“Ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso”
“Ekomami te ete, Ndako na ngai ekobyangama ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso?”—MALAKO 11:17.
1. Na ebandeli, Adama na Eva bazalaki na boyokani ya lolenge nini elongo na Nzambe?
NTANGO Adama na Eva bazalisamaki, bazalaki na boyokani ya penepene elongo na Tata na bango ya likoló. Yehova Nzambe azalaki kosolola na bango mpe ayebisaki bango mokano na ye kitoko mpo na bato. Na ntembe te, bazalaki mbala mingi mpenza komipesa na kosanzola Yehova mpo na misala na ye ya kokamwa kati na bozalisi. Wana Adama na Eva bazalaki komona mposa ya kozwa litambwisi, na ntango bazalaki komanyola likoló na mokumba oyo motyamaki liboso na bango ya kozala tata mpe mama ya libota ya bato, bakokaki kobɛlɛma epai na Nzambe uta na esika moko to mosusu kati na paladiso oyo ezalaki bongo efandelo na bango. Bazalaki te na mposa ya mosala ya nganga kati na tempelo moko.—Genese 1:28.
2. Mbongwana nini ekɔtaki na ntango Adama mpe Eva basalaki lisumu?
2 Makambo mabongwanaki na ntango anzelu moko motomboki apusaki Eva na kokanisa ete ezalela ya bomoi na ye ekokóma malamu koleka soki aboi kondima lotómo ya Nzambe ya kozala Mokonzi, kolobáká ete ‘akokóma lokola Nzambe.’ Na yango, Eva alyaki mbuma ya nzeté oyo Nzambe apekisaki bango kolya yango. Na nsima Satana asalelaki Eva mpo na kosenginya mobali na ye. Likambo ya mawa, Adama ayokelaki mwasi na ye oyo autaki kosala lisumu, komonisáká ete atalelaki na motuya mingi boyokani na ye elongo na mwasi na ye koleka boyokani na ye elongo na Nzambe. (Genese 3:4-7) Na bongo, Adama na Eva baponaki Satana lokola Nzambe na bango.—Kokanisá na 2 Bakolinti 4:4.
3. Mbuma mabe nini botomboki ya Adama mpe Eva ebimisaki?
3 Na kosaláká bongo, babalani ya liboso babungisaki bobele te boyokani na bango ya motuya mingi elongo na Nzambe, kasi babungisaki mpe elikya ya kozala na bomoi libela na paladiso awa na mabelé. (Genese 2:16, 17) Na nsima, nzoto na bango ya masumu ebandaki kobeba kino bayaki kokufa. Bana na bango basangolaki ezalela na bango ya bato ya masumu. Biblia eyebisi ete: “Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso.”—Baloma 5:12.
4. Elikya nini Nzambe apesaki epai na bato ya masumu?
4 Likambo moko lisengelaki kosalema mpo ete bato na masumu bázongisama na boyokani malamu elongo na Mozalisi na bango mosantu. Na ntango akatelaki Adama na Eva etumbu, Nzambe apesaki elikya epai na bana oyo basengelaki kobotama na nsima na kolakáká “mombóto” moko oyo asengelaki kobikisa bato na mbeba oyo botomboki ya Satana ebimisaki. (Genese 3:15) Na nsima, Nzambe amonisaki ete Mombóto wana oyo akopesa lipamboli asengelaki koya na nzela ya Abalayama. (Genese 22:18) Mpo na kokokisa mokano wana ya bolingo, Nzambe aponaki bakitani ya Abalayama, Bayisalaele, ete bákóma libota na ye liponami.
5. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba na mozindo kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki elongo na Yisalaele?
5 Na 1513 L.T.B., Bayisalaele basalaki boyokani mpe kondimana elongo na Nzambe mpe bandimaki kotosa mibeko na ye. Baoyo nyonso balingi kosambela Nzambe lelo oyo basengeli koluka koyeba makambo matali kondimana wana ya mibeko mpamba te elobelaki Mombóto oyo alakamaki. Paulo alobaki ete ezalaki nde “elilingi na makambo malingi koya.” (Baebele 10:1) Na ntango Paulo abimisaki liloba oyo, azalaki kolobela mosala ya banganga na Yisalaele kati na mongombo, to hema ya losambo oyo ekokaki komemama longwá na esika moko kino na esika mosusu. Ebéngamaki “tempelo na [Yehova]” to “ndako na [Yehova].” (1 Samwele 1:9, 24) Na kotaleláká na mozindo mosala ya bulɛɛ oyo mozalaki kosalema kati na ndako ya Yehova awa na mabelé, tokoki kososola malamu mpenza ebongiseli ya motema mawa oyo na nzela na yango bato na masumu bakoki lelo kozongisama na boyokani malamu elongo na Nzambe.
