“Bómimonisa bato ya Botɔndi”
“Tiká kimya ya Klisto etambwisa mitema na bino . . . Mpe bómimonisa bato ya botɔndi.”—BAKOLOSE 3:15.
1. Bokeseni nini tozali komona kati na lisangá ya boklisto mpe mokili oyo ezali kotambwisama na Satana?
TOKOKI komona elimo ya botɔndi epai ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na kati ya masangá na bango 94 600. Likita na bango mokomoko ebandaka mpe esukaka na libondeli oyo ezalaka mpe na maloba ya matɔndi epai ya Yehova. Mbala mingi toyokaka maloba lokola “natɔndi yo,” “mersi,” to maloba mosusu ya ndenge wana na monɔkɔ ya bilenge mpe mikóló, ya Batatoli ya sika mpe oyo baumeli ntango basangani mpo na kosambela mpe kokutana na bandeko. (Nzembo 133:1) Ezaleli yango ekeseni mpenza na elimo ya moimi oyo emonanaka mingi epai ya bato oyo ‘bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu’! (2 Batesaloniki 1:8) Na mokili ya lelo, bato bazali na ezaleli ya kozongisa matɔndi te. Yango ekoki kokamwisa biso te soki tokanisi nani azali Nzambe ya mokili oyo: Satana Zabolo, molendisi monene ya ezaleli ya moimi, oyo elimo na ye ya lofundo mpe ya botomboki ekɔteli bato mingi!—Yoane 8:44; 2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19.
2. Toli nini tosengeli kolanda, mpe mituna nini tokotalela?
2 Lokola tofandi na kati ya mokili ya Satana, tosengeli kokeba ete elimo na yango ebebisa biso te. Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya Efese boye: “Bozalaki kotambola kala engebene ebongiseli ya makambo ya mokili oyo, engebene moyangeli ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi. Ɛɛ, na kati na bango biso nyonso tozalaki komitambwisa kala na kolanda bamposa ya mosuni na biso, kosaláká makambo oyo mosuni mpe makanisi ezalaki kolinga, mpe tozalaki mpenza bana ya nkanda ndenge moko ná bamosusu oyo batikali.” (Baefese 2:2, 3) Ezali mpe bongo mpo na bato mingi lelo oyo. Na bongo, ndenge nini tokoki kobatela elimo ya kozongisa matɔndi? Lisalisi nini Yehova azali kopesa biso? Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza na botɔndi?
Bantina ya kozala na botɔndi
3. Totɔndaka Yehova mpo na makambo nini?
3 Tosengeli mpenza kopesa matɔndi na Yehova Nzambe, Mozalisi na biso mpe Mopesi ya bomoi, mingimingi soki tokanisi ebele ya makabo oyo apesi biso. (Yakobo 1:17) Mokolo na mokolo tozongiselaka Yehova matɔndi mpo tozali na bomoi. (Nzembo 36:9) Tomonaka ebele ya biloko Yehova akelá, lokola moi, sanza mpe minzoto. Mabelé oyo etondi na biloko oyo ebatelaka bomoi, mpema, mpe kobongwana ya bileko; nyonso wana ezali biloko oyo Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo, apesaka biso. Mokonzi Davidi ayembaki boye: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe mikano na yo ezali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te. Soki nakoloba mpe nakoyebisa yango, ekoleka oyo ekoki kotangama.”—Nzembo 40:5.
