Mituna ya batángi
“Bopemi” oyo elobelami na Baebele 4:9-11 (NW) ezali nini, mpe ndenge nini moto akoki “kokɔta na bopemi yango”?
Ntoma Paulo akomelaki Baebele oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso ete: “Etikali na bopemi ya sabata mpo na bato ya Nzambe. Mpamba te moto oyo akɔti na bopemi ya Nzambe, apemi mpe na misala na ye moko, kaka ndenge Nzambe apemaki na misala na ye. Yango wana, tósala makasi mpo na kokɔta na bopemi yango.”—Baebele 4:9-11, NW.
Ntango Paulo alobaki ete Nzambe apemaki na mosala na Ye, emonani ete azalaki kolobela mokapo ya Genese 2:2, epai tozali kotánga ete: “Na mokolo ya nsambo Nzambe asilisaki mosala mosalaki ye, mpe apemaki na mokolo ya nsambo na misala nyonso misalaki ye.” Mpo na nini Yehova “apemaki na mokolo ya nsambo”? Na ntembe te, ezali te mpo ete alingaki kozwa lisusu makasi ‘mpo na misala nyonso oyo asalaki.’ Versɛ oyo elandi epesi biso likanisi moko ya ntina: “Nzambe apambolaki mokolo ya nsambo mpe abulisaki yango, mpo ete na mokolo yango ye apemaki na misala nyonso mizalisaki ye mpe misalaki ye.”—Genese 2:3; Yisaya 40:26, 28.
“Mokolo ya nsambo” ekesenaki na mikolo nyonso motoba oyo elekaki liboso, mpo ezalaki mokolo oyo Nzambe apambolaki mpe abulisaki, elingi koloba ete aponaki mokolo yango to abongisaki yango mpo na mokano moko ya ntina mingi. Mokano yango ezalaki nini? Liboso na yango, Nzambe ayebisaki mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabele. Nzambe alobelaki babalani ya liboso ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili, mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi ya mai, mpe na ndɛkɛ ya likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi ikotambolaka na mokili.” (Genese 1:28) Atako na ebandeli Nzambe apesaki bato bomoi ya kokoka, mpe asalaki mabele na ndenge ya kokoka, esengelaki ntango molai eleka liboso ete bato bazala na bokonzi likoló ya mabele mobimba mpe bakómisa yango paladiso oyo etondi na libota ya bato ya kokoka, ndenge Nzambe akanaki yango. Na bongo, na “mokolo ya nsambo,” Nzambe apemaki, elingi koloba asukisaki mosala na ye ya kozalisa mpo ete biloko oyo azalisaki ekola na boyokani na mokano na ye. Na nsuka ya “mokolo” yango ya nsambo, makambo nyonso oyo Nzambe akanaki ekokokisama. Bopemi yango ekoumela ntango boni?
Soki tozongeli maloba ya Paulo epai ya Baebele, tozali komona ete alobaki ete “etikali na bopemi ya sabata mpo na bato ya Nzambe,” mpe alendisaki baninga na ye baklisto ete básala makasi mpo na “kokɔta na bopemi yango.” Yango emonisi ete ntango Paulo akomaki maloba wana, “mokolo ya nsambo” ya bopemi ya Nzambe, oyo ekokisaki bambula soki 4 000 na ntango wana, ezalaki kaka kokoba. Mokolo yango ekosuka te tii ntango oyo mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabele ekokokisama nyonso, na nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto ya Yesu Klisto, oyo azali “Nkolo ya sabata.”—Matai 12:8; Emoniseli 20:1-6; 21:1-4.
Lokola azalaki na elikya wana kitoko na makanisi na ye, Paulo alimbolaki ndenge oyo moto akoki kokɔta na bopemi ya Nzambe. Akomaki boye: “Moto oyo akɔti na bopemi ya Nzambe, apemi mpe na misala na ye moko.” Yango emonisi biso ete atako bato babandaki malamu, makambo nyonso ezalaki ya kokoka, bato nyonso bakɔtaki na bopemi ya Nzambe te. Esalemaki bongo mpamba te Adama na Eva baumelaki te na bopemi ya Nzambe na “mokolo ya nsambo,” lokola balandaki te makambo oyo abongiselaki bango. Kasi, balandaki nzela na bango moko mpe balingaki ete bámitambwisa na ndenge na bango moko, na ndenge ya Nzambe te. Kutu, na esika ya kondima kotambwisama na Nzambe oyo atondi na bolingo, balandaki nde makambo ya Satana. (Genese 2:15-17) Yango wana, babungisaki likoki oyo bazalaki na yango ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Kobanda ntango wana, bato nyonso bakómaki na boombo ya lisumu mpe ya liwa.—Baloma 5:12, 14.
Botomboki ya bato ebongolaki mokano ya Nzambe te. Mokolo na ye ya kopema ezali se kokoba. Nzokande, Yehova asalaki likambo moko oyo emonisi bolingo, elingi koloba ete abongisaki lisiko na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto, mpo ete baoyo nyonso bakomonisa kondima na lisiko yango, bázala na elikya ya kosikolama na bozito ya lisumu mpe ya liwa. (Baloma 6:23) Yango wana Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete ‘bapema na misala na bango.’ Basengelaki kondima ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na lobiko, kasi te komeka komitambwisa na ndenge oyo bango moko balingi, ndenge Adama na Eva basalaki. Basengelaki mpe koboya kolanda misala na bango moko, misala oyo ezali kaka mpo na litomba na bango moko.
Soki toboyi kolanda bamposa na biso moko mpo na kosala mokano ya Nzambe, tokomiyoka mpenza ete topemi. Yesu alobaki boye: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito, mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”—Matai 11:28-30.
Na ntembe te likambo oyo Paulo alobi mpo na oyo etali bopemi ya Nzambe mpe ndenge oyo moto akoki kokɔta na bopemi yango, elendisaki mpenza Baebele ya Yelusaleme oyo bakómaki baklisto, oyo bayikaki mpiko na minyoko mpe na botyoli oyo bakutanaki na yango mpo na kondima na bango. (Misala 8:1; 12:1-5) Ndenge moko mpe, likambo yango oyo Paulo alobi ekoki kolendisa baklisto lelo oyo. Lokola toyebi ete etikali moke mpo mokano ya Nzambe ya kozongisa paladiso awa na mabele ekokisama, mpo Bokonzi na ye ya sembo eyangela, biso mpe tosengeli kopema na misala na biso moko mpe kosala makasi mpo na kokɔta na bopemi wana.—Matai 6:10, 33; 2 Petelo 3:13.
[Bililingi na lokasa 31]
Elaka ya Nzambe ya kosala paladiso awa na mabele ekokokisama na nsuka ya mokolo na ye ya kopema