“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
1. Lolenge nini Biblia ezali komonisa Mobandisi na yango, mpe Makomami mazali kopesa boyebi ya lolenge nini?
“MAKOMAMI nyonso mapemami na Nzambe.” Maloba oyo mazwami na 2 Timoté 3:16 mazali komonisa Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova, ete azali Mobandisi mpe Mopemisi ya Makomami mosantu. Makomami mazali mpenza kokokisa mposa na biso mpe mazali kopesa biso esengo! Mazali kopesa biso boyebi ya solosolo! Mazali “boyebi mpenza ya Nzambe” oyo bato balingaka boyengebene basili koluka mpe kotalela yango na motuya monene na boumeli ya bikeke nyonso.—Mas. 2:5, NW.
2. Lolenge nini Mose, Davidi, mpe Salomo bamonisaki motuya ya mayele mauti na Nzambe?
2 Mose, ye oyo azalaki mokambi mpe mobongisi ya libota ya Yisalaele, azalaki moko na baoyo balukaki boyebi yango, alobaki ete koteyama na Nzambe ezali na likoki ya kokitisa motema ya moto, “lokola mamwe, lokola mbula moke na likoló na matiti motau.” Tokoki mpe kolobela Davidi, mobundi ya mpiko mpe mobateli na lokumu ya nkombo ya Yehova, oyo abondelaki ete: “Ɛ [Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo.” Ezalaki mpe na Salomo moto na kimya, ye oyo atongaki moko na bandako ya nkembo monene oyo elekaki bandako nyonso kino lelo, ndako ya Yehova na Yelusaleme, ye oyo amonisaki motuya ya mayele ya Nzambe na maloba oyo: “Kozwa yango eleki wolo na kitoko. Aleki mabanga na penini na motuya; biloko nyonso bikoluka yo ikoki kopimama na ye te.”—Det. 32:2; Nz. 86:11; Mas. 3:14, 15.
3. Motuya nini Yesu na Nzambe ye mei bazali kopesa na liloba ya Nzambe?
3 Yesu, Mwana ya Nzambe, amonisaki motuya monene ya Liloba ya Nzambe, wana alobaki ete: “Liloba na yo ezali solo.” Alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoa. 17:17; 8:31, 32) Maloba oyo Yesu azwaki epai na Tata na ye mazali mpenza na nguya. Ezali Liloba ya Nzambe. Nsima ya liwa mpe ya lisekwa na ye mpe komata na ye na likoló na lobɔkɔ mobali ya Yehova Nzambe mpenza, Yesu amonisaki makambo mosusu matali liloba ya Tata na ye, kati na yango mpe bandimbola kitoko etali mapamboli oyo Nzambe akopesa epai na bato kati na Paladiso na mabelé. Na nsima na yango, Nzambe ayebisaki ntoma Yoane ete: “Komá, mpamba te maloba oyo mazali sembo mpe solo.” Maloba nyonso mazwami kati na Makomami mapemami mazali “sembo mpe solo,” mapesaka matomba mingi epai na baoyo bayokamelaka yango.—Emon. 21:5, NW.
4. Na makambo nini Makomami mapemami mazali kopesa litomba?
4 Lolenge nini matomba yango mazwamaka? Na mobimba, liloba oyo ntoma Paulo abimisaki kati na 2 Timoté 3:16, 17 (NW) lipesi eyano na motuna yango ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.” Na bongo, Makomami mapemami mazali na litomba mpamba te mazali kolakisa mateya ya sembo mpe etamboli ya sembo, kotyáká makambo na molɔngɔ́ kati na makanisi na biso mpe bomoi na biso, mpe na kopameláká mpe na kopesáká biso disipilini mpo ete tókoka komitambwisa na komikitisa nyonso na solo mpe na boyengebene. Wana tozali kotosa mateya mauti na Liloba ya Nzambe, tokoki kokóma “basalani na Nzambe.” (1 Kol. 3:9) Lelo oyo libaku lileki mabaku nyonso na bonene ezali oyo ya kozala na mosala mingi kati na mosala ya Nzambe lokola ‘moto na Nzambe, azali mpenza na makoki mpe abongi kwa mpo na mosala nyonso malamu.’
MOBOKO MAKASI MPO NA KONDIMA
5. Kondima ezali nini, mpe ekoki kozwama bobele na lolenge nini?
5 Mpo ete moto akóma mosalani na Nzambe, asengeli kozala na kondima. Kondima ekeseni mpenza na bindimandima oyo ezali epai na bato mingi na mikolo na biso. Lelo oyo bato mingi bakanisaka ete lolenge nyonso ya bindimeli—ya mangomba mikemike, ya evolisyó, to ya filozofi—ebongi mpenza. Nzokande, moto ya Nzambe asengeli ‘kosimba lolenge na maloba sembo . . . kati na kondima mpe na bolingo oyo ezali na Klisto Yesu.’ (2 Tim. 1:13) Kondima na ye esengeli kozala ya solo mpe esengeli kozala na bomoi, mpamba te “kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” Esengeli kozwa moboko na yango likoló na endimeli makasi epai na Nzambe mpe kati na mbano oyo akopesa epai na baoyo basepelisaka ye. (Ebe. 11:1, 6) Tokoki kokóma na kondima yango bobele na koyekoláká Biblia Liloba ya Nzambe na etingya nyonso. Ezwi moboko na yango likoló na bolingo makasi oyo tosengeli kozala na yango mpo na Biblia mpe mpo na Nzambe ya Biblia, Yehova, mpe mpo na Mwana na ye, Yesu Klisto. Kondima oyo ezali na bomoi ezali bobele moko, lokola mpe ezali bobele na Nkolo moko, Yesu Klisto, mpe bobele na Nzambe moko mpe Tata na nyonso, Yehova.—Ef. 4:5, 6.
