Na ndimbola nini moto akoki kozala elilingi ya Nzambe?
“NA NSIMA, Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye, azalisaki ye na elilingi ya Nzambe; azalisaki bango mwasi mpe mobali.” Lisoló oyo lipemami elobi bongo, kasi yango elimboli nini? Na ndimbola nini mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso bazalisamaki na elilingi ya Nzambe?—Genese 1:27, NW.
Bazalaki na nzoto motindo moko na Nzambe? Te, ekoki kosalema te. Moto azali na nzoto ya mosuni, ayemamaki mpo ete afanda na mabelé. Nzambe azali elimo, afandi kati na nkembo eleki monene ya likoló, oyo moto akoki ata kopusana pene na yango te. (Exode 33:18-20; 1 Bakolinti 15:50) Kasi, na ndimbola nini moto azalisamaki na elilingi ya Nzambe? Na ndimbola oyo ete moto apesamelaki likoki ya komonisa bizaleli minene ya Nzambe—bolingo, boyengebene, bwanya, mpe nguya—bakisa mpe bizaleli mosusu.
Bizaleli ya Yehova
Bizaleli ya Yehova Nzambe bimonisami kati na bikelamu na ye nyonso, kasi emonisamaki mpenza na lolenge ya kokamwa na motindo oyo asalelaki na babalani mibale ya liboso, Adama mpe Eva. (Baloma 1:20) Bolingo na ye emonanaki na boye ete azalisaki mabelé na lolenge mpenza ete ezala malamu ete moto akoka kofanda wana. Yehova azalisaki mwasi mpo na mobali ete azala moninga na ye mpe mama ya bana na ye. Atyaki bango mibale na elanga moko ya kitoko mpe apesaki bango biloko ya ntina mpo ete bazala ntango nyonso na bomoi mpe bazala na esengo. Oyo eleki mpenza kitoko ezali ete, Nzambe apesaki bango likoki ya kozala na bomoi ya seko.—Genese 2:7-9, 15-24.
Bwanya ya Nzambe emonani na lolenge atyaki mobali mpe mwasi ya liboso na momekamo. Soki balingaki kotikala ntango nyonso basangani ya libota ya Yehova, mpe soki balingaki kozala na bomoi libela lokola baboti ya libota mobimba ya bato, basengelaki kozala ndakisa mpo na oyo etali boyengebene kati na losambo ya solo. Yango wana, Yehova apesaki bango libaku ya komonisa oyo bazalaki na yango kati na mitema na bango liboso na momekamo oyo ebongi—basengelaki te kolya mbuma ya nzeté ya koyeba malamu mpe mabe. Oyo nde bwanya epai na Yehova na lolenge apesi nzela epai na bato ete bamonisa botosi na bango mpe bolingo na bango epai na ye yambo ete apesa bango bolamu mingi oyo abombelaki bango!
Bosembo ya Nzambe emonanaki na lolenge asengaki na bikelamu na ye ete bálanda mibeko na ye mitombwami mpe na lolenge abatelaki yango malamu. Emonanaki na lolenge oyo apesaki na Adama mpe Eva mabaku nyonso ya kosala oyo ezali malamu. Mpe lokola basalaki bongo te boyengebene na ye emonanaki na lolenge akatelaki bango etumbu ya liwa mpo na botomboki na bango.
Nguya ya Yehova emonanaki na lolenge asalaki ete etumbu wana ekokana. Satana, motomboki monene alobaki na lolenge ya kobombama ete Yehova azali mokosi, mpe Satana alakaki kopesa Eva biloko minene soki aboyi kotosa Nzambe. (Genese 3:1-7) Kasi Satana alóngaki te kokokisa elaká na ye. Akokaki te kopekisa Nzambe ete abengana Adama mpe Eva longwa na elanga ya Edene, azalaki mpe na likoki te ya kopekisa kokokisama ya maloba ya Nzambe epai na Adama: “Ojali mputulu, mpe okojonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) Nzokande, Yehova akokisaki etumbu na ye ya liwa na mbala moko te, mpe amonisaki lisusu bolingo na ye kati na likambo oyo. Apesaki Adama mpe Eva nzela ya kobota bana oyo, na nsuka, na nzela na bango, mokano na ye ya ebandeli mokokokisama.—Genese 1:28.