Esika eleki bosantu
6. Nini etyamaki kati na Esika eleki bosantu, mpe lolenge nini kozala ya Nzambe emonisamaki kuna?
6 Biblia elobi ete: “Oyo-Aleki-Likoló akofandaka na ndako itongami na mabɔkɔ na bato te.” (Misala 7:48) Nzokande, kozala ya Nzambe kati na ndako na ye awa na mabelé emonisamaki na lipata na ntéi mpenza ya eteni oyo ebéngamaki Esika eleki bosantu. (Levitike 16:2) Na ntembe te, lipata yango lizalaki kongɛnga makasi, kopesáká bongo pole kati na Esika eleki bosantu. Ezalaki likoló na engwongolo ya bulɛɛ oyo ebéngamaki “sanduku na litatoli,” oyo ezalaki na bitanda mibale ya mabángá likoló na yango mitindá mosusu oyo Nzambe apesaki na Yisalaele mikomamaki. Bakeluba mibale ya wolo na mapapu mafungwani batyamaki likoló na ezipeli ya sanduku yango, oyo ezalaki komonisa bikelamu ya elimo oyo bizali na etɛlɛmɛlo monene kati na ebongiseli ya Yehova kuna na likoló. Lipata wana ya kokamwa oyo ezalaki kopesa pole ezalaki likoló na ezipelo ya sanduku mpe na katikati ya bakeluba wana. (Exode 25:22) Yango ezalaki elilingi ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso na lolenge afandi na kiti ya bokonzi na likálo ya likoló oyo esimbami na bakeluba ya solo. (1 Ntango 28:18) Ezali komonisa ntina oyo Mokonzi Hizikiya abondelaki ete: “[Yehova] na bibele Nzambe na Yisalaele, ye oyo akofandaka [“likoló,” NW] na bakeluba.”—Yisaya 37:16.
Esika mosantu
7. Biloko nini bityamaki kati na Esika mosantu?
7 Eteni ya mibale ya mongombo ebéngamaki Esika mosantu. Kati na eteni yango, na lobɔkɔ ya mwasi ya ekɔteli, ezalaki na efandelo kitoko ya miinda oyo ezalaki na bityelo nsambo, na lobɔkɔ ya mobali ezalaki na mesa mpo na limpa ya kolakisama. Etumbelo oyo uta na yango nsolo kitoko ya kozikisama ya mpaka na malasi ezalaki kobuta etyamaki na liboso. Etyamaki na liboso ya ridó oyo ekabolaki Esika mosantu na Esika eleki bosantu.
8. Mikumba nini banganga bazalaki kokokisa yango mokolo na mokolo kati na Esika mosantu?
8 Na ntɔ́ngɔ́ nyonso mpe na mpokwa nyonso, nganga moko asengelaki kokɔta kati na mongombo mpo na kotumba mpaka na malasi likoló na etumbelo ya mpaka na malasi. (Exode 30:7, 8) Na ntɔ́ngɔ́, wana mpaka na malasi ezalaki kotumbama, miinda nsambo oyo mityamaki likoló na efandelo ya miinda esalemi na wolo esengelaki kotondisama lisusu na mafuta. Na butu, miinda yango mizalaki kopelisama mpo na kopesa pole na Esika mosantu. Mikolo nyonso ya Sabata, nganga moko asengelaki kotya mampa 12 oyo euti kotumbama sika likoló na mesa ya limpa ya kolakisama.—Levitike 24:4-8.
Lopango
9. Ntina ya saani ya mai ezalaki nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango?
9 Mongombo ezalaki mpe na lopango na yango, oyo ezingamaki na efelo moko esalemi na bilamba ya hema. Kati na lopango yango ezalaki na saani moko monene epai kuna banganga bazalaki kosukola mabɔkɔ mpe makolo na bango liboso ya kokɔta na Esika mosantu. Basengelaki kosukola mpe liboso ya kopesa mbeka likoló na etumbelo oyo ezalaki kati na lopango. (Exode 30:18-21) Lisɛngami wana ya bopɛto ezali ekundweli makasi epesami epai na basaleli ya Yehova lelo, ete basengeli kosala makasi mpo na kozala pɛto na nzoto, na bizaleli, na makanisi, mpe na elimo mpo ete losambo na bango endimama na Nzambe. (2 Bakolinti 7:1) Na nsima, ezalaki bongo baombo oyo bazalaki Bayisalaele te, baoyo bazalaki kosala na tempelo, nde bazalaki koya na nkoni mpo na kopelisa mɔ́tɔ mpe na mai mpo na kotya yango kati na saani wana.—Yosua 9:27.
