Mokanda ya Biblia nimero 3—Levitike
Mokomi: Mose
Esika ya bokomi: Mokili mokauki
Nsuka ya bokomi: 1512 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: Sanza 1 (1512 L.T.B.)
1. (a) Mpo na nini nkombo Levitike ebongi mpenza? (b) Nkombo nini mosusu epesamaki na Levitike?
NKOMBO eyebani mingi mpo na mokanda ya misato ya Biblia ezali bongo Levitike, oyo euti na Leu·i·ti·konʹ na libongoli ya Greke ya Septante na kolekáká na “Leviticus,” oyo ezali na libongoli ya Latin oyo ebéngami Vulgate. Nkombo wana ebongi mpenza, atako Balevi balobelami bobele (na 25:32, 33), mpamba te mokanda oyo elobeli mingimingi malako matali mosala ya bonganga ya Balevi, oyo eponamaki kati na libota ya Levi, mpe mibeko oyo banganga bazalaki koteya bato: “Zambi ekoki na bibɛbu na nganga ete bibatela boyebi mpe ete bato báluka mobeko na solo na monɔkɔ na ye.” (Mal. 2:7) Kati na makomi ya Liebele, mokanda oyo ebéngami longwa na maloba na yango ya ebandeli, Wai·yiq·raʼʹ, oyo elimboli mpenza, “Mpe abandaki kobénga.” Kati na Bayuda oyo bayaki na nsima, mokanda wana ebéngamaki lisusu Mobeko na Banganga mpe Mobeko ya Makabo.—Lev. 1:1, NW, maloba na nsé ya lokasa.
2. Elembeteli nini endimisi ete Mose nde akomaki yango?
2 Ntembe ezali te ete Mose nde akomaki Levitike. Bosukisi, to colophon, elobi ete: “Oyo ezali mibeko Yehova apesaki epai na Mose.” (27:34) Maloba motindo moko mazwami kati na Levitike 26:46. Bilembeteli oyo bipesamaki liboso bimonisi ete Mose nde akomaki Genese mpe Exode, bilembeteli yango mpe bindimi ete ye nde akomaki Levitike, mpamba te ezali polele ete na ebandeli Pantatɛ́kɛ ezalaki rulo moko. Lisusu, [kati na Biblia, NW] Levitike ekangisami na mikanda ya liboso na likangisi “mpe.” Litatoli lileki nguya kati na matatoli nyonso ezali ete Yesu Klisto mpe basaleli mosusu bapemami ya Yehova bazalaki kotánga mbala mingi mibeko mpe mitindá mizali na Levitike mpe balobaki ete Mose nde akomaki yango.—Lev. 23:34, 40-43—Neh. 8:14, 15; Lev. 14:1-32—Mat. 8:2-4; Lev. 12:2—Luka 2:22; Lev. 12:3—Yoa. 7:22; Lev. 18:5—Lom. 10:5.
3. Levitike elobeli makambo masalemaki na boumeli ya eleko nini?
3 Levitike elobeli makambo masalemaki na eloko nini? Mokanda ya Exode esuki na botongi ya mongombo ‘na sanza ya liboso, na mbula ya mibale, na mokolo ya liboso ya sanza.’ Mokanda ya Mituya (oyo eyei nokinoki nsima na lisoló ya Levitike) ebandi na maloba ya Yehova epai na Mose ‘na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale na mbula ya mibale ya bobimi na bango na mokili ya Ezipito.’ Na yango, emonani ete elekaki sanza moko te mpo na mwa makambo mazali na Levitike, oyo eteni monene ya mokanda yango ezali na mibeko mpe malako.—Ex. 40:17; Mit. 1:1; Lev. 8:1–10:7; 24:10-23.
4. Ntango nini Levitike ekomamaki?
4 Ntango nini Mose akomaki Levitike? Ebongi kosukisa na koloba ete azalaki kobomba makambo na kolanda lolenge yango ezalaki kosalema mpe azalaki kokoma malako ya Nzambe na kolanda lolenge azalaki kozwa yango. Ezali yango nde emonani na etindá oyo Nzambe apesaki Mose ya kokoma ekweli ya Baamaleki nokinoki nsima wana Yisalaele elóngaki bango na etumba. Dati moko ya kala emonisami na makambo oyo mazali kati na mokanda yango. Na ndakisa, Bayisalaele bazwaki etindá ya komema na ekɔteli ya hema ya koyangana banyama oyo balingaki kosalela mpo na bilei mpo ete ibomama. Mobeko wana esengelaki kopesama mpe kokomama mwa moke nsima ya kotyama ya bonganga. Malako mingi mapesami mpo na kokamba Bayisalaele na boumeli ya mobembo na bango na mokili mokauki. Nyonso oyo emonisi ete Mose akomaki Levitike na boumeli ya mobu 1512 L.T.B.—Ex. 17:14; Lev. 17:3, 4; 26:46.
