Ndenge lisiko ezali kobikisa biso
“Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.”—YOA. 3:36.
1, 2. Pesá ntina moko oyo babandaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona.
NIMERO ya minei ya zulunalo oyo, oyo ebimisamaki na sanza Ɔkɔtɔbɛ 1879, elobaki boye: “Moto nyonso oyo ayekoli Biblia na likebi akozanga te komona ntina ya liwa ya Kristo.” Lisolo yango esukaki na likanisi oyo ya ntina mingi: “Tókeba na eloko nyonso oyo ezali kokitisa to kowangana ete liwa ya Kristo ezali likabo mpe ezali kozipa masumu.”—Tángá 1 Yoane 2:1, 2.
2 Ntina moko oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ebimisamaki mpo na mbala ya liboso na sanza ya Yuli 1879 ezalaki ya kokɔtela liteya ya Biblia oyo elobeli lisiko. Zulunalo yango epesaki bato ‘bilei na ntango oyo ebongi’ mpo, na nsuka ya bambula ya 1800, bato mingi oyo bazalaki komibenga bakristo babandaki kotya ntembe ete liwa ya Yesu ekoki kozala lisiko mpo na masumu na biso. (Mat. 24:45) Na ntango wana, bato mingi bakómaki kondima evolisyo, likanisi oyo eyokani te na likambo ya solo oyo elobi ete moto abungisá ezaleli ya kokoka. Bato oyo bandimelaka evolisyo bateyaka ete moto azali na likoki ya kobonga kaka ye moko mpe azali na mposa ya lisiko te. Na yango, toli oyo ntoma Paulo apesaki Timote ebongi mpenza: “Batelá eloko oyo ebombami epai na yo, boyá bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu mpe maloba ya ntembe ya ‘boyebi’ ya lokuta. Lokola bamosusu bamonisaki na lolendo ete bazali na boyebi yango batiki kondima.”—1 Tim. 6:20, 21.
3. Mituna nini tokotalela?
3 Na ntembe te, ozwi ekateli ete ‘okotika kondima te.’ Yango wana, ekozala malamu otalela mituna oyo: Mpo na nini nazali na mposa ya lisiko? Esɛngaki nini mpo na kofuta yango? Nakoki kosala nini mpo nazwa matomba na ebongiseli yango oyo ekoki kobikisa ngai na nkanda ya Nzambe?
Tokoki kobikisama na nkanda ya Nzambe
4, 5. Nini emonisi ete nkanda ya Nzambe efandi likoló ya ebongiseli mabe ya ntango oyo?
4 Biblia mpe masolo ya kala emonisi polele ete banda Adama akweá na lisumu, nkanda ya Nzambe ‘efandi likoló’ ya bato. (Yoa. 3:36) Yango ezali solo mpo moto moko te alongi kokima liwa. Bokonzi ya monguna Satana elongi te kobatela bato na bampasi oyo ezali koyela bango mbala na mbala, mpe guvɛrnema moko te ya bato elongi kokokisa bamposa ya ntina mingi oyo bato ya bikólo na bango bazali na yango. (1 Yoa. 5:19) Yango wana bato bazali kaka konyokwama na bitumba, mobulu, mpe bobola.
5 Na yango, ezali polele ete lipamboli ya Yehova ezali te likoló ya ebongiseli mabe ya ntango oyo. Paulo alobaki ete “nkanda ya Nzambe ezali kouta na likoló mpe kokitela ezaleli nyonso ya kotyola Nzambe.” (Rom. 1:18-20) Na yango, baoyo nyonso bazali na ezaleli ya kotyola Nzambe mpe baboyi kobongola motema bakobuka mbuma ya etamboli na bango. Lelo oyo, nkanda ya Nzambe ezali koyebisama na nzela ya mosala ya kosakola bansango ya lisambisi oyo ezali kosopama lokola malɔzi na mokili ya Satana, mpe mikanda na biso mingi oyo elimbolaka Biblia eyebisaka makambo yango.—Em. 16:1.
6, 7. Mosala nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kotambwisa, mpe libaku nini ezali naino mpo na bato oyo bazali na mokili ya Satana?
6 Yango elingi nde koloba ete ntango ezali lisusu te mpo bato bálongwa na boombo ya boyangeli ya Satana mpe mpo Nzambe andima bango? Ntango ezali naino, mpo porte oyo ezali komema na boyokani na Yehova ezali naino polele. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali “bantoma na esika ya Kristo,” bazali kotambwisa mosala ya kosakola oyo na nzela na yango bazali kopesa bato ya bikólo nyonso libyangi oyo: “Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.”—2 Ko. 5:20, 21.