10. Tángá mwa ndambo ya mitindo ya bambeka oyo ezalaki kopesama likoló na etumbelo ya mbeka?
10 Ntɔ́ngɔ́ nyonso mpe mpokwa nyonso, bazalaki kotumba mbeka ya mwana ya mpate ya mobali likoló na etumbelo, bakisá mpe mbeka ya mbuma mpe mbeka ya vinyo. (Exode 29:38-41) Bambeka mosusu ezalaki kopesama na mikolo ya ntina mingi. Mbala mosusu mbeka esengelaki kopesama mpo na lisumu oyo moto ye moko asalaki. (Levitike 5:5, 6) Na bantango mosusu, Moyisalaele moko azalaki kopesa na bolingo malamu na ye moko mbeka na kimya oyo kati na yango banganga bazalaki kolya misuni elongo na ye oyo apesaki mbeka. Yango emonisaki ete bato ya masumu bakokaki kozala na kimya elongo na Nzambe, na elobeli ya elilingi, kolyáká elongo na ye. Ata mopaya mpe akokaki kokóma mosambeli ya Yehova mpe kozala na libaku ya kopesa makabo ya bolingo malamu kati na ndako na Ye. Kasi mpo na kopesa lokumu lobongi epai na Yehova, banganga bakokaki kondima bobele makabo ya malamu mpenza. Fufu esalelami mpo na mbeka ya mbuma esengelaki kozala oyo etutami malamu, mpe mbeka ya banyama esengelaki kozala oyo ezangi mbeba.—Levitike 2:1; 22:18-20; Malaki 1:6-8.
11. (a) Makila ya banyama oyo ezalaki kopesama mbeka ezalaki mpo na mosala nini, mpe yango ezalaki komonisa nini? (b) Lolenge nini Nzambe atalelaka makila ezala ya bato to ya banyama?
11 Makila ya bambeka wana ezalaki komemama kino na etumbelo. Yango ezalaki lokola ekundweli ya mokolo na mokolo epai na ekólo yango, ete bazalaki bato na masumu oyo bazalaki na mposa ya mosikoli oyo kosopama ya makila na ye ekokaki kopɛtola masumu na bango mpo na libela mpe kobikisa bango na liwa. (Baloma 7:24, 25; Bagalatia 3:24; kokanisá na Baebele 10:3.) Lolenge wana ya bulɛɛ ya kosalela makila ezalaki mpe kokundwela Bayisalaele ete makila emonisaka bongo bomoi mpe ete bomoi euti na Nzambe. Lolenge nyonso mosusu ya kosalela makila epekisamaki mpenza na Nzambe.—Genese 9:4; Levitike 17:10-12; Misala 15:28, 29.
Mokolo na Mbɔndi
12, 13. (a) Mokolo ya Mbɔndi mozalaki nini? (b) Liboso ete nganga monene akɔta na Esika eleki bosantu, asengelaki kosala nini?
12 Mbala moko na mbula, na ebongiseli oyo ebéngamaki Mokolo na Mbɔndi, libota mobimba ya Yisalaele, elongo na bapaya oyo bazalaki kofanda kati na bango, oyo bazalaki kosambela Yehova, basengelaki kotika misala nyonso mpe basengelaki kokila bilei. (Levitike 16:29, 30) Na mokolo wana ya ntina mingi, libota lizalaki kopɛtolama na masumu na lolenge ya elilingi mpo ete bákoka kozala na boyokani ya kimya elongo na Nzambe mpo na mbula ya sika. Tiká tómona naino kati na makanisi na biso molulu wana mpe tótalela mwa ndambo ya makambo yango ya ntina.
