Mokanda ya Biblia nimero 2—Exode
Mokomi: Mose
Esika ya bokomi: Mokili mokauki
Nsuka ya bokomi: 1512 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 1657-1512 L.T.B.
1. (a) Wapi makambo minene mazali kati na Exode? (b) Wapi bankombo oyo epesamaki na Exode, mpe yango ezali bolandani ya lisoló nini?
MASOLÓ ya kosimba motema matali bilembo mpe makamwisi minene oyo Yehova asalaki mpo na kosikola libota oyo limemi nkombo na ye longwa na bampasi ya Ezipito, lolenge abongisaki Yisalaele ete ezala libota na ye mpenza ya “bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ,” mpe ebandeli ya lisoló ya Yisalaele lokola libota ya Teokrasi—wana ezali makambo mazali kati na mokanda ya Biblia oyo ebéngami Exode. (Ex. 19:6) Na Liebele, yango ebéngami Weʼelʹleh shemohthʹ, oyo elimboli “Sikawa oyo ezali nkombo,” to bobele Shemohthʹ, “Nkombo,” engebene maloba na yango ya ebandeli. Nkombo ya mikolo na biso euti na libongoli ya Greke ya Septante, epai yango ebéngami Eʹxo·dos, oyo ekomamaki na Latin Exodus, oyo elimboli “Bobimi” to “Bokei.” Exode wana ezali bolandani ya lisoló ya Genese, yango emonisami na liloba ya ebandeli, “Sikawa“ (oyo elimboli, “Mpe”), mpe na botángi lisusu ya nkombo ya bana ya Yakobo, lokola yango ekamatami longwa na lisoló mobimba ya Genese 46:8-27.
2. Nini Exode emonisi na ntina na nkombo YEHOVA?
2 Mokanda ya Exode emonisi nkombo monene ya Nzambe, YEHOVA, kati na bonene ya nkembo na yango mpe bosantu na yango. Lokola abandaki komonisa bozindo ya ndimbola ya nkombo na ye, Nzambe ayebisaki Mose ete, “NAKOZALA OYO NAKOZALA,” mpe abakisaki ete asengelaki koyebisa Yisalaele ete, “NAKOZALA [Liebele: אהיה, ʼEh·yehʹ, longwa na likelelo ya Liebele ha·yahʹ] asili kotinda ngai epai na bino.” Nkombo YEHOVA (יהוה, YHWH) euti na lolenge moko ya likelelo ya Liebele ha·wahʹ, “kokóma,” mpe elimboli mpenza “Ye oyo asalaka ete ekóma.” Ya solo, misala ya nguya mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova oyo abandaki sikawa koyeisa mpo na bolamu ya bato na ye, Yisalaele, ekumisaki mpe elatisaki nkombo yango na lokumu monene, kosaláká ete yango ekundolama “na libota moko nsima na libota mosusu,” nkombo yango esengeli kopesamela limemya mpo na seko. Ezali likambo lileki ntina ete tóyeba makambo ya kokamwa oyo mazingi nkombo wana mpe ete tósambela bobele Nzambe moko ya solo, Ye oyo alobi ete, “Nazali Yehova.”a—Ex. 3:14, 15, NW; 6:6.
3. (a) Lolenge nini toyebi ete Mose nde akomaki mokanda ya Exode? (b) Ntango nini Exode ekomamaki, mpe yango esangisi makambo masalemaki longwa na eleko nini?
3 Mose azali mokomi ya Exode, lokola yango emonisami na likambo oyo ete ezali volimi ya mibale ya Pantatɛ́kɛ. Mokanda yango moko emonisi mbala misato ete Mose nde akomaki yango na litambwisi ya Yehova. (17:14; 24:4; 34:27) Engebene banganga-mayele ya Biblia Westcott mpe Hort, Yesu mpe bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto bazali kotánga to kolobela Exode koleka mbala 100, na ndakisa ntango Yesu alobaki ete: “Mose apesaki bino Mibeko, boye te?” Exode ekomamaki na mokili mokauki ya Sinai, na mobu 1512 L.T.B., mbula moko nsima wana bana ya Yisalaele batikaki Ezipito. Esangisi makambo masalemaki na boumeli ya mbula 145, longwa na kufa ya Yosefe na mobu 1657 L.T.B. kino kotongama ya mongombo ya losambo ya Yehova na mobu 1512 L.T.B.—Yoa. 7:19; Ex. 1:6; 40:17.
4, 5. Elembeteli nini ya arkeoloji oyo endimisi lisoló ya Exode?
4 Koyebáká ete makambo mazali na Exode masalemaki esili koleka soko mibu 3 500, ezali na bilembeteli mingi ya kokamwa ya arkeoloji mpe bilembeteli mosusu ya libándá oyo emonisi bosikisiki ya lisoló yango. Bankombo ya Ezipito esalelami malamu kati na Exode, mpe bankombo ya lokumu oyo elobelami ebongi na makomi ya Ezipito. Arkeoloji emonisi ete yango ezalaki momeseno ya Baezipito na kopesa nzela na bapaya ete báfanda na Ezipito kasi basengelaki kokabwana na bango. Mai ya Ebale Nil masalelamaki mpo na kosukola, yango ekundweli biso likambo oyo ete mwana mwasi ya Falo azalaki kosukola kuna. Bilíki ezalaki kosalema na matiti to na matiti te. Lisusu na ntango oyo Ezipito ekómaki na lokumu na yango banganga-nkisi bayebanaki mingi.—Ex. 8:22; 2:5; 5:6, 7, 18; 7:11.