4. Mpo na nini tosengeli kotɔnda Yehova mpo na boninga malamu na kati ya masangá?
4 Atako lelo oyo basaleli ya Yehova bazali na paladiso ya mabelé te, bazali na paladiso ya elimo. Na Bandako ya Bokonzi mpe na mayangani na biso, tomonaka ndenge oyo bandeko na biso bandimi bamonisaka mbuma ya elimo ya Nzambe. Kutu, ntango Batatoli mosusu bazali kosakola epai ya bato oyo bayebi mpenza makambo ya Nzambe te to bayebi yango ata moke te, balobelaka makambo oyo Paulo amonisaki na mokanda ya Bagalatia. Batángelaka naino bato “misala ya mosuni” mpe batunaka bango makambo oyo bazali komona. (Bagalatia 5:19-23) Mingi bandimaka ete bizaleli yango ezali mpenza komonana na mokili ya lelo. Nsima ya kotángela bango mbuma ya elimo ya Nzambe, mpe ntango babengisi bango na Ndako ya Bokonzi mpo bango moko bámona na miso ndenge bato bazali komonisa yango, mingi balobaka ete: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.” (1 Bakolinti 14:25) Likambo yango esuki kaka na Ndako ya Bokonzi ya mboka moko te. Kende epai nyonso oyo olingi, soki okutani na moko kati na Batatoli ya Yehova koleka milio motoba oyo bazali na mokili mobimba, okomona kaka elimo yango ya esengo. Boninga malamu wana ezali mpenza ntina ya kopesa matɔndi na Yehova, ye oyo apesaka elimo na ye mpo yango esalema.—Sefania 3:9; Baefese 3:20, 21.
5, 6. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na likabo eleki monene ya Nzambe, elingi koloba mbeka oyo apesaki mpo na kobikisa biso?
5 Likabo eleki monene mpe malamu oyo Yehova apesá ezali Mwana na ye, Yesu, oyo apesaki lokola mbeka mpo na kobikisa biso. Ntoma Yoane akomaki ete: “Soki ezali ndenge wana nde Nzambe alingaki biso, boye biso moko mpe tosengeli kolingana.” (1 Yoane 4:11) Ya solo, tomonisaka botɔndi na biso mpo na mbeka yango kaka te na bolingo mpe botɔndi epai ya Yehova, kasi mpe na misala oyo ezali komonisa ete tolingaka bato mosusu.—Matai 22:37-39.
6 Tokoki koyeba makambo mingi lisusu na ndenge ya komonisa botɔndi soki totaleli makambo oyo Yehova asɛngaki na Yisalaele ya kala. Yehova ateyaki libota na ye makambo ebele na Mibeko oyo apesaki ekólo yango na nzela ya Moize. “Motindo ya boyebi mpe ya solo oyo ezali na kati ya Mibeko” ekolakisa biso makambo mingi oyo ekosalisa biso tólanda toli ya Paulo: “Bómimonisa bato ya batɔndi.”—Baloma 2:20; Bakolose 3:15.
Mateya misato na Mibeko ya Moize
7. Ndenge nini ebongiseli ya kopesa ndambo ya zomi ezalaki kopesa Bayisalaele libaku ya kozongisela Yehova matɔndi?
7 Na Mibeko ya Moize, Yehova asɛngaki makambo misato oyo, na nzela na yango, Bayisalaele bakokaki komonisa botɔndi mpo na malamu na ye. Ya liboso ezali kopesa ndambo ya zomi. Ndambo ya zomi ya mbuma ya bilanga ná “ndambo moko na zomi ya bangɔmbɛ mpe na bampate” esengelaki kokóma “bulɛɛ epai ya [Yehova].” (Levitike 27:30-32) Ntango Bayisalaele bazalaki kotosa, Yehova azalaki kosopela bango ebele ya mapamboli. “Bóyeisa likabo mobimba na zomi kati na ndako ya ebombelo ete bilei bizala na ndako na ngai. [Yehova] na bibele alobi ete, Meká ngai [sikoyo] na yango, soki nakozipwela bino maninisa ya lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.”—Malaki 3:10.
