Ozali na Kondima lokola oyo ya Abalayama?
“Wana ekoya Mwana na moto, akokuta kondima awa na nse?”—LUKA 18:8.
1. Mpo na nini lelo oyo ezali mpasi kobatela kondima makasi?
LELO oyo, kobatela kondima makasi ezali likambo moke te. Mokili ezali kotindika baklisto mpo bálongola likebi na bango na makambo ya elimo. (Luka 21:34; 1 Yoane 2:15, 16) Bato mingi basengeli kosala molende mpo na kobika na bitumba, na makama, na maladi, to na nzala. (Luka 21:10, 11) Na bikólo mosusu, lokola bato mingi bamipesi na makambo ya mokili, baoyo bazali komitambwisa na kondima na bango bazali komonana ete bakanisaka malamu te, to bazali na bindimandima. Lisusu, baklisto mingi bazali konyokwama mpo na kondima na bango. (Matai 24:9) Yango wana, motuna oyo Yesu atunaki eleki sikawa pene na mbula 2 000, ebongi mpenza: “Wana ekoya Mwana na moto, akokuta kondima awa na nse?”—Luka 18:8.
2. (a) Mpo na nini baklisto basengeli kozala na kondima makasi? (b) Ezali malamu tótalela ndakisa ya kondima ya nani?
2 Nzokande, soki tolingi kozala na bomoi malamu sikoyo mpe na mikolo mizali koya, tózwa bomoi ya seko oyo Nzambe alaki, tosengeli kozala na kondima makasi. Ntoma Paulo azongelaki maloba ya Habakuku ntango akomaki ete: “Moyengebene na ngai akobika na kondima. Soko mpe akozonga nsima, motema na ngai ekosepela na ye te. . . . Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te.” (Baebele 10:38–11:6; Habakuku 2:4) Paulo ayebisaki Timote ete: “Obundaka etumba malamu na kondima, osimba bomoi na seko; zambi obyangami mpo na yango.” (1 Timote 6:12) Na yango, ndenge nini moto akoki kozala na kondima makasi? Mpo na koyanola na motuna yango, ebongi tótalela moto moko oyo azalaki na bomoi eleki soki mbula 4 000; kasi kondima na ye ezali kokumisama na mangomba misato ya minene: Lingomba ya Bamizilma, Lingomba ya Bayuda, mpe na boklisto. Moto yango ezalaki Abalayama. Mpo na nini kondima na ye etiká nsango? Tokoki komekola ye lelo oyo?
Kotosa litambwisi ya Nzambe
3, 4. Mpo na nini Tela na libota na ye balongwaki na Ulu mpe bakendaki na Halana?
3 Abalayama (oyo abéngamaki liboso Abalama) alobelami na mikapo ya liboso ya Biblia. Na Genese 11:26, tozali kotánga boye: “Tela . . . abotaki Abalama mpe Nahola mpe Alana.” Tela afandaki na libota na ye na Ulu ya Bakaladi, engumba moko ya bozwi mingi na sudi ya Mesopotamia. Kasi, bafandaki wana libela te. “Tela akamataki Abalama mwana na ye mpe Lota mwana na Alana, mwana na mwana na ye, mpe Salai [Sala] bokilo na ye, mwasi na Abalama, mwana na ye. Bango babimaki elongo na Ulu na Bakaladi ete bákenda na mokili na Kanana. Bakómaki na Halana mpe bafandaki wana.” (Genese 11:31) Nahola, ndeko ya Abalayama, amemaki mpe libota na ye na Halana. (Genese 24:10, 15; 28:1, 2; 29:4) Kasi, mpo na nini Tela alongwaki na Ulu, engumba ya bozwi mingi, mpo na kokende mosika na Halana?