Na nsuka, boyengebene, bolingo, nguya, mpe bwanya ya Yehova Nzambe emonanaki kati na elaká na ye ya kobimisa mombóto oyo akosukisa misala ya Satana mpe kobongisa matomba mabe ya botomboki wana ya liboso na ntina na lotómo ya Nzambe mpo na koyangela. (Genese 3:15) Oyo nde Mozalisi malamu!
Milende mpo na komekola Nzambe
Atako bazali lisusu na ezalela ya kokoka te, bato bakoki komonisa bizaleli ya Nzambe. Yango wana, Paulo alendisaki baklisto ya eleko na ye ete: “Bókóma bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 5:1, NW) Atako bongo, na boumeli ya lisoló ya bato, mingi bazangaki mpenza kotya likebi na bizaleli ya Nzambe. Na mikolo ya Noa, bato babebisamaki mingi na boye ete Yehova azwaki ekateli ya koboma bato nyonso, longola bobele Noa mpe libota na ye. Noa azalaki “moto na boyengene. Amimonisaki na libungá te kati na bato na eleko ya ye,” mpe amonisaki bolingo na ye epai ya Nzambe na kotosáká mitinda na ye. “Na nsima, Noa asalaki nyonso oyo Nzambe atindaki ye. Asalaki bobele bongo.” (Genese 6:9, 22, NW) Noa amonisaki bolingo na ye mpo na bazalani na ye mpe bokangami na ye na boyengebene na kozaláká “mosakoli na boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Amonisaki bwanya mpe asalelaki nguya na ye ya nzoto na lolenge malamu na kolandáká malako ya Nzambe mpo na kotonga masuwa moko monene, kobomba bilei na kati na yango, koyanganisa banyama mpe kokɔta na masuwa na etinda ya Nzambe. Amonisaki mpe ete alingaki boyengene mpo ete apesaki nzela te ete bato mabe oyo bafandaki na ye esika moko bakoka kozala na bopusi likoló na ye.
Biblia ezali kolobela ebele ya bato mosusu oyo bamonisaki mpe bizaleli ya Nzambe. Moto ya liboso mpenza ezalaki Yesu Klisto, ye oyo azalaki mpenza elilingi ya Nzambe na lolenge ya kokoka mpe na yango akokaki koloba ete: “Ye oyo amɔni ngai asili komɔna Tata.” (Yoane 14:9) Kati na bizaleli nyonso oyo Yesu amonisaki, oyo eleki mpenza ezali bolingo na ye. Ezali bolingo mpo na tata na ye mpe mpo na bato nde epusaki ye na kotika efandelo na ye na likoló mpe koya lokola moto awa na mabelé. Bolingo yango epusaki ye na kokumisa Tata na ye na nzela ya etamboli na ye ya bosembo mpe na koteya bato nsango malamu ya lobiko. (Matai 4:23; Yoane 13:31) Ezali lisusu mpo na bolingo nde Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na lobiko ya bato mpe, oyo eleki ntina, mpo na kobulisama ya nkombo ya Nzambe. (Yoane 13:1) Kati na milende na biso mpo na komekola Nzambe, ezali na ndakisa mosusu ya malamu mpo na kolanda oyo aleki Yesu?—1 Petelo 2:21.
Lolenge nini tokoki mpenza kozala lokola Nzambe lelo oyo?
Lolenge nini tokoki lelo komonisa bizaleli ya Nzambe mpe komitambwisa na elilingi ya Nzambe? Ya solo, tólobela liboso bolingo. Yesu alobaki ete: “Okolinga [Yehova, NW] Njambe na yɔ na motema na yɔ mobimba mpe na makanisi na yɔ mobimba.” Lolenge nini komonisa bolingo mpo na Nzambe? Ntoma Yoane apesaki eyano oyo: “Mpɔ ete bolingo na Njambe ejali boye ete tokokisa malako na ye. Malako na ye majali na bojito tɛ.”—Matai 22:37; 1 Yoane 5:3.
