Olukaka Yehova na molende?
MOKLISTO moko azalaki na mposa makasi ya kosakola nsango malamu ya Biblia epai ya bato oyo azalaki kokutana na bango mbala na mbala na engbunduka. (Malako 13:10) Kasi, kobanga ezalaki kozongisa ye nsima. Alɛmbaki nde nzoto? Te, abondelaki makasi mpo na likambo yango mpe akanisaki ndenge oyo akoki kobanda lisolo. Yehova Nzambe ayokaki libondeli ya ndeko yango mpe apesaki ye makasi ya kopesa litatoli.
Milende ya ndenge wana ezali na ntina mingi ntango tozali koluka Yehova mpe lipamboli na ye. Ntoma Paulo alobaki ete: “Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Tosengeli te kosuka kaka na koluka Yehova. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami ‘koluka makasi’ na vɛrsɛ wana esalelami na ndenge oyo ezali kopesa likanisi ya kosala milende mpe komipesa mpenza. Yango esɛngaka komipesa na motema mobimba, na molimo mobimba mpe na makasi nyonso. Soki tozali koluka Yehova na molende, tokozala te bato oyo bakipaka makambo te, tokolɛmbisa mabɔkɔ te to kozala gɔigɔi te. Tokoluka ye nde na molende ya solosolo.—Misala 15:17.
Bato oyo balukaki Yehova na molende
Biblia elobeli ebele ya bato oyo basalaki milende mpo na koluka Yehova. Moko ya bato yango ezali Yakobo, oyo abundaki butu mobimba na anzelu ya Nzambe oyo alataki nzoto ya moto. Mpo na yango, Yakobo azwaki nkombo ya Yisalaele (Moto oyo abundi na Nzambe) mpo “abundaki,” to “alendendelaki,” “asalaki makasi,” “ayikaki mpiko” liboso ya Nzambe. Anzelu yango apambolaki ye mpo na molende na ye.—Genese 32:24-30.
Moto mosusu mpe ezali mwasi moko ya Galilai, oyo bapesi nkombo na ye te, oyo azalaki kotanga makila banda mbula 12 mpe maladi yango ezalaki koyokisa ye “mpasi mingi.” Lokola azalaki na maladi wana, asengelaki te kosimba bato. Kasi, azwaki mpiko mpe alekaki na kati ya bato mpo na kokóma esika Yesu azalaki. Azalaki koloba na nse ya motema ete: “Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakoyoka malamu.” Kanisá naino ndenge mwasi yango azalaki koluka nzela na kati ya ‘ebele ya bato oyo bazalaki kolanda [Yesu] mpe kokanganakangana na ye.’ Ntango kaka asimbaki elamba ya Yesu, ayokaki ete “liziba na ye ya makila ekaukaki”—elingi koloba abikaki na maladi na ye oyo ezalaki kosila te! Mwasi yango abangaki makasi ntango Yesu atunaki ete, “Nani asimbi bilamba na ngai ya likoló?” Kasi Yesu alobaki na ye na boboto mpenza ete: “Mwana mwasi, kondima na yo esali ete oyoka malamu. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.” Milende na ye ezwaki mbano.—Malako 5:24-34; Levitike 15:25-27.
Lisusu, mwasi moko Mofenisia abondelaki Yesu makasi ete abikisa mwana na ye ya mwasi. Yesu alobaki na ye ete ezali malamu te kopesa bambwa mike biloko ya bana. Alingaki koloba ete ebongaki te asalisa bato ya bikólo mosusu mpe atika Bayisaele oyo babongaki kozwa lisalisi na ye. Mwasi yango akangaki ntina ya lisese na ye; atako bongo, abondelaki ye na maloba oyo: “Ɛɛ, Nkolo; kasi ya solo bambwa mike balyaka pumbulu oyo ekweaka uta na mesa ya bankolo na bango.” Kondima makasi ya mwasi yango mpe bosembo na ye etindaki Yesu aloba ete: “E! Mwasi, kondima na yo ezali monene; tiká esalemela yo ndenge olingi.”—Matai 15:22-28.
Soki bato nyonso wana básala milende te, balingaki nde kozwa mapamboli wana? Balingaki nde kozwa yango soki bálɛmba nzoto ntango kaka bakutanaki na mokakatano? Te! Bandakisa yango ezali komonisa mpenza likambo oyo Yesu ateyaki, ete kozala ‘mbamba makasi’ ezali mabe te, kutu ezali na ntina mingi epai ya moto oyo azali koluka Yehova.—Luka 11:5-13.
Na boyokani na mokano na ye
Soki totateli masolo ya bato oyo touti kolobela, oyo babikisamaki na ndenge ya likamwisi, tokoki nde koloba ete basengelaki kaka kosala milende mpo na kobikisama? Te, esengelaki ete makambo oyo basɛngaki eyokana na mokano ya Nzambe. Yesu azalaki na nguya ya kosala makamwisi mpo na komonisa polele ete azali Mwana ya Nzambe, Masiya oyo alakamaki. (Yoane 6:14; 9:33; Misala 2:22) Lisusu, makamwisi oyo Yesu asalaki emonisaki makambo minene oyo Yehova akosalela bato na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.—Emoniseli 21:4; 22:2.
Lelo oyo, mokano ya Nzambe ezali lisusu te ete basambeli ya solo básalaka makamwisi lokola kobikisa bamaladi to koloba na minɔkɔ mosusu. (1 Bakolinti 13:8, 13) Na mikolo na biso, mokano na ye ezali ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama na mabelé mobimba mpo “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4; Matai 24:14; 28:19, 20) Basaleli ya Nzambe bakoki mpenza kolikya ete mabondeli na bango ekoyokama soki bazali kosala yango na molende na boyokani na mokano na ye.