4 Soki mbula 2 000 nsima ya eleko oyo Abalayama azalaki na bomoi, moto ya sembo Setefano alimbolaki liboso ya Sanedrina ntina oyo libota ya Tela esalaki mobembo wana. Alobaki boye: “Nzambe na nkembo amonanaki na tata na biso Abalayama, wana ezalaki ye na Mesopotamia, naino efandi ye na Halana te. Alobi na ye ete, Longwá na yo na mokili na yo mpe na [bandeko] na yo, mpe kendá kuna na mokili oyo nakotalisa yo. Na nsima abimi na mokili na Bakaladi mpe afandi na Halana.” (Misala 7:2-4) Tela andimaki likambo oyo Yehova alingaki kosala mpo na Abalayama ntango akendaki na libota na ye na Halana.
5. Abalayama akendaki wapi nsima ya liwa ya tata na ye? Mpo na nini?
5 Libota ya Tela efandaki na engumba na bango ya sika. Bambula mingi na nsima, ntango Abalayama alobaki ete “mokili na ngai,” ezalaki bongo etúká ya Halana, kasi Ulu te. (Genese 24:4) Atako bongo, Abalayama asengelaki kofanda na Halana mpo na libela te. Setefano alobaki, “Nsima ya liwa ya tata na [Abalayama]. Nzambe alongolaki ye kuna mpe amemaki ye na mokili oyo bofandi sikoyo.” (Misala 7:4, NW) Abalayama atosaki litambwisi ya Yehova. Elongo na Lota, akatisaki Ebale Pelata mpe akɔtaki na mokili ya Kanana.a
6. Yehova alakaki Abalayama nini?
6 Mpo na nini Yehova asɛngaki Abalayama ete akende na Kanana? Mpo na mikano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na moto wana ya sembo. Yehova ayebisaki Abalayama ete: “Longwá na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako na tata na yo, kokenda na mokili ekomonisa ngai yo. Nakozalisa yo libota monene, mpe nakopambola yo, nakozalisa nkombo na yo monene mpe okopambola bato. Nakopambola baoyo bapamboli yo mpe nakolakela mabe baoyo balakeli yo mabe; mpe mpo na yo na mabota nyonso na nse bakopambolama.” (Genese 12:1-3) Abalayama asengelaki kokóma tata ya libota monene oyo Yehova alingaki kobatela mpe libota yango esengelaki kozwa mokili ya Kanana. Elaka malamu mpenza! Kasi, Abalayama asengelaki kobongola mpenza bomoi na ye mpo na kozwa mokili wana.
7. Abalayama asengelaki kosala nini mpo na kozwa elaka ya Yehova?
7 Ntango Abalayama alongwaki na Ulu, atikaki engumba ya bozwi mingi mpe, ekoki mpenza kozala ete atikaki bandeko ya tata na ye—nyonso wana ezalaki libateli monene na ntango wana. Ntango alongwaki na Halana, atikaki libota ya tata na ye mpe libota ya ndeko na ye Nahola. Akendaki na mokili oyo ayebaki te. Na Kanana, afandaki na engumba te oyo ebatelami na bifelo. Mpo na nini? Mwa moke nsima ya kokɔta na mokili yango, Yehova ayebisaki Abalayama ete: “Tambolá na mokili epai na molai na yango mpe na monene na yango mpo ete nakopesa yo yango.” (Genese 13:17) Abalayama azalaki na mbula 75 mpe mwasi na ye Sala azalaki na mbula 65, kasi balandaki malako yango. “Mpo na kondima, afandi lokola mopaya kati na mokili na elaka, kati na hema mpo na ndako.”—Baebele 11:9; Genese 12:4.