6. Kondima ya solo ezalaka ya lolenge nini?
6 Tosengeli koyeba soki Liloba ya Nzambe ezali nini mpe soki eutaki wapi mpe koyeba bosolo na yango mpe mokano na yango mpe nguya na yango oyo epusaka bato na kozala na boyengebene. Soki tokómi na bososoli mingi ya nsango na yango ya nkembo, tokozala na kondima. Lisusu, tokolinga Biblia mpe Mobandisi na yango na molende nyonso na boye ete eloko moko te ekokoka kobebisa to kokitisa kondima mpe bolingo yango. Ezali Makomami, oyo ezali na maloba ya Yesu Klisto kati na yango, maloba oyo mazali kopesa biso moboko makasi mpo na kondima. Kondima ya solo ekozala kondima oyo ekoyika mpiko kati na komekama ya nsɔ́mɔ, minyoko, mpe masɛnginya ya biloko ya mosuni mpe ya bafilozofi ya mokili oyo bato na yango bazali kotuka Nzambe. Ekolónga na nkembo nyonso na nzela ya kokɔta kati na mokili ya sika ya boyengebene. “Elónga oyo eleki mokili ezali kondima na biso.”—1 Yoa. 5:4.
7. Kozwa mayele ya Biblia epesaka mbano nini?
7 Mpo na kozwa mpe kobatela kondima, tosengeli kosala makasi mpo na kokólisa bolingo mpe bosepeli mpo na Liloba ya Nzambe, Makomami mapemami. Makomami mazali likabo likokani na likabo mosusu te, oyo Nzambe apesi epai na bato, ebombelo ya biloko ya motuya na elimo oyo bozindo ya mayele mazwami kati na yango ekoki komekama te mpe oyo nguya na yango ya kongɛngisa mpe ya kopusa bato na kozala na boyengebene eleki oyo ya mikanda nyonso. Wana tozali kotimola na mozindo mpo na kozwa boyebi ya Liloba ya Nzambe, tozali kopusama ete tónganga lokola ntoma Paulo ete: “Ɛɛ, bozwi mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe izali na bozindo boni!” Koyeba Makomami mapemami mpe Mobandisi na yango elimboli bongo komikɔtisa na nzela ya esengo ya seko mpe ya bosepeli.—Lom. 11:33; Nz. 16:11.
YEHOVA—NZAMBE OYO ASOLOLAKA
8. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na botɔ́ndi na likambo oyo ete Yehova azali Nzambe oyo asololaka na bato na ye? (b) Na lolenge nini akeseni na banzambe bademó?
8 Wana azalaki koloba na ntina na nkembo ya Yehova, Davidi angangaki ete: “Yo ozali monene mpe okosalaka makambo na kokamwa; yo moko ozali Nzambe.” (Nz. 86:10) Yehova asali ebele ya “makambo na kokamwa” mpo na bato awa na mabelé, mpe moko na makambo yango ezali bongo koyebisama ya Liloba na ye epai na bango. Ɛɛ, Yehova azali Nzambe oyo asololaka, Nzambe oyo, na bolingo nyonso, ayebisaka makanisi na ye mpo na bolamu ya bikelamu na ye. Tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi mpo ete Mozalisi na biso azali te mokonzi oyo azali mosika na biso, abombami te mpe akangaka motema te mpo na kokokisa bamposa ya baoyo balingaka boyengebene awa na mabelé! Lokola akosala yango mpe kati na mokili ya sika oyo ezali koya, ata sikawa Yehova azali kofanda elongo na baoyo bamonisaka kondima mpe bolingo epai na ye, kati na boyokani malamu na lolenge ya Tata ya boboto oyo asololaka makambo kitoko epai na bana na ye oyo balukaka lisungi na ye. (Emon. 21:3) Tata na biso ya likoló azali te lokola banzambe bademó, oyo basengeli komonisama lokola bikeko ya nsɔ́mɔ bizangi maloba. Banzambe basalemi na bibende mpe mabanga bakoki te komonisa bolingo ya botata epai na basambeli na bango oyo bazali kati na molili. Bakoki te koyebisa bango likambo moko oyo ekoki kopesa bango litomba. Ya solo, “baoyo basalaka yango bakokóma lokola bango.”—Nz. 135:15-19; 1 Kol. 8:4-6.
9. Makambo ya lolenge nini ayebisaki yango epai na bato uta na likoló?
9 Yehova azali “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Ex. 34:6) Mpo na kofuluka ya motema boboto na ye, asili koyebisa ebele ya makambo ya solo epai na bato. Nyonso wana ezali bongo batoli kitoko mpo na kolakisa bato nzela ya malamu mpe ezali na bisakweli mpo na kongɛngisa nzela ya moto na ntina ete azwa mapamboli mingi na mikolo mizali koya. “Mpo na nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na makomi.” (Lom. 15:4) Mateya wana mabongi kotyelama motema mautaki na likoló mpenza mpo na kolakisa bato, baoyo bazali na nsé.—Yoa. 8:23.
