimboli mpe “kosakola nkombo yango.” Na ntembe te, Abalama asakolaki na molende nyonso nkombo ya Yehova epai ya Bakanana oyo bafandaki penepene na ye. (Genese 14:22-24) Yango ezali kolamwisa biso makanisi ete tozali na mokumba ya kosala mingi na mosala ya “koyambola nkombo na ye” lelo oyo.—Baebele 13:15; Baloma 10:10.
18. Ndenge nini Abalama azalaki kofanda na bato ya Kanana?
18 Abalama azalaki koumela mingi na esika moko te. “Abalama atambolaki na mobembo na ye naino epai na mokili ya ngɛlɛ,” elingi koloba mokili ekauki oyo ezali na sudi ya bangomba ya Yuda. (Genese 12:9) Lokola azalaki ntango nyonso kotambola mpe lokola, na esika nyonso oyo akómi, azalaki komonisa ete asambelaka Yehova, Abalama na bato ya ndako na ye “bayambolaki ete bazali bapaya na mokili, bato ya mokili mosusu.” (Baebele 11:13) Bazalaki ntango nyonso koboya komesana mingi na bapakano oyo bazalaki kokutana na bango. Lelo oyo mpe, baklisto basengeli kozala “bato ya mokili te.” (Yoane 17:16) Atako tozalaka na boboto mpe na bonkonde epai ya baninga ya kartye mpe ya mosala, tokebaka ete tókóma te na makambo oyo ezali komonisa elimo ya bato ya mokili oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ.—Baefese 2:2, 3.
19. (a) Mpo na nini bomoi ya kotambolatambola ezalaki na mikakatano mpo na Abalama mpe Salai? (b) Wapi mikakatano mosusu oyo ezalaki kozela Abalama?
19 Tóbosana mpe te ete ekoki kozala ete ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo ye moko Abalama to Salai bámesana na bampasi ya bomoi ya kotambolatambola. Bilei na bango ezalaki kouta kaka na bibwele na bango na esika ya bilei oyo liboso bazalaki kosomba na bazando ya Ulu oyo ezalaki na biloko bebo; bazalaki kofanda na bandako ya kapo na esika ya bandako oyo etongamá malamu. (Baebele 11:9) Banda ntɔngɔ tii mpokwa, Abalama azalaki na misala mingi ya kosala; azalaki na mosala mingi mpo na bampate na ye mpe basali na ye. Na ntembe te, Salai azalaki kosala misala oyo basi bameseneki kosala na mboka na bango: konika fufu, kotumba mampa, kosala bilamba na nsuki ya mpate mpe kotonga bilamba. (Genese 18:6, 7; 2 Mikonzi 23:7; Masese 31:19; Ezekiele 13:18) Atako bongo, mikakatano mosusu ezalaki kozela bango. Mwa moke na nsima, Abalama na bato ya ndako na ye bakutanaki na likama moko mpo na bomoi na bango! Kondima ya Abalama elongaki mokakatano wana?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lelo oyo, kilomɛtrɛ 16 ekaboli Ebale Pelata na esika oyo mboka Ulu ezalaká; kasi ezali na bilembo oyo ezali komonisa polele ete na ntango ya kala ebale yango elekaki mpenza na engumba yango, na ngámbo na yango ya wɛsti. Yango wana, na nsima, balobaki ete Abalama autaki na “ngámbo ya ebale [Pelata].”—Yosua 24:3.
b Bankama ya bambula na nsima, Assournasirpal II, mokonzi ya Asulia, akatisaki Ebale Pelata pene na Kalekemisi na banzete oyo bakangisaki na bansinga (radeau). Biblia eyebisi te soki mpe Abalama asalaki bongo mpo na kokatisa to soki nde akɔtaki na mai na makalo na ye.
Osimbaki makambo oyo?
• Mpo na nini Abalama abengami “tata ya bango nyonso bazali na kondima”?
• Mpo na nini esɛngaki kondima mpo Abalama alongwa na Ulu ya Bakaladi?
• Ndenge nini Abalama amonisaki ete azalaki kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso?
[Karte na lokasa 16]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MOBEMBO YA ABALAMA
Ulu
Halana
Kalekemisi
KANANA
Mai Monene
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Karte ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel
[Elilingi na lokasa 15]
Esengelaki ete Abalama azala na kondima mpo na kotika bomoi ya malamu oyo ezalaki na Ulu
[Elilingi na lokasa 18]
Lokola bazalaki kofanda na bandako ya kapo, Abalama na bato ya ndako na ye “bayambolaki ete bazali bapaya na mokili, bato na mokili mosusu”