Kondima lokola oyo ya Abalayama lelo oyo
8. Soki totaleli ndakisa ya Abalayama mpe batatoli mosusu ya ntango ya kala, tosengeli kokolisa ezaleli nini?
8 Abalayama na libota na ye batángami kati na ‘lipata monene ya batatoli [oyo bazalaki liboso ya Klisto]’ oyo elobelami na Baebele mokapo 11. Na kotalela ndakisa ya kondima ya basaleli wana ya Nzambe na ntango ya kala, Paulo alendisi baklisto ete ‘bálongola bipekiseli nyonso mpe lisumu [kozanga kondima] oyo, na bolɛmbu nyonso, ezali kokanga biso.’ (Baebele 12:1) Ɛɛ, kozanga kondima ekoki ‘kokanga biso na bolɛmbu nyonso.’ Kasi na ntango oyo Paulo azalaki na bomoi mpe na ntango na biso, baklisto ya solo bakolisaki mpe bazali kokolisa kondima makasi lokola oyo ya Abalayama mpe bato mosusu ya ntango ya kala. Na ntina na ye moko mpe bandeko na ye baklisto, Paulo alobi: “Biso tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.”—Baebele 10:39.
9, 10. Elembeteli nini elakisi ete lelo oyo bato mingi bazali na kondima lokola oyo ya Abalayama?
9 Ya solo, makambo mingi ebongwani na mokili banda ntango oyo Abalayama azalaki na bomoi. Atako bongo, tozali se kosambela “Nzambe ya Abalayama,” mpe ye abongwanaka te. (Misala 3:13; Malaki 3:6) Lelo oyo, ebongi ete bato básambela Yehova ndenge basambelaki ye na ntango ya Abalayama. (Emoniseli 4:11) Bato mingi bazali komipesa mobimba na Yehova mpe, lokola Abalayama, bazali kosala mbongwana nyonso esengeli na bomoi na bango mpo na kosala oyo Nzambe alingi. Na mbula eleki, bato 316 092 balakisaki polele ete bamipesi na Nzambe mpe bazwaki batisimo ya mai “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW].”—Matai 28:19.
10 Na kati ya baklisto yango ya sika, mingi te basalaki mibembo milai na mboka mopaya te mpo na kozwa batisimo. Kasi, na elimo, mingi basalaki mibembo milai. Na ndakisa, na ekólo île Maurice, mwasi moko na nkombo Elsie azalaki nganga-nkisi. Moto nyonso azalaki kobanga ye. Mobongisi-nzela monene moko ayokanaki na mwana mwasi ya Elsie ete ayekolisa ye Biblia, mpe na nzela na yango, Elsie azwaki libaku ya ‘kotika molili mpo na koya na pole.’ (Misala 26:18, NW) Ntango Elsie amonaki ete mwana na ye azalaki kosepela na boyekoli, ye mpe andimaki koyekola Mokanda mpo na Masolo ya Biblia. Bazalaki koyekola mbala misato na pɔsɔ mpamba te azalaki na mposa bálendisaka ye ntango nyonso. Mosala na ye ya nganga-nkisi epesaki ye ata bolamu moko te, mpe azalaki na mikakatano mingi. Kasi nsukansuka, asilisaki mobembo molai longwa na losambo ya bilimu kino na losambo ya solo. Ntango bato bazalaki koya koluka nkisi epai na ye, azalaki koloba na bango ete bobele Yehova nde akoki kobikisa bango na mabe. Lelo oyo, Elsie azali Motatoli oyo azwi batisimo, mpe bato 14 na kati ya bandeko mpe bayebani na ye bandimi solo.
11. Baoyo bazali komipesa na Nzambe bandimi kosala mbongwana nini?
11 Na kati ya baoyo bamipesaki na Nzambe na mbula eleki, mingi basalaki mbongwana minene motindo wana te. Kasi bango nyonso balongwaki na liwa ya elimo mpe bakómaki na bomoi na elimo. (Baefese 2:1) Atako na nzoto, bazali naino na mokili, kasi bazali lisusu bato ya mokili te. (Yoane 17:15, 16) Ndenge moko na baklisto bapakolami, baoyo ‘mboka na bango ezali na likoló,’ bazali lokola “batamboli mpe bapaya.” (Bafilipi 3:20; 1 Petelo 2:11) Ezali bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango nde eloko ya liboso oyo epusaki bango na kobanda kolanda mitinda ya Nzambe na bomoi na bango. (Matai 22:37-39) Bazali koluka kaka kokokisa bamposa na bango moko te, to mikano ya kozwa biloko mingi ya mosuni. Bazali na mposa ya lokumu na mokili oyo te. Nzokande, batii miso na bango na elaka ya ‘likoló ya sika mpe nse ya sika, epai kuna bosembo ekozala.’—2 Petelo 3:13; 2 Bakolinti 4:18.