5. Mibeko na ntina na mbeka mpe milulu ya kopɛtolama ezalaki na mokano nini?
5 Mpo na nini Levitike ekomamaki? Yehova azalaki na mokano ya kozala na libota ya bulɛɛ, bato basantisami, batyami pembeni mpo na mosala na ye. Kobanda na ntango ya Abele, bato oyo bazalaki sembo epai na Nzambe bazalaki kopesa bambeka epai na Yehova, kasi ezalaki epai na libota ya Yisalaele nde Yehova apesaki mpo na mbala ya liboso malako ya sikisiki na ntina na makabo ya masumu mpe bambeka mosusu. Yango, lokola emonisami na likambo mokomoko kati na Levitike, esalaki ete Bayisalaele báyeba bonene ya lisumu mpe kokɔtisa kati na makanisi na bango lolenge yango ekoki kosala ete bándimama epai na Yehova te. Malako wana, lokola eteni na Mobeko, ezalaki motambwisi oyo azalaki kokamba Bayuda kino na Klisto, komonisáká bango mposa ya Mobikisi mpe bobele na ntango yango kobatela bango lokola bato bakabwani na bato mosusu kati na mokili. Mingimingi mibeko ya Nzambe na ntina na milulu ya kopɛtola ekokisaki mokano wana.—Lev. 11:44; Gal. 3:19-25.
6. Mpo na nini Yehova apesaki litambwisi ya sikisiki na ntango wana?
6 Lokola libota ya sika oyo ezali kosala mobembo mpo na mokili ya sika, Yisalaele ezalaki mpenza na mposa ya litambwisi libongi. Mbula mobimba ekokaki naino te uta babimaki, mpe lolenge ya bomoi ya Ezipito, ezala mpe mimeseno na yango ya losambo ezalaki naino kati na makanisi na bango. Kobalana kati na ndeko mobali mpe ndeko mwasi ezalaki kosalema na Ezipito. Losambo ya lokuta ezalaki kopesama mpo na lokumu ya banzambe mingi, oyo bamoko kati na banzambe yango bazalaki banyama. Sikawa lisangá monene wana ezalaki kokende na Kanana, epai bomoi mpe mimeseno ya losambo ezalaki kútu mabe koleka. Kasi tózonga na káa ya Yisalaele. Kati na ebele wana ya bato oyo bakólisaki lisangá, mingi bazalaki Baezipito ya makila mpenza mpe basusu babotamaki na moboti moko Moezipito, bato ndenge na ndenge oyo bazalaki kofanda kati na Bayisalaele mpe baoyo babotamaki na baboti oyo bazalaki Baezipito mpe babɔkwamaki mpe bateyamaki engebene mimeseno, losambo, mpe bolingi-ekólo ya Baezipito. Mingi kati na bango, kozanga ntembe, bautaki kotika mimeseno na bango ya mabe kala mingi te. Oyo nde likambo ya ntina ete bázwa sikawa litambwisi na likambo mokomoko uta na Yehova!
7. Ndenge nini malako oyo mazali na Levitike mamonisi ete yango epemamaki na Nzambe?
7 Levitike, uta ebandeli kino nsuka, ezali na bilembeteli bimonisi ete yango epemamaki na Nzambe. Bato mpamba bakokaki te kokanisa mibeko mpe malako ya mayele mpe ya sembo oyo ezali kati na yango. Mibeko na yango na ntina na bilei, maladi, bibembe, mpe lolenge ya kosalela nzoto ya bakufi emonisi boyebi ya makambo oyo bato na mokili na makambo matali monganga bakokaki kokanisa yango te kino bambula mingi na nsima. Mobeko ya Nzambe na ntina na banyama ya mbindo mpo na kolya ekokaki kobatela Bayisalaele na ntango bazalaki kosala mobembo. Ekokaki kobatela bango na trichinose ya ngulu, na typhoïde mpe na paratyphoïde ya mitindo misusu ya bambisi, mpe bamikrobe ya banyama oyo basilaki kokufa. Mibeko wana mibongi mizalaki mpo na kokamba losambo na bango mpe bomoi na bango ete bákoka kozala ntango nyonso libota na bulɛɛ mpe bákóma mpe báfanda na Mokili ya Ndaka. Lisoló ya bato limonisi ete malako oyo mapesamaki na Yehova mapesaki Bayuda matomba ya solosolo likoló na bato mosusu na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.