7 Ntoma Paulo alobaki ete Yesu “azali kosikola biso na nkanda oyo ezali koya.” (1 Tes. 1:10) Ntango Yehova akomonisa nkanda yango na mbala ya nsuka, ekozala libebi ya seko mpo na basumuki oyo babongoli motema te. (2 Tes. 1:6-9) Banani bakobika? Biblia elobi boye: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” (Yoa. 3:36) Ya solo, bato nyonso oyo bazali na bomoi mpe bazali kondimela Yesu mpe lisiko na nsuka ya ebongiseli oyo bakobika na mokolo oyo Nzambe akomonisa nkanda na ye mpo na mbala ya nsuka.
Ndenge lisiko esalaka
8. (a) Elikya kitoko nini ezalaki liboso ya Adama ná Eva? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali na bosembo ya kokoka?
8 Adama ná Eva bakelamaki bato ya kokoka. Soki bákobaka kotosa Nzambe, mabele elingaki sikoyo kotonda na bana na bango oyo balingaki kozala na esengo mpe kofanda ná bango elongo na Paradiso. Kasi likambo ya mawa, baboti na biso ya liboso babukaki mobeko ya Nzambe na nko. Mpo na yango, Nzambe akatelaki bango etumbu ya liwa ya seko mpe abenganaki bango na Paradiso. Ntango Adama ná Eva babandaki kobota bana, lisumu ekɔtelaki bato, mpe nsukansuka mwasi ná mobali yango ya liboso banunaki mpe bakufaki. Yango emonisi ete Yehova akokisaka liloba na ye. Longola yango, azali na bosembo ya kokoka. Yehova akebisaki Adama ete soki alei mbuma oyo epekisamaki, akokufa—mpe esalemaki bongo.
9, 10. (a) Mpo na nini bakitani ya Adama bakufaka? (b) Ndenge nini tokoki kokima liwa ya seko?
9 Lokola tozali bana ya Adama, tosangolá kozanga kokoka oyo etindaka biso na masumu mpe nsukansuka ememaka biso na liwa. Ntango Adama asalaki lisumu, tokoki koloba ete tozalaki naino na mokɔngɔ na ye. Na yango, etumbu ya liwa oyo bakatelaki ye ezalaki mpe mpo na biso. Soki Yehova alongolaki konuna mpe liwa kozanga lisiko efutama, alingaki kozanga bosembo na liloba na ye. Paulo alobelaki mpenza biso nyonso ntango alobaki boye: “Toyebi ete Mibeko ezali eloko ya elimo; kasi ngai nazali na nzoto ya mosuni, natɛkamá mpo nazala moombo ya lisumu. Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?”—Rom. 7:14, 24.
10 Kaka Yehova Nzambe nde akokaki kosala likambo oyo eyokani na mibeko, oyo na nzela na yango akokaki kolimbisa masumu na biso na bosembo nyonso mpe kolongola biso na etumbu ya liwa. Asalaki yango na ndenge atindaki Mwana na ye ya bolingo longwa na likoló mpo abotama moto ya kokoka, oyo akokaki kopesa bomoi na ye lisiko mpo na biso. Na bokeseni na Adama, Yesu atikalaki moto ya kokoka. Ya solo mpenza, “asalaki lisumu te.” (1 Pe. 2:22) Na yango, Yesu azalaki na likoki ya kobota bana ya kokoka. Kasi, andimaki banguna ya Nzambe báboma ye mpo akoka kokómisa bakitani ya Adama, bato ya masumu, bana na ye mpe apesa baoyo bakomonisa kondima epai na ye likoki ya kozwa bomoi ya seko. Biblia elobi boye: “Ezali na Nzambe kaka moko, mpe moyokanisi kaka moko na kati ya Nzambe ná bato, moto moko, Kristo Yesu, oyo amipesaki ye moko lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso.”—1 Tim. 2:5, 6.
11. (a) Ndakisa nini tokoki kopesa mpo na komonisa bolamu ya lisiko? (b) Matomba ya lisiko ezali mpe mpo na banani?