13 Nganga monene azali kati na lopango ya mongombo. Nsima ya komisukola na saani ya mai, abomi ngɔmbɛ mobali mpo ete ekoka kopesama lokola mbeka. Makila ya ngɔmbɛ mobali yango etyami kati na mwa saani moko; ekosalelama na lolenge moko ya ntina mingi mpo na kopɛtola masumu ya Balevi, oyo bazalaki bongo libota ya bonganga. (Levitike 16:4, 6, 11) Kasi liboso ya kosala likambo mosusu na ntina na mbeka yango, ezali na likambo moko oyo nganga monene asengeli kosala. Akamati mpaka na malasi (ekoki kozala ete atii yango na lutu moko monene) mpe akamati makála mazali kopela longwa na etumbelo kati na etyelo na mɔ́tɔ. Sikawa akɔti na Esika mosantu mpe azali kokende pene na ridó ya Esika eleki bosantu. Na malɛmbɛ nyonso, aleki ridó mpe atɛlɛmi liboso na sanduku ya kondimana. Na nsima, kozanga ete moto ata nani mosusu amona ye, asopi mpaka na malasi likoló na makála mapeli ngwaa, mpe Esika eleki bosantu etondi na lipata ya milinga oyo ezali kobimisa nsolo kitoko.—Levitike 16:12, 13.
14. Mpo na nini nganga monene asengelaki kokɔta na Esika eleki bosantu na makila ya banyama mibale ekeseni?
14 Sikawa Nzambe azali pene ya komonisa motema mawa mpe kozongisa boyokani na lolenge ya elilingi. Ezalaki mpo na ntina yango nde ezipeli ya sanduku ebéngamaki “efandelo ya motema mawa” to “ezipeli na kopɛtola.” (Baebele 9:5, NW, maloba na nsé ya lokasa) Nganga monene abimi na libándá ya Esika eleki bosantu, akamati makila ya ngɔmbɛ mobali, mpe azongi lisusu kati na Esika eleki bosantu. Lokola etindá epesamaki kati na Mibeko, azindisi mosapi kati na makila mpe atangisi yango mbala nsambo liboso na ezipeli ya Sanduku. (Levitike 16:14) Na nsima azongi kati na lopango mpe abomi ntaba moko, wana ezali bongo mbeka ya lisumu mpo na “bato nyonso.” Amemi mwa ndambo ya makila ya ntaba yango kati na Esika eleki bosantu mpe asali na yango lolenge moko asalaki na makila ya ngɔmbɛ mobali. (Levitike 16:15) Misala mosusu ya ntina mpe mizalaki kosalema na Mokolo ya Mbɔndi. Na ndakisa, nganga monene asengelaki kotya mabɔkɔ na ye likoló na motó ya ntaba mosusu mpe koyambola likoló na yango “mabe nyonso na bato na Yisalaele.” Na nsima, bamemaki ntaba na bomoi wana kati na lisobe, na elobeli ya elilingi, mpo na kolongola masumu ya libota. Na lolenge yango kopɛtolama ezalaki kosalema mbula na mbula “mpo na banganga mpe mpo na bato nyonso na koyangana.”—Levitike 16:16, 21, 22, 33.
15. (a) Lolenge nini tempelo ya Salomo ekokanaki na mongombo? (b) Mokanda ya Baebele ezali koloba nini na ntina na mosala ya bulɛɛ oyo mosalemaki ezala kati na mongombo to kati na tempelo?
15 Na boumeli ya mbula 486 ya liboso kati na lisoló ya Yisalaele lokola libota lindimami na Nzambe, mongombo oyo ekokaki komemama esalelamaki mpo na bango lokola esika ya kosambela Nzambe na bango, Yehova. Na nsima, Moyisalaele Salomo azwaki libaku malamu ya kotonga ndako moko ya libela. Atako ndako yango esengelaki kozala monene mpe ebongisami malamu koleka, Nzambe apesaki malako ya botongi oyo elandaki bobele lolenge mongombo ezalaki. Motindo moko na mongombo, ezalaki elilingi ya ebongiseli moko ya monene mingi koleka, mpe ya nguya mpo na losambo oyo Yehova nde asengelaki [‘kotɛlɛmisa, kasi moto te,’ NW].—Baebele 8:2, 5; 9:9, 11.
Tempelo ya liboso mpe oyo ya mibale
16. (a) Lisɛngi nini ya bolingo Salomo asalaki wana abandisaki molulu ya bofungoli tempelo? (b) Lolenge nini Yehova amonisaki ete andimaki libondeli ya Salomo?