10. Na nkótá nini Yehova asili kosolola na bato, mpe mpo na nini?
10 Yehova ayebisá naino te makambo na ye na lokótá ezangi koyebana, kasi ayebisaka yango ntango nyonso na lokótá ya bato, lokótá oyo batatoli na ye ya sembo balobaka. (Mis. 2:5-11) Epai na Adama, Noa, Abalayama, Mose, mpe basakoli Baebele, Yehova alobaki na lokótá oyo bato bazalaki koloba uta na ebandeli, ebéngami lelo Liebele. Lokótá yango ezalaki kosalelama na boumeli ya ntango nyonso oyo bato bakokaki kososola yango, ata kino eleko ya Saulo na Talasia, Yesu asekwisami alobelaki ye na lokótá yango. (Mis. 26:14) Na ntango lokótá Aramɛyɛ ya Bakaladi ezalaki kosalelama mingi kati na baombo Bayisalaele, Nzambe ayebisaki bango makambo mosusu na lokótá Aramɛyɛ, mpamba te bato bayebaki lokótá wana. (Ezl. 4:8–6:18; 7:12-26; Dan. 2:4b–7:28) Na nsima, na ntango lokótá ya Greke ekómaki kolobama na mikili mingi mpe batatoli na ye bazalaki kosalela yango mingi, maloba ya Yehova mayebisamaki mpe mabatelamaki na lokótá ya Greke. Maloba oyo mabatelami kati na Biblia mauti na Yehova, malobamaki bobele na lokótá oyo eyebanaki mpo ete bato ya komikitisa, baoyo balingaka solo awa na mabelé, bákoka kozwela yango litomba.
11. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova nde asalaki nkótá nyonso?
11 Yehova nde asalaki bɔɔngɔ́ mpe binama ya kolobela, kati na yango, lolemo, monɔkɔ, mpe mongongo, na lisalisi na yango bato bakoki kobimisa lolaka ndenge na ndenge engebene lokótá mokomoko kati na nkótá mingi oyo ezali na mokili. Na yango, ekoki kolobama ete Yehova nde asalaki nkótá nyonso. Bokonzi na ye likoló na lokótá ya bato emonisamaki na likamwisi oyo asalaki na Linɔ́ngi ya Babele. (Ex. 4:11; Gen. 11:6-9; 10:5; 1 Kol. 13:1) Yehova ayebi nkótá nyonso. Asukaki te bobele na kopesa bato lokótá ya Liebele ya ebandeli, kasi lokola asalaki bɔɔngɔ́ mpe binama ya kolobela, na yango atyaki moboko mpo na Aramɛyɛ mpe Greke mpe mpo na nkótá soko 3 000 oyo bato bazali koloba yango lelo.
LOKÓTÁ YA SOLO
12, 13. (a) Lolenge nini Yehova asalaki ete makambo oyo ye ayebisaki bato ezala pɛtɛɛ mpo na kososola yango? (b) Pesá bandakisa.
12 Ezala lokótá ya bato nini oyo Yehova asalelaki, na mabaku nyonso asololaki na bango na lokótá ya solo, kasi te na lokótá oyo ezangi koyebana na bato. Ezalaki lokótá ya pɛtɛɛ mpe ezalaki mpasi te mpo na kososola yango. (Sef. 3:9) Bato bakoki kososola kozanga nkaká makambo oyo makoki komekama na ndenge misato, elingi koloba, biloko oyo ezali na bosándá, na bonene, mpe na bolai mpe etyami kati na ntango. Na yango, Yehova alobelaki biloko bizangi komonana na kosaleláká bililingi oyo moto akokaki kososola yango. Na ndakisa, ezalaki na mongombo oyo ye moko alɛngɛlaki kosalema na yango mpe oyo Mose atongaki kati na mokili mokauki. Na kopemama na Nzambe Paulo asalelaki bililingi na bimekeli misato na yango mpo na kolimbola makambo ya solo ya nkembo oyo ezalaka bobele na likoló.—Ebe. 8:5; 9:9.
13 Ndakisa mosusu: Yehova, ye oyo azali elimo, kuna na likoló afandaka te na kiti mpenza ya bokonzi ekokani na oyo biso bato ya mosuni tosalelaka. Nzokande, epai na biso bato, oyo tomeseni bobele na makambo oyo makoki komonana na miso, Nzambe ayebisaka makambo na ye na kosaleláká elilingi ya eloko oyo ekoki komonana mpo na kopesa bososoli. Na ntango asalaka mosala na ye ya kosambisa, ezalaka bobele lokola ntango mokonzi moko ya mabelé abandi mosala na ye na kofandáká na kiti na ye ya bokonzi.—Dan. 7:9-14.
EKOKI KOBONGOLAMA KOZANGA NKAKÁ
14, 15. Na bokeseni na mikanda ya filozofi ya bato, mpo na nini Biblia ebongolami kozanga nkaká na nkótá mosusu? Pesá ndakisa.
14 Lokola Biblia ekomamaki na maloba ya solo, mpe ya pɛtɛɛ mpo na kososola yango, kobongola bililingi mpe makambo malobelami kati na yango na polele mpe na sikisiki na nkótá mingi oyo elobamaka na mikolo na biso ezali likambo ya mpasi te. Nguya mpe bokasi ya solo ya Biblia ya ebandeli ebatelami kati na mabongoli nyonso. Maloba ya pɛtɛɛ oyo bato basalelaka mikolo nyonso, lokola “mpunda,” “etumba,” “motole,” “kiti na bokonzi,” “mobali na libala,” “mwasi na libala,” mpe “bana,” ebimisaka likanisi ya bosikisiki na minɔkɔ nyonso. Yango ekeseni na makomi ya filozofi ya bato, oyo mbala mingi epesaka nzela te ete ebongolama na sikisiki. Elobeli na yango ya mindɔndɔ mpe maloba na yango ya makanisi mpamba mabongaka te mpo na kobongolama na bosikisiki mpenza na lokótá mosusu.
