“Makambo minene ya Nzambe” ezali kopesa biso mposa ya kosala
“Tozali koyoka bango ndenge bazali koloba na minɔkɔ na biso makambo minene ya Nzambe.”—MISALA 2:11, NW.
1, 2. Likambo nini ya kokamwa esalemaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
NA NTƆNGƆ ya mokolo moko, na nsuka ya prɛnta ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), likambo moko ya kokamwa ekómelaki bayekoli ya Yesu Klisto oyo bayanganaki na ndako moko na Yelusaleme. “Na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kobɛta makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango . . . , mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu.”—Misala 2:2-4, 15, NW.
2 Ebele ya bato batondaki liboso ya ndako yango. Bamosusu bazalaki Bayuda oyo babotamaki na mboka mopaya, “mibali oyo babangaka Nzambe,” oyo bayaki na Yelusaleme mpo na fɛti ya Pantekote. Bakamwaki mpamba te moto na moto azalaki koyoka na monɔkɔ ya mboka na ye ntango bayekoli bazalaki koloba “makambo minene ya Nzambe.” Ndenge nini likambo wana ekokaki kosalema mpo bato oyo bazalaki koloba bazalaki bango nyonso bato ya Galilai?—Misala 2:5-8, 11, NW.
3. Makambo nini Petelo ateyaki ebele ya bato na mokolo ya Pantekote?
3 Ntoma Petelo azalaki moko na bato yango ya Galilai. Ye alobaki ete Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, atako asalaki mabe moko te, babomaki ye mwa bapɔsɔ liboso. Kasi, Nzambe asekwisaki ye. Na nsima, Yesu abimelaki bayekoli mingi, lokola Petelo mpe bamosusu oyo bazalaki wana mokolo yango. Yesu amataki na likoló mikolo zomi liboso ya Pantekote. Ye nde asopelaki bayekoli na ye elimo santu. Likambo yango ezalaki mpenza na ntina mpo na bato oyo bazalaki na fɛti ya Pantekote? Ɛɛ. Liwa ya Yesu epesaki nzela mpo ete masumu ya bato elimbisama mpe bázwa “likabo ya ofele ya elimo santu” soki bamonisi kondima epai na ye. (Misala 2:22-24, 32, 33, 38, NW) Bato oyo bazalaki wana basalaki nini nsima ya koyoka “makambo minene ya Nzambe”? Mpe ndenge nini lisolo oyo ekoki kosalisa biso na kotalela mosala oyo tozali kosala mpo na Yehova?
Bayoki mposa ya kosala mosala!
4. Esakweli nini ya Yoele ekokisamaki mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?
4 Ntango bayekoli oyo bazalaki na Yelusaleme bazwaki elimo santu, balekisaki lisusu ntango te, babandaki mbala moko koyebisa bato mosusu nsango malamu ya lobiko; babandaki epai ya ebele ya bato oyo bayanganaki na ntɔngɔ ya mokolo wana ya Pantekote. Mosala na bango ya kosakola ekokisaki esakweli moko monene oyo Yoele, mwana ya Petuele, akomaki mbula nkama mwambe liboso ete: “Nakosopa [elimo, NW] na ngai likoló ya nzoto nyonso; bana na bino babali mpe bana na bino basi bakosakola, mikóló na bino bakolɔta ndɔtɔ, bilenge na bino bakomona bimonaneli. Ata mpe epai na baombo na ngai babali mpe baombo na nga basi na mikolo yango nakosopa [elimo,NW] na ngai. . . . liboso ya koya ya mokolo ya [Yehova], mokolo monene mpe ya nsɔmɔ.”—Yoele 1:1; 2:28, 29, 31; Misala 2:17, 18, 20.
5. Na ndimbola nini baklisto ya ekeke ya liboso basakolaki? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
5 Yango elingi nde koloba ete Nzambe alingaki kobimisa ebele ya basakoli mibali mpe basi, oyo basengelaki kosala lokola Davidi, Yoele, to Debola, mpe alingaki kosalela bango mpo na kosakola makambo oyo ekoya? Te. Baklisto, oyo esakweli ebengi bango ete ‘bana mibali mpe basi, baombo mibali mpe baombo basi’ basengelaki kosakola na ndimbola oyo ete elimo santu ya Yehova esengelaki kotinda bango báyebisa “makambo minene” oyo Yehova asalaki mpe oyo asengelaki kosala na nsima. Basengelaki nde kozala balobeli ya Oyo-Aleki-Likoló.a Kasi, ebele ya bato oyo bayanganaki basalaki nini nsima ya koyoka makambo wana?—Baebele 1:1, 2.