16 Na ntango asalaki molulu ya bofungoli tempelo wana ya nkembo, Salomo apesaki mpe lisɛngi oyo: “Mpo na mopaya oyo azali na libota na yo Yisalaele te, kasi auti na mokili esii mpo na nkombo na yo monene . . . soko akoya mpe akobondela na ndako oyo, bongo, yoká kuna na likoló, longwá na efandelo na yo mpe salá nyonso oyo mopaya azali kolɔmba yo yango, ete mabota nyonso na mokili mobimba báyeba nkombo na yo mpe bátosa yo lokola libota na yo Yisalaele; báyeba ete ndako oyo etongi ngai ebéngami na nkombo na yo.” (2 Ntango 6:32, 33) Na lolenge ya polele mpenza, Nzambe amonisaki ete andimaki libondeli oyo Salomo asalaki na molulu ya bofungoli. Mɔ́tɔ ekweaki uta na likoló mpe etumbaki bambeka ya banyama oyo etyamaki likoló na etumbelo, mpe nkembo ya Yehova etondisaki tempelo.—2 Ntango 7:1-3.
17. Na nsuka, likambo nini likómelaki tempelo oyo Salomo atongaki, mpe mpo na nini?
17 Likambo ya mawa, Bayisalaele babungisaki ezaleli na bango ya bobángi Yehova. Na nsima, bazangaki limemya mpo na nkombo na ye monene na nzela ya misala ya kosopa makila, ya losambo ya bikeko, ya ekobo, ya kosangisa nzoto kati na bandeko ya libota moko, mpe na konyokola bitike, konyokola basi bakufeli-mibali, mpe konyokola bapaya. (Ezekiele 22:2, 3, 7, 11, 12, 26, 29) Na yango, na mobu 607 L.T.B., Nzambe akweisaki etumbu na kopusáká mampinga ya Babilone ete mabebisa tempelo. Bayisalaele oyo batikalaki na bomoi bamemamaki lokola bakangami na Babilone.
18. Na tempelo ya mibale, mabaku nini mafungwanaki mpo na mibali oyo bazalaki Bayisalaele te, baoyo basimbaki losambo ya Yehova na motema na bango mobimba?
18 Nsima ya mibu 70, batikali ya Bayuda oyo babongolaki motema bazongaki na Yelusaleme mpe bapesamelaki libaku malamu ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova. Likambo ya kobenda likebi ezali ete, banganga mpe Balevi bazalaki lisusu mingi te mpo na kosala kati na tempelo wana ya mibale. Na yango, Banetinimi, bakitani ya baombo oyo bazalaki Bayisalaele te, baombo basáli na tempelo, bapesamelaki mikumba minene lokola baministre kati na ndako ya Nzambe. Nzokande, etɛlɛmɛlo na bango ekokanaki te na oyo ya banganga mpe Balevi.—Ezɛla 7:24; Ezl. 8:17, 20.
19. Elaka nini Nzambe apesaki na ntina na tempelo ya mibale, mpe lolenge nini maloba yango makokisamaki?
19 Na ebandeli, emonanaki lokola ete tempelo ya liboso elekaki mpenza oyo na mibale. (Hagai 2:3) Kasi Yehova ayebisaki ete: “Nakotetemisa mpe mabota nyonso mpe mabonza kitoko na mabota makoingela mpe makotondisa ndako oyo na nkembo. . . . Nkembo na ndako oyo na nsima ekoleka yango na liboso mpe na esika oyo nakopesa kimya.” (Hagai 2:7, 9) Lokola esakolamaki, tempelo ya mibale ezwaki solo nkembo monene koleka. Eumelaki mibu 164 koleka oyo ya liboso, basambeli mingi bautaki na bamboka mingi ya ndenge na ndenge mpe bayanganaki kati na lopango na yango. (Kokanisá na Misala 2:5-11.) Kobongisama lisusu ya tempelo ya mibale ebandaki na eleko ya Mokonzi Elode, mpe lopango na yango eyeisamaki monene. Etongamaki likoló na miboko ya mabángá minene mpe ezingamaki na makonzi kitoko, bonene na yango elingaki kokokana na oyo ya tempelo etongamaki na Salomo. Ezalaki na lopango mosusu monene mpo na bato ya mabota oyo balingaki kosambela Yehova. Efelo ya mabángá ekabolaki Lopango ya Bapakano mpe biteni ya lopango ya kati oyo ebongisamaki bobele mpo na Bayisalaele.
