Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2006 | 1 Sanza ya 12
    • Nani azali mozalani na ngai?

      4. Levitike mokapo 19 emonisi ete Bayuda basengelaki mpe kolinga banani?

      4 Ntango Yesu ayebisaki Mofalisai ete mobeko ya mibale oyo eleki monene ezali ete tólinga mozalani na biso lokola biso moko, azalaki kokanisa mobeko moko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele. Mobeko yango ezali na Levitike 19:18. Kaka na mokapo yango, Yehova alobaki na Bayuda ete basengeli kotalela bato oyo bazali bana ya Yisalaele te lokola bazalani na bango. Vɛrsɛ 34 elobi ete: “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili ya Ezipito.” Na yango, basengelaki kolinga ata bato oyo bazalaki Bayuda te, mingimingi baprozelite.

  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2006 | 1 Sanza ya 12
    • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?

      8. Na kotalela Levitike mokapo 19, ndenge nini Bayisalaele basengelaki komonisa bolingo?

      8 Kolinga mozalani na biso ekeseni te na kolinga Nzambe. Ezali kaka likambo ya motema te, kasi esengeli komonana na misala. Mpo na kokanga ntina ya mobeko oyo ezali na Levitike mokapo ya 19, oyo ezali kolendisa basaleli ya Nzambe bálinga bazalani na bango ndenge bango moko bamilingaka, tótalela makambo mosusu oyo ezali na mokapo yango. Kuna, tozali kotánga ete Bayisalaele basengelaki kotikaka ndambo ya mbuma na bilanga na bango mpo na bato ya mawa mpe bapaya. Koyiba mpe kokosa epekisamaki. Bazuzi basengelaki kosambisa makambo na bosembo. Atako basengelaki kopamela soki esengeli, Mobeko elobaki na bango boye: “Okoyina ndeko na yo na motema na yo te.” Mibeko wana mpe mibeko mosusu elobelami na mokuse na maloba oyo: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.”​—Levitike 19:9-11, 15, 17, 18.

      9. Mpo na nini Yehova asɛngaki Bayisalaele bákabwana na bato ya bikólo mosusu?

      9 Atako Bayisalaele basengelaki kolinga bato ya bikólo mosusu, basengelaki mpe kokabwana na bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Yehova akebisaki bango na makama ya kozala na baninga ya mabe. Na ndakisa, Yehova alobaki na Bayisalaele mpo na bikólo oyo basengelaki kobɔtɔla ete: “Okobala kati na bango te, kopesa bana basi na yo epai na bana mibali na bango te, to kokamata bana basi na bango mpo na bana mibali na yo te. Mpo ete bakopɛngwisa bana mibali na yo ete [bálanda, NW] ngai te mpe básalela banzambe mosusu, bongo [nkanda ya Yehova, NW] ekopelela bino.”​—Deteronome 7:3, 4.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto