Zalá na kondima lokola oyo ya Abalayama!
“Bato ya kondima bazali bana ya Abalayama.”—BAGALATIA 3:7.
1. Abalama asalaki nini ntango akutanaki na mokakatano mosusu na Kanana?
MPO na kotosa etinda ya Yehova, Abalama atikaki bomoi ya malamu oyo azalaki na yango na Ulu. Mikakatano oyo akutanaki na yango na bambula oyo elandaki ezalaki nde kobongisa ye na komekama oyo kondima na ye esengelaki kokutana na yango na Ezipito. Biblia elobi boye: “Nzala ezalaki na mokili.” Ezalaki mpasi te mpo Abalama abanda kolelalela mpo na bomoi oyo akómaki na yango! Nzokande akangaki mabɔkɔ te, asalaki oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. “Abalama akitaki na Ezipito kofanda kuna, mpo ete nzala ezalaki mingi na mokili.” Ebele ya bato oyo Abalama azalaki na bango bakokaki kozanga te kobenda likebi ya bato na Ezipito. Yehova akokisaki nde maloba na ye ete akobatela Abalama?—Genese 12:10; Exode 16:2, 3.
2, 3. (a) Mpo na nini Abalama alobaki te ete Salai azali mwasi na ye? (b) Liboso ya mokakatano oyo bazalaki na yango, Abalama asalaki ndenge nini na mwasi na ye?
2 Na Genese 12:11-13 tozali kotánga boye: “Ezalaki ye penepene na Ezipito, alobaki na Salai mwasi na ye ete, [Nabondeli yo, talá, NW] nayebi ete ozali mwasi ya bonzenga. Ekomona Baezipito yo bakoloba ete, Azali mwasi na ye. Bongo bakoboma ngai nde bakobatela yo na bomoi. [Nabondeli yo, NW] lobá ete ozali ndeko na ngai ete básalela ngai malamu mpo na yo, mpe ete nabika na ntina na ngɔlu na yo.” Atako Salai akómaki na mbula koleka 65, azalaki kaka mwasi kitoko mingi. Yango ezalaki likama mpo na bomoi ya Abalama.a (Genese 12:4, 5; 17:17) Likambo mosusu eleki ntina na kati ya mokakatano yango ezalaki ete mokano ya Yehova elingaki kozala ndenge nini, mpamba te alobaki ete bikólo nyonso ya mokili ekomipambola na nzela ya mombóto ya Abalama. (Genese 12:2, 3, 7) Lokola azalaki naino na mwana te, esengelaki akufa ntango wana te.
3 Abalama ayebisaki mwasi na ye asalela mayele oyo bango mibale bayokanaki liboso, elingi koloba aloba ete azali ndeko na ye. Omoni ete atako azalaki na bokonzi lokola tata ya libota, azalaki na makambo makasi te, asɛngaki Salai ete asalisa ye. (Genese 12:11-13; 20:13) Na likambo yango, Abalama apesaki mibali ndakisa malamu ya kosalela bokonzi na bango na bolingo; mpe na botosi oyo amonisaki, Salai azali ndakisa mpo na basi lelo oyo.—Baefese 5:23-28; Bakolose 4:6.
4. Lelo oyo, basaleli ya sembo ya Nzambe basengeli kosala nini ntango bomoi ya bandeko na bango ezali na likama?
4 Salai akokaki koloba ete azalaki ndeko ya Abalama mpo bazalaki bana ya tata moko. (Genese 20:12) Mpe lisusu, eloko moko te esɛngisaki ye ayebisa bato likambo oyo etali bango te. (Matai 7:6) Basaleli ya sembo ya Nzambe na ntango na biso batosaka mobeko ya Biblia oyo elobi ete bázala sembo. (Baebele 13:18) Na ndakisa, ntango balapi ndai liboso ya bazuzi, babukaka lokuta te. Kasi, soki bomoi to elimo ya bandeko na bango ezali na likama, na ndakisa na ntango ya minyoko to mobulu na mboka, balandaka toli ya Yesu oyo alobaki ete bázala na “ekɛnge lokola banyoka kasi na likambo te lokola bibenga.”—Matai 10:16, NW; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1996, lokasa 18, paragrafe 19.