11 Mpo na komona ndenge lisiko esalaka, tózwa ndakisa moko: bato babungisi mbongo na bango nyonso na banki moko ya miyibi mpe mpo na yango, bakómi na banyongo. Leta akateli bankolo banki yango etumbu ya bolɔkɔ mpo na bambula mingi. Bongo bato oyo babungisaki mbongo na bango mpo na banki yango? Batikali babola mpe bazali na eloko mosusu ya kosala te, lobá kaka soki moto moko ya bozwi mpe ya motema malamu azwi banki yango mpe azongiseli bato mbongo na bango oyo ebungaki, mpe na ndenge yango alongoli bango na banyongo. Ndenge moko mpe, Yehova Nzambe ná Mwana na ye ya bolingo basombaki bakitani ya Adama mpe balongolaki nyongo, to lisumu na bango, na motuya ya makila oyo Yesu asopaki; na ndenge yango, bazongiselaki bato elikya ya kozwa lisusu bomoi ya kokoka. Yango wana, Yoane Mobatisi alobaki mpo na Yesu ete: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili!” (Yoa. 1:29) Bato oyo lisumu na bango elongolami ezali kaka baoyo bazali na bomoi te, kasi mpe baoyo bakufá.
Kofuta lisiko esɛngaki nini
12, 13. Ndenge Abrahama andimaki kopesa Yisaka mbeka ekoki kosalisa biso na nini?
12 Tokoki mpenza koyeba te soki kofuta lisiko esɛngaki nini epai ya Tata na biso ya likoló mpe Mwana na ye ya bolingo. Kasi, Biblia ezali na masolo oyo ekoki kosalisa biso tómanyola likambo yango. Na ndakisa, kanisá ndenge Abrahama ayokaki na motema ntango azalaki kosala mobembo ya mikolo misato na mokili ya Moria mpo na kotosa etinda ya Nzambe oyo: “Nabondeli yo, kamatá Yisaka, mwana na yo, mwana na yo kaka moko oyo olingaka mingi, mpe salá mobembo tii na mokili ya Moria mpe kuna pesá ye lokola likabo ya kotumba likoló na moko ya bangomba oyo nakolakisa yo.”—Eba. 22:2-4.
13 Nsukansuka akómaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye. Kanisá mawa makasi oyo Abrahama ayokaki ntango azalaki kokanga Yisaka mabɔkɔ mpe makolo mpe alalisaki ye na etumbelo oyo ye moko asalaki. Na ntembe te, Abrahama ayokaki mpasi mingi ntango atombolaki mbeli oyo alingaki koboma na yango mwana na ye! Kanisá ndenge Yisaka azalaki koyoka ntango alalaki na etumbelo, wana azalaki kozela mpasi makasi ya mbeli oyo ekokata ye mpe ekoboma ye. Anzelu ya Yehova apekisaki Abrahama liboso asala yango. Likambo oyo Abrahama ná Yisaka basalaki na libaku wana esalisi biso tóyeba mwa moke ndenge Yehova ayokaki ntango atikaki bato ya Satana báboma Mwana na ye. Ndenge Yisaka asalaki na bomoko ná Abrahama emonisi malamu ndenge Yesu andimaki konyokwama mpe kokufa mpo na biso.—Ebr. 11:17-19.
14. Likambo nini oyo esalemaki na bomoi ya Yakobo esalisi biso tómona soki lisiko esɛngaki nini?
14 Tokoki mpe komona motuya ya lisiko na likambo moko oyo esalemaki na bomoi ya Yakobo. Na bana na ye nyonso, Yakobo azalaki kolinga mingi Yozefe. Kasi, bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa mpe bayinaki ye. Atako bongo, Yozefe andimaki tata na ye atinda ye akende kotala soki bandeko na ye bazali malamu. Bakendeki koleisa bibwɛlɛ ya Yakobo mosika na nɔrdi, na kilomɛtrɛ soki 100 longwa na ndako na bango na Hebrone. Kanisá ndenge Yakobo ayokaki ntango amonaki elamba ya Yozefe etondi na makila! Agangaki boye: “Ezali elamba molai ya mwana na ngai! Nyama mabe moko ya zamba elei ye! Yozefe apasolami mpenza bitenibiteni!” Nyonso wana esalaki Yakobo mpasi mingi; alelaki Yozefe mikolo mingi. (Eba. 37:33, 34) Soki likambo ebimi, Yehova asalaka mpenzampenza te ndenge bato ya kozanga kokoka basalaka. Atako bongo, komanyola likambo wana oyo esalemaki na bomoi ya Yakobo ekoki kosalisa biso tómona mwa moke ndenge Nzambe ayokaki ntango Mwana na ye ya bolingo anyokwamaki mpe abomamaki na ndenge ya nsɔmɔ ntango azalaki moto awa na mabele.
Ndenge ya kozwa matomba ya lisiko
15, 16. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki ete andimi lisiko? (b) Matomba nini ozwi na lisiko?