8. Lolenge nini bisakweli oyo bizali na Levitike bimonisi lisusu ete yango epemamaki?
8 Kokokisama ya bisakweli mpe bililingi oyo bizali na Levitike endimisi lisusu kopemama na yango. Ezalá lisoló na bulɛɛ to lisoló na bato elobeli kokokisama ya makebisi ya Levitike na ntina na mbuma mabe ya kozanga botosi. Kati na makebisi yango, esakolamaki ete bamama bakolya bana na bango mpenza na ntina na nzala. Yilimia amonisi ete yango ekokisamaki na kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., mpe Josèphe ayebisi ete yango mpe esalemaki na kobebisama oyo eyaki nsima na engumba yango na mobu 70 T.B. Elaka ya esakweli oyo ete Yehova akokanisa bango soki bamonisi kobongola motema ekokisamaki na ntango ya bozongi na bango longwa na Babilone na mobu 537 L.T.B. (Lev. 26:29, 41-45; Bil. 2:20; 4:10; Ezl. 1:1-6) Bilembeteli mosusu oyo bimonisi ete Levitike epemamaki, lokola Makomami mapemami, ezali bongo kotángama ya maloba na yango na bakomi mosusu ya Biblia. Longola makambo oyo tolobelaki liboso oyo mamonisi ete Mose nde azali mokomi na yango, tosɛngi yo otála Matai 5:38; 12:4; 2 Bakolinti 6:16; mpe 1 Petelo 1:16.
9. Lolenge nini Levitike ezali kokumisa nkombo mpe bulɛɛ ya Yehova?
9 Mokanda ya Levitike ezali mbala na mbala kokumisa nkombo ya Yehova mpe lotómo na ye ya kozala mokonzi. Mbala koleka 36 mibeko na yango mimonisami ete mizali ya Yehova. Nkombo Yehova yango moko, na mwayene, emonani mbala zomi na mokapo mokomoko, mpe mbala na mbala botosi mpo na mibeko ya Nzambe elakisami na bokundoli oyo, “Ngai nazali [Yehova].” Motó na likambo oyo ete bulɛɛ ezali komonana na Levitike mobimba, oyo elobeli lisɛngami wana mbala mingi koleka mikanda nyonso mosusu ya Biblia. Bayisalaele basengelaki kozala bulɛɛ mpamba te Yehova azali bulɛɛ. Bato mosusu, bisika mosusu, biloko mosusu, mpe bileko mosusu etyamaki pembeni lokola biloko na bulɛɛ. Na ndakisa, Mokolo na Mbɔndi mpe mbula ya Yubile etyamaki pembeni lokola bileko ya milulu ya ntina kati na losambo ya Yehova.
10. Nini elobelami mingi na boyokani na mbeka, mpe bitumbu nini mpo na masumu tozali komona?
10 Na boyokani na kolobelama na yango mingi ya bulɛɛ, mokanda ya Levitike ezali komonisa mingi mokumba oyo kosopama ya makila, elingi koloba, mbeka na bomoi, ezali kokokisa mpo na bolimbisi ya masumu. Banyama ya mbeka isengelaki kozala bobele bibwɛlɛ mpe oyo ezalaki pɛtɔ. Mpo na masumu mosusu, koyambola yango, kozongisa, mpe kofuta lomandé esɛngamaki likoló na mbeka. Mpo na masumu mosusu, etumbu ezalaki bongo liwa.
MAKAMBO MAZALI KATI NA LEVITIKE
11. Lolenge nini Levitike ekoki kolimbolama?
11 Levitike ezali mingimingi mokanda ya mibeko mikomami, oyo mingi kati na yango ezali mpe bisakweli. Mingimingi, mokanda oyo mozali kolobela makambo makeseni mpe makambo yango makoki kokabolama na biteni mwambe, oyo bizali kolandana moko na mosusu na molɔngɔ́ mpenza.
12. Lolenge nini ya mbeka ya makila tozali kokuta kati na yango, mpe lolenge nini yango esengeli kopesama?
12 Malako mpo na bambeka (1:1–7:38). Bambeka ya ndenge na ndenge ekabwani na mitindo mibale: makila, etaleli bibwɛlɛ, lokola mpate, ntaba, mpe bandɛkɛ; mpe izangi makila, etaleli mbuma. Bambeka na makila isengeli kopesama lokola (1) ya kotumba, (2) ya kimya, (3) ya masumu, to (4) makabo ya ekweli. Nyonso minei ezalaki na makambo misato oyo makokani: Mopesi asengeli ye moko komema yango na ekɔtelo ya hema ya koyangana, asengeli kotya mabɔkɔ na ye likoló na yango, mpe na nsima nyama esengeli kokatama nkingo. Nsima ya komwangisa makila, nyama yango esengeli kokatama engebene lolenge ya mbeka. Tiká tótalela sikawa mbeka ya makila.