5. Mpo na nini Salai andimaki kosala likambo oyo Abalama asɛngaki ye?
5 Salai asalaki nini na likambo oyo Abalama asɛngaki ye? Ntoma Petelo alobi ete basi lokola ye ‘balikyaka na Nzambe.’ Yango wana, ekoki mpenza kozala ete Salai akangaki ntina ya matomba ya elimo oyo ezalaki na kati ya likambo yango. Longola wana, alingaki mobali na ye mpe azalaki na limemya mpo na ye. Yango wana, Salai ‘atosaki mobali na ye’ mpe alobaki te ete azali mwasi ya libala. (1 Petelo 3:5) Kasi, ndenge oyo asalaki ezalaki mpe likama mpo na ye. “Ekómaki Abalama na Ezipito, bato ya Ezipito bamonaki ete mwasi azalaki na bonzenga mingi. Boye bakonzi ya Falo bamonaki ye mpe bakumisaki ye liboso ya Falo, mpe bayaki na mwasi na esika ya Falo.”—Genese 12:14, 15.
Yehova abikisi
6, 7. Abalama na Salai bakutanaki na mokakatano nini, mpe ndenge nini Yehova abikisaki Salai?
6 Abalama na Salai bakutanaki mpenza na mokakatano! Emonanaki lokola ete etikalaki moke ete moto mosusu asangisa nzoto na Salai na makasi. Lisusu, lokola Falo ayebaki te ete Salai azali mwasi ya libala, apesaki Abalama ebele ya makabo, Abalama “azwaki bampate mpe bangɔmbɛ mpe bampunda mpe basali babali mpe basali basi mpe bampunda basi mpe bakamela.”b (Genese 12:16) Tokanisi mpenza ete Abalama azalaki kolinga ata kotala makabo yango te! Atako ekokaki komonana ete bazali lisusu na elikya moko te, Yehova asundolaki Abalama te.
7 “Kasi [Yehova] abɛlisaki Falo mpe bato na ye maladi mabe na ntina na Salai mwasi ya Abalama.” (Genese 12:17) Toyebi te soki na ndenge nini, Falo ayaki koyeba ntina ya “maladi” yango. Alekisaki lisusu ntango te: “Bongo Falo abyangaki Abalama mpe alobelaki ye ete, Oyo esali yo ngai ezali nini? Mpo na nini olobeli ngai te ete azali mwasi na yo? Mpo nini olobeli ngai ete azali ndeko na yo, mpe opesi ngai nzela ya kobala ye? [Sikoyo], talá mwasi na yo! Kamatá ye mpe longwá na yo awa. Mpe Falo alakaki bato na ntina na ye mpe batikaki ye na nzela, ye mpe mwasi na ye mpe biloko na ye nyonso.”—Genese 12:18-20; Nzembo 105:14, 15.
8. Yehova alaki baklisto libateli ya ndenge nini lelo oyo?
8 Lelo oyo, Yehova alaki te ete akobikisa biso na liwa, mobulu, nzala to makama. Yehova alaki biso ete akobatela biso ntango nyonso na makambo oyo ekoki kozala likama mpo na elimo na biso. (Nzembo 91:1-4) Asalaka yango libosoliboso na ndenge akebisaka biso na ntango oyo esengeli na nzela ya Liloba na ye mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Tosengeli nde kobanga liwa na ntango ya minyoko? Atako akoki kotika nzela ete basaleli na ye mosusu bákufa, Nzambe akotika nzela te ete básilisa basaleli na ye nyonso. (Nzembo 116:15) Mpe soki bato mosusu ya sembo bakufi, tozali na elikya ete bakosekwa.—Yoane 5:28, 29.
Andimaki kozanga makambo mosusu mpo na kobatela kimya
9. Nini emonisi ete Abalayama afandaki esika moko te na Kanana?
9 Lokola nzala esilaki na Kanana, “Abalama alongwaki na Ezipito mpe akendaki na mokili ya [Negebe, NW, (yango ezali mokili ekauki na sudi ya bangomba ya Yuda)], ye mpe mwasi na ye na biloko nyonso bizwaki ye, mpe Lota akendaki na ye elongo. Abalama azalaki mozwi ya biloko mingi, na bangɔmbɛ mpe na palata mpe na wolo.” (Genese 13:1, 2) Yango wana, bakóló-mabele bamonaki ye ete azali moto monene, mokonzi ya nguya. (Genese 23:6) Abalama azalaki na mposa te ya kofanda mingi na esika moko mpe kokɔta na makambo ya politiki ya Bakanana. Nzokande, “akendaki na mobembo na ye longwa na mokili ya [Negebe, NW] kokóma na Betele na esika ezalaki hema na ye ya liboso kati na Betele mpe Ai.” Lokola momeseno, na bisika nyonso oyo akendaki, Abalama atyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso.—Genese 13:3, 4.