20. (a) Likambo nini monene ekesenisaki tempelo ya mibale na oyo ya liboso? (b) Eloko nini emonisaki ete Bayuda basosolaki ntina ya tempelo malamu te, mpe na yango Yesu asalaki nini?
20 Likambo mosusu ya monene oyo ekesenisi tempelo oyo ya mibale ezali ete Mwana na Nzambe, Yesu Klisto, ateyaki kati na lopango na yango. Kasi motindo moko na tempelo ya liboso, na mobimba na bango Bayuda basosolaki malamu te libaku malamu na bango ya kozala babateli ya ndako ya Nzambe. Batikaki kútu nzela na bato ya mombongo ete básala misala na bango kati na lopango ya Bapakano. Lisusu, bato bapesamelaki nzela ya kokatisa tempelo lokola nzela ya mokuse wana bazalaki kokenda na biloko na bango na ngambo mosusu ya Yelusaleme. Mikolo minei liboso ya kokufa na ye, Yesu apɛtolaki tempelo na misala wana ya mosuni, wana azalaki koloba ete: “Ekomami te ete, Ndako na ngai ekobyangama ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso? Nde bino bosili kozalisa yango esika na bayibi.”—Malako 11:15-17.
Nzambe asundoli ndako na ye ya mabelé mpo na libela
21. Yesu amonisaki nini na ntina na tempelo ya Yelusaleme?
21 Na ntina na likambo wana ya mpiko oyo Yesu asalaki mpo na kokɔtela losambo ya pɛto ya Nzambe, bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazwaki ekateli makasi ya koboma ye. (Malako 11:18) Lokola ayebaki ete akómaki pene na kobomama, Yesu alobaki na bakonzi ya lingomba ya Bayuda ete: “Ndako na bino etikali mpamba.” (Matai 23:37, 38) Na bongo, amonisaki ete etikalaki moke Nzambe aboya kondima lolenge ya losambo oyo ezalaki kosalema kati na tempelo mpenza ya Yelusaleme. Esengelaki lisusu te kozala “ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso.” Na ntango bayekoli balobelaki Yesu na ntina na nkembo ya tempelo yango, alobaki ete: “Bozali kotala oyo nyonso, boye te? . . . libángá moko ekotikala [likoló] na mosusu te, ekozanga kobwakama na nsé te.”—Matai 24:1, 2.
22. (a) Lolenge nini maloba ya Yesu oyo matalelaki tempelo makokisamaki? (b) Na esika ya kotya elikya na bango na engumba moko ya mabelé, eloko nini baklisto ya liboso bazalaki koluka?
22 Esakweli ya Yesu ekokanaki mibu 37 na nsima, elingi koloba, na mobu 70 T.B., na ntango mampinga ya Loma mabebisaki Yelusaleme mpe tempelo na yango. Yango ezalaki elembeteli monene ete Nzambe asilaki mpenza kosundola ndako na ye wana oyo ezalaki awa na mabelé. Yesu asakolaki te ete tempelo mosusu esengelaki kotongama na Yelusaleme. Na ntina na engumba wana ya mabelé, ntoma Paulo akomaki ete: “Tozali na mboka na seko awa te, kasi tozali koluka mboka elingi koya.” (Baebele 13:14) Baklisto ya liboso bazalaki kozela na motema likoló ete bákóma basangani ya “Yelusaleme na likoló”—Bokonzi ya Nzambe oyo ekokani na engumba. (Baebele 12:22) Na yango, losambo ya solo ya Yehova emonisami lisusu te kati na tempelo moko esalemi awa na mabelé. Na lisoló na biso oyo ekolanda, tokotalela ebongiseli eleki monene oyo Nzambe asilaki kotya mpo na baoyo nyonso balingi kosambela ye “na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:21, 24.
Mituna ya bozongeli
◻ Adama na Eva babungisaki boyokani ya lolenge nini epai na Nzambe?
◻ Mpo na nini makambo matali mongombo masengeli kobenda likebi na biso?
◻ Liteya nini tozwi kati na misala oyo mizalaki kosalema kati na lopango ya mongombo?
◻ Mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete tempelo na ye ebebisama?
[Bililingi na lokasa 10, 11]
Tempelo oyo etongamaki lisusu na Elode
1. Esika eleki bosantu
2. Esika mosantu
3. Etumbelo ya mbeka
4. Saani monene ya ebende
5. Lopango ya banganga
6. Lopango ya Yisalaele
7. Lopango ya basi