13-16. (a)Lobelá masɛngami mpo na (1) mbeka na kotumba, (2) mbeka na kimya, (3) mbeka mpo na masumu, mpe (4) mbeka mpo na mabe. (b) Na boyokani na mbeka na makila, nini epekisami mbala na mbala?
13 (1) Makabo na kotumba ekoki kozala mwana na ngɔmbɛ mobali, mpate mobali, ntaba, to ebenga to epɔpɔ, engebene makoki ya mopesi na likabo. Esengeli kokatama bitenibiteni mpe, longola bobele loposo, nyonso esengeli kotumbama na mobimba na yango likoló na etumbelo. Soki ezali epɔpɔ to ebenga, motó esengeli kotɔbɔlama kasi kokatama te, mpe ebombo mpe nsala isengeli kolongolama.—1:1-17; 6:8-13; 5:8.
14 (2) Mbeka na kimya ekoki kozala nyama moko ya mobali to ya mwasi kati na nyama minene to ya mike. Bobele biteni na yango ya mafuta nde bisengeli kotumbama likoló na etumbelo, ndambo mosusu ekokende epai na nganga mpe ndambo oyo etikali ekolyama na mopesi na likabo. Ebéngami mbeka na kimya, mpamba te mopesi na likabo azali kosangana na elambo, to azali na kimya, na elobeli ya elilingi, elongo na Yehova mpe elongo na nganga.—3:1-17; 7:11-36.
15 (3) Likabo mpo na lisumu esɛngami mpo na masumu masalemi na nkó te, to mpo na masumu oyo masalemi na libungá. Lolenge ya nyama oyo ekopesama etaleli lisumu mpo na yango mbɔndi esɛngami—ezala ya nganga, ya libota mobimba, ya mokonzi moko, to ya moto moko. Na bokeseni na mbeka na kotumba mpe makabo na kimya mpo na bato oyo epesami na bolingo nyonso, likabo mpo na masumu ezali lisɛngami.—4:1-35; 6:24-30.
16 (4) Makabo mpo na mabe masɛngami mpo na kozipa mabe moto asali na ntina na kozanga sembo, na bokosi, to na moyibi. Na makambo mosusu, mabe oyo masalemi masɛngi kobongola motema mpe mbeka engebene makoki ya moto. Na makambo mosusu, kozongisa eloko ebebisami oyo ekokani na mbala koleka 20 likoló na monkámá mpe mbeka na mpate ya mobali esɛngami. Kati na eteni oyo ya Levitike oyo elobeli makabo, kolya makila epekisami makasi mpe elobelami mbala mingi.—5:1–6:7; 7:1-7, 26, 27; 3:17.
17. Lolenge nini mbeka izangi makila isengeli kopesama?
17 Mbeka izangi makila italeli mbuma mpe yango esengeli kopesama ezala etumbami, etutami, to lokola fufu ya malamu, mpe esengeli kolambama na mitindo mikeseni, na ndakisa, kotumba na fulu epesami na etumbelo, to na kokalinga yango na mafuta. Esengeli kopesama elongo na mongwa mpe na mafuta mpe na bantango mosusu elongo na mpaka na malasi, kasi nyonso esengeli kozala na lokweza te to na mafuta na nzoi te.—2:1-16.
18. Likambo nini ya kolendisa kondima lisalemaki na ntango ya kotyama ya bonganga?
18 Kotyama ya bonganga (8:1–10:20). Sikawa ezali ntango ya libaku monene kati na Yisalaele, kotyama ya bonganga. Mose azali kolɛngɛla molulu yango na makambo na yango nyonso, lokola Yehova alakaki ye. “Alona mpe bana babali na ye basalaki makambo nyonso malakaki [Yehova] na monɔkɔ na Mose.” (8:36) Nsima ya mikolo nsambo oyo milekisamaki mpo na kobongisa kotyama ya bonganga, likambo moko ya kokamwa mpe ya kolendisa kondima esalemi. Liyangani mobimba lizali wana. Banganga bauti kopesa mbeka. Alona mpe Mose basili kopambola bato. Na nsima, talá! “Nkembo na [Yehova] emonanaki na bato nyonso. Mɔ́tɔ ebimaki na liboso na [Yehova] mpe ezikisaki mbeka na kotumba mpe mafuta na likoló na etumbelo. Emonaki bato nyonso yango bangangaki mpe bakweaki na bilongi na bango.” (9:23, 24) Ya solo, ebongi ete bátosa Yehova mpe básambela ye!