10. Likambo nini ebimaki kati na babateli ya mpate ya Abalama mpe ya Lota, mpe mpo na nini ezalaki na ntina básilisa matata yango nokinoki?
10 “Lota oyo akendaki na Abalama elongo azalaki mpe na bitonga ya bibwele mpe na hema mingi. Bongo mokili ekokaki na bango te ete bázala elongo, zambi basilaki kozwa biloko mingi, boye bakokaki kofanda esika moko te. [Matata] ebimaki kati na babateli ya bitonga ya Abalama mpe babateli ya bitonga ya Lota. Na ntango yango Bakanana mpe Bapelizi bafandaki na mokili yango.” (Genese 13:5-7) Mai ya komɛla mpe matiti ya kolya ekokaki lisusu te na mokili yango mpo na bitonga ya Abalama mpe ya Lota. Makɛlɛlɛ mpe kowelana ekómaki kati na babateli ya bibwele na bango. Elimo wana ya koswana ebongaki te mpo na bato oyo basambelaka Nzambe ya solo. Soki makɛlɛlɛ wana esilaka te, mbɛlɛ ekokaki kobebisa boyokani na bango. Ndenge nini Abalama akataki likambo yango? Nsima ya liwa ya tata ya Lota, Abalama azwaki ye mpe ekoki kozala ete abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye mpenza. Lokola Abalama nde azalaki mokóló, azalaki na lotomo ya kopona esika oyo eleki malamu!
11, 12. Likambo nini Abalama asɛngaki Lota na boboto nyonso, mpe mpo na nini tokoki koloba ete Lota aponaki malamu te?
11 Kasi, “Abalama alobaki na Lota ete, Tiká [matata] ezala kati na biso na yo te, soko kati na babateli na ngai mpe babateli na yo te, mpo ete biso tozali bandeko. Mokili mobimba ezali liboso na yo te? Bongo kabwaná na ngai. Soko okokenda na lobɔkɔ ya mwasi, ngai nde nakokenda na lobɔkɔ ya mobali; soko yo okokenda na lobɔkɔ ya mobali nde ngai nakokenda na lobɔkɔ ya mwasi.” Penepene na Betele, ezali na esika oyo babengaka “moko na bisika eleki kotombwana epai moto akoki komona bisika mingi ya Palestine.” Ekoki kozala na esika yango nde “Lota [atombolaki] miso mpe atalaki ete mokili polele na Yaladene ezalaki na mai mingi bipai nyonso, lokola na elanga ya [Yehova], lokola na mokili ya Ezipito epai na Soali. Oyo ebimaki naino ebebisaki [Yehova] Sodomo na Gomola te.”—Genese 13:8-10.
12 Atako Biblia elobi ete Lota azalaki “moyengebene,” toyebi te soki mpo na nini, na likambo oyo, amikitisaki liboso ya Abalama te, mpe lisusu, atunaki ye toli te; nzokande Abalama azalaki mokóló na ye. (2 Petelo 2:7) “Lota aponaki mpo na ye mpenza mokili polele nyonso ya Yaladene mpe akendaki epai na ebimelo ya ntango. Bongo bakabwanaki. Abalama afandaki na mokili ya Kanana, nde Lota afandaki epai na mboka ya ngɛlɛ mpe atɛmisaki hema na ye [pene, NW] na Sodomo.” (Genese 13:11, 12) Sodomo ezalaki mboka ya bozwi mpe ezalaki na biloko ya malamu ebele. (Ezekiele 16:49, 50) Ata soki ekoki komonana ete Lota aponaki esika ya malamu soki totaleli matomba ya mosuni, nzokande aponaki malamu te soki totaleli matomba ya elimo. Tolobi boye mpamba te Genese 13:13 elobi ete “bato ya Sodomo bazalaki na masumu mingi liboso ya [Yehova].” Nsukansuka, ekateli oyo Lota azwaki ya kokende kuna ememelaki libota na ye mikakatano mingi.
13. Ndenge nini ndakisa ya Abalama ekoki kosalisa baklisto oyo bakoki kozala na matata mpo na makambo ya mbongo?
13 Kasi, Abalama amonisaki kondima na elaka ya Yehova ete mombóto na ye ekozwa mokili wana mobimba; aboyaki koswana mpo na mwa eteni na yango. Na boboto mpenza, asalaki makambo na ndenge oyo eyokani na etinda oyo na nsima ekomamaki na 1 Bakolinti 10:24: “Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.” Oyo ezali likanisi ya malamu mpo na baoyo bakoki kozala na matata na bandeko na bango bandimi mpo na makambo ya mbongo. Na esika bálanda toli ya Matai 18:15-17, bamosusu bafundaki bandeko na bango na tribinale. (1 Bakolinti 6:1, 7) Ndakisa ya Abalama ezali komonisa ete eleki malamu kobungisa mbongo na esika ya kofingisa nkombo ya Yehova to kobebisa kimya ya lisangá.—Yakobo 3:18.