15 Yehova Nzambe asekwisaki Mwana na ye oyo atikalaki sembo mpe apesaki ye nzoto ya elimo oyo etondi na nkembo. (1 Pe. 3:18) Na boumeli ya mikolo 40, nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye, alendisaki kondima na bango mpe abongisaki bango mpo na mosala monene ya kosakola oyo ezalaki kozela bango. Na nsima, amataki na likoló. Kuna, alakisaki Nzambe motuya ya makila na ye oyo asopaki, mpo esalelama mpo na bolamu ya bayekoli na ye ya solo, oyo bakomonisa kondima na motuya ya mbeka na ye ya lisiko. Yehova Nzambe amonisaki ete andimi lisiko oyo Kristo apesaki na ndenge atindaki Yesu asopa elimo santu likoló ya bayekoli na ye oyo bayanganaki na Yerusaleme na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.—Mis. 2:33.
16 Bayekoli yango ya Kristo oyo batyamaki mafuta na elimo babandaki na mbala moko kolendisa bato mosusu bázwa batisimo na nkombo ya Yesu Kristo mpo masumu na bango elimbisama, mpe na ndenge ya bákima nkanda ya Nzambe. (Tángá Misala 2:38-40.) Banda mokolo wana oyo etiká nsango tii lelo, bamilio ya bato ya bikólo nyonso bazali kobendama mpo na kokóma na boyokani malamu na Nzambe na nzela ya kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. (Yoa. 6:44) Na esika oyo ya lisolo na biso, tosengeli kotalela lisusu mituna mibale: Ezali nde na moto moko kati na biso oyo bapesi ye elikya ya bomoi ya seko mpo na misala na ye moko ya malamu? Nsima ya kozwa elikya yango kitoko, tokoki nde kobungisa yango?
17. Ndenge nini tosengeli kotalela lipamboli monene ya kozala moninga ya Nzambe?
17 Lisiko ezali mpenza boboto monene. Kasi, lokola bazali komonisa kondima kati na yango, bamilio ya bato lelo bazali kokóma baninga ya Nzambe mpe kozwa elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Nzokande, kokóma moninga ya Yehova ezali ndanga te ete tokokoba kaka kozala na boyokani na ye. Mpo tóbika na mokolo ya nkanda ya Nzambe oyo ezali koya, tosengeli kokoba komonisa botɔndi makasi mpo “na lisiko oyo Kristo Yesu afutaki.”—Rom. 3:24; tángá Bafilipi 2:12.
Kobá komonisa kondima na lisiko
18. Komonisa kondima na lisiko elimboli mpe nini?
18 Yoane 3:36, vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo, emonisi ete kondimela Nkolo Yesu Kristo elimboli mpe kotosa ye. Komonisa botɔndi mpo na lisiko esengeli kotinda biso tóyokanisa bomoi na biso na mateya ya Yesu, ata oyo elobeli bizaleli. (Mrk. 7:21-23) “Nkanda ya Nzambe ezali koyela” bato nyonso oyo baboyi kobongola motema kasi bazali komipesa na makambo lokola pite, masɛki ya nsɔni, mpe “mbindo ya ndenge nyonso,” na ndakisa momeseno ya kotala pornografi.—Ef. 5:3-6.
19. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa kondima na biso na lisiko?
19 Botɔndi na biso mpo na lisiko esengeli kotinda biso tómipesa na ‘misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe.’ (2 Pe. 3:11) Tózwaka ntango oyo ekoki mpo na kobondela mbala na mbala na etingya, koyekola Biblia biso moko, koyangana na makita, koyekola na libota, mpe kosakola nsango ya Bokonzi na molende. Mpe ‘tóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.’—Ebr. 13:15, 16.
20. Baoyo nyonso bazali kokoba komonisa kondima na lisiko bakoki kozela mapamboli nini na mikolo ezali koya?
20 Ntango nkanda ya Yehova ekoya likoló ya ebongiseli ya makambo oyo mabe, tokozala mpenza na esengo mpo tomonisaki kondima na lisiko mpe tozali kaka kozwa yango na motuya! Mpe na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, tokozala na botɔndi libela na libela mpo na lisiko, ebongiseli yango kitoko oyo ebikisaki biso na nkanda ya Nzambe.—Tángá Yoane 3:16; Emoniseli 7:9, 10, 13, 14.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tozali na mposa ya lisiko?
• Kofuta lisiko esɛngaki nini?
• Lisiko ememi matomba nini?
• Ndenge nini tokoki komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu?
[Elilingi na lokasa 13]
Porte oyo ezali komema na boyokani na Yehova ezali naino polele
[Bililingi na lokasa 15]
Komanyola makambo oyo ekómelaki Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo ekoki kosalisa biso tómona motuya monene ya lisiko