Oyebaki yango?
Mbongo oyo bazalaki kosalela misala na tempelo ya Yerusaleme ezalaki kouta wapi?
▪ Misala ndenge na ndenge ya tempelo ezalaki kosalema na mbongo ya mpako, mingimingi ndambo ya zomi oyo moto nyonso azalaki kopesa. Kasi, mpako mosusu mpe ezalaki. Na ndakisa, ntango bazalaki kotonga tabernakle, Yehova alobaki na Moize ete Moyisraele mokomoko oyo akomami nkombo asengeli kopesa ndambo ya shekele moko lokola “likabo ya kopesa Yehova.”—Kobima 30:12-16.
Emonani ete Moyuda nyonso akómaki na momeseno ya kopesa mbongo yango lokola likabo mpo na mpako ya tempelo mbala moko na mbula. Ezali mpako yango nde Yesu atindaki Petro afuta na mbongo ya ebende oyo asengelaki kozwa na monɔkɔ ya mbisi.—Matai 17:24-27.
Eleki bambula mingi sikoyo, bamonaki na Yerusaleme mbongo mibale ya bibende oyo ekokani na oyo bazalaki kosalela mpo na kofuta mpako ya tempelo. Moko na yango, oyo esalemaki na engumba Tire na mobu 22 T.B., bamonaki yango na terase moko ya mai oyo esalemá na siɛklɛ ya liboso. Na ngámbo moko, shekele yango ezali na elilingi ya motó ya Melkart, to Baala, nzambe-mokonzi ya Tire, mpe na ngámbo mosusu, mpongo moko oyo etɛlɛmi na motó ya masuwa. Shekele ya mibale oyo bamonaki esalemaki na mbula ya liboso oyo Bayuda batombokelaki Baroma, elingi koloba mobu 66 tii 67 T.B. Bazwaki yango na libondo ya mabele oyo balongolaki na ngomba ya tempelo. Shekele yango ezali na elilingi ya nkeni to kɔpɔ moko mpe mwa mbuma misato ya grenade; ezali mpe na makomi “Ndambo ya Shekele” mpe “Yerusaleme Mosantu.” Profesɛrɛ Gabriel Barkay alobaki ete mbongo yango ya ebende ezali na “bilembo oyo emonisi ete ezikaki na mɔtɔ, na ntembe te na mɔtɔ oyo ebebisaki Tempelo ya mibale na mobu 70 T.B.”
Misala ya kotonga oyo Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, asalisaki, ezalaki ndenge nini?
▪ Mokanda ya Danyele ezali na maloba oyo Nebukadenezare alobaki ete: “Oyo nde Babilone Monene, oyo ngai natongá na nguya na ngai monene mpo ezala ndako ya mokonzi mpe lokumu ya nkembo na ngai, boye te?” (Danyele 4:30) Engumba yango ya kala ezalaki mpenza monene?
Bato ya mayele ya istware balobaka ete Nebukadenezare atongaki batempelo, bandako minene, bifelo ya engumba, mpe jardin moko kitoko. Tempelo monene oyo ezalaki na katikati ya engumba Babilone etongamaki lokola ziggourat, elingi koloba ndako molai mpe ezalaki na mɛtrɛ koleka 70. Nzokande, buku moko (Babylon—City of Wonders) elobi ete “misala oyo eyebani koleka mosusu nyonso oyo [Nebukadenezare] asalaki ezali Nzela Monene (voie processionnelle) mpe Porte ya Ishtar.” Bikeko ya bankɔsi oyo ezali lokola kotambola ezalaki ngámbo na ngámbo ya Nzela Monene, oyo ezalaki komema tii na Porte ya Ishtar. Mpo na Porte ya Isthar yango moko, oyo ezalaki porte monene mpo na kokɔta na engumba Babilone, buku wana elobi boye: “Etongamaki mobimba na babriki ya langi ya bule mpe ya ngɛlingɛli mpe ezalaki na mayemi ya bangɔmbɛ mpe badalagona oyo ezali lokola kotambola, makambo oyo moto nyonso oyo alekaki na engumba yango akokaki kobosana te.”
Na ebandeli ya bambula ya 1900, bato ya arkeoloji bamemaki biloko mingi oyo batongaki na yango Nzela Monene mpe Porte ya Ishtar mpe bakangisaki yango esika moko na Pergamon Museum, na engumba Berlin, na Allemagne.
[Bililingi na lokasa 12]
Monene na yango mpenza
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na likoló: Clara Emit, na ndingisa ya Israel Antiquities Authority; na nse: Zev Radovan
[Elilingi na lokasa 12]
Porte ya Ishtar ndenge ebongisami