12. Mosala nini esalemaki na mbula eleki oyo elakisi ete Yesu akutaki “kondima awa na nse” na boumeli ya kozala na ye?
12 Ntango Abalayama akendaki na Kanana, azalaki kaka ye moko na libota na ye mpe Yehova ye moko nde azalaki kosunga mpe kobatela bango. Nzokande, baklisto 316 092 oyo bauti kozwa batisimo bazali bango moko te. Ya solo, Yehova azali kosunga mpe kobatela bango na elimo na ye, ndenge asalaki mpo na Abalayama. (Masese 18:10) Kasi, azali mpe kosunga bango na nzela ya “libota” monene ya bato oyo bauti na mikili mingi, oyo motángo na bango eleki ya bato ya bikólo mingi na mokili ya lelo. (Yisaya 66:8) Na mbula eleki, bato 5 888 650 ya ekólo yango balakisaki ete kondima na bango ezali kosala mosala na ndenge basakolaki bilaka ya Nzambe epai ya bazalani na bango. (Malako 13:10) Balekisaki ngonga 1 186 666 708 na mosala yango, mpo na koluka kokutana na bato oyo bazali kosepela na nsango na bango. Litomba ya milende na bango ezali ete batambwisaki boyekoli ya Biblia 4 302 852 epai ya bato oyo bazali na mposa ya kolona kondima. Mpo na kolakisa lisusu molende na bango, bato 698 781 ya “libota” yango basalaki mosala ya mobongisi-nzela, ezala ya sanza na sanza to ya sanza moko to koleka. (Okomona makambo nyonso ya mosala ya Batatoli ya Yehova na boumeli ya mbula eleki na nkasa 12 kino 15.) Mituya minene oyo ezali eyano malamu na motuna ya Yesu, “Wana ekoya Mwana na moto, akokuta kondima awa na nse?”
Bazali sembo atako bazali komekama
13, 14. Lobelá mwa mikakatano oyo Abalayama na libota na ye bakutanaki na yango na Kanana.
13 Mbala mingi, Abalayama na libota na ye bakutanaki na mikakatano na mokili ya Kanana. Mbala moko to koleka, nzala makasi ekɔtaki na mokili ya Kanana mpe yango epusaki ye atika mokili yango mpe akende na Ezipito. Lisusu, mokonzi ya Ezipito mpe mokonzi ya Gelala (pene na Gaza) balukaki kokamata Sala, mwasi ya Abalayama mpe kokómisa ye mwasi na bango. (Genese 12:10-20; 20:1-18) Mpe lisusu, matata ebimaki kati na babateli na mpate ya Abalayama mpe babateli na mpate ya Lota, mpe likambo yango esalaki ete mabota wana báfanda bato na bato na esika na bango. Abalayama alukaki liboso matomba na ye moko te; atikaki Lota apona ngámbo ya mokili oyo alingi, mpe Lota aponaki kofanda na etúká ya Yaladene, oyo ezalaki lokola elanga ya Edene mpo na mabelé malamu mpe kitoko na yango.—Genese 13:5-13.