6. Nsima ya koyoka lisukulu ya Petelo, mingi kati na ebele ya bato bayokaki mposa ya kosala nini?
6 Nsima ya koyoka bandimbola ya Petelo, mingi na kati ya ebele ya bato wana bayokaki mposa ya kosala mosala. “Bayambaki liloba na ye na motema mobimba” mpe “babatisamaki, mpe na mokolo wana milimo soki nkóto misato ebakisamaki.” (Misala 2:41, NW) Bato yango bayebaki makambo mingi ya Makomami mpo bazalaki Bayuda na Baprozelite. Boyebi yango, bakisa mpe kondima oyo bamonisaki na makambo oyo Petelo ateyaki bango, epesaki bango nzela ya kozwa batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:19, NW) Nsima ya batisimo na bango “bakobaki komipesa na mateya ya bantoma.” Lisusu, babandaki koyebisa bato mosusu mateya oyo bautaki koyekola. “Mokolo na mokolo bazalaki ntango nyonso koumela na tempelo na bomoko mpenza, . . . kosanzoláká Nzambe mpe bato nyonso bazalaki komonisela bango boboto.” Na nzela ya mosala wana ya kosakola “Yehova akobaki kobakisela bango mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama.” (Misala 2:42, 46, 47, NW) Eumelaki te, masangá ya baklisto efungwamaki na mikili mingi oyo bandimi yango ya sika bazalaki kofanda. Na ntembe te, molende na bango mpo na kosakola “nsango malamu” ntango bazongaki na bamboka na bango esalaki mpe ete bato bábakisama mingi.—Bakolose 1:23.
Liloba ya Nzambe ezali na nguya
7. (a) Eloko nini ezali kobenda bato ya bikólo nyonso na ebongiseli ya Yehova lelo oyo? (b) Makambo nini ozali komona na mokili mobimba mpe na mboka na bino oyo ezali kopesa elikya ete bato mingi lisusu bakoya na lisangá? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
7 Ezali boni mpo na bato oyo balingi kokóma basaleli ya Nzambe lelo oyo? Bango mpe basengeli koyekola Liloba ya Nzambe malamumalamu. Ntango bazali koyekola yango, bazali koyeba ete Yehova azali Nzambe ya “mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na [motema-boboto, NW] mpe na solo.” (Exode 34:6; Misala 13:48) Bazali koyeba ete Yehova abongisi lisiko na nzela ya Yesu Klisto oyo, makila na ye oyo esopanaki ekoki kopɛtola bango na masumu nyonso. (1 Yoane 1:7) Bazali mpe kokóma na botɔndi mpo na mokano oyo Nzambe azali na yango ya ‘kosekwisa bayengebene mpe bato oyo bazangi boyengebene.’ (Misala 24:15, NW) Mitema na bango ezali kotonda na bolingo mpo na Mopesi ya “makambo minene” yango, mpe bolingo yango ezali kotinda bango básakola mateya yango ya solo ya ntina mingi. Na nsima, bazali kokóma basaleli ya Nzambe oyo bamipesi mpe bazwi batisimo mpe bazali kokoba “kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.”b—Bakolose 1:10b, NW; 2 Bakolinti 5:14.
8-10. (a) Ndenge nini lisolo ya mwasi moko moklisto ezali komonisa ete Liloba ya Nzambe “ezali na nguya”? (b) Lisolo yango eteyi yo nini na ntina na Yehova mpe na ndenge oyo asalelaka basaleli na ye makambo? (Exode 4:12)
8 Boyebi oyo basaleli ya Nzambe bazali kozwa na ntango bazali koyekola Biblia ezali kosuka kaka na bɔɔngɔ te. Boyebi yango ezali kopesa bango mposa ya kosala mosala, ezali kobongola makanisi na bango, mpe ezali kokɔta na mitema na bango. (Baebele 4:12) Na ndakisa, mwasi moko nkombo na ye Camille azalaki kosala mosala ya kobatela mibange. Moko na mibange oyo azalaki kobatela nkombo na ye Martha, ye azalaki Motatoli ya Yehova. Lokola Martha azalaki na maladi ya kobosana makambo nyonso, ezalaki kosɛnga ete bákɛngɛlaka ye ntango nyonso. Basengelaki koyebisa ye mbala na mbala ete asengeli kolya, ata mpe komɛla bilei oyo asili kotya na monɔkɔ. Kasi, ezali na likambo moko oyo Martha abosanaki te.