15 Nguya ya elobeli ya Biblia ezali mpenza monene. Ata na ntango azalaki koyebisa bikateli na ye epai na baoyo bazalaki bandimi te, Nzambe azalaki te kosalela elobeli ya filozofi, nzokande asalelaki bililingi oyo bato bazalaki kosalela mokolo na mokolo. Yango emonisami kati na Danyele 4:10-12. Awa, bokonzi ya mokonzi moko mopakano ya lolendo elobelami na mozindo na elilingi ya nzeté, mpe na nsima, na lisalisi ya makambo matalelaki nzeté yango, makambo oyo malingaki kobima na mikolo mizalaki liboso masakolamaki na bosikisiki nyonso. Nyonso wana ebongolami polele na nkótá mosusu. Na bolingo nyonso, Yehova ayebisaki makambo na lolenge wana mpo ete ‘boyebi ya solo ekofuluka.’ Na lolenge malamu mpenza, yango esungaki mpo ete na ‘ntango oyo ya nsuka’ esakweli esosolama polele!—Dan. 12:4.
NZELA YA BOSOLOLI
16. Lolenge nini mwango ya kosolola ya Nzambe ekoki komonisama?
16 Moto moko akoki kotuna ete: Mwango nini ya kosolola Nzambe asalelaki? Yango ekoki komonisama malamu na lisalisi ya ndakisa moko na mikolo na biso. Myango ya kosolola ezalaka na (1) moyebisi, to motindi nsango; (2) molekisi nsango; (3) elekiselo nsango; (4) mozwi nsango; mpe (5) moyoki. Na mwango ya telefone tozali na (1) mosaleli telefone oyo atindi maloba na ye; (2) molekisi nsango oyo na lisalisi na yango maloba mabongwanaka nguya ya lotilíki; (3) nsinga ya telefone oyo ememaka nguya ya lotilíki kino esika yango esengeli kokóma; (4) mozwi nsango akosala lisusu ete nguya wana ekóma maloba; mpe (5) ekokóma epai na moyoki. Bobele bongo na likoló (1) Yehova abimisaka maloba na ye; (2) na nsima Liloba, to Molobeli na ye—oyo ayebani lelo ete Yesu Klisto—mingimingi ye nde alekisaka nsango yango; (3) elimo santu ya Nzambe, nguya ekosalaka mosala, oyo esalelamaki lokola elekiselo nsango, ememaki yango awa na mabelé; (4) mosakoli ya Nzambe na mabelé azwaki nsango yango; mpe (5) na nsima akosakola yango mpo na litomba ya libota ya Nzambe. Bobele lokola na bantango mosusu momemi-nsango akoki kotindama mpo na kopesa nsango moko ya ntina mingi, Yehova mpe aponaka mbala mosusu kosalela bikelamu ya elimo, to baanzelu, lokola bamemi-nsango, mpo na koyebisa makambo epai na basaleli na ye awa na mabelé.—Gal. 3:19; Ebe. 2:2.
MWANGO YA KOPEMAMA
17. Liloba nini ya Greke ebongolami na “epemami na Nzambe,” mpe lolenge nini ndimbola na yango ezali kosunga biso ete tósosola lolenge kopemama yango esalemaki?
17 Maloba oyo ete “mapemami na Nzambe” ebongolami uta na liloba ya Greke the·oʹpneu·stos, elimboli “oyo Nzambe afuli yango.” (Talá 2 Timoté 3:16, NW, maloba na nsé ya lokasa, ya libosó.) Ezali elimo mpenza ya Nzambe, nguya na ye oyo ekosalaka mosala, oyo ‘afulaki’ yango likoló na bato ya sembo, kopusáká bango ete básangisa mpe bákoma Makomami mosantu. Mwango yango ebéngami kopemama. Basakoli mpe basaleli mosusu ya sembo ya Yehova oyo bapemamaki, makanisi na bango mapusamaki na nguya yango oyo ekosalaka mosala. Yango elimboli ete bazwaki nsango, kati na yango mpe bililingi bitali mokano, oyo eutaki na Nzambe mpe ekɔtaki mpenza kati na bɔɔngɔ́ na bango. “Mpo esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na [“elimo santu,” NW] na Nzambe.”—2 Pet. 1:21; Yoa. 20:21, 22.
18. Lolenge nini nsango epemami na Nzambe ekɔtaki kati na mitema ya bato oyo bazalaki koyamba yango?
18 Wana bato yango bazalaki na mpɔngi te mpe bazalaki komona to na ntango bazalaki kolɔ́ta na nsé ya mpɔngi, elimo santu epikaki makasi mpenza nsango ya Nzambe, mobandisi ya mwango ya koyebisa nsango. Nsima ya kozwa nsango yango, mosakoli azalaki na mokumba ya kolekisa yango na maloba ya sikisiki epai na basusu. Na ntango Mose mpe basakoli mosusu ya sembo bakosekwa, na ntembe te, bakondimisa biso bosikisiki ya masoló ya makomi na bango oyo mabatelamaki, mpo ete mayele na bango oyo makozongisama lisusu makobatela naino makambo ya kalakala oyo makozala naino polele kati na bɔɔngɔ́ na bango. Bobele bongo, ntoma Petelo akamwaki mingi na emonaneli ya kobongwana oyo akokaki kokoma na nguya nyonso na ntina na nkembo na yango nsima ya mbula koleka 30.—Mat. 17:1-9; 2 Pet. 1:16-21.