5 Bamonimá emonisi ete Bafalo bango moko bazalaki kotambwisa makalo na bango na ntango ya etumba, mpe Exode emonisi ete Falo oyo azalaki na mikolo ya Mose alandaki momeseno wana. Oyo nde nsɔ́ni monene azalaki na yango! Kasi lolenge nini mikanda ya kala ya Ezipito mizali te kolobela mikolo oyo Bayisalaele balekisaki na mboka na bango to mpe mpasi monene oyo ekwelaki Ezipito? Arkeoloji esili komonisa ete ezalaki momeseno mpo na bakonzi ya sika ya Ezipito kolongola likambo nyonso oyo ezalaki ya malamu te kati na mikanda. Bakomaki soko moke te kokwea na bango ya nsɔ́ni. Malózi oyo makwelaki banzambe ya Ezipito—lokola nzambe ya Nil, nzambe ya mbemba, mpe nzambe ya moi—oyo ekitisaki lokumu ya banzambe wana ya lokuta mpe emonisaki Yehova ete aleki likoló, ebongaki te kotyama na mikanda ya libota wana ya lolendo.—14:7-10; 15:4.b
6. Na bisika nini Bayisalaele batambolaki liboso?
6 Mibu 40 ya mosala ya Mose lokola mobateli na mpate epai na Yetelo esalisaki ye na koyeba lolenge ya bomoi mpe bisika ya mai mpe ya bilei kati na etúká, yango epesaki ye makoki ya kokamba bobimi. Nzela ya sikisiki ya bobimi ekoki te koyemama na bosolo nyonso lelo, mpamba te bisika bikeseni oyo bilobelami kati na lisoló bikoki te koyebana malamumalamu. Atako bongo, Mala, moko na bakáa ya liboso kati na esanga ya Sinai, mbala mingi emonisami na ʽEin Hawwara, ezwami na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 80 na Súdi kino na Súdi-Ɛ́sti ya Suez ya mikolo na biso. Elimi, esika káa ya mibale ezalaki, na momeseno bakokisaka yango na mokɛli ebéngami Gharandel, oyo ezwami na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 88 na Súdi kino na Súdi-Ɛ́sti ya Suez. Likambo ya kosepelisa, esika wana oyo ezali na mikolo na biso eyebani lokola esika ya mai mingi oyo ezali na bitwɛlɛ mpe banzeté ya mbila, kokundweláká biso Elimi oyo elobelami kati na Biblia, oyo ezalaki na “maziba zomi na mibale ya mai mpe banzeté ya mbila ntuku nsambo.”c Atako bongo bosolo ya lisoló ya Mose ekangami te bobele likoló na boyokani oyo arkeoloji emonisi kati na bisika bikeseni mpe kozwama na yango na nzela ya mibembo.—15:23, 27.
7. Elembeteli nini mosusu, sangisá kotongama ya mongombo, endimisi ete Exode epemamaki?
7 Lisoló ya botongi mongombo na bisobe oyo bizali liboso ya Sinai eyokani na makambo ya esika yango. Nganga-mayele moko alobaki ete: “Na lolenge na yango, na botongi na yango, mpe na bisaleli na yango, mongombo ebongi mpenza na mokili mokauki. Mabaya oyo esalelamaki na botongi ezalaka kuna mingi.”d Ezala mpe bankombo, mimeseno, makambo ya losambo, bisika, zébi ya mokili, to bisaleli, bilembeteli nyonso ya libándá bimonisi ete lisoló ya Exode epemamaki esili koleka mibu soko 3 500.
8. Lolenge nini Exode emonisami ete ezali na boyokani na Makomami mosusu lokola masoló mapemami mpe oyo mazali na litomba?
8 Bakomi mosusu ya Biblia bazalaki kotánga Exode mbala mingi, komonisáká ndimbola ya bisakweli na yango mpe motuya na yango. Mbula koleka 900 na nsima, Yilimia akomaki na ntina na “Nzambe ya solo, Oyo na monene, Oyo na nguya, [Yehova] na bibele ezali nkombo na ye,” oyo abimisaki libota na ye, Yisalaele, longwa na Ezipito “na bilembo mpe na makamwisi mpe na lobɔkɔ na nguya mpe na lobɔkɔ losembolami mpe na nsɔ́mɔ monene.” (Yil. 32:18-21) Mbula koleka 1 500 na nsima, Setefano atongaki litatoli ya kosimba motema oyo ememaki na kobomama na ye lokola martíru likoló na makambo oyo mazali na Exode. (Mis. 7:17-44) Bomoi ya Mose etángami mpo na biso lokola ndakisa ya kondima na Baebele 11:23-29, mpe Paulo alobeli mbala mingi makambo mazali na Exode lokola ndakisa mpe makebisi mpo na biso lelo oyo. (Mis. 13:17; 1 Kol. 10:1-4, 11, 12; 2 Kol. 3:7-16) Nyonso oyo ezali kosalisa biso na koyeba lolenge nini biteni ya Biblia bizali na boyokani moko na mosusu, eteni mokomoko ezali na boyokani na komonisama ya mokano ya Yehova na lolenge ya kopesa litomba.