9 Mokolo mosusu, Martha amonaki Camille azali kolela mpo azalaki na mikakatano oyo ezalaki kopesa ye mawa. Martha atyaki mabɔkɔ na ye na mapeka ya Camille mpe asɛngaki ye ete ayekola na ye Biblia. Ondimi ete Martha, ye oyo azalaki na maladi na ye ya kobosana makambo nyonso akokaki mpenza koyekolisa moto Biblia? Ɛɛ, akokaki! Atako abosanaki makambo mingi, Martha abosanaki te Nzambe na ye oyo asalaka makambo minene; mpe abosanaki te mateya ya solo oyo ayekolaki na Biblia. Ntango bazalaki koyekola, Martha azalaki kosɛnga Camille ete atángaka paragrafe mokomoko, atánga bavɛrsɛ ya Biblia, atánga motuna na nse ya lokasa, mpe na nsima apesa eyano. Basalaki bongo mwa ntango mpe, atako Martha azalaki na makoki mingi te, Camille akolaki na boyebi ya Biblia. Martha amonaki ete Camille asengeli kosanganaka na bato mosusu oyo balingaka kosalela Nzambe. Yango wana, akabelaki Camille elamba na sapato mpo ete alata bilamba ya malamu ntango akoyangana mpo na mbala ya liboso na makita na Ndako ya Bokonzi.
10 Komibanzabanza ya Martha, ndakisa na ye, mpe kondima na ye esimbaki mpenza motema ya Camille. Camille amonaki ete makambo euti na Biblia oyo Martha azalaki kosala makasi mpo na koteya ye ezalaki mpenza na ntina mingi, mpamba te Martha abosanaki makambo mosusu nyonso kasi abosanaki te makambo oyo ayekolaki na kati ya Makomami. Na nsima, ntango batindaki Camille akende kobatela mibange na esika mosusu, amonaki ete asengelaki kokende liboso na makambo oyo Martha azalaki koteya ye. Camille alekisaki te libaku ya liboso oyo azwaki ya kokende na Ndako ya Bokonzi, alataki elamba na sapato oyo Martha apesaki ye mpe akendaki na Ndako ya Bokonzi; kuna, asɛngaki Batatoli bábanda koyekola na ye Biblia. Camille akolaki malamu na elimo mpe azwaki batisimo.
Bazali na mposa ya kotosa mitinda ya Yehova
11. Longola molende na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki komonisa ete nsango ya Bokonzi ezali kopesa biso mposa ya kosala mosala?
11 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova koleka milio motoba, lokola Martha mpe sikoyo na Camille, bazali kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ na mokili mobimba. (Matai 24:14, NW; 28:19, 20) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, “makambo minene ya Nzambe” ezali kopesa bango mposa ya kosala mosala. Bazali na botɔndi mpo na libaku malamu ya komema nkombo ya Yehova mpe mpo na ndenge oyo asopeli bango elimo na ye. Yango wana, bazali kosala makasi mpo na ‘kotambola na ndenge ebongi na Yehova mpo na kosepelisa ye mpenza,’ bazali kotosa mitinda na ye na makambo nyonso na bomoi na bango. Na ndakisa, bazali kotosa mitinda ya Nzambe mpo na molato mpe ndenge ya kobongisa nzoto.—Bakolose 1:10a, NW; Tito 2:10.
12. Mokapo ya 1 Timote 2:9, 10 ezali kopesa toli nini mpo na molato mpe kobongisa nzoto?
12 Ya solo, Yehova ayebisi mitinda na ye na oyo etali lolenge oyo tosengeli kobongisa nzoto na biso. Ntoma Paulo alobelaki mwa masɛngami ya Nzambe na likambo yango. “Nalingi ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na nzela ya misala ya malamu.”c Liteya nini tozali kozwa na maloba yango?—1 Timote 2:9, 10, NW.
13. ‘Molato ya malamu’ elimboli nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mitinda ya Nzambe ezali makasi te?
13 Maloba ya Paulo ezali komonisa ete baklisto basengeli ‘kobongisa nzoto na bango na molato ya malamu.’ Basengeli kolata molato ya bongobongo to ya mobulumobulu te. Moto nyonso, ata oyo azali na bozwi moke, akoki kokokisa mitinda yango oyo ezali makasi te soki azali kosala nyonso ete bilamba na ye ezala malamu, ezala pɛto, mpe ezala kitoko. Na ndakisa, na ekólo moko ya Amerika ya Sudi, mbula na mbula, mpo na kokende na liyangani ya etúká, Batatoli mosusu batambolaka ntaka molai na kati ya zamba mpe na nsima bazwaka bwato; mobembo yango ezwaka bangonga ebele. Na kati ya mobembo, mbala mingi ekómaka ete moto akwea na mai to mosusu mpe elamba na ye ekangama na mwa nzete mpe epasuka. Yango wana, ntango bakómaka na esika ya liyangani, molato na bango ezalaka bongobongo. Na yango, bazwaka ntango mpo na kotonga babutɔ, kobongisa baetirɛti soki ebebaki, kosukola mpe kongoma bilamba oyo bakolata na liyangani. Bapesaka motuya mingi na libaku malamu ya kolya na mesa ya Yehova, mpe balingaka ete molato na bango ezala malamu.