MOBANDISI MPE MOSAPI NA YE
19. Nini ezali bongo “mosapi” ya Nzambe, mpe mikapo nini mindimisi yango?
19 Bato basalelaka misapi na bango mpo na kokoma, na ntango ya kala bazalaki kosalela ekomeli ya ebendé mpe na ntango na biso bazali kosalela bíki, masini ya kokoma, to ordinatɛrɛ. Mosala oyo esalemi na misapi yango ezali komonisa mayele ya mobandisi na yango. Oyebaki ete Nzambe azali na mosapi? Ezali bongo, mpamba te Yesu alobaki na ntina na elimo ya Nzambe ete ezali “mosapi” na Ye. Na ntango Yesu abikisaki moto moko oyo azalaki na bademó ete azongela makoki na ye ya koloba mpe akoka komona lisusu, bato ya mangomba oyo bazalaki banguna na ye batukaki mwango oyo Yesu asalelaki mpo na kobikisa moto wana. Engebene Matai, Yesu alobaki na bango ete: “Soko ngai nazali kobimisa [“bademó,” NW] na nzela na [“elimo,” NW] na Nzambe, mbɛ Bokonzi na Nzambe esili kobɛlɛma epai na bino.” (Mat. 12:22, 28) Luka abakiseli biso engɛngiseli mosusu na kozongeláká makambo oyo Yesu alobaki na libaku mosusu ya motindo wana, ete: “Nde soko ngai nabimisi [“bademó,” NW] na mosapi na Nzambe, mbɛ Bokonzi na Nzambe ebimeli bino.” (Luka 11:20) Na likambo mosusu oyo esalemaki liboso, banganga na soloka ya Ezipito bazalaki na likoki mosusu te bobele ya kondima ete malɔ́zi oyo makweaki likoló na Ezipito ezalaki bongo komonisama ya nguya eleki monene ya Yehova, bandimaki ete: “Oyo ezali mosapi na Nzambe.”—Ex. 8:18, 19.
20. Lolenge nini “mosapi” ya Nzambe esalaki mosala, mpe yango ebimisaki litomba nini?
20 Na boyokani na lolenge wana ya kosalela liloba “mosapi,” tokoki kososola ete “mosapi na Nzambe” ezali na nguya monene mpe emonisi bongo elimo na ye, oyo asalelaki na kokomama ya Biblia. Na yango, Makomami mazali koyebisa biso ete na lisalisi ya “mosapi na Nzambe,” akomaki Mibeko Zomi likoló na bitando mibale ya mabanga. (Ex. 31:18; Det. 9:10) Na ntango Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma mikanda ndenge na ndenge ya Biblia Mosantu, mosapi na ye ya elilingi, to elimo na ye, ezalaki mpe nguya oyo epusaki ekomeli ya bato wana. Elimo santu ya Nzambe emonanaka te, kasi esili kokokisa mosala na yango na lolenge ya kokamwa, ebimisaki eloko oyo bato bazwi, bakoki komona mpe kosimba, eloko yango ezali bongo likabo ya motuya ya bosolo ya Liloba ya Nzambe, Biblia na Ye. Ntembe ezali te ete Mobandisi ya Biblia ezali bongo Yehova Nzambe, Mopesi nsango uta na likoló.
KOSANGISAMA YA MAKOMAMI MOSANTU EBANDI
21. (a) Lolenge nini kokomama ya Makomami ebandaki? (b) Yehova asalaki nini mpo ete ebatelama?
21 Lokola tosilaki komona yango, Yehova ‘apesaki Mose bitando mibale na litatoli, bitando na mabanga bikomami na mosapi na Nzambe.’ (Ex. 31:18) Makomi yango mazalaki bongo na Mibeko Zomi, likambo ya kobenda likebi ezali ete makomi yango mamonisi polele nkombo ya Nzambe, Yehova, mbala mwambe. Bobele na mobu yango, 1513 L.T.B., Yehova apesaki Mose etindá ya kobanda kokoma makambo oyo masengelaki koumela libela. Na bongo kokomama ya Makomami Mosantu ebandaki. (Ex. 17:14; 34:27) Nzambe apesaki mpe etindá epai na Mose ete asala “sanduku na litatoli,” to “sanduku na kondimana,” engwongolo kitoko esalemaki na mabɔkɔ ya bato, oyo kati na yango Bayisalaele basengelaki kobomba makambo kitoko wana oyo Nzambe apesaki bango. (Ex. 25:10-22; 1 Mik. 8:6, 9) Ezali Yehova nde alɛngɛlaki kosalema ya Sanduku yango, mpe ya mongombo oyo ezalaki kobomba yango; mpe Besalele mosali monene ya ntɔ́ki mpe motongi atondaki na “[“elimo,” NW] na Nzambe mpe na mayele mpe na kososola mpe na boyebi mpe na mayele na misala nyonso” mpo ete akokisa mosala na ye engebene elakiseli ya Nzambe.—Ex. 35:30-35.
22. (a) Nani azali mobandisi ya Makomami mapemami, mpe bokomi yango ezwaki ntango boni? (b) Banani bakomaki Biblia, mpe makambo nini toyebi na ntina na bango?
22 Wana azalaki kosala ete mikano na ye miyebana, Nzambe ‘asololaki na mbala mingi mpe na mitindo mingi’ na boumeli ya ntango molai. (Ebe. 1:1) Bakomi oyo bakomaki Liloba na ye babandaki kosala bongo kobanda na 1513 L.T.B., kino soko na mobu 98 T.B., to na boumeli ya mbula soko 1 610. Mobandisi bobele moko, Yehova Nzambe, asalelaki bakomi soko 40, to bato oyo basalelamaki lokola bakomeli. Bakomi nyonso wana bazalaki Baebele mpe na yango bazalaki basangani ya libota oyo ‘bapesamelaki maloba ya bulɛɛ ya Nzambe.’ (Lom. 3:2) Mwambe kati na bango bazalaki Bayuda baklisto oyo bayebaki Yesu mpo ete bazalaki pene na ye mpe baoyo bayebaki ye na nzela ya bantoma na ye. Makomami mapemami oyo makomamaki liboso na ntango na bango epesaki litatoli na ntina na koya ya Masiya, to Klisto. (1 Pet. 1:10, 11) Atako babyangamaki uta na bato ya mitindo nyonso ya bomoi, bakomi wana ya Biblia oyo bazalaki awa na mabelé, kobanda na Mose kino na ntoma Yoane, bango nyonso bapesaki lisungi mpo na kosimba boyangeli monene ya Yehova Nzambe mpe kosakoláká mikano na ye awa na mabelé. Bakomaki na nkombo ya Nzambe mpe na lisalisi ya elimo na ye.—Yil. 2:2, 4; Ezek. 6:3; 2 Sam. 23:2; Mis. 1:16; Emon. 1:10.