8. Bokeseni nini ezalaki kati na makabo ya bolingo malamu ná ndambo ya zomi?
8 Ya mibale, longola kopesa ndambo ya zomi, Yehova asɛngaki mpe ete Bayisalaele bápesaka makabo ya bolingo malamu. Asɛngaki Moize ayebisa Bayisalaele boye: “Wana ekokóma bino na mokili kuna ekoyeisa ngai bino, mpe wana ekolya bino biloko ya mokili yango, bokokaba mbeka epai ya [Yehova].” Basengelaki kopesa ndambo ya mbuma ya liboso ya ‘mokate euti na fufu na bango ya sika’ lokola ‘mbeka epai ya Yehova’ banda na bango moko tii na mabota na bango nyonso oyo esengelaki koya na nsima. Tósimba ete bakatelaki bango motángo te ya mbuma ya liboso oyo basengelaki kopesa. (Mituya 15:18-21) Kasi, ntango Bayisalaele bazalaki kopesa likabo mpo na kozongisa matɔndi, Yehova azalaki kopambola bango. Ebongiseli ya ndenge yango ezali na tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli. Tozali kotánga boye: “Oyo eleki malamu na kati na mbuma ya liboso ya ndenge nyonso, mpe mbeka ya koningana nyonso, ya ndenge nyonso, kati na mbeka ya koningana na bino nyonso, ekozala ya nganga; bokopesa nganga mpe kwanga mobesu oyo ya liboso ya bino, ete lipamboli etikala na ndako na yo.”—Ezekiele 44:30.
9. Liteya nini Yehova apesaki na nzela ya ebongiseli ya kolɔkɔta?
9 Ya misato, Yehova asalaki ebongiseli ya kolɔkɔta. Nzambe apesaki etinda oyo: “Wana ekobuka bino bilanga na bino okobuka kino nsuka ya elanga mpenza te, mpe okolɔkɔta oyo etikali na elanga nsima ya kobuka ya liboso te. Okobuka mbuma ya vinyo nyonso mpenza te, mpe okolɔkɔta mbuma ya vinyo oyo ekwei kati na elanga ya vinyo te. Okotika yango mpo na babola mpe mpo na bapaya. Ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino.” (Levitike 19:9, 10) Mpo na yango mpe, Yehova akataki motuya te. Moyisalaele mokomoko asengelaki kopona soki biloko oyo akotika mpo na babola ekozala mingi ndenge nini. Salomo, mokonzi ya bwanya, alobaki malamu ete: “Ye oyo akoyokela babola mawa azali kodefisela [Yehova]; akozongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.” (Masese 19:17) Na ndenge yango, Yehova ateyaki bango motema mawa mpe komibanzabanza mpo na babola.
10. Nini ezalaki kokómela bato ya Yisalaele ntango bazalaki komonisa botɔndi te?
10 Yehova azalaki kopambola Bayisalale ntango bazalaki komema ndambo ya zomi, kopesa makabo ya bolingo malamu, mpe kokabela babola. Kasi, soki Bayisalaele bazali komonisa botɔndi te, Yehova azalaki kobosana bango. Yango ememelaki bango mikakatano mpe nsukansuka bakendaki boombo. (2 Ntango 36:17-21) Makambo yango ezali koteya biso nini?
Ndenge oyo tosengeli kozongisa matɔndi
11. Wapi lolenge ya libosoliboso oyo tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova?
11 Lolenge ya libosoliboso oyo tokoki kopesa Yehova nkembo mpe kozongisela ye matɔndi ezali kopesa “makabo.” Ya solo, biso baklisto tosɛngisami te na kotosa Mibeko ya Moize, oyo ezalaki kosɛnga kopesa bambeka ya banyama mpe mbuma ya bilanga. (Bakolose 2:14) Atako bongo, ntoma Paulo alendisaki Baebele oyo bakómaki baklisto na maloba oyo: “Tiká tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Ntango tozali kosalela makoki na biso mpe bozwi na biso mpo na kopesa Yehova mbeka ya lisanzoli, ezala na mosala ya kosakola to na “kati ya koyangana” ná baninga na biso baklisto, tokoki komonisa Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe, botɔndi na biso. (Nzembo 26:12) Ntango tozali kosala yango, liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Bayisalaele bazalaki komonisa botɔndi na bango epai ya Yehova?