19. Mabe nini esalemaki, yango elandamaki na nini?
19 Nzokande, kobuka mibeko esalemi. Na ndakisa, Nadaba mpe Abihu, bana ya Alona bapesi liboso na Yehova mɔ́tɔ oyo ebongi te. “Mɔ́tɔ ebimaki na esika na [Yehova] mpe ezikisaki bango mpe bakufaki liboso na [Yehova].” (10:2) Mpo na kopesa mbeka ya malamu mpe kondimama epai na Yehova, bato mpe nganga basengeli kolanda malako ya Yehova. Nsima na likambo wana, Nzambe apesi mobeko ete banganga basengeli komela masanga makasi te ntango bazali kosala kati na mongombo, komonisáká bongo ete soki bana ya Alona basalaki mabe ekokaki kozala mpo ete bamelaki masanga.
20, 21.Wapi mibeko mitaleli bopɛto mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto?
20 Mibeko na ntina na bopɛto (11:1–15:33). Eteni oyo elobeli makambo matali bopɛto ya milulu mpe ya nzoto. Banyama mosusu, ezala bibwɛlɛ to nyama ya zámba, izali mbindo. Nzoto nyonso oyo ekufi ezali mbindo mpe ezali kokómisa baoyo basimbi yango mbindo. Kobotama ya mwana ezali mpe koyeisa mbindo mpe esɛngi kokabwana mpe bambeka ya sikisiki.
21 Makɔnɔ mosusu ya loposo, na ndakisa maba, eyeisaka milulu ya mbindo, mpe kopɛtolama esengeli bobele epai na bato te kasi ata na bilamba mpe ndako. Kotangolama esɛngamaki. Komona sanza mpe kobima ya mai ya mibali ezali mpe kokómisa mbindo, motindo moko kosopana ya bosɔtɔ nyonso. Kokabwana esɛngami na makambo motindo wana, mpe kosukola nzoto to kopesa mbeka to nyonso mibale esɛngami.
22. (a) Mpo na nini mokapo 16 ezali na ntina mingi? (b) Nini esalemaka na Mokolo ya Mbɔndi?
22 Mokolo na Mbɔndi (16:1-34). Oyo ezali mokapo moko ya monene, mpamba te ezali na malako mpo na mokolo moleki ntina mpo na Yisalaele, Mokolo na Mbɔndi, oyo ezalaka na mokolo ya zomi ya sanza ya nsambo. Ezali mokolo ya koyokisa molimo mawa (mingimingi na kokila bilei), mpe na mokolo yango mosala moko te ya mosuni mopesamelaki nzela. Ebandaka na likabo ya mwana na ngɔmbɛ mobali mpo na masumu ya Alona mpe ndako na ye, libota ya Levi, ekolandama na likabo ya ntaba mpo na libota mobimba. Nsima na kotumba mpaka na malasi, ndambo ya makila ya nyama mokomoko esengeli komemama kati na Esika Eleki Bosantu na mongombo, mpo ete esopama liboso ya Sanduku ya Kondimana. Na nsima, nyama oyo ikufi isengeli komemama libándá ya molako mpe kotumbama. Na mokolo wana ntaba na bomoi asengeli mpe kopesama liboso na Yehova, mpe likoló na ye masumu ya bato mayambolami, na nsima ekotindama na mokili mokauki. Na nsima, mpate mibale ya mibali isengeli kopesama lokola makabo na kotumba, moko mpo na Alona mpe ndako na ye mpe mosusu mpo na libota mobimba.
23. (a) Epai wapi tozali kokuta maloba maleki polele ya Biblia na ntina na makila? (b) Mibeko nini mosusu tozali kokuta na nsima?
23 Mibeko na ntina na makila mpe makambo mosusu (17:1–20:27). Eteni oyo epesi mibeko mingi mpo na bato. Mbala oyo lisusu makila mapekisami na maloba ya polele na lolenge oyo tokoki kokuta yango te epai mosusu kati na Makomami. (17:10-14) Makila ekoki kosalelama bobele likoló ya etumbelo, kasi mpo na kolya te. Mimeseno mabe, lokola kobalana kati na bato ya libota moko, kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, mpe kosangisa nzoto na banyama, epekisami. Ezali na mibeko mpo na kobatela banyokwami, babólá, mpe bapaya, mpe mobeko epesami ete, “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza. Ngai nazali [Yehova].” (19:18) Bolamu ya bato mpe ya nkita ya ekólo ebatelami, mpe makámá ya elimo, na ndakisa losambo ya Moleke mpe bikelákela ipekisami, ememaka etumbu ya liwa. Lisusu Nzambe alobeli makasi kokabwana ya libota na ye na bato mosusu: “Bino bokozala bulɛɛ mpo na ngai, mpo ete ngai [Yehova] nazali bulɛɛ, mpe nasili kokabola bino na bato mosusu, ete bózala na ngai.”—20:26.