23. Masoló nini ya kala oyo bamoko na bakomi ya Biblia basalelaki, mpe lolenge nini yango ekómaki Makomami mapemami?
23 Mingi kati na bakomi yango basalaki mpe mosala ya kosangisa masoló oyo mautaki na mikanda mikomamaki kala na bato oyo bamonaki makambo yango na miso na bango mpenza, bato yango nyonso te nde bapemamaki. Na ndakisa, Mose akokaki kosangisa biteni ya Genese uta na masoló ya bato oyo bamonaki kosalema ya makambo, lokola mpe Samwele akokaki kosala bongo na ntango akomaki mokanda ya Basambisi. Yilimia akomaki mikanda ya Mikonzi ya Liboso mpe ya Mibale, mpe Ezela akomaki mikanda ya Ntango ya Liboso mpe ya Mibale, mingi mpenza na motindo wana. Elimo santu ekambaki basangisi wana mpo na kokesenisa biteni ya mikanda ya bato ya kala oyo esengelaki kokamatama, na yango endimisaki bosolo ya makambo wana masangisamaki, ete ekokaki kotyelama motema. Kobanda na ntango ya kosangisama yango kino na nsima, biteni wana ya masoló oyo biutaki na mikanda ya kala bikɔtisamaki kati na Makomami mapemami ya Nzambe.—Gen. 2:4; 5:1; 2 Mik. 1:18; 2 Nta. 16:11.
24, 25. (a) Biblia ekomamaki na boumeli ya ntango boni? (b) Monisá ndambo ya makambo ya ntina oyo ezwami kati na etánda na lokasa 12.
24 Na kolandana nini ya molɔngɔ́ mikanda 66 ya Biblia ekómelaki biso? Na boumeli ya ntango boni bakomaki yango? Nsima ya kolobela bozalisi ya likoló na nsé mpe kobongisama ya mabelé lokola efandelo ya moto, Genese ezali kolobela ebandeli ya lisoló ya bato uta na kozalisama ya moto ya liboso na mobu 4026 L.T.B. Na nsima, Makomami Mosantu malobeli makambo minene oyo masalemaki kino mwa moke na nsima ya mobu 443 L.T.B. Na yango, nsima ya eleko moko ya koleka mibu 400 Makomami makóbi lisusu lisoló na mobu 3 L.T.B kino mobu 98 T.B. Na yango, engebene lisoló ya bato, Makomami malobeli makambo oyo masalemaki na boumeli ya mbula 4 123.
25 Etánda oyo ezwami na lokasa 12 ekosalisa biso ete tósosola makambo matali bato oyo bakomaki Biblia mpe lolenge oyo Biblia ekómi kino na eleko na biso.
“BÚKU” YANGO NA MOBIMBA EZALI SOLO OYO EUTI NA NZAMBE
26. Na ndimbola nini Makomami mazali bobele mokanda moko ya mobimba?
26 Makomami Mosantu, lokola lisangá ya mikanda longwa na Genese kino Emoniseli, esali búku moko, bibliotɛkɛ mobimba, nyonso epemami na Mobandisi Monene. Esengeli te kokabolama na biteni mibale, noki eteni moko ekotalelama na motuya moke. Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke ya boklisto mazali na boyokani makasi moko na mosusu. Oyo ya mibale ezali kobakisa makambo mosusu likoló na oyo ya liboso mpo na kosala búku oyo na mobimba na yango ezali bongo solo euti na Nzambe. Mikanda 66, nyonso, esali bibliotɛkɛ moko ya Makomami Mosantu.—Lom. 15:4.
27. Mpo na nini ebéngeli oyo ete “Testamá ya Kala” mpe “Testamá ya Sika” elongobani te?
27 Ezali bongo libungá liuti na mimeseno ya bato ete Liloba likomami ya Nzambe likabolama na biteni mibale, kobengáká eteni ya liboso, kobanda na Genese kino Malaki, ete “Testamá ya Kala,” eteni ya mibale, kobanda na Matai kino na Emoniseli ete “Testamá ya Sika.” Kati na 2 Bakolinti 3:14 na King James Version ezali kolobela “botángi ya testamá ya kala,” kasi awa ntoma Paulo azalaki te kolobela Makomami ya Liebele ya kala na mobimba na yango. Alingaki koloba mpe te ete makomi ya boklisto oyo epemami ezali “testamá [kondimana] ya sika.” Ntoma alingaki kolobela kondimana ya Mibeko, oyo Mose akomaki kati na Pantatɛ́kɛ mpe oyo ezali bobele eteni moko ya Makomami oyo ekomamaki liboso na ntango ya boklisto. Ezali mpo na yango nde alobaki na vɛrsɛ́ elandi ete, “wana mokanda na Mose ezali kotángama.” Liloba ya Greke oyo ebongolamaki na “testamá” kati na King James Version ebongolami bobele na “kondimana” kati na mabongoli ya mikolo na biso.—Mat. 26:28; 2 Kol. 3:6, 14, Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau, Revised Standard Version, American Standard Version.