MAKAMBO MAZALI KATI NA EXODE
9. Mose abotamaki mpe abɔkwamaki na ezalela ya makambo ya lolenge nini?
9 Yehova atindi Mose, alobeli mingi nkombo na Ye oyo esengeli kokanisama (1:1–4:31). Nsima ya kotánga nkombo ya bana na Yisalaele oyo bautaki na Ezipito, Exode elobeli kufa ya Yosefe. Na ntango wana mokonzi ya sika abimi na Ezipito. Wana amoni ete Bayisalaele bazali kolanda “koya mingi mpe kokóma na nguya koleka na lolenge ya kokamwa,” akamati meko ya makasi, sangisá misala makasi, mpe ameki kokitisa motuya ya mibali na kopesáká etindá ete báboma bana nyonso ya mibali oyo bazali kobotama sika. (1:7) Ezali na ezalela wana ya makambo nde mwana moko ya mobali abotami epai na Moyisalaele moko na ndako ya Levi. Mwana yango azali mwana ya misato kati na libota. Wana akokisi sanza misato uta kobotama, mama na ye abombi ye kati na kitunga ya matóló katikati na matiti na libongo ya Ebale Nil. Mwana mwasi ya Falo amoni ye, asepeli na mwana wana ya mobali mpe akamati ye. Mama na ye moko akómi monungisi na ye, mpe lokola litomba, abɔkwami na ndako ya Moyisalaele. Na nsima, bamemi ye na lopango ya Falo. Azwi nkombo ya Mose, oyo elimboli “Kobimisama na [elingi koloba, kobikisama longwa na mai].”—Ex. 2:10; Mis. 7:17-22.
10. Makambo nini mamemi Mose na kozwa mokumba moko ya ntina monene?
10 Mose yango azali komibanzabanza mpo na bolamu ya baninga na ye Bayisalaele. Abomi Moezipito moko mpo ete azalaki konyokola Moyisalaele moko. Mpo na yango, asengeli kokima, mpe bongo akómi na mokili ya Midiani. Kuna abali Sipola, mwana mwasi ya Yetelo, nganga ya Midiani. Na nsima wana, Mose aboti bana mibale ya mibali, Gelesome mpe Eliesele. Na nsima, na mibu 80, esili ye kolekisa mbula 40 kati na mokili mokauki, Mose apesameli mosala moko ya ntina na Yehova mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova. Mokolo moko wana azalaki kobatela etongá ya Yetelo pene na Holebe, ‘ngomba ya Nzambe na solo,’ Mose amoni nzeté ya nzubɛnzubɛ ezali kopela mɔ́tɔ kasi ezali kozika te. Wana akei mpo na kotala yango, anzelu ya Yehova alobi na ye mpe ayebisi ye mokano ya Nzambe etali kobimisa libota na ye “bana na Yisalaele longwa na Ezipito.” (Ex. 3:1, 10) Mose asengeli kosalelama lokola esaleli ya Nzambe mpo na kosikola Bayisalaele longwa na boombo na Ezipito.—Mis. 7:23-35.
11. Na lolenge nini ya sikisiki Yehova ayebisi sikawa nkombo na ye?
11 Mose atuni bongo lolenge nini akolobela Nzambe epai na bana na Yisalaele. Ezali awa, mpo na mbala ya liboso, nde Yehova ayebisi ndimbola mpenza ya nkombo na ye, kosangisáká yango na mokano ya sikisiki mpe kosaláká ete yango ekanisama. “Oyo ezali oyo okoloba epai na bana na Yisalaele ‘NAKOZALA asili kotinda ngai epai na bino . . . Yehova Nzambe ya batata na bino, Nzambe na Abalayama, Nzambe na Yisaka mpe Nzambe na Yakobo, asili kotinda ngai epai na bino.’” Nkombo na ye, Yehova, emonisi ye lokola ye oyo ayeisaka mikano na ye na boyokani na libota oyo ememi nkombo na ye. Epai na libota wana, bakitani na Abalayama, akopesa mokili oyo alakaki epai na batata na bango, ‘mokili motondi na mabɛlɛ mpe na mafuta na nzoi.’—Ex. 3:14, 15, 17, NW.
12. Makambo nini Yehova alimboli epai na Mose mpo na kosikola Bayisalaele, mpe lolenge nini bato bandimi bilembo?
12 Yehova alimbweli Mose ete mokonzi ya Ezipito akotika te Bayisalaele kokende na bonsomi, kasi nde Ye akobɛta liboso Ezipito na misala na Ye ya kokamwa. Alona, ndeko ya Mose, apesami mpo na kozala molobeli na ye, mpe bazwi bilembo misato ya kosala mpo na kondimisa Bayisalaele ete bayei na nkombo ya Yehova. Wana ezali bango kokende na Ezipito, mwana ya Mose asengeli kokatama ngenga mpo na kopɛngola kufa kati na libota, kokundweláká Mose masɛngami ya Nzambe. (Gen. 17:14) Mose mpe Alona bayanganisi mikóló ya bana ya Yisalaele mpe bayebisi bango mokano ya Yehova motali kobimisa bango longwa na Ezipito mpe kokɔtisa bango na Mokili ya Ndaka. Basali bilembo, mpe bato bandimi.
