Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Mpo na nini makambo ya mabe ezali mingi lelo oyo?
Ntina moko oyo bato basalaka mabe ezali ete motema ya moto ekangamá na mabe. (Genese 8:21) Ntina mosusu ezali ete bato mingi bazangi boyebi ya solosolo ya mokano ya Nzambe. Longola yango, Satana, mobandisi ya mabe, abakisi milende mpo na kokɔtisa mobulu awa na mabelé.—1/1, nkasa 4-6.
• Matomba nini liloba oyo elobami na ntango na yango ekoki kobimisa? (Masese 12:25)
Ekoki kosala ete moto oyo balobi na ye liloba yango amiyoka ete azali na ntina, ekoki kolendisa ye, mpe komonisa ye ete azali na ntina na kati ya lisangá. Lisusu, kozala na mposa ya kopesa longonya esalisaka biso tólukaka makambo ya malamu epai ya basusu.—1/1, nkasa 16-17.
• Biloko nini ezalaki na kati ya sanduku ya kondimana?
Ezalaki na bitanda mibale ya mabanga oyo bakomaki Mibeko mpe ezalaki na mwa ndambo ya mana. Nsima ya botomboki ya Kola, batyaki lingenda ya Alona na Sanduku mpo ezala litatoli mpo na bato ya ntango wana. (Baebele 9:4). Balongolaki lingenda ya Alona mpe mana na Sanduku liboso báfungola tempelo oyo Salomo atongaki.—15/1, lokasa 31.
• Mpo na nini basɛngaki Bayuda ya ntango ya Nehemia bápesaka nkoni na tempelo?
Mobeko ya Moize esɛngaki te ete bápesaka nkoni. Nzokande, na ntango ya Nehemia, bazalaki na mposa ya nkoni mingi mpo na kotumba bambeka na etumbelo.—1/2, lokasa 11.
• Canon de Muratori ezali nini?
Ezali eteni ya maniskri moko oyo ezalaki na Latin. Ekomamaki liboso na monɔkɔ ya Grɛki na nsuka ya ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.). Ezali na liste eleki koumela ya mikanda oyo endimami ete ezali na kati ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. Ezali mpe na bakomantɛrɛ likoló ya mikanda yango mpe eyebisi bakomi na yango.—15/2, nkasa 13-14.
• Mpo na nini Vaseti, mwasi ya mokonzi ya Perse, aboyaki kokende epai ya mokonzi? (Esetele 1:10-12)
Biblia elobi te soki ezalaki mpo na nini. Balimboli mosusu ya maloba ya Biblia balobaka ete mwasi yango aboyaki mpo alingaki te komisambwisa liboso ya bapaya ya mokonzi oyo balangwaki. To mpe ekoki kozala ete mwasi yango, oyo azalaki kitoko mingi, azalaki na botosi te epai ya mobali na ye, mpe na bongo azalaki ndakisa mabe mpo na basi mosusu ya ekólo Perse.—1/3, lokasa 9.
• Ndenge nini lisiko ezali kobikisa biso?
Mbeka oyo Yesu apesaki ekoki kolongola biso na lisumu oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso mpe kosikola biso na makambo ya mabe oyo yango ememeka. (Baloma 6:23). Mbeka yango esalaka mpe ete baklisto ya solo bázala na lisosoli ya malamu. Lisusu, komonisa kondima na lisiko ekoki kosalisa biso tóbanga te ndenge oyo Nzambe azali kotalela biso. (1 Yoane 2:1)—15/3, lokasa 8.
• Liteya nini tokoki kozwa na mobeko oyo epekisaki kolamba mwana ya ntaba na mabɛlɛ ya mama na ye? (Exode 23:19)
Ekoki kozala ete kolamba mwana ya ntaba ndenge wana ezali molulu moko oyo bapakano bazalaki kosala mpo na konɔkisa mbula. (Levitike 20:23) Nzambe apesá ntaba ya mwasi mabɛlɛ mpo na komɛlisa mwana na ye mpo akola. Kolamba mwana ya ntaba na mabɛlɛ yango ezali kozanga limemya mpo na boyokani oyo Nzambe atyá kati ya mama ná mwana. Mobeko yango emonisi ete Nzambe azali na motema mawa.—1/4, lokasa 31.