28. Endimiseli nini epesameli biso mpo na oyo etali kokokisama ya bisakweli ya Biblia?
28 Oyo ekomamaki mpe ebatelamaki lokola Makomami Mosantu esengeli kobebisama te. (Det. 4:1, 2; Emon. 22:18, 19) Ntoma Paulo akomaki ete: “Nde soko biso, soko anzelu na Likoló, akosakwela bino nsango ekeseni na oyo esakwelaki biso bino, tiká ete alakelama mabe.” (Gal. 1:8; talá mpe Yoane 10:35.) Maloba nyonso ya bisakweli ya Yehova masengeli kokokisama na ntango oyo ekanamaki mpo na yango. “Boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolónga na likambo litindaki ngai yango.”—Yis. 55:11.
TÓTALELA MAKOMAMI
29. Kati na mokanda oyo, lokola mikanda nyonso ya Biblia mitalelami moko nsima na mosusu, makambo nini malobelami liboso na ntina na mokanda mokomoko?
29 Kati na bankasa elandi, mikanda 66 ya Makomami Mosantu mitalelami moko nsima na mosusu. Makambo matali kokomama ya mokanda mokomoko elobelami, mpe makambo mosusu mayebisami na ntina na mokomi, ntango oyo mokanda yango mokomamaki, mpe mpo na mikanda mosusu ntango oyo lisoló na yango eumelaki. Bilembeteli bipesami mpe mpo na komonisa ete mokanda boye mpe mokanda mokomoko ezali mpenza solo mpe ebongi mpenza kotángama kati na Makomami mapemami. Bilembeteli yango bikoki komonana kati na maloba ya Yesu Klisto to kati na makomi mapemami oyo basaleli mosusu ya Nzambe bakomaki. Mingimingi, bosolo ya Biblia emonisami na kokokisama ya bisakweli na yango na lolenge oyo ekoki kobɛtɛlama ntembe soko moke te, to na bilembeteli oyo bizwami kati na mokanda yango moko, na ndakisa boyokani na yango, bosembo na yango, mpe bopɛtɔ ya elobeli na yango. Bilembeteli mosusu bikoki kozwama kati na makambo oyo mamonanaki na bolukiluki ya arkeoloji to na makambo ya solo mpenza ya kala, oyo bato ya mokili bakomaki.
30. Lolenge nini makambo mazali kati na mokanda mokomoko ya Biblia malobelami?
30 Wana makambo mazwami kati na mokanda mokomoko mazali kolobelama, mokano ezali bongo ya kosala ete nsango yango ya nguya oyo mokomi ya Biblia akomaki emonana polele na lolenge boye ete ekɔtisa kati na mitema ya batángi bolingo mpo na Makomami mapemami mpe mpo na Mobandisi na yango, Yehova Nzambe mpe kokólisa bongo botɔ́ndi oyo basengeli kozala na yango likoló na nsango ya nguya ezwami kati na Liloba ya Nzambe, oyo ebongi kosalelama, ezali na boyokani, mpe ezali kitoko. Makambo mazwami kati na mokanda mokomoko makabolami na mitó na makambo mike na nzela ya baparagrafe. Yango ezali mpo na kosala ete boyekoli ezala pɛpɛlɛ mpe yango elimboli te ete kokabolama wana ezali lolenge bobele moko ya kokesenisa biteni ndenge na ndenge ya mikanda ya Biblia. Mokanda mokomoko ezali eloko ya mobimba, oyo ezali kokokisa mokumba ya ntina mpo na kososola mikano ya Nzambe.
31. (a) Makambo nini mayebisami mpo na komonisa litomba oyo tokoki kozwa kati na mokanda mokomoko? (b) Motó na likambo nini ya nkembo elobelami mingi koleka kati na masoló matali mikanda ya Biblia?
31 Mpo na koloba maloba ya nsuka likoló na mokanda mokomoko, lisoló lizali koyebisa nini oyo emonisi ete eteni oyo ya Makomami mapemami ‘ezali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini kati na boyengebene.’ (2 Tim. 3:16, NW) Kokokisama ya bisakweli oyo emonisami kati na bilembeteli bipemami oyo bakomi mosusu ya Biblia bakomaki, etalelami mpe. Likambo mokomoko ezali komonisa mokumba oyo mokanda yango ekokisi kati na kolobelama ya motó na likambo ya Biblia. Biblia ezali lisapo te. Ezali bobele yango nde ezali na nsango ya nguya mpo na bato nyonso. Kobanda na mokanda ya liboso, Genese, kino na mokanda ya nsuka, Emoniseli, Makomami mapemami mazali kopesa litatoli likoló na mokano ya Mozalisi ya mɔlɔ́ngɔ́, Yehova Nzambe, mpo na kobulisa nkombo na ye na nzela ya Bokonzi etambwisami na Mombóto na ye. Kati na yango ezali na elikya ya nkembo mpo na baoyo nyonso balingaka boyengebene.—Mat. 12:18, 21.
32. Makambo nini mayebisami mpo na kokólisa botɔ́ndi na biso mpo na Biblia?
32 Nsima ya kotalela mikanda 66 ya Biblia, tokolobela mpe mwa makambo mosusu matali Biblia. Yango ezali bongo makambo matali boyekoli etando ya Mokili ya Ndaka, ntango ya kokokisama ya makambo mazwami kati na Biblia, mabongoli ya Biblia, bilembeteli ya arkeoloji mpe bilembeteli mosusu oyo bizali kondimisa ete Biblia ezali solo, mpe bilembeteli ya kataloge ya Biblia. Makambo mosusu ya ntina mpe bitánda bityami na eteni oyo. Nyonso wana ebongisami mpo na kokólisa botɔ́ndi oyo tozali na yango likoló na Biblia, mokanda oyo batoli na yango ebongi mpenza kosalelama mpe ezali na ntina mingi awa na mabelé koleka mikanda mosusu nyonso.