13. Litomba nini libimi na bokutani ya liboso kati na Mose mpe Falo?
13 Malózi na Ezipito (5:1–10:29). Mose mpe Alona bakei sikawa epai na Falo mpe bayebisi oyo Yehova, Nzambe ya Yisalaele, asili koloba ete: “Tiká bato na ngai kokende.” Na elobeli ya kotyola, na lolendo nyonso Falo ayanoli ete: “[Yehova] azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye mpe natika Yisalaele kokenda? Ngai nayebi [Yehova] te, mpe nakotika Yisalaele kokenda te.” (5:1, 2) Na esika ya kopesa bonsomi na Bayisalaele, apesi nde bango misala makasi koleka. Atako bongo, Yehova alobeli lisusu elaka na ye ya kobikisa, koyokanisáká yango lisusu na kosantisama ya nkombo na ye: “Nazali Yehova . . . Nakomimonisa solo ete nazali Nzambe mpo na bino . . . Nazali Yehova.”—6:6-8, NW.
14. Lolenge nini Baezipito basɛngisamaki na kondima “mosapi na Nzambe”?
14 Elembo oyo Mose asali liboso na Falo, na nzela ya Alona na kobwakáká nzeté na ye ete ekóma nyoka monene, emekolami na banganga-nkisi ya Ezipito. Atako banyoka na bango emelamaki na nyoka monene ya Alona, Falo azali sé koyeisa motema na ye makasi. Sikawa Yehova abandi koyeisa malózi zomi moko nsima na mosusu likoló na Ezipito. Ya liboso, ebale na bango Nil mpe mai nyonso ya Ezipito ebongwani makila. Na nsima etumbu ya mbemba eyei likoló na bango. Malózi mibale wana emekolami na banganga-nkisi, kasi bolózi ya misato, oyo ya ngungi likoló na bato mpe banyama, balóngi komekola yango te. Banganga na Ezipito bapusami na kondima ete oyo ezali “mosapi na Nzambe.” Atako bongo, Falo akotika Yisalaele kokende te.—8:19.
15. Malózi nini makweli bobele Baezipito, mpe mpo na ntina nini bobele moko Yehova atiki nzela ete Falo alanda kozala na bomoi?
15 Malózi misato ya liboso makweli Baezipito mpe Bayisalaele, kasi kobanda na oyo ya minei, bobele Baezipito nde bamoni mpasi, nzokande na nsé ya libateli ya Yehova, Yisalaele ebikisami. Bolózi ya minei ezali liboke ya nkangi. Na nsima, maladi mabe ekweli bibwɛlɛ nyonso ya Ezipito, kolandanáká na babibɔ́ elongo na matutu likoló na bato mpe banyama, na boye ete ata banganga-na-maji bazali na likoki te ya kotɛlɛma liboso na Mose. Lisusu Yehova atiki nzela ete motema ya Falo ekóma makasi, kolobáká epai na ye na nzela na Mose ete: “Kasi, ya solo, mpo na likambo oyo, nakotika yo na bomoi, mpo na komonisa yo nguya na ngai mpe mpo ete nkombo na ngai esakolama na mabelé mobimba.” (9:16) Na nsima Mose ayebisi epai na Falo bolózi oyo ekolanda, “matandala ya makasi,” mpe awa ezali mbala ya liboso Biblia elobeli ete bamoko kati na basaleli ya Falo babangi maloba ya Yehova mpe basali na boyokani na yango. Bolózi ya mwambe mpe ya libwa—kobima ya mayoyo mpe molili moko makasi—oyo elandanaki nokinoki, na boye ete Falo, moto ya motó makasi mpe oyo azalaki na nkanda makasi akani koboma Mose soki ameki lisusu komona elongi na ye.—9:18.
16. Yehova apesi etindá nini na ntina na Elekeli mpe Elambo ya Mikate mizangi mfulu?
16 Elekeli mpe kobomama ya babotami ya liboso (11:1–13:16). Yehova alobi sikawa ete, “Nazali koyeisa bolózi mosusu moko likoló na Falo mpe Ezipito”—kufa ya babotami na liboso. (11:1) Apesi etindá ete sanza ya Abibu ezala sanza ya liboso mpo na Bayisalaele. Na mokolo ya 10, basengeli kokamata mpate moko to ntaba moko—ya mobali, oyo ezali na mbula moko, oyo ezangi litɔnɔ—mpe na mokolo ya 14, basengeli koboma yango. Na mpokwa yango basengeli kokamata makila ya nyama yango mpe kopakola yango likoló na makonzi mibale ya ndako mpe likoló na monɔkɔ ya ndako, mpe na nsima basengeli kotɛlɛma kati na ndako mpe kolya nyama etumbami, oyo moto moko asengeli kobuka mokuwa na yango te. Basengeli kozala na mfulu na ndako te, mpe basengeli kolya na lombangu, kolata mpe komibongisa mpo na mobembo. Elekeli esengeli kozala lokola ekaniseli, elambo mpo na Yehova na mabota na bango mobimba. Esengeli kolandana na Elambo ya mikolo nsambo ya Mikate mizangi mfulu. Bana na bango nyonso basengeli koteyama mpenza na ntina na ndimbola ya makambo nyonso wana. (Na nsima, Yehova apesi malako ya sikisiki na ntina na bilambo wana, mpe asɛngi ete babotami nyonso ya liboso ya mibali ya Yisalaele, ezala ya bato to mpe ya banyama, basengeli kobulisama mpo na ye.)