14. (a) Kolata “na makanisi ya malamu mpe na kolekisa ndelo te” elimboli nini? (b) Kolata lokola bato oyo ‘babangaka Nzambe’ ezali kosɛnga biso nini?
14 Paulo alobaki lisusu ete tosengeli kolata “na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu.” Yango elingi koloba ete tosengeli kobongisa nzoto na biso mpe kolata bilamba na biso na ndenge oyo ekobenda mpenza likebi ya bato te, na ndenge ya mobulumobulu te, na ndenge oyo ekolamusa bamposa ya pite te epai ya basusu, oyo ekotika libándá te binama ya nzoto oyo esengeli kobombama, mpe tosengeli te koluka kaka kolanda makambo ya mikolo oyo. Lisusu, tosengeli kolata na ndenge oyo ezali komonisa ete ‘tobangaka Nzambe.’ Likambo wana ezali kotinda biso tókanisa malamu mpenza, boye te? Yango elingi koloba ete tosengeli te kolataka malamu kaka ntango tokei na makita ya lisangá mpe kobosana mitinda nyonso wana na bantango mosusu. Molato na biso mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto esengeli ntango nyonso komonisa elimo ya kobanga Nzambe mpe ya lokumu, mpamba te tozali baklisto ngonga nyonso. Kasi, soki tokei na kelasi, tokolata molato oyo ebongi na kelasi, mpe na mosala, tokolata molato oyo ebongi na lolenge ya mosala oyo tozali kosala. Atako bongo, tosengeli kolata na kolekisa ndelo te mpe na ndenge oyo ekopesa nzoto na biso kilo. Soki molato na biso ezali ntango nyonso komonisa ete tozali bato oyo batosaka Nzambe, tokokakatana te mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu mpo tozali koyoka nsɔni te mpo na molato na biso to na ndenge oyo tobongisi nzoto na biso.—1 Petelo 3:15.
“Bólingaka mokili te”
15, 16. (a) Mpo na nini ezali na ntina mingi tóboya kolanda mokili na makambo etali kolata mpe kobongisa nzoto? (1 Yoane 5:19) (b) Mpo na ntina nini ya malamu tosengeli koboya kolanda makambo ya mikolo oyo na oyo etali molato mpe ndenge ya kobongisa nzoto?
15 Toli oyo ezali na 1 Yoane 2:15, 16 (NW) ezali mpe kosalisa biso mpo na koyeba ndenge ya kopona molato mpe ndenge ya kobongisa nzoto na biso. Tozali kotánga boye: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili.”
16 Toli oyo ebongi mpenza na ntango oyo! Na eleko oyo baninga bazali mpenza kobenda biso makasi ete tólanda makambo na bango, tosengeli koboya ete makanisi ya mokili etambwisa biso na likambo etali molato na biso. Na bambula oyo, bato bakómi na ndenge ya mabe ya kolata mpe kobongisa nzoto. Ata ndenge ya kolata oyo esɛngami mpo na bato ya mombongo to bato ya misala ezali ntango nyonso te ndakisa oyo ebongi ete baklisto bálanda. Yango ezali ntina mosusu oyo tosengeli ntango nyonso kobosana te ntina ya ‘kotika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo’ mpo tókoka kolanda mitinda ya Nzambe mpe na ndenge yango ‘kokómisa kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso.’—Baloma 12:2, NW; Tito 2:10, NW.
17. Mituna nini tosengeli komituna na ntango tolingi kosomba to tozali kopona modɛlɛ moko ya elamba? (b) Mpo na nini batata ya mabota basengeli kolandela molato mpe ndenge ya kobongisa nzoto ya moto mokomoko na kati ya libota?