Ya solo, mpo ete tokoka mpenza kotosa mitinda ya Nzambe, tosengeli koyeba yango. Yango ezali kosɛnga kotánga, koyekola, komanyola Liloba ya Nzambe, Biblia, mpe mikanda mikolimbolaka Biblia. Lokola mokomi na Nzembo, tosengeli koloba ete: “Ɛ nalingi mobeko na yɔ na bolingo bɛ! Nakobanjaka yango mokɔlɔ mobimba.” (Njembo 119:97) Wana tozali sé kokólisa mayele ya Liloba ya Nzambe, tozali kokɔ́tisa kati na biso lolenge oyo Nzambe akanisaka. Tozali kokóma na kolinga bosembo mpe na koyina ezaleli ya kotyola mibeko. (Njembo 45:7) Ezali na yango nde Adama asalaki mabe. Ayebaki mibeko ya Nzambe kasi alingaki yango te na boye ete akoka kokangama na yango. Wana tozali kotánga Liloba ya Nzambe, tosengeli ntango nyonso komituna ete, ‘Lolenge nini likambo oyo litaleli ngai? Nasengeli kosala nini mpo ete etamboli na ngai ezala mpenza na boyokani na bizaleli ya Nzambe?’
Yesu alobaki lisusu ete: “Okolinga mojalani na yɔ lokola yɔ mɔkɔ.” (Matai 22:39) Moto nyonso oyo azali kolɔngɔ́nɔ akomilingaka ye moko mpe akomitombelaka mpenza makambo ya malamu. Yango ezali mabe te. Kasi tozali nde komonisa bolingo motindo moko epai na bazalani na biso? Tozali kotosa etindá oyo ya Biblia ete: “Boya kosalela bato malamu tɛ baoyo bakoki kojwa yango, wana loboko na yo ejwi eposa na kosala bongo”—Masese 3:27; Bagalatia 6:10.
Ezali boni mpo na ezaleli oyo ete bwanya? Mposa na biso ya koluka komonisa ezaleli oyo ezali kopusa biso na koyekola Biblia mpo ete yango ezali libómbo ya bwanya ya Nzambe. Nzembo 119:98-100 elobi: “Na malako na yɔ, opɛsi ngai mayɛlɛ maleki yango ya bayini na ngai; jambi majali na ngai mikɔlɔ yɔnsɔ. Naleki balakisi yɔnsɔ na ngai na koyeba, jambi matatoli na yɔ ejali kati na makanisi na ngai. Naleki bampaka na kosɔsɔla jambi na kobatelaka bilakeli na yɔ.” Na Masese 3:18, bwanya emonisami lokola “njete na bomoi.” Soki tokómi na bwanya mpe tosaleli yango, tokondimama na Nzambe mpe tokozwa mbano ya bomoi ya seko.—Mosakoli 7:12.
Ezali boni mpo na boyengebene? Kati na mokili oyo esili kobeba, boyengebene ezali ezaleli moko ya ntina mpo na baoyo balingi kosepelisa Nzambe. Yesu alingaki boyengebene mpe ayinaki ezaleli ya kotyola mibeko. (Baebele 1:9) Lelo oyo, baklisto bazali mpe kosala bongo. Boyengebene ezali mpe kopusa bango na kopesa motuya na bizaleli oyo bizali sembo. Bazali koboya banzela ezangi bosembo ya mokili oyo mpe bazali kosala ete kokokisama ya mokano ya Nzambe ezala likambo lileki ntina kati na bomoi na bango.—1 Yoane 2:15-17.