17. Makambo nini masali ete yango ezala butu ya kokanisama?
17 Yisalaele esali lokola Yehova alaki. Na nsima likámá libimi! Na katikati ya butu Yehova abomi babotami nyonso ya liboso ya Ezipito wana aleki likoló kasi abikisi babotami nyonso ya liboso ya Yisalaele. Falo angangi ete: “Bóbima kati na bato na ngai.” Mpe ‘Baezipito nyonso babandi koyebisa bato’ ete bákenda nokinoki. (12:31, 33) Bayisalaele basengeli kobima mabɔkɔ mpamba te, zambi bazali kosɛnga mpe kozwa epai na Baezipito biloko ya palata mpe ya wolo mpe bilamba. Batiki Ezipito na lolenge ya bato babongisami mpo na etumba, na motángo ya bato na nguya 600 000, elongo na mabota na bango mpe bibele ya bato ndenge na ndenge oyo bazalaki Bayisalaele te, mpe bitongá mingi ya banyama. Yango etye nsuka na bambula 430 longwa ntango Abalayama akatisaki Pelata mpo na kokɔta na mokili ya Kanana. Yango ezali solo butu oyo esengeli kokanisama.—Ex. 12:40, maloba na nsé ya lokasa ya mibale; Gal. 3:17.
18. Kosantisama nini monene ya nkombo ya Yehova esalemi na Mai Motane?
18 Kosantisama ya nkombo ya Yehova na Mai Motane (13:17–15:21). Kotambwisáká bango na moi na lisalisi ya likonzi na lipata mpe na butu na lisalisi ya likonzi na mɔ́tɔ, Yehova akambi Yisalaele longwa na mokili ya Ezipito na nzela ya Sukote. Falo ayeisi lisusu motó makasi, alandi bango na makalo na ye mabongisami mpo na etumba mpe akanisi ete akozwa bango na motambo na Mai Motane. Mose ayikisi bato mpiko, kolobáká ete: “Bóbanga te. Bótɛlɛma ngwi mpe bómona kobikisama ya Yehova, oyo akosala mpo na bino lelo.” (14:13, NW) Na nsima Yehova asali ete mai mázonga nsima, kofungoláká nzela oyo kati na yango Mose akambi Bayisalaele kozanga likámá na ngámbo ya ɛ́sti. Mampinga ya nguya ya Falo elandi bango, bobele mpo ete yango moko ezwama na motambo mpe ezindisama wana mai mazongaki. Oyo nde kosantisama monene ya nkombo ya Yehova! Oyo nde ntina ya bosepeli monene mpo na ye! Bosepeli wana emonisamaki na nsima kati na loyembo monene ya bolóngi oyo ezali kati na Biblia: “Tiká ngai nayembela Yehova, mpamba te asili kokumisama mingi. Mbalata mpe momati na yango asili kobwaka kati na mai. Nguya na ngai mpe makasi na ngai ezali Yah, mpo ete azali lobiko na ngai. . . . Yehova akoyangela lokola mokonzi libela na libela, mpo na seko.”—15:1, 2, 18, NW.
19. Makambo nini masalemi na mobembo na Sinai?
19 Yehova asali kondimana ya Mibeko na Sinai (15:22–34:35). Longwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, na nsé na litambwisi ya Yehova, Yisalaele esali mobembo kino Sinai, ngomba ya Nzambe ya solo. Wana bato baimaimi na ntina na mai ya bololo na Mala, Yehova ayeisi yango elɛngi mpo na bango. Lisusu, wana baimaimi na ntina na kozanga ya misuni mpe limpa, apesi bango nkanga na mpokwa mpe mana ya kitoko, lokola mamwe oyo ezali kokwea na mabelé na ntɔ́ngɔ́. Mana wana ezalaki limpa mpo na Bayisalaele na boumeli ya mibu 40 oyo milandaki. Lisusu, mpo na mbala ya liboso kati na lisoló ya bato, Yehova asɛngi ete bátosa mokolo ya bopemi, to Sabata, kosɛngáká na Bayisalaele ete bálɔkɔta mana mpo na mikolo mibale, ndambo moko mpo na mokolo ya motoba mpe kobomba ndambo mosusu mpo na mokolo ya nsambo. Abimiseli bango lisusu mai na Lifidimi mpe abundeli bango liboso na Amaleki, kotindáká Mose akoma lisoló ya ekateli na Ye ete Amaleki ekobebisama mpo na libela.
20. Lolenge nini kobongisama ya malamu esalemaki?
20 Na nsima, Yetelo, bokilo ya Mose, amemeli ye mwasi na ye mpe bana mibali na ye mibale. Sikawa ntango eyei mpo na kobongisa malamu Yisalaele, mpe Yetelo apesi ndambo ya batoli oyo ebongi. Ayebisi Mose ete amema mikumba nyonso ye moko te, kasi apona bato ya makoki, oyo bakobangaka Nzambe mpo na kosambisa bato lokola mikonzi na nkóto, na nkámá, na ntuku mitano, mpe na zomi. Mose asali bongo, sikawa bobele makambo minene nde makoya epai na ye.