12. Na oyo etali mokumba na biso ya baklisto, liteya nini tokoki kozwa na ebongiseli ya kopesaka ndambo ya zomi?
12 Ya liboso, ndenge tomoni yango, Moyisalaele azalaki te kopesa ndambo ya zomi soki alingi; ezalaki lotomo. Biso baklisto tozali na mokumba ya kosakola mpe ya koyangana na makita. Tosengeli te kosala makambo yango soki tolingi. Yesu alobaki polele na esakweli na ye monene oyo elobelaki ntango ya nsuka ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14; 28:19, 20) Na likambo etali makita ya lisangá, ntoma Paulo apemamaki na Nzambe ntango akomaki ete: “Tiká tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.” (Baebele 10:24, 25) Tomonisaka botɔndi epai ya Yehova ntango tondimaka na esengo mokumba na biso ya kosakola, ya koteya, mpe ya kosangana na bandeko na biso pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá; totalelaka makambo yango lokola libaku malamu mpe lokumu.
13. Liteya nini tozwi na ebongiseli ya kopesa makabo ya bolingo malamu mpe na ebongiseli ya kolɔkɔta?
13 Tokoki mpe kozwa matomba na kotalela bibongiseli mosusu mibale oyo Bayisalaele bakokaki kolanda mpo na komonisa botɔndi na bango: makabo ya bolingo malamu mpe kolɔkɔta. Na bokeseni na ndambo ya zomi, oyo bakokaki kokakola yango te, bakatelaki bango motuya te mpo na makabo ya bolingo malamu mpe biloko oyo babola bakokaki kolɔkɔta. Ezalaki kopesa mosaleli ya Yehova mokomoko nzela ya komonisa botɔndi na ye na ndenge oyo motema na ye ezalaki kotinda ye. Ndenge moko mpe, atako tondimaka ete kosakola mpe koyangana na makita ezali mokumba ya mosaleli mokomoko ya Yehova, tosalaka yango nde na motema mobimba mpe na elimo ya komipesa? Totalelaka yango lokola libaku ya komonisa botɔndi na biso mpo na nyonso oyo Yehova asali mpo na biso? Tosalaka yango na ndenge oyo mpenza makoki na biso ezali kopesa nzela? To totalelaka yango kaka lokola mokumba oyo batyeli biso mpe tosengeli kaka kokokisa yango? Moto na moto akopesa biyano na mituna yango. Ntoma Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.”—Bagalatia 6:4.
14. Yehova atalaka nini na mosala oyo tozali kosalela ye?
14 Yehova Nzambe ayebi bomoi ya mokomoko na biso. Ayebi makoki na biso. Asepelaka na mbeka oyo basaleli na ye bapesaka ye na bolingo na bango moko, ezala mingi to moke. Alukaka te ete biso nyonso tópesa ndenge moko, tokoki mpe kosala yango te. Mpo na likambo etali kopesa makabo, ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti ete: “Mpo soki libosoliboso mposa makasi ezali, yango ekondimama mingimingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.” (2 Bakolinti 8:12) Likanisi yango ebongi mpe mpo na mosala ya Nzambe oyo tozali kosala. Mpo Yehova andima mosala na biso, atalaka te soki tozali kosala mingi to moke, kasi atalaka nde soki tozali kosala yango na esengo mpe na motema mobimba.—Nzembo 100:1-5; Bakolose 3:23.
Tólona elimo ya mobongisi-nzela mpe tóbatela yango
15, 16. (a) Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela emonisaka botɔndi na biso? (b) Ndenge nini baoyo bakoki kozala babongisi-nzela te bakoki komonisa elimo ya mobongisi-nzela?
15 Lolenge moko ya komonisela Yehova botɔndi oyo epesaka esengo mpe bolamu ezali kondima mosala ya ntango nyonso. Basaleli mingi ya Yehova oyo bamipesi babongolaki mpenza bomoi na bango mpo na komipesa mingi na mosala ya Yehova mpo balingaka ye mpe bazali na botɔndi mpo na boboto monene na ye. Bamosusu bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba basalaka ngonga 70 na sanza na mosala ya kosakola nsango malamu mpe koteya bato solo. Bamosusu, oyo mikakatano ya ndenge na ndenge ezali kopesa bango nzela ya kosala bongo te, mbala na mbala babongisaka programɛ na bango mpo na kozala babongisi-nzela basungi, elingi koloba kolekisa ngonga 50 na sanza na mosala ya kosakola.