Mpo na oyo etali nguya, biso nyonso tozali na mwa ndambo na yango. Na ndenge tosalema, tozali na nguya na nzoto mpe na makanisi, mpe ntango nyonso oyo tozali kokóla kati na lisangá ya Boklisto, tozali mpe kozwa nguya kati na elimo. Yehova azali kobakisa nguya na biso na nzela ya elimo santu na ye, ata soki emonani lokola ete tozali na bolɛmbu, tozali kolónga kokokisa mokano na ye. Paulo alobaki ete: “Nayebi kosala makambo yɔnsɔ kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Tokozwa bobele nguya moko wana soki tozali kobondela mpo na kozwa elimo ya Yehova.
Kosakola nsango malamu
Lolenge biso tozali komonisa bizaleli minene minei ya Nzambe ezali komonana polele na lolenge oyo tozali kotosa etindá oyo: “Boye bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na mwana mpe na [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili ngai kolaka bino. Mpe tala, ngai najali na bino elɔngɔ mikɔlɔ yɔnsɔ kino nsuka ya [ebongiseli ya biloko, NW].” (Matai 28:19, 20) Motindo na mosala oyo ya koteya ezali kopesa bomoi epai na baoyo bazali kondima yango. Oyo nde elembo ya bolingo mpo na baoyo, mpo na mingi na bango, na ebandeli bazalaka mpenza bapaya na miso na biso!
Lisusu, koteya motindo wana ezali nzela ya bwanya. Ezali kobimisa litomba oyo ezali koumela. Mosala nini lisusu tokoki koloba na ntina na yango ete: “Jambi ekosala yɔ boye, okomibikisa yɔ mpenja mpe bango bajali koyoka yɔ”? (1 Timɔtɛ 4:16) Moto moko te azali kobungisa eloko kati na mosala ya kozalisa bayekoli. Ezala baoyo bazali koyoka mpe baoyo bazali koteya, bango nyonso bazali kozwa mapamboli ya seko.
Mpo na oyo etali boyengebene, baklisto bazali koteya mitindá ya sembo epai na bato oyo bazali koyekola na bango Biblia. Tozali kosalisa bango ete basalela Yehova, “Nzambe na kosambisa sembo.” (Malaki 2:17) Baoyo bazali lelo kopesa bomoi na bango mpo na kosalela Yehova mpe kolanda kino nsuka kati na boyengebene babéngami bato na boyengebene, basembwi, yango ezali komema bango na kobika na Armagedon.—Baloma 3:24; Yakobo 2:24-26.
Mosala ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu kati na mokili mobimba ezali elembo ya nguya! (Matai 24:14) Ezali kosɛnga mpiko mpo na kolanda ntango nyonso koteya kati na bateritware epai kuna bato mingi balingaka koyoka te. Kasi Yehova, na Nzela ya elimo na ye, azali kopesa nguya oyo ekoki mpo na koyika mpiko kino nsuka.—Yisaya 40:30, 31; Matai 24:13; Luka 11:13.
Ya solo, lokola tozali bana bazangi kokoka ya Adama, tokoki te kosalela bizaleli wana na lolenge ya kokoka. Nzokande, omikundola ete, moto azalisamaki na elilingi ya Nzambe, mpe soki tozali kosala makasi ntango nyonso mpo na kozala lokola Nzambe, boye tozali kokokisa mokano na biso ya kozala na bomoi. (Mosakoli 12:13) Soki tomimekisi biso moko mpo na kosala nyonso oyo ekoki na biso, mpe kosɛnga bolimbisi wana tosali libungá, boye tokoki kolikya kokɔta kati na mokili ya sika mpe ya sembo ya Nzambe; epai kuna tokokóma na ezalela ya kokoka. Na nsima, tokozala kati na paladiso na mabelé oyo ekotonda na bato ya kokoka, bango nyonso bakomonisa bizaleli ya Yehova na lolenge ekoki mpenza. Oyo nde esengo! Na nsuka, bato bakozala elilingi ya Nzambe na ndimbola na yango mpenza.
[Elilingi na lokasa 25]
Yesu alakisaki biso lolenge nini kokólisa bizaleli ya Yehova
[Elilingi na lokasa 26]
Na nsuka, bato bakozala elilingi ya Nzambe na ndimbola na yango mpenza