21. Elaka nini Yehova apesi na nsima, mpe yango esɛngaki nini?
21 Sanza misato nsima na Bobimi, Yisalaele ezali kotambola kati na mokili mokauki ya Sinai. Awa Yehova alaki ete: “Yango wana soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bo[ko]batela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali na ngai, mpe bokozala bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ.” Bato bandimi ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].” (19:5, 6, 8) Nsima na eleko ya kosantisama mpo na Yisalaele, Yehova akiti na mokolo ya misato likoló na ngomba, kobimisáká milingá likoló na yango mpe kolɛngisáká yango.
22. (a) Mibeko nini mizali kati na Maloba Zomi? (b) Bikateli nini bityami liboso na Yisalaele, mpe lolenge nini libota ekɔtaki kati na kondimana na Mibeko?
22 Na nsima Yehova abandi kopesa Maloba Zomi, to Mibeko Zomi. Yango elobeli mingi bokangami makasi epai na Yehova, epekisi kosambela banzambe mosusu, losambo ya bikeko, mpe kozwa nkombo ya Yehova na lisɛki. Bayisalaele basɛngisami na kosala mosala mikolo motoba mpe bongo kobatela sabata mpo na Yehova, mpe kokumisa tata na mama. Mibeko miye mipekisi koboma bato, ekobo, koyiba, matatoli ya lokuta, mpe lokoso misukisi Maloba Zomi. Na nsima Yehova akóbi koyebisa bikateli liboso na bango, malako mpo na libota ya sika, na ntina na boombo, kobundisa, kozokisa, lifuta, koyiba, makámá ya mɔ́tɔ, losambo ya lokuta, kobebisa basi, konyokola basi-bakufeli-mibali mpe bitike, kodefa, mpe makambo mosusu mingi. Mibeko ya Sabata mipesami, mpe bilambo misato na mbula bibongisami mpo na losambo ya Yehova. Na nsima, Mose akomi maloba ya Yehova, mbeka ipesami, mpe ndambo na makila emwangisami likoló na etumbelo. Búku ya kondimana etángami liboso na bato, mpe na nsima bamonisi lisusu mposa na bango ya kotosa, makila oyo etikalaki emwangisami likoló na búku mpe likoló na bato banso. Na yango Yehova asali Kondimana ya Mibeko elongo na Yisalaele na nzela ya moyokanisi, Mose.—Ebe. 9:19, 20.
23. Malako nini Yehova apesi na Mose likoló na ngomba?
23 Na nsima Mose amati epai na Yehova na ngomba mpo na kozwa Mibeko. Na boumeli ya mikolo 40 butu na moi, azali kozwa malako mingi na ntina na bisaleli ya mongombo, makambo ya sikisiki matali biloko na yango, makambo ya sikisiki matali mongombo yango moko, mpe lolenge ya bilamba ya bonganga, sangisá etando ya wolo malamu, oyo ekomami ete “Bulɛɛ epai na [Yehova],” likoló na elamba na motó ya Alona. Kotyama ya bonganga mpe mosala na yango elobelami na likambo mokomoko, mpe ekundolami epai na Mose ete Sabata ekozala elembo kati na Yehova mpe bana na Yisalaele “mpo na libela na libela.” Na nsima bitando mibale ya maloba na Litatoli bipesami na Mose, oyo bikomami na ‘mosapi na Nzambe.’—Ex. 28:36; 31:17, 18.
24. (a) Lisumu nini bato basali, mpe yango esuki boni? (b) Lolenge nini Yehova amonisi na nsima nkombo mpe nkembo na ye epai na Mose?
24 Na boumeli ya ntango wana, bato bamonisi kozanga motema molai mpe basɛngi na Alona ete asalela bango nzambe oyo azali kotambola liboso na bango. Alona asali yango, asali ngɔmbɛ ya wolo, bato bazali kosambela yango kati na oyo ye abéngi ete “elambo epai na [Yehova].” (32:5) Yehova alobeli likanisi na ye ya koboma Yisalaele, kasi Mose abondeli mpo na bango, atako apasoli bitando na ntina na nkanda oyo azalaki na yango. Bana na Levi batɛlɛmi sikawa na ngámbo ya losambo ya pɛto, babomi bato 3 000 oyo basanganaki na elambo yango. Yehova abɛti bango lisusu na bolózi. Nsima wana Mose abondeli Nzambe ete alanda kokamba libota na ye, ayebisi ye ete akoki komonisa nkembo na Nzambe mpe apesi ye etindá ya kosala bitando mosusu mibale likoló na yango Yehova akokoma lisusu Maloba Zomi. Wana Mose amati na ngomba mpo na mbala ya mibale, Yehova abandi koyebisa ye nkombo Yehova wana Ye aleki liboso: “[Yehova, Yehova], azali Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto.” (34:6, 7) Na nsima, alobeli maloba ya kondimana na ye, mpe Mose akomi yango na motindo tozali na yango lelo kati na Exode. Wana Mose akiti longwa na Ngomba Sinai, loposo ya elongi na ye engɛngi mpamba te nkembo na Yehova emonisami. Na yango, atye ezipeli likoló na elongi na ye.—2 Kol. 3:7-11.