14 Na nsima, Lota azwamaki na etumba. Mokonzi oyo autaki mosika na Elama elongo na bakonzi mosusu oyo basanganaki na ye babundisaki bakonzi ya bingumba mitano na Lobwaku ya Sidimi. Bakonzi oyo bautaki mosika balongaki bakonzi ya bamboka wana ya zingazinga mpe babɔtɔlaki biloko ebele; bakangaki Lota mpe babɔtɔlaki biloko na ye. Ntango Abalayama ayokaki likambo yango, abangaki te kolanda bakonzi bapaya wana mpe abikisaki Lota na libota na ye, mpe azwaki biloko ya bakonzi ya bamboka wana. (Genese 14:1-16) Nzokande, Lota akutanaki na likambo mosusu oyo eleki mpasi na Kanana. Mpo na ntina oyo toyebi te, Lota akómaki kofanda na Sodomo, atako engumba yango eyebanaki mpo na misala na yango ya bosɔtɔ.b (2 Petelo 2:6-8) Ntango baanzelu mibale bakebisaki ye ete engumba yango ekobomama, Lota akimaki elongo na mwasi na ye na bana na ye ya basi. Kasi, mwasi ya Lota alandaki malako ya polele oyo baanzelu bapesaki te; yango wana, akómaki likonzi ya mungwa. Na boumeli ya mwa ntango, Lota akómaki kofanda na lidusu na kati ya libanga na Soali elongo na bana na ye mibale ya basi. (Genese 19:1-30) Na ntembe te makambo oyo nyonso etungisaki mpenza Abalayama, mingimingi lokola ye nde amemaki Lota na Kanana.
15. Atako Abalayama akutanaki na mikakatano ntango azalaki kofanda na bahema na mboka mopaya, makanisi nini ya mabe eyelaki ye te?
15 Abalayama akanisaki ata mokolo moko ete ebongaki ye na Lota báfanda na kimya na Ulu elongo na bandeko ya tata na ye to na Halana na ndeko na ye Nahola? Akanisaki ata mokolo moko ete ebongaki afanda na engumba oyo ebatelami na esika ya kofanda na bahema? Ekómelaki ye na komituna soki ebongaki mpenza andima bampasi nyonso oyo amonaki na koyengayenga na mboka mopaya? Paulo alobaki boye mpo na Abalayama na libota na ye: “Soki bakanisaki ntango nyonso esika oyo bautaki, mbɛlɛ bazwaki libaku ya kozonga kuna.” (Baebele 11:15, NW) Kasi, bazongaki te. Atako bazwaki mikakatano, batikalaki na esika oyo Yehova alingaki ete bázala.
Koyika mpiko lelo oyo
16, 17. (a) Baklisto mingi bazali kokutana na mikakatano nini lelo oyo? (b) Makanisi nini ya malamu baklisto bazali na yango? Mpo na nini?
16 Lelo oyo baklisto bazali koyika mpiko motindo yango. Atako kosalela Nzambe ezali kopesa bango esengo mingi, bomoi ezali mpasi mpo na baklisto ya solo na mikolo oyo ya nsuka. Atako bafandi na kati ya paladiso ya elimo, bazali na mikakatano ya nkita ndenge moko na bazalani na bango. (Yisaya 11:6-9) Mingi bazali konyokwama mpo na bitumba kati na bikólo, mpe mingi bakómi babola na foti na bango te. Bazali mpe na mikakatano mpamba te lisangá na bango ezali mwa etuluku oyo bato mingi balingaka yango te. Na bikólo mingi, bato bazali kotyela nsango malamu oyo bazali kosakola ata likebi moke te. Na bikólo mosusu, bato oyo bazali ‘kobongisa makambo mabe na nzela ya mibeko’ mpe ‘kolaka mabe na makila ya moto oyo asali likambo te’ bazali kofunda bango na bifundeli ya lokuta. (Nzembo 94:20, 21, NW) Ata na bikólo oyo baklisto bazali kotungisama te mpe epai bato mosusu bazali kokumisa bizaleli na bango ya malamu, babosani te ete basengeli kokesana na baninga na bango ya kelasi mpe ya mosala—ndenge moko na Abalayama, oyo azalaki kofanda na bahema wana bato mosusu zingazinga na ye bazalaki kofanda na bingumba. Ɛɛ, kofanda na mokili kasi ‘kozala bato ya mokili te’ ezali likambo ya pɛtɛɛ te.—Yoane 17:14.