24. Levitike elobi nini na ntina na makoki ya banganga mpe bilambo ya mbula?
24 Bonganga mpe bilambo (21:1–25:55). Mikapo misato milandi milobeli mingi milulu ya losambo ya Yisalaele: mibeko oyo mizali kotambwisa banganga, makoki na bango ya nzoto, nani oyo bakoki kobala, nani akoki kolya bilei na bulɛɛ, mpe masɛngami mpo na nyama ya malamu oyo esengeli kosalelama lokola mbeka. Bilambo misato ya minene bisengeli kosalema mpo na ekólo, kopesáká mabaku ya “kosepela liboso na Yehova Nzambe na yo.” (23:40, NW) Lokola moto moko, na likambo oyo libota ekotya likebi, ekosanzola, mpe ekosambela Yehova, koyeisáká makasi boyokani na yango elongo na ye. Bilambo wana bizali mpo na Yehova, ezali mayangani ya bulɛɛ kati na mbula. Elekeli, mpe Elambo na Mampa ezangi mfulu, ebongisami na ebandeli ya prɛntá; Pantekote, to Elambo ya Bapɔ́sɔ, elandi na nsuka ya prɛntá; mpe Mokolo na Mbɔndi mpe mikolo mwambe ya Elambo ya Mingombo, to ya Kobuka mbuma, esalemaka na nsuka.
25. (a) Lolenge nini emonisami ete lokumu esengeli kopesama na “Nkombo”? (b) Mibeko nini oyo mizali na motángo “nsambo”?
25 Na mokapo 24, malako mapesami na ntina na mampa mpe mafuta oyo masengeli kosalelama na mosala kati na mongombo. Na nsima tozali kokuta likambo oyo Yehova alobi ete soko nani akotuka “Nkombo”—ɛɛ, nkombo Yehova—asengeli kobomama na mabanga. Na nsima, alobeli mibeko mitali bitumbu na lolenge ya, “liso mpo na liso, lino mpo na lino.” (24:11-16, 20) Na mokapo 25, tozali kokuta malako matali mbula ya Sabata, to mbula na kopema, oyo esalemaka nsima ya mbula nsambo nyonso mpe Yubile oyo esalemaka nsima ya mbula 50. Na mbula wana ya 50, bonsomi esengeli kosakolama na mboka mobimba mpe biloko bisangolamaki oyo bitɛkisamaki to bisundolamaki na boumeli ya mibu 49 mileki bisengeli kozongisama. Mibeko mipesami mpo na kobatela ntómo ya babólá mpe ya baombo. Na eteni oyo, motángo “nsambo” emonani mbala mingi—mokolo ya nsambo, mbula ya nsambo, bilambo ya mikolo nsambo, eleko ya bapɔ́sɔ nsambo, mpe Yubile, oyo esengeli koya nsima ya eleko ya mbula nsambo yikinya mbala nsambo.
26. Na nini Levitike ekómi na mama na yango na likambo?
26 Mbuma ya botosi mpe oyo ya kozanga botosi (26:1-46). Ezali na mokapo oyo nde mokanda ya Levitike ekómi na mama na likambo na yango. Yehova alobeli awa mbano ekozwama mpo na botosi mpe bitumbu biuti na kozanga botosi. Na libaku yango, alobeli elikya mpo na Bayisalaele soki bamikitisi, kolobáká ete: “Nde na ntina na bango nakokanisa kondimana na bankɔ́kɔ na bango, baoyo ebimisaki ngai na mokili na Ezipito na miso na mabota na mokili, ete nazala Nzambe na bango. Ngai nazali [Yehova].”—26:45.
27. Levitike esuki lolenge nini?
27 Mibeko misusu (27:1-34). Levitike esuki na malako matali kopesa likabo ya kopumbwa, na babotami ya liboso oyo bamipesi epai na Yehova mpe na ndambo na zomi oyo ekómi eloko na bulɛɛ mpo na Yehova. Na nsima, tozali kokuta maloba mokuse oyo ya bosukisi: “Oyo izali malako malakaki [Yehova] Mose na ntina na bato na Yisalaele na likoló na Ngomba na Sinai.”—27:34.
LITOMBA NA YANGO
28.Levitike ezali na litomba nini mpo na baklisto lelo oyo?
28 Lokola ezali eteni ya Makomami mapemami, mokanda ya Levitike ezali na litomba monene lelo oyo mpo na baklisto. Ezali lisungi monene mpo na koyeba Yehova, bizaleli na ye, mpe lolenge na ye ya kosala epai na bikelamu na ye, lokola amonisaki yango polele epai na Yisalaele na nsé na Kondimana na Mibeko. Levitike elobeli ebele ya mitindá ya moboko oyo mikosalelama ntango nyonso, mpe ezali na ebele ya bilakiseli ya bisakweli, oyo soki bitalelami bizali kolendisa kondima. Mingi kati na mitindá yango mizongelami kati na Makomami ya Greke ya boklisto, mwa ndambo na yango mosusu etángami polele. Makambo nsambo ya minene malobelami awa na nsé.