25. Lisoló eyebisi nini na ntina na mongombo mpe komonisama lisusu ya nkembo ya Yehova?
25 Kotongama ya mongombo (35:1–40:38). Na nsima, Mose abyangi Yisalaele esika moko mpe ayebisi bango maloba ya Yehova, koyebisáká bango ete bato na motema malamu bazali na libaku ya kopesa makabo mpo na mongombo mpe bato na motema na mayele bazali na libaku ya kosangana na botongi na yango. Mosika te lapólo eyebisami epai na Mose: “Bato bayeisi biloko mingi koleka oyo esengeli mpo na mosala oyo Yehova asɛngi ete esalema.” (36:5) Na nsé na litambwisi ya Mose basáli oyo batondi na elimo ya Yehova babandi kotonga mongombo mpe biloko na yango ya kati mpe kosala bilamba nyonso mpo na banganga. Mbula moko na nsima ya Bobimi, mongombo esili mpe etyami na lisobe liboso na Ngomba Sinai. Yehova amonisi ete andimi yango na kozipáká hema ya koyangana na lipata mpe na kotondisáká mongombo na nkembo na ye, na boye ete Mose azali na likoki te ya kokɔta kati na hema. Lipata moko wana na moi mpe mɔ́tɔ na butu emonisi ete Yehova azali kotambwisa Yisalaele na boumeli ya mibembo na bango. Ezali sikawa mobu 1512 L.T.B., mpe awa lisoló ya Exode esuki, na kopesáká nkembo na nkombo ya Yehova oyo esantisami na nzela na misala na ye ya kokamwa oyo asali mpo na Yisalaele.
LITOMBA NA YANGO
26. (a) Lolenge nini Exode elendisi kondima epai na Yehova? (b) Lolenge nini kolobelama ya Exode kati na Makomami ya Greke ya boklisto ezali kokólisa kondima na biso?
26 Libosoliboso, Exode ezali komonisa Yehova lokola Mobikisi monene mpe Mobongisi mpe Mokokisi ya mikano na ye ya kokamwa, mpe ezali kolendisa kondima na biso kati na ye. Kondima yango ezali kokóla ntango tozali koyekola makambo mingi oyo mazali na Exode, oyo malobelami kati na Makomami ya Greke ya boklisto, oyo ezali komonisa kokokisama ya makambo mingi ya kondimana ya Mibeko, kondimisama na ntina na lisekwa, ebongiseli ya Yehova mpo na kosunga libota na ye, makambo maleká oyo mamonisi misala ya kopesa lisungi oyo misalemi na baklisto, batoli mpo na limemya epai na baboti, masɛngami mpo na kozwa bomoi, mpe lolenge ya kotalela kobekolama ya sembo. Na nsuka, mibeko milobelami na mokuse na mibeko mibale mitali komonisa bolingo epai na Nzambe mpe epai na mozalani.—Mat. 22:32—Ex. 4:5; Yoa. 6:31-35 mpe 2 Kol. 8:15—Ex. 16:4, 18; Mat. 15:4 mpe Ef. 6:2—Ex. 20:12; Mat. 5:26, 38, 39—Ex. 21:24; Mat. 22:37-40.
27. Lisoló ya makambo maleká oyo mazali kati na Exode ezali na litomba nini mpo na baklisto?
27 Na Baebele 11:23-29 tozali kotánga makambo na ntina na kondima ya Mose mpe ya baboti na ye. Mpo na kondima atikaki Ezipito, mpo na kondima akumisaki Elekeli, mpe mpo na kondima akambaki Bayisalaele na kokatisa Mai Motane. Bayisalaele babatisamaki kati na Mose mpe balyaki bilei ya elimo mpe bamelaki masanga ya elimo. Bazalaki kotalela libanga monene ya elimo, to Klisto, kasi bandimamaki te epai na Nzambe, mpamba te batyaki Nzambe na komekama mpe bakómaki basambeli na bikeko, bato na pite, mpe babomi. Paulo alimboli ete yango ezali kosalelama epai na baklisto lelo oyo: ‘Sikawa makambo oyo makómelaki bango mazali lokola ndakisa, mpe yango ekomamaki mpo na kokebisa biso baoyo nsuka ya bibongiseli ya biloko bisili koya. Na yango tiká ete ye oyo azali kokanisa ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.’—1 Kol. 10:1-12; Ebe. 3:7-13.
28. Lolenge nini bililingi ya Mibeko mpe ya mwana na mpate ya Elekeli esili kokokisama?
28 Mingi mpenza bozindo ya ndimbola ya elimo ya Exode, elongo na kosalelama na yango ya esakweli, epesami kati na nkomá ya Paulo, mingimingi kati na Baebele mikapo 9 mpe 10. “Zambi Mibeko izali bobele elilingi na makambo malingi koya; izali lolenge na solo na makambo na sembo te. Bongo ikoki kobongisa baoyo bakobɛlɛmaka na kosambela te na nzela na mbeka ikotombwa elanga na elanga libela.” (Ebe. 10:1) Na yango, tozali kosepela, na koyeba elilingi mpe kososola bosolo. Klisto “apesaki mbeka mpo na masumu mpo na libela.” Alobelami lokola “Mwana na Mpate na Nzambe.” Mokuwa ata moko te ya “Mwana na Mpate” wana ebukanaki, lokola yango elobelamaki. Ntoma Paulo alobi ete: “Klisto elekeli na biso asili kopesama. Na yango tiká ete tóbatela elambo, na lokweza ya libebi te mpe ya mabe te, kasi na mikate mizangi mfulu ya sembo mpe ya solo.”—Ebe. 10:12; Yoa. 1:29 mpe Yoa. 19:36—Ex. 12:46; 1 Kol. 5:7, 8—Ex. 23:15.