17 Boye tóloba nini, tozali koyoka mawa na ndenge tomipesi na Nzambe? Tozali kokanisa ete ebongaki tótikala na mokili, tózala lokola bato nyonso? Tozali komilelalela mpo na milende nyonso oyo tosali na mosala ya Yehova? Ata moke te! Na esika ya kokanisa makambo totiká, toyebi ete ata eloko nini oyo tomipimelaki, ezali mpenza na motuya te soki tokokanisi yango na mapamboli oyo tozali kozwa mpe oyo tokozwa na mikolo mizali koya. (Luka 9:62; Bafilipi 3:8) Mpe lisusu, bato oyo bazali na mokili, bango nde bazali na esengo? Soki totali malamu, mingi bazali komituna mituna oyo tosilá kozwa biyano na yango. Bazali konyokwama mpo baboyi kolanda litambwisi oyo Nzambe apesi biso na Biblia. (Nzembo 119:105) Mpe mingi bazali koluka boninga malamu mpe bondeko lokola oyo tozali na yango na bandeko na biso bandimi na lisangá ya boklisto.—Nzembo 133:1; Bakolose 3:14.
18. Nsuka ya makambo ezalaka nini ntango baklisto balakisi mpiko lokola oyo ya Abalayama?
18 Ezali solo ete ntango mosusu tosengeli kozala bato ya mpiko lokola Abalayama wana alandaki bato oyo bakangaki Lota. Kasi ntango tomonisi mpiko yango, na nsuka Yehova apambolaka biso. Na ndakisa, na ekólo Irlande du Nord, bato bakómá koyinana makasi mpo na kowelana kati na bituluku, mpe esɛngi kozala na mpiko mpo na komitya na ngámbo ata moko te. Kasi, baklisto ya sembo balandaki maloba ya Yehova epai ya Yosua ete: “Zalá makasi mpe yiká mpiko. Bangá te mpe zalá na nsɔmɔ te, mpo ete [Yehova] Nzambe na yo azali na yo elongo soko wapi ekokenda yo.” (Yosua 1:9; Nzembo 27:14) Nsima ya bambula mingi, bato bakómi komemya bango na ndenge bazalaki kobanga te, mpe lelo oyo bakoki kosakola na bonsomi epai ya bato ya bituluku nyonso ya ekólo yango.
19. Baklisto basepelaka kozala esika nini mpe bakozwa nini soki bazali kolanda litambwisi ya Yehova?
19 Tosengeli kolikya ete likambo nyonso oyo tokutani na yango, soki tolandi litambwisi ya Yehova, nsuka na yango ekozala mpo na lokumu na ye mpe mpo na bolamu na biso. Atako tozali komekama mpe tozali komipimela makambo mingi, ezali na esika mosusu te oyo tobongi kozala; ebongi tózala na mosala ya Yehova, epai tozali na bandeko mpe baninga na biso baklisto mpe tozali kozela na elikya nyonso bomoi ya seko oyo Nzambe alaki mpo na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete Abalayama azwaki Lota, mwana ya ndeko na ye, ntango tata ya Lota akufaki.—Genese 11:27, 28; 12:5.
b Bato mosusu bakanisi ete Lota afandaki na engumba mpo na kobatelama malamu nsima ya kokangama na bakonzi minei.
Ozali koyeba lisusu?
◻ Mpo na nini tosengeli kozala na kondima makasi?
◻ Ndenge nini Abalayama alakisaki ete azalaki na kondima makasi?
◻ Ndenge nini komipesa esalemaka nzela moko na mbongwana na bomoi ya moto?
◻ Mpo na nini tozali na esengo ya kosalela Nzambe atako tokoki kokutana na mikakatano ya lolenge nini?
[Bililingi na lokasa 7]
Abalayama andimaki kosala mbongwana minene na bomoi na ye mpo na kozwa elaka
[Bililingi na lokasa 9]
Bilembeteli elakasi ete Yesu akuti “kondima awa na nse” na boumeli ya kozala na ye