Bato mosusu bakoki kotuna ete, ‘Mpo na nini kosala molende soki mokano ya Nzambe ekokokisama na yango kaka?’ Ezali solo ete Yehova akokokisa mokano na ye ata soki bato basali eloko te, kasi asepelaka bato básala mwa eloko na kokokisama ya mokano na ye. Tokoki kokokanisa Yehova na moto oyo azali kotonga ndako. Motongi ndako azalaka na plan ya ndako, kasi asalelaka biloko oyo akoki kozwa na mboka na bango. Se ndenge yango, Yehova azali na mokano oyo esengeli kokokisama lelo oyo mpe asepeli kosalela basaleli na ye oyo bazali komipesa na bolingo na bango moko.—Nzembo 110:3; 1 Bakolinti 9:16, 17.
Tótalela ndakisa ya elenge Toshio. Ntango akɔtaki na eteyelo ya ntei, azalaki na mposa ya kopesa litatoli mingi mpenza na eteyelo na bango. Azalaki ntango nyonso komema Biblia na ye mpe azalaki kosala makasi mpo azala moklisto oyo azali ndakisa malamu. Na nsuka ya mbula ya liboso, azwaki libaku ya kosala lisolo liboso ya baninga na ye ya kelasi. Toshio abondelaki Yehova asalisa ye mpe ayokaki mpenza esengo na komona ete baninga na ye nyonso bazalaki kolanda na likebi mpenza lisolo na ye oyo ezalaki na motó ya likambo “Nazali na mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela bomoi na ngai mobimba.” Alobaki ete azalaki na mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova oyo azali mosaleli ya ntango nyonso. Moninga na ye moko ya kelasi andimaki koyekola na ye Biblia, akolaki na elimo mpe azwaki batisimo. Milende ya solosolo oyo Toshio asalaki na boyokani na mabondeli na ye ezwaki mbano monene.
Milende nini yo osalaka?
Ezali na ndenge ebele oyo okoki komonisa ete ozali koluka Yehova mpe mapamboli na ye na molende mpenza. Ya liboso, ezali na makambo ya ntina oyo okoki kosala, na ndakisa kobongisa makita. Soki ozali kopesa biyano ya malamu, ozali kosala masolo ya kolendisa, mpe bilakiseli ya malamu, okomonisa molende oyo ozali kosala mpo na koluka Yehova. Okoki mpe komonisa molende na yo soki ozali kobongisa ndenge na yo ya kosakola. Na ndakisa, okoki kosala makasi olobaka lokola moninga epai ya bato oyo ozali kokutana na bango, mpe omekaka ndenge ya kobanda masolo oyo ebongi na teritware na bino. (Bakolose 3:23) Soki moklisto azali mpenza kosala molende, akoki kondima mikumba na lisangá, lokola kokóma mosaleli na misala to nkulutu. (1 Timote 3:1, 2, 12, 13) Soki ozali komipesa, okoki koyoka esengo ya kopesa. Okoki komipesa mpo na kotonga bandako ya filiale moko to kosala na biro ya Batatoli ya Yehova. Soki ozali monzemba mpe okokisi masɛngami, okoki kopesa nkombo mpo na kokende na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, oyo epesaka mibali ya elimo formasyo mpo na kozala babateli malamu ya mpate. Soki obalá, okoki kosala mosala ya misionɛrɛ mpo na komonisa mposa na yo makasi ya kosalela Yehova mingi lisusu. Okoki mpe kokende kofanda na mboka oyo bazali na mposa ya basakoli ya Bokonzi mingi.—1 Bakolinti 16:9.
Likambo ya ntina ezali elimo oyo ozali komonisa na ndenge ozali kokokisa mokumba na yo. Ezala bapesi yo mokumba nini, salá yango na molende, na makasi na yo nyonso, mpe na “bosembo ya motema.” (Misala 2:46; Baloma 12:8) Ebongi mpenza otalelaka mokumba nyonso lokola libaku ya komonisa mposa makasi oyo ozali na yango ya kosanzola Yehova. Bondeláká ntango nyonso Yehova mpo na kosɛnga ye lisalisi, mpe saláká nyonso oyo okoki. Na bongo, okozwa mbano monene.
Mbano ya milende ya solosolo
Ozali koyeba lisusu moklisto oyo abondelaki mpo alonga kobanga oyo azalaki na yango mpo na kosakola epai ya bato oyo azalaki kokutana na bango na nzela ya mosala? Yehova apambolaki mposa na ye. Ndeko yango ayekolaki ndenge malamu ya kobanda lisolo mpe makambo oyo akoki kolobaka. Asalelaki Biblia malamu mpo na kopesa litatoli epai ya mobali moko oyo azalaki komitungisa na komona ete boyokani ezali te na kati ya bato. Kosolola mbala na mbala na moto yango na engbunduka esalaki ete bábanda koyekola Biblia. Ya solo, Yehova apambolaki mpenza molende na ye!
Yo mpe okoki kozwa matomba ya ndenge wana soki ozali kokoba koluka Yehova na molende. Soki ozali komikitisa mpe kolendendela mpe kotya motema mobimba na mokumba nyonso oyo ozwi na lisangá, Yehova akosalela yo na boyokani na mikano na ye mpe akopambola yo mingi.
[Elilingi na lokasa 26]
Mwasi oyo alingaki kosuka ndenge nini soki alendendelaki te?
[Elilingi na lokasa 27]
Olendendelaka na kosɛnga Yehova lipamboli na ye?
[Bililingi na lokasa 28]
Ndenge nini okoki komonisa ete olukaka Yehova na molende?