29-31. Lolenge nini Levitike elobeli limemya mpo na (a) lotómo ya kozala mokonzi, (b) nkombo, mpe (c) bulɛɛ ya Yehova?
29 (1) Lotómo Yehova azali na yango ya kozala mokonzi. Azali mopesi na mibeko, mpe mpo ete tozali bikelamu na ye, tokozongisa monɔkɔ liboso na ye. Na lolenge lobongi, azali kosɛnga na biso ete tóbanga ye. Lokola azali Mokonzi Monene ya mɔlɔ́ngɔ́, alingaka bombanda soko moke te, ezala na lolenge ya losambo ya bikeko, bikelákela, to na misala misusu ya bilimu mabe.—Lev. 18:4; 25:17; 26:1; Mat. 10:28; Mis. 4:24.
30 (2) Nkombo ya Yehova. Nkombo na ye esengeli kozala mosantu, mpe tómeka te kobwaka mbindo likoló na yango ezala na maloba to na misala.—Lev. 22:32; 24:10-16; Mat. 6:9.
31 (3) Bulɛɛ ya Yehova. Mpo ete azali bulɛɛ, libota na ye esengeli mpe kozala bulɛɛ, elingi koloba, kosantisama, to kotyama pembeni mpo na mosala na ye. Yango esɛngi kokabwana na mokili mozingi biso oyo moyebi Nzambe te.—Lev. 11:44; 20:26; Yak. 1:27; 1 Pet. 1:15, 16.
32-34. Mitindá nini mipesami na ntina na (a) lisumu, (b) makila, mpe (c) bonene ya ngambo?
32 (4) Bonene ya lisumu. Ezali Nzambe nde ayebi nini ezali lisumu, mpe tosengeli komibatela ete tósala yango te. Lisumu esɛngaka ntango nyonso mbeka ya mbɔndi. Lisusu, esɛngaka epai na biso ete tóyambola yango, tóbongola motema, mpe tóbongisa mabe tosali soki likoki ezali. Masumu mosusu makoki kolimbisama te.—Lev. 4:2; 5:5; 20:2, 10; 1 Yoa. 1:9; Ebe. 10:26-29.
33 (5) Kosantisama ya makila. Mpo ete makila ezali bulɛɛ, ekoki te kokɔtisama na nzoto ezala na lolenge nini. Bosalelami bobele moko ya makila oyo epesami nzela ezali bongo ya kosalela yango lokola mbɔndi mpo na masumu.—Lev. 17:10-14; Mis. 15:29; Ebe. 9:22.
34 (6) Bonene ya ngambo mpe ya etumbu. Masumu nyonso mpe basumuki nyonso batalelamaki lolenge moko te. Soki mosala ya moto ezalaki monene, boye ngambo na ye mpe lománde na ye mpo na lisumu esengelaki kozala monene. Masumu ya nkó mapesamelaki etumbu makasi koleka lisumu oyo lisalemi na nkó te. Mbala mingi lománde ya kofuta esɛngamaki engebene makoki ya mosumuki. Etindá oyo ya bonene ya lisumu ezalaki mpe kosalelama na makambo mosusu oyo mazalaki masumu te mpe bitumbu te, na ndakisa na milulu ya kopɛtolama na mbindo.—Lev. 4:3, 22-28; 5:7-11; 6:2-7; 12:8; 21:1-15; Luka 12:47, 48; Yak. 3:1; 1 Yoa. 5:16.
35. Lolenge nini Levitike elobeli na mokuse mikumba tozali na yango liboso na bazalani na biso?
35 (7) Bosembo mpe bolingo. Kolobeláká na mokuse mikumba na biso liboso na bazalani na biso, Levitike 19:18 elobi ete: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.” Yango etaleli makambo nyonso. Epekisi koponapona, koyiba, kobuka lokuta, to kotɔ́nga, mpe esɛngi komonisa limemya epai na bibɔsɔnɔ, babólá, bakufi-miso, mpe bimimi.—Lev. 19:9-18; Mat. 22:39; Lom. 13:8-13.
36. Nini emonisi ete Levitike ezali na litomba mpo na lisangá ya boklisto?
36 Lisusu oyo emonisi ete Levitike ezali mpenza na “litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini kati na boyengebene” kati na lisangá ya boklisto ezali bongo mitindami oyo mitángami mbala mingi na Yesu mpe na bantoma na ye, mingimingi Paulo mpe Petelo. Yango ebendaki likebi likoló na bilakiseli mingi ya bisakweli mpe na bililingi ya makambo oyo mazali koya. Lokola Paulo amonisaki yango, “Mibeko izali bobele elilingi na makambo malingi koya.” Ezali “elakiseli mpe elilingi na [makambo] na likoló.”—2 Tim 3:16, NW; Ebe. 10:1; 8:5.