14. Abalama azwaki mapamboli nini mpo na motema malamu na ye?
14 Abalama azwaki mapamboli mpo na motema malamu na ye. Nzambe alobaki boye: “Nakozalisa mabota na yo lokola mputulu ya mokili, boye ete soko moto akoki kotánga mputulu ya mokili nde mabota na yo makotángama.” Likambo yango elendisaki mpenza Abalama atako azalaki naino na mwana te! Na nsima, Nzambe alobaki na ye boye: “Tɛlɛmá, tambolá na mokili epai na molai na yango mpe na monene na yango mpo ete nakopesa yo yango.” (Genese 13:16, 17) Nzambe ayebisaki Abalama te ete afanda na kati ya engumba moko esika bomoi ezali malamu. Asengelaki kokabwana na Bakanana. Lelo oyo mpe, baklisto basengeli kokabwana na mokili. Baklisto bamonaka te ete baleki bato mosusu, kasi baboyaka boninga makasi na moto nyonso oyo akoki komema bango na nzela ya mabe.—1 Petelo 4:3, 4.
15. (a) Kotambolatambola ya Abalama ezalaki ntango mosusu na ndimbola nini? (b) Ndakisa nini Abalama apesaki mabota ya baklisto lelo oyo?
15 Na ntango ya kala, liboso moto akóma nkolo-mabele, asengelaki kotambola mpo na kotalatala yango. Na yango, ekoki kozala ete kotambolatambola ya Abalama ezalaki mpo na kolamwisa ntango nyonso na makanisi na ye ete mokolo mosusu mabele wana ekozala ya bana na ye. Abalama atosaki, “azalaki se kofanda na bandako ya kapo. Na nsima, ayaki kofanda na kati ya banzete minene ya Mamele oyo ezali na Hebeloni; mpe kuna, abandaki kotonga etumbelo mpo na Yehova.” (Genese 13:18, NW ) Abalama amonisaki lisusu ete losambo ezalaki na esika ya liboso na motema na ye. Na libota na yo, otyaka boyekoli ya libota, kobondela elongo mpe koyangana na makita na esika ya liboso?
Banguna bamemi libota ya Lota
16. (a) Mpo na nini Genese 14:1 ebandi na maloba oyo emonisaka likambo ya mawa? (b) Mpo na nini bakonzi minei oyo bautaki na ɛsti bayaki na etumba?
16 “Nzokande, esalemaki ete na mikolo ya Amalafele mokonzi ya Sinala, mpe ya Alioka mokonzi ya Elasala, mpe ya Kedolaomele mokonzi ya Elama,c mpe ya Tidala mokonzi ya Goimi, ete bango basalaki etumba.” Na Liebele ya kala, maloba oyo ya liboso (“Nzokande, esalemaki ete na mikolo ya . . . ”) ezali maloba oyo emonisaka likambo ya mawa, eyebisaka “ntango ya komekama oyo eyaka kosuka na lipamboli.” (Genese 14:1, 2, NW, maloba na nse ya lokasa) Komekama ebandaki ntango bakonzi yango minei oyo bautaki na ɛsti na basoda na bango bayaki kobebisa mokili ya Kanana. Bayaki mpo na kosilisa botomboki ya bamboka mitano: Sodomo, Gomola, Adima, Seboimi mpe Bela. Balongaki bamboka yango nyonso mpe “bayanganaki nyonso na lobwaku ya Sidimi esika ezali mai ya mungwa.” Lota na libota na ye bazalaki kofanda penepene wana.—Genese 14:3-7.