16 Kasi, ezali boni mpo na ebele ya basaleli ya Yehova oyo bakoki te kozala babongisi-nzela? Mpo na komonisa botɔndi na bango, bakoki kolona mpe kobatela elimo ya mobongisi-nzela. Na ndenge nini? Soki bazali kolendisa baoyo bakoki kozala babongisi-nzela, soki bazali kolona epai ya bana na bango mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso, mpe soki bazali komipesa na mosala ya kosakola na ndenge oyo makoki na bango ezali kopesa bango nzela. Oyo tosalaka na mosala ya kosakola etalelaka mingi botɔndi oyo tozali na yango na mitema na biso mpo na oyo Yehova asalá, azali kosala, mpe akosala mpo na biso.
Tómonisa botɔndi na ‘biloko na biso ya motuya’
17, 18. (a) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na ‘biloko na biso ya motuya’? (b) Yesu alobaki nini mpo na mwasi akufelá mobali, mpe mpo na nini?
17 Masese 3:9 elobi ete: “Kumisá [Yehova] na biloko na yo [ya motuya], mpe na mbuma ya liboso ya bozwi na nyonso.” Lelo oyo, basaleli ya Yehova basɛngisami na kopesa ndambo ya zomi te. Kasi, Paulo akomelaki lisangá ya Kolinti ete: “Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Kopesa makabo ya bolingo malamu mpo na kosunga mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba emonisaka mpe botɔndi na biso. Botɔndi na biso etindaka biso tósalaka yango mbala na mbala, mbala mosusu na kotya mwa eloko pembeni pɔsɔ na pɔsɔ, ndenge baklisto ya liboso bazalaki kosala.—1 Bakolinti 16:1, 2.
18 Ezali te motuya ya mbongo oyo topesi nde ekomonisa ete tozali na botɔndi mingi to te. Kasi nde elimo oyo ezali kotinda biso tópesa. Yesu amonisaki yango ntango azalaki kotala bato oyo bazalaki kotya makabo na kɛsi ya makabo na tempelo. Ntango amonaki mwasi moko mobola oyo akufelá mobali azali kotya “mbongo mibale ya bibende oyo ezalaki na motuya moke,” alobaki ete: “Nazali koyebisa bino ya solo mpenza, Mwasi oyo akufelá mobali, atako azali mobola, atye mingi koleka bango nyonso. Mpo bango nyonso batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi mwasi oyo na kokelela na ye atyaki nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”—Luka 21:1-4.
19. Mpo na nini tosengeli kotalela lisusu ndenge oyo tomonisaka botɔndi na biso?
19 Tiká ete boyekoli oyo ya ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi etinda biso na kotalela lisusu ndenge oyo tomonisaka botɔndi. Mbala mosusu tokoki nde kobakisa mbeka na biso ya lisanzoli epai ya Yehova, mpe kobakisa makabo na biso mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba? Nyonso oyo tokosala na kotalela makoki na biso, tozala na elikya ete Yehova, Tata na biso oyo atondi na bolingo, akosepela komona ete tozali komonisa botɔndi.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na makambo nini tosengeli kopesa Yehova botɔndi?
• Mateya nini tozali kozwa na makabo ya ndambo ya zomi, makabo ya bolingo malamu, mpe kolɔkɔta?
• Ndenge nini tokoki kolona elimo ya mobongisi-nzela?
• Ndenge nini tokoki kosalela ‘biloko na biso ya motuya’ mpo na kotɔnda Yehova?
[Bililingi na lokasa 15]
“Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló”
[Bililingi na lokasa 16]
Wapi mateya misato euti na Mibeko oyo emonisami awa?
[Bililingi na lokasa 18]
Mbeka nini tokoki kopesa?