37. Kokokisama ya bililingi nini oyo elobelami kati na Baebele?
37 Mongombo, bonganga, mbeka, mpe mingimingi Mokolo na Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbula na mbula ezalaki na ndimbola moko monene. Paulo, kati na mokanda na ye epai na Baebele, azali kosalisa biso na koyeba esika ekokani na makambo wana na boyokani na “hema ya solo” ya losambo ya Yehova. (Ebe. 8:2) Nganga monene Alona azali elilingi ya Klisto Yesu “lokola Nganga Monene na biloko malamu bisili koya, mpo na Hema oyo eleki monene mpe ezali na malamu nyonso.” (Ebe. 9:11; Lev. 21:10) Makila ya banyama ya mbeka ezali elilingi ya makila ya Yesu, oyo na nzela na yango ‘tozwi lisiko ya seko.’ (Ebe. 9:12) Eteni eleki kobombama ya mongombo, Esika Eleki Bosantu, kati na yango nganga monene azalaki kokɔta bobele na Mokolo na Mbɔndi ya mbula na mbula mpo na kopesa makila ya mbeka, ezali “elilingi na oyo na solo,” “likoló mpenza,” epai Yesu amataki mpo na “komonana liboso na Nzambe mpo na biso.”—Ebe. 9:24; Lev. 16:14, 15.
38. Lolenge nini mbeka ya elilingi ekokisamaki epai na Yesu?
38 Bambeka yango moko—ya nyama malamu, oyo ezangi litɔnɔ, ezalaki kopesama lokola mbeka na kotumba to ya masumu—ezali elilingi ya mbeka ya kokoka ezangi litɔnɔ ya nzoto ya Yesu Klisto. (Ebe. 9:13, 14; 10:1-10; Lev. 1:3) Likambo ya kobenda likebi, Paulo alobeli mpe likambo oyo lizalaki kosalema na Mokolo na Mbɔndi, epai banyama oyo ebomami mpo na mbeka ya masumu ezalaki komemama libándá ya molako mpe ezalaki kotumbama. (Lev. 16:27) Na yango Paulo akomi ete: “Bobele bongo mpe Yesu ayokaki mpasi libándá na ekuke. Boye tókenda libándá na molako epai na ye, awa ezali biso kokumba matyoli na ye.” (Ebe. 13:12, 13) Na ndimbola motindo wana oyo epemami, malako ya milulu oyo mazalaki na Levitike mazwi ndimbola mosusu, mpe tobandi solo kososola lolenge ya kokamwa Yehova atyaki bililingi ya kokamwa oyo bizalaki kosakola makambo ya solo oyo makokaki kolimbolama bobele na elimo santu. (Ebe. 9:8) Bososoli motindo wana ezali na ntina mpo na baoyo balingi kozwa litomba na bibongiseli ya bomoi oyo Yehova akamati na nzela ya Klisto Yesu, “Nganga Monene liboso na ndako na Nzambe.”—Ebe. 10:19-25.
39. Lolenge nini Levitike ezali na boyokani na “Makomami nyonso” mpo na koyebisa mikano mitali Bokonzi ya Yehova?
39 Lokola banganga oyo bazalaki na libota ya Alona, Yesu Klisto lokola Nganga Monene azali na banganga-balandi oyo basangani elongo na ye. Elobami mpo na bango lokola “banganga na bokonzi.” (1 Pet. 2:9) Levitike ezali kolobela polele mpe kolimbola mosala ya mbɔndi mpo na masumu ya Nganga Monene mpe Mokonzi oyo atyami na Yehova mpe masɛngami matyami mpo na basangani ya ndako na Ye, oyo elobami na ntina na bango ete bazali “bato na esengo mpe basantu” mpe ete bazali ‘banganga na Nzambe mpe na Klisto mpe bakoyangela lokola bakonzi elongo na ye na boumeli ya mbula nkótó.’ Oyo nde mapamboli mosala wana ya bonganga ekokokisa na kotomboláká bato na botosi kino ezalela ya kokoka, mpe oyo nde bolamu Bokonzi wana ya likoló ekopesa na kotyáká kimya mpe boyengebene awa na mabelé! Ya solo, biso banso tosengeli kotɔ́nda Yehova, Nzambe mosantu, mpo na ebongiseli na Ye ya kotya Nganga Monene mpe Mokonzi mpe banganga na bokonzi mpo na kosakola na mosika malamu na Ye na kosantisáká nkombo na Ye! Ya solo, Levitike ezali na boyokani mpenza na “Makomami nyonso” mpo na koyebisa mikano mitali Bokonzi ya Yehova.—Emon. 20:6.