17. Mpo na nini kokangama ya Lota etyaki kondima ya Abalama na komekama?
17 Bakonzi ya Bakanana bamekaki nzoto liboso ya bakonzi oyo bayaki kobundisa bango, kasi balongaki te. “Bongo bayini babɔtɔlaki biloko nyonso ya Sodomo mpe ya Gomola mpe biloko ya kolya na bango lokola, mpe bakendaki na bango. Bakamataki mpe Lota, mwana ya [ndeko ya] Abalama oyo afandaki na Sodomo, mpe biloko na ye mpe bakendaki na yango.” Mosika te, Abalama ayokaki nsango mabe wana: “Moto moko oyo asilaki kokima ayaki koyebisa Abalama, Moebele. Ye afandaki epai na nzete na Mamele, moto ya Amola, ndeko ya Esekoli mpe ya Aneli. Bango bazalaki baninga ya Abalama. Bongo, wana eyokaki Abalama ete mwana na ye akangami.” (Genese 14:8-14) Ezalaki mpenza komekama mpo na kondima na ye! Abalama alingaki nde kokangela mwana ya ndeko na ye nkanda lokola aponaki mokili oyo elekaki malamu? Tóbosana mpe te ete bakonzi yango oyo bayaki etumba bautaki na Sinala, mboka oyo autá. Soki abundisi bango, akoki komeka lisusu kozonga na mboka na ye te. Longola yango, Abalama azalaki nde na makasi ya kolonga bato oyo basoda ya bamboka nyonso ya Kanana, atako basanganaki, kasi bakokaki bango te?
18, 19. (a) Ndenge nini Abalama alongaki kobikisa Lota? (b) Nani azwaki lokumu mpo na elonga yango?
18 Na mbala oyo lisusu, Abalama atyaki elikya na ye nyonso epai ya Yehova. “Abyangaki bilombe na ye, bato nkama misato na zomi na mwambe bapusaki na molende, baoyo babotamaki na ndako na ye, mpe [alandaki, NW] bakonzi kino mboka ya Dani. Akabolaki bato na ye mpo na kobunda na butu, ye mpe basali na ye. Balekaki bango mpe [balandaki, NW] bango tee kino Hoba, yango ezali na ndelo ya Damaseke epai na likoló. Azongaki na biloko na bango nyonso. Azongaki mpe na Lota mwana na ye mpe na biloko na ye mpe na basi mpe na bato mosusu.” (Genese 14:14-16) Abalama amonisaki kondima makasi epai ya Yehova; elongo na mwa bato oyo bazalaki moke liboso ya basoda wana, alongaki mpe abikisaki Lota mpe libota na ye. Na nsima, Abalama akutanaki na Melekisedeke, mokonzi mpe nganga ya Saleme. “[Melekisedeke], mokonzi ya Saleme abimisaki kwanga mpe vinyo. Ye azalaki nganga ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló. Apambolaki Abalama mpe alobaki ete, Tiká ete Abalama apambolama na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mozalisi ya likoló mpe ya mokili. Tiká ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló asanzolama, oyo apesi bayini na ye na mabɔkɔ na yo. Mpe Abalama apesaki ye ndambo ya zomi ya biloko nyonso.”—Genese 14:18-20.
19 Ya solo, Yehova nde asalisaki ye alonga. Mpo na kondima na ye, Abalama amonaki lisusu ndenge oyo Yehova abikisaki ye. Basaleli ya Nzambe babundaka na mosuni te, kasi bakutanaka na komekama mpe mikakatano mingi. Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo ndakisa ya Abalama ekoki kosalisa biso na kolonga yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokanda Étude perspicace des Écritures (ebimisami na Batatoli ya Yehova) elobi ete “papirise moko ya kala eyebisi ete Falo moko atindaki basoda bákanga mwasi moko kitoko mpe báboma mobali na ye.” Emonisi ete Abalama azalaki kobanga mpamba te.
b Ekoki kozala ete Agala, oyo na nsima akómaki makango ya Abalama, azalaki na kati ya basali oyo bapesaki Abalama na ntango yango.—Genese 16:1.
c Bato mosusu ya mayele bazalaki koloba ete ezali solo te ete Elama ezalaki mboka makasi na Sinala mpe ete lisolo ya Kedolaomele ezali lisapo. Lisolo oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1989, lokasa 4-7 (ebimeli ya Lifalanse) ezali na makambo oyo bato ya arkeoloji bamonaki oyo ezali kondimisa lisolo ya Biblia.
Osimbaki makambo oyo?
• Ndenge nini nzala etyaki kondima ya Abalama na komekama na mokili ya Kanana?
• Na makambo nini Abalama na Salai bapesaki mibali na basi ya lelo oyo ndakisa malamu?
• Mateya nini tokoki kozwa na lolenge oyo Abalama asilisaki matata oyo ebimaki kati na basali na ye mpe oyo ya Lota?
[Elilingi na lokasa 22]
Atako Abalama azalaki mokóló, atyaki matomba ya Lota na esika ya liboso
[Elilingi na lokasa 24]
Abalama atyelaki Yehova motema na ndenge akendaki kobikisa Lota, mwana ya ndeko na ye