17 Liboso ya kosomba elamba moko, ezali malamu omituna: ‘Mpo na nini nazali kosepela na modɛlɛ oyo? Ezali modɛlɛ ya vɛdɛti moko, oyo nalingaka mingi? Ezali modɛlɛ ya bato ya mobulu to ya bato ya motó libanga, bato oyo baboyá toli?’ Tosengeli mpe kotala malamumalamu elamba yango moko. Soki ezali robɛ to jipɛ, ezali molai ndenge nini? Ezali modɛlɛ nini? Elamba yango ekoki ngai mpenza, ezali kobongisa ngai, ezali kopesa nzoto na ngai kilo, to ekangi ngai mingi na nzoto, ekolamusa bamposa ya pite epai ya bato mosusu, to ezali bongobongo? Omituna ete, ‘Soki nalati elamba oyo, ekobɛtisa bato mosusu libaku te?’ (2 Bakolinti 6:3, 4) Mpo na nini tosengeli kotalela makambo nyonso wana? Mpamba te Biblia elobi ete: “Klisto kutu amisepelisaki ye moko te.” (Baloma 15:3, NW) Batata ya mabota basengeli mpenza kolandelaka molato mpe ndenge oyo moto mokomoko na kati ya libota azali kobongisa nzoto na ye. Mpo na komemya Nzambe ya nkembo oyo basambelaka, batata ya mabota basengeli kokakatana te kopesa toli na mpiko mpe na bolingo na ntango oyo esengeli.—Yakobo 3:13.
18. Nini ezali kopesa yo mposa ya kotya likebi na molato na yo mpe ndenge na yo ya kobongisa nzoto?
18 Tozali komema nsango ya Yehova, ye oyo aleki mpenza na lokumu mpe na bosantu. (Yisaya 6:3) Biblia ezali kolendisa biso tómekola ye “lokola bana balingami.” (Baefese 5:1, NW) Molato na biso mpe ndenge ya kobongisa nzoto na biso ekoki kokumisa to kofingisa Tata na biso ya likoló. Na ntembe te, mposa na biso ezali ya kosepelisa motema na ye!—Masese 27:11.
19. Matomba nini moto azwaka na koyebisa basusu “makambo minene ya Nzambe”?
19 Ozali koyoka ndenge nini mpo na “makambo minene ya Nzambe” oyo oyekoli? Ya solo, tozwi mpenza libaku malamu ya koyeba solo! Lokola tozali na kondima na makila ya Yesu Klisto oyo esopanaki, masumu na biso elimbisami. (Misala 2:38) Yango ezali kopesa biso nzela ya koloba na Nzambe kozanga kokakatana. Tozali kobanga liwa te ndenge oyo bato oyo bazali na elikya te babangaka yango. Tozali nde kolikya na elaka ya Yesu, ete mokolo mosusu “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29, NW) Yehova azali na motema malamu na ndenge amonisi biso makambo nyonso wana. Longola yango, asopeli biso elimo na ye. Yango wana, botɔndi na biso mpo na makabo malamu nyonso wana esengeli kotinda biso na kotosa mitinda na ye ya malamu mingi mpe na kokumisa ye na molende, mpe koyebisa bato mosusu “makambo minene” yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntango Yehova aponaki Mose na Alona mpo na kolobela libota na ye liboso ya Falo, Yehova alobaki na Mose ete: “Nakómisi yo Nzambe mpo na Falao, mpe ndeko na yo Alona akokóma mosakoli na yo.” (Exode 7:1, NW) Alona azalaki mosakoli na ndimbola oyo ete asengelaki kozala molobeli to monɔkɔ ya Mose, kasi ezalaki te mpo na koyebisa makambo oyo ekoya.
b Na kati ya ebele ya bato oyo bayanganaki mpo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo oyo esalemaki mokolo ya 28 Marsi 2002, bamilio kati na bango bakómi naino basaleli ya Yehova te. Tozali na elikya mpe tozali kobondela ete na mikolo ezali koya, mingi kati na bango báyoka mposa ya koluka kokóma basakoli ya nsango malamu.
c Atako Paulo alobaki na basi baklisto, mitinda yango ebongi mpe mpo na mibali baklisto mpe bilenge.
Okopesa eyano nini?
• Wapi “makambo minene” bato bayokaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe basalaki nini nsima ya koyoka yango?
• Ndenge nini moto akómaka moyekoli ya Yesu Klisto, mpe kozala moyekoli esɛngaka makambo nini?
• Mpo na nini ezali na ntina tótalelaka malamu molato na biso mpe ndenge ya kobongisa nzoto na biso?
• Makambo nini tosengeli kotalela mpo na koyeba soki elamba moko to modɛlɛ moko ezali malamu?
[Elilingi na lokasa 15]
Petelo ayebisaki bato ete Yesu asekwaki
[Bililingi na lokasa 17]
Molato na yo mpe lolenge na yo ya kobongisa nzoto ekumisaka Nzambe na yo?
[Bililingi na lokasa 18]
Baklisto oyo bazali na mabota basengeli kolandela ndenge oyo bato ya mabota na bango balataka mpe babongisaka nzoto na bango