33. Lolenge nini Biblia ekoki kolobelama, mpe koyekola yango ezali na litomba nini?
33 Nzambe Mobandisi asili koyebisa bato makambo mingi mpenza. Asili komonisa bolingo mozindo mpe lokola tata, azali kotya likebi likoló na oyo asili kosala mpo na bana na ye awa na mabelé. Oyo nde liboke kitoko ya mikanda mipemami oyo asili kopesa biso na nzela ya Makomami Mosantu! Ya solo, yango ezali eloko ya motuya oyo ekokani na mosusu te, bibliotɛkɛ monene oyo ezali na makambo ‘mapemami na Nzambe,’ na motuya mpe na bonene ya lisoló, eleki mpenza makomi nyonso ya bato. Komipesa na boyekoli ya Liloba ya Nzambe “ekolɛmbisa nzoto” te, kasi ekopesa nde matomba ya seko epai na baoyo bayebi ete “liloba na Nkolo ezali koumela seko.”—Mos. 12:12; 1 Pet. 1:24, 25.
[Etanda na lokasa 12]
BAKOMI BAPEMAMAKI YA BIBLIA MPE MAKOMI NA BANGO
(Kolandana ya badati)
Kolandana Bakomi Misala na bango Nsuka ya bokomi Makomi
1. Mose Nganga-mayele, 1473 L.T.B Genese; mobateli na mpate, Exode; mosakoli, mokambi Levitike; Yobo; Mituya; Deteronome; Nzembo 90 (mbala mosusu mpe na 91)
2. Yosua Mokambi soko 1450 L.T.B. Yosua
3. Samwele Molevi, liboso ya Basambisi; mosakoli 1080 L.T.B. Luta; eteni moko ya Samwele ya Liboso
4. Gada Mosakoli soko 1040 L.T.B. Eteni moko ya Samwele ya liboso; Samwele ya Mibale (elongo na Natana)
5. Natana Mosakoli soko 1040 L.T.B. Talá na mwa likoló (elongo na Gada)
6. Davidi Mokonzi, 1037 L.T.B Eteni monene mobateli na mpate, ya Nzembo mobɛti-miziki
7. Bana na Ndambo ya Nzembo Kola
8. Asafa Moyembi Ndambo ya Nzembo
9. Hemana Moto ya mayele Nzembo 88
10. Etana Moto ya mayele Nzembo 89
11. Salomo Mokonzi, motongi, soko 1000 Eteni monene moto ya mayele L.T.B. ya Masese; Loyembo na Salomo; Mosakoli; Nzembo 127
12. Agulu Masese mokapo 30
13. Lemuele Mokonzi Masese mokapo 31
14. Yona Mosakoli soko 844 L.T.B. Yona
15. Yoele Mosakoli soko 820 L.T.B.(?) Yoele
16. Amosa Mobɔkɔli bibwele, soko 804 L.T.B. Amosa mosakoli
17. Hosea Mosakoli nsima ya 745 L.T.B. Hosea
18. Yisaya Mosakoli nsima ya 732 L.T.B. Yisaya
19. Mika Mosakoli liboso ya 717 L.T.B. Mika
20. Sefania Nkumu, liboso ya 648 L.T.B Sefania mosakoli
21. Nahumu Mosakoli liboso ya 632 L.T.B. Nahumu
22. Habakuku Mosakoli soko 628 L.T.B.(?) Habakuku
23. Obadia Mosakoli soko 607 L.T.B. Obadia
24. Ezekiele Nganga, soko 591 L.T.B Ezekiele mosakoli
25. Yilimia Nganga, 580 L.T.B Mikonzi ya mosakoli Liboso mpe ya Mibale; Yilimia; Bileli
26. Danyele Nkumu, soko 536 L.T.B Danyele moyangeli, mosakoli
27. Hagai Mosakoli 520 L.T.B. Hagai
28. Zekalia Mosakoli 518 L.T.B. Zekalia
29. Moledekai Ministre soko 475 L.T.B. Esetele -mokonzi
30. Ezela Nganga, soko 460 L.T.B Ntango ya mokomeli, Liboso mpe ya moyangeli. Mibale; Ezela
31. Nehemia Mosáli kati na nsima ya Nehemia ndako ya 443 L.T.B. mokonzi, guvernere
32. Malaki Mosakoli nsima ya 443 L.T.B. Malaki
33. Matai Mokɔngɔli soko 41 T.B Matai na mpako, ntoma.
34. Luka Monganga, soko 61 T.B. Luka; misionere Misala
35. Yakobo Mokɛngɛli liboso ya 62 T.B. Yakobo (ndeko ya Yesu)
36. Malako Misionere soko 60-65 T.B. Malako
37. Petelo Mobomi mbisi, soko 64 T.B. Petelo ya ntoma Liboso mpe ya Mibale
38. Paulo Misionere, soko 65 T.B. Tesaloniki ntoma, ya Liboso mpe mosáli-hema ya Mibale; Bagalatia; Bakolinti ya Liboso mpe ya Mibale; Baloma; Baefese; Bafilipi; Bakolose; Filemona; Baebele; Timoté ya Liboso mpe ya Mibale; Tito
39. Yuda Moyekoli soko 65 T.B. Yuda (ndeko ya Yesu)
40. Yoane Mobomi-mbisi, soko 98 T.B. Emoniseli; ntoma Yoane; Yoane ya Liboso, ya Mibale, mpe ya Misato