29. (a) Monisá bokeseni kati na kondimana ya Mibeko mpe kondimana ya sika. (b) Mbeka nini Bayisalaele ya elimo bazali kopesa sikawa epai na Nzambe?
29 Yesu akómaki Moyokanisi ya kondimana ya sika, motindo moko Mose azalaki moyokanisi ya kondimana ya Mibeko. Bokeseni kati na kondimana wana mibale elimbolami lisusu polele na ntoma Paulo, oyo alobeli ‘mokanda mokomami ya mibeko’ oyo elongolami na liwa ya Yesu likoló na nzeté ya mpasi. Mosekwi Yesu lokola Nganga Monene azali “mosaleli na bato ya esika mosantu mpe ya hema ya solo, oyo Yehova asali, kasi moto te.” Banganga na nsé ya Mibeko bazalaki kosala “mosala na bulɛɛ kati na elakiseli ya solo te mpe na elilingi ya makambo ya likoló” engebene elakiseli oyo epesamaki na Mose. “Kasi sikawa Yesu asili kozwa mosala moleki kitoko liboso na bato, na boye ete azali mpe moyokanisi ya kondimana eleki malamu, oyo esili kotyama na boyokani na mibeko likoló na bilaka kitoko.” Kondimana na kala esili ngala mpe elongolami mpo ete ezalaki lokola mibeko oyo ezali koyeisa kufa. Bayuda mosusu oyo basosolaki yango te balobelami lokola ete bazalaki na makanisi ya kotala mosika te, kasi baoyo bazalaki bandimi oyo bayebi ete Yisalaele ya elimo ezali na nsé na kondimana na sika bakoki “na bilongi bizangi ezipeli komonisa lokola talatala nkembo ya Yehova,” kozaláká na makoki lokola baministre na yango. Na lisosoli ya pɛto bango bazali na likoki ya kopesa “mbeka na lisanzoli, oyo ezali mbuma na bibɛbu oyo ezali koyambola mpo na nkombo na ye.”—Kols. 2:14; Ebe. 8:1-6, 13; 2 Kol. 3:6-18; Ebe. 13:15, NW; Ex. 34:27-35, NW.
30. Kobikisama ya Yisalaele mpe kokumisama ya nkombo ya Yehova na Ezipito ezalaki elilingi ya nini?
30 Exode ezali kokumisa nkombo ya Yehova mpe lotómo na ye ya kozala mokonzi, kolobeláká mingi kobikisama ya nkembo ya libota ya boklisto ya Yisalaele ya elimo, epai na yango elobamaki ete: “Bozali ‘ekólo eponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami, ete bóyebisa malamu’ na ye oyo abyangi bino kolongwa na molili kokɔta kati na pole na ye na kokamwa. Mpamba te liboso bozalaki libota te, kasi sikawa bozali libota ya Nzambe.” Nguya ya Yehova lokola yango emonisamaki kati na koyanganisama ya Yisalaele ya elimo na mokili mpo na kokumisa nkombo na ye ezali mpenza likamwisi motindo moko na nguya oyo amonisaki mpo na libota na ye na Ezipito ya kala. Na kotikáká Falo na bomoi mpo na komonisa nguya na Ye mpe mpo ete nkombo na Ye ekoka kosakolama, Yehova amonisaki litatoli lileki monene oyo esengeli kopesama na Batatoli na ye baklisto.—1 Pet. 2:9, 10, NW; Lom. 9:17; Emon. 12:17.
31. Exode esakoli nini na ntina na bokonzi mpe kozala ya Yehova?
31 Na bongo, tokoki koloba na kotalela Makomami ete libota oyo esalemaki na nsé ya litambwisi ya Mose ezalaki elilingi ya libota ya sika na nsé ya Klisto mpe bokonzi oyo ekobukana soko moke te. Na kotalela makambo oyo, tolendisami na “kosalela Nzambe mosala na bulɛɛ na bobangi Nzambe mpe na nsɔ́mɔ.” Motindo moko kozala ya Yehova ezipaki mongombo kati na mokili mokauki, bobele bongo azali kolaka ete akozala seko na seko elongo na baoyo bazali kobanga ye: “Talá! Hema na Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango, mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. . . . Komá, mpamba te maloba oyo mazali sembo mpe solo.” Ya solo, Exode ezali eteni ya ntina mpe ya litomba ya lisoló ya Biblia.—Ex. 19:16-19—Ebe. 12:18-29; Ex. 40:34—Emon. 21:3, 5, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Exode 3:14, maloba na nsé ya lokasa; búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 12.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 532, 535; Archaeology and Bible History, 1964, J. P. Free, lokasa 98.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 540-541.
d Exodus, 1874, F. C. Cook, lokasa 247.